23-1126 Ntango Ya Kosangana Pe Elembo Na Yango

NSANGO: 63-0818 Ntango Ya Kosangana Pe Elembo Na Yango

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mosuni ya Mosuni na Ye, Liloba ya Liloba na Ye, Bomoi ya Bomoi na Ye, Molimo ya Molimo na Ye,

Baoyo ya ngai ya motuya Bandeko mibali mpe basi, botanga kaka liloba wana lisusu mpe lisusu. Botanga naino kaka oyo Nzambe Ye moko abiangi bino. Boni nde moto ata nani akokaki kokoma na maloba pamba ya moto ndimbola na yango epai na biso. Ekokoka te kolimbola. Soko tokokaki mpenza kosolola mpe kotia yango na mosala, na mitema ya biso nyoso, makanisi mpe milimo, nandimi mpenza solo ete Konetolama elingaki kosila kosalema.

 Likambo nini ezali ya kobanga? Likambo nini ezali ya komitungisa mpo na yango? Satana azali kobundisa biso, kobwakela biso makono, abundisaka mabanza na biso na ndenge nyoso ya makanisi mabe, kasi eloko moko ezali te oyo ekoki koyokisa biso mpasi. Eloko moko ekokaki nde koyokisa Yesu mpasi? Te. Na bongo eloko te ekokoka koyokisa biso mpasi. Aútaki kaka koloba: TOZALI MOSUNI NA YE, Liloba na Ye, Bomoi na Ye, Molimo na Ye.

Esengo mpe kosepela ya motindo nini oyo tozali na yango na mitema na biso wana tobandaka kobanza likolo na oyo azalaki koyebisa biso. Bimoniseli Nzambe azalaki komonisa epai na biso bande etóndi má, nsima ya bande etóndi má, nsima ya bande etóndi má. Molimo Mosanto azali kopunjwa-punjwa na kati na biso lokola Liziba monene ya Mai Peto. 

 Tobongisamaki koyoka mpe komona Yango. Tokokwea te mpe tokokoka kokwea te to kobungisama nzela. Tozali na nzela na biso kokutana na Motó na biso, Mosikoli na biso, Mobali na biso, Mokonzi na biso, Nkolo na biso, molingi na biso, Mobikisi na biso kati na Esika ya bokutani epesami!

Boyoka naino oyo lisusu: Litondi mobimba ya Bonzambe kati na nzóto efandi kati na BISO, Lingomba na Ye, bozali na bisika ya liboso. Nyoso Nzambe azalaki, Asopaki kati na Klisto; mpe nyoso Klisto Azalaki esopamaki kati na Lingomba; Biso, Mwasi na Ye ya libala. Ezali te eloko moko oyo ekosalema mokolo moko boye, ALOBAKI ETE EZALI  KOSALEMA SIKAWA MPENZA. 

 Okoki nde kobanza, útá na ebandeli mpenza ya ntango, Nzambe Atikalá kopesasekelé ya Libombami na Ye monene na moto moko te, kino lelo. Mpo na nini ko nde Asalaki bongo? Mpo ete Azalaki kozila koyebisa yango epai na BISO na mikolo oyo ya nsuka lokola Alakaki.  Azalaki kozila BISO. Ayebaki ete bobele bison de Baoyo bakokaki, mpe balingaki, KOSOSOLA YANGO MOBIMBA…NKEMBO!!!

 Aponaki biso kozala Mwasi na Ye ya Libala zambi Ayebaki ete tolingaki kokwea te. Tolingaki kotingama na Liloba yango ézala ata nini nyoso na bango basengelaki koloba na ntina na Yango. Tolingaki kotingama na Liloba yango mpe KAKA LILOBA yango! Tobongisamaki kotelema wana. Tozali bana baoyo totiami na bokonzi ya bana na nzela na Yesu Klisto.

Ezali kútu na mingi koleka. Boyoka na bokéngi…bomifina. Motó (Nzambe) mpe Nzóto (Biso) tokómí eloko moko. Ezali Nzambe komimónisa kati na BISO.

  • Nzambe na Lingomba na Ye bazali moko: “ Klisto kati na YO.”
  • Tozali Emoniseli Monene ya Nzambe.
  • Tozali kútu komema Nkómbo na Ye; Nkombo na Ye ezali Yesu, Mopakolami.
  • Tozali Nzóto ya Klisto epakolami. Tozali komonisa Nzambe lokola Nzóto wana esalaki.
  • Tozali Mwasi na Ye ya libala, tomemi zémi na Molimo na Ye.

Lingomba, kobota bana, bazui zémi; naMolimo na Ye komema Nkombo na Ye; komema Bomoi na Ye. Tozali na eyano ya Satana. Motó ezali awa. Klisto, Nkolo oyo asékwi, Azali awa na Nguya yango moko ya lisekwa na Ye oyo azaláká ndèle na yango, komimonisa Ye mpenza kati na biso, Mwasi na Ye ya libala Liloba lilobami.

 Nzambe azali sasaipi kosangisa Mwasi na Ye ya libala elongo. Azali kosangisa bango útá na mokili mobimba na nzela ya Liloba na Ye, eloko sé yoko ekoyéisa Mwasi ya libala elongó. Molimo Mosanto azali kokamba mpe koyanganisaMwasi na Ye ya libala. Kati na eleko moko na moko, mosakoli azalaki Molimo Mosanto mpo na mokolo na bango.

Bokanisa oyo. Wana ekolobaka bato ete totiaka lokumu mingi likolo na mwanje ya nsambo, motindami, bokanisa ete Nzambe Ye moko apesaki mokumba YA BA SEKELÉ NA YE NYOSO Azalaki na yango kati na Likanisi na Ye liboso kútu mokili mózala, epai ya motindami na Ye, mwanje ya nsambo. Nzambe Ye mpenza atieláki mobali oyo motema na 100%, na motindo ete atiaki Mwango na Ye monene ya ntango ya nsuka na maboko na ye. Apesi ye…BOYOKA, APESI YE Emoniseli ya ba sekelé na Ye nyoso epai ya mobali yango. Apesi na mobali yango Emoniseli ya makambo makomamáki kútu te. Alobaki ete eloko sé eloko ekoloba ye awa na mabelé ezalaki mpenza na litomba na lolenge ete eyokamáki na Lóla.

 Ntembe ezali te ete Nzambe atindaki mibali minene batondaki na Molimo Mosanto kati na mokili. Kasi moko na moko ya mibali yango, atá ko batondaki na Molimo Mosanto, bakoki kozala na libunga. Nzambe andimisá soki moké te oyo elobaki bango kozala Yango Elobi Nkolo, mpe ayebisaki yo óndima Liloba moko na moko.Ezalaki bobele na Moto moko oyo azalaki na bokonzi yango koúta na Nzambe, mwanje na Ye ya nsambo, motindami.

 Bokoki, mpe bosengelaki kozala na mobateli. Kasi soko mobateli yango azali koyebisa bino te ete MONGÓNGÓ YA NZAMBE likolo ya bande nde MONGÓNGÓ YA LITOMBA KOYOKA KOLEKA, mpe kotia yango LIBOSO na bino na boyokáká bande elongo na bino, bobele te ye koyebisa bino ete oyo nde mosakoli alobaki, bozali na mobateli moko mabe.

 Ézala ata nani azali kokamba bino, ata nde bokobeta tólo koloba ete ezali Molimo Mosanto, ekozala malamu koleka ézala kosangisa bino na Etindá oyo,  Mongóngó wana, lokola Ezali Mongóngó Bobele moko oyo ekokaki koloba: “NAZALI MONGÓNGÓ  YA NZAMBE EPAI NA BINO”.

Soko obongisamaki komona Yango, okomona Yango. Soko bongo te, okomona Yango soki moke te; obongisamaki te komona yango.

Tozali komona bikólo koyangana, tozali komona mokili kosangana, tozali komona mangomba kosangana. Tozali komona Mwasi ya libala kosangana, kosangana elongo na Liloba. Mpo na nini? Liloba nde Nzambe. Mpe lokola Liloba…Lokola Mobali ya libala (ezali Ye Liloba), mpe Mwasi ya libala (wana ezali ye moyoki ya Liloba), bayei elongo kati na Lisangá moko. Basangani lokola bolongani. Bomoni, bazali komilengele mpo ya makwéla, mpe ba—bakómí Moko. Liloba likómí yo, yo okomí Liloba. Yesu alobaki: “Na mokolo yango bokoyeba yango. Nyoso oyo Tata azali, Nazali, mpe nyoso ezali Ngai, bozali; mpe nyoso ezali bino Nazali. Na mokolo yango bokoyeba ete Nazali kati na Tata, Tata kati na Ngai, Ngai kati na bino, mpe bino kati na Ngai.”

 Nabiangi bino koya kosangana elongo na biso zingázingá ya Mongóngó ya Nzambe Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Ntango Mpe Elembo Ya Kosangana 63-0818

Ndeko Joseph Branham

 Makomi ya kotanga liboso ya losambo:

Njembo 86: 1-11

St. Matai 16: 1-3