24-0121 Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto?

Nsango: 63-1124M Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto?

BranhamTabernacle.org

Balingami Balingi Ya Bande,

Tolingi Etinda oyo na motema na biso mobimba. Ezali elengi ya kokó ya Nzambe. Ezali Liloba ya Nzambe Lindimisami kati na mobimba na yango, mpe likokisami mbala na mbala. Etinda oyo ezali eyano na Liloba ya Nzambe. Ezali Klisto yango moko apakolami, Liloba lipakolami mpo na mokolo na biso. 

Tozali na Liloba lindimisami ya Nzambe awa, kondimisa, kokokisa na nzela ya Molimo, ete Ayambi biso mpe Apesi biso Libatisa ya Molimo Mosanto. Tobatisami kati na Nkombo ya Yesu Klisto. Nsango Malamu yango moko, bilembo biango mei, bikamwa biango mei, lotómo lango mei, ata Likonzi ya Moto yango moko polele liboso na biso, kotalisa bilembo mpe bikamwiseli. Ekimelo ezali te, esika ata moko. 

Ezali ntango ya lisanga elongo na Nzambe mpe Mwasi na Ye ya libala. Mwasi na libala ya Klisto asili abiangami. Totiami elembo kati na Bokonzi na Nzambe. Mekaniki izali awa bobele kozila Dinamiki oyo ekomema biso longwa na mabele oyo kokota na Nkembo, kati na Konetolama.

Dinamiki yango ezali litóndi na Molimo Mosanto. Libanga ya motó likokita mpe likosangana na Nzóto. Na mbisa, wana ekosila motó mpe Nzoto kosangana elongo, litondi na nguya ya Molimo Mosanto likotombola BISO likolo mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa kati na bozenga ya boyengebene na Ye mpe tokopumbwa na bitando ya likoló. 

Ngonga yango ezali kobelema noki. Ntango ekomi na nsuka. Mikano mia nsuka misengeli kozuama. Okosala nde nini na Liloba lipakolami ya mokolo  na biso? Otelemi wapi na Etindá ya ngonga oyo?

Okoloba kaka ete: “Nandimi Etindá. Nandimi Nzambe Atindaki mosakoli.” 

Yaka kaka te mosika kino awa, koloba: “Nandimi Etinda.”  Tósá nde motindiami. 

Soko osengeli KOTÓSÁ motindami: TALA, alobaki tósá motindami. Na bongo boni ezali na litomba kondima mpe koyoka Liloba moko na moko motindami yango alobaki? 

Okoloba: “Na bongo, nandimi Liloba moko na moko olobi, Ndeko Branham.” Ezali malamu, kasi yango ezali kaka-ezali kaka ete ozali na makokí ya kotanga.

Mpo na nini bato bakoki kosepela na ba bande te?

Moto nyoso akoki kozala mosakoli te. Ezali na mosakoli bobele moko, mpe Liloba likoyaka epai na mosakoli yango. 

Lingómba lisalaki malamu kino babandaki kobete Yango ntembe; to balingaki mingóngó mikeseni miyebisa bango, mpe milimbwela bango, oyo mosakoli yango alobaki. Balingaki Kola mpe Datana ya mikolo oyo. 

Bomoni, ebandaki na bobébisi bobele moké ya Liloba, mpe, eloko yango moko, ezali kosuka na lolenge yango moko.

Soko ebandaki na, mpe ekosuka na, bobele bobebisi moke ya Liloba, sóló mpenza oyebi boni OSENGELI kotikala na ba bande. Solo mpenza omoni mpo na nini Nzambe Alingaki ete Etinda oyo etiama na ba bande mpe ebonbama mpo na Mwasi na libala.

Nazali koloba makambo maye te mpo na kokitisa babateli na bino, to koloba ete oyoka mobateli na yo te, TE, kasi kotalisa yo litomba ya bofini Play mpe boyoki Etinda oyo likolo ya bande. 

Boni Lingómba lisengeli kotalatala yango lisusu, mpe lisusu, mpe lisusu, mpe lisusu! Tozali kozila Boyei na Ye. Tozali kotambola, tozali kozila kolongwa.  Epusi malamu na biso kotalataka yango na Liloba,  te na oyo moto soko nani alobaki. Ndimisama ete oyebi, yo moko, lokola likambo obiki mpenza elongo na Klisto. Talatala yango lisusu, mpe lisusu, mpe lisusu. 

ALOBAKI nini? Tosengeli totala-tala yango na Liloba lisusu, mpe lisusu, mpe lisusu. Okotala-tala yango na Liloba boni? Liloba ya lelo nde nini? Yango moko oyo ezalaki longwa na ebandeli, Biblia. 

Nzambe alobi ete nani nde molimboli ya Liloba na Ye? Ngai? Mobateli na yo? TE. Mosakoli andimisami ya Nzambe ya ngonga oyo nde molimboli bobele moko ya Liloba. Na boye, osengeli kotala-tala Lilloba moko na moko moto ata nani alobi lisusu, mpe lisusu, mpe lisusu na BA BANDE!

Soko Liloba yango ezali solo, mpe ondimi ete eloko bobele moko ya litomba koleka oyo moto ata nani, to mobateli ata nani akoki kosala, ezali KOFINA PLAY. 

Na bongo mpo na nini ko ezali mpasi mpo na moto ata nani oyo alobaka  ete andimi Etinda koloba yango? Zambi bandimi na bango Yango kaka te.

Mokano na YO ya nsuka ezali nini? Mpo na ngai mpe ndako na ngai, tokotikala elongo na Etindá oyo mpe motindami ya Nzambe, BA BANDE. Tondimi ezali na eloko mosusu te ya litomba koleka boyoki ya Mongóngó ya Nzambe likolo na ba bande.

  • Ezali na Mongóngó bobele MOKO Yango Elobi Nkolo.
  • Ezali na Mongónogó bobele MOKO Likonzi ya Móto yango lindimisami.
  • Ezali na bobele MOKO mwanje na nsambo motindami. 
  • Ezali na bobele MOKO Mongóngó Mwasi na libala akoki koyokana likolo na yango.
  • Ezali na bobele MOKO Mongóngó na Nzambe epai na libota oyo.

Soko ozali na Emoniseli yango moko, yaka komibakisa na ngai mpe liboké moke ya bandimi na mokili mobimba baoyo bandimi eloko yango moko, mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka mpe kozua mokano mwa biso mwa nsuka: Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto? 63-1124M.

Ndeko Joseph Branham