21-0808 NZAMBE AKOBONGOLAKA NDE LIKANISI YA YE?

Nsango: 65-0427 NZAMBE AKOBONGOLAKA NDE LIKANISI YA YE?

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Molingami Mwasi ya Libala mokano mobongi be,

O Nzambe molingami, tolingi mokano ya Yo elingisami te, Tata. Tika ete totambola kati na mokano mwa yo mobongi be. Tika kaka ete. Kaka te ete tozwa liloba moko awa mpe liloba moko kuna, mpe kosala ete yango ekokana na lilako to momesano moko, to eloko moko. Tika tozwa Liloba ndenge ezali, na bondimaka Sango Malamu mobimba, nyos’oyo Yesu alakisaki biso kosala.

Yango nde posa ya biso monene mpe ya bozindo koleka, kozala kati ya mokano ya Nzambe ebongi be. Tolingi soko moke te kopesa Ye motema pasi, kasi kosepelisa Ye kati na nyoso ezali biso koloba mpe kosala. Tolingi kozala bana na Ye babali mpe basi batiami na bokonzi ya bana mpe batalisami.

Tokozwa nzela ya kozala kati ya mokano mwa Ye mobongi be mpe kosepelisa Ye wapi? Esengeli tokende kati na Liloba ya Ye, mpo toyebi ete Liloba na Ye ezali solo mpe bomoi. Liloba ya Ye ezali ntango nyoso ndenge moko, etandelo ya Ye ezali ntango nyoso ndenge moko, mpo ete Ayebi kobongwana te.

Liloba eyebisi biso ete, ndenge Asalaki makambo mbala ya liboso, Akosala mango ntango nyoso motindo moko. Azali na motindo ya kotikala libela ndenge moko. Ntina ya Ye etikala ntango nyoso ndenge moko. Misala ya Ye itikalá ntango nyoso kozala ndenge moko, Ndenge Asalaka makambo, lolenge Abikisaka bato, lolenge Akambaka bato, Akotikala ntango nyoso ndenge moko.

Biblia eyebisi biso kati na Liloba na Ye eyebi kobongwana te ete Liloba ya Nkolo eyaka kaka epai ya basakoli yaYe. Atikalá te komonisa yango na likita ya bakambi to epai na moto na teolojia, kaka epai ya basakoli ya Ye. Alobaki mpe ete Asalá eloko te bobele ete Alakisaki nano Yango epai ya basakoli ya Ye.

Moto alingaka ntango nyoso eloko ebongisami na moto, ete likita ya bato bakamba bango. Kasi yango etikalá te kozala  nzela ya Nzambe, Atikalá ntango nyoso kotinda mokambi oyo abengami na Nzambe, mosakoli oyo abongisami na Liloba mpo ya kokamba bato na Ye. Mosakoli wana nde azalaki oyo andimisamaki mpe aponamaki kozala mokambi ya bango ya ntango.

Nzambe Aponaki mpe Atiaki ebele mosusu ya bakambi oyo batondi na Molimo Mosanto; mpe bazali na esika ya bango, kasi Akebisaki bakambi yango koloba, “botikala mosika na LIKONZI YA MOTO yango”. Likonzi ya Moto yango ezali kosala nini…EZALI KOKAMBA BATO NA MOI MPE NA BUTU.

Bongo Liloba eyebisi biso,”Lokola ezalaki na mikolo ya Sodomo, ekozala mpe bongo na mikolo Mwana na Moto Akomimonisa.” Kokokana na Liloba na Ye na Malaki ya 4, mpe makomi ebele, esengeli Azonga na lingomba ya Ye na lolenge ya nzoto; kati na bato, na kati ya bato, na motindo ya bozalaká mosakoli.

Tokoyeba mosakoli oyo ndenge nini? Akokokisa oyo ye azali na nzela ya liloba. Akoyeba makanisi penza ya motema. Ako fungola Liloba mobimba epai ya bato. A kondimisama na Likonzi ya moto kokamba Mwasi ya Libala. Nzambe Akosala kutu ete elili ya Ye ekangama elongo na mosakoli na Ye.

Ba moko bakozala lokola Yoane na esanga ya Patamo komeka kosambela ye, kasi akoloba ete, “ keba ete osala yango te, mpo ete nazali moninga na yo mosali mpe moko ya basakoli, sambela Nzambe.” Mwasi ya Libala akoyeba kosambela ye te, ye lokola moto, kasi akosambela NZAMBE KATI NA MOTO WANA.

Akoyeba ete azali ye oyo Nzambe Aponaki mpo ya koloba maloba ezangi kokwea. Akoyeba ete azalaki motindami yango mwanze ya 7 oyo aponamaki na Nzambe. Mokili ekomona mpe ekoyoka Mongongo ya Nzambe kosolola na nzela na ye mpe ekomona Adamu ya liboso azongisami.

Akokamba Mwasi ya Libala na Likonzi ya Moto. Akozala kozwa maloba ma ye longwa na Logos mpe akopesa yango epai ya Mwasi ya Libala oyo azali na nzela ya mokili ya elaka. Mwasi ya Libala akozwa emoniseli mpe akoyeba ete oyo azali motindami ya Nzambe oyo apesami. Oyo ezali nzela ya Nzambe oyo epesami. Oyo ezali MOKANO MWA NZAMBE MOBONGI BE.

Yaka komibakisa na biso Mokolo ya Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpe koyoka: NZAMBE AKOBONGOLAKA NDE LIKANISI YA YE? 65-0427

Ndeko Joseph Branham

Mituya 22:31