22-0710 NDENGE MISATO YA BANDIMI

Nsango: 63-1124E NDENGE MISATO YA BANDIMI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mondimi,

Kanisa kaka yango, Nzambe oyo asalaki biloko nyoso mpe atiaki yango na molongo, akitaki mpe amisalaki mosuni kati na biso, kosikola biso. Mpe na nsima Akokaki kopesa biso mpenza lokumu na bozali na Ye bonene, ete Akokaki kotelema aw ana mabelé oyo ya masumu na mikolo ya nsuka, mpe kokokisa Liloba na Ye ete ezali bongo, mpo ete Azali na mokumba na Liloba yango.

Molimo Mosanto ayeisaki Liloba yango na bomoi epai na biso. Ekomaki na bomoi. Na kondima tomoni yango. Toyebi ete ezali bongo, mpo ete Liloba elobi yango, mpe Molimo azali koyeisa Liloba yango na bomoi epai na biso. Sasaipi tozali kosanganisama na Liloba ya Nzambe limonisami kati na mosuni, kaka lokola mosakoli alobaki ete ekozala.

Mondimi andimaka Yango, andimaka (nini?) Liloba. Lilako te; Liloba! Ebongiseli te; Liloba! Ezali te oyo moto mosusu alobaka; oyo Liloba elobaka! Sasaipi bokanisa, oyo wana ezali mondimi. Mondimi akobeteke ntembe te. Mondimi akolobaka te ete: “Yango ekokoka kozala boni? Soko Nakoki kosala ete Yango elimbolama!” Yangon de mozangi kondima. Uh-huh. Ezali mondimi, nde, ata Yango Ezala motindo nini, “Soko Ezali Liloba, Ezali Liloba! Ezali solo.” Oyo wana nde mondimi.

Osengeli kondima ebiangeli nyoso mpe litóno nyoso, mpe eloko nyoso oyo elobami na kati Kuna. Esengeli ezala solo. Soko olobi: “Nandimaka yango te. Mosusu ezali Nzambe, mosusu ezali moto, mosusu na yango ezali bobele masolo ya bokila.” Malamu, na bongo ozali mozangi kondima. Mondimi akobeteke ntembe te. Mondimi akondimaka Yango, ata eyokana lolenge nini to oyo moto ata nani akolinga koloba likolo na Yango, ata emonana tete lokola ekokoka soki moke te, TONDIMI YANGO!

Moto nyoso oyo azali awa, sasaipi, moto nyoso oyo azali koyoka bande oyo; mpe ata ko mokolo moko Nakosengela kolongwa na mokili oyo, ba bande oyo ekobika na yango kaka naino. Bomoni? Mpe ozali kati ya moko na bibolo oyo. Osengeli kozala kati na moko na yango.

Tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe osengeli kotala na bomoi na yo mpe oyeba soko ozali na lisanga nini ya bato kati na yango. Olobaka nde: “Nandimaka ete Nzambe atindaki mosakoli oyo andimisamaki na Likonzi ya Móto?” Ayebisaki biso tondima Liloba moko na moko. Koloba KAKA MPENZA oyo ezali likolo na ba bande mpe kobongola Liloba moko te. Tokosambisama na oyo ALOBAKI, ezali ten a nzela na oyo moto songolo alobi ete alobaki, to oyo moto moko alobi ete alingaki koloba, kasi na nzela ya oyo ba bande elobi.

To, okokende nde elongo na Kola mpe Datana, mpe baoyo balobaka: “Azali bobele ye moko moto mosanto te. Bato mosusu mpe babiangamaki kosala makambo yango moko ye asalaki. Bozali kotia motuya mingi likolo na mosakoli na Nzambe. Molimo Mosanto azali kokamba biso sasaipi. Oyo ezali eleko ekeseni”.

Ozali kati na moko na maboké masato maye. Kati na lolenge na yo ne eleko bebe sasaipi mpenza, na motindo na yo ya makanisi, ete, bino aw ana eyanganelo oyo ezali komonana, mpe bino baoyo bokozala na eyanganelo oyo ezali komonana te epai wapi ya bande oyo, lolenge na yo ya makanisi nsima ya koyoka bande oyo, ekoyebisa yo ozali kati na eteni nini. Ezali koyebisa yo polele polele epai ezali yo, to ozali mondimi kati na Liloba mpe okotikala na Yango to okokaki kobima, to kokanga bande yango.

Lokumu na Nkombo na Nkolo, tozali na biso BANDIMI ya solo solo, ezali te moto oyo andimisami na moto mosusu; na eloko mosusu boye te, kasi Molimo Mosanto na Ye amonisi biso Liloba Yango moko. Tomoni Liloba kokóma saa, lindimisami mpe limonisami.

Tozali kopimama na bimekeli, na nzela ya putulú, na molungé yam oi ya minyoko, kasi bosembo ya mitema na biso ezali kobeta na esaleli wana ya Liloba. Tobelemi sasaipi kokende na ndako ya bobongisami. Tozali bana ya Nzambe, tosalemi alimá likolo na Liloba na Ye. Tozali ndakisa ya bomoi, mpe Liloba na Nzambe ezali kobika kati na biso. Mimekano izali koya koningisa biso, kotia biso na nse mpenza, komona wapi tokotelema. Kasi tokoki koninganisama te, totelemaka likolo na Liloba moko na moko.

Yoka lokola azali koyebisa yo ozali nani.

Kanisa bobele ete eteni moko na moko ya yo ezalaki awa, wana elobaki Nzambe ete mokili mozalisama. Atiaki nzoto na yo awa longwa nan tango yango. Mpe ezali na eloko moko te oyo ekolongola yango awa soki ezali Nzambe te.

Eloko moko te ekokoka kolongola Yango longwa na yo. Moto moko te akokoka kozua esika na yo ata ozali moke boni. Okoloba: “Nazali na ngai kaka mama ya ndako.” Moto te akokoka kozua esika na yo! Nzambe kati na bozui na Ye monene, atiaki mpenza nzoto ya Klisto na molongo, na ndenge ete ezali na moto moko te akokoka kozua esika na yo.

Nkembo…Aleluya…Koyoka Bilei bia Nzambe bibombamaki ezali bobele koya monene mpe MONENE. Na koleka ezali biso koyoka Nzambe kosolola na biso na nzela ya motindami na ye moponami koyebisa biso oyo tozali, Kondima na biso ezali kokóma monene koleka. Esengo monene ya koyeba:

·      Tozali “BANDIMI YA SOLO SOLO”

·      Tozali “MOKO NA BANGO”

·      Tozali “MWASI NA LIBALA”

Nakolinga kopesa ya MBELA ko FINA PLAY elongo na ngai, Eyanganelo ya Branham, mpe eteni ya Mwasi ya Libala longwa na zingazinga na mokili na ngonga ya 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tokozala koyangana longwa na Ebimelo ya ntango, na Elimwelo ya ntango, na Likolo mpe na Ngele koyoka: Ndenge Misato Ya Bandimi 63-1124E. Oyo nde Molimo Mosanto azali kokamba biso kosala. Mpo na biso, oyo ezali manaka ya Nzambe.

·      Fina Play: Bande nse bande Nzambe akotia likolo na motema na yo.

·      Fina Play: Yoka na ntango nyoso okopona.

·      Fina Play: Ezali etinda na ngai epai na yo.

Ndeko Joseph Branham

St. Yoane 6:60-71