21-1204 KONETOLAMA

Nsango: 65-1204 KONETOLAMA

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala Mongongo,

Nandimi ete nakoki kosolola mpo na moko na moko na biso ntango nazali koloba ete, touti kaka kozala na suka ya poso ya Matondo ya koleka nyoso na bomoi nab iso. KEMBO!!

Toyokaki Liloba likolo ya Liloba, Emoniseli likolo ya Emoniseli. Mposa nab iso esilaki na nzela ya eloko moko kaka oyo esengeli kosilisa mposa: Liloba na Ye, Etinda ya eleko, Klisto Ye moko kosolola na Mwasi na Ye ya Libala.

Sasaipi tozali komona Liloba yango moko elakamaki, ya Luka, ya Malaki, bilaka mosusu nyos’oyo longwa lelo, ekomi mosuni, ezali kofanda kati nab iso, toyokaki yango na matoi na biso; sasaipi tozali komona Ye (na miso nab iso) kolimbola Liloba ya Ye moko, tolingi soko moke te ndimbola ya moto ata nani. O Lingomba na Nzambe na bomoi, awa mpe kuna na ba telefone, bolamuka noki, liboso ezala ntango eleki mpo na bino! Nzambe apambola bino.

Tokokaki nde kobanza ete tokozala kotala na miso ya biso moko, komona ndenge Liloba na Nzambe ya bomoi ezali komonisama polele? Kotala Liloba na Nzambe ya bomoi ezali kolimbolama na lolenge ya moto, Nzambe kati na biso!Tokokamwa te ntina bato na mayele nyoso bazalaki koluka mokolo oyo, kasi SIK’OYO, tozali kobika kati na mikolo yango elakamaki, tozali komona mpe koyoka yango kokokisama na matoi mpe miso ya biso moko.

Toyokaki koyoka mpo na Yo, ete okokaki kokela bisende. Toyokaki mpo na Yo, ete okokaki kokela Mpate ya mobali. Kasi sikoyo tozali komona Yo, na miso ya biso moko! Komonisama, emononeli eyeisami polele.

Ye Azali ko nini? Liloba oyo elimbolami nde komonisama na Nkombo ya Nzambe.

Ata balobi mabe baloba mabe ndenge nini, tozali kati na mokano na Ye ebongi be wana ezali biso koyangana elongo, na ba ndako na biso, na bisambo na biso, to esika mosusu nyoso wapi tozali koyangana, koyoka Mongongo na Ye.

Soko nandimaka kokende na losambo te, mpo na nini ko nazali na losambo ? Tozali na biyanganelo kati na mboka mobimba, tokangani na bango na pokwa mosusu, na ntaka ya mili nkama mibale nyoso na matumu manei ezali na moko ya bisambo na ngai.

Mangomba na ye ekangani bamoko na bamosusu na mokili mobimba, koyoka Mongongo ya Nzambe kosolola, mpe kobenga Mwasi na Ye ya Libala. Mfulu ezali te kati na biso, yang onde ezali koyeisa litondi mobimba ya BoNzambe kati na nzoto koya kati na biso. Mwana na Moto Azali komiyebisa, komimonisa, kozongisa Lingomba elongo na litondi mobimba ya BoNzambe kati na biso. Azali kotalisa biso bilembo yango moko oy’ezali komonana polele mpe komonana na Ye moko ndenge Asalaki na ebandeli wan’emimonisaki Ye na mabele na lolenge ya Mosakoli-Nzambe.

 Elakamaki na Malaki ya 4, elakamaki na makomi oyo etikali. Bozali kobondela wapi ? Ndako ya Nzambe, efandi (na eleko bebe).

  Nazali na matondi mingi epai na Nkolo mpo na oyo nyoso Azali kosala mpo na Mwasi na Ye ya Libala na mikolo oyo ya suka. Azalaki koyikisa biso mpiko, kondimisa biso, ete tozali baponami na Ye, oyo tozalaki kati na Ye liboso ya kozalisama na mokili. Ntango nini ya bikamwa oyo mpo na Mwasi na Ye ya Libala.

Nkolo atii likolo ya motema na ngai kokoba na Mateya oyo ya suka ebombamaki mpo na Mwasi na Ye ya Libala. Nayoki penza ete napambolami mingi kokanisa ete Tata apesi biso nzela ya biso koyangana elongo, longwa na mokili mobimba, koyoka Mateya oyo. Ezali penza penza Lisanga Ezangi Komonana ya Mwasi na Libala ya Klisto.

Lokola tozali na ndenge ya kokende na losambo koyangana esika moko te, mpo ya bokono ya Covid mpe botongi ya Eklezia ya sika, ezali na makambo mibale oyo biso nyoso tozali kozanga yango, mpe tozali na mposa monene ete tosala yango. Ezali makambo mibale oyo Nkolo apesaki motindo ete Mwasi na Ye ya Libala asala kino Akozonga : Elambo mpe Kosukolana Makolo.

Ntango nazalaki kobondela mpe koluka Nkolo, Atiaki na motema na ngai ete biso nyoso Tolia elambo mpe Tosukolana Makoko elongo moko na mabota na biso. Nasepelaki mingi mpe napambolamaki ntango Atiaki yango likolo na motema na ngai, mpe ndenge tokoki kosala yango. Tokozala na yango mokolo ya sanza yango moko ya losambo ya Elambo ya suka Ndeko Branham asalaki ntango azalaki na biso elongo awa, na sanza ya Zomi na mibale mikolo ya sanza 12, 1965. Tokopambolama mpe wan’ekokamba ye losambo ya Elambo mpe ya Kosukolana Makolo mpo na biso mbala moko lisusu.

Nakotindela bino mokanda mpe nakotia yango na bikanganelo ya internet ya Eyanganelo ya Branham (Branham Tabernacle : Mol) mobimba ya manaka yango sima ya mikolo mingi te. Nakoki kolaka bino été ekozala ntang’oyo Mwasi na Libala akobosana te. Nazali kotalela na etingia mpo na Lipamboli na Ye monene oyo akopesa biso.

Kobanda mokolo ya Poso oyo tokozala koyoka Mongongo na biso komemela biso Liteya : Konetolama 65-1204, na ngonga ya 3 na moi, ntango ya Jeffersonville. Ekozala mibu 56 na mokolo wana uta Nzambe Asololaki na nzela ya motindami na Ye mpe atiaki mongongo na ye na bande ya kobomba maloba, mpo ete Mwasi na Libala azala na lipati likolo na yango mpe amikembisa ye penza, na bomilengelaka mpo na Konetolama oyo ezali koya noki.

Tokokoba na etandelo na boyanganaka Mokolo mwa Lomingo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, koyoka : Makambo Masengeli Kozala 65-1205.

Na mbisa Mokolo ya Mosala moko tokoyoka : Makambo ya Mikol’oyo Emonisami Polele na Nzela ya Lisakoli 65-1206, mpe Mokolo mwa mibale : Bokambami 65-1207. Bokoki koyoka na ntango bomoni ebongi mpo na bino mpe na mabota na bino. Pelamoko poso eleki, tokozala kotia yango na Voice Radio na ngonga ya 3 liboso ya nzanga, mpe na ngonga ya 7 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.

Natii awa kalenda na mikolo, ntango mpe Mateya oyo tokozala koyoka. Na mikolo mike mikolanda, nakotindela bino mokanda mpe kotia na etanda manaka ya losambo ya Elambo oyo ezali koya liboso.

Nabotalelaka ete nazala na bino elongo, Mwasi na Ye ya Libala, na Kiti na Ye ya bokonzi.

Tika ete Nkolo Apambola bino,

Ndeko Joseph Branham