23-1203 NDENGE NINI NAKOKI KOLONGA?

Nsango: 63-0825M NDENGE NINI NAKOKI KOLONGA?

BranhamTabernacle.org

Molingami Folólo ya Libeke,

 Boni mitema na biso mipumbwaki na esengo mokolo mwa Lomingo ntango toyokaki Nkolo na biso koloba mpe koyebisa biso nini ezali kosalema sikawa. Tozali kosangana elongo na Liloba mpe kokóma Moko elongo na Ye. Noki mpenza tokosangana na basanto baoyo bakendeki liboso na biso kozala Moko elongo na bango. Nsima tokozala biso nyoso elongo tosangani na Klisto lokola Moko mpo na Lipati ya Libala ya Mwana Mpate.

Esengo nini etondisaki bomoto na biso ntango Ayebisaki biso kokanisa ete nsima ya mwa ntango, na kobweta líso, mokili mokoyeba kútu te nini ezali koleka; kasi na pwasa mbala moko, tokomona libosó na miso na biso balingami na biso baoyo bakendeki liboso, mpe tokosangana na bango lisusu.

 Bozili nini oyo na etingia etondisi mitema na biso kokanisa ete nsima ya ntáka moké ya ntango, tokomona kotelema liboso na miso na biso, ba tata na biso, ba mama, bandeko mibali, bandeko basi, mibali, basi, bana, kútu ata mosakoli na biso. TOKOMONA BANGO KATI NA NZOTO!!

 Tokoyeba ndèle wana mpenza, yango Oyo; ntango ekoki, tokómi, ESILI.

Bosili boyóká kolamukisa na nzela ya Emoniseli!! Bobele kokanisa mpe kosolola na ntina na yango sasaipi, Nakoki koyoka bino kogánga, NKEMBO, ALELUYA, MASANZOLI NA NKOMBO NA NKOLO.

 Ntango nini oyo tozali na yango, kosala lipati likolo na mikanda oyo ya bolingo mitikamelaki biso. Mikanda ya bolingo tokoki kobimisa ntango sé ntango tolingi mpe kotanga yango lisusu na lisusu mpe lisusu.

Kaka yango te, KASI kútu MONENE KOLEKA, tokoki KOYOKA Nkolo na biso Ye moko koloba na nzela ya bibebú ya moto mpe koyebisa biso: “Nabombaki mikanda miye mia bolingo bobele mpo ya bino, Molingami na ngai ya motema. Nayebaki ntango ekoya wapi bolingaki kosengela koyoka ngai koyebisa bino boni Nalingi bino mpe ete bozali baoyo ya Ngai.”

 “Nalingaki koyebisa bino mokolo na mokolo ntango monguna abundisaka bino, ntango bozali koleka kati na momekano mpe bitumba na bino nyoso, BOZALI BAOYO YA NGAI. Nasili Nafuti motuya. Nasili kolonga ézala nini…oyokaki Ngai wa motema?

ÉZALA NINI ozali na Yango bosenga, Nasilaki kolonga mpo na yo, mpo ete Nalingi yo”.

 “Nayebaki yo liboso kútu mokili mózala. Ozalaki eteni na NGAI NDÈLE. Ozali kokanisa yango sasaipi te, kasi Nazali kosala yango. Kobosana te oyo Nayebisaki yo, ozali Mosuni ya Mosuni ya Ngai, Molimo ya Molimo na Ngai, Mokuwa ya Mokuwa ya Ngai”.

 “Ntango ekómi sikawa oyo Nazalaki koyebisa yo mpo na yango. Malózi makozala lisusu te, mimekano mpe bitumba lisusu te; mikolo miangó mileki. Sikawa ezali kaka biso nyoso elongo kati na Sekó na Sekó”.

 “Yiká mpiko. Kóbá kopúsa. Kotána ya mokolo yango ebelemi. Bwálé nyoso ozali koleka na yango mokolo na mokolo ezali bobele kobelemisa yo na Ngai koleka”.

 “Wana eloko ata nini eyei likolo na yo, mpe okómi na esiká ete okití na nsé koleka, olembi mpe olémwi na motema, mpe emonani lokola ete okoki kokóba libosó te, osengeli kobosana soki moke te, Nazali kaka wana mpenza elongó na yo. Liloba na Ngai lizali kobika kati na Yo. Ozali Liloba na Ngai.”

 “Nalobaki na yo, loba Liloba. Elóko se elóko ozali na yango bosenga, ntango ozali kobondela, ndimá ete okozwa Yango mpe okozala na Yango. Ekopesamela yo. Nasili Nalongaki yango mpo na yo”.

 Maloba maye malingi koloba nini epai na biso. Mazali kobatela biso mokolo na mokolo.

Etómbolaka Milimo ya biso mpe etiaka biso kati na bisika ya Likoló elongo na Ye. Tozali bobele kobika mpo ya Nzambe mpe Liloba na Ye. Tozali na ntina moko, nde Yesu Klisto. Libanda na yango, eloko mosusu ezali na ntina te.

 Tosimbi Emononeli.

Ezipelo ezongisami nsima mpe tozali komóna Ye, Liloba na Ye likómí mosuni, koloba na biso na nzela ya bibebu ya moto. Tozali na bolingo na Liloba oyo, Etindá oyo, Mongóngó wana.

 Yaka komibikisa na biso mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville mpe óbika likambo monene koleka na bomoi na yo. Óyoka boni okokí kolonga etumba moko na moko Satana azali kobwaka na nzela na yo. Tóndisá motema na yo na esengo mpe bosepeli koyeba ete ozali Mwasi na Libala ya Yesu Klisto.

 Ndeko Joseph Branham

63-0825M Ndenge nini Nakoki kolonga?

Emoniseli 3: 21-22