23-1210 KONDIMA EBONGI BE

Nsango: 63-0825E KONDIMA EBONGI BE

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Kondima Ebongi be,

Kondima ya biso eyaka na boyóki, boyóki ya Liloba. Liloba liyáka epai ya mosakoli.

 Mosakoli azali:

Liloba likómi mosuni! Aleluya! Liloba kosala kati na nzoto ya moto, na nzela ya bilembo bikomónanaka, bilembo bikoki kosimbama, bilembo ya Makomi, na bobongi be, komemela bino Kondima Ebongi be mpo ya Konetolama Ebongi be.

 Tozali kosala mpenza kaka oyo Liloba lilobi mpo na biso tósála na boyókáká Mongóngó ya Nzambe bobele moko mondimisami koloba mpe komonisa Liloba na Ye na nzela ya mosuni ya moto kopesa biso Kondima Ebongi be.

 Ozali na…matòi ma yo makufi na eloko mosusu ata nini kasi oyo Molimo alobi. Bomoni? “Epai na ye oyo azali na litói (oyo ayókaka), bomoni oyo Molimo alobi na mangómbá”; ye nani azali na eyókeli, oyo asimbi yango Molimo alobi na mangomba. Bomoni?

 Tozali eyokelo ya Ye oyo tozali kosimba mpe kondima Liloba moko na moko. Ntango apesaka biso mitindo: “Boloba kaka oyo ezali likolo ya ba bande. NAZALI  MONGÓNGÓ YA NZAMBE epai na bino. Bobiangaka ngai mobateli na bino, mpe bolobi malamu mpo Nazali bongo.” Tokokisaka yango. Nyoso elobi ye, ezali na ntembe ata ndambo esika moko te; tokóbí libosó na mobembo. Eloko sé eloko Nkolo alobi na nzela ya mosakoli na Ye, ezali na moto moko te kati na mokili oyo akokoka koloba na biso tóbima na yango, tokendeke liboso kaka lolenge moko.

Sasaipi bozali koya kati na Kondima Ebongi be, bobongi bé bobongí kwa bokokí kokwea te. Kondima wana ekweaka soki moké te.

 Tozali sikawa na Kondima Ebongi bé kati na Liloba na Ye. Tozali komitala te. Tozali kobanga eloko te, lokola YOBO. Tozali na nsómo te kotala mbóngé minene mpe kozinda kati ya mai lokola Petelo. Mikolo miangó misili.

Sikawa tozali kotala na Liloba wana Libongi bé lizali kobika mpe kofanda kati na biso. Tozali kokóta kati na litongi ya Mwasi ya libala. Tozali kokóma kati na motindo ya Konetolama.

 Ntango tobondelaka, tondimaka ete tozui yango eséngí biso, mpe tokozua yango; ekopesamela biso. Ntango, etando, eloko mosusu ata nini ekobongola yango te ata boni. Toyebi esili. Esili kosúka. Toyebi ko boni? Mpo ete ezali Liloba ya biso te, kasi LILOBA YA YE, oyo Alobaki mpe Apesaki biso. Tozali na NGUYA MPE KONDIMA EBONGI BE KOLOBA YANGO.

 Kaka lokola esalaki Yesu mpo na Ye moko, Tozali koyeba etemelo na biso; soko tozali banani. Eloko bobele moko tosengeli kosala na bongo, ezali kozala na kondima na oyo ezali biso. Kozala na kondima na oyo LILOBA lilobi tozali! Na nsima Liloba ya Nzambe liyei kati na biso mpe limimonisi Yango mpenza; zambi tozali mondimi. Mpe mondimi nde “kondima ya Nzambe oyo ezali kosala kati na biso.” 

Mpe sikawa, tokómí bapakolami na Molimo yango moko; ba masiya bapakólámí, ba masiya ya mokolo ya nsuka, kongengisa lisekwa ya Yesu Klisto; kotalisa ete Akufi te, kasi na lolenge ya Molimo Mosanto, Azali kati na bato na Ye; kotambola kati na Mwasi na Ye ya libala, na likambo ya bolingo epai na Ye, kosopa kati na Ye, Ye moko. Bazali kokóma moko mpo ya Lipati ya libala; mpe bilembo yango moko, bilakamí na Nzambe yango moko, kati na Liloba yango moko, Azali kosala mamónisami yango moko.

 Eloko ezali te oyo etikali mpo na biso kosala kasi kondima Yango; mpe na bondimaká Ezali eloko oyo ekelaka Kondima Ebongí be. Boyoka yango lisusu, NA BONDIMÁKÁ EZALI ELOKO OYO EKELAKA KONDIMA EBONGI BE.

 Ezali nde na mosisá moko na nzóto na yo oyo ebétaka ntembe na Liloba moko: TE

Ondimaka Liloba nyoso: Iyo

Apesaki nde yo Emoniseli ya Etindá oyo: Iyo

Mwasi na libala kaka nde akozala na Emoniseli ya solo: Iyo

Boyebi ete bozali Mwasi na Ye ya libala: Iyo

Alobaki nde ete na bondimáká Liloba nyoso ekopesa bino Kondima Ebongi be: Iyo

NA BONGO BOZALI MWASI LILOBA KONDIMA EBONGI BE!!

 Oo Nkolo bongisa biso lokola liboso naino te lokola ezali biso koyangana elongo Mokolo mwa Lomingo koyoka Liloba na Yo.

Sungá biso ete tómitala lisusu te ata mbala moko biso moko, kasi bobele kondima Liloba na Yo Olobaki mpo na biso. Tomoni Bobéndami ya Misato na mosala mpe toyebi ezali kofanda kati na biso. Tosengeli tózala koloba mpe kondima Liloba na Yo.

 Toyebi Ozali koya noki mpo ya Mwasi Liloba na Yo abongi bé.

Ézala nini tosengeli na yango Tata, ÉZALA NINI TOSENGELI NA YANGO, toyebi Tokozua Yango.

Zambi Ezali Liloba na Yo lisilaki Yo koloba mpo ya biso.

Eloko ya kosala ezali te kasi kaka KONDIMA YANGO. Tondimi Tata, tondimi. Sikawa tika ete tosala likolo na LILOBA NA YO.

 Toyamboli kokwea na biso nyoso, masumu mpe mabe na biso. Tala biso na nzela ya Makila ya Mwana na Yo epai wapi tolongisami na nzela ya Ngolu mpe mawa na Yo.

Tika ete mbóngwáná ezala kati na Mwasi na Yo ya Libala lokola liboso naino te. Tika ete Ósopela biso Molimo na Yo mpe Ópesa biso nyoso tozali na yango bosenga.

 Mokoni akobika na mpasi nyoso. Mozóngi nsima akozongela Liloba. Mwasi na libala na Yo na mokili mobimba akomona nzela na Yo epesami mpo ya lelo mpe ya kondima.

 Soko ozali na moto te oyo akotiela yo maboko…mitiela maboko yo moko…ozali mondimi. Okómáki Liloba; okómi Liloba, wana eyambi yo Liloba.

 Yaka Nkolo Yesu, Mwasi na Yo ya Libala azali komilengela na bomitiáká na bozali ya Liloba na Yo, kotela. Tolingi komikembisa mpe kolatisama na Liloba na Yo.

 Yaka kopakola biso lokola naino libosó te Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola eteni moko ya Mwasi na Yo ya libala azali koyangana koyoka Yo koloba mpe komonisa biso lolenge ya kozua: Kondima Ebongi be 63-0825E.

Ndeko Joseph Branham

 Makomi ya kotanga libosó ya losambo:

St. Malako 11:22-26 / 16:15-18

St. Yoane 14: 12 / 15:7

Baebele 11:1 / 4:14
Yakobo 5:14

1Yoane 3:21