21-1219 Elembo

NSANGO: 63-0901M Elembo

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala Elembo,

 Ntango ya Ndenge oyo nano ekomá liboso te kati na lisolo ya mokili. Molongo mobimba esengelaki etatola mpo na yango,lokola mikili mitano Miranda Mali na molongó moko elongo.

 Eloko moko ezalaki kosalema na mokolo a sanza12, na Sanza ya zomi na mibale, 2021 kati na Likolo, wana eloko moko ezalaki kosalema na mabele. Mwasi na Libala bazalaki koyangana elongo longwa na mokili mobimba wana ezalaki Nzambe kosolola na nzela y’a mosakoli na Ye, mpe Mwasi na Ye ya Libala bazalaki na Elambo mpe kosukolana makolo elongo na ba ndako na bango. 

Molunge ya molimo mpe bozali ya Nkolo ndenge nini oyo ezalaki na ba ndako na biso.

  Boko mibali bayokisi bande baselimwaki kati na ba ndako na biso mpe bakomisaki ndako ya biso losambo mpo na Nkolo. Totiaki Elembo na ba ndako na biso mpe na mabota na biso. Molimo Mosanto Atondisaki ndako na biso, motema na biso, mpe bomoto na biso na bozali na Ye. Ezalaki lokola nde tozalaki bana na Isalaele kobelema mpo na mobembo na biso kobima.

Liloba Azalaki kosolola na biso na nzela ya mwanje na Ye mpe epakolamaki na ba ndako na biso. Kufa ezalaki zingazinga na biso, kasi toyebaki ete tobatelamaki mpe ete ekoleka likolo na ba ndako ya biso. Tozalaki komilengele kolongwa mpo na mokili na BISO ya Elaka.

Totikala koyoka kobelema liboso te lokola tozalaki na butu wana. Toyebaki ete eloko moko ezalaki kosalema. Toyebaki ete Azalaki kobongisa biso mpa na koya na Ye, kasi esengelaki ezala ntango oyo, mokolo oyo, sanza oyo, mbula oyo. Makambo nyoso ezalaki na molongo mpe na esika na yango. Ezalaki na ntina.  Ezalaki kokoma lokola elembo epai na mokili. 

Makambo nyoso ya molimo oyo ezali kokoma ezali elembo kouta na Nzambe. Bozala na bokengi. Botala yango, bomoni. Botala, makambo nyoso ya molimo oy’ezali kokoma, makambo nyos’oyo ezali kokoma ezali elembo. Tozali awa kaka na mbalakata te. Makamb’oyo ezali kaka kokoma pamba te. Ezali elembo. Ezali elembo, kokota-Bokota kati na kobatelama noki. Noa azalaki elembo mpo na libota na ye; Elia azalaki elembo mpo na oyo ya ye; Yoane azalaki elembo mpo na oyo ya ye. Bomoni? Eloko nyoso, Etinda ya ntango, ezali elembo. Botala yango, botala oyo yango ezali kosala. Bomoni? Ezali elembo. Eloko moko na moko ezali na ntina.

Ntango Mose abandaki lotomo na ye kati na Isalaele, Isalaele ayanganaki noki noki longwa na bipai nyoso na Ejipito, kokende na Gosheni. Bazalaki kozonga epai na bango mpo bayebaki ete eloko moko ezalaki pene ya kokoma. 

Elilingi kitoko ndenge nini oyo mpo na lelo, lokola Mwasi na Libala azali koyangana zingazinga na Liloba ya ntango peto ezangi kobebisama; mpo ete biso mpe toyebi ete eloko moko ebelemi kokoma. 

Bazali kouta na ebimelo na ntango mpe na elimwelo na yango, bazali kouta na mikili esii, kosepela na lipati ya Mokonzi,  kolia bo bapaya na Ye zingazinga na Bilei na Ye bibombamaki na MESA na Ye.

Atindaki mwanje na Ye mosakoli na Etinda kobenga kobimisa, mpe kokamba Mwasi na Ye ya Libala na Mokili ya elaka. Amitalisi Ye moko kati na biso na Likonzi ya moto.Na bongo Atindaki Elembo mpo Mwasi na Ye ya Libala azala na nse na yango, mpo ete Akoyebaka kaka Elembo yango. 

Elembo mpo na lelo ezali nini?

Akoyeba kaka e-elembo. Yangon de Etinda ya ntango! Yangon de Etinda ya mokolo oyo! Yangon de Etinda y’a ntango oyo! Na Nkombo na Yesu Klisto boyamba yango!

Mwasi na Libala mpe Klisto bazali kokoma moko. Lotomo ya Mwasi na Libala mpe Lotomo ya Klisto ezali eloko moko. Nzambe Ye moko Azali koyeba Etinda ya motindami na Ye. Ayebi Mwasi na Ye ya Libala. Elili ezali kokoma solo ya likambo. Elaka moko na moko kati na Liloba na Ye ESALI YA BISO. Esengeli etosa biso.

Tozali kokoma Mwasi na Libala yang’oyo abongi be na nzela moko Nzambe Apesi mpo na lelo: Mongongo na Ye, Liloba na Ye kati na bande. Nzambe Atikala te kobongola manaka na Ye. Atindaka kaka mosakoli kokamba  bato na Ye. Azalaki na Ba mosusu oyo babengami mpe bapakolami, kasi bakokaki koloba KAKA oyo mosakoli alobaki, mpo ete maloba ma Ye mazalaki OYO ELOBI NKOLO mpo na bato.

Okondimisama ndenge nini 100% ete ozali koyoka Liloba na Nzambe libongi be? Mpo na ngai nzela ezali kaka moko: Fina Play. 

Ezali solo na ba mosusu babengami koteya Liloba, mpo ete ezali kati na Liloba mpe ekoki kopekisama te, kasi bakoki koteya kaka Liloba oyo bayoki likolo na bande longwa na motindami. Bakoki te koteya, kolakisa, kolimbola, kolongola to KOBAKISA ELOKO SOKO NINI NA YANGO MPO ETE EZALI MOKANO NA NZAMBE EBONGI BE. Yangon de Liloba elobi.

Ezali mabe te koyoka motei, lokola basusu bazali koloba, to Ezali mabe te kokende na losambo. Bosengelaki bokende na losambo, kasi Mwasi na Libala alingi koyoka bilei ya bam pate, mpe ebele bandimi ete nzela moko kaka ya koyoka Liloba peto ezali na bofinaka Play. 

Nzambe Azali kopambola bango mpe lotomo abengeli bango. Mpo ete natemeli bango te mpe nalingi bango mpe nandimi ete nakolekisa Seko na Seko elongo na Mwasi na Ye ya Libala nyoso oyo abongisamaki liboso. Nazali kaka mpo na lotomo ya ba bande. 

Mingi balobi ete esengeli kozala na motei mpo ozala Mwasi ya Libala. Nandimi yango, mpe nazali na ye, William Marrion Branham, mpo ete azali motei ya monene koleka nyoso mpe azali na lotomo monene koleka nyoso kati na molongo. Mpo ete ezali liloba na ye te, Etinda na ye te, makanisi na ye te, soko ndimbola na ye te. Ezali Liloba ya Nzambe moko kaka lindimisami mpo na mokolo ya biso.  Mpe iyo, ezali LOTOMO NA BOMOI koleka nyoso.

Motuna na ngai ezali: Bokoki kaka koyoka ba bande mpe kozala Mwasi na Libala ya Klisto, to esengeli nde na ngai kozala na eloko mosusu eleki Mongongo na Nzambe likolo na bande? 

Mpo na ngai mpe ndako na ngai, tozali NDAKO YA BA BANDE, mpe tondimi ete tozali Mwasi na Ye ya Libala mpe nyoso tozali na yango bosenga ezali Mongongo na Nzambe likolo na bande.

Soko okolinga komibakisa na biso na ndako, losambo, motuka na yo yo epai nse epai Nkolo akozala na yo, mpo na koyoka Yango Elobi Nkolo, mibakisa na biso Mokolo ya Lomingo na 9:00 ya tongo, ntango ya Jeffersonville koyoka Liloba na Nzambe kobongisa Mwasi na Ye ya Libala mpe komemela biso Liteya: Elembo 63-0901M.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:

Genese 4:10

Esode Mokapo ya 12

Yosua Mokapo ya 12

Misala 16:31 /19:1-7

Baloma 8:1

I Bakolinti 12:13

Baefese 2:12 / 4:30

Baebele 6: 4 / 9:11-14 /10:26-29 /11:37 /12:24 /13:8 /10-20

Stu. Yoane 14:12