23-1217 Elembo

NSANGO: 63-0901M Elembo

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami na Ngai wa motema,

Motema na ngai mozali kaka kopunjuapunjua ntango namoni bino banso koyangana zingazinga ya Mongóngó na Ngai, koyoka Liloba na Ngai, lokola nazali koloba na bino na nzela ya mwanje na Ngai.

 Esepelisaka Ngai mingi koyeba ete ozali na Emoniseli ya oyo Naponaki kozala Mongóngó na Ngai epai na yo.  Kondima Liloba nyonso oyo alobaki ezalaki liloba na ye te, kasi Liloba na Ngai epai na yo.

 Ezalaki mpenza na litombá mingi mpo na Ngai, kino Natiaki Yango na bande mpe ebómbámáki mpo na yo, ete ókoka koyoka Yango mbala na mbala.  Nalingaki Soki moké te óbósana oyo Nalobaki eútáki na motema na Ngai.  Nayebaki ete Ekozala nzela se moko nakokaki kopesa yo Kondima wana Ebongi be oyo ozalaki na yango bosenga, ete tokoka kozala elongo.

 Nasalelaka ntango nyonso moto moko koloba mpe komonisa Liloba na Ngai epai ya Mwasi na Ngai ya Libala.  Kaka lokola nasalaki na Mose.  Oyo abiangaki, yango nde azuaki, zambi alobaki kaka Maloba na Ngai.  Nayebisaki kútu ye, Nakosala yo nzambe.  Ózala nzambe, mpe Alona akozala mosakoli na yo.  Nakozwa mongóngó na yo, mpe nakokela na yo.  Nakoloba, mpe bato bakoki kowangana yango te.  Oyo nyoso OLOBI, ekosalema.

 Sikawa lokola ozwi Kondima  Ebongi be kati na Liloba na Ngai, oyebi kaka te nani Natindaki epai na yo kozala Mongóngó na Ngai, kasi sikawa oyebi ete Liloba na Ngai lizali kobika mpe kofanda kati na YO, mpe lipesi yo KONDIMA EBONGI BE.

 Oyebi soko ozali nani.  Ofandi kati na Ngai, mpe Liloba na Ngai kati na yo.  Sengá nini olingi;  ekopesamela yo.  Na Nkombo na Ngai okobengana milimo mabe;  ezali te, Nako, OKO.  Soko Olobi na ngomba oyo;  ezali te Soko NALOBI, soko Olobi na ngomba oyo.

 Monguna na yo azali lisusu na nguya te likoló na yo.  Yo na Liloba na Ngai bozali MOKO.  Soko ozali na bana to balingami oyo bazali te esika basengelaki kozala, séngá bango.  Soko Esalaki likolo na yo, na nsima salelá KONDIMA na yo EBONGI BE na LILOBA na Ngai LIBONGI BE lifandi kati na yo, mpe okoki kozua oyo osengi.

 Oo, Nazilaki ntango molaí mpo oyeba nani ozali.  Mpo komona yo komilengela na boyókáká Liloba na Ngai.  Nasepeli mingi ntango yango nsuka-suka ekómí.

 Liloba wana  Libongi be oyo Nalobaki mpe nabombaki mpo na yo ezali Elembo na Ngai mpo na mondimi nyonso lelo.  Ezali Molimo Mosanto;  makila te, oyo ekoki kosimbama, kasi Ezali Molimo Mosanto na Ngai, Liloba na Ngai, oyo ezali kobika mpe kofanda kati na yo.

 Ngonga ya Elembo wana kotalisama ezali pene.  Osengeli komema Elembo elongo na yo butu na moi;  kaka na mokolo mwa Lomingo te, osengeli kofina Play ntango nyonso.

 Ayebaka kaka E—Elembo.  Yango nde Etíndá ya ngonga oyo!  Yango nde Etindá ya lelo oyo!  Yango nde Etindá ya ntango oyo! Na Nkombo ya Yesu Klisto, yamba Yango!

 Ezali na bitindá ebele libanda kuna, kasi Mongóngó na Ngai ezali Etindá ya ngonga.  Esengeli oyamba mpe ondima Liloba moko na moko.  Esengeli épakolama na ntango ya mpokwa.

 Bino na mokili mobimba, baoyo bozali koyoka na ba bande, elembo ya ngonga yango oyo.  Ezali na Elembo moko esengeli kotiama, mpe ntango mosusu te ekokaki na yango koya….ozali kosimba Yango?

 Yaka kotia Elembo na Ngai na bomoi na yo elongo na Mwasi na Ngai ya libala Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Liteya na Ngai epai ya Mwasi ya Libala: Elembo 63-0901M.

 Ndeko.  Joseph Branham

 Makomi ma kotánga liboso ya koyoka Liteya:

 Genese 4:10

 Esode mokapo ya 12

 Yosua mokapo ya 12

 Misala 16:31 / 19:1-7

 Baloma 8:1

 1 Bakolinti 12:13

 Baefese 2:12 / 4:30

 Baebele 6:4 / 9:11-14 / 10:26-29 / 11:37 / 12:24 / 13:8, 10-20

 St. Yoane 14:12