22-0424 Azali Mpo Na Yo, Ozali Mpo Na Ye?

Nsango: 63-0721 AZALI MPO NA YO. OZALI MPO NA YE?

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi ya Kobima,

Lokola bana na Baebele bazalaki koyangana na ntongo nyoso kozwa mana oyo epesamelaki bango na butu mobimba, mpo ya kosunga bango na mokolo elandaki, biso mpe tozali koyangana mpo na Mana ya Molimo oyo epesameli biso kosunga biso kati na mobembo.

Mwasi na Libala azali koyangana na boyokani ya kafukafu elongo na Nzambe, kino komonisama ya Mobali ya Libala ezali komonisama kati na Mwasi ya Libala. Tozali kotingama na Liloba moko na moko oyo elobamaki mpe tokómi Moko elongo na YE.

Bokesene ya bikólo esili kotonda maa. Atondi na bosoto. Natngo ekoki mpo ya esode na biso kokende na Mokili ya Elaká, na mboka na biso. Mwasi na Libala asili komilengela.

Lokola asalaki na esode na Ye ya liboso, na esode na Ye ya mibale, mpe sikawa na esode na Ye ya misato, Nzambe aponaki mpe atindelaki biso mosakoli na elembo ya Likolo monene ya Likonzi na Móto, ete bato basala libunga te, mpe tokokaki koyeba ete ezalaki oyo Ye aponaki mpo ya kokamba Mwasi na Ye ya Libala.

Oyo mosakoli na Ye alobaki ezalaki Yango Elobi Nkolo. Ezalaki Nzambe, kokita kati na Likonzi na Moto, kondimisa mpe komonisa Liloba na Ye. Likonzi na Móto yango epakolaki mosakoli na Ye mpe etelemaki lokola Motatoli ya Lola kokokisa ete azalaki ye oyo aponamaki mpo na kokamba Mwasi na Ye ya Libala na mokili ya Elaka.

Tozali kondima ete mangomba nyoso esengelaki ezala na boyokani elongo na nse ya Mongongo Oyo, mpe kokabwana te. Nini nde ezali kokabola biso? Ezali Langi ya mposo na biso te. Ezali te lolenge ya biloko tozali kolia. Ezali moto nde atangwi na nzela ya malakisi ya Nsango Malamu, moto moko na moko.

Ezali na NZELA MOKO kaka moko kolakisa nini ezali malamu mpe mabe. Nzela kaka moko okokoka kosala yango, ezali na bozangaka kotia ndimbola ata moko likolo na Liloba, kasi bobele kotanga yango mpe koyoka yango, mpe kondima Liloba moko na moko.

Kasi alobaki ete bazali kosala yango te mpo na zúwa, mpo na kokufa miso kati na molimo. Balingi komona te. Balingi koyoka Yango te.

Nzambe na Lola akotelema, mpe mongongo na ngai ekozala likolo na bande ya ntango monene ya Nzambe kuna na ngámbo, mpe ekokweisa libota oyo na mokolo ya suka.   Mpo ete, ezali—ezali likolo na bande, na sima ekozala bongo likolo ya bande ya Seko na Seko.

Ezali Nzambe Ye moko, oyo amonani kati na mosuni, na nzela na makila na Yesu Klisto, kobulisa bomoi moko ete akoka komilakisa Ye mpenza na nzela na yango, mpe lelo bazali kobakisa na ekulusu Liloba yango moko oyo emonani polele.

Mpe bongo tika ete baoyo bazali koyoka na nzela ya bande, tika ete bakoka koyoka na bokebi. Tika ete tokoka kozala na makoki ya kosimba oyo Molimo azali komeka komonisa biso.

TOSILI kosimba oyo Molimo azali komeka komonisa biso, mpe tozali kokende biso nyoso na Mokili ya Elaka. Moko na moko na biso! Ozala mama ya ndako, to ózala ata mwa mosali kaka ya ndako, to ózala mpaka ya mwasi to elenge mobali, to mpaka mobali, to ózala nani, tozali kokende biso nyoso, ata ndenge nini. Ezali ata na moko na biso te oyo akotikala. Biso nyoso tozali kokende!!!

Ekokoka soko moke ete ete Nzambe azanga kosimba Liloba na Ye epai na biso, soko biso tosimbi liloba na biso epai na Nzambe. Soko bino bondimi Yango mpenza mpenza, ezali na eloko moko te oyo ekosala ete obete Yango tembe. Ntango, mipepe, to eloko mosusu nini ekokoka kobetisa yo ntembe te.

Azali na biso mpenza na motema na ndenge ete Atindelaki biso mosakoli kokamba biso, baponami na Ye, na bopesáká biso nzela ya kokima. Azalaki mpo na biso kaka te kobimisa biso, Apesaki eloko moko na moko tozali na yango bosenga nan tango tozali na mobembo oyo. Alongaki monguna moko na moko mpo na biso. Azali kobikisa bison tango tozali na bokono. Atielaki biso kati na ebombelo Mana mabombamaki koleisa biso mokolo na mokolo; Alongi kutu kufa, nyoso oyo tosengeli kosala ezali kaka kozala sembo mpe kondima Yango.

Tobongisamaki mpo na Bomoi ya Seko. Tozali koyoka Yango mpe tozali kosepela na Yango. Ezali Kobondisama na yo. Ezali eloko oyo totondi na mposa na yango bomoi na biso mobimba. Ezali Libanga ya Motuya oyo tobwakisá makambo mosusu nyoso na ntina na yango. Tolingaka yango mpo ete ezali mokumba monene Nzambe Azali na yango na motema mpo na biso.

Ozali nde na bosenga ya ELOKO SOKO NINI? na molimo lokola na nzoto, to kaka kotambola penepene na Ye, to kotondisama-to-kotondisama lisusu na Molimo Mosanto? Yaka koyangana elongo na biso zingazinga na Liloba na Nzambe mpe nzela mpo na lelo mpe ozwa nyoso ozali na yango bosenga, SOKO OZALI MPO NA YE. Alakaki kotinda Yango, mpe Asali Yango! Alakaki Yango kati na Liloba na Ye, mpe Yango oyo awa! Azali mpo na yo, sikawa yo ndenge nini?

Ekozala na eloko moko na motema na yo ekoyebisa yo, “mitungisi na ngai esili. Nakozala malamu. Nakotondisama.  Nakozala penepene na Ye. Nazali Mwasi na Ye ya Libala.

Yaka komibakisa na biso Mokolo mwa Lomingo na 12:00 sima yannzanga, ntango ya Jeffersonville, wana tokoyoka: Azali Mpo Na Yo. Ozali Mpo Na Ye? 63-0721.

Ekozala lipati moko monene wana ekoyoka yo Ye koyebisa yo ete Azali mpo na yo, kati na moi soko na molili, Azali mpo na yo.

Ndeko Joseph Branham

St. Yoane 5:24 / 15:26

1 Petelo 5: 1-7

Baebele 4:1-4