23-0827 ELEMBO YA MOTOBA

Nsango: 63-0323 ELEMBO YA MOTOBA

BranhamTabernacle.org

Balingami Bato Ya Mosakoli Ya Nzambe,

Boyoka, Nasengeli bobele nayebisa bino. Ezali nde mpenza malamu mingi, ezali bobele kopela kati na motema na ngai. Nalikii ete bobosani yango te, bomoni. Botika Naloba oyo kati na Bozali na Ye. Na nzela na ngolu na Ye, Atikaki mpe ngai komona bato na ngai, kala mingi te, na bilamba mpembe. Longwa na Libongo na Monyele kino na Eloli, na mboka mobimba, tozali koyangana elongo. Tokeseni na ngonga ebele kati nan tango, kasi tozali elongo lokola bato ya mosakoli ya Nzambe. Tozali LISANGA MOKO.

Ntango mosakoli ya Nzambe azalaki awa na mabelé, esika monene ya koleka, mpe esika bobele moko Mwasi na libala alingaki kozala, ezalaki kozala kosangana elongo likolo ya ekanganeli ya telephone, na bozilaká koyoka Mongóngó yango koloba: “Mbote baninga.” 

Boni bakokaki kolinga kozala kofanda na eyanganelo wana na litumu ya balabala ya mwambe mpe balabala Penn. Bakokaki na nsai nyoso kolekisa butu na bisika ya kotemisa mituka kaka mpo na kozua efandelo, to kozala na makoki ya kotelema mpe kosékemela bitutu mpe na ngonga ebele. Bakokaki kosengela koteka nyoso bazalaki na yango, kobungisa mosala na bango, soko ekokaki kaka kozala na losambo yango moko.

Bomoi ya bango mobimba ezalaki kokakema likolo na Liloba moko na moko mosakoli wana alobaki. Balingaki te kozanga eloko moko. Atako bayebaki ete mokolo moko bakozala na makoki ya kozua bande, balingaki kosangana elongo na Mwasi na lilbala na ntango mpenza Nzambe alobaki na nzela ya bibebu ya moto.

Oyo ezalaki bomoi na bango. Oyo nde bazilaki mposo na mposo. Eloko moko te ezalaki na ndimbola epai na bango bobele koyoka Liteya likoya sima. Boni basepelaki wana eyebaki bango ete, SIKAWA, bazalaki na libaku lilamu komiyokela bango moko, nyoso na ntango moko, Liloba na Liloba, oyo mosakoli ya Nzambe mwanje na sambo alobaki.

Nzambe apesaki nzela.Alingaki Mwasi na Ye ya libala kosangana nzinga nzinga ya Mongóngó na Ye. Alingaki Mwasi na ye ya libala koyoka Mongóngó na Ye bango nyoso na ntango moko. Ayebaki Mongóngó na Ye molobamaki na nzela ya mwanje na Ye motindami ekozala bobele Mongóngó moko mokosangisa Mwasi na Ye ya libala.

Etando monene na Ye ezalaki kokokisama. 

Babateli longwa na Amerika mobimba bandimisamaki ete mangómbá na bango makangamaki elongo na nzela ya telefone. Basimbaki Emononeli ete ELOKO MOSUSU TE ezalaki na litomba koleka koyoka Mongóngó wana. 

Yango nde balakisaki biyanganelo ya bango. “Nzambe atindaki mosakoli na Yango Elobi Nkolo. Andimisamaki na nzela ya Likonzi ya Moto. Oyo ezali Mongóngó ya Nzambe epai na bino. Oyo nde Malaki ya 4, mpe Emoniseli 10:7. Azali moto Nzambe abiangaki kokamba Mwasi na Ye ya libala. Oyo nde mosakoli nasololaki na bino nyoso na ntina na ye. Sikawa tosengeli toyoka ye biso nyoso. Pela moko Yowane ya kala, nasengeli nakita mpe Akomata. 

Mwango ya Nzambe ezali kokoba kokokisama. Mwasi na libala azali NAINO kosangana zinga zinga ya Mongóngó na Ye. Kasi sikawa tozali kosangana LONGWA NA MOKILI MOBIMBA. Lomingo moko na moko, etini moko ya Mwasi na Ye ya libala ezali kozela na etingia monene koyoka Liloba moko moko, bango Nyoso na ntango moko.

Ntango mosusu toyoka Liteya yango mbala nkámá na nkámá liboso, kasi mbala oyo azali koyoka lokola nde MBALA YA LIBOSO. Toyebi ete tokozua Emoniseli MONENE KOLEKA ndele liboso. 


Ezali nae sika mosusu te tolingaka kozala. Eloko ya litomba koleka ezali te. Epai na biso, Oyo nde Yango. Oyo ezali mwango na Nzambe mpo na BISO. Mongongo oyo ezali kobianga, kosangisa mpe kobongisa be Mwasi na Ye ya libala…MPE TOZALI MWASI YANGO YA LIBALA. 

Nabiangi bino komibakisa na biso Lomingo loye, na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali kosangana mpe KOYOKA Mongóngó ya Nzambe lokola Azali komonisa biso: Elembo Ya Motoba 63-0323.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya boyoki Liteya:

Esode 10:21-23

Yisaya 13: 6-11

Danyele 12: 1-3

Matai 24:1-30

Matai 27:45

St. Yoane 10: 27

Emoniseli 6

Emoniseli 11: 3-6