All posts by admin5

20-0912 BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

Mokolo ya 12 septembre 2020

Balingami  Bameli-mai ya Libulu oyo Epunjaka,

Komela mai na Libulu oyo Epunjaka ezali kitoko mingi mpenza. Liloba ya pio, ya peto, ya pembe, oyo ezali kouta na Liziba na Mai na Bomoi, esika tokoki komela Yango ntango nyonso mitema na biso ezali na mposa na yango. Ayaki pe asilisaki mposa na mai ya milimo na biso, na mabele ekauki pe ezanga mai.

Ntango tozali na mitungisi ya ndenge na ndenge, tokoki komela mai. Ntango etumba ezali kokoma makasi, tokoki komela mai. Ntango tozali na bosenga ya lobiko na nzoto, tokoki komela mai. Ntango nyonso, bisika nyonso, tokoki kofina bouton ya koyoka liteya  pe tokoyoka Tata kolobela biso ete : Mbote, baninga, eloko nini bozali na bosenga na yango lelo, lobiko-na-nzoto? Bozali na bosenga ya koyeba solo-solo ete bozali bana na Ngai ya mibali pe basi oyo bapesami Lokumu-ya-bana? Bozali na bosenga ya kozwa eyano na motuna oyo bozali na yango na motema? To bolingi bobele kofanda na nsé ya epakolami ya Molimo Mosanto pe komela, komela, komela kino milimo na bino ekobondisama nye?

Liloba na Ye, Nsango Oyo, ezali kotia biso mbala moko liboso ya Molimo Mosanto. Ntango mosusu tosalaka makasi nyonso mpo na komeka kokota liboso na Bozali na Ye, kasi toyebi ete bobele na ngonga oyo  tozali kofina bouton ya koyoka liteya , tozali na nsé ya Epakolami ya Molimo Mosanto. Yango esili komonisamela biso, pe tondimi na bomoto na biso nyonso ete, Ezali Mongongo Na Nzambe nde ezali kolobela biso mbala moko longwa na bibebu ya moto oyo YE aponaki. Mpo na nini moto oyo azali na mayele nyonso akoki kolinga komela mai oyo euti na liziba mosusu?

Ntango toyokaka ba-bandes oyo, Ekendaka kino na ba-mboka ya bapakano, pe bisika nyonso na mokili, esika nyonso oyo bato bazali koyoka yango. Ezali kobenga moto nyonso oyo azali na bolembu, molimo nyonso oyo esili kobunga, nzoto nyonso oyo ezali kobéla, Momboto nyonso oyo esila kobongisama liboso, pe ezali kolobela bango ete:”Bokoki kozua eloko oyo bozali na bosenga na yango, soki bobeti ntembe te pe bondimi Liloba moko na moko, mpo Ezali ngai moto nazali koloba te, Ezali YE nde azali kosalela ngai mpo na kolobela bino.”

Bokanisa naino sikawa, soki bobikaki kalakala na bileko oyo eleki, na ntango ya yiki-yiki ya basakoli pe maloba bazalaki koloba, na ngambo nini bokokaki kolinga kozala, na eleko oyo wana?

Malamu, bosengeli kopona lolenge moko lelo oyo. Azali komibongisa mpo na kobota Liloba ebongi be esika wana, pe Liloba ezali koya mpo na Mwasi-na-libala Liloba. Lokola mwa—mwasi azali eteni ya mobali, oyo elongolamaki na ye, na boye, ekosengela na Lingomba kozala Lingomba oyo ezali koumela-na-Liloba, Liloba moko na moko ya Biblia; ba-systemes te, ba-dogmes te, to eloko moko oyo ebakisami na Yango. Ekosengela kozala na kati ya Liloba ya mongondo oyo ezangi mbindo, oyo ya peto.

Olingaki mpenza kosala nini na eleko oyo wana, olingaki kozua ngambo ya ba-systemes, ya ba-dogmes, na banganga-nzambe na bango, to olingaki kozala kati na baoyo batikalaki na Liloba oyo emonisamaki na eleko wana?

Alobaki ete tozali kotonga etutu te, tozali kotonga ndako. Mpo na kotonga ndako, bosengeli kotonga yango yengebene na mwango, soki bongo te, ndako na yo ekobeba. Mwango na biso ezali Liloba. Liloba na Nkolo eyaka na mosakoli na Ye, eyaka ata moke te na banganga-nzambe; Eyaka na basakoli. BOBELE mosakoli nde azali molimboli ya bonzambe ya Liloba Yango. Boye nani akotonga Ndako na Ye?

Esengeli ete mopakolami moko aya longwa na Lola, atindama awa na nse mpo na kosala yango. Ezalaka bongo, na eleko moko na moko.

Mbala moko lisusu, mokili, pe baponami na Ye, bazali koleka na mpasi ya kobota. Botala bobele makambo oyo Alobelaki biso ete ekosalema na mokili pe na Lingomba na Ye na eleko oyo. Tozali komona yango kokokisama na miso na biso. Na eleko moko na moko, Tata atindaki batindami na Ye: Polo, Irenée, Martin, Colomban, Luther, Wesley, pe na eleko na biso, William Branham. Elongo na motindami moko na moko, mokili, na lolenge ya nzoto pe ya molimo, ezalaki koyoka mpasi ya kobota.

Esengeli na mpasi, na mitungisi, pe na nkaka kasi sikawa mpasi ya kobota ya suka pe ntango ekomi pene. Tozali komona lolenge mokili ekomi, yiki-yiki kati na mabota. Tozali komona yiki-yiki oyo ezali likolo na Mwasi-na-libala na Ye mpo na kotikala na ba-bandes pe kondima Liloba moko na moko. Ezali mpasi, kasi Ezali kobotama ya Mwasi-na-libala na Ye. Konetolama ekomi pene.

Mbala moko lisusu, tokosangana na ngonga ya 13h00’, ngonga ya Jeffersonville, mpo na komela mai longwa na Liziba-na-mai oyo ezali Kopunja-punja, mpo na koyoka Liloba, wana Ye akolobela biso ete sikawa tozali koleka na  Mpasi ya Kobota ya suka, eteyami mokolo ya 24 janvier 1965.

Ndeko Joseph Branham

Elimbolami Uto Na
https://branham.org/articles/9112020_TheEaglesGatheringTogether

20-0906 Mabulu Matobwani

Nsango: 65-0123 Mabulu Matobwani

BranhamTabernacle.org
PDF
themessage.com/ln/sermonsdownload

BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

Mokolo ya 5 septembre 2020

Molingami Mwasi-na-libala Oyo atondi na nsai,

Nazali mpenza kozongisa matondi mpo tosengeli na biso komipesa na mayele na biso moko te, kasi tozali na makoki ya kofanda na bisika ya Likolo na bozali ya Molimo Mosanto mpo na komela mai longwa na Liziba na Bomoi na Ye oyo ekaukaka te. Ezali libulu na mai oyo ezali kopunja-punja na kati na biso kino na Bomoi na seko.

Ezali mpasi mpo na biso kososola ntina nini moto oyo azali na makoki ya komela mai ya Peto na Libulu ya peto akoki kosepela komela mai oyo euti na engongolo esalemi na moto, na nzela ya tuyau esalemi na moto, longwa na ebombelo esalemi na moto, na filtre oyo esalemi na moto likolo na yango, mpo na kopekisa ba-nyama ya minene kokota na kati, na ntango oyo ezali na Liziba ya komela moko oyo esili kotatolama ete ezali Mai na Peto oyo euti na ngwende na Nzambe.

Toyebi na Kotanga Liloba na Nsango-malamu ya Yoane ete,

“Na ebandeli Liloba ezalaki, pe Liloba ezalaki elongo na Nzambe, pe Liloba ezalaki Nzambe.” “Pe Liloba elataki nzoto, pe efandaki elongo na biso.”

Azalaki Motatoli ya Solo pe ya Sembo mpo na Liloba ya Seko ya Tata. Azalaki Mosakoli pe akokaki koloba bobele makambo oyo Tata alobaki ete Ye aloba. Alobaki,”Tata na Ngai azali na kati na Ngai.” Yango nde likambo Yesu Mongombo alobaki,”Tata na Ngai azali na kati na Ngai.”

Na Emoniseli, Liloba elobi na biso ete tobongola ata Liloba moko na yango te, lokola Ewa asalaki. Alobaki ete kosala yango ekomema lisumu pe kufa.

“Soki moto abakisi eloko moko na makambo oyo, Nzambe akobakisela ye malozi oyo ekomami na mokanda oyo; pe soki moto alongoli eloko moko na maloba ya mokanda ya lisakoli oyo, Nzambe akolongola eteni na ye na Buku na Bomoi pe na mboka mosanto, pe na makambo oyo ekomami na mokanda oyo.”

Mosakoli na biso alobelaki biso ete Liloba ba Nzambe ezali na bosenga ya ndimbola moko te. Nzambe alobaki Yango, Esengeli kosalema. Alimbolaka Liloba na Ye moko. Biblia elobi na biso ete Esengeli na ndimbola moko te. Ye alobaki:”Tika ete pole ezala,” pe pole ezalaki. Na sima Alobaki:”Mongondo akokumba zemi,” azwaki yango. Yango esengeli na ndimbola moko te. Na sima Alobaki:” Na mikolo ya suka, Nakosopa Molimo na Ngai likolo na nzoto nyonso”, pe Asalaki yango. Yango esengeli na ndimbola moko te.

Liloba elobi na biso lisusu ete na eleko moko na moko Nzambe atindaka mosakoli moko, pe mosakoli yango alobaka Liloba na Ye. Mosakoli yango azalaki Liloba mpo na eleko yango. Toyebi lisusu ete Liloba na Nzambe eyaka bobele na mosakoli na Ye pe mosakoli yango azali molimboli ya Liloba na bonzambe.

Na sima, mosakoli na Ye amonisaka Liloba yango na bato. Bato bandimaka Liloba moko na moko. Oyo wana ezali Nzambe na kati na mosala, Dieu azali kosala mosala na nzela ya Molimo na Ye.

Na boye, tozongela yango na bokuse:

• Nzambe azali Liloba.
• Nzambe alobaka Liloba na Ye mbala moko na mosakoli na Ye.
• Mosakoli alobaka Liloba na Nzambe, liloba na ye moko te, Liloba na Nzambe.
• Mosakoli amonisaka Liloba na Nzambe na bato.
• Liloba na Nzambe esengeli na ndimbola moko te.
• Bato bandimaka Yango.
• Ezali Nzambe na kati na mosala.

Na sima, soki ngai “NAFINI BOUTON YA KOBETA”, nakoyoka:

• Nzambe kolobela ngai mbala moko.
• Liloba na Ye.
• Elobami na nzela ya mosakoli na Ye.
• Yango esengeli na ndimbola moko te.

NKEMBO, tosili Kososola Emononeli.

Koyoka Nsango Oyo ezali nzela oyo esili kobongisama mpo na Mwasi-na-libala na Ye na eleko oyo. Yango esilaki kotiama na ba-bandes pe kobatelama mpo ete Mwasi-na-libala amela longwa na Libulu-na-mai ya Peto. Koyoka Nsango Oyo ezali kofanda na nse ya mosanda ya monene koleka nyonso, mpo ezali Liloba na Nzambe mpenza oyo elobami mbala moko na biso longwa na Nzambe.

Yango esengeli kozala mwango na Nzambe mpo na Mwasi-na-libala na Ye na mikolo oyo ya suka.

Tosangana elongo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville mpo na komela longwa na Liziba ya Bomoi Yango oyo Ekaukaka te wana Akolobela biso ete tosengeli ata moke te komela longwa na Mabulu Matobwani, oyo eteyami mokolo ya 23 janvier 1965; Ye asili kobongisa Mai na Peto longwa na Liziba na Ye.

Ndeko Joseph Branham

Euti Na:
https://branham.org/articles/942020_TheEaglesGatheringTogether

20-0830 Komipesa Na Mayele Na Yo Moko Te

Nsango: 65-0120 Komipesa Na Mayele Na Yo Moko Te

BranhamTabernacle.org
PDF
themessage.com/ln/sermonsdownload

BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

Mokanda ya mokolo ya 29 aout 2020

Balingami “Moko Na Bango”.

Eloko nini tozalaki kosala mokolo ya Lomingo eleki? Tosanganaki na ba-Ndako na biso ya ba-bandes, tozalaki kobondela biso nyonso na Nkombo na Ye. Tobatisamaki na Molimo Mosanto, ntango nguya ya Mongongo wana eyaki. Eloko oyo Asalaki mpo na bango na eleko wana, Asalaki ndenge moko mpo na biso. Tozali mpenza na esengo pe tokoki koloba ete TOZALI MOKO NA BANGO.

Bopemi nini oyo. Kimia nini oyo. Ekitiseli-motema nini oyo Mwasi-na-libala na Ye azali na yango ntango tozali koyoka Ye kolobela biso pe koyebisa biso ete tozali Mwasi-na-libala na Ye oyo Abongi be pe tozali na kati ya mokano mobongi be na Ye. Ezali na nzela mosusu te, ezali na mongongo mosusu te, ezali na nsango mosusu te oyo ekoki kobongisa be Mwasi-na-libala na Ye, bobele Mongongo na Ye oyo ezali koloba na nzela ya motindami na Ye ya eleko oyo asili kotatolama.

Bazangi-kondina. Baoyo bazali na emoniseli mobimba te, bakoloba:”Bozali kolobela moto mingi koleka, bopesa nkembo na Yesu.” TOZALI KOSALA YANGO, mpo tondimi ete ezali moto te oyo tozali koyoka, tozali pe kopesa nkembo na moto yango te, kasi ezali Yesu Klisto nde azali koloba na nzela ya motindami na Ye oyo atatolami, pe tozali kopesa YE nkembo nyonso. Asili komonisa biso ete ezali YE mbala moko lisusu, nde azali koloba na Mwasi-na-libala na Ye na nzela ya bibebu ya moto ndenge Alakaki ete Akosala.

Ezali esika wana nde tosalaka mabunga na mpokwa oyo. Tomekaka kozongisa nkembo nyonso, pe Klisto, mosika na eleko mosusu. Biblia elobi ete:”Azali motindo moko lobi, lelo pe libela-na-libela.” Azali mpenza na mobimba awa na ndako oyo, na mpokwa oyo, ndenge Azalaki kotambola na Galilaya to na Yelusaleme.

Ntango moto azali koteya pe koloba:”Bosengeli kondima maloba nyonso ya ba-bandes wana te, mosakoli asalaki mabunga, ye moko alobaki yango, pe tokoki kotalisa bino yango. Bokeseni ezali ntango Nzambe azalaki koloba na nzela na ye pe makanisi to mabanzo na ye moko.”

Ntango moto moko atelemi pe alobi ete azali mosali, mokengeli ya lingomba esika moko, pe azali kondima te ete Yesu Klisto azali motindo moko na likambo moko na moko (kozanga nzoto ya moto), motindo moko lobi, lelo, pe libela-na-libela, oyo wana azali momboto ya kozanga-boyokani.

Motindo moko na likambo moko na moko! Na sima, MOTO moko abanda kolobela bino ete mabunga ezali na makambo oyo ye alobaki, kasi na nguya pe epakolami ya Molimo Mosanto na nzela na ye, akoyebisa bino eloko nini ezali pe ezali te Liloba? MPO NA NGAI TE, AZALI TE. Mwanje na Nkolo alobaki na mosakoli na Ye: “Mema bato bandimela YO.” Pe tosalaka yango, Liloba moko na moko. Alobaki :

Na Nkombo na Yesu Klisto! Bobakisa eloko moko te. Bolongola te, bokotisa makanisi na bino moko kati na Yango te. Boloba bobele oyo elobami na ba-bandes yango. Bosala bobele mpenza makambo oyo Nkolo Nzambe asili kopesa bino mitindo ya kosala. Bobakisa eloko moko te na Yango.

Ntango Nzambe alobi Liloba, Azali na bosenga ya mobali moko te to mwasi moko te, to eloko mosusu te, mpo na koloba eloko nini Yango elingi koloba. Nzambe alingi koloba bobele likambo oyo Alobi ete Alingi koloba. Kasi bato baboyaka komipesa na oyo Liloba elobi, balingaka komipesa na mayele na bango moko. Balingaka komipesa na makambo oyo motei moko alobi, na esika ya komipesa na oyo Nzambe alobaki. Makomi elobi na biso ete bazipamaki miso.

Mosakoli alobaki na biso ete Makomi emizongelaka. Ndenge esalemaki na mikolo ya Sodoma na Gomola, ezali pe bongo lelo oyo. Ndenge esalemaki na mikolo oyo Yesu azalaki awa na mokili, ezali pe bongo lelo oyo. Ndenge esalemaki na mikolo oyo mosakoli na Ye azalaki awa, ezali pe bongo lelo oyo.

Ntango oyo Ndeko Branham azalaka na Tucson, Arizona, mibu misato mobimba, batei babengisaka ye ata mbala moko te ete aya koteya na biteyelo na bango. Mpo na nini? Alobaki ete basanganaka bango nyonso pe balobaki ete soki moto moko abengisi ngai koteya na eteyelo na ye, bakobengana motei yango na lisangana na bango.

Lelo oyo, ntango bozali koloba, na lipambo ete:
“Tozali Lingomba ya ba-bandes. Tozali kobenga mosakoli na Ye ete aya koloba na eteyelo ya losambo na biso mokolo na mokolo,” mokengeli wana na losambo wana bakobengana bango na lisangana na bango.

Kasi ntango kufa ekofandisa mongongo na ngai kimia, ba-bandes oyo ekokoba koyokana, pe bokososola ete makambo oyo nalobaki esili kokokisama.

Yango nde ntina oyo biso tondimelaka Mongongo oyo ezali na ba-bandes:

“Ba-mpate na Ngai bayebi Mongongo na Ngai. Mongongo na Ngai esili kotatolama mpo na bango ete ezali solo. Esili kotalisama polele ete ezali Mongongo na Ngai.” Sikawa_sikawa, botala malamu, bango bazali bato oyo bakoki kolanda mongongo mosusu te. Bakosala yango te.

“Ba-mpate na Ngai bayebi Mongongo na Ngai, pe bakolanda mopaya moko te.”

Bongo, tosangana elongo mokolo na Lomingo oyo na ngonga ya 13h00, ngongo ya Jeffersonville, mpo na koyoka Mongongo Yango kolobela biso:
Komipesa Na Mayele Na Yo Moko Te” , eteyamaki mokolo ya 20 janvier 1965

Ndeko Joseph Branham

20-0821 BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

Balingami Bapampolami,

Eloko nini esalemaki mokolo na Lomingo ntango tosanganaki biso nyonso elongo, mpo na koyoka Mongongo na Nzambe kolobela biso? Tondimaki kotielana maboko bamoko likolo na bamosusu. Na sima, Nzambe alobaki na nzela ya motindami na Ye ete:

Natelemeli zabolo. Satana, yo ozali bobele moto na lokuta monene, pe osili kotalisama polele bobele awa kati-kati na bato, na litatoli ya Makomi ya Yesu oyo azali na bomoi pe asili kosekwa. Napameli yo, na nzela na Nzambe na bomoi, bima na bato oyo pe tika bango kimia, mpo na nkembo na Nzambe.

Sikawa, lokola tosili kososola ete Liloba na Ye etalisamaki polele, pe ekokisaki mpenza makambo oyo Ye alobaki ete ekosalema, Satana atalisamaki polele, na sima topamelaki ye pe tobenganaki ye. Baoyo nyonso bandimi ete ezalaki Nzambe moto alobalelaki bango, babikisamaki.

TONDIMAKI, BOYE, BISO NYONSO TOBIKISAMAKI!!

Ezali na eloko moko te na nguya koleka Mongongo na Nzambe oyo ezali koloba Liloba na Ye. Kasi Ezali mpo na moto nyonso te, ezali bobele mpo na baoyo bazali kososola pe kondima ete Yesu Klisto azali motindo moko lobi, lelo pe libela-na-libela.

Eleki mibu 2000, soki okokaki kobika na eleko wana, pe okendeki na lingomba oyo Yesu azalaki koteya pe okendeki liboso na Ye pe olobaki:”Yesu, nazali na bosenga moko, yokela ngai mawa. Nayebi malamu nani Yo ozali, loba Liloba pe ngai nakozua eloko oyo nasengeli na yango.” Ntango Alingaki kobondela mpo na yo, motema na yo elingaki kotonda na esengo, mpo olingaki koyeba ete ezalaki na ELOKO MOKO TE oyo ekokaki kotelemela nzela ya libondeli na Ye.

Lelo oyo, Nzambe ASILI kobongisa nzela moko mpo ete biso tosala mpenza makambo yango. Losambo oyo tokoki kokende esika oyo Yesu Ye moko azali koloba. Bato mosusu bazali koyeba te ete ezali losambo, kasi ata bongo, ezali losambo.

Na mpokwa eleki, tosanganaki na nzela ya singa na bango nyonso na ekolo mobimba, ezalaki pene na 300 kilometres zinga-zinga, esika moko na ba-losambo na ngai ezalaki. —65-1127b – Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda na Mokano na Nzambe

Soki bolingi ete Yesu aloba na losambo na bino ya ndako to na losambo na bino, esika bino nyonso bokoki kosangana, nasengi na bino ete bomeka kobikela likambo oyo ete Elohim alobela bino mbala moko. Ezali mpasi te, FINA BOUTON YA KOBETA LITEYA.

Mokolo ya Lomingo oyo, Akolobela biso mbala moko lisusu pe Akomizipola liboso na biso, kotatola ete Azali Yesu Klisto mosekwi. Akolobela biso lisusu likolo na makambo oyo Zakai azalaki kokanisa mokolo wana ntango amataki likolo na nzete mpo na komona Yesu. Lolenge nini azalaki kopangusa bosoto oyo ekangamaki na elamba na ye ya sika pe lolenge nini azalaki na ba-nzube na mabolongo na ye pe bisika nyonso na maboko na ye. Lolenge nini afandaki wana mpo na kolongola yango, wana azalaki kozela ete ye oyo bazalaki kobenga mosakoli aleka wana. “Moto moko te akokoka komona ngai ntango Ye akoleka na nzela wana. Ntango Akokatisa na ngambo oyo, nakosimba lokasa monene oyo, mpo nakoka kotala pe komona Ye.”

Lolenge nini mokufi-miso Bartimée alekaki na mpongi pe akomaki sima na ntango na ntongo wana mpo butu mobimba azalaki kolota ndoto ete akokaki komona lisusu. Azalaki kobaluka-baluka na mbeto na ye mpo akanisaki ete akokaki komona, kasi na sima, amonaki ete ezalaki bobele ndoto.

Lolenge nini mama na ye Moyuda kitoko ya solo-solo azalaki kobenga ye na ngonga ya mibale na mpokwa ete:”Bartimée”. Azalaki kobima liboso ya ndako pe kofanda na kiti ya kominioloka, pe azalaki komema ye na maboko na ye mpo na kolobela ye masolo ya Biblia. Oh, azalaki mpenza kolinga masolo na ye ya Biblia.

Na ntongo wana, ntango afandaki wana likolo na libanga yango moko oyo Yahweh alongolaka na bitutu na mikolo ya Yoshua, azalaki kokanisa:”Bobele awa, na nzela moke oyo esika nafandi, basakoli minene na nguya Eliya na Elisa batambolaki loboko na loboko na nzela oyo moko. Soki nakokaki kozala na bomoi na eleko wana, pe nafandaki awa, nalingaki kopota mbangu epai na basakoli yango, kokweya elongi na nse, pe koloba:’Oh, mosakoli na Nzambe! Bondela mpo na ngai mpo Yahweh azongisela ngai komona na ngai.’”

Lolenge moko Nzambe abongisaki makambo mpo na Bartimée mokolo wana, na bongo pe Nzambe asili kobongisa makambo mpo na biso lelo oyo.

Mbala moko lisusu nalingi kosenga na bino ete bosangana na biso na suka ya mposo oyo. Nalaki ete ekozala lokola ezipeli oyo elongolami likolo na liziba-na-mai ya kopunja-punja, esika oyo mai ezali kopunja-punja; pe koleka ezali kopunja-punja, ezali kokoma malili koleka pe pio koleka.

Mokolo ya mposo na ntongo , tokoyoka liteya oyo: Yesu Azali Nani?__20 juin 1964, na ngonga oyo ezali malamu mpo na yo.

Na sima, mokolo ya Lomingo , tokosangana biso nyonso elongo na 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka liteya oyo: Nzambe Asili Kobongisa Mwana-na-Mpate_20 Juin 1964 na mpokwa

Eloko nini ekoki kosalema ntango tokosangana Liboso na Nzambe?

Ndeko Joseph Branham

Elimbolami Uta Na:
https://branham.org/en/articles/8212020_TheEaglesGatheringTogether

20-0819 BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

Molingami Mwasi-na-libala,

Mitema na biso etondaki mpenza na esengo, mokolo na Lomingo, ntango tosanganaki biso nyonso na ntina moko : koyeba malamu bozali ya Yesu Klisto kati kati na biso. Apesaki biso miso mpo tokoka komona, matoyi mpo tokoka koyoka, kasi oyo ya motuya koleka, Apesaki biso Emoniseli, mpo tokoka KONDIMA.

Ezali na eloko moko te ya monene koleka Emoniseli oyo Asili kopesa biso. Koyeba nani Ye azalaki, Nani Ye Azali, pe sikawa nani BISO TOZALI. Mwango na Ye ya monene esili kokokisama, Asili kozongisa Mwasi-na-libala na Ye na Liloba ya Ebandeli. BISO TOZALI Mwasi-na-libala Liloba Elobami Yango. NKEMBO!!

Ndenge nini tokoki kotalisa Ye boni likambo yango ezali na motuya mpo na biso ? Kobondela kino tokokoka kososola été tozali Liboso na Nzambe, na sima kolobela Ye boni likambo yango ezali na motuya mpo na biso.

Bino nyonso oyo bozali kotatola ete bozali Baklisto, bofanda kimia liboso na Ye. Kosukola bilamba ézala epekiseli mpo na bino te. Mosala ézala epekiseli mpo na bino te. Eloko moko te ézala epekiseli mpo na bino. Moto moko te àyeba eloko nini ozali kosala. Kende bobele liboso na Ye. Kende esika moko na zamba. Kende pembeni na nzela, Kende na esika ya kuku na ndako na yo pe kanga ekuke. Ntango bana bakei na kelasi, kende kofukama esika moko. Oyokaki mingongo ya ndenge na ndenge bisika nyonso, kasi kende kofukama pe tikala wana kino mingongo yango ekofanda kimia pe okobanda komata mosanda.  Ekobongola yo. Ekokomisa yo ndenge mosusu, lokola Esalaki na elenge Samuele oyo. Ekosala eloko moko mpo na yo, soki osali bobele yango. Sikawa, Ekokomisa yo oyo osengelaki kozala. Ekokomisa yo moklisto ya lolenge oyo osengeli kozala.

58-1005m – Koyoka Mongongo na Ye

Ndeko Joseph Branham

Elimbolami Uta Na:
https://branham.org/en/articles/8182020_TheEaglesGatheringTogether