22-0414 ESODE YA MISATO

Nsango: 63-0630m ESODE YA MISATO

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala oyo ayanganisami Oyo Azali koloba Liloba,

Oyo ezali ntango monene ya koleka na bomoi nan gai baninga nan gai! Tozali komona Liloba kokokisama liboso na miso nab iso mpenza lokola nano tomoná liboso te. Boni ezali kopesa kosepela koyeba Oyo Ye Azali, nani nani motindami Atindelaki biso azali, mpe na sima KOYEBA BISO TOZALI BANANI! Matondi Tata. Tokanisa soko moke te ete makambo oyo ekokoma na motindo oyo, kasi yango oyo ezali kokoma liboso na miso nab iso mpenza, kaka ndenge mosakoli na Yo alobaki yango likolo na bande.

Nazali kozila na etingia monene komona Molimo Mosanto na Ye kobenda biso pene na Ye koleka liboso na nsuka ya mposo oyo ya Pasika. Nalingaki na benga moko na moko na bino kozala na boyokani elongo na biso zingazinga na Etinda oyo, elongo moko na Mwasi na Ye na Libala na mokili mobimba.

“Na sima, ntango mwa eloko moke emonani, mpo na nini ozali kosala lokola mwana moke? Osengelaki kozala moto mobimba. Lob ana bato,” amen, “bongo kende liboso!” Amen. Yango nde likambo. “Koganga te. Solola!” Amen. Oo, Nalingaka yango. “Mpo na nini ozali koganga epai na Ngai? Solola kaka na bato mpe kende liboso na lotomo nay o. Ezala nini, soko ezali bokono, to ezala eloko nini, kosekwisa bakufi, to soko ezali nini, solola! Nakokisi yango. Solola na bato.”

Libaku malamu nini oyo tozali na yango kolamukisa kondima nab iso, ete biso mpe lokola tikoka koloba LILOBA. Boya koyangana elongo na Mwasi na Libala na nsuka ya mposo oyo ya Pasika, wana ezali biso komibongisa mpo na Esode ya nsuka. Bomoi nab iso esengeli ekokana na Nsango Malamu, mpo ete libota oyo ezali na nse ya kofundama. Kasi ntina ezali SASAIPI te mpo na Mwasi na Ye ya Libala koganga, KASI LOBA! Kende liboso nan tina na yo. Lokumu na Nkombo na Nkolo!

Lokola tokosalaka yango na nsuka ya mposo ya Pasika, tika ete tomikanga mosika na mokili ndenge tokokoka na bo kangaka ba telephone soko kaka te mpo ya kokanga bilili, koyoka eteni ya Liloba ya Mokolo, mpe koyoka bande likolo na app ya Lifeline to longwa na bikanganeli ya internet oyo ekosunga kozwa liteya. Tika ete topesa nsuka ya mposo oyo mobimba epai na Nkolo, mpe tokomisa Pasika oyo likambo ya kokutana na bato te, kasi komibonza na Liloba, kati na ba ndako na biso. Nalingaki ete biso nyoso toyangana kokokana etandelo oyo, kokokana na Ntango ya Moi ya Monyele (NMM) bobele soko boyebisami ndenge mosusu.

MOKOLO YA MINEI

Ezalaki Mokolo ya Minei na mpokwa nde Nkolo  Yesu azalaki na Elambo naYe ya nsuka elongo na bayekoli na Ye kati na ekaniseli ya Elekeli liboso ya Esode ya bana na Yisalaele. Libaku malamu nini oyo kozala na boyokani elongo na Nkolo kati na ba ndako na biso, liboso na nsuka ya mposo mosanto na biso, mpe kosenga Ye ete Apambola biso mpe mabota na biso, mpe kopesa biso nyoso oyo tozali na yango bosenga kati na mobembo na biso.

Tata na Likolo, tozali na matondi mpo na oyo, ntango mosusu kozwama elongo, nan gambo oyo ya Seko na Seko, mpe tozali kotalela na ntongo oyo mpo ya bozwi nguya ya sika kouta epai na Yo, kopesa biso mpiko mpo na mobembo mozali liboso. Toyangani lokola bana Baebele na ntongo ntongo nyoso, kozwa mana oyo epesamelaki bango kati na butu, mpo esunga bango na mokolo oyo ezalaki koya. Toyangani mpo na Mana ya molimo, na ntongo oyo, mpo ya kopesa biso makasi mpo ya mobembo.

Tika ete tobanda na ngonga ya 6:00 sima ya nzanga na ba ntango nab iso ya mboka na mboka, mpe toyoka Ye koyebisa bison a ntina na Esode ya nsuka, awa ezali biso koyangana zingazinga ya Kiti na Ye ya Bokonzi koyoka Liteya: Esode ya Misato 63-0630M.

Sim ana Liteya, tokoyangana na mabota nab iso kati na ba ndako na biso mpo ya kozwa Elambo ya Nkolo.

Ekoumela te tokozwa ekanganeli moko ya internet mpo ya bande mpe molulu ya Elambo, to, ekozwama nan tango oyo esili kotandama likolo na Voice Radio, likolo na app ya Lifeline.

MOKOLO YA MITANO

Tika ete tokened na mabondeli elongo na mabota na biso na 9:00 ya Moi, mpe lisusu na 12:00 na nzanga na bobiangaka Nkolo azala elongo na biso mpe Mwasi na Libala longwa na mokili mobimba na ntango malamu oyo ya koleka na nsuka ya mposo; mpe kotondisa ba ndako nab iso na Molimo na Ye Mosanto wana ezali biso komikaba na bosambelaka Ye.

Tika ete makanisi na biso ezonga na mokolo wana na Kalvari, mibu 2000 esili koleka, mpe tomona Mobikisi na biso azali kodjembela likolo na ekulusu, mpe bongo tomipesa na lolenge yango moko mpo tosalaka ntango nyoso oyo ekosepelisaka Tata:

Botala sikawa. Ntango ayaki na mokili, nan tango oyo azalaki na kozanga kondima, ya koleka ndenge etikaláká komonana nan tango wana, yango ekitisaki Ye ata ndambo te. Akobaki na Ye koteya kaka ndenge moko, mpe kobikisa babeli kaka ndenge moko. Etungisaki ye te. Bato ya koloba mabe bazalaki. Moto wana alobamelaki mabe longwa na ntango Azalaki kaka mwana moke kino na ntango abomamaki na ekulusu. Yango etelemisaki nde Ye? Te mobali. Ntina na Ye ezalaki nini? “Ntango nyoso kosala oyo Tata akomaki. Ntango nyoso kosala oyo esepelisaki Ye.

Na sima tika ete na 12:30 ya Moi, na motema mobimba tokanisa nan tina na motuna ya litomba monene kati na bomoi na biso, wana tozali koyangana zingazinga na Kiti na Ye ya Bokonzi koyoka Liteya : Bomoi Na Yo Ekokani Na Nsango Malamu? 63-0630E.

Na sima tokutana elongo kati na mabondeli na 3:00 sima ya nzanga kati na ekaniseli ya kobakisama na ekulusu ya Nkolo na biso.

MOKOLO YA MPOSO

Tika ete mbala moko lisusu toyangana kati na mabondeli na 9:00 ya Moi, mpe na 12:00 mpe kolengela mitema nab iso mpo na eloko monene Akosala mpo na biso na kati nab iso,

“Sima ya koyeisa efundeli oyo kotemela—baninga nan gai bayangeli kuna libanda, mpe kotala ete esengelaki naloba makambo makasi oyo, kasi Nkolo, Nasalaki yango na pemelá na Yo. Nazali koyoka ete Yo  olobaki nan gai ete nasala yango. Sasaipi elongwi na mapeka nan gai, Nkolo. Na—Nazali na kosepela ete elongwi. Tika ete basala na yango nyoso balingi kosala, Tata. Nazali kobondela ete bandima yango. Nazali kobondela ete obikisa moko na moko, Nkolo. Tika ete kolamukisa  ya bayengebene, mpe nguya monene eya katikati na Lingomba kaka liboso na kokende na yango. Na…Ezali mpasi te kobondela bongo, mpo ete Olakaki yango. Mpe tozali kotalela, Nkolo, mpo na lotómo wana ya misato oyo toyebi ekosala makambo minene mpo nab iso na kati na biso.”

Na sima na 12:30 sima ya nzanga, tokoya biso nyoso elongo koyoka LILOBA: KOFUNDAMA 63-0707M. MOKOLO YA MOKANDA YA BOLINGO ya ndenge nini oyo ekozala mpo na Mwasi na Ye ya Libala na mokili mobimba.

Na sima tika ete toya elongo kati na mabondeli na 3:00 sima ya nzanga kati na ekaniseli ya kobakama na ekulusu ya Nkolo na biso.

MOKOLO MWA LOMINGO

Mokolo monene nini oyo esengeli koganga lisusu te, kasi LOBA! Ntongo nini oyo ya lisekwa! Tika ete tolamuka na nta ntongo lokola Ndeko Branham asalaki na ntongo oyo mining ana ye moke, ndeke ya ntólo motane, alamukisaki ye na 5:00 liboso na nzanga.. Tika bobele ete totonda Nkolo mpo na kosekwisa Yesu longwa na kati na bakufi:

“Na ngonga na mitano na ntongo oyo, moninga nan gai moke oyo ya ntólo motane apumbwaki na lininisa mpe alamusaki ngai, eyokanaki lokola nde mwa ntólo ye elingaki epasuka, na bolobaka ete, “Asekwi.”

Na 9:00 na Moi, tika ete na bosembo tokutana lisusu kati na bomoko na libondeli, kobondela ba moko mpo na ba mosusu mpe komilengela mpo na koyoka Mongongo na Nzambe.

Na 12:30 sima na nzanga, tokoya elongo mbala moko lisusu mpo na koyoka Liteya nab iso ya Pasika: Mpo na nini Koganga? Loba! 63-0714M.

Sim ana losambo oyo, tika ete mbala moko lisusu toya elongo kati na libondeli, kotonda Ye mpo na NSUKA YA MPOSO YA KOKAMWA APESI BISO ELONGO NA YE MPE NA MWASI NA LIBALA ZINGAZINGA NA MOKILI.

Epai na bandeko nan gai mibali mpe basin a ngambo na bibale binene, nakolinga kobianga bino ete bpyangana nab iso elongo kati na makambo oyo na ntango ya Jeffersonville, mpo na ntango nyoso ya libondeli kati na etandelo oyo mpe mpo na bande oyo ekoyokama na Mokolo mwa Lomingo na ntongo. Nazali ata ko bongo, koyeba ete, koyoka bande na Mokolo ye Minei, ya Mitano, mpe ya Mposo sima ya nzanga nan tango ya Jeffersonville ekozala mpasi mpenza mpo na mingi kati na bino, na bongo bomiyoka nsomi koyoka Mateya wan ana ntango nse ntango ya moi oyo ekokoka na bino. Nde ata ko bongo, nakosepela ete, biso nyoso elongo toyangana na 12:30 sima na nzanga na ntango ya Jeffersonville, koyoka Liteya na biso ya Mokolo mwa Lomingo elongo.

Nakosepela mpe kobianga bino ete bino mpe bana na bino bozala kati na bobongisi misala ya boyekoli oyo ezwami na ba nkasa ya kolakisama, mpe mimekano ya YF, oyo libota na bino mobimba bokosepela na yango elongo. Tozali kokanisa ete bokosepela na yango lokola nyoso na yango ezali likolo na moboko ya LILOBA oyo tokozala koyoka na nsuka ya mposo oyo.

Mpo na etandelo ya nsuka ya mposo, nsango mpo ya komibongisa mpo na molulu ya Elambo, bisaleli mpo na bobongisi misala ya boyekoli, mimekano ya Pasika, mpe nsango mosusu, botala bikanganelo na nse awa.

Ezali mpo nan gai lokumu monene mpo nan gai kobianga bino mpe libota na bino ete boya elongo moko na Mwasi na Libala na mokili mobimba mpo na nsuka ya mposo etondi na LOKUMU, MASANZOLI MPE LOBIKO NA NZOTO. Nandimi ete ekobongola solo mpenza bomoi na yo mpo na libela.

Ndeko Joeseph Branham