23-0903 MITUNA MPE BIYANO LIKOLO YA BILEMBO

Nsango: 63-0324m MITUNA MPE BIYANO LIKOLO YA BILEMBO

BranhamTabernacle.org

Molingami Ndeko Branham,

Nandimi na motema na ngai mobimba ete ozali mwanje ya Nsambo motindami ya Nzambe oyo atindamaki kobianga Mwasi na Ye ya Libala kobima. Ozali Mongóngó ya Nzambe na Yango Elobi Nkolo epai ya mokili. Nandimi ete ozali ye oyo Aponaki komonisa mabombami nyoso ya Biblia epai na ye. Nandimi Liloba moko na moko olobi likolo na ba bande.

Nazali na motuna moko na motema na ngai nalingi natuna yo. Bato bazali mingi koleka, mingóngó mingi koleka, oyo balobaka makambo ndenge na ndenge na ntina na oyo esengeli na biso kosala mpo ya kozala Mwasi na libala ya Klisto. Nalingi nazala kati na Mokano na Ye mobongi be. Nalingi kozala na Kondima ebongi be. Natemeli moto moko te kasi nalingi koyoka  oyo olobi.

Nini nde ekoyeisa Mwasi na libala elongo mpe kopesa biso Kondima ya konetolama?

Nandimi ete, na nzela ya Nkáké Nsambo wana, ikomonisama na mikolo ya nsuka mpo ya koyeisa Mwasi na libala elongo mpo na kondima ya konetolama.

Ndeko Branham, Nkáké Nsambo oyo ikokani na mabombami nsambo isíli nde komonisama? Imónisamaki nde kati na Bilembo Nsambo, nzokande iyebani naino epai na biso te lokola Nkáké?

Te, imonisamaki kati ya Bilembo Nsambo; yango nde ezalaki ntina ya Nkáké. Izalaki mpo ya komonisa… Nkáké Nsambo oyo ingulúmáki na mingóngó na yango mpe moto moko te akokaki koyeba soko ezalaki nini…Yoane ayebaki oyo ezalaki yango, kasi apekisamaki kokoma yango. Alobaki: “Kasi mwanje ya nsambo, na mikolo ya boyulami na ye, mabombami nsambo ya Nkake Nsambo makomonisama.” Mpe mwanje ya nsambo azali motindami ya Eleko ya Nsambo ya Lingómba.

Nkembo na Nzambe. Nde eyano na ngai. Libombami ya Nkáké Nsambo limonisami. Ezali Mongóngó ya Nzambe likolo ya ba bande mpe ezali sasaipi kosangisa Mwasi ya libala elongo mpe kopesa biso KONDIMA YA KONETOLAMA, oyo tosengeli na yango.

Matondi, Ndeko Branham, mpo na koyanola motuna na ngai. Nayebaki ete eyano na motuna nazalaki na yango na motema na ngai ekozala likolo ya ba bande.

Nde nyoso nasengeli koyeba. Nakokoba Kofina Play mikolo nyoso mpe kozua kutu KONDIMA YA KONETOLAMA koleka. 

Boya kozua Kondima ya Konetolama elongo na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Mituna Mpe Biyano Likolo Ya Bilembo 63-0324M.

Ndeko Joseph Branham