22-0213 ELEMBO YA MISATO

Nsango: 63-0320 ELEMBO YA MISATO

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala Moseka,

Nazalaki kobondela mpe kosenga Nkolo soko akolinga Nakoma to naloba nini oyo ekokaki na lolenge moko to mosusu kozala mapamboli mpe elendiseli epai na bino, Mwasi na Ye na Libala. Nazali na maloba te, mpe nayebi eloko ya koloba te. Nazali koyoka mpenza ete nakoki te kutu kokoma mwa ndambo na maloba oyo nazali kokoma, kasi ezali libaku monene na bomoi na ngai kosala eloko ata nini mpo na Ye.

Na ndimi ete ntango ya koyoka Bilembo Sambo oyo ebongi mpenza be. Tokoki komona etandelo monene ya Nzambe komonisama mpe kozipolama liboso na biso. Liteya sima na Liteya ezali kokoma Emoniseli monene sima na Emoniseli. Tozali komona Ye komimonisa epai na biso mpe kokamba biso. Toyebi ete tozali kosala kaka oyo Ayebisaki biso kosala, « kotikala na Liloba. » Ezali na nzila ya monene eleki te mpo na kosala yango soko Kofina Play te.

Nazali koyoka ebiangeli oyo Atii na motema na ngai ezali kobatela Etinda oyo, mongongo na Ye, ba bande oyo liboso na bino ntango nyoso ; ko talisa binon tango nyoso litomba ya koyokaka ba bande. Nayebi ete nakoki te kokomisela bino yango ndenge esengeli, kasi na YEBI nazali alima wana ezali ngai koyebisa bino « Fina Play, » lokola ezali makanisi na ngai te, mabanza na ngai te, soko maloba na ngai te, kasi Liloba na Nzambe Ye moko kosolola na nzila ya mwanje na Ye motindami, koyebisa biso :

Ntango mosusu soko totangi kaka, mpe, sasaipi, bozala mpenza na bokebi. Mpe ntango bozali kotanga, bozua ba bande, boyoka mpenza yango na bokengi. Mpo ete, bokozua yango kati na bande, mpo été bazalaki koyoka ba bande wana kuna, mpe ezali mpenza malamu mpe polele. Boye bozua yango polele-polele kuna.

Lokola nalobá yango liboso mbala na mbala, natemeli lotomo te soko eloko mosusu nini oyo Nzambe atii kati na lingomba na Ye. Kosala bongo elingi koloba kotemela Liloba na Nzambe. Nandimi ete bapakolámi mpe babiangami na Nzambe. Kasi nandimi ete koyoka mpe kotia Mongongo mpenza ya Nzambe liboso ya bato nde esengeli ezala eloko ya litomba koleka oyo moto na Nzambe ata nani akokaki kosala. Ekoki kaka te koloba ete, « Nayebisaka eyanganelo na ngai bayoka ba bande. » Soko bondimaka :

·       Ezali na epakweli monene te koleka koyoka Mongongo na Nzambe kati na bande.

·       Emoniseli nyoso esengeli kouta na Mongongo wana.

·       Kondima ya konetolama oyo tozali na yango bosenga ekouta na Mongongo wana.

Ndenge nini motei ata nani azanga kolinga koyoka Mongongo yango, elongo na mangomba na bango, mpe koloba AMEN NA LILOBA MOKO NA MOKO?

Moto nyoso esengeli azala na eloko oyo bazali koyoka mpe kondima ete ezali ELOKO YA MOTUYA KOLEKA oyo bakoki kosala mpo na kozala Mwasi na Libala Klisto. Eloko moko esengeli ezala eloko ya Nzambe ya LITOMBA KOLEKA mpe Mokano na Ye ebongi be. Yango ezali nde lotomo ya mobateli na yo? Koyoka ntómo mosusu? Ezali te ete yango ezali mabe, soko moke te, mpe yango ezali mpenza malamu kokokana na Liloba, kasi bozali nde kondima ete eloko YA LITOMBA KOLEKA ezali koyoka Mongongo na Nzambe oyo endimisami likolo na ba bande?

Mituna yo mpenza to mobateli nay o motuna oyo: Ondimi ete eteni na liloba oyo ezali solo, to ezali nde miko mpe kaka kozanga kososola ya Ndeko Branham, to komeka komizwela lolendo?

Bomoni, mpenza oyo ekokaki kosalema sasaipi! Mpe, epai na lingomba, oyo yango ezali ? Liloba kati na nzoto likomi mosuni kati na bato na Ye lisusu! Bomoni? Mpe bazali kaka kondima yango te.

Soko bondimaka ete eteni na maloba oyo ezali solo, mpe epai na bino ezali MONGONGO NA NZAMBE, Liloba kati na nzoto likomi mosuni, na bongo ndenge nini moto ata nani azanga komona ete ELOKO MOKO YA LITOMBA MINGI koleka koyoka Mongongo yango ezali te.

Moseka molali mpongi bolamuka,  to bozali na Emoniseli oyo to bozali ndenge alobaki ete: “bondimi na bino kaka te.”

Lokola mosakoli ayebisaki biso, tozali Buku ya sika ya Misala, Motape yango ya sika, baponami na Ye. Na bongo, ebele bazali koyoka ete Molimo mosanto sasaipi kokamba biso lokola bato to azali kokamba bison a nzila ya lotomo, nan zila ya mosakoli na Ye te.

Ezali na solo mingi kati na oyo, KASI, mosakoli mpe asembolaki oyo, mpe amonisaki biso solo.

Moto moko azalaki kosolola nan gai awa eumeli mingi te. Alobaki, “Kasi Ndeko Branham…”[Ndeko Branham afungoli mongongo na ye—Mok.] Bolimbisa ngai. Alobaki, “Ezali te sima ya Molimo Mosanto koya, Banje te kokamba lingomba, to kotambwisa bato. Te, mobali. » Alobaki, « Ezali Molimo Mosanto nde azali kokamba biso. »

Oyo wana ezali kozanga kososola kati na Mwanje mpe Molimo Mosanto. YANGO EZALI LIBUNGA, Banje bazalaki kokamba Lingomba kuna, mpe bazali kokoba kokamba Lingomba. Ndenge esengeli.

Mwanje na Ye azali kokamba mpe kotambolisa Lingomba na Ye. Biso nyoso tozali na esika na biso mpe na ebiangeli na biso, kasi mwanje ye moko nde esengeli kokamba Mwasi na Libala.

Boyoka oyo mosakoli na Nzambe azali koloba na ntina na ntomo isusu kokokanisa na oyo Nzambe ABENGAKI YE KOSALA,

Kaka lokola moto oyo azali mo—mobongisi na ba singa ya telefone, azali moto ya lotiliki te. Akoki kosala mwa mosala likolo na yango. Mpe lokola, soko moto azali motii singa ya telefone, boye, akokoka mpenza ko…Moto  azali ntango mosusu motimoli ya mabulu, mpe asalá mosala ya singa ya telefone liboso te, epusi malamu atika mosala yango ya ba singa; kasi akoki kosala mwa eloko moko lokola mosala ya ngenge yango.

Kasi ntango eloko ya solo esengeli emonisama na mokolo ya suka, ya eteni ya suka ya Lingomba, ezali ntango Nzambe alobaki ete akotindela biso, kokokana na Makomi. Mpe tolukaki yango epai na epai, ete Alobaki liboso ete Molimo na Elia ekozonga kati na moto moko.

Ntango moto moko akomeka koswanisa yo, “ esengeli na eloko mosusu koleka koyoka kaka ba bande. Ndeko Branham alobá soko moke te ete bato bayoka ba bande kati na losambo. Esengeli ntomo ya batei mpo na kobongisa Mwasi na Libala;” to eloko mosusu nini oyo songolo pakala akoki koyebisa yo, komeka kobetisa yo ntembe ete koyoka Mongongo na Nzambe wana endimisami likolo na bande kati na losambo ezali miko…

Kaka lokola moto moko abanda, ameki koswana nayo; soko oyebi esika ya kotelema, oyebi oyo andimi.

Soko babeti ntolo ete bandimi, « Etinda oyo, ezali Liloba. William Marrion Branham azali mwanje ya Sambo motindami ya Nzambe. Etinda oyo ezali Etemelo na bango. Etinda oyo ezali Mwana na Moto komimonisa ye moko kati na nzoto lokola Alakaki ete akosala bongo…”

Ezali kaka lokola kozwa simbiliki mpe kofungola ye kati na lopango, mpe okangi malusu manso. Telema kaka na ekuke; akozonga. Nde suka na yango. Okangi ye na kati. Bomoni? Akozonga kaka na ekuke lisusu. ‘mpo ete ezali nzila nse yoko akokoka kobimela. Akofina moto na ye nan zila oyo, pene ete abuka kingo na ye; mpe akokende kuna, kuna. Telema kaka wana mpe tala ye, mpe akozonga nokinoki. Bomoni? Nde suka.

Botikala na Malakisi yango ya Ba Bande. Boloba kaka oyo ba bande elobi. Bobongola Liloba moko te. Bobakisa na yango, to bolongola Liloba moko longwa na yango te. Ezali Mongongo na Nzambe epai na bino. Ezali Liloba kati na Nzoto ekomi mosuni. Ezali Maloba mazangi kokwea. Azali mobateli na bino. Mwanje na Ye azali kokamba bino. Ezali Oyo Elobi Nkolo.

Ntango nyoso bozali kati na Liloba yango, bobatelami.

Boya kopetola mind ana bino mpe kotondisa yango na mafuta Mokolo na Lomingo oyo na nzanga, ntango ya Jeffersonville, wana mwaje na Nzambe moponami azali konguluma mpe kobuka Elembo ya Misato 63-0320, mpe komonisa yango epai na Mwasi na Ye ya Libala.

Ndeko Joseph Branham.

Makomi ya kotanga kati ya kolengela koyoka Liteya, “Elembo ya Misato.”

Makomi:

St. Matai 25:3-4

St. Yoane 1:1; 1:14; 14:12; 17:17

Misala Mokapo ya 2

I Timote 3:16

Baebele 4:12; 13:8

I Yoane 5:7

Lewitiko 8:12

Yilimia Mokapo ya 32

Yoele2:28

Jekalia 4:12