23-1231 63-0901E BOKOMI NA NSUKA

Nsango: 63-0901E BOKOMI NA NSUKA

BranhamTabernacle.org

Tata Molingami,

 Tosakáni ntango molai mingi. Tokei na losambo mpo na ntango molaí mingi. Bandá boyóki ya Liteya, Elembo, epúsí Mwasi na Yo ya libala na nsúka.

Toyebi ete eloko moko ebelemi kosalema. Ntango ebelemi. Tolingi Óya mpo Ólongola biso na mokili oyo. Tolingi kozala elongo na Yo. Toyoki ete tokómi na nsúka na bozindó mpenza ya bomoto na biso.

 Tokozala kaka nde kosolola na ntina na yango? Tokómí mpenza na nsúka lolenge esengelaki? Tozali mpenza kolela epai na Yo ndenge tosengelaki mói na butú?

 Oo, Lingomba, télémá mpe míningánísá! Finá motema na yo, mílamúsá, na ngonga oyo! Tosengeli tokóma na nsuka, to tókúfa! Eloko moko ezali koya koúta na Nkolo! Nayebi yango lokola OYO ELOBI NKOLO. Eloko moko ezali koya, mpe epusi malamu tókóma na nsúka. Ezali kati na Bomoi mpe kufa. Ekoleka kati na biso mpe tokomóna yango te.

 Toyebi esengeli na bokómi na nsúka koyeisa Yo na mosala. Tosengeli kozala na Yango sikawa to tókúfa. Nkolo, tika ete tókóma na nsúka lokola naino liboso Soki moké te, bongo Okokóta na mosálá mpe koya kozua Mwasi na Yo ya libala oyo azali kozila.

 Sungá biso Tata ete tomípúsa na kati na Yango. Bobele te kotambola kati na Yango, na petee, kasi tópúsama na kati.

Ezali kaka te kosolola na ntina na Yango mpe kokóba na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Tolingi Koluka Yo na mitema na biso nyoso, na bomoto na biso nyoso mpe na likanisi na biso nyoso.

Nkolo, nsungá biso.

 Toyebi ete tozángeli Yo mbala mingi, Nkolo, kasi Oyebisaki biso ete soko tokwéi ; ezali na likambo moko kati na yango te; mpo na kobanda tozali bakwéi, kasi tozali na Yo Otélemi wana na loboko lokási mpe Okoki kosembola yango na nsé mpe kotómbola biso likolo ya mái.

 Mosakoli asangélaki biso ete Okokaki koleka likolo na biso bobele soko Omonaki Elembo etiamaki. Nkolo, tolandi Malako ma Yo mpe totii Elembo mpe tokómisi ba ndako na biso Lingomba ya bande, koyoka mpe kondima Liloba moko na moko.

 Ayebaka kaka E—Elembo. Nde Etindá ya ngonga! Nde Etinda ya lelo oyo! Nde Etinda ya ntango oyo! Na Nkombo na Yesu Klisto, boyamba Yango!

Tondimisami, mpe tondimi mpe totii eloko moko na moko Kokokana na oyo mosakoli ayebisaki biso.

 Tondimi makambo manso mazali kokóma na ntango na Yo ebongí be. Eloko ezangi te kozala na esika na yango. Tomónaki bilembo na Yo nyoso, mpe toyókaki mpe toyei na nsé ya elembetele ya Elembo.

Sasaipi awa ezali biso na nsé y’a elembetele ya Elembo, tokolia Elambo Lomingo loye kati na bokómi na nsuka. Zambí toyebi ete Obelemí kobeta na kosambisama.

 Tika ete tozua Yango Lokola elembetele ya Elekeli, wana ezuamaki Yango na lombángu, na ntango ya bokómi na nsúka. Tokómí na nsúka lisusu lelo Tata.

 Tozali na matondi, Nkolo, ete tokoki kotála nsima nambula oyo mpe komona nyoso Osaleli biso. Omonisaki Liloba na Yo epai na biso mpe Opesaki biso Emoniseli likolo ya Emoniseli lokola liboso naino soko moké te.

 Toyebi sikawa tozali bana na Yo mibali mpe basi. Tozali Mwasi Liloba na Yo abongí be Oúnelí kozila. Ezali Yo, kobika mpe kofanda kati na BISO. Oponaki biso, Obongisaki biso liboso, mpe sikawa Ozali koya mpo na biso.

 Nkolo, tika ete toluka Yo mói na butú. Tika ete tókóma mpenza na nsúka koleka epai na Yo. Tika ete tómipúsa kati na Yango lokola liboso naino te. Tika oyo ézala elánga ekoya Yo mpo na biso

Tolingi Yo Tata, mpe tolingi kozala kati ya Mokano mwa Yo mobongí be. Yaka kozala elongo na biso lokola tozali kosangana na 5:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, zingázingá ya Mongóngó mwa Yo mpe koyoka Yo koyebisa biso boni boni koya na Bokómi na nsúka 63-0901E.

Na mbisa zalá elongo na biso lokola ezali biso kosangana na bokómi na nsúka kati na Elambo ya Nkolo.

Oyo nde mikolo minene koleka na bomoi na biso Tata. Zambi toyebi Ozali koya noki komema biso na EZALELO na biso ekoya elongo na Yo. Tozali kozila mokolo na mokolo kati na mitema lúkulúku babulami baoyo bakei liboso na biso. Toyebi ntango tomoní bango, ntango ya boyei na Yo ekómi….NKEMBO!!!

 Tozali na Bokómi na nsúka mpo ya mokolo yango, Tata.

 Ndeko Joseph Branham.

 Makomi ya kotanga liboso ya losambo:

Esode 12:11

Yilimia 29:10-14

St. Luka 16:16

St. Yoane 14:23

Bagalatia  5:6

St. Yakobo 5:16