22-0717 EZALI NA MOTO MOKO AWA OYO AKOKI KOPELISA POLE

Nsango: 63-1229M EZALI NA MOTO MOKO AWA OYO AKOKI KOPELISA POLE

BranhamTabernacle.org

Balingami Elili ya Yesu Klisto,

Lokola mwana mobali ya moke oyo atalaki na talatala mpe ayebaki te ete azalaki komitala, tozali sasaipi kotala kati na Talatala ya Nzambe, Liloba na Ye, mpe tozali koyeba, TATA, EZALI NGAI, Nazali etaliseli ya Liloba na Yo. Nazali Liloba na Yo limonisami. Nazali Mondimi, Nazali Mwasi na Yo ya Libala!

Liteya moko na moko tozali koyoka ezali komatisa Kondima na biso na bisika ya likolo. Ayebisaki biso tosengeli tokoka kati ya moko na bibolo yango misato: Bandimi, bandimi ya lokuta to bazangi kondima. Wana etalaki biso kati na talatala na Ye togangaki: “Namoni, na elilingi ya ntembe ata moke te, tozali Bandimi. Mpamba te bobele Mondimi nde akondima litono moko na moko mpe ebiangeli moko na moko; TATA, EZALI NGAI.”

Ezali na eloko moko te oyo ekosepelisa biso mpe kopesa biso Bomoi kasi Liloba lilobami ya Nzambe likolo na bande. Ezali bobele nzela moko oyo Bomoi ekoki koya, kati na Liloba na Ye lilobami, Mongongo na Nzambe mpo na mokolo ya biso.

Bomilengele, mingi ezali koya mokolo mwa Lomingo loye, 17, Sanza ya Nsambo, 2022. Ezali na moto moko awa oyo akopelisa Pole, mpe ntango Akosala yango, biso nyoso tokozala na mpota na mingóngó kouta na koganga mpe koloba makasi Amen, Aleluya, Lokumu na Nkombo na Nkolo, Nkembo na Nzambe, mpo ete Nzambe Ye moko Akozala kosolola na biso mbala moko mpe komonisa Liloba na Ye na koleka.

Elanga eteli! Topusani liboso mingi mpe tobelemi kozua Yango. Yesu azali na mesa etandami, epai wapi babulami ya Nzambe bazali koleisama na Bilei bikembi ya mokolo. Pole ya Nsango Malamu kondimisa mpe kokokisa ete Azali awa lelo elongo na biso. Babulami bazali kolia Bilei ya Molimo oyo ebombamaki, kobelema mpo ya Konetolama.

Ntango mobateli na biso, Molimo Mosanto kosolola na nzela ya mosakoli na Ye andimisami, akofina butó wana mpe akopelisa pole ya Emoniseli, Akoyebisa biso kaka oyo ye azali na mokolo na biso. Akoganga mpe akokebisa biso: Nalikii ete bozali kati na mpongi te.

Noa azalaki Pole na mokolo na ye. Mose azalaki Pole na ngonga na ye, sasaipi Natindelaki bino mosakoli moko ya nguya na mokolo na bino mpe Nazali komonisa Liloba na Ngai ya elaka na nzela na ye. Azali Liloba ya Nzambe limonisami na mokolo na bino. Azali Pole ya lelo.

Ntango Nazalaki awa likolo na mabelé kati na mosuni mbala ya nsuka, Nazuaki mapa Matano ya ebandeli mpe Nabandaki kobuka yango. Longwa na oyo ezalaki, Nasalaki mapa mpe eleisaki bato nkoto mitano.

Na nsima Nazuaki mbisi moko, mpe longwa na mbisi yango, Nasalaki mbisi mosusu mpe mbisi mosusu mpe mbisi mosusu, mpe Naleisaki bato nkoto mitano.

 Lokola moi yango moko, ezali kongenga lelo, ekozala kokembisa mbuma na sanza ya Nsambo.

 Bomoni eloko Nalingi koloba? Kasi pole lelo ekosala eloko moko te kuna nan sima na sanza ya

 Nsambo. Ezali makasi koleka. Lisango likei liboso koleka; ebelemi mpo na kozua Yango. Amen.

  Ezali mpenza solo.

Kasi na mokolo na bino, Nazalaki na eloko te. Nasololaki kaka mpe Nalobaki: “toloba ekozala kuna,” mpe ezalaki kuna, na eloko moko te. Nazalaki na esende ata moko te; ezalaki ata na moko kuna te. Nalobaki kaka: “Tika ete ezala,” mpe ezalaki. Liloba na ngai ekweaka te, mpe Esengeli ekokisami.

Lokola bana ya Yisalaele, ntango bazalaki na mobembo na bango, bazalaki kolia mana ya sika mokolo na mokolo. Bazalaki kotambola na kati na Pole ya Likonzi ya Móto. Likonzi na Móto yango ezalaki Yesu Klisto.

Lelo Azali na biso elongo mbala moko lisusu, Likonzi ya Móto yango moko, ezali kosala makambo yango moko Asalaki ntango Azalaki awa na mabelé kokokisa Liloba na Ye.

Tozali kobianga yo ete oya komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 P.M., ntango ya Jeffersonville, lokola mobateli na biso, Molimo Mosanto, Likonzi ya Móto, akopelisa Pole na Ye ya Emoniseli, lokola tokoyoka: 63-1229M “Ezali Na Moto Moko Awa Oyo Akoki Kopelisa Pole.”

Ndeko Joseph Branham Genese 1:3, Mokapo ya 2 Nzembo 22

Yoele 2:28

Yisaya 7: 14, 9: 6, 28: 10, 42: 1-7

St. Matai 4: 12-17, Mikapo 24 mpe 28 St. Malako Mokapo ya 16

Emoniseli Mokapo ya 3