22-0410 Mokambi

Nsango: 62-1014e Mokambi

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami ba Mpate ya Nzambe Bakambami,

Etumba ya nsuka yango oyo ebelemi. Tozali kokende esika tokma naino liboso te. Tozali kokende kati na lisobe, mpe tozali na nzela na biso kokende esika moko, mpe tokoki kokende te na kozanga Mokambi. Botungisama te etonga moke, Nzambe apesaki Mokambi mpo ya kokamba biso.

Mokambi oyo akomonisa biso makambo, mpe akoyebisa makambo mayokaki Ye; Akoki kozongela maloba na biso mpe koloba mpenza oyo biso tolobaki. Esengeli na biso kolanda Mokambi oyo, mpo ete bobele Ye nde ayebi nzela.

Ntango Yesu azalaki na mabelé, ayebisaki bayekoli na Ye ete azalaki na makambo mosusu mingi ya kolobela mpe komonisa biso, na bongo Akotinda Molimo ya Solo epai na biso, mpe Akokamba biso kati na Solo oyo. Alobaki ete Mwasi na Ye ya Libala akoyeba Ye wana Akomimonisa mpe komindimisa kaka ndenge Asalaki ntango Ayaki kati na mosuni mbala ya liboso.

Akoyeba likanisi moko na moko ya motema na biso. Akoyeba tozali ban ani mpe oyo tosalaki. Akoyeba makambo nyoso na ntina na biso. Azali Mokambi ya Nzambe. Molimo Mosanto oyo azali kobika mpe komimonisa Ye mpenza kati na mosuni ya moto.

Kaka ndenge Yesu Ye moko alobaki, “Ezali ngai te nde nazali kosala misala; ezali Tata na Ngai oyo azali kofanda kati na Ngai. Solo solo Nazali koloba na bino ete Mwana akoki kosala eloko na Ye moko te; kasi oyo emoni Ye Tata kosala, Mwana akosala yango mpe lokola. Tata Azali kosala, Ngai mpe Nazali kosala motindo moko.” Bobele bongo mwanje na Ye Akoloba mpo na ye moko te, kasi nyoso ekoyoka ye, yango nde akoloba. Akozwa makambo nyoso oyo kouta na Tata, mpe bongo akotalisa yango epai na biso. Akofungola mabombami nyoso oyo ebombamaki kati na Liloba.

Tata ayebisaki biso ete akozala na MOTO MOKO oyo akotelema nae sika na Ye awa na mabelé, Mokambi, mpe ete Mwasi na Ye ya Libala akoyeba Ye na petee mpe akolanda ye.

Akokumisa bobele Nzambe. Akoloba polele ete, ezali ye te, mwanje ya sambo, ezali komonisama ya Mwana na Moto. Ezali libombami ya Nzambe kozipolama. Ezali moto te, ezali Nzambe. Azali Mwan na Moto te; azali motindami kouta epai na Mwana na Moto. Mwana na Moto ezali Klisto. Likolo na Ye nde tozali koleisama.

Mingi bakoloba ete bango nde bapakolami mpo ya kokamba Mwasi na Libala, kasi Nzambe alingaka te ete botelema likolo na makanisi na bino, soko makanisi ebongisami na moto ata nani. Nzambe atindi Mokambi, mpe Nzambe alingi ete yo okanisa ete oyo wana azali Mokambi Ye atindi.

Mokambi na biso akozwa te moko na nzela moko, moko na nzela mosusu mpe koloba: esengeli koyoka motei oyo, na sima oyoka motei oyo kuna; bayokanaka kutu te kati na bango. Yango ekokomisa yon a kobonga be ndenge nini?

Ezali bobele na LILOBA MOKO OYO EBONGI BE oyo ekomema biso mpe kobatela biso elongo, MONGONGO NA YE LILOBA OYO EZALI LIKOLO NA BANDE OYO ENDIMISAMI EBONGI BE.

Bazali koloba lelo ete Molimo Mosanto azali kokamba moko na moko na biso lokola bato, yango ezali solo. Kasi mpo na nini kozala na motei soko Molimo Mosanto azali kokamba yo? Yoka ndenge ozali komilobela yo moko: Nakosepela ete motei akamba ngai mpe alakisa ngai mpe mosakoli ya Nzambe te oyo andimisami? Nakosepela nazala na ndimbola na ye ya Liloba nae sika ete nayoka Mongongo ya Nzambe Ye moko lokola ye akoki kolimbola yango malamu mingi na koleka?

Nazali komeka kokweisa batei te, to koloba ete bazali lokuta, to koloba ete esengelaki te oyoka batei. Nabondeli yo ete olimbisa ngai soko nazali koloba yango malamu te. Nazali kaka koloba ete esengeli te ete bango bazala etemelo na yo, liloba ya nsuka, Mokambi na yo. Bato bakoki koyokana soko moke te kati na bango. Moto na moto azali na oyo ya ye likanisi ekeseni, bokambami bokeseni. Yango ekokomisa Mwasi na Libala na kobonga be ndenge nini? Soko ozali koyoka bango nyoso, mpe oyebi ete bango nyoso bakoki kozala na boyokani te ete oyo bazali koloba ezali Liloba ya Nzambe ebongi be, yango ekokoka kobongisa be Mwasi na Libala ndenge nini? Yango ekoki kozala Mokambi na yo ndenge nini?

Soko tokokaki kaka kotika Molimo Mosanto kobatela biso esika moko elongo na Liloba na Ye, mbele tokozala motema moko, likanisi moko, boyokani boko, na nzela na Molimo moko, Mokambi ya Nzambe oyo akokamba biso kati na Solo nyoso. Kasi esengeli na yo kolanda Mokambi na yo.

Meka kobeta ntembe na Liloba ya Mokambi na yo te. Landa Ye. Soko bongo te, okosuka na kobunga. Mpe , kanisa, ntango otiki Ye, okotikala yo moko, na bongo tolingaka kozala ntango nyoso pene na Mokambi.

Molimo Mosanto azali kokamba biso kolanda Mokambi, oyo azali Molimo Mosanto kosolola na nzela ya motindami na Ye mwanje ya sambo. Ezali Liloba ya moto te, Ezali Mongongo ya Nzambe epai na Mwasi na Ye ya Libala mpe Ezali NSE YOKO EKOKI KOKOMISA MWASI NA LIBALA NA BOBONGI BE.

Boya tokutana Mokolo mwa Lomingo na 12:00 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali kobanda to mposo ya Pasika koyoka Mokambi na biso. Akokamba biso epai wapi tokomá nano liboso te.

62-1014E

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya losambo:

St. Malako 16: 15-18

St. Yoane 1: 1 /16: 7-15

Misala 2: 38

Baebele 4: 11-13 / 4:30

2 Petelo 1: 21

Esode 13: 21