22-0626 Ye Oyo Azali Kati Na Bino

Nsango: 63-1110E Ye Oyo Azali Kati Na Bino

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi na Libala Kondima Monene ya koleka,

Nayebi ete oyo ezali kaka mokanda moko ya petee na bokomi bolongobani te, kasi Nalingi mokili moyeba ete tondimi liloba moko na moko  mosakoli na biso alobaki mpe toyambi Yango ete ezali Oyo Elobi Nkolo. Ntango toyokaka ye koloba eloko moko likolo na bande, tondimaka Yango, toyambaka Yango, lokola Nzambe Ye moko azali kosolola na biso mbala moko.

Eteyamaki, mpe endimisamaki polele-polele na nzela na Liloba na Nzambe, ete ekokaki kozala moto te, esengelaki kozala Nzambe.

Tondimaka ete bilembo yango moko ya komonana saa bimonani likolo na mabelé lelo oyo bimononoki ntango Yesu azalaki awa. Likonzi ya Móto yango moko oyo Mosanto Paulo amonaki na lolenge yango moko, kosala eloko yango moko, eyaki na mokolo na biso. Ezali Nzambe kosolola na biso mbala moko:

Elembo yango moko ya molimo oyo ekokisaki Ye kozala Masiya, ekokisi Ye lelo. Azali naino kakaMasiya!

Okokoka koyamba mapamboli manene maye kaka SOKO ondimi ete Liloba moko na moko ezali Oyo Elobi Nkolo, na bofinaká play. Soko ozali moto moko oyo andimaka yango te, mpe esengeli ókána na boyekoli na yo to na nzela ya moto moko koyebisa yo: Oyo ezali Liloba ya Nkolo, mpe oyo ezali kaka Ndeko Branham nde azali kosolola,” na bongo oyo ezali mpo na yo te.

Na ntango Mose akambaki ban ana Yisalaele, ezalaki na moko, ezalaki Mose, bamosusu nyoso bazalaki kaka kolanda Etinda. Bomoni?

Kasi lelo, mpo na biso OYO TONDIMAKA YANGO LOLENGE WANA, mitema mia biso mitondi mpenza na esengo, mpe mizali kopunjwapunjwa, ezali mpasi mpo tokoka komipekisa.

Nazali koyoka ete Asikoli biso. Nazali koyoka ete nkombo na biso izali kati na Buku na Ye. Nandimaka ete tosikolami na Makila ya Mwana Mpate.

Mpo ete tondimi Etinda oyo ezali Mongóngó ya Nzambe kosolola na biso mbala moko, tondimaka ete ezali Nzambe Ye moko kosolola na biso mbebu na litoi. Ezali na NTEMBE TE nkombo na biso izali likolo na Buku na Ye.

Tika ete Natia yango motindo oyo, lotómo na Yesu Klisto lokómi mosuni kati na Lingomba na Ye na mokolo oyo ya nsuka. Yangon de mingi kati na biso bandimaka. Nandimaka yango elongo na bino.

Lolenge wana nde mpenza tondimaka yango, Yesu Klisto akomi mosuni lisusu, azali kosolola na Mwasi na Ye ya Libala likolo ya Bande.

Ntango nyoso tozali kofina play kondima na biso ezali komata na bisika ya likolo ya sika. Oyo ezali te kaka motei mosusu koteya, oyo ezali Nzambe Ye moko kosolola na biso. Tolingi na biso kaka 100% Liloba peto.

Natuna naino bino eloko moko. William Marrion Branham azali nde mobateli na bino? Azali nde mwanje nan sambo motindami ya Nzambe oyo andimisami? Bondimi ete oyo asengaki Nzambe asala, Nzambe asalaki? Bondimi ete azalaki Mongongo ya Nzambe mpo na mokolo oyo? Bondimaka liloba moko na moko lilobaki ye? Na bongo bokopambolama mbala moko lisusu na motindo moleki maloba mokolo mwa Lomingo.

Ezali na nzela mosusu te oyo okokoka koyamba lipamboli oyo kaka ozala koyoka ba bande mpe ondima ete oyo ozali koyoka ezali Oyo Elobi Nkolo. Esengeli ondima ete oyo ezali ye koloba ezali Nzambe kosolola na yo mbala moko.

Ngai, lokola mobateli na bino, ndeko na bino, na kondima oyo Nazali na yango, Nasengi Nzambe ete atia yango liko na bino. Nandimi ete Nazui oyo Nasengi. Sasaipi soko bokondima yango elongo na ngai; na kondima oyo Nazali na yango, Napesi na bino mpo na ngonga oyo.

Epai na biso, azali mobateli na biso. Ezali na moko te kati na mokili azali na kondima mingi, to monene na koleka, likolo ya MOBATELI NA BISO, mosakoli ya Nzambe. Sasaipi mosakoli ya Nzambe asengaki Nzambe ete Apesa biso KONDIMA NA YE MONENE. SOKO bondimi Yango na motema na bino mobimba, Ezali sasaipi KONDIMA YA BINO…NKEMBO, TONDIMI YANGO!!! Kondima na biso ekokaki kozala ya bolembu, kasi ezali lisusu bongo te, mpo ete sasaipi tozali na KONDIMA na ye.

Mpe sasaipi, kati na Nkombo na Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, boangana mpasi na bino, bokono na bino, mpe boloba na yango: “Osengeli kokende,” ‘mpo ete bozali na kondima na bino, kobakisa na kondima na ngai, elongo na nguya ya Yesu Klisto, oyo bozali na Ye beebe bozali awa kondimisa yango mpe kokokisa ete Azali awa, akobikisa bino nan tango oyo.

Nakoki nde koloba nini oyo ekosala ete oya komibakisa na biso mpe koyamba lipamboli monene oyo? Kanisa yango, eloko nse eloko ozali na yango bosenga, okoki kozua yango soko okoya koyoka mpe kondima Yango kaka.

Yaka koyoka mokolo mwa Lomingo na 12:00 Nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, elongo na Mwasi na Libala. Tokozala koyangana mpe koyoka longwa na Ebimelo ya ntango, na Elimwelo ya ntango, na Likolo mpe na Ngele, nyoso na ntango moko, wana Oyo Elobi Nkolo ezali kosolola na biso mpe koyebisa biso nyoso na ntina na: YE OYO AZALI KATI NA BINO 63-1110E.

Soko okokoka koyoka elongo na biso na ntango moko mokolo mwa Lomingo te, likambo te, fina play ntango nse ntango mpe yoka mpe ndima ete oyo ozali koyoka ezali Mongongo na Nzambe kosolola na yo.

Ndeko Joseph Branham