23-1008 Bomoi Na Yo Elongobani Na Nsango-Malamu?

Nsango: 63-0630E Bomoi Na Yo Elongobani Na Nsango-Malamu?

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Etongá ya Mosakoli ya Nzambe,

Tobondela.

Tata na Likolo, boni totondi na matóndi mpo ya ntango mosusu koyanganisama elongo longwa na zingázingá ya mokili mobimba ngambo oyo ya Seko na Seko. Kozala kati na likanisi liókó mpe lobanzo lokó elongo na yo; koyoka Mongóngó na Yo koloba na biso. Tozali kotalela mbala moko lisusu boyeisami na nguya útá na Yo, kopesa biso mpiko mpe makasi mpo ya mobembo mozali liboso.

Tozali koyangana elongo koyamba Maná mapesamelaki biso. Maná wana ya molimo oyo Obombelaki biso kopesa biso makasi kati ya mobembo. Ezali eloko BOBELE MOKO ekosunga biso na mikolo mikoya.

Oyebisaki biso, liboso ete Ókoka kotia Lingomba na Yo na molongó, Okosengela koyeisa biso elongo, na esika yoko, mpe na lobanzo lokó. Nsima Okotindela biso Molimo Mosanto na Yo lokola bokambami; likita moko te ya bakambi, libóké moko te ya bato, kasi Molimo Mosanto na Yo kosolola na biso mbebu na litói.

Olobaki na nzela ya mwanje na yo mpe oyebisaki biso:

“Nalingi ete botikala na mobateli na bino mpe botikala na Malakisi malakisami awa. Botikala na Liloba oyo, bomeka kolongwa na Yango te! Botikala kaka na Liloba ézala nini eyei to ekei, botokala na Liloba Yango!”

Tata, tozali kotosa Liloba na Yo mpe tozali kotikala na mobateli na biso. Ezali Mongóngó ya Nzambe mpo ya lelo oyo ekolobaka bobele Liloba peto lindimisamaki mpe limonisamaki mpo ya mokolo na biso.

Oyebisaki biso lokola ezalaki na mikolo ya Sodomo, ekozala mpe bongo na mikolo ya Koya ya Mwana na Moto; ete tokozala na biloko mibale kokamba biso, mpe ba mokili bakozala na biloko mibale. Biloko mibale ya bango nde batéi mibale.

Kasi mpo na Lingomba na Yo ya molimo, babongisami na Yo liboso, Mwasi na libala na Yo Mwasi moponami, biloko mibale ya biso nde Yo, omonisami kati na nzoto ya mosuni ya moto, kokamba biso na Likonzi ya Móto.

Tika mopepe mópepa. Tika bikumbaki bininganisa, tobatelami, libela. Tozali kopema wana mpenza likolo na Liloba na Yo. Ntango yango oyo. Esode ya molimo ekómi. Tozali kotambola mpe kosolola na Yo mokolo na mokolo, koyoka Mongóngó na Yo. Tozali kati na bondeko ya ntango nyoso elongo na Yo.

Tolingi kozala Matandu na Yo, Miso na Yo, Lolemo na Yo. Ozali mowiti, tozali bitape na Yo. Yeisá biso makasi, Tata, kobota mbuma na Yo. Bosenga na biso bobele moko  ezali kozala na bomoi bolongobani na Nsango malamu.

Mitalisa kati na biso, Tata, kokóba mosala na Yo mpe kokokisa Liloba na Yo lilakamaki. Mposa na biso ezali kozala batindami na Yo mpo ya lelo, kokokisa boyengebene nyoso.

Tolingi koyoka Yo koyebisa biso:

Libondeli na ngai ezali, epai na baoyo bazali koyoka na ladio to kati na…na mokili ya bande, mpe baoyo bazali awa. Tika ete Nzambe ya ngolu nyoso, ya Lóla, ángengisa Molimo Mosanto na Ye apambolami likolo na biso nyoso, ete biso, bandá mpokwa oyo, libela, tókoka kobika bomoi na motindo ete Nzambe áloba: “Natondi na kosepela. Bókota na bisengo ya Seko bibongisamaki mpo na bino úta bozalisi ya mokili.” Tika ete Nzambe ya Lóla átinda mapamboli na Ye likolo na bino bato nyoso.

NKEMBO…yango nde biso Tata, Mwasi na Yo ya libala kati na mokili ya Bande.

Ya solo, Ozali kotinda mapamboli na Yo likolo na biso mpe komonisa biso Liloba na Yo, koyebisa biso na Liteya moko na moko toyokaka ete, Otóndi na kosepela, TOZALI MWASI NA YO YA LIBALA.

Soko okolinga koyoka mobateli na biso, mobateli ya Nzambe mpo na mokili oyo atindaki kobianga Mwasi na libala na Ye kobima mpe kokamba ye, yaka komibakisa na biso mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyoka ye koloba Liloba ya Bomoi ya Seko, lokola azali komemela  biso Liteya kouta na Nzambe: Bomoi Na Yo Elongobani Nde Na Nsango Malamu? 63-0630E

Ndeko Joseph Branham

Liyebisi Godi: Soko Nkolo alingi, tokozala na Losambo ya Elambo/ Kosukolana makaká Lomingo lokolanda na mpokwa, Nsanzá ya Zómi mokolo ya 15 ya nsánzá.