22-0619 Milimo Oyo Ezali Na Boloko Sikawa

NSANGO: 63-1110M Milimo Oyo Ezali Na Boloko Sikawa

PDF

BranhamTabernacle.org

Tata Molingami, Nakoki nde kokoma nini lelo ete Okoka kosalela ngai, na nzela moko ya moke, koyikisa Mwasi na Yo ya Libala ya motuya mpiko?

Nzambe ayaki na mokolo na biso mpe abikaki kati na mosuni ya moto, kati na moto moko abiangami William Marrion Branham, mpo Akoka komonisa mpe kokokisa Liloba na Ye. Yango ezali Emoniseli ya Yesu Klisto kati na mokolo na biso.

Koyoka Mongongo wana mpe kondima ete Liloba moko na moko ezali bobele nzela moko epesami na Nzambe mpo na lelo. Atindelaki mokili bato ebele bapakolamaki na Molimo Mosanto, kasi Atindaki kaka mpe Alobaki na nzela ya moto moko komonisa Liloba na Ye mpe kokamba Mwasi na Ye ya Libala.

Abongolá soki moke te manaka ma Ye to nzela na Ye ya kosala makambo. Lolenge Asalaki yango mbala ya liboso, Asalaka yango ntango nyoso. Akambaka baton a Ye Ye moko na Likonzi ya Móto.

Bozali Mwasi ya Libala moponami ya Nzambe mpe ezali na eloko te oyo zabolo akoki kosala to koloba oyo ekoki kolongola yango longwa na bino, ELOKO MOKO TE! Abongisaki yo liboso ya bozalisi ya mokili. Ayebaki yo na tango yango, mpe ozalaki na Ye nan tango yango. Ayebaki nkombo na yo. Ayeba nyoso na ntina na yo. Ayebaki matá mpe kitá na yo. Ayebaki kokwea na yo, mabunga na yo, mpe Alingaki yo ata ko bongo, mpo ete ozalaki eteni na Ye.

Bomoto na yo ekoki bobele kolia Liloba na Ye. Eloko moko ekoki kosepelisa yo te kasi Liloba na Ye. Olingaka kotanga Liloba na Ye mpe kobanzabanza likolo na Ye, kobondela longwa na bozindó na motema na yo, kasi ntango oyoki Mongongo na Ye kosolola na yo mbala moko, Ematisaka yo likolo na ngambo na ezipelo ya ntango. Mpo oyebi ete ozali kofanda elongo na Ye na bisika ya Likolo wana ezali Ye kosolola na yo mbebu na litoi, komonisa yo Liloba na Ye, kokanisela yo, OZALI MWASI NA NGAI YA LIBALA.

Zabolo akoki kotuta mpe kotuta mpe kotuta yo. Okoki koki komizua mpenza na nse ntango mosusu mpe koyoka ete ozali mpenza oyo akwei mobimba; koyoka lokola ete ozangeli Ye lokola moto mosusu te. Ozali oyo aleki nyoso na mabe, kasi esika moko, nan se kuna na bozindo ya bomoto na yo, oyokaka Mongongo wana Moke ya Kimia koyebisa yo: “Eloko moko te ekoki kokabola yo na Liloba na Ngai, OZALI LILOBA NA NGAI. Natiaki nkombo na yo likolo ya Buku ya Bomoi ya Mwan Mpate na Ngai, Ngai moko.”

Naloba nini mpo ya koyikisa yo mpiko lelo? Fina kaka play mokolo nyoso mpe yoka Mongongo na Nzambe koloba mpe koyebisa yo: Yango Elobi Nkolo.

Obiangami komibakisa na Mwasi na Libala mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, wana ekoyangana biso koyoka Mongongo yango Moke ya Kimia: 63-1110M Milimo Miye Mizali Kati Na Boloko Sasaipi.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga:

Genese 15: 16

St. Matai 23: 27-34

St. Yoane 4: 23-24 / 6: 49 / 14: 12

1 Petelo 3: 18-22

2 Petelo 2: 4-5

Yuda 1: 5-6