21-1212 Elambo

Nsango: 65-1212 Elambo

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala ya Yesu Klisto,

Nkolo atikelaki biso kaka malako 3 ya kosala kati na nzoto lokola baklisto; Libatisa, Kosukolana Makolo, mpe Elambo.

Elambo ezali nde eloko ya kopika pende mpo na mondimi, mpe esengelaki ezwama kaka na baoyo babatisami na Nkombo na Yesu Klisto, mpe bazali kobika bomoi oyo esengeli mpo na Moklisto.

Mpo na sanza mingi sik’oyo, nazalaki na mokumba monene likolo ya motema na ngai ete tozala na Elambo. Esali koleka mbula mobimba uta tokutanaki na mesa na Nkolo mpe tozalaki na kosukolana Makolo. Wan’ezalaki ngai kosolola na bandimi ebele, bango nyoso balobi likambo yango moko, “Nakokaki kosepela ete tozala na Elambo.”

Ntango nazalaki kati na mabondeli, Nkolo atiaki likolo na motema na ngai nzela tokokaki biso nyoso kokutana mpe kolia Elambo na ba ndako nabiso. Na Sanza ya Sambo ya 1964, ndeko moko na nkombo ya Gagnon akomelaki Ndeko Branham mokanda, kotuna ye soko ezalaki malamu mpo na ye kosala Elambo na ndako na ye, atako azalaki motei te. Ndeko Branham azongiselaki ye eyano boye ete, “Iyo, zwa yango, ezali te ete mpo na kosala yango esengeli kaka ozala motei.”

Natondi Nkolo botondi mingi na ndenge ete abongisi nzela ete Mwasi na Libala ya Klisto asala Elambo mpe Kosukolana Makolo kati na ba ndako na biso elongo moko na mabota na biso. Ezali mpe lipamboli moko monene ekozala mibu 56 mokolo wana longwa Ndeko Branham asalaki Elambo oyo.

Nzela ya koyoka tokozala kosalela mpo na Liteya nab iso ya Mokolo mwa Lomingo ekozala na Voice Radio, website ya Branham Tabernacle, mpe mpo na kozwa yango lonwa na internet. Liboke oyo ezali na Liteya mobimba, 65-1212Elambo, MPE eteni moko ebakisami mpo na kokokisa molulu na biso ya Elambo na ndako.

Tokozala kolanda molongo yango moko ndenge tosalaka Elambo na Eyanganelo ya Branham. Ya liboso Ndeko Branham akomemela biso Liteya, Elambo. Na suka ya Liteya akobondela mpo na lipa mpe vinyo, na mbisa tokozala nan taka ya minuti 10 ntongo piano ekozala kobeta moziki mpo ete bokoka kozala na ntango esengeli mpo ya kokabola Elambo na ndako na bino. Sima ya piano kobeta moziki, Ndeko Branham akotanga likomi mpo ya eteni ya mosala ya Kosukolana Makolo, mpe nambisa tokozala na ntaka ya minuti 10 mosusu mpo ya Kosukolana Makolo.

Nakolinga kopesa toli ete bozala na Elambo likolo na sani vinyo mpe lipa liboso ya molulu kobanda, lokola ntango ya kolekisa ekozala te longwa na ebandeli ya bande kino na suka ya Elambo mpe Kosukolana Makolo.

Tokopesa vinyo mpe mwa kopo mike ya plastiki kaka mpo na bailingomba ya eyanganelo na biso aw ana mboka. Malako mpo ya epai wapi bokoki kosomba vinyo Kosher, ndenge nini bokosala lipa ya Elambo, mpe na mayebisi mosusu ya litomba epesameli bino na  mikanda mizali awa na nse.

Lokola moko na moko na bino, nazali na nse ya kozila na etingia monene koyoka elongo Mateya makolandana moko sima na mosusu, mpe molulu ya libanga ya moto, kozala na Elambo mpe Kosukolana Makolo ekamboma na mosakoli ya Nzambe.

Ndeko Joseph Branham

Mokanda

Na Sanza ya Sambo ya 1964, ndeko moko na nkombo ya Gagnon akomelaki Ndeko Branham mokanda, kotuna ye soko ezalaki malamu ete apesa Elambo na ndako na ye, ata ko lokola ye azalaki motei te. Ndeko Branham ayanolaki mpe alobaki na ye, “iyo, zwa yango. Esengeli kaka te kozala motei mpo osala oyo.”

Makita ya kopalanganisa Sango Malamu ya Momemyami William Branham

Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo, mpe libela   – Baebele   13:8

P. O. BOX 325
Jeffersonville Indiana

Sanza ya Sambo 13, 1964

Molingami ndeko mobali Gagnon,

Mbote mingi na Nkombo ya Nkolo :

Ezalaki esengo koyoka longwa nayo lelo, mpe nazali kolikia ete mokanda oyo ekokuta yo malamu, mpe kati na mosala ya Nkolo ;

Ezalaki esengo kotanga mokanda na yo, mpe komona ete ozalaki sembo kati na botunaka ngai mituna na yo oyo ezali kolanda. Nakomeka na lisungi na Nkolo koyanola yango mpo na yo. Ya liboso ; mpo na oyo etali kozwa Elambo, iyo zwa yango, esengeli kaka te kozala motei mpo na kosala oyo, vinyo ezali malamu. Mpe motuna otunaki na ntina na motango 666 ezali kaka nzela ya mbotama na yo ; mpe yango ezali na ntina moko te, lokola sasaipi osili kobotama mbala ya mibale lokola mwana na Nkolo.

Nazali kolikia ete nakoyoka lisusu longwa na yo na mwa mikolo mizali koya.

Wayo kati na Mosala mwa Ye

Ndeko Branham

Ekaniseli:        Motuna natunaki Ndeko Branham ezali boye:

Nalobaki na ye tozali na motei te, mpe nalingaki koyeba soko ezalaki malamu mpo na ngai kopesa Elambo. Lisusu, soko ezalaki malamu kosalela vinyo ya “Kosher”.

A.A. Gagnon

Makambo nyoso ekoki, ndima kaka     

Ekanganeli ya eyokeli mpo na Molulu ya Elambo

Nzela ya koyoka tokozala kosalela mpo na Liteya na biso ya Mokolo mwa Lomingo ekozala na Voice Radio, website ya Branham Tabernacle, mpe mpo na kozwa yango lonwa na internet. Liboke oyo ezali na Liteya mobimba, 65-1212Elambo, MPE eteni moko ebakisami mpo na kokokisa molulu nab iso ya Elambo na ndako.

Tokozala kolanda molongo yango moko ndenge tosalaka Elambo na Eyanganelo ya Branham. Ya liboso Ndeko Branham akomemela biso Liteya, Elambo. Na suka ya Liteya akobondela mpo na lipa mpe vinyo, na mbisa tokozala nan taka ya minuti 10 ntango piano ekozala kobeta moziki mpo ete bokoka kozala na ntango esengeli mpo ya kokabola Elambo na ndako na bino. Sima ya piano kobeta moziki, Ndeko Branham akotanga likomi mpo ya eteni ya mosala ya Kosukolana Makolo, mpe nambisa tokozala nan taka ya minuti 10 mosusu mpo ya Kosukolana Makolo.

Nakolinga kopesa toli ete bozala na Elambo likolo na sani vinyo mpe lipa liboso ya molulu kobanda, lokola ntango ya kolekisa ekozala te longwa na ebandeli ya bande kino na suka ya Elambo mpe Kosukolana Makolo.

LIPA YA ELAMBO

Lipa ya Elambo ebengami mpe “lipa ya noki noki” to “lipa ya Elekeli”. Ntango bana ya Isalaele bazalaki somi longwa na bombo ya Falo na Ejipito, bazalaki nan tango te ya kotumba lipa na ndenge ya momesano, nabobakisaka mfulu, to oyo ya kofulisa, yango evimbisaka lipa. Esalemaki na farine ezangi mfulu na lombangu mpo na mobembo ya bango.

Moko ya makambo ya suka Nkolo Yesu asalaki awa na mabele ezalaki kolia Elambo elongo na bayekoli na Ye; mpe likambo ya kokamwa, Liteya ya suka Ndeko Branham ateyaki ezalaki 65-1212 ELAMBO.

Liloba etei biso ete lipa esengelaki esalema kaka na bato oyo bamipesi mpe ba bonzeli Nzambe bomoi na bango. Kaka mondimi oyo atondi na Molimo Mosanto nde asengelaki atumba lipa mpo ya Elambo.

  • ·       Kobongisa lipa ya Elambo, ya liboso sangisa farine na mai. Banda na ½ ya kopo ya mai ya moto mpe bakisa lutu moko oyo baliaka na yango na mesa ntango na ntango kino lima ya farine ekozala penza enikani malamu petee ( wana oniki na maboko to na eloko ya ko nika na yango.)
  • ·       Lima ya farine yango ekosembolama na malembe. Ekobalukisama likolo ya esika yoko ezangi mabaku kino ekoma na mbinga ya moke penza [Epaisseur ya moke mingi, mince : Maloba ya Molimboli]
  • ·       Tobola lima ya farine mbala misato to minei na kanya, mpo ete etikala kaka na mbinga moke ntango ozali kolamba. Tanda yango likolo na nkasa oyo babengi papier ya parchemin.
  • ·       Tumba lipa na minuti 15 kati ya four oyo ezali na moto ya 400F. to tanda yango kati na esika moko ya bozito oyo ezwi moto makasi liboso. Bongola lipa mbala moko mpo ya kolingisa ngambo nyoso mibale ya lipa ebela malamu. Mafuta ezali na litomba te.
  • ·       Sasaipi buka lipa na mwa biteni mike mike na maboko nayo. Suka ya lipa oyo emonani ya ko pasuka pasuka ezali kotalisa nzoto ya Nkolo Yesu oyo ebukani.

Na ntang’oyo ezali malamu kobwaka lipa oyo eleki mingi lokola ebondelami naino likolo na yango te.

Soko osili kobondela mpo na lipan tango ya Elambo, lipa oyo ekotikala esengeli etumbana liboso ntongo etana. Kozikisama ya lipa yango ezali kati na elilingi wana bana na Isalaele bazalaki na mobembo na bango kati na lisobe. Wana ezalaki mana ma sika kokwea longwa na Lola mokolo na mokolo. Lip aya mokolo ya liboso epolaki mpe ezalaki lisusu malamu te. Bobele oyo ya Mokolo ya Sabata nde ebebaki te mpo moto moko azalaki na ndingisa ya kosala mosala te, mpe kolokota mana ya sika kati na bilanga. Mpo na yango biloko bibombamaki longwa na mokolo liboso ya Sabata mpe kobomba na hema na bango, mpe Nkolo azalaki kobatela yango mpo na bango  mpo balia mokolo ya Sabata, to mokolo ya bopemi (Esode 16)

Ndeko Branham mpe azwaki elilingi ya lipa kozikisama ya lipa longwa na bileko sambo ya Lingomba, lokola esengelaki ete  eleko ya lingoma moko na moko esengelaki ekufa mobimba liboso epesa nzela na mana ya mobesu oyo eleko ya lingomba elandaki ezali komema. Mingi na koleka, azali kokokanisa yango na makambo mondimi ye moko azali kobika, mpe boni boni esengeli na biso kokufa mokolo na mokolo, kotikela Molimo Mosanto aya kati na biso mpe kobika bomoi ya sika kati na biso mokolo na mokolo.

Mpo na kondimisama ete lipa nyoso eziki penza, epusi malamu kotia lipa nyoso kati na liboke ya papier mpe kotia yango katikati ya litumbu na moto. Yango ekondimisa yo ete nyos’oyo etikali na lipa ekozika.

Lipa oyo ya Kosher esalemi na Moklisto. Ezali lipa ezangi mfulu. Mpe soko otali yango, ntang’otii yango na monoko na yo, ezali penza makasi makasi, kotalisa bololo. Ezali masusa-masusa mpe ebukani, nzoto ya Nkolo na biso Yesu oyo ezokisami. O, ntango nazali kutu kokanisa na ntina oyo, ezali lokola nde kobeta ya motema na ngai ezali kopumbwa kobeta moko ! Ntango nazali kokanisa ete atutamaki, abetamaki mpe azokisamaki, Mwana na Nzambe oyo asalaki mabe moko te ! Boyebi mpo na nini asalaki bongo ? Ezali mpo ete nakweisamaki. Mpe akomaki ngai, mosumuki na ntina ete, na nzela na mbeka na Ye nakokana na Ye, mwana mobali ya Nzambe. Mbeka nini oyo ?

62-1231 Momekano

Vinyo ya Elambo

   

Vinyo ya Elambo ezali kotalisa Makila ya Nkolo Yesu, oyo ezali kopetola biso na masumu na biso nyoso, mpe ezali komelama kolakisa kufa na Nkolo kino akozonga. Vinyo ya Elambo esengeli te ezala jus ya grape [raisin : molimboli], oyo ekomaka ngai mpe ebebaka ntango ezali koumela, kasi vinyo penza, oyo eyaka makasi mpe kitoko ntango ezali koumela ; ebungisaka makasi na yango soki moke te.

Kaka motindo moko Makila na Yesu Klisto ekomaka ngai te mpe ebebaka te wana ezali yango koumela, kasi ezali kokoma makasi mingi mpe elengi mingi wana mikolo mizali koleka epai na mondimi.

Kati na Biblia, Vinyo ezali kotalisa Kolamukisa na nzela ya Liloba, wana emonisami yango epai na mondimi.

58 Mpe vinyo, Nalobaki, oyo eyaki epai nan gai, ezali ete Vinyo ezalaki nguya ya-ezalaki nguya ya kolamukisa na nzela ya emoniseli. Bopmoni ? Ezalaki eloko mok’oyo Nzambe alobaki. Ezali libombami ; bakoki kososola yango te, bomoni. Mpe sima moke, Nzambe akiti mpe  amonisi yango, na mbisa akokisi yango.

63-0321- Elembo ya Minei

Ezali na litomba te ete Vinyo esalema na « ‘maboko masanto » lokola lipa. Vinyo ya Kosher to Vinyo ya elekeli ekoki kosombama na magazini. Nzokande mpo na malako na ndenge okoki komisalela Vinyo ya yo moko, kende na  Recipe Cards (Karti ya kobongisa biloko : molimboli) na nse ya lokasa oyo.

Tokopesa Vinyo mpe mwa kopo mike ya plastiki mpo ya eyanganelo na biso awa na mboka Jeffersonville. Mpo na Elambo ekoki komelama na mwa kopo ya mike, moko mpo ya moto moko to bato nyoso bameleli na kopo moko ya monene. Sima ya komela Elambo, esika bosala lokola mpo na lipa, bokoki kaka kobwaka Vinyo oyo ekotikala.

Kozwa Elambo oyo ezali elilingi ya Makila mpe Nzoto ya Nkolo, ezali ntango nyoso kotalisa « Elonga » epai na mondimi. Ata mibu nkama na nkama liboso Elambo ebongisama na kufa naYesu Klisto, Abalayama azwaki Elambo elongo na Nzambe.

Sima na ye kozwa elonga kati na kobomama ya bakonzi mpo na kosunga Lota ndeko na ye, Abalayama akutanaki na Melikisedeke, mpe baliaki Elambo elongo.

Ntango nyoso tozali kozwa Elambo, lipa mpe vinyo ezali elembeteli ya elonga na bomoi na biso likolo ya monguna. Mpe mokolo moko, ntango etumba ekosila, biso, momboto na Abalayama, ntango tokokutana na Nkolo na biso na mipepe, mpo na Elambo monene, mpe tokolia Elambo elongo na Ye miso na miso, kuna na Lipati ya Libala.

Botala, sima ya etumba kosila, Melikisedeke apesaki mwana na Ye molongi Elambo ; bokanisa yango, eteni ya Ye moko ! Sasaipi tolingi tomona awa, na elilingi awa  na bomonaka, Elambo. Sima ya etumba, Amipesaki Ye moko, mpo ete Elambo ezali eteni ya Klisto. Mpe ntango minyoko ekoleka, ntango osilisu komilongola kati nayo penza, nan tango wana nde okozwa Klisto. Okokoma eteni ya Moto oyo. Bosimbi yango?

Yakobo abundaki butu mobimba, mpe alingaki kotika Ye te kino Apambolaki ye. Ezali solo. Etumba ya bomoi! Sima ya etumba kosila, nde Nzambe Akopesa yo eteni na Ye moko. Wana nde Elambo na Ye ya solo. Mwa lipa mpe Mokate izali bobele elilingi na yango. Osengelaki kozwa yango te kino obunda mpe okoma eteni ya Nzambe.

Bokanisa, na ntang ;oyo Elambo esalamaki nano te, kino liboso ya kufa na Yesu Klisto, mbula nkama na nkama na nkama sima na yango.

Kasi Melikisedeke, sima na mwana na Ye Abalayama kozwa elonga, Melikisedeke Akutanaki na ye mpe Apesaki ye vinyo mpe lipa ; kotalisa ete sima ya etumba ya mabele oyo kosila, tokokutana na Ye na Lola mpe tokolia Elambo lisusu. Ekozala Lipati ya Libala. « Nakomela lisusu longwa na mowiti oyo te soko kolia mbuma na yango, kino ekolia ngai mpe ekomela ngai yango elongo na bino kati na Bokonzi ya Tata na Ngai. » Ezali solo ?

Botala lisusu, Melikisedeke akendeki kokutana na Abalayama liboso na ye kozonga na ndako. Elilingi kitoko nini oyo tozali na yango awa ! Melikisedeke kokutana na Abalayama liboso na ye kozonga na ndako, sima ya etumba kosila.

Tokokutana na Yesu na mipepe, liboso tozonga ndako. Ezali solo. Mibale Batesaloniki eyebisi biso ete, mpo ete, « tokokutana na Ye na mipepe. »

65- 0221E  Oyo Melikisedeke Azali Nani ?