24-0128 NDENGE MISATO YA BANDIMI

Nsango: 63-1124E NDENGE MISATO YA BANDIMI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mondimi, .

 Ezali kitoko boni koloba, NAZALI MODIMI.  Na kati ya endimeli moko te;  Liloba!  Na ebongiseli moko te;  Liloba!  Oyo moto mosusu alobi te;  kasi oyo Liloba elobi!

 Tobeteke ntembe na eloko moko te, tondimaka Yango bobele kondima.  Ata Éyókana lolenge nini to nini moto ata nani mosusu ásengela koloba na ntina na Yango, tozali mondimi ya solo.  Tozali na emoniseli ya molimo ya Liloba.

 Tomoni ngonga tozali kobika kati na yango. Tomoni Etindá ya ngonga. Tomoni motindami ya ngonga.  Tomoni Nzambe komimonisa kati na Liloba na Ye.  Tomoni eloko mosusu ezali te kasi bobele Etindá Oyo, motindami Oyo, Liloba Oyo.

 Mondimi ya solo ayokaka eloko mosusu te kaka Liloba.  Nsuka wana.  Atálaka Liloba.  Alukaka bikweli te.  Alukaka mindondó te.  Andimi Nzambe, mpe ekáti likambo, mpe akóbaka na ye kaka libosó.  Bomoni?  Wana nde mondimi.

 Tokoki koyoka eloko mosusu te kaka Liloba;  Liloba oyo eyaka kaka epai ya mosakoli.  Bikweli te, ndimbola ya moto moko te, Liloba Peto lilobámáki mpe litiamáki na ba bande mpo na Mwasi ya Libala.

 Molimo ayeisi Liloba yango na bomoi na kati na biso mpe akómi na bomoi.  Na nzela ya kondima tomoni Yango mpe tondimi Yango.  Ekoya makelele moko útá na Lola oyo ekomema libatisi ya Molimo Mosanto ya lolenge wana kati ya Mwasi ya libala, ete ekolongola biso na mabelé, kati na Ngolu ya Konétolama.  Nzambe alakaki yango.

 Tozali kotiama na emekeli ntango nyonso, mikolo nyonso.  Satana amekaka koyebisa biso ete bomekami mpe bitumba na biso ezali nde Nzambe kotúmbola biso.  Kasi LOKUMU EZALA EPAI NA NZAMBE, ezali bongo te, ezali nde Satana kosala yango mpe Nzambe kolingisa yango.

 Nzambe azali kopesa biso komipekisa, mpe koyema biso ámóna tokosala nini.  Momekano eyáka koningisa biso, kotia biso na nsé mpenza, komona soko tokotelema wapi.  Kasi tolongaka etumba moko na moko, mpo tozali ndakisa ya bomoi;  Liloba ya Nzambe ezali kobika kati na biso mpe na nzela na biso.

 Boni tozali na litombá na miso na Ye?

 Moto moko te akoki kozwa esika na yo, ézala moke lolenge nini.  Olobi, “Nazali kaka mama ya ndako.”  Moto moko te akoki kozwa esika na yo.  Nzambe, kati na nkita na Ye monene, atandaki ézala bongo, Nzoto ya Klisto, na molongó, kino moto moko te akoki kozwa esika na yo.

 Yango ezali bikamwa boni?  Moko na moko na biso azali na esika.  Moko na moko na biso azalaki awa ntango Nzambe alobaki ete mokili mózala.  Atiaki  nzoto na biso awa kaka na ntango wana.  Nzambe atii biso awa na mabelé na ntango oyo kokokisa Liloba na Ye mpe kopesa biso Bomoi ya Seko.

 Moto nyonso asengeli kozua mokáno.  Otelemi wapi likolo ya Liloba oyo, Etindá oyo, motindami oyo?  Boni ezali na litómbá koyoka Liloba lilobami likoló ya ba bande?

 Na bisika nyoso bekeseni ya mokili, bande izali kozunguluka, na nzela ya ntómo ya ba bande.   

 Ezali lotómo ya bande lotindámi utá na Nzambe epai ya Mwasi na Ye ya libala na mokili mobimba.  Ezali koyebisa yo mpenza esika ozali, nani ozali, mpe soko ozali mondimi kati ya Liloba.

 Ozali kati na moko ya mabóké másato. Na motindo na yo ya eleko beébeé sikawa mpenza, motindo beébeé ya likanisi, ete, yo awa kati na litongi oyo ya bayóki awa bazali komonana, mpe yo oyo okozala na litongi ya bayóki bakoki komónana te ya bande oyo,  motindo ya makanisi na yo sikawa nsima ya boyóki bande oyo, eyebisi yo ozali na libóké nini.

 Nsima ya koyoka bande oyo, etálisi soko ozali kati ya libóké nini ya bato. Boko bandimi ete ozali na bosenga kaka te ya Liloba Péto lilobamáki likolo ya ba bande. Boko bandimi ete mikolo ya Etindá ya moto moko misilá koleka, osengeli koyoka mobateli na yo soko boye te obúngí.

 Bokabwani monene koleka kati na Etindá lelo ezali litómbá litiami likoló na boyóki ba bande.  Basusu bateyaka ete ezali mabe koyokisa ba bande na kati ya losambo;  kaka mobateli nde asengeli koteya.  Basusu balobaka ete kati-káti ezali, kasi koyokisa ba bande kati ya losambo ata moké te, to soko basali yango ezali mpenza kaka mbala moko- moko.

 Na mabanza ebele boye, makanisi ebele, ndimbola ebele boye ya Liloba, nani azali na solo?  Osengeli kondima nani?  Nde motuna moko moko na biso asengeli komituna.

 Mosakoli ayebisaki biso totála-tala yango na LILOBA, kasi te oyo moto ata nani alobi.  Okosala yango boni?  Ezali kaka na NZELA MOKO ya kosala yango, KOFINA PLAY.

 Esengeli kozala na eyano malamu moko, nzela malamu moko.  Moto na moto asengeli kozwa mokano mpo na ye moko.  Lomingo loye lokokata likambo na ntango ekoya mpo na nyoso baoyo bakoyoka Liteya oyo.

 Eloko moko osengelaki komituna: Nani nde moto sé moko oyo azali na yango Elobi Nkolo?  Likonzí ya Móto lindimisáki nani?  Nani akotalisa biso epai na Yesu?  Nani alobaki Liloba lizangi kokwea?  Maloba ya nani malobamáki na mabelé mazalaki mpenza na litómbá, kino mayókamáki kati na likoló?

 Soko olingi kozala na biyano bilámu, nalingi kobianga yo oya koyoka Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, Liteya: 63-1124E- Ndenge Misato Ya Bandimi.

 Ndeko.  Joseph Branham

 St. Yoane 6:60-71