Category Archives: Uncategorized

22-0724 Bobongola Miso Epai Na Yesu

Nsango: 63-1229E Bobongola Miso Epai Na Yesu

BranhamTabernacle.org

Balingami Pole Imonisami,

Tika ete biso nyoso toyangana elongo mpe toyoka Liteya 63-1229E Bobongola Miso Epai Na Yesu mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati ya bomilengeli mpo na boyoki liteya:

Mituya 21: 5-19

Yisaya 45: 22

Jekalia 12: 10

St. Yoane 14:12

22-0717 EZALI NA MOTO MOKO AWA OYO AKOKI KOPELISA POLE

Nsango: 63-1229M EZALI NA MOTO MOKO AWA OYO AKOKI KOPELISA POLE

BranhamTabernacle.org

Balingami Elili ya Yesu Klisto,

Lokola mwana mobali ya moke oyo atalaki na talatala mpe ayebaki te ete azalaki komitala, tozali sasaipi kotala kati na Talatala ya Nzambe, Liloba na Ye, mpe tozali koyeba, TATA, EZALI NGAI, Nazali etaliseli ya Liloba na Yo. Nazali Liloba na Yo limonisami. Nazali Mondimi, Nazali Mwasi na Yo ya Libala!

Liteya moko na moko tozali koyoka ezali komatisa Kondima na biso na bisika ya likolo. Ayebisaki biso tosengeli tokoka kati ya moko na bibolo yango misato: Bandimi, bandimi ya lokuta to bazangi kondima. Wana etalaki biso kati na talatala na Ye togangaki: “Namoni, na elilingi ya ntembe ata moke te, tozali Bandimi. Mpamba te bobele Mondimi nde akondima litono moko na moko mpe ebiangeli moko na moko; TATA, EZALI NGAI.”

Ezali na eloko moko te oyo ekosepelisa biso mpe kopesa biso Bomoi kasi Liloba lilobami ya Nzambe likolo na bande. Ezali bobele nzela moko oyo Bomoi ekoki koya, kati na Liloba na Ye lilobami, Mongongo na Nzambe mpo na mokolo ya biso.

Bomilengele, mingi ezali koya mokolo mwa Lomingo loye, 17, Sanza ya Nsambo, 2022. Ezali na moto moko awa oyo akopelisa Pole, mpe ntango Akosala yango, biso nyoso tokozala na mpota na mingóngó kouta na koganga mpe koloba makasi Amen, Aleluya, Lokumu na Nkombo na Nkolo, Nkembo na Nzambe, mpo ete Nzambe Ye moko Akozala kosolola na biso mbala moko mpe komonisa Liloba na Ye na koleka.

Elanga eteli! Topusani liboso mingi mpe tobelemi kozua Yango. Yesu azali na mesa etandami, epai wapi babulami ya Nzambe bazali koleisama na Bilei bikembi ya mokolo. Pole ya Nsango Malamu kondimisa mpe kokokisa ete Azali awa lelo elongo na biso. Babulami bazali kolia Bilei ya Molimo oyo ebombamaki, kobelema mpo ya Konetolama.

Ntango mobateli na biso, Molimo Mosanto kosolola na nzela ya mosakoli na Ye andimisami, akofina butó wana mpe akopelisa pole ya Emoniseli, Akoyebisa biso kaka oyo ye azali na mokolo na biso. Akoganga mpe akokebisa biso: Nalikii ete bozali kati na mpongi te.

Noa azalaki Pole na mokolo na ye. Mose azalaki Pole na ngonga na ye, sasaipi Natindelaki bino mosakoli moko ya nguya na mokolo na bino mpe Nazali komonisa Liloba na Ngai ya elaka na nzela na ye. Azali Liloba ya Nzambe limonisami na mokolo na bino. Azali Pole ya lelo.

Ntango Nazalaki awa likolo na mabelé kati na mosuni mbala ya nsuka, Nazuaki mapa Matano ya ebandeli mpe Nabandaki kobuka yango. Longwa na oyo ezalaki, Nasalaki mapa mpe eleisaki bato nkoto mitano.

Na nsima Nazuaki mbisi moko, mpe longwa na mbisi yango, Nasalaki mbisi mosusu mpe mbisi mosusu mpe mbisi mosusu, mpe Naleisaki bato nkoto mitano.

 Lokola moi yango moko, ezali kongenga lelo, ekozala kokembisa mbuma na sanza ya Nsambo.

 Bomoni eloko Nalingi koloba? Kasi pole lelo ekosala eloko moko te kuna nan sima na sanza ya

 Nsambo. Ezali makasi koleka. Lisango likei liboso koleka; ebelemi mpo na kozua Yango. Amen.

  Ezali mpenza solo.

Kasi na mokolo na bino, Nazalaki na eloko te. Nasololaki kaka mpe Nalobaki: “toloba ekozala kuna,” mpe ezalaki kuna, na eloko moko te. Nazalaki na esende ata moko te; ezalaki ata na moko kuna te. Nalobaki kaka: “Tika ete ezala,” mpe ezalaki. Liloba na ngai ekweaka te, mpe Esengeli ekokisami.

Lokola bana ya Yisalaele, ntango bazalaki na mobembo na bango, bazalaki kolia mana ya sika mokolo na mokolo. Bazalaki kotambola na kati na Pole ya Likonzi ya Móto. Likonzi na Móto yango ezalaki Yesu Klisto.

Lelo Azali na biso elongo mbala moko lisusu, Likonzi ya Móto yango moko, ezali kosala makambo yango moko Asalaki ntango Azalaki awa na mabelé kokokisa Liloba na Ye.

Tozali kobianga yo ete oya komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 P.M., ntango ya Jeffersonville, lokola mobateli na biso, Molimo Mosanto, Likonzi ya Móto, akopelisa Pole na Ye ya Emoniseli, lokola tokoyoka: 63-1229M “Ezali Na Moto Moko Awa Oyo Akoki Kopelisa Pole.”

Ndeko Joseph Branham Genese 1:3, Mokapo ya 2 Nzembo 22

Yoele 2:28

Yisaya 7: 14, 9: 6, 28: 10, 42: 1-7

St. Matai 4: 12-17, Mikapo 24 mpe 28 St. Malako Mokapo ya 16

Emoniseli Mokapo ya 3

22-0710 NDENGE MISATO YA BANDIMI

Nsango: 63-1124E NDENGE MISATO YA BANDIMI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mondimi,

Kanisa kaka yango, Nzambe oyo asalaki biloko nyoso mpe atiaki yango na molongo, akitaki mpe amisalaki mosuni kati na biso, kosikola biso. Mpe na nsima Akokaki kopesa biso mpenza lokumu na bozali na Ye bonene, ete Akokaki kotelema aw ana mabelé oyo ya masumu na mikolo ya nsuka, mpe kokokisa Liloba na Ye ete ezali bongo, mpo ete Azali na mokumba na Liloba yango.

Molimo Mosanto ayeisaki Liloba yango na bomoi epai na biso. Ekomaki na bomoi. Na kondima tomoni yango. Toyebi ete ezali bongo, mpo ete Liloba elobi yango, mpe Molimo azali koyeisa Liloba yango na bomoi epai na biso. Sasaipi tozali kosanganisama na Liloba ya Nzambe limonisami kati na mosuni, kaka lokola mosakoli alobaki ete ekozala.

Mondimi andimaka Yango, andimaka (nini?) Liloba. Lilako te; Liloba! Ebongiseli te; Liloba! Ezali te oyo moto mosusu alobaka; oyo Liloba elobaka! Sasaipi bokanisa, oyo wana ezali mondimi. Mondimi akobeteke ntembe te. Mondimi akolobaka te ete: “Yango ekokoka kozala boni? Soko Nakoki kosala ete Yango elimbolama!” Yangon de mozangi kondima. Uh-huh. Ezali mondimi, nde, ata Yango Ezala motindo nini, “Soko Ezali Liloba, Ezali Liloba! Ezali solo.” Oyo wana nde mondimi.

Osengeli kondima ebiangeli nyoso mpe litóno nyoso, mpe eloko nyoso oyo elobami na kati Kuna. Esengeli ezala solo. Soko olobi: “Nandimaka yango te. Mosusu ezali Nzambe, mosusu ezali moto, mosusu na yango ezali bobele masolo ya bokila.” Malamu, na bongo ozali mozangi kondima. Mondimi akobeteke ntembe te. Mondimi akondimaka Yango, ata eyokana lolenge nini to oyo moto ata nani akolinga koloba likolo na Yango, ata emonana tete lokola ekokoka soki moke te, TONDIMI YANGO!

Moto nyoso oyo azali awa, sasaipi, moto nyoso oyo azali koyoka bande oyo; mpe ata ko mokolo moko Nakosengela kolongwa na mokili oyo, ba bande oyo ekobika na yango kaka naino. Bomoni? Mpe ozali kati ya moko na bibolo oyo. Osengeli kozala kati na moko na yango.

Tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe osengeli kotala na bomoi na yo mpe oyeba soko ozali na lisanga nini ya bato kati na yango. Olobaka nde: “Nandimaka ete Nzambe atindaki mosakoli oyo andimisamaki na Likonzi ya Móto?” Ayebisaki biso tondima Liloba moko na moko. Koloba KAKA MPENZA oyo ezali likolo na ba bande mpe kobongola Liloba moko te. Tokosambisama na oyo ALOBAKI, ezali ten a nzela na oyo moto songolo alobi ete alobaki, to oyo moto moko alobi ete alingaki koloba, kasi na nzela ya oyo ba bande elobi.

To, okokende nde elongo na Kola mpe Datana, mpe baoyo balobaka: “Azali bobele ye moko moto mosanto te. Bato mosusu mpe babiangamaki kosala makambo yango moko ye asalaki. Bozali kotia motuya mingi likolo na mosakoli na Nzambe. Molimo Mosanto azali kokamba biso sasaipi. Oyo ezali eleko ekeseni”.

Ozali kati na moko na maboké masato maye. Kati na lolenge na yo ne eleko bebe sasaipi mpenza, na motindo na yo ya makanisi, ete, bino aw ana eyanganelo oyo ezali komonana, mpe bino baoyo bokozala na eyanganelo oyo ezali komonana te epai wapi ya bande oyo, lolenge na yo ya makanisi nsima ya koyoka bande oyo, ekoyebisa yo ozali kati na eteni nini. Ezali koyebisa yo polele polele epai ezali yo, to ozali mondimi kati na Liloba mpe okotikala na Yango to okokaki kobima, to kokanga bande yango.

Lokumu na Nkombo na Nkolo, tozali na biso BANDIMI ya solo solo, ezali te moto oyo andimisami na moto mosusu; na eloko mosusu boye te, kasi Molimo Mosanto na Ye amonisi biso Liloba Yango moko. Tomoni Liloba kokóma saa, lindimisami mpe limonisami.

Tozali kopimama na bimekeli, na nzela ya putulú, na molungé yam oi ya minyoko, kasi bosembo ya mitema na biso ezali kobeta na esaleli wana ya Liloba. Tobelemi sasaipi kokende na ndako ya bobongisami. Tozali bana ya Nzambe, tosalemi alimá likolo na Liloba na Ye. Tozali ndakisa ya bomoi, mpe Liloba na Nzambe ezali kobika kati na biso. Mimekano izali koya koningisa biso, kotia biso na nse mpenza, komona wapi tokotelema. Kasi tokoki koninganisama te, totelemaka likolo na Liloba moko na moko.

Yoka lokola azali koyebisa yo ozali nani.

Kanisa bobele ete eteni moko na moko ya yo ezalaki awa, wana elobaki Nzambe ete mokili mozalisama. Atiaki nzoto na yo awa longwa nan tango yango. Mpe ezali na eloko moko te oyo ekolongola yango awa soki ezali Nzambe te.

Eloko moko te ekokoka kolongola Yango longwa na yo. Moto moko te akokoka kozua esika na yo ata ozali moke boni. Okoloba: “Nazali na ngai kaka mama ya ndako.” Moto te akokoka kozua esika na yo! Nzambe kati na bozui na Ye monene, atiaki mpenza nzoto ya Klisto na molongo, na ndenge ete ezali na moto moko te akokoka kozua esika na yo.

Nkembo…Aleluya…Koyoka Bilei bia Nzambe bibombamaki ezali bobele koya monene mpe MONENE. Na koleka ezali biso koyoka Nzambe kosolola na biso na nzela ya motindami na ye moponami koyebisa biso oyo tozali, Kondima na biso ezali kokóma monene koleka. Esengo monene ya koyeba:

·      Tozali “BANDIMI YA SOLO SOLO”

·      Tozali “MOKO NA BANGO”

·      Tozali “MWASI NA LIBALA”

Nakolinga kopesa ya MBELA ko FINA PLAY elongo na ngai, Eyanganelo ya Branham, mpe eteni ya Mwasi ya Libala longwa na zingazinga na mokili na ngonga ya 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tokozala koyangana longwa na Ebimelo ya ntango, na Elimwelo ya ntango, na Likolo mpe na Ngele koyoka: Ndenge Misato Ya Bandimi 63-1124E. Oyo nde Molimo Mosanto azali kokamba biso kosala. Mpo na biso, oyo ezali manaka ya Nzambe.

·      Fina Play: Bande nse bande Nzambe akotia likolo na motema na yo.

·      Fina Play: Yoka na ntango nyoso okopona.

·      Fina Play: Ezali etinda na ngai epai na yo.

Ndeko Joseph Branham

St. Yoane 6:60-71

22-0703 Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto?

Nsango: 63-1124M Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto?

BranhamTabernacle.org

Balingami Ba Mpongo,

Tika ete biso nyoso toyangana elongo mpe toyoka Liteya 63-1124M-Nakosala Nini Na Yesu Oyo Abiangami Klisto? mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

22-0626 Ye Oyo Azali Kati Na Bino

Nsango: 63-1110E Ye Oyo Azali Kati Na Bino

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi na Libala Kondima Monene ya koleka,

Nayebi ete oyo ezali kaka mokanda moko ya petee na bokomi bolongobani te, kasi Nalingi mokili moyeba ete tondimi liloba moko na moko  mosakoli na biso alobaki mpe toyambi Yango ete ezali Oyo Elobi Nkolo. Ntango toyokaka ye koloba eloko moko likolo na bande, tondimaka Yango, toyambaka Yango, lokola Nzambe Ye moko azali kosolola na biso mbala moko.

Eteyamaki, mpe endimisamaki polele-polele na nzela na Liloba na Nzambe, ete ekokaki kozala moto te, esengelaki kozala Nzambe.

Tondimaka ete bilembo yango moko ya komonana saa bimonani likolo na mabelé lelo oyo bimononoki ntango Yesu azalaki awa. Likonzi ya Móto yango moko oyo Mosanto Paulo amonaki na lolenge yango moko, kosala eloko yango moko, eyaki na mokolo na biso. Ezali Nzambe kosolola na biso mbala moko:

Elembo yango moko ya molimo oyo ekokisaki Ye kozala Masiya, ekokisi Ye lelo. Azali naino kakaMasiya!

Okokoka koyamba mapamboli manene maye kaka SOKO ondimi ete Liloba moko na moko ezali Oyo Elobi Nkolo, na bofinaká play. Soko ozali moto moko oyo andimaka yango te, mpe esengeli ókána na boyekoli na yo to na nzela ya moto moko koyebisa yo: Oyo ezali Liloba ya Nkolo, mpe oyo ezali kaka Ndeko Branham nde azali kosolola,” na bongo oyo ezali mpo na yo te.

Na ntango Mose akambaki ban ana Yisalaele, ezalaki na moko, ezalaki Mose, bamosusu nyoso bazalaki kaka kolanda Etinda. Bomoni?

Kasi lelo, mpo na biso OYO TONDIMAKA YANGO LOLENGE WANA, mitema mia biso mitondi mpenza na esengo, mpe mizali kopunjwapunjwa, ezali mpasi mpo tokoka komipekisa.

Nazali koyoka ete Asikoli biso. Nazali koyoka ete nkombo na biso izali kati na Buku na Ye. Nandimaka ete tosikolami na Makila ya Mwana Mpate.

Mpo ete tondimi Etinda oyo ezali Mongóngó ya Nzambe kosolola na biso mbala moko, tondimaka ete ezali Nzambe Ye moko kosolola na biso mbebu na litoi. Ezali na NTEMBE TE nkombo na biso izali likolo na Buku na Ye.

Tika ete Natia yango motindo oyo, lotómo na Yesu Klisto lokómi mosuni kati na Lingomba na Ye na mokolo oyo ya nsuka. Yangon de mingi kati na biso bandimaka. Nandimaka yango elongo na bino.

Lolenge wana nde mpenza tondimaka yango, Yesu Klisto akomi mosuni lisusu, azali kosolola na Mwasi na Ye ya Libala likolo ya Bande.

Ntango nyoso tozali kofina play kondima na biso ezali komata na bisika ya likolo ya sika. Oyo ezali te kaka motei mosusu koteya, oyo ezali Nzambe Ye moko kosolola na biso. Tolingi na biso kaka 100% Liloba peto.

Natuna naino bino eloko moko. William Marrion Branham azali nde mobateli na bino? Azali nde mwanje nan sambo motindami ya Nzambe oyo andimisami? Bondimi ete oyo asengaki Nzambe asala, Nzambe asalaki? Bondimi ete azalaki Mongongo ya Nzambe mpo na mokolo oyo? Bondimaka liloba moko na moko lilobaki ye? Na bongo bokopambolama mbala moko lisusu na motindo moleki maloba mokolo mwa Lomingo.

Ezali na nzela mosusu te oyo okokoka koyamba lipamboli oyo kaka ozala koyoka ba bande mpe ondima ete oyo ozali koyoka ezali Oyo Elobi Nkolo. Esengeli ondima ete oyo ezali ye koloba ezali Nzambe kosolola na yo mbala moko.

Ngai, lokola mobateli na bino, ndeko na bino, na kondima oyo Nazali na yango, Nasengi Nzambe ete atia yango liko na bino. Nandimi ete Nazui oyo Nasengi. Sasaipi soko bokondima yango elongo na ngai; na kondima oyo Nazali na yango, Napesi na bino mpo na ngonga oyo.

Epai na biso, azali mobateli na biso. Ezali na moko te kati na mokili azali na kondima mingi, to monene na koleka, likolo ya MOBATELI NA BISO, mosakoli ya Nzambe. Sasaipi mosakoli ya Nzambe asengaki Nzambe ete Apesa biso KONDIMA NA YE MONENE. SOKO bondimi Yango na motema na bino mobimba, Ezali sasaipi KONDIMA YA BINO…NKEMBO, TONDIMI YANGO!!! Kondima na biso ekokaki kozala ya bolembu, kasi ezali lisusu bongo te, mpo ete sasaipi tozali na KONDIMA na ye.

Mpe sasaipi, kati na Nkombo na Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, boangana mpasi na bino, bokono na bino, mpe boloba na yango: “Osengeli kokende,” ‘mpo ete bozali na kondima na bino, kobakisa na kondima na ngai, elongo na nguya ya Yesu Klisto, oyo bozali na Ye beebe bozali awa kondimisa yango mpe kokokisa ete Azali awa, akobikisa bino nan tango oyo.

Nakoki nde koloba nini oyo ekosala ete oya komibakisa na biso mpe koyamba lipamboli monene oyo? Kanisa yango, eloko nse eloko ozali na yango bosenga, okoki kozua yango soko okoya koyoka mpe kondima Yango kaka.

Yaka koyoka mokolo mwa Lomingo na 12:00 Nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, elongo na Mwasi na Libala. Tokozala koyangana mpe koyoka longwa na Ebimelo ya ntango, na Elimwelo ya ntango, na Likolo mpe na Ngele, nyoso na ntango moko, wana Oyo Elobi Nkolo ezali kosolola na biso mpe koyebisa biso nyoso na ntina na: YE OYO AZALI KATI NA BINO 63-1110E.

Soko okokoka koyoka elongo na biso na ntango moko mokolo mwa Lomingo te, likambo te, fina play ntango nse ntango mpe yoka mpe ndima ete oyo ozali koyoka ezali Mongongo na Nzambe kosolola na yo.

Ndeko Joseph Branham

22-0619 Milimo Oyo Ezali Na Boloko Sikawa

NSANGO: 63-1110M Milimo Oyo Ezali Na Boloko Sikawa

PDF

BranhamTabernacle.org

Tata Molingami, Nakoki nde kokoma nini lelo ete Okoka kosalela ngai, na nzela moko ya moke, koyikisa Mwasi na Yo ya Libala ya motuya mpiko?

Nzambe ayaki na mokolo na biso mpe abikaki kati na mosuni ya moto, kati na moto moko abiangami William Marrion Branham, mpo Akoka komonisa mpe kokokisa Liloba na Ye. Yango ezali Emoniseli ya Yesu Klisto kati na mokolo na biso.

Koyoka Mongongo wana mpe kondima ete Liloba moko na moko ezali bobele nzela moko epesami na Nzambe mpo na lelo. Atindelaki mokili bato ebele bapakolamaki na Molimo Mosanto, kasi Atindaki kaka mpe Alobaki na nzela ya moto moko komonisa Liloba na Ye mpe kokamba Mwasi na Ye ya Libala.

Abongolá soki moke te manaka ma Ye to nzela na Ye ya kosala makambo. Lolenge Asalaki yango mbala ya liboso, Asalaka yango ntango nyoso. Akambaka baton a Ye Ye moko na Likonzi ya Móto.

Bozali Mwasi ya Libala moponami ya Nzambe mpe ezali na eloko te oyo zabolo akoki kosala to koloba oyo ekoki kolongola yango longwa na bino, ELOKO MOKO TE! Abongisaki yo liboso ya bozalisi ya mokili. Ayebaki yo na tango yango, mpe ozalaki na Ye nan tango yango. Ayebaki nkombo na yo. Ayeba nyoso na ntina na yo. Ayebaki matá mpe kitá na yo. Ayebaki kokwea na yo, mabunga na yo, mpe Alingaki yo ata ko bongo, mpo ete ozalaki eteni na Ye.

Bomoto na yo ekoki bobele kolia Liloba na Ye. Eloko moko ekoki kosepelisa yo te kasi Liloba na Ye. Olingaka kotanga Liloba na Ye mpe kobanzabanza likolo na Ye, kobondela longwa na bozindó na motema na yo, kasi ntango oyoki Mongongo na Ye kosolola na yo mbala moko, Ematisaka yo likolo na ngambo na ezipelo ya ntango. Mpo oyebi ete ozali kofanda elongo na Ye na bisika ya Likolo wana ezali Ye kosolola na yo mbebu na litoi, komonisa yo Liloba na Ye, kokanisela yo, OZALI MWASI NA NGAI YA LIBALA.

Zabolo akoki kotuta mpe kotuta mpe kotuta yo. Okoki koki komizua mpenza na nse ntango mosusu mpe koyoka ete ozali mpenza oyo akwei mobimba; koyoka lokola ete ozangeli Ye lokola moto mosusu te. Ozali oyo aleki nyoso na mabe, kasi esika moko, nan se kuna na bozindo ya bomoto na yo, oyokaka Mongongo wana Moke ya Kimia koyebisa yo: “Eloko moko te ekoki kokabola yo na Liloba na Ngai, OZALI LILOBA NA NGAI. Natiaki nkombo na yo likolo ya Buku ya Bomoi ya Mwan Mpate na Ngai, Ngai moko.”

Naloba nini mpo ya koyikisa yo mpiko lelo? Fina kaka play mokolo nyoso mpe yoka Mongongo na Nzambe koloba mpe koyebisa yo: Yango Elobi Nkolo.

Obiangami komibakisa na Mwasi na Libala mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, wana ekoyangana biso koyoka Mongongo yango Moke ya Kimia: 63-1110M Milimo Miye Mizali Kati Na Boloko Sasaipi.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga:

Genese 15: 16

St. Matai 23: 27-34

St. Yoane 4: 23-24 / 6: 49 / 14: 12

1 Petelo 3: 18-22

2 Petelo 2: 4-5

Yuda 1: 5-6

22-0612 63-0901E BOKOMI NA NSUKA

Nsango: 63-0901E BOKOMI NA NSUKA

BranhamTabernacle.org

Balingami baoyo bakangami na Makilila, bakangani na Elembo, libota ya Kondimana.

Bokanisa kaka, tozali Ewa te, tozali te moko na babeti ntembe oyo kokakola kakola elongo na Satana. Tozali na kondima eyebi koningana te kati na Liloba oyo! Tozali kotingama na Liloba moko na moko ya Nzambe Akomaki mpe asololaki likolo na ba bande. Epesi biso KONDIMA EBONGI BE.

Tozali koluka te kondima moko boye ya monene tosengeli tomizuela. Tozali komeka te kozala malamu mingi; tokoleka na malamu soki moke te, tokokwea ntango nyoso. Ezali yango te nde Ayebisaki biso tozala na kondima likolo na yango. Alobaki bozal ana kondima mpe bondima LILOBA MOKO NA MOKO Alobaki ete ezali Oyo Elobi Nkolo. TOZALI mpe Epesi biso KONDIMA EBONGI BE KATI NA LILOBA NA YE.

Tika ete toyoka oyo Molimo Mosanto azalaki kozongisela biso liloba mpe koyebisa Tata na ntina na biso.

“Natosaki mibeko na Yo. Nalukaki mpe nakutaki mwa mabóké ya bato bapalangani zingazinga na mokili. Natindaki boko bilenge mibali bayóki ya ba bande na ndako na bango mpe bayokisaki bato ndambo ya ba bande. Ntango bayokaki ba bande, bandimaki Liloba moko na moko. Sasaipi bakómisi ndako na bango lingomba ya koyamba Etinda. Bazali ba Mpongo na Yo babongisamaki liboso bazali koyangana elongo mpo ya koyoka Liloba na Yo.

Nayebisaki bango ete baoyo nyoso bakolinga koya nan se ya Elembo yango, Etinda ya ngonga oyo, akobika. Nayebisaki bango ete bakokóma Moko elongo na Yo mpe Liloba na Yo. Soko esalaki likolo na bango, nasima batiaki Elembo yango likolo ya bana na bango. Batiaki Yango likolo na balingami na bango mpe komema bango nan se ya Elembo yango mpe bango bakobika lokola.

Nayebisaki baoyo bazalaki koyoka ba bande: Nazali kosenga bango mpo na Nzambe. Bandimaki Yango ntango Nalobaki Yango, na mitema na bango nyoso mpe na bomoto na bango nyoso. Bazali bato na ngai, baoyo Nalingi baoyo bazali koyoka ba bande.

Nalobaki na bango botala oyo ezali koya sima ya Bilembo Nsambo: kosangana ya bato, bilembo bisangani, mwinda motané kopelapela na mikolo ya suka, ememaki na sóngé na eloko oyo moko, Elembo.”

Oo, Lingomba, botelema mpe bominingisa bino mpenza! Bofina makanisi ya mitema na bino, bomilamukisa, kati na ngonga oyo! Esengeli tokóma na suka, to tokufa! Ezali na eloko moko koya kouta epai na Nkolo! Nayebi yango lokola OYO ELOBI NKOLO. Eloko moko ezali na nzela mpe epusi malamu tokóma na suka. Ezali katikati na Bomoi mpe kufa. Ekoleka kati na biso mpe tokomona Yango te.

Toyebi eloko moko ebelemi kokóma. Koya na Nkolo ekozala kolimwa ya pwasa, ezangi koyebana. Tokómi na suka. Ntango ekoki. Tososoli Elembo mpo na mokolo ya biso mpe esili kopakolama.

Tozali kozua bililingi ya Elekeli mokolo mwa Lomingo loye oyo ezuamaki na lolenge ya noki noki, na ntango ya bokómi na suka. Tozali koyangana zingazinga na Liloba.

Yaka kozala eteni ya likambo monene oyo mokolo mwa Lomingo oyo na 4:00 P.M., ntango ya Jeffersonville, wana ezali biso koyangana koyoka Liloba: 63-0901E—Bokomi na suka.

Ndeko Joseph Branham

Esode 12:11

Yilimia 29: 10-14

St. Luka 16: 16

St. Yoane 14: 26

Bagalatia 5: 23

St. Yakobo 5: 16

22-0529 KONDIMA EBONGI BE

Nsango: 63-0825E KONDIMA EBONGI BE

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi na Libala Kondima Ebongi Be,

Mbala moko lisusu, Nakuti yango ete ekoki te kotia na maloba Etinda oyo, Mokanda ya Bolingo ya Nzambe Ye moko, ekomami na Makila ma Ye, elobami na Mongongo mwa Ye, oyo elingi koloba mpo na biso. Eloko mosusu nyoso ezali na ntina te. Tolingi Ye longwa na bozindó na mitema na biso mpe Epesi biso Bolingo Bobongi be mpo na Ye. Eloko moko ekokoka te koninganisa biso longwa na Liloba yango. Ezali na eloko mosusu te na bomoi na biso soki kaka te koyoka Ye kozala na bondeko na biso pelamoko Moninga elongo na moninga.

Ezali kutu biso te, ezali Ye kobika kati na biso, komibianga Ye mpenza. Ezali bozindó kobianga bozindó. Bobele esengo ya kofina play mpe koyoka Nzambe kosalela mongongo ya moto koyebisa biso, tozali baponami na Ye. Koyebisa biso ete Alingaki biso liboso ya bozalisi ya mokili; mpo Ayebaki ete tokolinga Ye na oyo nyoso ezali kati na biso, mpe tokotikala sembo epai na Ye mpe na Liloba na Ye.

Nyoso oyo tozali na yango bosenga, Asilaki kopesa biso yango. Ezali na eloko ezangi te. Asalaki ete Liloba na Ye likomama na lolenge ya mokanda mpe Abatelaki yango nkóto na nkóto ya bilanga mpo akoka koyebisa biso Bolingo nyoso ezalaki na motema na Ye mpo na biso.

Na sima bolingo na Ye ekomi kutu monene mpo na biso wana eyebisaki Ye biso: “Nakoya kati na mosuni mbala moko lisusu mpe nakosolola na bino mbebu na litói ete kozanga kososola ezala te, kobulungana ezala te, bosenga ya ndimbola mpe te. Nakozua ntango na Ngai mpe Nakotalisa bino Bolingo na Ngai, mpe bokozala na makoki ya koyoka yango lisusu mpe lisusu mpe lisusu mbala mosusu. Nalingi ete boyeba, ete Tata azali kati na Ngai, Ngai nazali kati na bino, bino bozali kati na Ngai, tozali MOKO. Mosuni na bino ezali Mosuni na ngai, mikuwa na bino ezali Mokuwa na ngai, molimo na bino ezali Molimo na ngai.

Nakoyebisa bino nyoso oyo ezali kati na Motema na Ngai na polele monene. Nakokómisa yango polele na lolenge ete bokoyeba na ntembe te, Maloba makomaki mpe malobaki Ngai mazali mpo na bino, mpe makoki kokwea soki te.

Nakopesa bino Kondima Ebongi be, mpe Ekozala na Bokonzi likolo ya makambo manso. Ata monguna aloba nini, Ekokonza yango lokola bozali na Kondima Ebongi be kati na oyo Liloba na Ngai elobi ete bozali yango. Ezala eloko nini monguna azali komeka koyebisa bino, bozali kutu koyoka ye te. Matoi ma bino mazipami na makambo mosusu nyoso soki kaka te oyo Molimo na Ngai esili koyebisa bino. Esili kozwa lóngo na mitema na bino, mpe ezali na eloko moko te oyo ekosala ete boningana longwa na Yango.”

Kondima yango Ebongi be oyo tozali na yango na boyebaka ete Etinda oyo ezali Yango Elobi Nkolo, tozali kotia KONDIMA EBONGI BE yango moko mpo na elaka moko na moko Ayebisaki biso ete ezalaki ya biso kati na Liloba na Ye. Soko tozali bakoni mpe tozali na bosenga ya lobiko, ezali ya biso. Soko tozali na bosenga ya eloko ata nini, tokoki kozwa yango, mpo ete tosili kopakolama na Molimo na Ye. Tozali ba masiya na Ye bapakolámi ya mokolo ya suka, kotalisa lisekwa ya Yesu Klisto.

Ezali likambo ya bolingo lokola Azali komisopa Ye moko kati na biso. Tozali kokóma Moko elongo na Ye mpo na Elambo monene wana ya Libala. Molimo na Ye azali awa elongo na biso mpe kati na biso. Tozali na eloko moko kaka ya kosala, mpe yango nde kondima Yango, koyamba Yango.

Tozali motindami ya 7 ya Nzambe te, kasi tozali ban ana Ye mibali mpe basi. Maboko ma biso mazali Maboko ma Ye. Tondimaka ete oyo elobami likolo na bande ezali Oyo Elobi Nkolo. Ezali Liloba ya bomoi.

Mosakoli na Ye azali mobateli na biso. Wana ezali biso koyoka Liloba litiami na bande, tondimi Ezali Nzambe kosolola na biso alimá mbala moko. Tozali na Kondima Ebongi be na bondimaká yango.

Lokola ezali biso koyangana elongo na mokili mobimba koyoka Nzambe kosolola na biso na nzela ya mosakoli na Ye, kondima na biso ezali komata likolo mpe likoló lokola Nzambe azali koyeisa Mwasi na Ye ya Libala elongó zingazinga na Liloba na Ye lindimisami.

Lobi ekozala lokola mokolo mosusu moko te. Tokozwa Kondima na biso Ebongi be Apesi biso mpe tokosalela Yango likolo na eloko nse eloko tozali na yango bosenga, mpe tokoyamba yango lokola Likonzi na Móto ezali kosolola na nzela ya motindami na Ye moponami mpe koyebisa biso:

Boyebi nde oyo esili ngai kosalela bino? Bobiangi ngai, “mobateli na bino”; mpe bolobi malamu, mpamba te nazali bongo. Soko Ngai, mobateli na bino, natalisami na Yesu Klisto, ete Nazali kosala mosala na Ye, na  bongo bondima Liloba na ngai. Nabosalaka ekela oyo ya kondima, na botielaká bino maboko, Na kweisi makóno mpe mpasi oyo ezali kotungisa bino. Bondima yango, boye bokozwa bosenga na bino, ézala ata nini, mpo ete makambo nyoso ekoki epai na bango bakondima. Mpe ntango bozali kobondela, bondima ete bosili kozwa yango esengi bino. Mpe nandimi mpenza solo ete nazwi yango, mpe kati na motema na ngai nayambi lobiko ya moko na moko na bino, nayambi yango, ete esili kosalema. Nandimi yango, nandimi yango na nyoso oyo ezali kati na ngai.

Tondimi na nyoso oyo ezali kati na biso, Etinda oyo ezali Mongongo Na Nzambe, elobamaki, etiamaki na bande, ekokisamaki mpe ebatelamaki mpo na  mokolo oyo. Tondimi ete nyoso oyo tosengi, tokozwa yango, mpo ete Ezali OYO ELOBI NKOLO EZALI YA BISO.

Yaka komibakisa na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, kozwa eloko nse eloko ozali na yango bosenga lokola tozali koyoka mosakoli na Nzambe koyebisa biso lolenge ya kozwa: Kondima Ebongi be 63-0825E.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga:

St. Malako 11:22-26 / 16:15-18

St. Yoane 14:12 / 15:7

Baebele 11:1 / 4:14

Yakobo 5: 14

1 Yoane 3: 21

22-0522 NDENGE NINI NAKOKI KOLONGA?

Nsango: 63-0825M NDENGE NINI NAKOKI KOLONGA?

BranhamTabernacle.org

Balingami oyo basangani,

Ntango mpe Seko na Seko ekosangana elongo ntango Nzambe Akosangana elongo na bato na Ye.

Nazali kobianga yo ete oya kosangana elongo na Mwasi ya Libala mpe koyoka Liteya 63-0825M Ndenge Nini Nakoki Kolonga? Mokolo mwa Lomingi oyo na 12:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya losambo:

Emon: 3: 21-22