22-0508 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

Nsango: 63-0728 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

BranhamTabernacle.org

Balingami Mbuma Ya Motema na Ye,

Ezali lokumu lonene nazali na yango kati na mokili. Nkolo azali kolingisa ngai kotalisa Ye mpenza epai na bino, na ntina ete Akoka kosolola na bino alimá na nzela ya esalelo Aponaki liboso ya bozalisi ya mokili kosolola mpe komonisa bino Liloba na Ye nyoso.

Ezali kaka moto moko na Nzambe te, Ezali Nzambe Ye moko, Likonzi na Moto, Molimo Mosanto kosolola na yo alimá, mbebu na litoi, mpe tozali na lokumu mpe libakú malamu kobianga mosakoli na Ye moponami, MOBATELI NA BISO.

Kotungisama soko moke te soko oyo tozali koyoka ezali moto, makanisi na ye, lobanzo na ye, to ndimbola na ye ya Liloba. Ezali Nzambe Ye moko kosolola na biso YANGO ELOBI NKOLO.

Nayebi ete yango ezali kokangama bato na mongóngó, kasi biso tozali komela yango. Mpo ete Ezali eloko moko kaka oyo esilisaka mposa na biso mpe epesaka kimia na bomoto na biso. Ezali Maloba ya Bomoi na Seko. Epai na biso, Ezali Mongóngó ya Nzambe. Ezali Etinda ya ngonga. Na ntina wana, ezali Liloba, Mongóngó,  ba bande, TO ELOKO MOSUSU TE!

Toyanganisami elongo na nse ya Bokambami pelamoko Yisalaele ya kala. Nzambe moko, andimisami na Likonzi ya Móto, mpe Azali komimonisa Ye mpenza na nzela ya mosakoli na Ye ete Azali Liloba. Nzambe yango moko, Likonzi na Móto yango moko, ndenge moko lelo. Nzambe Akoki kobongola lolenge na Ye te. Manáka ma Ye makoki kobongwana te longwa na oyo Abandaki na yango, mpo ete Azangi suka mpe manáka ma Ye mpe makanisi ma Ye manso mabongi be.

Nde ntina tozali kati na kozila na etingia monene koyoka oyo Akomonisa biso Mokolo mwa Lomingo. Alobaki ete Atutaki yango nyoso nsuka na yango, na kati mpe na libanda na yango, mpe kutu Atalisaki yango na nzela ya Makomi mpe kati na molai ya ntango na yango kokitana, kino toyebi ete Etinda oyo ezali mpenza Solo. Miko mazali te.

 Kasi Mokolo mwa Lomingo, Molimo Mosanto Akosimba Liteya mpe kotia yango epai wapi ezali sasaipi. Akotonga Yango alimá epai wapi Ebandaki, mpe kotonga Yango bongo kino na eleko bebe. Tomela na biso kaka longwa na ndambo oyo Nzambe Akoyebisa mpe Akomonisa biso na nzela ya mobateli na biso na Mokolo mwa Lomingo:

Bozali mbuma ya motema nan gai, baoyo babotameli Nkolo na nzela na Molimo mpe na nzela na Liloba ya Solo. Nabondelaka kaka mpe Nasengaka Nkolo ete apambola bino mpe abatela bino bokangáni elongo na nzela na bikanganeli ya bolingo ya Klisto.

Nkolo atindaki ngai kobomba Bilei mpo na bino; ndunda malamu, oyo emonani sembesembe, awa na Eyanganelo oyo. Mpe lelo, bokozwa bande etondi na ebele na yango. Ekomonisa Yesu Klisto epai na bino na ngonga oyo tozali kobika kati na yango. Etinda oyo ekolendisa mpe ekokembisa bino. Ekopesa bino makasi kati na molimo mpo na mosala mozali liboso.

Tika nayebisa bino mbala moko lisusu lokola nayebi ete bolingi koyoka Yango. Bozali motango wana moponamaki mpe mobongisamaki liboso, baoyo kaka bakoyoka Yango. Bozali Mwasi na Libala oyo akokwea te kasi akosimba Liloba yango ezala bamosusu nyoso kati na mokili oyo bakoloba nini na ntina na Yango. Bozali Mwasi Liloba!

Nzambe amonisi epai na bino libombami monene oyo, mpe ezali Mbotama ya sika. Sasaipi azali koyanganisa bino elongo epai wapi emoniseli ezali kati na boyokani bobongi be. Nzambe kolimbola Yango na nzela na Liloba ya Ye na bikela byango byoko, makambo motindo moko masalaki Ye, kokomisa Liloba limónisama kati na bino..

Bokoka kobosana soko moke te, Molimo Mosanto, kaka, Azali Momonisi ya emoniseli ya Bonzambe ya Klisto, mpe azalaki bongo kati na bileko. Bokanisa, bileko binso! Liloba lya Nkolo liyaki epai na nani? Mosakoli, kaka.

Nazali koyeba ete Nazali kosolola na nkoto na nkoto likolo na bande, tozali na lotómo ya bande zingazinga na mokili. Mpe ezali komonana ete tokoki kosala bande moko awa oyo ezali mbala zomi malamu koleka epai esusu nyoso. Nazali kaka kolikia ete moto nyoso mobali to mwasi oyo akoyoka bande oyo akososola.

Sasaipi etali kaka bango soko balingi koyoka bande nse bande, kasi nalingi te ete bozanga oyo. Bino bato ya ba bande; kuna na ba zamba mpe esika nyoso wapi bozali koyoka Yango, sikawa boyoka.

Tozali na ba bande likolo na oyo tondimaka. Tozali na ba bande likolo na bokondé kati na lingomba, boniboni etambweli nab iso ezali kati na lingomba ya Nzambe, boni boni esengeli toya awa elongo mpe kofanda elongo na bisika bileki Likoló.

Nazali kolikia ete moto nyoso likolo na bande azali kosimba yango. Soko bokwei, bozonga na bande oyo lisusu, Nayebi te nakoumela na bino elongo lisusu ntango molai boni. Bokanisa, Oyo ezali Solo, ya YANGO ELOBI NKOLO. Ezali Likomi.

Motó mpe Nzoto ekomi eloko moko. Ezali Nzambe komimonisa kati na bino, bato na Ye. Nde ntina mobali mpe mwasi bazali lisusu babale te; bazali moko. Nzambe mpe Lingomba na Ye azali moko, “Klisto kati na yo,” Emoniseli monene ya Nzambe.

Ezali likanisi ya ngai te; Ezali Nguya na Ye, Ezali Liloba na Ye. Alakaki Yango; Yango oyo awa. Alobaki Ekozala awa, mpe Yango oyo. Bozali bana ba Nzambe. Ezali te ete bokozala; BOZALI SIKAWA!

Tondisa kopo na biso Nkolo, totomboli yango likolo Nkolo, yaka kosilisa mposa oyo ya bomoto na biso. Lipa ya Lola, leisa biso, na ndenge ete tozanga lisusu te. Tondisa kopo ya biso, tondisa yango mpe bikisa biso mobimba.

Ntango nini oyo ya kolamukisa tokozala na yango zingazinga na mokili awa tozali koyangana Mokolo mwa Lomingo koyoka: Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami 63-0728 na 12:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga

St. Matai 16:15-17

St. Luka Mokapo ya 24

St. Yoane 5:24 /14:12

1 Bakolinti Mokapo ya 2

Baefese Mokapo 1

Bakolose Mokapo 1