21-0801 KOKOKISA LILOBA YA YE

Nsango: 65-0426 KOKOKISA LILOBA YA YE

PDF

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Balingami bana mike na motindo ya kolinga koyekola,

Esika ya likolo kati na molimo ndenge nini oyo tofandaki kati na yango mokolo na Lomingo wan’eyanganaki Mwasi na Libala na Klisto kati na bozali ya Molimo Mosanto. Tokokaki koyoka yango koyeisa bomoi na nzoto ya biso ya kufa.

Ezali na kopakolama eleki monene te, esika eleki monene ya kofanda kati na molimo te, koleka ntang’ofini Play mpe oyoki Mongongo ya Nzambe kosolola na yo. Nzambe abongisaki matoi na biso koyoka mpe kondima liloba moko na moko, mpo ete ezali moto mosusu te kokesene na El, Elah, Elohim, oyo azali kobika longwa na Ye moko, oyo amikokisi, oyo ya makasi, kosolola na moko na moko na biso mpe komonisaka biso ete tozali bana na Ye babali mpe basi batalisami.

Boni ezalaki na nguya mingi wana momboto ya Nzambe oyo ebongisamaki liboso, longwa na mokili mobimba, batiaki maboko na bango masantu ba moko likolo na ba mosusu. Ndako ya biso mpe bisambelo na biso itondaki na bozali ya Molimo Mosanto. Kondima na biso etombolamaki likolo, mpo toyebaki nani azalaki kosolola na biso. Na bongo ayebisaki biso ete nguya ya koyeisa na bomoi ezalaki NA KATI NA BISO. Tondimaki na mitema na biso mpe bomoto na biso nyoso mpo ete Alobaki bongo.

Sima Alobaki na biso toloba ete:” Nkolo Nzambe, nandimi na motema na ngai mobimba.” Tozongelaki liloba moko na moko longwa na bozindo ya mitema na biso. Alobaki boye ete:” Malali ekokoka Soki te kotelema liboso na likita ya bato lokola oyo.” Milimo mya biso misepelaki eyokaki biso maloba oyo, mpo toyebaki eloko nini ezalaki kokoma.

Alobaki ete:” Moto nyos’oyo alingi Molimo Mosanto, botombola maboko na bino likolo BOZALA ATA WAPI, moto nyos’oyo alingi yango… Nandimi ete Nzambe Akotondisa moko na moko na bino, SIKOYO KAKA, na Molimo Mosanto.
Na ntango yango kaka, totondisamaki, mpe totondisamaki lisusu na Molimo Mosanto, Mongongo na Nzambe eutaki koloba bongo.

Na bongo baoyo bazalaki na bosenga ya lobiko na nzoto ya bango, Alobaki boye,” Napesi bino motindo na kati Nkombo na Yesu Klisto, botelema na makolo na bino mpe boyamba lobiko na bino”.Bobele na ntango yango penza, mondimi nyoso, uta na zingazinga na mokili mobimba, oyo azalaki na kondima, mpe andimaki, ABIKISAMAKI.

Likambo oyo esalemaki wapi? Na mwa likita ya bato moke bayangani elongo? Te, ezalaki longwa na ZINGAZINGA YA MOKILI MOBIMBA ezalaki Mwasi na Libala kofanda na bisika ya likolo koyoka Mongongo ya Nzambe mpo ya mokolo na biso.

Ekoka soko moke te ete moto moko to likita ya bato bakoka koyanganisa Mwasi na Libala lolenge wana. Kaka Molimo Mosanto nde Akoki kosala yango na bosololaka na nzela ya motindami na Ye abongisamaki mpo ya mokolo. Etinda oyo ezali OYO ELOBI NKOLO. Kotatabana te, kobanzabanza te, Nzambe amonisi ete oyo ezali nzela na Ye ebongisami mpo ya lelo.

Kopema ya ndenge nini oyo mpe kimia nini oyo tozali na yango. Totikala kotungisama te to komituna mituna te soko eloko nini nd’ezali kolobamela biso. Totikala kutu te kozonga kati na liloba kobeta mondenge koyeba, mpo ete tozali koyoka Liloba ya Nzambe likokisami mpo ya mokolo ya biso. Tomisemboli na biso kaka na malembe mpe tofandi pepele, tofungoli mitama na biso, makanisi mpe bomoto na biso, mpe Koloba AMEN, AMEN, AMEN.

Te, tokoki te. Te, tososolaka makambo nyoso te. Kasi TONDIMI liloba moko na moko. Alobaki ete yango ezalaki elembo ya koyeba ete ozali na Molimo Mosanto, mpe kaka Mwasi na Ye ya Libala nde akondima mpe akotikala na liloba moko na moko.TOZALI MWASI YANGO YA LIBALA…Hallelujah!.

Ezali koleka likolo ya motó ya bato minene, oyo babeti tólo ete bazali na makanisi ya bozindo, mpe amonisi yango epai ya bana mike oyo balingi koyekola.

Nazali na matondi koyeba ete nazali mwana moké oy’alingi koyekola.

Andimisá kati na bikeke nani Ye azali na eleko moko na moko. Akokisaki yango na nzela na basakoli na Ye. Akokisaki yango ntango Ayaki kati na mosuni, azwaki masumu na biso mpe abakamaki na nsete na ekulusu, bongo asekwaki lisusu mpe azongisaki Molimo Mosanto.

Sik’oyo Akokisi yango na mokolo na biso na bozongaka mpe na bomimonisaka na nzoto ya moto mbala moko lisusu lokola Alakaki na kati na Liloba na Ye ete akosala yango. Akokisi Ye moko ete azali Mwana na Moto, lotomo ya Yesu Klisto Ye moko kozipama na mosuni ya moto.

Mpe sik’oyo, mokapo ya Ye ya suka, ntina penza ya etandelo monene oyo, koya mpo na biso, Mwasi na Ye ya Libala oy’azongisami mobimba, akokisami, Ye oyo atikali na Liloba.

Bokokaki kolinga kozala likolo na ngonga na mokolo wana ntango Yesu a sololaki na bato 5000? Bokokaki kolinga komona Ye kondimisa na mokili oyo Ye azalaki na bopesaka kwanga mpe mbisi? Bokokaki kolinga kofanda na nse ya kopakolama wana, kaka koyoka Mongongo na Ye kopesa kimia na motema na yo, na Liloba ya Ye ya Bomoi ya Seko?

Okoki, soko ondimi etinda oyo na motema na yo mobimba.

Yaka kofanda na nse ya kopakolama wana likolo ya ngomba elongo na biso mokolo ya Lomingo oyo na 2:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpe koyoka Nzambe kokokisa liboso ya mokili oyo Ye Azali na mokolo na biso. Luka 17:30 kosolola na yo mpe koyebisa yo ete B-R-A-N-H-A-M azali Mongongo na Ngai ekokisami mpe eponami mpo yo. Yaka koyoka ye: Kokokisa Liloba yaYe 65-0426

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga:

Santu Matayi 11:4-19/ 28:20
Santu Malako 11:22-26
Santu Luka 8:40-56 /17:30
Santu Yoane 14:12
Baebele 4:12-15 /13:8
Malaki 4