22-0403 KOPELAPELA YA MWINDA MOTANE YA ELEMBO YA KOYA NA YE

Nsango: 63-0623E KOPELAPELA YA MWINDA MOTANE YA ELEMBO YA KOYA NA YE

BranhamTabernacle.org

Bato Nyoso Na Kati,

Nkembo na Nzambe, mokolo nini oyo tozali kobika kati na yango. Tozali koyoka Etinda oyo ekokisami, na ekela moko na moko, kozala Yesu Klisto lolenge moko lobi, lelo, mpe libela. Esali eloko yango moko oyo Asalaki ntango Azalaki awa na mokili; abikisaki babeli, ayebaki makanisi ya mitema, alaki makambo oyo esengelaki kokoma, asekwisaki bakufi, mpe mbala nyoso, Ezalaki oyo ebongi be.

Mai esukolaki mabelé nyoso longwa na likolo na songé ya ngomba. Ezalaki na eloko mosusu etikalaki te kaka Libanga. Ezalaki na Nkomá ya kokamwa likolo na Libanga, na bongo Nzambe atindelaki biso mosakoli na Ye ya nguya kolimbola Nkomá epai na Mwasi na Ye ya Libala. Sasaipi Biblia elimbolami mobimba.

Amemaki mwanje na Ye ya nguya likolo na ngomba mpe atiaki MOPANGA YA NKOLO KATI NA LOBOKO NA YE. Mwanje na Ye akataki bongo songé ya ngomba yango mpe atombolaki yango likolo. Na kati na yango ezalaki na libanga pembe, eloko moko na lolenge ya libanga ya motuya ya granite oyo ekomamaki kutu likolo te.

Ayebisaki biso kotala Oyo wana ekendeki ye na Elimwelo na ntango. Amemamaki bongo na katikati ya banje Sambo mpe azongaki mpe amonisaki biso yango NYOSO OYO EKOMAMAKI KUTU TE KATI NA LIBANGA.

“Oyo azali mosali na Ngai. Mpe nabengaki ye kozala mosakoli ya eleko, kokamba bato kaka ndenge Mose asalaki. Mpe apesamelaki bokonzi, akokaki kokela biloko na maloba na ye.” To eloko moko ya ndenge wana, lokola Mose asalaki, lokola koyeisa nzinzi na maloba. Mpe toyebi na ntina na bisende, mpe bongo na bongo, mpe makambo oyo esili kosalema. Hattie Wright moke na sima kuna, nabanza boyebi oyo ekomaki na ndako na ye.

W-I-L-L-I-A-M  M-A-R-R-I-O-N  B-R-A-N-H-A-M azali moto na Nzambe Aponaki mpo na kokamba Mwasi na Ye ya Libala mpo na lelo. Azali mosuni oyo Aponaki kosolola na biso lokola esalaki Ye ntango Ayaki na nzoto esili koleka 2000. Likomi moko na moko ezali kokokisa Yango. Molimo Mosanto Amonisaki Yango. Sasaipi ezali na kondimisama lisusu ete tozali na EMONISELI YA SOLO ya oyo Ye AZALAKI, oyo Ye AZALI mpe oyo biso TOZALI: Mwasi na Libala na Ye molingami ya motema.

Toyebi ete tozali kati na Mokano mwa Ye mobongi be na botikalaka na Liloba na Ye. Ezali komema esengo mpe kosepela ya ndenge wana. Ekoka soko te kolimbola na maloba kaka oyo yango elingi koloba epai na biso.

Toyebaka ntango nyoso na bozindo ya mitema mpe bomoto na biso ete ezalaki na eloko moko ya kokesene kuna. Toyebaki, ata nano ezalaki biso kati na masumu, ezalaki na eloko moko kuna oyo tokokaki kolimbola yango te, kasi Ezalaki na yango kaka wana. Sasaipi TOYEBI. Totikálá komiyoka boye liboso te, ezali lisusu na ntembe te, komituna-tuna lisusu te, kobeta ntembe lisusu te, Ekomami na bozindo mpe ekomami na bomoto na biso. NKEMBO NA NZAMBE!!

Tozali libota oyo ekoleka te kino makambo nyoso oyo ekokokisama. Tozali libota oyo emoni libebi kokoma liboso na miso na biso mpenza. Ntango ebelemi. Kopelapela ya mwinda motane ya Koye na Ye esali awa. Ekebiseli na Ye ya suka ezali kokokisama.

Kufa mpe kobebisama nyoso ezali nyoso zingazinga na biso. Tozali kobika kati na Sodomo na Gomola. Bosoto, masumu, mitema ya bato kokwea na nsomo, bombi ya atomiki, makambo ya mpasi kati na bikolo, mpe ntango mobimba toyangani mpe tozali kofanda elongo kati na bisika na Likolo lokola Nzambe Ye moko ezali koyebisa biso, BOBANGA TE, BOZALI BAOYO NA NGAI YA MOTEMA. Eloko moko ekokomela bino te.  Botika kaka mitema na bino mipela kati na bino lokola nazali kosolola na bino na molai na nzela mpe nazali koyebisa bino, BOZALI MWASI NA NGAI YA LIBALA.

Boya komibakisa na biso Mokolo na Lomingo oyo na nzanga, ntango ya Jeffersonville, wana ezali na makelele oyo ezali kokoma. Ekangeli ezali kokita. Mwinda motane ebandi kopelapela. Soko bozali kotalela kolongwa elongo na biso, epusi malamu bobwaka liboke wana ya nguba na nse, botika masolo na bino, bomema mikumba na bino, mpe bobelema to bokotikala sima, mpo ete Azali kotelema awa kaka mpo nan tango moke. Azali koya kosolola: Kopelapela Ya Mwinda Motané Ya Elembo Ya Koya Na Ye 63-0623E.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya Liteya:

St. Matai 5:28/ 22:20/ Mokapo ya 24

2 Timote Mokapo ya 4

Yuda 1:7

Genese Mokapo ya 6