22-0320 ELEMBO YA SAMBO

Nsango: 63-0324e ELEMBO YA SAMBO

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala oyo ya Sembo,

Mpe wana efungolaki Ye elembo ya sambo, kimia ezalaki na Lola penepene na ntáká ya ndambo ya ngonga.

  • Awa ezali Nkake Sambo konguluma mbala moko, na molongo mpenza: moko, mibale, misato, minei, mitano, motoba, sambo, motango yango ebongo be. Nkake Sambo na molongo, engulumaki, te…kosala kaka—kaka moko, mibale, misato, minei, mitano, motoba, sambo, alima. Na sima, Lola ekokaki kokoma yango te. Lola ekoki koyeba na ntina na yango te, eloko mosusu te, mpo ete eloko mosusu ya kokoba ezali te. Ezalaki ntango ya bopemi. Ezalaki mpenza monene, kino, Ebatelamaki libombami longwa na Banje.
  • Mpe ntango nkake sambo ilobaki na mingongo na yango, Nazalaki pene ya kokoma:…
    Ezalaki na eloko moko elobamaki. Ezalaki kaka makelele te. Eloko moko elobamaki. Abelemaki kokoma.
    …mpe Nayokaki mongongo kouta na likolo koloba na ngai,…
    Botala epai wapi mingongo ezalaki, Nkake. Na Lola te; likolo na mabelé! Nkake elobá na mingongo na yango longwa na Lola te. Elobaki longwa na mabelé.
  • Sambo, motango ya Nzambe ebongi be. Sambo kaka na molongo. Nkaké Sambo elobaki alima elongo, lokola nde ezalaki kotanga nkombo ya eloko moko.

Bosenga na motema na biso ezali kozala mwana mobali to mwana mwasi ya Nzambe ya solo. Kobelema mpo na Konetolama na Ye ezali koya noki. Na bongo esengeli na biso kosenga Nkolo: “Nini nde ekopesa Mwasi na Libala kondima ya Konetolama oyo ezali na yango bosenga”?

  • Nandimi ete, na nzela ya Nkaké yango Sambo, ekomonisama na mikolo ya nsuka na ntina ete ekoka koyanganisa Mwasi na Libala elongo mpo ya kondima ya konetolama.
  • Mpe Nkaké Sambo, bobele kati na emoniseli na Yesu Klisto, Ezali libombami. Biblia elobi te ete Oyo ezali “emoniseli ya Yesu Klisto”? Mpo na nini, Boye, ezali na libombami moko eyebani te na yango. Hum! Ezali Nini? Nkaké Sambo ezali na Yango. Mpo ete, Yoane azalaki mpenza abelemi kokoma, mpe Mongongo moko ekitaki longwa na Likolo, elobaki ete, “Koma Yango te. Kasi tia elembo na Yango. Kanga Yango na elembo. Tia Yango na mokongo ya Buku.” Ekosengela emonisama. Ezali mabombami.

Molimo Mosanto, na nzela ya lotomo, akomonisa epai na Mwasi na Ye ya Libala Emoniseli ya Nkaké Sambo oyo ekopesa bango kondima ya Konetolama?

  • Sasaipi motindami oyo ya Malaki ya 4 mpe Emoniseli 10:7 akosala makambo mibale. Moko: Kokokana na Malaki ya 4 akozongisa mitema ya bana epai na ba tata. Mibale: Akomonisa mabombami ya nkaké sambo kati na Emoniseli 10 oyo ezali bimoniseli bizwami kati na bilembo sambo.
  • Bilembo oyo ezali na sima ya Buku. “Mpe na ntango na koyula ya mwanje na sambo, mabombami nyoso oyo ekomami kati na Buku esili kokoka.” Mpe mbala moko Buku, oyo efungwamaki mpe ekomamaki, ekangami, “Mabombami na Nzambe esili.” Mpe oyo ezali mabombami ya Nzambe: kokende ya Lingomba, mpe makambo mosusu nyoso oyo. “Mabombami esili.” Ntango mwanje ya sambo wana ayuli mabombami nyoso, esili. Ezala ata nani, ezala ata nini. Liloba ya Nzambe ekoki kokwea te.

EZALI PETE NDENGE OYO:

Libombami na nzela ya Nkaké yango Sambo ekopesa Mwasi na Libala Kondima ya Konetolama. KAKA Nzambe, na nzela na mwanje na Ye ya Sambo motindami, ekomonisa NKAKE SAMBO epai na Mwasi na Libala.

Soko bokolinga ete Nkaké Sambo emonisamela bino, kopesa bino Kondima ya Konetolama, ezali na nzela mosusu te ya kozwa Emoniseli yango kaka kozwa Yango longwa na Mongongo ya Nzambe kaka oyo endimisami mpo na mokolo na biso; longwa na ngai te, longwa na mobateli na yo ya mboka na mboka te, mopalanganisi ya Sango malamu , to molakisi, kasi logwa na mobateli na Nzambe epai na mokili, na nzela ya KOFINA PLAY.

Boya koyoka mabombami nyoso komonisama; kozwa Kondima ya Konetolama mpe kotondisa miinda na bino na Mafuta, Mokolo na Lomingo na nzanga, ntango ya Jeffersonville, wana ezali biso koyoka Nzambe kosolola mpe komimonisa Ye moko mpe komemela biso; Elembo ya Sambo 63-0324E.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:

Dutelonome 29:16-19

I Mikonzi 12:25-30

Ezekiele 48:1-7, 23-29

Matai 24:31-32

Emoniseli 7

Emoniseli 8:1

Emoniseli 10:1-7

Emoniseli 14