22-0529 KONDIMA EBONGI BE

Nsango: 63-0825E KONDIMA EBONGI BE

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi na Libala Kondima Ebongi Be,

Mbala moko lisusu, Nakuti yango ete ekoki te kotia na maloba Etinda oyo, Mokanda ya Bolingo ya Nzambe Ye moko, ekomami na Makila ma Ye, elobami na Mongongo mwa Ye, oyo elingi koloba mpo na biso. Eloko mosusu nyoso ezali na ntina te. Tolingi Ye longwa na bozindó na mitema na biso mpe Epesi biso Bolingo Bobongi be mpo na Ye. Eloko moko ekokoka te koninganisa biso longwa na Liloba yango. Ezali na eloko mosusu te na bomoi na biso soki kaka te koyoka Ye kozala na bondeko na biso pelamoko Moninga elongo na moninga.

Ezali kutu biso te, ezali Ye kobika kati na biso, komibianga Ye mpenza. Ezali bozindó kobianga bozindó. Bobele esengo ya kofina play mpe koyoka Nzambe kosalela mongongo ya moto koyebisa biso, tozali baponami na Ye. Koyebisa biso ete Alingaki biso liboso ya bozalisi ya mokili; mpo Ayebaki ete tokolinga Ye na oyo nyoso ezali kati na biso, mpe tokotikala sembo epai na Ye mpe na Liloba na Ye.

Nyoso oyo tozali na yango bosenga, Asilaki kopesa biso yango. Ezali na eloko ezangi te. Asalaki ete Liloba na Ye likomama na lolenge ya mokanda mpe Abatelaki yango nkóto na nkóto ya bilanga mpo akoka koyebisa biso Bolingo nyoso ezalaki na motema na Ye mpo na biso.

Na sima bolingo na Ye ekomi kutu monene mpo na biso wana eyebisaki Ye biso: “Nakoya kati na mosuni mbala moko lisusu mpe nakosolola na bino mbebu na litói ete kozanga kososola ezala te, kobulungana ezala te, bosenga ya ndimbola mpe te. Nakozua ntango na Ngai mpe Nakotalisa bino Bolingo na Ngai, mpe bokozala na makoki ya koyoka yango lisusu mpe lisusu mpe lisusu mbala mosusu. Nalingi ete boyeba, ete Tata azali kati na Ngai, Ngai nazali kati na bino, bino bozali kati na Ngai, tozali MOKO. Mosuni na bino ezali Mosuni na ngai, mikuwa na bino ezali Mokuwa na ngai, molimo na bino ezali Molimo na ngai.

Nakoyebisa bino nyoso oyo ezali kati na Motema na Ngai na polele monene. Nakokómisa yango polele na lolenge ete bokoyeba na ntembe te, Maloba makomaki mpe malobaki Ngai mazali mpo na bino, mpe makoki kokwea soki te.

Nakopesa bino Kondima Ebongi be, mpe Ekozala na Bokonzi likolo ya makambo manso. Ata monguna aloba nini, Ekokonza yango lokola bozali na Kondima Ebongi be kati na oyo Liloba na Ngai elobi ete bozali yango. Ezala eloko nini monguna azali komeka koyebisa bino, bozali kutu koyoka ye te. Matoi ma bino mazipami na makambo mosusu nyoso soki kaka te oyo Molimo na Ngai esili koyebisa bino. Esili kozwa lóngo na mitema na bino, mpe ezali na eloko moko te oyo ekosala ete boningana longwa na Yango.”

Kondima yango Ebongi be oyo tozali na yango na boyebaka ete Etinda oyo ezali Yango Elobi Nkolo, tozali kotia KONDIMA EBONGI BE yango moko mpo na elaka moko na moko Ayebisaki biso ete ezalaki ya biso kati na Liloba na Ye. Soko tozali bakoni mpe tozali na bosenga ya lobiko, ezali ya biso. Soko tozali na bosenga ya eloko ata nini, tokoki kozwa yango, mpo ete tosili kopakolama na Molimo na Ye. Tozali ba masiya na Ye bapakolámi ya mokolo ya suka, kotalisa lisekwa ya Yesu Klisto.

Ezali likambo ya bolingo lokola Azali komisopa Ye moko kati na biso. Tozali kokóma Moko elongo na Ye mpo na Elambo monene wana ya Libala. Molimo na Ye azali awa elongo na biso mpe kati na biso. Tozali na eloko moko kaka ya kosala, mpe yango nde kondima Yango, koyamba Yango.

Tozali motindami ya 7 ya Nzambe te, kasi tozali ban ana Ye mibali mpe basi. Maboko ma biso mazali Maboko ma Ye. Tondimaka ete oyo elobami likolo na bande ezali Oyo Elobi Nkolo. Ezali Liloba ya bomoi.

Mosakoli na Ye azali mobateli na biso. Wana ezali biso koyoka Liloba litiami na bande, tondimi Ezali Nzambe kosolola na biso alimá mbala moko. Tozali na Kondima Ebongi be na bondimaká yango.

Lokola ezali biso koyangana elongo na mokili mobimba koyoka Nzambe kosolola na biso na nzela ya mosakoli na Ye, kondima na biso ezali komata likolo mpe likoló lokola Nzambe azali koyeisa Mwasi na Ye ya Libala elongó zingazinga na Liloba na Ye lindimisami.

Lobi ekozala lokola mokolo mosusu moko te. Tokozwa Kondima na biso Ebongi be Apesi biso mpe tokosalela Yango likolo na eloko nse eloko tozali na yango bosenga, mpe tokoyamba yango lokola Likonzi na Móto ezali kosolola na nzela ya motindami na Ye moponami mpe koyebisa biso:

Boyebi nde oyo esili ngai kosalela bino? Bobiangi ngai, “mobateli na bino”; mpe bolobi malamu, mpamba te nazali bongo. Soko Ngai, mobateli na bino, natalisami na Yesu Klisto, ete Nazali kosala mosala na Ye, na  bongo bondima Liloba na ngai. Nabosalaka ekela oyo ya kondima, na botielaká bino maboko, Na kweisi makóno mpe mpasi oyo ezali kotungisa bino. Bondima yango, boye bokozwa bosenga na bino, ézala ata nini, mpo ete makambo nyoso ekoki epai na bango bakondima. Mpe ntango bozali kobondela, bondima ete bosili kozwa yango esengi bino. Mpe nandimi mpenza solo ete nazwi yango, mpe kati na motema na ngai nayambi lobiko ya moko na moko na bino, nayambi yango, ete esili kosalema. Nandimi yango, nandimi yango na nyoso oyo ezali kati na ngai.

Tondimi na nyoso oyo ezali kati na biso, Etinda oyo ezali Mongongo Na Nzambe, elobamaki, etiamaki na bande, ekokisamaki mpe ebatelamaki mpo na  mokolo oyo. Tondimi ete nyoso oyo tosengi, tokozwa yango, mpo ete Ezali OYO ELOBI NKOLO EZALI YA BISO.

Yaka komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, kozwa eloko nse eloko ozali na yango bosenga lokola tozali koyoka mosakoli na Nzambe koyebisa biso lolenge ya kozwa: Kondima Ebongi be 63-0825E.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga:

St. Malako 11:22-26 / 16:15-18

St. Yoane 14:12 / 15:7

Baebele 11:1 / 4:14

Yakobo 5: 14

1 Yoane 3: 21