Category Archives: Uncategorized

25-0608 Mokambi

NSANGO: 62-1014E Mokambi

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libala Libóké ya Ebelé Ya Bato,

Sikawa Nzambe atindakí ntango nyoso bakambi na Ye, Atikalá te na ntango nyoso kozánga mokambi, kati na bileko. Nzambe azaláká ntango nyoso na moto moko oyo atélemaká mpo na Ye na mabelé oyo, kati na bileko nyoso.

Nzambe alingí te tótia mitema na lisósoli ya bisó to makanisi ya moto atá nani. Nde ntina Atindelaki Mwasi na Ye ya libala Mokambi; zambí azali na lisósoli, boni kokende mpe nini kosala. Nzambe ABONGOLÁ NDÈLE manáka ma Ye SOKI MOKÉ TE. Azangá soki moké te kotinda Mokambi epai na bato na Ye, kasi osengeli koyamba Mokambi yango.

Osengeli Kondima Liloba moko na moko lilobí Ye na nzela ya Mokambi na Ye. Osengeli kokende nzela Mokambi na Ye alobi ókende. Soko ozali koyóka to Kondima mingóngó misúsu lokola mokambi na yo, nsúka nsúka okobúnga na yo sé kobúnga.

St. Yoane 16 elobí Azalaki na makambo mingi ya koyebisa bisó mpe komónisa bisó, na bongo Alingáki kotinda Molimó Mosanto na Ye koKamba mpe koyebisa bisó. Alobakí Molimó Mosanto nde mosakoli mokambi ya eleko moko na moko. Na bongo, basakoli na Ye batindamákí kotelema na esiká ya Molimó Mosanto kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Molimó Mosanto Atindamí kotámbolisa lingomba, ebólo ya bato te. Molimó Mosanto nde bwanyá nyoso. Bato bakómaka Malíli mpe bazangi kotia motema na likambo.

Ezali moto te, kasi Molimó Mosanto KATI ya moto yango. Moto oyo Aponáki kotélema na esiká na Ye moko mpe kozala mokambi na bisó ya mabelé oyo akambámí na Mokambámí na bisó ya Likoló. Liloba liyebisí bisó tosengeli kolanda Mokambi wana. Ézala ata nini ekanisí bisó, oyo eyókaní na lobánzo malamu, to oyo moto mosúsu nani alobí, tozali bato ya kokabola yango te, mokambi azali sé moko.

Nzambe Atindi Mokambi, mpe Nzambe alingí ómíkundwela ete nde Mokambi oyo Atíí.

Mokambi mosakoli ya bisó atiamákí na Nzambe koloba Liloba na Ye. Liloba na ye EZALI LILOBA YA NZAMBE. Mokambi mosakoli, mpe kaka ye, azali na ndimbola ya bonzambe ya Liloba. Nzambe alobakí Liloba na Ye epai na ye mbebu na litói. Na bongo, okoki kowelisa soki moké te, kobóngwana soki moké te, to kobanzabanza Liloba ya Mokambi na yo.

Osengeli kolanda Ye, mpe Ye kaka. Soko osali yango te, nsúka nsúka okobúnga. Kanísa, ntango otíkí Ye, Mokambi oyo Nzambe atíí, etálí yo, boye esengeli na bisó kotikala pene ya Mokambi Aponi, mpe koyóka mpe kotósa Liloba moko na moko Alobí na nzela na ye.

Mokambi na bisó alakisakí bisó ete Kondimana ya kala ezalakí elílíngí ya Kondimana ya sika.

Ntango Yisalaele atikaki Ejipito kokende na mboka ya elaká, kati na Esode 13:21, Nzambe ayebakí ete batíkalá koleka nzela wana libosó te. Ezalaki bobele kilométele Ntúkú Motóbá na minei, kasi ata ko bongo bazalaki na bosengá ya eloko mosúsu kokende elongó a bango. Balingaki kobúngisa nzela na bango. Na boye Ye Nzambe, atindelakí bango Mokambi. Esode 13:21, eloko moko lokola boye: “Natindákí Mwanje na Ngai libosó na yo, Likonzí ya Móto, kobatela yo na nzela,” kobatela bango na mboka oyo ya elaká. Mpe bana ya Yisalaele balandakí Mokambi yango, Likonzi ya Móto (butú), Lipata na mói. Ntango Etélemákí, batelemákí. Ntango Etambolákí, batambolákí. Mpe ntango Amemaki bango pene ya mboka, mpe babongakí te kokátisa, Azongisakí bango kati na lisobe lisúsu.

Alobaki ete nde lingomba lelo. Tozalaki bato ya kokende kala soko kaka tómísémbolaka mpe tómítiaka na molongó, kasi  Asengelaki kokamba bísó zínga-zinga, zingázingá mpe zingázingá.

Basengelákí bobele kolanda mokambi na bango lokola ALANDÁKÍ mpe ayókákí útá na Likonzí ya Móto.

Ayebisaki bango oyo Nzambe alobaki mpe basengelaki kotósa Liloba moko na moko lilobaki ye. Azalaki Mongóngó ya Mokambi. Kasi babétékí ntembe mpe batelemélakí Mokambi Nzambe atiákí, na bongo bayebgáyengaki kati na lisobé mbula 40.

Ezalaki na basali mingi na mikolo ya Mose. Nzambe atielákí bango kosunga bato, lokola Mose akokaki kosala yango nyoso te. Kasi lotómo ya bangó ezalaki kotálisa bato oyo Mose alobakí. Biblia  elobí likambo moko te oyo mibali wana balobaki, Elobí bobele oyo Mose alobaki kozala Liloba kokamba bato.

Ntango Nzambe alongolakí Mose na mokili, Yosua atiamákí kokamba bato, oyo ezali etaliseli ya Molimó Mosanto lelo.

Yosua atéyakí eloko moko ya sika te, soki te emekákí ye kozua esiká ya Mose, soki te emekaki ye kolimbola yango elobaki Mokambi; atangaki bobele oyo Mose alobaki mpe ayebisaki bato: “Bótíkala na Liloba. Bótikala na oyo Mose alobakí”. Atangaki na ye kaka oyo Mose alobaki.

Elilíngí nini oyo ya lelo. Nzambe andimísaki Mose na nzela ya Likonzí ya Móto. Mosakoli ya bisó andimisamákí na Likonzí ya Móto yango moko. Maloba malobakí Mose mazalaki Liloba ya Nzambe mpe etiamákí kati na Sandúku. Mosakoli ya Nzambe alobaki na mokolo ya bisó mpe Etiamákí likoló ya bande.

Wana elongolamáki Mose na mokili, Yosua atiamákí kokamba bato na bobátelaká Maloba malobakí Mose libosó na bango. Ayebisaki bango bándima mpe bátikala na Liloba moko na moko Mokambi ya Nzambe alobakí.

Yosua ntango nyoso atangakí oyo Mose akomákí Liloba nsima ya Liloba longwá na mikandá. Atiaki Liloba libosó na bango ntango nyoso. Liloba na mokolo ya bisó likomamáki te, kasi Litiámáki na bande na ntina ete Molimó Mosanto ákoka kozala na Mwasi na Ye ya libala koyóka Liloba nsima ya Liloba oyo Alobáki na Bofináká Play.

Nzambe abóngolaka manáka ma Ye soki moké te. Azali Mokambi ya bisó. Mongóngó ya Ye nde eloko ezali kokamba mpe kosangisa Mwasi na Ye ya libala lelo. Tolingi na bisó koyóka sé Mongóngó ya Mokambi na bisó lokola Ezali kotambolisa bisó na nzela ya Likonzí ya Móto. Ezali lisangá lizangí komónana ya Mwasi ya libala ya Klisto. Toyebí Mongóngó na Ye.

Ntango mokambi na bisó ayéi na etéyelo, Molimó Mosanto amamí ye mpe Ezali lisúsu ye te, kasi Mokambi ya bisó. Atemísí motó na ye kati na mopepe mpe agángí: “Yango Elobí Nkoló, Yango Elobí Nkoló, Yangó Elobí Nkoló!” Mpe enámá moko na moko ya Mwasi na libala ya Klisto kati na mokili mobimba bayéi alimá epai na ye. Mpo ya nini? TOYEBAKA MOKAMBI YA BISÓ BOBELE NA MOTINDO MOKOSOLOLAKA YE.

Mokambi na bisó= Liloba

Liloba = Likoyaka epai ya mosakoli

Mosakoli = Molimboli ya bonzambe sé moko; mokambi na Ye ya mabelé.

Tíkalá nsima ya Liloba! Oo, ee, mobali! Tíkalá na Mokambi wana. Tíkalá alimá nsima na Yango. Leká te libosó na Yango, tíkalá nsima na Yango. Tiká Yango ékamba yo, yo kambá Yango te. Yo tika Yango ékende.

Soko olingí kobúnga te, yaka koyóka Mokambi na bisó lokola azali koloba na nzela ya mokambi na Ye  oyo atiámí

ya mabelé Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Liteya:

 62-1014E—Mokambi

Makomí:

St. Malako 16:15-18

St. Yoane 1:1 / 16:7-15

Misala 2:38

Baefese 4:11-13 / 4:30

Baebele 4:12

2 Petelo 1:21

Esode 13: 21

25-0601 Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be

NSANGO: 62-1014M Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Bikeko Ya Bomoi,

Mongóngó tozali koyóka likoló ya ba bande nde Ulimi Tumími ya Nzambe epai ya Mwasi na Ye ya libala. Ekokisi mpenza sikawa bokútani elongó Mwasi na Ye ya libala kati na motema moko mpe lobánzo lokó kozala lingomba litóndí solo na Molimó, litóndí na nguya ya Nzambe, kofanda elongó na bisiká ya Likoló, kopesa mbeka ya molimó, masánzoli ya Nzambe, na Molimó Mosanto kotambola na kati ya bisó.

Klisto atindelákí bisó Molimó Mosanto na Ye koloba na nzela ya mwanje na Ye ya nsambo kotonga bisó pelamókó bato kati na litongi ya ya Yesu Klisto, ete tókoka kozala ndako makasi mpe efándelo ya Molimó Mosanto, na nzela ya Liloba na Ye.

Tozali basangoli ya nyoso. Ezali bozui ya bisó moko, EZALÍ ya bisó. Ezali likabo ya Nzambe epai na bisó, mpe moto te akokoka kolongwela bisó yango. EZALI YA BISÓ.

“Oyo esengi bino epai ya Tata kati na Nkombo ya Ngai, Nakosala yango.” Nani nde akoki koángana eloko ata nini kuna? “solo, solo, Nayebisi bino, soko bokoloba na ngomba oyo, ‘ longwá,’ obéti ntembe na motema na yo te Kasi ondimí ete yango elobí yo ekokokisama, okoki kozua eloko nini elobí yo.” Elaká nini oyo! Esúki te kaka na lobíko ya nzoto, kasi ézala ata likambo nini.

Nkembo na Nzambe…ELÓKO SÉ ELOKO ELÓMBÍ BISÓ!

Útá ebandeli ya ntango, bozalisi nyoso ya Nzambe bozalaki kokímela mpe kozila mokolo litóndí ya bana ya Nzambe bakomónisama. Mokolo yango ekómí. Mokolo yango yango oyo. Ntango yango yango oyo. BISÓ nde bana mibali mpe bana basi yango ya Nzambe.

TOZALÍ esáleli mobimba ya bomoi oyo Nzambe azali kotambola kati na yango, Azali komóna kati na yango, Azali kosolola kati na yango, Azali kosala kati na yango. Ezali Nzambe, kotambola likoló na makolo mibalé, KATI NA BISÓ.

Tozali mikandá mia Ye mikomámí mitángámí na bato nyóso. Baponami na Ye, babongisami libosó, bana mibali mpe basi ya Nzambe baoyo batiamí na bokonzi ya bana oyo Azali kosala kati na moto ya bomoi, elilíngí ya bomoi, litongi ya moto oyo abongí be.

Tofúkami bisó mpenza libosó ya Nzambe ya bomoi, nguya ya bomoi, boyebi ya bomoi, motema molai ya bomoi, bobóto ya bomoi, Nguya ya bomoi koúta na Nzambe ya bomoi, ekómisí moto ya bomoi elilíngí ya bomoi kati na litongi ya Nzambe.

Ezali Klisto, kati na moto ya Molimó Mosanto likoló na bisó, na libatisi ya solo ya Molimó Mosanto na Ye, na mabongi ma Ye manso matiámí elembo na kati na bisó. Nzambe, kobika na kati na bisó kati na Mongómbo mobiangamí Litongi.

Mongómbo ya bomoi, ya efandelo ya Nzambe ya bomoi; Lingómbá libongí be, mpo ya Libángá ya motó kozipa bisó.

Nzambe atindaki mosakoli kobianga Mwasi ya libala kobima mpe kokamba ye. Ezalakí Adama na Ye ya libosó azóngisámí mobimba, litongi ya moto abongí be kati na mokolo ya bisó, komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Nakokí kolongwa na yango te. Eloko moko te ekokí koningisa ngai. Etalí ngai te oyo moto ata nani alobí; ekoningisa ngai ata ndambo te. Nakotíkala kaka wana.

 Nakozila, kozila, kozila, kozila. Bokeseni moko ezalli te. Etíkálí bobele wana. Na nsima, mokolo moko, Nakogánga elongó na basanto basúsu na lobánzo moko:”Tozali kopéma na kondimisama likoló ya Liloba moko na moko! Na nsima Okotálisa BISÓ epai na Ye. Na nsima tokozonga bisó nyoso na mabelé lisúsu, kobika libela.”

Nalakí, na ntóngó oyo, epai na Ye, na motema na ngai nyoso, ete, na lisungí na Ye mpe na ngolu na Ye, Nakobondela ete Nakoluka mokolo na mokolo na kozanga kotika, kino Náyoka moko na moko ya bosenga oyo kokita kati na mwa litongi ya kala oyo ya ngai, kino Nakokoka kozala bomónisami ya Klisto ya bomoi.

MPO YA NGAI, koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande ezali etandelo ya Nzambe mpo ya lelo. Ezali Liloba ya bomoi ya Yesu Klisto. Ezali Etémelo ya ngai éngébéné na Liloba ya Nzambe. Ezali nzela ya Nzambe epesami mpo ya lelo.

Na bongo, Nalingaki kobianga yo ómibakisa na ngai mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Nazali koyóka William Marrion Branham, oyo Nandimí azali Mongóngó ya Nzambe mpo ya mokolo ya bisó, kolakisa Mwasi na libala ya Klisto lolengé ya kokóma: Litongi Ya Moto Oyo Abongí Be 62-1014M.

Ndeko Joseph Branha

Makomi ya kotanga libosó ya Litéya:

St. Matai 5:48

St. Luka 6: 19

St. Yoane 1:1 / 3:3/ 3:16 / 5:14/ 14:12

Misala 2:38 / 7:44-49 / Mokapo ya 10 / 19:11 /28:19

Baefese 4:11-13

Bakolose Mokapo ya 3

Baebele 10:5 / 11:1 / 11:32-40

Yakobo 5:14

2 St. Petelo 1-7

Yisaya 28:19

25-0525 Kotiama Lokumu Ya Mwana #4

NSANGO: 60-0522E Kotiama Lokumu Ya Mwana #4

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Babóngólámí,

Na Bofináká Play, tozali koyóka Liloba ya Nzambe lizangí kokwéa. Ezali Liloba moko na moko Solo, lisakola moko na moko ya Yango. Tobiangami mpe tobatelámí, totóndisámí mpe totiamí pembeni; totóndisámí na Molimó Mosanto, mpe sikawa tosili koíngela kati ya Mboka ya Kanana. Tozali na nsómo ya eloko moko te…ELOKO MOKO TE, toyebí baoyo tozali.

Mpo ete totikali na Liloba na Ye, lokola Apesáki bisó motindo tósala, Akoyebisa bisó ete Atikelákí bisó libulá. Ntango nini nde Osalákí yango, Tata? Ntango Naponaki bino mpe Natiaki nkombó ya bino likoló ya Búku ya Bomoi ya Mwana Mpate libosó ya bozalisi ya mokili.

Wana esilaki litondí ya ntango koya, Natindaki Yesu Mwana Mpate, Oyo abomamákí longwá na bozalisi ya mokili, ete bókoka koyamba libula ya binó kozala bana ya Ngai mibali mpe basi, banzambe mike. Nasengeláki nátala-tala bino mpo ya makeléle mpe koningana-ningana libosó ete Nakoka kotia binó.

  • “Bondimí ete koyóka Mongóngó na Ngai likoló ya ba bande kati na losambo ezali mabe?”
  • “Ee, bosengelaki te koyóka bande kati ya losámbo.”
  • “Longólá yango. Bozali kosala makeléle.”
  • Bondimí ete Mongóngó na Ngai likoló ya ba bande esengeli na ndimbola?”
  • “Ee, Esengeli na moto moko kolimbola Yango.”
  • “Ozali kosala makeléle. Bwaká yango libandá. Obelémí naino te.”

Ntango obelemí, okoloba, “”Amen” na Liloba moko na moko.

  • “Ondimí ete Nazali lolengé moko lobi, lelo mpe libela?”
  • “Amen.”
  • “Ondimí ete Mongóngó ya Ngai likoló ya ba bande nde MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA Osengeli koyóka?”
  • “Amen.”
  • “Ondimí ete Mongóngó ya Ngai likoló ya bande nde ekosangisa Mwasi ya libala?”
  • “Amen.”
  • “Bondimí ete mwanje ya Ngai ya nguya nde akotálisa binó epai na Ngai?”
  • “Amen”

Bozali kokangama makasi sikawa. Natálí-tálí bino mpo ya makeléle mpe bisiká ya kolemba-lemba. Nabelémí kokanga ekuke. Nakotia Elembo ya Ngai likoló na bino. Bolóngí momekano mwa Ngai.

 Sikawa bótika náyebisa bino likambo moko, balingami na ngai bato ya motúya kati na mikili ya ba bande; ngambo ya bibale minéne mpe epai sé epai bozali, bóbanga te. Nyoso ezali malamu. Nayebakí bino libosó ya bozalisi ya mokili. Nayebaki eloko moko na moko oyo ekokaki kokóma.

Nazali koya mpo ya binó nokí mpe komema binó na Esiká wapi kúfa ezali te, bwalé te, zúwa te, eloko te; bobele bobongi be, bolingo bobongí be.

Kino ntango wana, bóbósana te, Napesi bino Liloba ya Ngai, boZALI LILOBA YA NGAI likómí mosuni. Soko bosengeli na eloko ATA NINI, bóloba Yango, nsima bóndima Yango, Ezali libulá ya bino.

Nakotinda Mongóngó ya Ngai epai na binó lisúsu Lomíngo loye mpe kolimbola Yango nyoso epai ya binó. Nakoyebisa binó mbala moko lisúsu bozali banani, wapi bozali kokende, mpe Eúlání na nini na ngambo kuna, sikawa mpenza.

Yaka komíbakisa na Mwasi na Ngai ya libala lokola Nazali na bango nyoso bafándí elongó na bisiká ya likoló Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe koyóka Ngai na botíami mpenza kotia binó na nzela ya Liloba ya Ngai. 60-0522E Kotiama Na Bokonzi Ya Mwana # 4

Ndeko Joseph Branham  

25-0518 Kotiama Lokumu Ya Mwana #3

NSANGO: 60-0522M Kotiama Lokumu Ya Mwana #3

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Moseka Peto,

Ntango tofinaka Play, ezali mafuta ya nzói likoló ya libángá, ezali esengo ezangí maloba, ezali endimiseli epambólámí, ezali lóngo na bomoto ya bisó, ezali elikia mpe efándelo ya bisó, ezali Libángá ya Bileko, ezali nyoso oyo ezali malamu, ezali Nzela ya Nzambe epesami mpo ya lelo.

Zambí tofinaka Play, Mongóngó ya Nzambe ebálisí bisó; ebandísí bisó na Klisto, lokola Moseka Peto na Liloba na Ye. Tozali na Molakisi sé Moko, Mongóngó Moko, mosakoli Moko, oyo azali kokamba bisó na Molimó Mosanto.

Kasi oyo nde lingomba, Nazali kolakisa bino. Oyo ezali kokende likoló ya ba bande. Nalingi bato bazali koyoka ba bande bámikanisela oyo ezali mpo ya lingomba ya ngai.

Kondimisama ya motindo nini oyo epai na bisó ete tozali kati ya Mokano mwa Ye mobongí be. Bande izali mpo ya lingomba na ye. Azali kolakisa bisó. Azali koyebisa bisó, bóyoka ba bande.

Abandákí molongó ya Kotiama na Bokonzi ya Mwana na boyébisáká bisó oyo esalemaki kaka mwa mikolo libosó.

Nsima, na Liteya moko na moko, azali koloba na ntina ya ntango abóngwanisamákí. Boni esengeli kozala na litómbá mpo ya Mwasi ya libala koyóka oyo esalemákí mpe oyo Mwasi ya libala alobakí na ye.

Mosakoli na bisó akosambisama na Liloba oyo ateyákí mpe atikaki likoló ya ba bande. Mwasi ya libala na ngambo mosúsu ayebisaki ye ete akoyambama na Nkoló na bisó. Na nsima akotálisa bisó epai na Ye lokola mabonza ya mosalá na ye,  nde tokozónga na mabelé lisúsu kobika libela.

Liloba moko na moko tozali koyóka ezali eteni moké ya libángá ya motúya. Tozali sé kokóba kobongisa Yango mpe kobongisa Yango lokola Azali komónisa mingi koleka awa ezali bisó kotanga kati ya milongó.

Boni tolingaka kokabola Yango na bandeko na bisó mibali mpe basi: “Oyókakí oyo?”

“Aponakí bisó kati na Ye libosó kútu mokili mózala”? Nde libulá ya bisó. Nzambe aponáki bisó, mpe atikaki Yesu áya mpe áfúta motúya. Yango nini? Kosopa na Ye Makila ma Ye, ete lisúmu litángamela bisó te. Eloko te osálí.

Na bongo, nsima na yango kaka, osimbaki ko oyo?

“Bule, bule, bule, epai na Yawe.” Ozali na miso ma yo matali na epai ya Kalvari, mpe ezali na eloko te ekotélemisa yo! Etambweli mpenza ya bomoi na yo, ozali kotambola kokita na Nzela Monéne ya Mokonzi, opakólámí na Mafúta ya motúya ya epakweli, kokóta kati na esiká eleki Bule ya bule. Whew! Amen.

Tozalaki kaka lokola lingénda ya Alona, nzete ya kala ya kokaoka oyo amemaki mpo na mbúla ntuku minei kati na lisobé. Kasi sikawa, mpo ete toumélí na Esiká ya Búle wana na boyókáká Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó likoló ya ba bande, totóísí nkasá mpe folólo, totóndí na Molimó Mosanto na Ye, mpe tozali Mwasi na Ye ya libala kogánga na sámbá ya mapululu ma bisó:

  • Bule, bule, bule, epai na Yawe, bande izali ya libosó kati na mitéma mia bisó.
  • Bule, bule, bule, epai na Yawe, Aponáki bisó libosó ya bozalisi ya mokili.
  • Bule, bule, bule, epai na Yawe, Tozali Mwasi ya libala ya Yesu Klisto.
  • Bule, bule, bule, epai na Yawe, esali bokesene moko te oyo moto ata nani áloba, tozali kolongola ba bande te, Tozali nde koyóka na koleka.
  • Bule, bule, bule, epai na Yawe, totii miso ma bisó na epai ya Kalvari, eloko moko te ekotélemisa bisó.

NAzali na nsai mingi kobakisama na mitéma elongó na mingi awa baoyo bayebi ete Oyo ezali Liloba ya Nzambe lizangí kokwéa. Na bongo Yango, Ezali Liloba moko na moko Solo, Liloba moko na moko na Yango, Lisakola moko na moko na Yango. Mpe na ngolu ya Nzambe, tozwí libakú malamu ya komóna mboka oyo mokolo moko tokokende na yango.

Yaka komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Mosakoli azali kozua Liloba moko na moko mpe azali kaka kokóba kobongisa Yango. Akozua Yango kuna na Genese mpe kobongisa Yango, kozua Yango kuna na Esode mpe kobongisa Yango lisúsu, mpe kútu na Emoniseli; mpe Ezali mwa eteni moko na moko Yesu!

Ndeko Joseph Branham

Liteya:

Kotiama na Bokonzi ya Mwana #3 60-0522M

Makomi:

Matai 28:19

Yoane 17: 7-19

Misala 9:1-6, Mikapo ya 18 mpe 19

Baloma 8: 14-19

1Bakolinti 12: 12-13

Bagalatia 1:8-18

Baefese Mokapo 1

Baebele 6:4-6, 9:11-12

25-0511 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2

NSANGO: 60-0518 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Bokonzi Ya Bonganga,

Moto nyoso súa mosapi na yo míno, finá bomoto na yo, mpe kámólá motema na yo. Lelo, Mwasi ya libala ya Yesu Klisto azali kogánga:

Lelo oyo, lisakoli oyo likokísámí libosó na miso ma bisó.

Nandimí, moko ya mikolo oyo ya nkembo, ntango ebólo ya lisangá ya lingomba bakei elongó, mpe pápa ya sika ayéisami longwá na Amerika mpe atíami kúna éngébéné na lisakoli, na bongo bakosala elembo lokola ya nyama.

Mongóngó ya mosakoli ya Nzambe elobakí Yango na sánzá ya Zómi na mibale mikolo ya sánzá 19, na 1954, mpe sánzá 9 nsima, Robert Prevost, oyo ayebámí sikawa lokola Pápa Leo  XIV, abótámaki. Azali sikawa pápa ya sika ya Lóma. “Yango Elobí Yawe ekokísámí.

Sanza ya Mítáno na mikolo ya sánzá 7, na 1946, Nzambe atíakí mosakoli na Ye na Green’s Mill, Indiana, kopesa ye lotómo na ye mpe kosangela epai ya mokili, oyo azali mwanje na Ngai ya nsambo motindami ya nguya, Mongóngó na Ngai epai ya mokili. Bóyóka Ye.

Ntango Mwanje ya Nkoló akútánákí na Ngai libandá kuna na Green’s Mill, Indiana, esili koleka mbúla mwambe, útá ezalaki ngai bobele mwana, kolanda ngai, komónisa bimónoneli, ntango Nakendeki epai na Ye, Alobaki: “Soko okozala sembo, omemi bato Kondima yo, eloko moko te ekotelema libosó ya libondeli.”

William Marrion Branham azali Mongóngó ya Nzambe moponami epai ya mokili. Mosakoli ya nguya oyo Liloba ya Nzambe liyaka epai na ye. Kokokana na Liloba, azali BOBELE ye nde molimboli ya Bonzambe ya Liloba ya Nzambe.

Andimísamaki na Nzambe Ye moko, na nzela ya Likonzí ya Móto.

Sánzá ya Mitáno, mikolo ya sánzá 7, 2025, SATANA atiaki likita ya ba Kadinali kati na Ndakonzambe ya Sistine kati ya Loma kopona Mokitani na bango ya Klisto, kokokisa Yango Elobí Nkoló.

Andimísamaki na moto na LIBÓNDO YA MÓLINGA PÉMBÉ.

Mwasi ya libala ya Klisto zingázingá ya mokili mobimba azali kosepela, kogánga, kobéta milóló mpe kopesa lokúmu na Nkoló, lokola tozali koyóka, mpe komóna na miso ya bisó moko, lisakoli ya mosakoli kokokisama.

Ezali lokola nde tozalaki komóna Mái Motáné kofungwama libosó na míso ya bisó. Máná ma sika kokwéa longwá na etando ya likoló. Nkóto mbala nkóto ya bandeke koleisa Mwasi ya libala. Mái kobima na Libángá. Móto kokita mpe kozíkisa mbeka elongó na Elia.

Lisakoli lizali kokokisama mokolo nyoso. Liloba ya Nzambe lilakámí lizali komónisama kati na bomoi ya bisó. Makambo mazali kosalema nyoso zingázingá na bisó.

Mwasi ya libala amílengeli Ye moko na boyókáká mpe bondimáká Liloba. Tozali Liloba likómí mosuni.

Ya solo, tokómí. Ntango ebélemí. Mwasi ya libala azali kosepela mpe kosangana elongó zingázingá na mokili mobimba lokola libosó naino soko moké te. Mosakoli azali kopesa endimiseli epai ya Mwasi ya libala na boyébisáká bisó tozali bokonzi ya bonganga ya Nzambe, libota bule, bato godi baoyo babiangámí kobima, toponámí, tozuami kati ya ebelé, mpe totiami pembeni.

Tozali SIKAWA Bana Mibali mpe Bana Basi ya Nzambe, tokambamí na Molimó ya Nzambe; na moto te, kasi na Molimó. Toyebi, na elilingi ya ntembe ata moké te, TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA. KONDIMA ya bisó ezali komata na misándá ya sika mokolo na mokolo. Ezali na kotelemisa bisó to kotámbwisa bisó malémbe te, Nzambe amónisaki mpe atíí Yango lóngo kati ya motéma mpe bomoto ya bisó.

Mwasi ya libala ayebi mobimba mpenza tozali ba nani.

Tozali kati na Mboka na bisó ya elaká ya molimó, wana ezali bisó na litondí ya bozui ya eloko nyoso. Tozali na Kimia ya Likoló, Mapamboli ya Likoló, Molimó ya Likoló. ELOKO NYOSO EZALI YA BISÓ. Tozali sé komilengele mpo na oyo azali na yango na ntango ekolanda mpo ya bisó.

Kelelo ya Nkoló ekoyúla, mpe bakúfi kati na Klisto bakosekwa libosó.

Nzóto iye ya lóla ikokita mpe ikoláta ya mabelé, nzóto ya nkembo mpe ikobongwana na mwa ntango moké, ya kobwéta líso.

Tokozuama na likoló elongó na bango, kokutana na Nkoló na mipepe.

Mokolo nini oyo. Ntango nini oyo. Ezali na ndengé te mpo ya ngai koloba kati na maloba ya bato oyo ezali bisó nyoso koyóka kati ya bomoto na bisó. Mitema mia bisó mizali kobeta noki-nokí.

Bisó te nde tozali kosala ékóma, Molimó Mosanto azali lokola etóko ya etele kopunjwa-punjwa kati na bisó. Mwasi ya LIBALA azalaki kozila ntango oyo longwá na mikolo ya Adáma…MPE BISÓ OYO AWA SIKAWA.

Totómbeli yo boyéi bolámu. Tobiangí yo. Tobondeli yo. Yaka komíbakisa na bisó mpo ya ntango ya káfú-kafu koleka mokili motíkalá ndèle koyeba, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe komónisa Liloba na Ye epai na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: 60-0518 Kotiama Na Bokonzi Ya Bana#2.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga libosó ya Liteya:

Genese 1:26

Baefese Mokapo ya Libosó

Baloma 8:19

Bagalatia 1:6-9

Baebele Mokapo ya motoba

Yoane 1:17

25-0504 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1

Nsango: 60-0515e KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA # 1

BranhamTabernacle.org

Balingami Baoyo Batiamí na Bokonzi ya Bana,

Tozali sikawa kolia biloko ya makasi ya Nzambe mpe tozali na lisósoli polélé-polélé ya Liloba ya Ye. Nzambe apésí bisó Emóniseli solo ya Liloba na Ye. Likanisi nyoso ya bisó ya molimó ezangí kobúlungana.

 ToYEBÍ mpezá Azali Nani. ToYEBÍ mpenzá Oyo ezali Ye. ToYEBÍ mpenzá wapi ezali bisó kokende. ToYEBÍ mpenzá tozali ba nani. ToYEBÍ kati na Nani nde tondimelí mpe tondimisamí Azali na makokí ya kobatela yango etíí bisó epai na Ye mpo ya mokolo yango.

Alobaki mpe Amónisaki sekelé nyoso ibómbamákí longwá na bozalisi ya mokili epai na bisó. Ayebisaki bisó boni basúsu babóyakí ntango nyoso nzela ya Ye oyo epesámakí mpe basepelakí na bokambami bosúsu, kasi Akozala na etonga moke oyo ekotíkala sembo na Liloba ya Ye.

Na mokili mobimba, bakoyanganisama na  esiká moko te kozala na makambo kati ya Bo moko. Kasi mwa bibólo ya bangó bakopalangana na mabelé manso.

Nkembo, topalanganisámí na mabelé manso, kasi tosangisámí lokola Moko na nzela ya Bofináká Play mpe koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó.

Tólokota mpe tóléta libosó yango ekozala Ye kolobela bisó na nzela ya mwanje na Ye ya nguya na mokolo mwa Lomíngo.

Balingami na ngai Baponami, bozali sasaipi kofanda elongó kati na bisiká ya Likoló. Ezali bobele te libandá na esiká ata wapi, kasi kati na bisiká ya “Likoló”; ezali etémelo na yo lokola mondimi. Ozali kati ya mabóndeli mpe obélemí mpo ya Liteya. Boyangani elongó lokola babúlami, bobátisámí na Molimó Mosanto, botóndi na mapamboli ma Nzambe.

Bobiangamí, boponami, mpe Molimó mwa bino momemámí kati ya molungé ya molimó.

Nini nde ekokaki kokóma. Molimó Mosanto ya Ngai akozala kotámbola likoló ya motema moko na moko. Bobóngwanisámí mpe bokómí bikelámu ya sika kati na Klisto Yesu. Masúmu ma bino manso mazali na nsé ya Makila.

Bozali Kati ya kosambela ebongí be, na maboko mpe mitema mia bino itómbwí likoló epai ya Ngai, kosambela Ngai elongó kati na bisiká ya Likoló.

Bobongisamákí libosó, Boponamákí, kati na Boyebi na Ngai makambo libosó. Boponamí, Bobulisámí, Bolongisámí na nzela ya Bobongísamáká libosó. Ekokoka ata ndambo te mpo ya bino kozímbisama. Nabongisaki bino libosó ya bozalisi ya mokili. Bozali Nzambe moké, botiámí Elembo na Molimó Mosanto ya elaká; bobele kobótama kati ya libota te, Bana na Ngai Mibali mpe Basi baoyo batiamí na bokonzi ya bana.

Nakopambola bino na lobíko ya nzoto ya bonzambe, boyebi makambo libosó, emónoneli, bimónoneli, nguya, minoko, ndimbola, bwanyá, boyebi, mpe mapamboli manso ma Likoló, na esengo ezangi maloba mpe etondi na Nkembo.

Motema moko na moko mokotónda na Molimó na Ngai. Bokozala kotambola elongó, kofanda elongó, kati na bisiká ya Likoló. Ata likanisi moko mabé kati na bino te, likáyá liokó libendámí te, elamba yoko ya mokúsé te, oyo te, oyo kuna te to mosúsu, likanisi moko ya mabé te, moto moko te na likambo kotemela mosúsu, moto nyoso koloba kati ya bolingo mpe boyokani, moto nyoso na lobánzo lóko moto na moninga na ye kati na esiká moko.

Nde na pwasa lolaká lokola mopepe ya makeléle makasi lokoúta na Likoló mpe Nakopambola bino na mapamboli nyoso ya molimó. Na nsima bokozala lokola Dawidi, kobina libosó ya Sandúku, koyebisa MOKILI ete bozali na nsóni te, BOZALI MWASI NA NGAI YA LIBALA YA BANDE! Bofinaka Play MPE bondimaka LILOBA MOKO NA MOKO Nalobí. Bokoki koningana te, mpe bokoningana te!

Basúsu bakoki koboya Yango, to basósólí Yango te, kasi epai na bino, Ezalí Elembo Ya bino ya Lokúmu. Lokola Dawidi alobaki na mwasi na ye; “okanisí ete oyo nde likambo, zilá kaka kino lobi, tokozala kútu koyóka ba bande koleka, kosanzola Nkoló, wana totóndí na Molimó na Ye; zambí tozali kobika kati ya Kanana, tokangami na mboka ya elaká.”

Na mbísa Nakotala na nsé longwá na Lola mpe Nakoyebisa bino:

“Bozali Mwasi ya libala kokokana na motema mwa Ngai Moko.”

Mapamboli maye makoki kozala ma yo mpe lokola. Yaka, míbakísa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe bíká bozali ya Nkoló lokola libosó naino soko moké te lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe mpo ya lelo koloba na bisó mpe komemela bisó Liteya: Kotiama Na Bokonzi Ya Mwana #1  60-0515E.

Bokanisa, oyo ezali epai ya lingomba, ya moto ya libándá te. Ezali libombami kati ya sámbole epai na ye, makoki ya kosósola soko moké te, eleka likoló ya motó na ye, ayebí eloko moko te likoló na yango koleka eloko ata nini. Kasi, epai ya lingomba, ezali mafuta ya nzóto likoló ya libángá, ezali esengo ezangi maloba, ezali endimiseli epambolami, ezali lóngo ya bomoto, ezali elikia mpe efandeli ya bisó, ezali Libángá ya Bileko, oo, ezali nyoso oyo epusi malamu. Zambí likoló mpe nsé ikoleka, kasi Liloba ya Nzambe likoleka soki moké te.

Ndeko Joseph Branham

 Makomí makotabga libosó ya Liteya:

Yoele 2:28

Baefese 1:1-5

I Bakolinti 12:13

I Petelo 1:20

Emoniseli 17:8

Emoniseli 13

25-0427 Mokonzi Oyo Aboyami

NSANGO: 60-0515M Mokonzi Oyo Aboyami

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Baningá  ya Motúya,

Baoyo ya ngai ya bolingo, balingami na ngai kati ya Nsango malamu, bana ya ngai baoyo Nabóteli Nzambe.

Nsúka ya póso ya káfu-kafu nini oyo tozalaki na yango na Nkoló na bisó. Ezalaki lokola eloko mosúsu te, bobele kolekisa ntango elongó na Ye, koloba na Ye, koyóka Mongóngó na Ye, kosambela Ye, kotóndo Ye, mpe koyebisa Ye boni tolingí Ye mingi.

Lokúmu nini oyo kozala kobika kati na mokolo oyo mpe kozala eténi ya Likomi kozala kokokisama. Maloba ya moto ya kokufa makoki kobimisa nyoso oyo ezali kati na motema mwa bisó boni? Lokola mosakoli alobaki, ezali ngai te, ezali nde kaka na eloko moko na bozindó kati, kopúsa-pusa mpe kopunjwa-punjwa na kati na ngai; etóko ya etele ya Molimó Mosanto. Ezali Mwasi ya libala komibongisa Ye mei mpo ya Mobali ya libala.

Boni mobálani mwasi asepelaka libosó mpenza ya makwéla ma ye. Motéma mwa ye mobandaka kobeta nokí-nokí lokola mwa ba Sekónde ya nsúka izali koleka…ayebi ete nsúka-nsúka ntango yango ekómí. “Namílengelí. Azali koya mpo ya ngai. Tokozala sikawa MOKO.”

Tozali ya solo mpenza kobíka na eleko ya nsúka ya bosúki ya ntango. Mwasi ya libala akonétolama noki mpe kobiangama na Lipati na bisó ya bosepeli makwéla. Azali komema bisó na misándá ya sika. Ezali lisúsu na motúna te; komitungisa lisúsu te; TOZALI MWASI YA LIBALA.

Mpe Asilisí naino te. Azali naino kolinga kopambola mpe koyikisa mpiko molingami na Ye Mwasi ya libala moponami. Boni Alingaka koyíkisa Ye mpiko mpe koyebisa Ye boni Alingí Ye. Boni Azali na lipambú na Ye.

Azali naino mpe na Emoniseli mosúsu godi koleka kopesa Ye. Na ntango oyo mingóngó mizali mingi kati na mokili koboya koyóka ba bande, Alingí mbala moko lisúsu kondimisa Mwasi ya libala ete bazali kati ya Mokano mwa Ye mobongí be mpe Nzela na Ye epesami.

Manáka ma Ye mabóyamaka ntango nyoso. Mwasi na Ye ya libala anyókolamaka ntango nyoso. Bato balingaka ntango nyoso nzela ya bango moko, likanisi ya bango. Balingí mokambi akesení ákamba bango. Kasi Nzambe atíndákí mokambi MOKO kokamba Mwasi na Ye ya libala, Ye moko, Molimó Mosanto, mpe Molimó Mosanto ya lelo oyo, lokola kati na MIKOLO MISÚSÚ MINSO, NDE MOSAKOLI YA NZAMBE.

Balingaki ntango nyoso bato kokamba bango.

Na mokolo ya Samwele, Nzambe alobaki ete bazalaki koboya Ye na bobóyaká kolinga Samwele ákamba bango. Emónánáki likambo ya kokamwa lokola Samwele azalaki moto mpe lokola, kasi bokeseni bozalaki Samwele azalaki moto Nzambe aponáki kokamba bango. Ezalaki Samwele te, ezalaki Nzambe kosálela Samwele. Azalaki MONGÓNGÓ MPE MOTO Nzambe aponáki KOKAMBA BANGO, kasi balingaki mingóngó misúsu.

Saulo ayebaki ete bato babángakí Samwele, na bongo asengelaki ásangela: “Saulo NA Samwele”. Asengelaki ábangisa bato na ntina ete balanda ye.

Ya solo, abiangamaki. Ya solo, apakolámákí na Samwele kozala mokonzi na bango, kasi Nzambe ATA KO BONGO azalaki na Nzela epesamákí, mpe mosakoli Aponaki kokamba bango, kútu kokamba Saulo. Nzambe alobaki na mosakoli na Ye mpe Ayebisaki Saulo eloko ya kosála. Ntango Saulo akánákí ete apakolamákí mpe lokola, mpe alingaki te koyóka kaka mosakoli, Nzambe alongolaki bokonzi na ye.

Boye na nsima ntango basalaki yango, ntango kolongama monene eyákí, na bongo Saulo akátakí ngombe minéne mibalé mpe atíndelaki yango bato nyoso. Mpe nakokaki kosepela bómona awa, ntango Saulo atindaki biteni ya ngombe na Yisalaele mobimba, mpe alobaki: “Tika ete moto nyoso oyo akolinga kolanda Samwele na Saulo te, tika ye, ngombe oyo, ázala lokola oyo.” Bomóní boni amekákí kosalela mayele mabe komítálisa elongó na moto ya Nzambe? Boni—boni ezalaki na kozanga boklisto na kati! Sómo ya bato ezalaki mpo ya Samwele. Kasi Saulo azuaki bango nyoso kolanda ye mpo ya ntina ete bato babangaki Samwele. “Tika bálanda Samwele mpe Saulo.”

Mokolo moko Saulo atungísamákí mingi. Akokaki kozua eyano moko te koúta epai ya Nzambe. Akokaki kozua libondi te. Alingaki biyano. Ayebaki esiká ya kokende kozua eyano alingakí; Ezalaki na esiká sé moko, MOSAKOLI YA NZAMBE, SAMWELE. Azalaki Asili koleka na ngambo, kasi azalaki naino MONGÓNGÓ YA NZAMBE, ATA KATI NA PALADISO.

Tata Alingaki Mwasi na Ye ya libala áyeba nani nde Aponákí kokamba Mwasi na Ye ya libala na mokolo oyo ya nsúka, na bongo Azuaki mwanje na Ye ya nguya na ngambo ya ezipelo ya ntango mpo ya koyebisa bisó mbala moko lisúsu, kobondisa bisó, mpe koyíkisa bisó mpiko ete tozali kati ya Mokano mwa Ye mobongí be mpe mopesamí.

Bóyóka na bokengi NYOSO oyo mosakoli azali koloba.

Sikawa, Nalingí te ete bózóngela oyo. Oyo ezali libosó ya Lingómbá ya ngai  to ba Mpate na ngai baoyo Nazali kobátela.

Libosó ete áyebisa bisó likambo ata nini, alingí libosó tóyeba ete oyo ezali BOBELE mpo ya BISÓ, LINGOMBÁ NA YE, BA MPATE NA YE, BAOYO AZALI KOBATELA.

Mpo na yango, soko okokí koloba te ete: “Ndeko Branham azali mobateli na Ngai,” Nalobaki yango libosó, kasi ezali na yango na bosenga kaka te kokóba kotanga, oyo ezali mpo na yo te, na koleka alingákí te ete tozóngela yango kútu epai na moto moko kasi epai na ye oyo andimí mpe alobí: “Ndeko Branham azali mobateli na ngai”.

Wana mpenza nde eyano na bisó na motúna tozuaka na kolobamela mabe mingi awa elobaka bisó ete: “Ndeko Branham azali mobateli na bisó.” (Bango Wana bato ya ba bande.) Bazali solo, azali yango, mpe tozali bango.

Bolimbisi silikélá ngai te, Nazali koloba makambo oyo te mpo násilikisa moto sóngóló pakala, ekozala mabe soko nasálí bongo, kasi ezali nde oyo ezali Ye koyebisa Mwasi ya libala. Nazali kotia ndimbola na ngai na yango te, Azali koyebisa yango polélé-polélé…Liloba ya Nzambe lizali na bosenga ya ndimbola ya moto te.

Soko ezalaki nini, Nazalakí kati na nzoto oyo to libandá, ézala mbóngwáná, ezalaki te lokola emónoneli ata nini natíkalá ndèle kozua.

Sikawa ayebisi bisó oyo ezalaki te pelamoko emónoneli ata nini mosúsu atikalá kozua. Akendeki na esiká moko atikalá kozala te. Ezalaki kútu MONÉNE KOLEKA emónoneli ata nini atikalá komóna. Azalaki kolóta te, amónaki nzoto na ye likoló ya mbeto; AZALAKI KUNA.

Mwasi ya libala ya Yesu Klisto, tika yango ézinda mpenza na kati malamu. Ezalaki Mwasi ya libala ya Yesu Klisto kuna na ngambo mosúsu, eleko beébeé, baoyo bayaki mbango epai na ye, kogánga mpe koyamba ye, konyangela ye na maboko na bango mazingeli ye mpe koloba: “Oo, ndeko na bisó ya motúya!”

Azalaki kuna; akokaki komamama na bango; akokaki koyóka bango na matói. Bazalakí kosolola na ye. Atelemaki, mpe atalákí, azalaki elengé. Atalákí na nsima na nzóto na ye ya kala elaláki kuna na maboko ma ye nsima ya motó.

Sikawa toyokani AZALAKI KUNA, mpe ezalakí Mwasi ya libala ya Yesu Klisto nde azalaki komóna. Sikawa tóyóka oyo Mongóngó útá likoló mozalaki koloba na ye.

Na nsima Mongóngó wana mozalakí koloba, longwá na likoló na ngai, molobaki: “Oyebí, ekomami, kati na Biblia ete basakoli bayanganisamákí elongó na bato na bango.”

Nzambe azalaki bobele kotálisa mpe koyikisa mpiko mosakoli na Ye te, kasi ezalaki na mingi koleka kati na Yango.

Alingaki kozónga mpe koyebisa bisó  bobele esiká tozali kokende te mpe ekoúlana na nini, kasi koyebisa bisó tozali kati na Mokáno mwa Ye mobongí be na Bofináká Play mpe nde bongo okokóma na epai wapi Mwasi ya libala azali.

Ndeko Branham alobaki ete alingaki komóna Yesu na mpósa mingi mpenza. Kasi bayebisaki ye:

“Sikawa, Azali naino mwa likoló, kaka likoló epai kuna.” Balobaki: “Mokolo moko Akoya epai na yo.”

Bakóbakí koyebisa ye AZALAKI NANI.

“Otindamaki, kozala mokambi. Mpe Nzambe Akoya. Mpe ntango Akoya, Akosambisa yo éngébéné na oyo elakisákí yo bango, ya libosó, ézala bakokóta to te. Tokokóta Kokokana na malakisi na yo.”

Nani atindamákí kozala mokambi? Tokosambisama kokokana na oyo nani alakisaki bisó?

Tokokóta Lóla éngébéné na malakisi ma nani?

 Moko akoki koloba, Nalakisaka bato na ngai bobele oyo Ndeko Branham alobaki…amen, Osengelaki kosala yango mpe Nandimí basúsu basalaka yango, kasi kokómisa yango te “Ndeko Branham mpe Ngai.”

Tókóba kotanga lokola Alingí ÁNDIMISAMA tosósóli polélé-polélé.

Mpe bato yango ba gángákí, mpe balobakí: “Toyebí yango. Mpe toyebí tozali kokende elongó na yo, mokolo moko, na mabelé.” Tolobaki: “Yesu akoya, mpe okosambisama kokokana na Liloba otéyákí bisó.

 Tokosambisama na nzela ya Liloba litéyakí YE bisó. Na bongo, kosambisama ezali koya útá na oyo Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande elobí. Ndengé nini moto áloba ete Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande ezali te MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA okokí koyóka?

“Na bongo soko oyambámí na ntango yango, nzokande okoyambama,”

 Bobélémí. Oyo ekobéta sété likoló na oyo ezali Mokano ya Nkoló mobongí be mpo ya Mwasi ya libala ya Yesu Klisto. Mwasi ya libala azali koyebisa mosakoli yango EKOSALA YE. Mosúsu te. Ebólo ya bato te. Mobateli mosúsu te, mosakoli ya Nzambe, WILLIAM MARRION BRANHAM.

Nsima okotálisa bisó epai na Ye, lokola mbano ya lotómo ya yo.”

Nani nde a kotálisa bisó epai na Nkoló Yesu?

Mikolo ya koyóka bobele mosakoli misilí koleka?

Ndeko Branham atikalá koloba soko moké te ete tóyóka ba bande?

Mwasi ya libala azali kogánga mpe koloba soko olingí kozala Mwasi ya libala epusí malamu Kofina Play.

Ondimisamí naino kaka te? Boye, ezali kútu na mingi koleka.

Tolobaki: “Okokamba bisó epai na Ye, mpe, banso elongó, tokozónga na mabelé, kobíka libelá.”

Nani nde asengeli kokamba bisó epai na Ye? Nani nde azali kokamba Mwasi ya libala? Mwasi ya libala azali koyebisa ye ete AKOKAMBA MWASI YA LIBALA EPAI NA YE, na nsima tokozonga na mabelé kobika libela.

Soko ezali na Emoniseli ATA NINI kati na yo Soko ya motindo nini. Soko obetaka tólo ete ondimí Etindá oyo, Nabondeli ete Nzambe Ámonisa yo ete OSENGELI kotia Mongóngó na Ye, ba bande, LIBOSÓ.

Babáteli, bózóngisa mosakoli na bitéyelo na bino. Ba bande nde Mongóngó ya litómbá koleka bosengeli koyóka lokola bokosambisama na MONGÓNGÓ YANGO.

Kokokana na Liloba, tozali kati ya Mokano mwa Ye mobongí be mpe mopesami mpo ya mokolo ya bisó na boyókáká Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.

Soko Nzambe afungoli míso ma yo na Emoniseli ya solo ya Liloba na Ye, Nabiangi yo ómíbakisa na bisó mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka 60-0515M Mokonzi Aboyámí.

Ndeko Joseph Branham