21-0725 ESIKA YA LOSAMBO NZAMBE APESI

Nsango: 65-0425 ESIKA YA LOSAMBO NZAMBE APESI

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Balingami baoyo bazongisami na bomoi,

Boniboni tolingaka koyangana elongo poso na poso kosala lipati likolo ya mana ya molimo Abongiselaki Mwasi na Ye ya Libala. Ezali kopesa biso makasi oyo tozali na yango bosenga mpo ya mobembo. Ezali bomoi penza ya Masiya ye moko, etalisami, kobongisa Lingomba na Ye mpo ya konetolama.

Likonzi ya Moto ebengaki biso kobima, mpe ezali kokamba biso na mokili ya elaka, na nse ya kopakolama ya Mosakoli ya Ye ya nguya, William Marrion Branham.

Ndeko Branham azali Likonzi ya Moto te. Azali mokambi mopakolami, na nse ya Likonzi yango ya moto. Likonzi ya Moto ezali kaka kokokisa etinda na ye na nzela ya bilembo mpe bikamwiseli. Ezali Molimo Mosanto na Ye monene kotalisama kati na biso mpe ezali mbala nkoto koleka basakoli basusu banso liboso.

Bokoki nde te komona Mwana ya Moto, Mwana ya Moto na lolenge ya Etinda ya lisakoli, kozonga lisusu kati ya Lingomba na Ye, kati na lisakoli, komonisa Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo, mpe libela? Etikala kosalema ata mbala moko te kati na bileko kino na ntango oyo.

Makanisi ya biso ya molimo esimba yango. Tomoni yango mpe tondimi Liloba moko na moko. Etinda oyo, ba bande oyo nde nzela Nzambe abongisi mpo ya kosimba likanisi yango kuna libanda epai wapi nkona yango ekonami. Toyokaki Mongongo yango, Pole ebetaki biso mpe tozwi bomoi.

Ezali kofandisa biso na bisika bileki Likolo, SIKOYO KAKA. Ezali te ete tokozala, tozali sik’oyo. Tosili kosekwisama, molimo mpe nzoto ekoti kati na mosala. Ezongisi biso na bomoi lisusu na bozali ya Nzambe, epai wapi Molimo na Ye azali. Ezali te oyo  bokozala, bozali yango! Ezali kaka zabolo nde azali kolinga koyiba yango longwa na biso.

  • Motuna: Boyei na Bomoi?
  • Eyano.  : Iyo
  • Motuna: Klisto akomi solo epai na bino?
  • Eyano.  :Iyo
  • Motuna: Nguya ya Nzambe etalisami?
  • Eyano   :Iyo
  • Motuna: Bozali kati ya Lingomba yango, Lingomba oyo Nzambe amibongiseli?
  • Eyano: Iyo
  • Motuna: Bozali kati na yango ndenge nini, boyebi ndenge nini ete bozongisami na bomoi kati na yango?
  • Eyano: Makanisi ya biso mobimba; bomoto ya biso mobimba ezali kati na Klisto. Klisto azali na kati ya biso, komitalisa ya moko lokola Moto ya bomoi, kokokisa ete Azali awa.

Tozali mosuni ya mosuni na Ye, mpe mokuwa ya mokuwa na Ye, nzoto ya nzoto ya Ye, Nkombo ya Nkombo ya Ye, Mwasi na Ye ya Libala. Tozali kati ba Ye. Tozali mosuni ya Ye mpe mikuwa ya Ye.

Tokoki kokufa te, tozongisami na bomoi. Nguya ya bomoi oyo esekwisi biso longwa na bomoi ya masumu, mpe ebongoli bomoto ya biso, esekwisi biso na motindo mosusu ya koloba, kati na Klisto Yesu, lisekwa yango na mobimba yango ekomema biso na kokemba.

Tobotami mpe tobongwani, tobatisami na Molimo Mosanto, kati na Yesu Klisto. Toyeisami na bomoi na nguya ya liloba moko na moko. Tozali kotatwela liloba moko na moko na bolobaka “ Amen”.

Wan’ezali biso koyangana elongo kati na Klisto Yesu; na likanisi moko, mpe lobanzo loko, nyos’oyo tozali na yango bosenga, soko tokozala na KONDIMA mpetondimi, AKO pesa biso yango.

Toyeba ete Akozala na ndako  moko na moko na biso, na losambo na biso moko na moko to epai nyoso wapi toyangani, mpo ete tozali bana ba Ye babali mpe basi, Lingomba na Ye Mwasi na Ye ya Libala.

Nayebi Azali awa. Nandimisami Azali awa. Nayebi ete ezali na nguya ya kopesa bomoi oy’esengeli kati na Lingomba mpo ya kobikisa moto nyos’oyo afandi awa.

Bondimi Etinda oyo? Bondimi ete yango nde nzela ya Nzambe mpo na lelo? Bondimi ete ezali Mwana ya moto komimonisa kati na mosuni ya moto? Bondimi Liloba moko na moko?

Soko olingi lobiko ya nzoto, lobiko ya molimo, to ELOKO NINI nyos’ozali na yango bosenga, boye nati mondenge liboso na yo ete ondima Mongongo ya Nzambe epakolami, endimisami mpo na mokolo ya biso:

Sala ete kaka sikoyo nguya ya lisekwa eyeisa kondima na bango na bomoi, Nkolo, na oyo bazali kosala. Ezali na mondimi azali na maboko na Ye likolo ya mondimi, nzoto yoko na nzoto mosusu, nguya likolo na nguya. Mpe ezali nguya ya Nzambe na nzela ya mwana mobali ya Nzambe to mwana mwasi ya Nzambe, na nzela ya Mwana na Nzambe. O Nzambe, tika ete Satana atika bat’oyo somi! Tika ete babikisama na sima ya nzanga oyo, na nzela ya nguya oyo esekwisaka, oy’epesaka bomoi ya bozali bondimisami, Yesu Klisto. Na Nkombo na Yesu Klisto, tika ete ezala bongo!

Yaka mpe mibakisa na biso na nse ya: Esika ya Losambo Nzambe Apesi 65-0425, mpe ozwa lobiko ya nzoto na yo, opakolama na Molimo Mosanto,  ozwa kosepela ya bomoto na yo ya kati ekofanda yo na bisika ya Likolo mpe koyoka Mwana na moto kosolola Mokolo ya Lomingo oyo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya:

Dutelonome 16: 1-6

Malaki 4:5

Santu Matayi1:23

Santu Malako 16:17

Santu Luka17:30

Santu Yoane 4:23/10:1-7

Baloma 8:1-11

I Bakolinti 12:13

Baefese 1:21

I Batesaloniki 4:16

Baebele 13:8

Emoniseli 22:19