21-0718 ESODE YA MISATO

Nsango: 63-0630m ESODE YA MISATO

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Balingami bana babali mpe bana basi ya Nzambe,
ezali makasi koyeba esika ya kobanda. Kokanisa, tozalakikofanda elongo na misanda mileki likolo, longwa na mokilimobimba, na bomelaka longwa na Mai yango ya bomoi, bokomaka Bana babali mpe Bana basi ya Nzambe. Etinda oyoezali kopesa biso lisosoli mobimba, na botiaka biso na esika yabiso, mpe boyebisaka biso oyo Tozali kati na Klisto Yesu.

Etinda oyo ezali kosala nini?

“Mpo ete nabalisi bino, Nabandisi bino, lokola moseka yampeto.”

Kembo, Nzambe atindaki Mwanje na Ye ya sambo motindamikobalisa biso na Ye lokola moseka peto. Biso toko Sambisamana liloba nyoso Ye Alobaki. Yango elingi koloba osengeliKOFINA PLAY.

Ye akomaki Biblia ya Ye ya liboso na likolo, sima akomakiBiblia ya Ye ya mibale na libanga. Biblia ya Ye ya misatoakomaki likolo na ekomelo, mpo na mokili monene ya mayeleya boyebi esengelaki koya. Kasi lelo, mokolo monene yaemoniseli, tozali na mosala mwa Ye mobimba mpe mobongi be, Mongongo ya Nzambe Ye penza kobenga Mwasi na Ye yaLibala na nzela ya ba Bande:

“Mpe OKOLAKISA biso epai na Nkolo Yesu wana ekoya Ye, pelamoko mbano ya mosala na yo.”

Mpe biso banso togangaki na lobanzo moko,

“Toyebi yango! Tozali kopema na kondimisama.” Balobaki, “ Okotalisa biso epai na Ye, mpe na mbisa tokozonga biso nyosona mabele lisusu, kobika mpo na libela.

Mwasi na Klisto agangaki epai na nani ete akolakisa biso epaiya Nzambe? Mosakoli ya Nzambe na nzela ya MOSALA NA YE. Ndenge nini ozanga koyoka ba bande oyo na lingomba nayo?

Kaka Etinda oyo, ba bande oyo nd’ekoki komema Lingomba naNzambe na boyokani elongo na Nzambe, kino komonana yaMobali ya Libala ekomonana kati na biso. Ngai nayebi ndengenini koloba na bino ete “botikala na ba bande?” Nazongaki katina etandelo komona oyo mosakoli alobaki.

Nazali kolikia ete makanisi ya molimo ezali kosimba yango. Nandimisami et’ezali bongo. Kasi nazali komitungisa, libandakuna. Nzoka nde, okoki kokende na mikili nyoso te. Okokikotinda ba bande kuna. Nzambe akozala na nzela moko yakosimba makanisi yango kuna epai wapi nkona yango ekonami. Ezali solo. Mpe kaka ntango pole ebeti yango, ekoki, Ezwibomoi. Lokola mwana mwasi moke na etoko ya mai, alobaki,”oyo ezali yango.” Asimbaki yango

Mpo na biso ezali mafuta ya nzoi likolo ya libanga, ezali esengoezangi kolimbolama, ezali kondimisama epambolami, ezalilongo ya bomoto ya kati, ezali elikia mpe Efandelo ya biso, ezaliLibanga na bileko, ezali nyoso.

Makanisi ya biso ya molimo ezangi kobulungana. Toyebi penzaYe azali nani. Toyebi penza oyo Ye azali. Toyebi solo solo bisotozali banani. Toyebi penza penza esika tozali kokende. Toyebinani tondimeli mpe tondimisami ete azali na makoki ya kobatelaoyo topesi na maboko na ye kino na mokolo wana.

Na sima soko Nzambe amonisi biso ete tozali ba ntoma na Ye, nguya nyos’oyo ezali na Lola, oyo nyoso Nzambe Azali, banjena Ye nyoso mpe nguya na Ye nyoso ezali kotelema sima ya MALOBA YA BISO. Esengeli Nzambe amemia Liloba, mpoalobaki ete” Eloko nyoso bokokanga na mabele, yangoekokanga ngai na Likolo. Eloko nyoso bokofungola na mabelenakofungola yango na Likolo.”

Ntango ya kokende Ndako yang’oyo. Kobima yang’oyo. Mwasina Libala ya Yesu Klisto, akobimisama na mokili ya elaka.

Na Esode ya Ye ya liboso, Abimisaki bango na mokili yamabele oyo. Na Esode ya mibale, Abimisaki bango longwa namotindo moko ya molimo, kokotisa bango na libatisa kati namolimo ya Molimo Mosanto, sik’oyo azali komema biso longwana libatisa ya molimo na Molimo Mosanto, kozongisa biso naseko na seko, na nzela ya Likonzi ya moto yango moko, na nzelaya lolenge yango moko ya kopakolama, Nzambe yango mokokosala makambo yango moko!

Tika mipepe mipepa. Tika bikumbaki bininganisa, tozali nakobatelama pepele libela. Tozali kopema kaka wana likolo yaliloba moko na moko.

Yaka komibakisa na biso mokolo na Lomingo na ngonga ya2:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpe kopemalikolo na liloba moko na moko Nzambe Alobi na mokolo nabiso. Komilengele yo moko mpo na boyei bwa ye bobelemi mpekoyoka: Esode ya Misato 63-0630M

Ndeko Joseph Branham

Esode 3:1-12
Genese mokapo ya 37
Genese mokapo ya 43