Category Archives: Uncategorized

23-0507 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA

Nsango: 60-1206 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA#

BranhamTabernacle.org

Balingami bandimi ya Solo,

Tozali lokola bana na Yisalaele baoyo babimaki na Ejipito mpe bayaki kotelema kaka penepene na Mboka ya Elaká. Totambolaki biso nyoso elongo. Tomonaki biso nyoso bikamwa yango moko ya Nzambe; tosanganaki na mana yango moko mpe mai koúta na Libangá libetamaki. Tolobaki biso nyoso ete tolandaka Likonzi ya Móto. Kasi KAKA MIBALE nde bakómaki ndèle na Mboka ya Elaka. Mpo na nini? KAKA MIBALE NDE BAZALAKI YA SOLO TO BANDIMI MPENZA. Bokeseni ezalaki nini ndèle mpe sikawa? Bandimi ya solo batikalaki na Liloba.

Ezali bobele na ebólo moko ezali mpenza godi baoyo bazali na makoki ya koyoka oyo Molimo alobaka. Ebolo moko godi oyo eyambaka Emoniseli ya solo. Ebolo yango ezali ya Nzambe. Bayokaka oyo Molimo azali koloba mpe bayambi Yango.

Tozali ebolo godi yango oyo ezali na Molimo na Nzambe. Tozali baoyo babotami na Nzambe. Tozali baoyo babatisami kati na nzoto na Nkolo Yesu Klisto na nzela ya Molimo na Ye.

Elembetele ya solo ezali KOYOKA oyo Molimo alobaka. Molimo azali kosolola. Molimo azali kolakisa. Ezali mpenza oyo Yesu alobaki ete akosala ntango Ayaki. Yowane 14:26: “Akolakisa bino makambo nyoso, mpe Akokanisela bino, nyoso oyo Nalobaki na bino.”

Yesu alakaki biso ete Akozala kobika kati na moko-moko na biso. Akokamba, Akotambolisa mpe Akotalisa biso nzela lokola moto na moto. Kasi eleki mbula 72 lelo, Nzambe Alobaki na nzela ya mwanze na Ye ya nguya mpe Ayebisaki na mokili: “Nazali Mongongo ya Nzambe epai na bino”. Ayebisaki ekelamo moko na moko ezali na bomoi “Ngai, Molimo Mosanto, Nazali na MONGONGO nakosalela koloba na bino mpe kolimbola mabombami na Ngai”. Azuaki soki moke te libaku malamu ya kotia mongongo na ye na bande ete tokoka koyoka mongongo na ye koloba na biso mbebu na litoyi.

Na boyokaka mongongo na ye likolo na ba bande bokozala na mitungisi te, kolikia, to kutu kobondela soko oyo bozali koyoka ezali solo. Nyoso oyo moto asengeli kosala ezali Kofina Play, mpe akoki koyoka mongongo na Nzambe koyebisa ye: “Yango Elobi Nkolo”.

Ozali na bosenga na libiko na nzoto: Fina Play. Ozali na bosenga ya kobalana: Fina Play. Ozali na bosenga ya kukundama: Fina Play. Ozali na motuna likolo ya motema na yo: Fina Play. Ozali na eloko moko ozali koleka kati na yango mpe osengeli na toli: Fina Play. Ozali na mokano ya litomba oyo olingi kozua: Fina Play. Oyebi te osala nini na bomoi na yo: Fina Play mpe yoka Mongongo na Nzambe, Molimo Mosanto, kosolola na yo mbebu na litoyi. 

Molimo Mosanto azali mosakoli ya mokolo oyo. Ayebisaki mokili, oyo ezali Mongongo nabongisaki liboso kozala Mongongo na ngai epai na bino. Nakotondisa ba mosusu ma Molimo Mosanto, mpe natindaki bango kosunga bino, kasi nazali bobele na Mongongo Moko oyo nalobaka ete ezali MONGONGO NA NGAI. Nazuaki kutu elili na Ngai elongo na ye kotalisa epai na molongo ete, Boyoka Ye. 

Nasengi na bino bososola ngai mabe te. Iyo, ezali na bato na Nzambe bapakolami batondisami na Molimo Mosanto baoyo abiangaki kosunga bana na ye. Nabondeli ete nazali moko na bango. Bango mpe bakoki kopesa bino toli, kolendisa bino, mpe kokamba bino kati na molai na mobembo na nzela. Nzambe atiaki bango awa mpo na ntina wana. Kasi toli eleki na LITOMBA, kolendisa mpe kokamba oyo bokoki kuzua ezali Mongongo na Nzambe koloba na bino na nzela ya Kofina Play. Eloko ata nini nalobi na bino to moto mosusu ata nani, esengeli éúta naino na Mongongo na Nzambe likolo na ba bande.

Eloko moko te eleki na litomba na bomoi na bino koleka koyoka Mongongo na Nzambe kosolola na bino. Omituna yo moko, ezali nde na eloko moko na mokili oyo MONENE KOLEKA oyo nakokaki kosala, to ezali na litomba koleka na bomoi na ngai, koleka koyoka MONGONGO ya Nzambe mondimisami? Koyoka Ndeko Joseph, TE. Koyoka moto nani mosusu, TE. Eloko moko ezali MONENE TE KOLEKA MONGONGO WANA. 

Soko moto moko azali na emoniseli ata nini mpe Molimo Mosanto na bomoi na ye akosengela koloba AMEN. Eloko moko kati na mokili oyo ezali monene koleka Kofina Playte.

Boni esengeli na biso kokeba na ntango oyo ya nsuka totikala elongi na Liloba yango. Uta na maloba ya papa, oyo amibetaka tolo ete azali Mokitani na Nzambe, kobongola litóno moko to mwa molongo moko na oyo elobamaki. Na miso na Nzambe, ezali NYOSO KOTEMELA LILOBA, MOTEMELI NA KLISTO.

Tolingi te kozala lokola bato ya mokolo ya Samwele. 

Ntango ba belemaki na Samwele mpe bansengaki mokonzi. Samwele ayokaki mpenza mawa kino motema na ye ezalaki pene na kotelema. Nzambe azalaki kokamba libota na Ye na nzela na mosakoli na Ye oyo amikabaki, andimisamaki na makomi mpe ayokaki ete aboyamaki…

Tosepelaki na bikanwisele, bwanya, kopesa mpe kobatelama na Nzambe. Tondimaka yango. Tolingaka yango. Mpe na koleka tolingaka te kozanga yango. Ezali kata ete tolingaka ete mokonzi moko akamba biso na bitumba…

“…TOLINGI MOKONZI OYO AZALI MOKO NA BISO KOKAMBA BISO.”

Mpe Nzambe alobaki na Samwele: “Omoni, baboyi yo te kasi baboyi NGAI ete nakamba bango te.”

Nzoka nde, toyokaka lokola Elisa ntango azalaki kosolola na Eliya. Eliya ALOBAKI NA YE POLELE, (lelo ekozala oyo elobami likolo na bande) tikala awa wana ezali ngai kokende. Elisa akolinga te mpe akokaki kosala yango te, azalaki na EMONISELI ya Liloba mpo na mokolo na ye. 

“Sikawa, tomoni bango kokende liboso, bakomi na eteyelo. Mpe alobaki: “Tikala awa sikawa. Zala awa, mifandisa mpe zala molakkisi malamu teoloji, mpe bongo na bongo. Mpe ntango mosusu, mokolo moko, okoki kozala moyangeli ya eteyelo monene awa. Kasi esengeli na ngai kokende kuna mwa mosika”.

57 Okokaki kobanza moto na Nzambe ásepela kozala moyengeli ya eteyelo monene, ntango Nguya na Nzambe ezalaki wana mpenza nzinga nzinga na esika azalaki kotelema? Te, mobali. Alobaki: “Lokola Nkolo azali na bomoi mpe molimo na yo azali na bomoi, nakotika yo te.” Nalingaka yango. Kotikala elongo na yango, ezala makambo ya kolembisa motema boni, eúta na mama na yo, na tata na yo, to na mobateli na yo. Tikala elongo na Ye.

Lokolo Nkolo azali na bomoi, nakotikala elongo na mongongo na Nzambe na nzela ya Kofina Play, mpo ete ezali Yango Elobi Nkolo mpo na ngai. 

Yaka komibakisa na etonga na biso, mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyangana koyoko Mongongo na Ye koloba na biso mpe komemela biso Emoniseli ya: Eloko Na Lingomba ya Sumuluna 60-1206.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati ya komilengeli  na boyoki Liteya.

Misala 20:27-30

Emoniseli 2:8-11

23-0430 Eleko Na Lingomba Ya Efese

Nsango: 60-1205 Eleko Na Lingomba Ya Efese

BranhamTabernacle.org

Molingami Wolo Peto etúlámi,

Boni natóndi na matondi kosangana na moko moko na bino, kokota na Molimo mpe koyoka Nzambe kosolola na biso, mbebu la litoi. Ezali kaka na suka te na oyo Azali komonisa biso. Mitema na biso mitóndi na esengo. Bomoto na biso ezali kopunjwa-punjwa. Moto akososola boni oyo tozali koyoka?

Koyoka kaka oyo Nkolo Ye Moko Azali koyebisa biso: “Bozali Lingomba na Ngai ya solo, Mwasi na Ngai ya libala. Epai na Ngai, bokokani na wolo PETO. Boyengebene na bino ezali boyengebene na Ngai. Misala na bino mizali misala na Ngai ya nkembo. Oyo NAZALI, bozali kotalisa yango. Oyo NAZALI NA YANGO, bozali komonisa yango.

Epai na Ngai, miko mazali te kati na bino, bozali na nkembo na kati mpe na libanda. Longwa na ebandeli kino na nsuka, bozali mosala na Ngai…mpe misala na Ngai nyoso mibongi be.

Bokozala na kosambisama soko moke te, zambi lisumu likoki kotangemela bino te. Ata liboso na kozalisama na mabelé, ntina na Ngai ezalaki kokabola Bomoi na Seko na Ngai elongo na BINO.

Moto akoki nde kosimba maloba oyo boni? Makanisi ma biso makoki nde kososola boni oyo ezali kosalema? Oyo ezali komonisama? Bokanisa yango, tozali na bosenga te ya kogánga kati na motema na biso mpe koloba: “Oh, yango ekokaki kozala kala kuna na eleko ya liboso ntango ba ntoma babimaki liboso.” Ezali TE na bonsenga mpe na biso kotala nsima, mpo na Ye, oyo abongwanaka soki moke te na eutelo to na ba nzela na Ye, azali kati na biso SIKAWA, koloba na biso mpe koyebisa biso Azali motindo moko lobi, lelo mpe libela. Oyo ezali ntango MONENE KOLEKA kati na lisolo ya ntango kozala kobika.

Tobetami mpe topetolami, totondisami na minyoko mitikaki Klisto na nsima. Totangami lokola ba mpate mpo na ebomelo. Tobomami mokolo mobimba. Tonyokwaka mingi, kasi kati na yango nyoso, tolemwaka te, soko mpe te ete tosalaka basusu konyokwa. Epai na Ye, tozali wolo peto ebetami, egumbami te, ebukani te, ebebisami te. kasi esalami lokola eloko moko ya bonzénga mpe esengo mpo la libela na nzela ya bitumba mpe mimekano ya bomoi oyo.

Azali sikawa kokebisi bamosusu nyoso: “Bozonga na Bolingo na bino ya Liboso”. Boni basengeli kokéba lokola bokoki kobongola te LILOBA MOKO, ata kutu litono to liutá te. Yango ezalaki mayele mabe ma ebandeli ya Satana kuna na Elanga ya Edene. Bobele liloba moko libakisami, bobele liloba moko lilongolami, nsima ekomi motemeli-Liloba. 

Na eleko oyo ya nsuka akebisaka biso ekozala na basakoli ya lokuta ebele komonana, koyebisa bato ete soko bandimi bango te mpe oyo balobaka, boko bunga. 

Ezali na NZELA KAKA MOKO kondimisama ete ELOKO TE ebakisamaki, eloko te elongolamaki, eloko te ebongolamaki…na boyokaka MONGONGO YA NZAMBE peto…. KOFINA PLAY.

Matondi Nkolo mpo na lotomo, lolakisami sembo, oyo kaka te loyebisaka ba mpate na bango litomba ya boyokaka Liteya mokolo na mokolo na ba ndako na bango, kasi na bozalaká batángi sembo, kotia Etinda oyo, Mongongó Moye, Ba Bande oyo, liboso mpe na koleka liboso ya bato kati na mangomba na bango.

Na bolobaka makambo maye, nasosolami mabe mpe nafundami kokabola mangomba mpe koyebisa bato ete bakende na losambo te. Ezali na yango kaka solo te. LILOBA lizali kobimisa bato na mangomba maye mazali kotia ba bande LIBOSO te kati na biyanganelo na bango. Bazali na Nzala ya koyoka Liloba utá na Mosakoli ya Nzambe. Bayokaka ete Ezali Etinda mpe Mongongo ya koleka balingaka koyoka. Bayokaka ete Ezali Mokano mwa Nzambe mobongi be koyokisa ba bande kati na lingomba na bango.

Nalobaka ntango nyoso na bato: “BOKENDE NA LOSAMBO”. Ntango batunaka: “Oyokaka ete batei bakoki naino koteya?” “Iyo.” Nalobá soki moke te to nakanisa te ete bakokaki kokende te. Nayebisaka kaka batei, balakisi, babateli: “Bosala oyo Nzambe Abiangi bino kosala, KASI NASENGI BINO, botiya Mongóngó mpenza ya Nzambe likolo na Bande Liboso, LOTOMO NA YO TE”.

Yango nde EMONIELI NA NGAI. Basengeli kosala lokola BAYOKAKA BAKAMBAMI KOSALA. Nazali na makoki ya koteya mpe kolakisa oyo nayokaka. Soko balingi koloba ete Ndeko Branham aloba soki moke te Kofina Play kati na Losambo, Mongóngó mpenza ya Nzambe babetaka ntólo ete bazali kolanda, etali bango. 

Molimo Mosanto azali, mpe azalaki ntango nyoso, kokamba Mwasi na Ye ya libala. Tondimaka Azali koyebiso Biso: “BOFINA PLAY, BOTIKALA ELONGO NA MOSAKOLI, MONGONGO NA NGAI, MOLIMO MOSANTO NA NGAI.” 

Na boye, tozali na móndengé na yango, bongo, lokola Eliya mosakoli liboso na oyo. Mpe soko ozali mwana na Nzambe, okotikala elongo na mosakoli ya Biblia oyo. Ezali Liloba.Botala ngonga, eleko.

Nani nde mosakoli ya Biblia, Liloba, Molimo Mosanto!

Molimo Mosanto azali mosakoli ya ngonga oyo; Azali kondimisa Liloba na Ye, kokokisa Yango. Molimo Mosanto azalaki mosakoli ya ngonga ya Mika. Molimo Mosanto, oyo akomáki Liloba, ayaka mpe akokisaka Liloba

Molimo Mosanto ya ngonga oyo azali kokamba biso na nzela ya mosakoli na Ye, lokola Asalaki eleko moko na moko. Nzambe abóngolaka pologalámi na Ye soki moké te.

Na ntina yango, bobiangami koya komibakisa na biso kati na oyo toyoki ezali pologalámi ya Nzambe na boyókáká Molimo Mosanto koloba na nzela ya mosakoli na Ye, mpe kokamba biso lokola Azali komemela biso Liteya: Eleko Na Lingomba Ya Efese 60-1205, na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati na bolengeli koyoka Liteya.

Misala 20: 27-30

Emoniseli 2: 1-7

23-0423 Emononeli Ya Patámo

Nsango: 60-1204E Emononeli Ya Patámo

BranhamTabernacle.org

Balingami balingi ya Liloba na Nzambe,

Boni ezali bikamwa kozala na makoki ya kosolola na moko na moko na bino lokola balingi ya Liloba na Nzambe. Ezali na eloko te ekoki kozua esika na Yango. Kozala na makila malamu ya koyoka Nkolo na biso mokolo na mokolo ya bomoi na biso, kosolola na biso na nzela na bibebú ya moto, mpe koyebisa biso Azali nani mpe TOZALI banani. Ezali na esika moko te, mongongo moko te, lingomba moko te, mpe moto moko te oyo akokoka koyebisa bino makambo oyo lokola MONGÓNGÓ NA NZAMBE.

Ayebisaki biso mpémélá ya Liloba ezalaki likolo na ba bande. Nyoso tosengeli kosala ezali Kofina Play mpe Molimo Mosanto atondisaka eteni ya ndako. Motindami na biso azalaki kobenda bomoi, mpe pole, útá na bozui ya mbeki monene. Azalaki na nsinga ya mwinda na ye ezindáki na kati.

Bomoi na ye ezali na móto na Molimó Mosanto. Nsinga ya mwinda na ye (bomoi) ezindáki kati na Klisto. Na nzela na nsinga yango ya mwinda azali kobenda bomoi mpenza ya Klisto, mpe na nzela yango, apesaka pole epai nab iso, Mwasi na libala.

Nambisa Ayebisi biso kaka te ete nsinga ya mwinda ya motindami na Ye ya nguya ezali kuna, kasi biso nyoso tozali kobenda longwa na eútelo moko. Tozindisamaki biso nyoso kati na Mbeki yango moko. Tokufi kati na biso moko mpe bomoi na biso ibómbami elongó na Klisto kati na Nzambe, itiami elembo na Molimo Mosanto.

Moto moko te akokoka kobotola biso na loboko na Ye. Bomoi na biso ekoki kolongolama te. Bomoi polele bozali kopela mpe kongenga kati na biso, kopesa pole mpe komonisama ya Molimo Mosanto. Bomoi na biso ya kati, ezangi komónana ebombami kati na Nzambe mpe eleisami na Liloba ya Nkoló. Tozali na Emoniseli na Yesu Klisto na mokolo na biso.

Boni Liloba lileisaka bomoto na biso. Eloko moko ekokani na Yango te. Boni Apesi nzela ete Mwasi na libala, longwa na mokili mobimba, akoka koyangana elongo koyoka Mongóngó ya Nzambe na mbala moko. Ata balobi mabe to babeti ntembe báloba nini, Nzambe abongisaki nzela mpe ezali nsolo kitoko kolumbama epai na Ye. Ayebisaki bobele biso ete Akoyeisa biso nyoso elongo na nsuka ya mokolo mwa misato. Nkembo!!

Tika ete toya elongo Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyoka Mongóngó moa Nzambe komemela biso Emoniseli ya Liloba lokola tozali koyoka: Emononeli Ya Patámo 60-1204E.

Ya liboso, tosengeli KOKOTA KATI NA MOLIMO lokola tokoyoka;

Mongóngó moyúláki Liloba na Ye na Elanga ya Edene mpe na Ngomba Sinai, oyo mongongo moyokamaki mpe na Ngomba ya Mbóngwana kitoko be ya nkembo, mozalaki koyúla mbala moko lisusu, mpe mbala oyo epai na mangomba nsambo na mobimba ya emoniseli na Yesu Klisto mpe ya nsuka.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga kati na boléngeli ya boyoki Liteya.

Bokanisa kotanga mpe koyoka buku ya Bileko Nsambo ya Lingomba.

23-0416 EMONISELI YA YESU KLISTO

Nsango: 60-1204M EMONISELI YA YESU KLISTO

BranhamTabernacle.org

Molingami Nzete Mwasi Na Libala,

Yubile nini oyo Nzete Mwasi na libala azali kozala na yango. Mitema na biso mpe bomoto na biso ezali kopela kati na biso lokola liboso soki moke te. Azali kotambola mpe kosolola elongo na biso, komonisa Liloba na Ye. Makambo mazali kokoma noki mpenza ete tokoki kosimba Yango kaka na mpasi.

Tozali koyoka Liloba na Nzambe libongi be limonisami na nzela ya Mosakoli Nzete abongi be, koteya Liloba Mosakoli libongi be, kobota mbuma Mosakoli ebongi be, na nzela ya Liloba na Nzambe libongi be.

Eloko nyoso oyo ebebisamaki mpe eliamaki na batindami banei ya kufa baoyo babomaki Nzete, ezongisami sikawa lisusu na nzela ya batindami banei ya bomoi. Batindami BATANO te, batindami na misala mitano te, ebolo moko te; batindami BANEI bazongisaki Nzete Mwasi na libala.

Útá ebandeli ya ntango, Nzambe azilaki mpo na lelo oyo mpe eleko kokoka ete Akokaki komona mbuma na Ye, na ntango na Ye na nzela ya ekeke ya mosakoli. Tozali Mbuma yango. Ekeke yango oyo. Ntango ya kobuka mbuma eyei.

Nsuka ya mposo ya Pasika oyo ezalaki te lokola Pasika mosusu moto abika ndele. Tokozala ndege moko lisusu soki moke te. Bozali na Nkolo ya lolenge wana. Nazalaki kozila Konetolama esalema na sekonde nyoso. 

Kati na Biblia, Dawidi alobaki Maloba maye: Batoboli matandu ma ngai mpe makaka ma ngai. Nakoki kotanga mikuwa na ngai: mizali kotala ngai mpe kolembetela ngai.

Bato batangaki mpe bayokaki likomi yango mpo na mbula nkama na nkama, kasi ntango Yesu akakesamaki kuna liboso na miso na bango likolo na ekulusu, Mwasi na libala asengelaki kotala Ye mpe koyeba, Lelo Oyo, Likomi Liye Likokisami liboso na miso ma biso mpenza.

Basengelaki koyoka lolenge nini wana eyebaki bango ete bazalaki komona, na miso ma bango, Likomi yango kokokisama, mpe bazalaki eteni ya Liloba likomamI.

Nde biso SIKAWA. Tozali kobika na mikolo oyo Makomi manso mansuka mazali kokokisami liboso na miso ma biso mpenza; mpe tozali eteni ya Likomi yango.

Azali kotambola alima kati na biso. Ezali nsuka ya mokolo mwa misato. Amonanaki mpe amonisaki biso elembo ya lisekwa na Ye. Azali motindo moko lobi, lelo, mpe libela. Tozali mbuma ya bomoi ya Bozali na Ye. Azalaki komimonisa mpe azali komonana epai na biso nyoso, Lingomba na Ye.

AZALI KOSALA YANGO BONI BONI?

Mosakoli asili kolongolama na mabele oyo, kasi Molimo Mosanto azali likolo na ba bande, mpe azali kokende kati na bikolo mpe zinga zinga na mokili. EZALI LOTOMO NA BOMOI YA NKOLO YESU KLISTO. Azali koyanganisa Mwasi na Ye na libala nyoso elongo na nzela bobele moko oyo ekoki, mpe ekosala: Liloba na Ye. Mongongo na Ye. KOFINA PLAY! 

Lelo Oyo, Likomi Liye, Likokisami.

Azali Nzete Mobali na libala longwa na Elanga ya Edene. Kasi Nzete Mobali na libala na Mwasi te, akoki kobota mbuma te; Asengeli kozala na Nzete Mwasi na libala. Ezali YO. Obotamaki na bisaleli yango moko. Liloba lisili kokoma mosuni kati na YO. Bomoi yango moko oyo ezali kati na Mobali ya libala ezali sikawa kati na YO.

Mwasi na libala agángaka: Aleluya, Amen, Nkembo!!

Azali na nini na embombelo mpo na biso na nsima?

Ntina mpo na ntango godi oyo ezalaki ete tolingaki…Likolo na motema na ngai Molimo Mosanto atiaki ekebiseli oyo ya kondimisama, ete: “Lingomba na mokolo oyo lisengelaki kozala na Etinda oyo.” Mpo ete, nandimaka ete ezali koleka bitinda nyoso ya Biblia, zambi emonisaka Klisto kati na Lingomba na Ye na ntango oyo.

Na ntina wana, Mwasi na libala akozala koyangana mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzangá, ntango ye Jeffersonville, lokola tokoyoka: Emoniseli Ya Yesu Klisto 60-1204M. 

Nakolinga koyikisa yo mpiko koyoka, to kotanga, mposo moko na moko longwa na Buku ya eleko ya Lingomba, mokapo moyokaki biso mokolo mwa Lomingo nyoso. Tokozala kotia boyoki bwa Angelé likolo na Lifeline – Voice Radio mokolo na mokolo na ntango ikeseni, kasi miyoko nsomi kotanga, koyoka mpe koyekola yango kati ne mposo mobimba ntango se ntango. 

Tike ete tosepela mpe tozala na esengo. Tiya makanisi te likolo na mokili oyo mpe lisumu mpe bozangi elikia nzinga nzinga na biso. Tika ete tosepela na nyoso oyo Azali kosala mpo na biso mokolo na mokolo. 

Na mikolo ya Mose, nandimisami bato bakobaki kotuna Mose: “Tokolongwa na esika oyo ntango nini? Tokolongwa awa ntango nini?”

Nakoki kaka koyoka Mose kokitisa bato motema mpe koloba:

“Ntango Nzambe abelemi. Kasi mpo na sikawa, bosepela na nyoso Azali kosala mpo na BINO”.

Bozali na magbóloló na ba ndako na bino? TE.

Bozali ma makelelé kolia milona na bino? TE

Bozali na mai ma bomeli makomi makila? TE. Bozali komela mai kitoko ya etoko. Bomisembola kaka mpe bosepela oyo nyoso Azali kosalela mpe komonisa bino.

Ezali kufa, mabebi mpe kosambisama mpo na bango. Kasi mpo na bino, oyo izali mikolo minene koleka likolo na mabelé. Bozala na esengo, kimia mpe bosepeli. Bokumisa kaka Nkolo mpo na nyoso Azali kosala, mpe botala liboso na oyo akosala na nsima.

Ndeko Joseph Branham

23-0406 Elambo

Nsango: 57-0418 Elambo

BranhamTabernacle.org

Molingami Nzete Mwasi na libala Ezongisami,

Mbula mobimba, Nazali kotala liboso na nsuka ya mpóso ntango nakoki kokanga mokili nyoso mpenza, kokanga bisaleli na ngai nyoso, kobondele kati na mokolo mobimba, koyoka Mongóngó na Ye koloba na motema na ngai, kozala na Boyokani elongo na Ye, mpe kopesa bomoi na ngai lisusu mobimba na Mosala na Ye. MOKOLO NYOSO esengelaki kozala mokolo ya Pasika mpo na biso, kasi nsuka ya mpóso oyo ezali mpenza godi, libaku lisanto; mpe ntango-etiami pembeni mpo na Mwasi na libala koya elongo mpe Kosambela. Nasali KOSEPELA MPENZA na ntina na yango baninga na ngai. Nakoki kaka te kozila komikanga na kati elongo na Nzambe na esika ya nkuku, kuna kati na Molimo, kotala Elongi na Ye; komibakisa na Mwasi na libala ya Klisto na mokili mobimba, kofanda na bisika na Likolo. Masanzoli na Nkombo na Nkolo! Esengelaki mpenza solo kozala nsuka ya mpóso ya kozila na etingia na bomoi na biso.

Oh, totelema kaka monuti moke lisusu awa. “Na bisika na Likolo.” Sikawa, kaka libanda te esika ata wapi, kasi na bisika na Likolo. Toyangani na “Likolo,” elingi koloba etemelo ya mondimi. Yango, soko nazali kati na mabondeli, ozali kati na mabondeli, to lingomba lizali kati na manbondeli, mpe tobelemi mpo na Liteya, mpe toyangani biso moko elongo lokola basanto, tobiangami kobima, tobatisami na Molimo Mosanto, totondi na mapamboli ma Nzambe, babiangami, baponami, tofandi elongo na bisika na Likolo sikawa, tozali bato na Likolo, kati na bomoto na biso. Milimo na biso ememi biso kati na mokilo ya Likolo. Oh, ndeko! Nde yango, mokili ya Likolo! Oh, nini ekokaki kokóma na mpokwa oyo, nini ekokaki kokóma na mpokwa oyo soko tolingaki kozala kofanda awa na mokili ya Likolo, mpe Molimo Mosanto kotambola likolo na motema moko na moko oyo ebongwani mpe ekomi ekelamu ya sika kati na Klisto Yesu? Masumu manso na nse ya Makila, na losambo lobongi be, na maboko ma biso likolo apai na Nzambe mpe mitema na biso mitombwi, kofanda na bisika ya Likolo kati na Klisto Yesu, kosambela elongo na bisika ya Likolo.

Bosila kofanda kati na moko? Oh, nafandaki wana kino nakokaki kolela mpo na esengo mpe koloba, “Nzambe, tika ngai soki moke te kolongwa awa.” Kaka bisika na Likolo kati na Klisto Yesu!

Kopambola biso na nini? Lobika na nzoto na Bonzambe, na boyebi liboso, emoniseli, bimononeli, nguya, minoko, ndimbola, bwanya, boyebi, mapamboli nyoso na Likolo, mpe esengo ezangi maloba mpe litondi na Nkembo, motema nyoso motondi na Molimo, kotambola elongo, kofanda elongo kati na bisika ya Likolo, likanisi moko mabe te kati na biso, likaya moko libendami te, elamba moko mokuse te, oyo moko te, oyo kuna to mosusu, likanisi moko mabe te, moto moko te azali na eloko ata nini kotemelana, bato nyoso koloba kati na bolingo mpe boyokani, bato nyoso na lobanzo moko na esika moko, “na pwasa longwa na Likolo lokito loyaki lokola mopepe makasi.” Nde yango, “Apamboli biso na mapamboli nyoso na molimo.”

Nkolo Yesu yamba losambo na biso apai na Yo na nsuka ya mposo oyo ya Pasika. Tika ete tokota na bisika ya Likolo kati na Klisto Yesu; tika tomikotisa na Esika eleki Bule. Likanisi moko mabe te, likanisi moko libanda te, kasi na lobanzo moko, na Esika moko; nsima tika ete ezala na lokito longwa na Likolo lokola lokito ya mopepe makasi kati na moko na moko ya be ndako na biso. “Yaka Nkolo Yesu”, tobelemi komona Yo miso na miso. 

Mpo Mwasi na Libala asili kozongisama na nzela ya Pole na Etinda ya ntango na mpokwa ya mokolo na biso; na nzela ya Etinda ya Malaki 4. Totondi Yo Nkolo mpo na komonisama mobimba ya Klisto kati na Lingomba na Ye, lingomba litongami na maboko te, kasi kominisama mobimba ya Klisto Amonisami kati na moto moko, mosakoli na Yo, na bilembo mpe bikamwiseli binene, mpe amonisi Liloba mobimba na Nzambe lisusu. Mpe sikawa Ezali kobika kati na Mwasi na libalia na Yo na mokili mobimba. Matondi apai na Yo mpo nakotika biso tobika komona Pole monene oyo ya mpokwa, kokokana na lisakoli.

Mpe Pole ya mpokwa ebimaka mope na nini? Pole ya mpokwa ezali mpo nan nini? Kozongisa. Whew! Boyambi yango? [Eyanganelo elobi, “Amen.”—Mok.] Pole ya mpokwa ezali mpe na ntina yango moko Pole ya ntongo ezalaki, kozongisa oyo ekatamaki na Bileko ya Molili, na nzela na Loma. Nzambe akozongisa, na bongegisaká Pole ya mpokwa (nini?), kozongisa Liloba mobimba ya Nzambe lisusu, kominisama mobimba ya Klisto lisusu kati na Lingomba na Ye. Eloko nyoso esalaki Ye, kaka mpeza Asalaki, elingaki kozala lisusu kati na Pole na mpokwa. Bomini oyo nalingi koloba? Oh, ezali bikamwa te? [“Amen.”] Mpe koyeba ete tozali kobika kaka awa komona yango sikawa, Pole na mpokwa, engebene mpenza na lisakoli.

Mwasi na libala ya solo atelemaka te na Kolongisama, atako Ayebaka ete masumu ma Ye mazali lokola nde Asala yango soki moke te; Atelemaka te na Kobulisama, atako apetolama mpe atiamá pembeni mpe na mosala; Atelemaka te na Pentekoste te, atako azuá libatisa ya Molimo Mosanto; kasi Akendeke liboso na LILOBA MPO NA MOKOLO NA BISO: Malaki 4, Liloba Yango moko likomi mosuni lisusu kati ma moto. Oyo, “Nakozongisa elobi Nkolo,” ekoyeisa Kondima ya Konetolama epai na Mwasi na libala. Mpe Liloba wana limonisami likoki BOBELE koya na boyokaká ba Bande, lokumu na Nkombo na Ye ya bikamwa.

Moko na bango, Martin Luther, abandaki kongengisa Pole. Ezalaki Pole moke, kaka makasi moke mpenza, ya kolongisama.

Na nsima, Wesley ayaki, makasi koleka, kobulisama. 

Nsima Wesley, oyo ya makasi koleka ye ayaki, Pentekoste, libatisa ya Molimo Mosanto, kati na mosakoli mosusu monene. Bomoni?

Kasi na mikolo ya nsuka, ya Malaki 4, Eliya asengeli koya na Liloba yango moko. “Liloba ya Nkolo liyaki epai na mosakoli.” Kati na Pole ya mpokwa, esengeli eya, kozongisa mpe koyeisa yango lisusu. Nini? “Kozongisa mitema ya bana epai na kondima ya Nzambe.” Pole ya minei!

 Boya koyangana zinga zinga na Liloba, na ba ndako na bino, ntango ya suka ya poso ya Pasika mpe tika ete Tosambela Nkolo. Bokanga ba telephone ya bino longola se kokanga bilili, koyoka Eteni Ya Liloba Ya Bande Mpo Na Mokolo, mpe koyoka bande longwa na Table app, Lifeline app, to kozua ekanganeli na yango.

Nakolingo mpo na biso nyoso ete tosangana mpo na manáka maye:

MOKOLO MWA MINEI

Ezalaki mokolo mwa Minei na mpokwa nde Nkolo Yesu Asalaki Elambo ya Nsuka elongo na bayekoli na ye, kati na ekaniseli ya Elekeli liboso na kobima ya bana na Yisalaele. Libaku nini malamu oyo tozali na yango kosala elambo elongo na Nkolo kati ba ndako na biso, liboso na nsuka ya mposo na biso mosanto, mpe kotuna Ye Alimbisa biso na masumu na biso, mpe Apesa biso nyoso tozali na yango bosenga kati na mobembo na biso.

Nzambe, tala mitema na biso sikawa. Makila mazali nde kuna, Nkolo? Soko mazali te, tobondeli ete—ete Opakola yango sikawa kaka, kolongola masumu na biso mpe kozipa yango, mpe makolongwa na biso, Nkolo, masumu ya mokili oyo, ete tokoka kozala basanto mpe babongi epai na Tata sikawa lokola toyei kozua nzo—nzoto mpe Makila mosopamaki ma Mwana Mpate na biso, Mwana na Nzambe, Mobikisi na biso.

Tika ete tobanda na 6:00 Nsima ya nzanga na ntango na bino ya mboka na mboka, mpe toyoka Elambo 57-0418. 

Nsima na Liteya, tokoyangana na mabota na biso kati na ba ndako na biso mpe tokozua Elambo ya Nkolo.

Ekoumela te tokozua ekanganeli mpo na kozua bande mpe molulu ya Elambo, to, ekozuama na Voice Radio. 

MOKOLO MWA MITANO

Tika ete tokende na libondeli elonga na mabota na biso na 9:00 na ntongo, na nsima lisusu na 12:00 nsima ya nzanga, kobianga Nkolo Azala elongo na biso mpe Atondisa ba ndako na biso na Molimo Mosanto lokola tozali komibonzela biso mpenza epai na Ye. 

Tika eta makanisi ma biso mazonga na mokolo wana na Kalvari, eleki mbula 2000, mpe tomona Nkolo na biso kokakesama na ekulusu, na nsima tomipesa motindo moko kosala ntango nyonso oyo ekosepelisaka Tata:

Sikawa tokuti ete etalisaki Ye mpenza mpenza. Moyemi sikawa Azalaki na Liloba kati na Mosala mobongi lisusu, mobiangami Mwana na Ye, Nzambe, Emanuele. Bokanisa kaka, ete Moto amipesaki mpenza kino Nzambe Amitalisaki na kati kuna, kati na nzoto wana, mpe Akomaki, Ye na Nzambe bakomaki Moko. “Ngai mpe Tata na Ngai tozali Moko. Tata na Ngai afandi kati na Ngai. Nasalaka oyo ntango nyoso esepelisaka Tata.”

Boni soko moklisto lelo akokaki kozala na litatoli lokola yango? Olingaki kozala Mosala mobongi be awa mpenza na Yuma, na balabala. Soko ozali mwasi asukwi kuna nsima na esukwelo, okozala naino kaka Mosala mobongi epai na Nzambe, ntango okoki koloba: “nasalaka ntango nyoso yango ekosepelisaka Nzambe,” mpe mokili mobimba mokoki komona mo—mosala na Yesu Klisto kotalisama kati na yo.

Nsima na 12:30 nsima na nzanga, tika ete toya elongo na ba ndako na biso koyoka, Bobongi Be 57-0419.

Nsima tika ete toya elongo kati na libondeli na 3:00 nsima na nzanga, kati na ekaniseli ya bobakami na ekulusu na Nkolo na biso.

MOKOLO MWA MPOSO

Tika ete mbala moko lisusu tosangana kati libondeli na 9:00 na ntongo, mpe na 12:00 nsima na nzanga, mpe kolengela mitema na biso mpo na makambo manene Akosala mpo na biso na kati na biso.

Nkolo! Bolimbisi, Nkolo! Oh, nakoki koyemba mingi koleka. Nakoki koteya mingi koleka. Nakoki konganga mingi koleka. Nakoki kolela mingi koleka. Kasi nakoki kobondela mingi koleka soki moke te. E Nzambe, tala ngai mpe meka ngai.

Nazalaki kaka koloba eumeli mingi te, na ntina na maziba ya bozindo, boni boni makotalisaka minzoto; tia bozindo ya Molimo na Yo kati na biso, Nkolo, lokola Dawidi mosakoli alobaki, “Kamba ngai pembeni na mai ma kimia,” mai ma miulá te. Mai ma kimya, kamba ngai kuna, Nkolo. Zalisa ngai kimia.

Nsima na 12:30 nsima na nzanga, tokoya biso nyoso elongo koyoka Liloba: Bokundami 57-0420.

Mokolo ya MOKANDA YA BOLINGO nini oyo ekozala mpo na Mwasi na Ye ya libala na mokili mobimba.

Nsima tika tokutana elongo lisusu kati na libondeli na 3:00 nsima na nzanga.

MOKOLO MWA LOMINGO

Mokolo mobongi be nini oyo koyoka mpe kosangana na Kozongisama ya Nzete Mwasi na libala. Tika liboso tolamuka ntongo makasi lokola Ndeko Branham asalaki na ntongo wana moninga na ye muke, ndeke ya toló motane, alamusaki ye na 5:00 na ntongo. Tika ete totonda kaka Nkolo mpo na kosekwisa Yesu longwa na bakufi:

Na ngonga ya mitano na ntongo oyo, moninga na ngai moke na toló motane apumbwaki na lininisa mpe alamusaki ngai. Eyokanaki lokola nde nwa motema mwa ye molingaki kopasuka, koloba, “Asekwi.”

Na 9:00 na ntongo, tika ete toya elongo mbala moko lisusu kati na monololo na biso ya libondeli, kobondela moko mpo na mosusu mpe komibongisa koyoka Mongongo na Nzambe.

Na 12:30 nsima ya nzanga, tokoya elongo koyoka Liteya na biso ya Pasika: Kozongisama Ya Nzete Mwasi Na Libala 62-0422.

Nsima ya losambo, tika ete mbala moko lisusu tosangana kati na libomdeli kotónda Ye mpo na NSUKA YA MPOSO YA BIKAMWA APESAKI BISO ELONGO NA YE MPE ELONGO NA MWASI NA YE YA LIBALA NA MOKILI MOBIMBA.

Apai na ba ndeko na ngai basi mpe mibali na ngambo ya bibale minene, lokola na mbula eleki, nalingaki kobianga bino bosangana elongo na biso mpo na milulu miye na ntango ya Jeffersonville, mpo na ntango nyoso ya libondeli likolo na manaka oyo mpe mpo na bande ekoyokama mokolo mwa Lomingo nsima ya nzángá. Namoni, ata bongo, ete koyoka ba bande mokolo mwa Minei, mokola mwa Mitano, mpe mokolo mwa Mposo nsima ya nzanga na ntango ya Jeffersonville ekozala kpókósó mingi mpo na ebele na bino, na bongo na sengi na bino bomiyoka nsómi koyoka Mateya wana na ntango se ntango ya mokolo oyo ebongi na bino. Nzokande, nalingaki mpo na biso nyoso toya elongo mokolo mwa Lomingo na 12:30 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, koyoka Liteya na biso ya mokolo mwa Lomingo elongo.

Nalingaki lisusu kobianga bino mpe bana na bino bozala kati na mosala mwa Boyemi mozuami na nkasa mpe bolakisi, mpe mimekano ya YF, oyo libota na bino mobimba likoki kosepela na yango elongo. Tokanisi bokolinga yango lokola nyoso ezali likolo na LILOBA tokozala koyoka na nsuka ya mposo oyo. 

Mpo na manaka ya nsuka ya mposo, liyebisi mpo na bolengeli ya losambo ya Elambo, bisaleli bisengelami na yango mpo na boyemi, mimekano mia Pasika, mpe liyebisi mosusu, bomona bikanganeli aw ana nse. 

Ezali lokumu monene mpo ngai kobianga yo mpe libota na yo koya elongo na Mwasi na libala na mokili mobimba mpe na nsuka ya mposo etondi na LOSAMBO, LOKUMU MPE LOBIKO NA NZOTO. Nandimi yango mpenza yango ete ezali nsuka ya mposo oyo ekobongola bomoi na yo mpo na libela.

Ndeko Joseph Branham

______________________________________________________________________________

Manaka ma Boyoki

Awa na nse ezali na mateya mpo na nsuka ya mposo ya Pasika. Elambo ya mokolo mwa Minei/Molulu ya Bosukwana Makolo ezali kati na bikanganelo.

MOKOLO MWA MINEI -6:00 nsima na nzanga (ntango ya mboka na bino)

(ETENI YA BANDE) + Elambo 57-0418

MOKOLO MWA MITANO – 12:30 nsima na nzanga (ntango ya mboka na bino)

Bobongi Be 57-0419

MOKOLO MWA MPOSO – 12:30 nsima na nzanga (ntango ya mboka na bino)

Bokundami 57-0420

MOKOLO MWA LOMINGO – 12:30 nsima na nzanga (ntango ya Jeffersonville)

Kozongisama ya Nzete Mwasi Na Libala 62-0422

23-0402 Konetolama

Nsango: 65-1204 Konetolama

BranhamTabernacle.org

Molingami Liloba Likolo Na Liloba,

Mangomba mingi bazali kososola te, bazali na nsoni, mayele mapalangani bango, eleki bango makasi, bayebi eloko ya kosala te, babungisi mayele, mpe kútu bayebi te bazali wapi nini ezali kosalema na baoyo, “Bato ya Bande” útá na mokila mobimba mokolo nyoso mwa Lomingo.

Ezali Lisanga Lizangi Komonana Ya Mwasi Na Libala Ya Klisto, kofanda kati na bozali ya Mwana, kokemba komilengela biso moko. Mobali na biso ya libala ya Lola azalaki koyebisa biso nyoso na ntina na Ezalelo ya biso Ekoya elongo na Ye.

Eleki kaka mwa ba mposo ayebisaki biso: “Mokili oyo ezali Ezalelo ya bino te, ezali Edene ya Satana, mpe Nakobebi yango na moto. Bozali baoyo ya Ngai ya motema, baoyo Na ponaki liboso na kozalisama na mokili kozala Mwasi na Ngai ya libala. Sikawa, Lomingo oyo Nakoyebisa bino nyoso na ntina na Konetolama na Ngai ezali koya noki.” 

Tozali na nse ya kozila monene. Tokoki koyoka yango kati na mipepe. Makambo mazali kosalema noki mpenza. 

Bobele oyo Biblia elobaki ekokoma na mokolo oyo, ezali kokoma, mokolo na mokolo. Na bongo, ezali koyikana bangu mpenza kuna libanda, kati na masobé wana, mpe makambo mazali kosamela, ete nakokaki kutu te kopota na yango elongo. Tozali pene na Boyei na Yesu, kosangana elongo na Lingomba na Ye, epai wapi Liloba likomaka Liloba.

Nyoso oyo ezali kosamela mpo na biso, Mwasi na Ye Moponami, Mwasi na libala ya mokolo oyo. Tozali kaka biso nde baoyo tomoni makambo oyo kufunguama. 

Abongisaki biso liboso na eleko oyo mpe moko mosusu te akoki kozua esika na biso. Tozali sikawa bana babali mpe basi bamonisami ete tokoka kozala na bondeko elongo na Ye; yango nde Alingaka.

TOZALI Liloba likolo na Liloba, momboto likolo na momboto, Bomoi likolo na Bomoi, mpe litongi mobimba ya Mwasi na libala ya Nkolo Yesu Klisto. 

Soko ozali na bosenga, loba Yango. Ozali Liloba likola na Liloba. Kotala te bozangi elikia kati na mokili nyoso ezingeli biso; bokono, malali, bobomi, kolemba motema, bolema ya bato oyo bayebi te soko bazali mobali to mwasi.

TOZALI MWASI NA LIBALA, toyebamaki liboso, tolongisami, Mwasi na libala ya Nkolo Yesu Klisto oyo amonisami.

Kobanga ELOKO TE. Zala na esengo mpe sepela. Ntango ekoki. Tozali kobelema kolongwa na ndako oyo ya bokono, NKEMBO!!!Yaka komilengela elongó na biso mpo ya Konétolama, mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville. Okozala lolenge moko soki moke te.

Ndeko Joseph Branham.

Nzembo 27:1-5

23-0326 Bosangani Ezangi Komonana Ya Mwasi Na Libala Ya Klisto

NSANGO: 65-1125 Bosangani Ezangi Komonana Ya Mwasi Na Libala Ya Klisto

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Moponami,

Okokaki kopesa nini kozala na Nkolo Yesu koya na ndako na yo mokolo mwa Lomingo oyo, kofanda na kiti na yo ya monzele, kotala yo na miso na yo mpe kosolola na yo mbala moko?

Okokaki kosolola te. Olingaki kosepela kosolola te. Nyoso okokaki kolinga kosala ezali kaka kotala Ye mpe kolela. Okokaki kobanga kútu kofungola monoko na yo. Okokaki koloba nini? Kati na makanisi na yo okokaki kokanisa, Nkolo, nakoki ata moke te ete Ózala awa kati na ndako na ngai. Nazali na nse ya nse koleka. Nazangeli Yo mbala mingi mpenza Nkolo, kasi Nkolo, nalingi Yo mingi mpenza.

Olingaki bongo koyeba kati na motema na yo, Ayebi mpenza oyo nazali kokanisa, eloko moko te ebombameli Ye. Ayebi mpenza sekelé ya motema na ngai.

Lokola otáli kati na miso ma Ye ma motuya, okokaki komona bolingo mpe esengo ya lolengé wana. Alingaki kozala koloba na yo na bofungóláká ata monoko na Ye te. Okokaki kokanisa, Azali ya soloawa, kati na ndako na ngai, elongo na ngai.

Motema na yo molingaki kobanda kútu kobeta noki noki koleka, lokola omonaki ete Azalaki kobelema koyebisa yo eloko moko. Na pwasa Mongongó ya bobóto oyóká ndèle molingaki koloba: “Molingami na Ngai wa motema, tungisamá te, nkombo na yo ezali na Buku na Ngai ya Bomoi ya Mwana Mpate, Buku ya kala te ya libala na yo ya nzoto, kasi Buku na Ngai ya sika ya Mwasi na Libala. Ezali mokanda na yo ya libala elongo na Ngai.

Molingami na Ngai ya motema, olimbisami kaka te na masumumu na yo nyoso mpe bikweli, kasi epai na Ngai OLONGISAMI. Na Miso na Ngai, Osalá soko moke te eloko moko ya mabé.

Ozali wa Ngai wa motuya, ngondo, mwana mobali mpe mwana mwasi na lisumu te. Ozali kotelema peto; Mwasi na Ngai ya libala abebisami te oyo asukwami na Mái ya Makila na Ngai Moko.

Liboso kútu sánzá, minzóto, to molekile ézala, ozalaki mwana na Ngai mobali mpe mwasi. Ozali bomónisami kati na nzoto ya misala mizalaki kati na Ngai na ebandeli.

Momboto na yo ya molimo mozalaki kati na Ngai mpo ete ozali elembeteli ya misala mia Ngai, makanisi ma Ngai. Ozalaki kútu kati na Ngai liboso ya bozalisi ya mokili.

Ozali Mwasi na libala na Ngai ya molimo oyo ozalaki kolála na Bozali ya Mwana, kokemba, na boyókáká Liloba na Ngai. Sikoyo obandaki kozala na kolamukisa, kozonga mpe komitia na molongo yo moko elongo na Liloba na Ngai. Ozali Mwasi na Ngai ya libala Moponami.

Ozali sasaipi na lisanga kati na molimo elongo na Ngai. Mosuni mwa yo mozali kokóma Liloba, mpe Liloba lizali kokóma mosuni; limonisami mpe lindimisami. Bobele oyo Nayebisaki yo ekokóma na mokolo oyo, ezali kokóma, mokolo na mokolo. Liloba kokóma Liloba.

Ozali na Emoniseli ya solo mpo na mokolo oyo ya nsuka: koyangana elongo ya Mwasi na Ngai ya libala na nzela ya Etinda Oyo. Na eleko mosusu moko te elakaki Ngai Yango. Nalakaki Yango epai na yo, na eleko oyo: Malaki 4, Kuka 17:30, Santu Yoane 14:12, Yoele 2:38.

Tokozala na lipati ya Bozongisi Matóndi na Lomingo loye ntango Nakoyebisa yo kútu mingi koleka. Nakolekisa ba ngonga elongo na yo, na bondeko mpe lipati likolo na Liloba na Ngai. Nakondimisa yo ete na botikaláká na Liloba na Ngai, mosakoli na Ngai, Mongóngó na Ngai, Kofina Play, ozali kati na Mokano mwa Ngai mobongi be.

Nayebisaki bango kati na Liloba na Ngai, Nazali kotelema na ekuke, mpe kobeta. Soko moto nani akoyoka MONGONGO na Ngai, mpe akofungola ekuke, Nakokóta epai na ye, mpe Nakolia elambo elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai. Mingi bakoyoka te mpe kofungola ekuke na bango, kasi na nzela na Emoniseli, ofungolaki ekuke na yo mpe oyambaki ngai na kati.

Bayokanaka te na boyokisáká Mongóngó na Ngai na mangomba na bango. Soko kaka bálingaka kotika Molimo Mosanto álukaluka makanisi na bango elongo na Liloba, balingaki kondimana. Tika ete Klisto, Liloba lipakolami, áluka-luka na motema na yo moko. Tiká Ye kokóta kati na yo, móna soko ezali solo to te.

Nalobaki na yo ekozala ebongiseli te koyeisa bino elongo, bakoki kútu te koyokana likolo na Liloba moko to Maloba mabalé kati na Biblia. Nayebisaki nde yo ete ekozala ebólo na bato? Te! Nayebisaki yo Ezali Etinda ya Moto Moko; mpe oyókaki mpe otósáki.

Mpo ete balingaki te koyoka mpe koyamba manáka na Ngai longwa na ebandeli, Natindelaki bango batei, balakisi, bantómá, babateli mpe basakoli. Kasi batindamaki kozongisa bato na botalisáká bango na pologalame na Ngai ya ebandeli mpe ebongi kwa, mwanje na Ngai ya nguya. Zambi Ezali Mongóngó na Nzambe epai na yo.

Bapakolami, kasi Nazali kaka na MOSAKOLI MOKO MOTINDAMI KOKAMBA YO. MOLIMO MOSANTO NDE MOSAKOLI. Nayebisaki nde yo te mbala mingi ete, LILOBA NA NGAI LILOBAMAKI NA NZELA NA YE LISENGELI NA NDIMBOLA TE, BAKISA TE TO LONGOLA TE ELOKO ATA NINI ALOBAKI, LOBA KAKA OYO ELOBAKI YE LIKOLO NA BA BANDE? Nde mosakoli, Molimo Mosanto kokamba yo.

Ye nde Natindaki kobianga yo ózala Mwasi na Ngai ya libala. Ye nde akotalisa yo epai na Ngai. Azali oyo Natelemaki elongo na ye ntango Namonisaki ye yo koleka na galasisi, Mwasi na Ngai na libala. Nasololaki na yo nyoso na ntina na ye kati na Emoniseli ntango Nalobaki, Ngai Yesu Natindaki MWANJE NA NGAI kotatola na bino makambo oyo KATI NA MANGOMBA. EZALI NGAI, Nazali bobele kosalela mongongo na ye koloba na yo.”

Mokolo nini ya bikamwa oyo tozali na yango elongo na Ye. Tozalá naino na bosepeli koleka te to na esengo na bomoi na biso. Oyo ezali Yango. Oyo nde tozalaki kozila mpo na bomoi na biso nyoso.

Ezali at ana elilingi ya ntembe moko te na mitema na biso to makanisi na biso. Mpamba ten a Liteya moko na moko toyokaka, Ayebisaka biso ete tozali kati na Mokano mwa Ye mobongi be. Ezali bobele na Mongóngó moko mokosangisa yo, mokobongisa yo kwa, mpe moko yeisa bino elongo… NGAI, NGAI KOLOBA NA NZELA YA MOSAKOLI NA NGAI. MALOBA MA YE TE, MALOBA MA NGAI. EZALI NZELA NA NGAI EPESAMI.

Mesa etandámi. Etondi na ndúnda mabóké, mpe mbalá, mpe ba ladi… LILOBA LIKOLO NA LILOBA, LIKOLO NA LILOBA. Tokozala na Lipati moko ya Bozongisi Matondi lokola naino liboso te. Ekozala na yubile nzinganzinga ya mokili lokola Mwasi na libala akoyangana nzingánzingá ya Mesa na bango koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na bango. Ndako na biso mpe mangomba na biso ikotónda na bozali na Ye. Tokozanga maloba longola se ba Nkembo, Aleluya na biso, lokumu na nkombo na Nkolo.

Yaka zala eteni ya Koyangana ya Bozongisi Matondi ya Libota ya Mwasi na libala, lokola akoleisaka biso. Lekisa ntango te, lokola tokobanda kosepela na lipati mokolo mwa Lomingo, na nzángá mpenza, ntango ya Jeffersonville. Akozala wana, mpo Ayebisaki ngai Akozala.

NAZALI KOYA mpe Nakozala kosolola na yo na ntina na Lisangá Lizangi Komonana Ya Mwasi Na Libala Ya Klisto 65-1125.

Nakomona yo kuna na Mesa.

Ndeko Joseph Branham

LKL: Mwasi Na Ye Moponami