23-1119 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

Nsango: 63-0728 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

BranhamTabernacle.org

Molingami Mbuma Ya Motema Ya Mosakoli,

 Bazali —baoyo babotameli Yo, na Molimo mpe na Liloba ya Solo.  Mpe nabondeli ete Opambola bango, Nkolo, mpe obatela bango makasi elongo na bokangami ya bolingo ya Klisto.

 Bomilengela, tokozala na mapamboli, Bipakweli mpe Emoniseli lokola naino libosó te.  Tokoki koyoka yango na bomoto na biso, eloko moko ebelemi kosalema.  Ntango ebelemi.  Tozali na esengo mingi mpe na nse ya bozili na etingia monene.  Mwasi ya libala longwa na mokili mobimba azali koyangana mpo na koyoka útá na kiti ya bokonzi ya Nzambe Liteya oyo ekomema biso na misándá ya sika, mpe ekotondisa, mpe etondisa, na nsima kotondisa biso lisusu na Molimo Mosanto na Ye.

 Likomi likokokisama.  Likebisi lipesami.  Kosambisama ebelemi.  Nkolo azali koya kobianga Mwasi na Ye ya Libala na Elambo na biso ya Libala.  Kobianga ya nsuka ebimi.  Boyei ya Nzambe bokómí.  AKOYA MPO YA BISO.

 Tozali Momboto na Ye mobongisamaki liboso oyo amoni Yango mpe andimi Yango.  Masumu ma biso mapanzáni, malongwí.  Mabwakámi na sabóni ya Makila ya Yesu Klisto, mpe masengeli kokanisama ata moke te.  Nzambe abosani yango NYOSO.  Totelemi lokola mwana mobali mpe mwana mwasi ya Nzambe, na Bozali ya Nzambe.  Tozali SIKAWA…tokozala te;  tozali SIKAWA bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.

 Toyebi eloko moko, LILOBA.  BA BANDE.  ETINDÁ OYO.  Bazali eloko moko.

 Mpe mbala moko, kaka mwa ntango eleki, ntango Otálisaki emononeli, mwa Eyanganelo awa, mpo ya kobomba Bilei, ete ntango ekoyá wapi nyonso oyo ekosengelama na yango… “Bomba Bilei oyo awa mpo na ntango  .

 Sikawa nde ntango.  Oyo nde “bilei”.  Biso nde bato yango.  Tozali na Emoniseli.

 Basusu bakoki kozanga komona litomba ya Lotómo ya bánde.  Biso te.  Ezali bomoi na biso, ezali nyoso mpo na biso.  Ezali koleka bomoi epai na biso.  Ntango tozali na motuna na likambo moko, tokendeke te kosenga moto alimbolela biso yango, to álukela biso yango.  Tosalaka kaka ndenge mwanje ya Nzambe alakisaki biso tósala soko tozangi kososola to tozali na motuna.

 Bosimbi yango?  Soko bosimbi te, bozonga na bande oyo.  Nayebi te ntango boni nakozala elongo na bino.  Bomikundolela, oyo ezali Solo,  OYO ELOBI NKOLO.  Ezali Solo.  Ezali Likomi.

 Soko bokati ntina te, bozonga na bande.

 Kosilika na biso te, ezali OYO ALOBAKI…BAKISA, oyo ezali SOLO YA YANGO ELOBI NKOLO.  Alobaki te eteni na Yango, ndambo na Yango, to ntango moto moko alimboli oyo ezali to ezali te Liloba lipakólami.  BA BANDE  IZALI YANGO ELOBI NKOLO.

 Okoki ntango mosusu kosimba Yango te, to kososola Yango te, to kozala na emoniseli na Yango epesameli naino yo te.  Kasi epai na biso, oyo nde  Azali koyebisa biso na nzela ya mosakoli na Ye.

 Oyebi ndenge oyebisaka mwasi na yo makambo, oyebi, elengé mwasi okobála.  Olingi ye mingi, oyebisaka ye kaka basekelé, mpe otelemisi ye pene na yo, mpe alingi yo mpe nyoso .  Oyebi ndenge ezalaka.

 Yango nde Nzambe, Klisto, azali kosala na Lingomba.  Bomoni?  Azali kotika Ye ayeba basekelé, kaka basekele.  Balingi oyo ya lokutá te;  Nalingi koloba Mwasi na Ye.

 Mpe tozali kaka kokótisa Yango nyonso. Oo, boniboni Mwasi ya libala azalaka na esengo na bosepeli liboso kaka ya bolóngani na ye.  Tokoki mpenza te kozala nye.  Tozali kotanga minuti….ba sekónde.  Azali kaka koyebisa biso mbala na mbala boniboni alingaka biso.

 Satana azali kokoba kobundisa biso lokola abundísá liboso naino te, kasi oyo azangi komibongisa mpo na yango, ezali ete sikawa TOYEBI tozali banani.  Ntembe ezali lisusu te, TOZALI LILOBA LILOBAMI.  Tokoki, mpe tozali, koloba Liloba.  Tozali na eyano ya Satana.  Nzambe Amindimisaki.  Nzambe amitálisaki.  Tozali Liloba na Ye ya bomoi mpe tozali koloba na bokonzi nyonso oyo  Apesi biso.

 Mpe Ye oyo awa lelo, kati na Liloba na Ye, komonisa eloko yango moko Asalaki kuna.  Mwasi yango akoki koyeba motó mosusu te.  Te, mobali.  Episkopo azali te, eloko mosusu te.  Ayebi Motó moko, yango Klisto, mpe Klisto azali Liloba.  Oo, oo!  Whew!  Nalingaka yango mingi.  Uh!  Iyo, mobali.

 Tozali ya Bokonzi moko, mpe Bokonzi yango nde Liloba ya Nzambe oyo ekómi Molimo mpe Bomoi na bomoi na biso moko.  Yango wana, tozali Liloba na Ye ya bomoi.

 Oyo mpenza elobi yango polele baninga na ngai, SOKO OZALI NA EMONISELI YA SOLO KONDIMA YANGO.

 Botala sikawa, toyangani elongo na nse ya Motó moko, na motindo yango moko, elilingi ya Yisalaele ya kala.  Sikawa bozali kosimba yango?  Lokola Yisalaele ya kala;  Nzambe moko, andimisamaki na nzela ya Likonzí ya Móto, mpe amimonisaki na nzela ya mosakoli moko, kozala Liloba.  Nzambe yango moko, Likonzí ya Móto yango moko, Lolenge yango moko;  Akoki te kobongola nzela na Ye.  Ebongi mpenza kwa …Kaka lokola ekoki kozala.

 Mosakoli…tika ézinda na kati. Nzambe moko, andimisami na Likonzí ya Móto , na nzela ya mosakoli , kozala Liloba mpo na mokolo wana, mpe Akoki kobongwana te.

 Nakokaki kokóba lisusu na lisusu, mpe tokokaki kosepela mpe kozala na bondeko likolo ya eteni ya Liloba nsima ya eteni ya Liloba;  mpe tokosala yango, útá na mokili mobimba Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami 63-0728.

 Ndeko.  Joseph Branham.

 Makomi ya kotánga liboso ya Liteya :

 St. Matai 16:15-17

 St. Luka Mokapo mwa 24

 St. Yoane 5:24 / 14:12

 1 Bakolinti Mokapo ya 2

 Baefese Mokapo 1

 Bakolose Mokapo 1

 Emoniseli 7:9-10