22-0515 Ntango Ya Kosangana Pe Elembo Na Yango

NSANGO: 63-0818 Ntango Ya Kosangana Pe Elembo Na Yango

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi ya Libala oyo aleki basusu banso,

Lokola tofandaki elongo kati na bisika ya Likolo utá na mokili mobimba Mokolo mwa Lomingo, tozalaki koyoka Mongongó bobele moko ya Nzambe endimisami. Lokola ntango nyoso, tozalaki kati na kozila na etingia monene koyaka oyo Azalaki na na yango koyebisa biso. Molimo Mosanto Akomonisa biso nini lelo?

Tokoki kozala toyoká Maloba na Ye mbala na mbala liboso, kasi toyebaki mokolo wana elingaki kokesene. Tokoyoka eloko moko oyo toyoka naino liboso te. Tokozwa kutu Emoniseli mingi ya koleka ndenge tokokaki kokanisa. Akokaki kofungola mitema na biso, makanisi na biso mpe bomoto na biso, mpe komonisa eloko moko oyo ezalaki SIKA AWA, na eleko na yango mpenza, ya komonisama.

Na sima Esalemi. Maloba manene koleka oyo Mobali na Libala akokaki kolobela mpe komonisa Mwasi na Ye ya Libala: “Bozali litondi mobimba ya Bozambe kati na nzoto, Oyo aleki bamosusu nyoso. Nyoso oyo ezalaki Ngai, Nasopaki yango kati na Klisto; nyoso Klisto azalaki, Nasopaki kati na BINO. BOZALI Mwasi na Libala na Ngai moponami oyo abongi be.”

Bomoto na biso nyoso epumbwaki na esengo. Tata autaki koyebisa biso, tozali Mwasi na Ye ya Libala. Tozali baoyo Alingi. Tomemi zemi na Liloba na Ye, mpe Liloba na Ye KAKA. Libumu na biso ekangami na eloko mosusu nyoso. Azilaki, mpe Atondaki na mposa mingi mpo na biso…MPO NA BISO!!

Mpe boyebi nini? Atikalá kotinda moto mosusu te koyebisa bisa Maloba maye, Ayaki mpe Abikaki kati na mosuni ya moto mbala moko lisusu, mpo Akokaki kosolala mbala moko alimá, mbebu na litoi, mpe KOYEBISA BISO: “Nalingi bino, Mwasi na Ngai ya Libala ya motema.”

Tolingaka koyemba, tolingaka bondeko, tolingaka koyangana elongo na bandimi, kasi oyo tolingaka na koleka ezali koyoka Mongóngó ya Nzambe; Yango Elobi Nkolo, kosolola na biso mbala moko alimá. Liteya moko na moko ezali mokanda ya biso kaka ya bolingo ETINDAMELI BISO. Atiaki Liloba moko na moko Alingaki koyebisa biso likolo na bande mpo ete tokoka komiyokela biso mpenza.

Akoyebisa mpe Akomonisa biso nini Mokolo ya Lomingo oyo lokola tozali koyangana? Ezali eleko nini?

Yisaya asololaki mpe alobaki: “Moseka akozwa zemi mpe akobota mwana mobali”, kasi ezwaki mbula 700 liboso ete eleko ya kokokisama na yango ekóma. Mokonzi Dawidi alobaki: “Batoboli makaka na ngai mpe matandu na ngai.” Alobaki lokola nde ezalaki makaka na ye mpe matandu na ye, kasi Ezalaki naino eleko mpo na yango kosalema te kino mbula 1000.

Nzambe Asololaki na nzela ya mosakoli na biso na mokolo na biso mpe alobaki makambo mingi ekokaki kosalema te kino lelo. Tozali komona bikólo mpe mokili kosangana lokola naino basanganá liboso te. Tokanisaki Komunisime ezalaki likambo ya kala mpe esilaki kobebisama, kasi sasaipi tozali komona ezali na bomoi mpenza mpe ezali esalelo na loboko ya Nzambe, lokola asakolaki mpe ayebisaki biso ete ezalaki bongo.

Mokili ekanisaki ete etumba ya kowelana kati na bikólo na bosaleláká bibuneli te esili, mpe ezali lisusu na etumba ya kobangisana na bibuneli ya kobebisa bomoi nyoso te. Kasi lelo, etumba yango ekomi likambo ya solo. Makambo nyoso etelemi na molongó kaka ndenge ayebisaki biso ete ekozala. Eleko yango oyo.

Mokolo mwa Lomingo, AKOLOBA NA BISO MBALA MOKO ALIMÁ LISUSU, mbebu na litói, mpe tokoyoka mokanda mosusu ya bolingo oyo elobamaki mpe ebatelamaki na ebombelo kaka mpo na biso koyoka. Akolobela biso mpe Akomonisa biso nini? Eleko nini oyo? Nini nde ezali kosalema?

Nzambe azali kosangisa Mwasi na Ye ya Libala. Azali koya elongo, longwa na Ebimelo ya moi mpe Elimwelo na moi, mpe Likolo na Ngelè ezali nan tango ya kosangana, mpe yango ezali kosalema sikawa mpenza. Azali kosangana mpo ya nini? Konetolama.

Etinda Oyo ezali kosala nini awa ezali biso koyoka Mongóngó na Nzambe longwa na mokili mobimba? Kosangisa Mwasi na Libala na Liloba. Liloba ezali Nzambe. Mobali na Libala azali Liloba. Mwasi na Libala azali moyoki ya Liloba yango, mpe tozali koya elongo kati na Lisangá. Tozali komilengela mpo na Lipati ya libala epai wapi tozali kokóma Moko elongo na Liloba.

Nyoso Tata azali, Nazali; mpe nyoso ezali Ngai, bozali; mpe nyoso ezali bino, Nazali. Na mokolo yango bokoyeba ete Nazali kati na Tata, Tata kati na Ngai, Ngai kati na bino, mpe bino kati na Ngai.” Bomoni? Na “mokolo wana.” Mokolo nini? Mokolo Oyo! Tomoni mabombami manene ma Nzambe mayebanaki te mazali komonisama. Oo, boni nalingaka yango!

Ntango yongo oyo. Eleko yango oyo. Mwasi ya Libala Amilengeli mpo ya Mobali ya Libala. Tozali koyoka wana ezali biso koyoka koganga ya katikati ya butu “Botala, Mobali na Libala azali koya!” Tozali mpenza nan tango ya suka.

Yaka kosangana na biso lokola tokosangana zingazinga na Liloba, Mokolo mwa Lomingo na 12:00 sima ya nzangá, ntango ya Jeffersonville, lokola tokoyoka Mongongó ya Nzambe koyebisa biso: Ntango Mpe Elembo Ya Kosangana 63-0818.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga

Nzembo 86:1-11

St. Matai 16: 1-3