24-0107 Milimo Oyo Ezali Na Boloko Sikawa

NSANGO: 63-1110M Milimo Oyo Ezali Na Boloko Sikawa

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo bakabwani,

 Nzambe ayaki na mokolo na biso mpe amimonisaki na mosuni ya moto, kati na moto moko na nkombo William Marrion Branham, mpo Akoka kokokisa Liloba na Ye.  Yango nde Emoniseli ya Yesu Klisto na mokolo ya biso.

 Koyoka Mongóngó wana mpe kondima Liloba moko na moko ezali Nzela sé moko Nzambe apesi mpo ya lelo.  Atindaki na mokili bato mingi bapakolamaki na Molimo Mosanto na Ye, kasi Atindaki mpe alobaki kaka na nzela ya moto moko komonisa Liloba na Ye mpe kokamba Mwasi na Ye ya libala.

 Abongolaka Manáka na Ye to Lolenge na Ye ya kosala makambo ata moke te.  Ndenge Asalaki yango mbala ya liboso, Asalaka yango mbala nyonso.  Akambaka bato na Ye Ye moko, na Likonzí ya Móto.

 Kobosana ata moke te, OZALI Mwasi ya libala moponami Nzambe aponaki mpe ezali na eloko moko te zabolo akoki kosala to koloba oyo ekoki kolongola yango epai na yo, ELOKO MOKO TE!  Abongisaki yo liboso ya kozalisama ya mokili.  Ayebaki yo ndèle, mpe ozalaki elongo na Ye.  Ayebaki nkombo na yo.  Ayebaki makambo nyonso na ntina na yo.  Ayebaki matá mpe kitá na yo.  Ayebaki kokwea na yo, mabungá na yo, mpe Alingaki yo kaka mpe aponaki yo kozalaki eteni na Ye.

 Bomoto na yo bokoki kolia kaka Liloba na Ye.  Eloko moko te ekoki kosepelisa yo bobele Liloba na Ye.  Olingaka kotanga Liloba na Ye mpe kobánza-banza likolò na Ye, kosambela útá na bozondó ya motema na yo.  Ntango oyoki Mongóngó na Ye koloba mbala moko na yo, etombolaka yo likolo koleka ezipelo ya ntango.  Mpo oyebi ete ofandi elongo na Ye na bisika ya Likolo lokola Alobaka na yo mbebu na litoi, komónisa yo Liloba na Ye, kokundwela yo, OZALI MWASI NA NGAI YA LIBALA.

 Zabolo akoki kotúta yo mpe kotúta mpe kotúta.  Okoki kokita mpenza na nse ntango mosusu mpe koyoka ete ozali nsuka ya kokwea;  oyoki lokola ozángeli Ye lokola moto moko mosusu te.  Ozali mabe mingi koleka mabe, kasi esika moko boye, na nsé na bozindó ya bomoto na yo, oyoki Mongóngó  Moke wana ya Kimia koyebisa yo: “Eloko moko te ekoki kokabola yo na NGAI, OZALI LILOBA NA NGAI.  Natiaki nkombo na yo na Buku Ya Bomoi ya Mwana na Mpate na Ngai, Ngai moko.”

 Nakoki koloba nini mpo na koyikisa yo mpiko lelo?

 Tikala kaka kati ya Liloba.  FINÁ PLAY mokolo nyoso mpe yoka Mongóngó ya Nzambe koloba Oyo Elobi Nkolo mpe koyebisa yo;  Nazali kosangisa yo nzinganzinga ya Liloba na Ngai.  Okoki kolonga LIKAMBO ATÁ NINI, mpo Liloba na Ngai lizali kobika mpe kofanda kati na yo.  Natalisaki yo, ozali na KONDIMA EBONGÍ BE.  Otii Elembo, mpe Ekómisi yo na Nsuka.  Nakotelema nsima ya Liloba na Ngai.  Nakosala oyo nalobaki nakosala.

 Maloba ma Ye mazali Bikamwá boni yango elobéli Ye biso Likoló na ba bande.  Toyebi Ezali moto moko boye te, moto ya mosuni oyo azali kati na biso.  Ezali Nzambe ya Seko na Seko koloba na biso, Mwasi na Ye ya Libala.

 Obiangámi komibakisa na Mwasi ya libala Lomingo loye  na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyangana koyoka Mongóngó wana  Moke ya Kimia : 63-1110M Milimo Miye Mizali Na Bolɔkɔ Sasaipi.

 Ndeko Joseph Branham

 Makomi ma kotánga liboso ya losambo:

 Genese 15:16

 St. Matai 23:27-34

 St. Yoane 4:23-24 / 6:49 / 14:12

 1 Petelo 3:18-22

 2 Petelo 2:4-5

 Yuda 1:5-6