24-0114 Ye Oyo Azali Kati Na Bino

Nsango: 63-1110E Ye Oyo Azali Kati Na Bino

BranhamTabernacle.org

Balingami Bandimi Ya Kondima Ebongi Be, 

Mokolo moko na moko mitema mia biso mibetaka na lúkulúku ya likolo koleka. Tozali kozila ngonga ékoma ya Boyei na Ye ya noki. Nsómo nyoso elongwi. Komituna-tuna lisusu te, “Tozali nde Mwasi na Ye ya libala”? Etiamá lóngo kati na mitema mia biso lokola liboso naino te, TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA. 

Totombwami kati na mokili ya Likoló, koyoka lotómo ya Yesu Klisto, lomisali nzoto kati na Lingómba na Ye. Etindá oyo endimisami mpenza na mobimba na yango na nzela na Liloba na Nzambe, na motindo ete ekokaki kozala moto te, esengelaki kozala Nzambe kosolola mbebu na litói na Mwasi na Ye ya libala.

Tondimi ezali moto te nde azali koloba na biso likolo na bande iye, Ezali Nzambe.

Oyo nazali komeka koloba: “Meká soki moko te kobungisa kondima na yo.” Tika te Satana ayebisa yo mabe na ntina na ngai; zambi, ezali na mingi. Kasi óbatela kondima wana; mpamba te, soko osali yango te, ekosalema te. Kotala ngai te, lokola moto; nazali moto, natondi na míko. Kasi botala oyo nazali koloba na ntina na Ye. Ezali Ye. Ezali nde Ye.

 Osengeli ótia motema mpe óndima kati na oyo ALOBI, TO EKOSALEMA TE. Totalaka mosakoli na Nzambe lokola moto te, lokola ebelé bakanisaka ete tosalaka yango. Tozali nsima na ezipelo ya mosuni ya moto, mpe nyoso ekomonaka mpe ekoyokaka biso ezali Nzambe koloba na kati na bibebu ya moto, MPE KOTIA MOTEMA MPE KONDIMA LILOBA MOKO NA MOKO.

Yango nde Emoniseli ya Yesu Klisto mpo na lelo. Kondima ete ezali Nzambe, moto te, koloba likolo na ba bande. Soko ozangi yango, moninga na ngai, osili kozanga Etindá ya ngonga mpe okoki kozala Mwasi ya libala te.

Satana atiaka ndimbola na ye likolo na yango, mpe mbala 99% atangaka maloba ya Etindá kaka lokola asalaki epai na Ewa, kasi ye Ewa apesamaki motindo kotikala na Liloba; oyo Adama alobaki na ye ezali oyo Nzambe alobaki, ezali te oyo moto ata nani mosusu alobaki ete elingaki koloba. Asengelaki atikala na Mongóngó ya Nzambe. 

Oyo nde mokolo monene koleka mokili motikálá ndèle koyeba. Bomoi ya Yesu Klisto, oyo abikaki mpe Amimonisaki Ye mpenza kati na bomoi ya mosakoli na ye, ezali sikawa kobika na mosuni kati na BISO, Mwasi na Ye na libala.

Tozali kosala mpenza kaka oyo Apesaki biso motindo tosala: kotikala na Liloba na botikáláká na Mongóngó ya Nzambe likolo ya ba bande. Ezali lotómo mpe manáka ma Nzambe ya bande mpo ya lelo.

Soko mpenza ondimaka ete William Marrion Branham azalaki mwanje ya nsambo motindami aponamaki na Nzambe, ye oyo nzambe aponaki koloba mpe komonisa sekelé nyoso ibombamaki kati na Liloba, Mongóngó ya Nzambe epai na libota oyo, moto oyo azalaki na kondima lokola moto moko mosusu te, ye oyo mwanje na Nkolo alobaki na Ye “soko omemi bato kondima YO, eloko moko te ekotelema liboso ya mabondeli ma yo”, na bongo Lomingo loye lokozala mokolo ya bendabika lokola mosusu te.

Ezali na ELOKO MOKO TE ekokoka ndéle kolongola Emóniseli ya Etindá oyo longwá na biso, ELOKO TE. Tokoki SOKI MOKE TE kobete Yango ntembe. Soko alobaki Yango, tondimi Yango.Tokoki ntango mosusu kososola Yango nyoso te, kasi tondimi Yango atako bongo.

Yesu Ye moko ayebisaki biso “Ye Oyo azali kati na bino Azali monene koleka ye oyo azali kati na mokili.” Tika ete yango ézinda kati na mitema na biso. Molimo na Ye ezali kobika kati na biso. Tokoki nde kososola yango? Sasaipi mpenza, awa ezali yo kotanga mokanda moye, Molimo Mosanto, Nzambe Ye moko, Likonzi ya Móto, azali kobika mpe kofanda kati na biso? Toyebi boni ete ezali solo? NZAMBE ALOBAKI BONGO!!

Satana azili ntango nyoso koyebisa biso ete tozali nsuka mpenza ya kokweya. Mpe alobi solo, tozali bongo. Akaniselaka biso, ete tozali te epai wapi tosengelaki kozala kati na Liloba. Solo lisusu, tozali wana te. Tosalaka makambo toyebi tosengelaki kosala te. Limbisa biso, Nkolo, azali na elonga. 

Kasi atako na mabunga ma biso manso, bolembu na biso nyoso, kokweya na biso nyoso, ebongolaka likambo te, TOZALI MWASI YA LIBALA. TONDIMI LILOBA MOKO NA MOKO!

Tozali komitala biso mpenza te to eloko nini tokoki kosala, tozali nde libebi. Toyebi na biso kaka ete Aponi biso mpe Apesi biso Emóniseli ya Liloba na Ye mpe eloko moko te ekoki kolongola Emóniseli wana na biso. Emwangisami kati na motema mpe bomoto na biso.

Ayebisaki biso tosengeli kozala na KONDIMA EBONGI BE. Tosengeli na yango Nkolo, KONDIMA EBONGI BE kati na Liloba na Yo. Tozali na kondima kati na oyo mosakoli na Yo alobaki ete ezali Yango Elobi Nkolo. Ezali Liloba na ye te, kasi Liloba na Yo mpo na biso.

Mosakoli na Yo alobaki na biso ete nyoso ezali biso na yango bosenga, soko kaka tondimi, mpe tozali na kondima kati na Liloba na Yo, tokoki kozua eloko sé eloko tozali na yango bosenga. TONDIMI. 

Nkolo, nazali na bosenga. Nazali koya liboso na Yo na kondima nyoso nazali na yango kati na Liloba na Yo, mpo Ekoki kokweya te. Kasi lelo, Nkolo, nazali koya liboso na Yo kaka te na kondima na ngai, kasi na kondima opesaki na motindami na Yo ya nguya mwanje na nsambo.

E Nkolo Nzambe, nasengi na Yo oyokela biso mawa. Mpe tika ete mobali nyoso mpe mwasi nyoso azali kofanda awa sikawa, oyo azali na lolenge ata nini ya bokono to mpasi; mpe lokola Mose amibwakaki ye mpenza na katikati, mpo na bato, na mpokwa oyo nabimisi motema na ngai liboso na Yo, Nkolo. Mpe na kondima nyoso oyo nazali na yango, oyo ezali kati na yo, oyo Opesaki na ngai, napesi na bango.

Mpe nalobi boye: oyo nazali na yango, napesi yango na eyánganelo oyo! Na Nkombo na Yesu Klisto na Nasaléte, bóya bokono na yo, zambi ye oyo azali kati na yo Azali monene koleka zabolo oyo azali komeka kolongola bomoi na yo. Bozali bana na Nzambe. Bozali basikolami. 

Esili. Liloba na Ye likoki kokweya te. Eloko sé eloko tozali na yango bosenga, tokoki kozua. 

Yaka komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyamba lipamboli monene mpe kopakolama útá na Nzambe lokola etini ya Mwasi ya libala akoyangana longwa na mokili mobimba koyoka Mongóngó ya Nzambe kotia KONDIMA na Ye elongo na KONDIMA na biso.

Ndeko Joseph Branham

63-1110E Ye Oyo Azali Kati Na Bino