21-0815 MOMBOTO EKOSANGOLA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE

Nsango: 65-0429b MOMBOTO EKOSANGOLA LIBULA ELONGO NA EZIPELO TE

BranhamTabernacle.org

BA MPONGO BAZALI KOYANGANA

Balingami Mosuni ya Mosuni ya Ye,

Nazali na esengo mingi ete Nzambe Akobongolaka likanisi ya Ye te likolo ya Liloba ya Ye. Azali lolenge moko lobi, lelo mpe libela. Ndenge Asalaki makambo longwa na ebandeli, Azali kosala yango lolenge moko lelo. Nzambe Ye Moko, Amitalisi kati na mosuni ya moto, na nzela ya makila ya Yesu Klisto, kobulisa bomoi moko na ndenge ete Akoka komitalisa na kati na yango.

Motindami ya biso lelo azali na etaliseli ya ye mei kati na biso. Ezali Molimo Mosanto, Ye moko, komilimbola ye penza. Posa ya kolongwa awa mpe kokende kuna mpo ya kozwa solo to kozwa ndimbola Ezali te; Molimo Mosanto Apesi Baefese 4, epai ya Lingomba ya Ye, nyoso kati ya moto moko, mosakoli ya Ye oy’andimisami.

Ntóma: Ntóma elingi koloba “motindami” to “ oyo atindami”. Nazali ntómá.

Mosakoli: Ondimi ete nazali mosakoli ya Nzambe?

Mopalanganisi ya sango: “ Sala mosala ya mopalanganisi ya Sango Malamu. kokisa mobimba ya lotomo na yo. Ntango ekoya  wapi bakolinga te koyikela malakisi na bule mpiko.

Mobateli: Bobengi ngai, “ Mobateli ya bino”,mpe bolobi malamu, mpo ete nazali bongo.

Molakisi: Nalingi nasolola likolo ya Liloba, to kolakisa malakisi oyo ya eteyelo ya Mokolo mwa Lomingo, likolo ya elobelo Elembo.

Kokokana = Nayebi bino bandeko, ezali lokola ete bozali kotalela ngai ete nazali etemelo ya bino na oyo…ntango nyoso nazali kolanda Nzambe, lokola Paulo alobaki kati ya makomi, “ bolanda ngai lokola nazali kolanda Klisto.”

Etinda oyo ezali etemelo ya biso, na bongo tozali kolanda ye  lokola ye azali kolanda Klisto.

Naboyi te kondima ete ezali na ebele ya mibali babyangami kokokana na Baefese 4 oyo batiami ba mosala mpe babengami na Nzambe kokokisa misala oyo; na NGOLU na Ye, nazali moko na bango. Kasi tozali baoyo mike, mosakoli ya Nzambe mwanje ya 7 azali oyo ya MONENE. Mpo ete baoyo zingazinga na mokili oyo bazali kobenga Eyanganelo ya Branham “Losambo ya bango”: mobateli ya biso, lotomo ya biso oy’ezali na bomoi, Etemelo ya biso, Baefese 4 ya biso ezali nyoso likolo na bande. Tondimi ete ezali Lotomo ya ebandeli oyo Azalaki na yango ntango Azalaki awa na mokili.

Kimia ya ndenge nini oyo, kopema ya ndenge nini, totikala komitungisa ata mbala moko te to kokebakeba to komikongolela soko tokoyoka liloba ntango nini. Ezali Liloba ya Nzambe likokisami, lindimisami, mana ya sika ntango nyoso tozali koyoka yango mpe nyoso tosengeli kosala ezali kaka kofanda pepele mpe kosepela wana mitema mya biso mizali kopela na moto ezali Ye kosolola na biso na molai ya nzela.

Mpe ba oyo nyoso Tata na ngai Apesi ngai bakoya. Ba mpate na ngai, bibenga na Ngai bakoyoka Mongongo na ngai. Bakolanda mopaya te. Mpe Mongongo ya Nzambe ezali nini? Ezali Liloba ya Nzambe. Liloba ya moto nyoso ezali kaka liloba ya moto wana te? Ezali Liloba ya Nzambe; bakoyoka Liloba ya Nzambe.

Bongo ezali naino na EBELE mpo na Lingomba ya Ye. Ezali kaka te ete tososoli mokolo oyo mpe motindami na yango, Liloba mpo ya lelo, kasi esengo eleki monene oyo epesamela moto sukasuka ekokisami. TOZALI eteni ya Molimo na Ye,  eteni ya nzoto ya Ye; mosuni ya mosuni ya Ye, mokuwa ya mokuwa ya Ye; Liloba ya Liloba ya Ye, Bomoi ya bomoi ya Ye, TOZALI Mwasi ya Libala ya Klisto!

Kembo!! Lokumu na Nkombo ya Nkolo!! Aleluya!! Mwasi na Ye ya Libala amiyebi mpe azali komilengela na Liloba ya Ye.

Yango nde Lingomba ezali kosala lelo, mpo ete Yesu azali Liloba mpe Azali Mobali ya Libala, mpe Mwasi ya Libala azali eteni ya Mobali ya libala. Ntina wana Liloba oyo esengeli ekokisama na  mokolo oyo ezali eteni ya Liloba oyo ekokisamaki na mokolo ya Ye, mpe ezali Liloba yango moko, makambo yango mpe bomoi yango moko.

Boya mpe bobika Liloba yango moko, kobika makambo yango moko, bomoi yango moko mokolo ya Lomingo oyo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, Mpe koyoka: Momboto eko sangola libula te elongo moko na nkasa 65-0429B

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga:

Matayi 1:18-20 /24: 24

Luka  17: 30

St. Yoane 5:24

Bagalatia 4: 27-31

Genese 2:15

Yisaya 9:6

Malaki 4