22-0501 Nzambe Akobiangaka Moto Na Kosambisama Te Soko Akebisi Ye Liboso Te

Nsango: 63-0724 Nzambe Akobiangaka Moto Na Kosambisama Te Soko Akebisi Ye Liboso Te

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwa Nsuki, Eyenda monene, to ozala nani:

Tozali biso nyoso Nzoto ya Klisto, na esika etemi biso, kati na boyokani, na bomekáká kosala mosala mopusi malamu mpo na Ye ndenge tokokoka. Eloko mosusu ezali na ntina te mpo na biso, kaka Liloba na Ye, Etinda oyo.

Tolingaka na biso kaka koyoka mosakoli na Nzambe koyebisa biso: Ezali na eloko moko mpenza na ntina na bino bato mosusu. Bozali mpenza bato banene na bomoi na ngai. Ezali na eloko moko mosusu oyo ete nalingaka kaka kokutana na bino mpe kosolola kaka na bino”.

“Nazali kotala zingazinga kati na lotómo na ngai moke ya komisokisa; Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo, mpe libela, mpe nazali komona oyo Ezali kosala; kobenga mpe koyanganisa etonga ya Mwasi na Libala elongo. Ezali kobimisa Liyiká moko longwa na liyiká”.

Toyebi ete ezali moto te, ezali Liloba ya Nzambe oyo ezali koyeisa Mwasi na Ye ya Libala elongo. Makambo tozali komona kosalema ezali eloko moko na nse ya Nzambe te. Ezali lisusu ten a ntango mosusu bongo, ekoki kozala, ezali komonana ete ekoki kozala, EZALI NZAMBE!!

Tokomi na esika oyo ete Ezali Libanga ya motuya monene mpo na biso. Totangwi na eloko mosusu nyoso oyo moto ata nani mosusu azali kolobela biso oyo ekeseni na yango. Tozali kotala te oyo moto akokisi to azali koloba, totalaka nde na oyo Nzambe alobaki mpe oyo alakaki ete akosala na mokolo na biso, mpe tozali komona Ye kosala yango.

Yango nde Liloba na biso ya suka. Nyoso oyo tozali, nyoso oyo tozalaki, nyoso oyo tozali kolikia kozala, etiami likolo na Etinda oyo. Ezali koleka bomoi mpo na biso.

Lokola ata mbala moko liboso te kati na lisoló ya molongo, tozali komona Nzambe kopesa ekebiseli, kolengela mpo na kosambisama. Bombi ya atomiki ezali na mipepe, nyoso ebelemi.

Mbala oyo, ezali kaka te epai na mwa libóké moke ya bato, pelamoko ezalaki na mikolo ya Noa, to na mikolo ya Abalayama; ezali Nzambe kokebisa bato ya mokili, kosolola na nzela ya mosakoli na Ye, oyo ezali ekebiseli na bino ya suka.

Azali koyebisa biso: “Liboso ete nakoka kotika eloko oyo kokóma, nazali kopesa ebiangeli ya suka, kaka ndenge nasalelaki Sodoma, bobima kati na yango. Bobelema. Ezali na eloko moko ekokóma”.

Mokili ezali kotalela misala na bango minene ya zebi oyo esalemi; kosangisa-sangisa oyo ememi kufa kati na mabota. Bato na boyebi mpe na koyekola bazali kokende na ngambo mayele ya motó: UN, NATO, Lisanga ya Bikólo. Mokolo na mokolo tozali komona kosambisama kobelema pene mpe pene. Oyo mosakoli wana amonaki koya na mosika mpe ayebisaki biso ete ekozala kokóma, yango oyo ezali kosalema: Russia, Etumba, Pitoló, Vatican, Bayuda, Bombi ya Mimboto ya Mipepe.

`Komitunatuna ezali lisusu te soko nini nde ekokóma. Tozali komona yango kokokisama mokolo nyoso, mpe kobanga kati na mokili ezali solo mpe ezali koya monene mpe monene mokolo na mokolo.

Kasi kaka ndenge Asalaki na mikolo ya Hijikia, ntango Nzambe asololaki na nzela ya mosakoli na Ye mpe Akebisaki bato, “Bomilengela, mpo ete kosambisama ebelemi kokwea”. Mosakoli na Ye azalaki komema bato komilengela mpo na ntango oyo ezalaki koya.

Noa asalaki bato bamilengela mpo nan tango na ye. Ezalaki ebiangeli ya mawa liboso ya kosambisama. Nzambe azalaki na nzela oyo abongisaki, mosakoli kokamba bango.

Mpe Akotindaka ntango nyoso mosakoli na Ye, lolenge asalaki na ntango ya Noa. Asalaki eloko yango moko na na mikolo ya Noa. Na mikolo na Eliy-…ya Mose, tokuti ete Asalaki eloko yango moko. Atindelaki bango mosakoli na Ye, mpe bamitangolaki na kozanga kondima. Sasaipi, yango nde lolenge oyo ebimaka. Lolenge wana nde oyo bandimaka Yango.

Totangwi biso mpenza na kozanga kondima. Nzambe Azali na nzela oyo apesi mpo na Mwasi na Ye ya Libala lelo. Alakaki biso kati na Liloba na Ye, “Liboso ya kosambisama, Nakotindela bino mosakoli koyanganisa mwa Etonga na Ngai moke emisókisi, mpe nakofandisa bango na bopemi na ngambo moko, mpe bakozala na kimia, na bozilaká oyo ezali kozila mpe ekimelo”.

Tozali Etonga moke yango. Tozali baoyo Tata Alingi mpe tozali kozila na etingia monene Koya na Ye oyo ebelemi. Mokili ezali kopanzana bipai nyoso zingazinga na biso, kasi tozali na bopemi mpe na kimia.

Toyebi ete tozali kati na Mokano mwa Ye mobongi be. Ata tozwama wapi kati na mokili, Nzambe Azali na nzela moko abongisaki ete tokoki biso nyoso koyangana elongo zingazinga na Liloba na Ye, zingazinga na Mongongo na YE. Ezali nzela Nzambe apesi.

Mpe mosakoli oyo akambaki bango na nzela Nzambe apesaki. Sasaipi, yango nde nzela Nzambe asalaka makambo. Bomoni?

Yaka komibikisa longwa na kosambisama oyo ezali koya elongo na biso mpe koyoka: 63-0724 Nzambe Akobiangaka Moto Na Kosambisama Te Soko Akebisi Ye Liboso Te, Mokolo ya Lomingo oyo na 12:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville. Ezali Mongongo ya Nzambe kosololampe koyebisa biso: Oyo ezalinzela na Ngai epesami mpo na lelo.

Ndeko Joseph Branham

Yisaya 38:1-5

Amosa Mokapo ya 1