Category Archives: Uncategorized

25-1130 MOSALA MOBONGI

Nsango: 64-0705 MOSALA MOBONGI

BranhamTabernacle.org

Balingami Mosala Mobongí mua Nzambe,

Bomoi ya solo nyoso ezalaki kati ya mobímbí, nkásá, mpe ezipelo, ezali sikawa koyángana kati na bisó, Mombóto ya Bokonzi ya Nzambe, Misálá mia Ye mibongí, mpe mizali komíbongisa mpo ya lisekwa, kobongama mpo ya bobúki mbuma. Alifa akómí Omega. Ya libosó akómí ya nsúka, mpe ya nsúka azali sikawa ya libosó. Toúti na elekelo mpe tokómí Misálá mia Ye mibongi, eténi oyo ebétémí koúta na Ye.

Mwasi ya libala mpe Mobali ya libala bazali Moko!

Nzambe atálisákí mosakoli na Ye galasísí ya moko na moko na bisó, Misálá mia Ye mobongí, kati ya emónoneli. Lokola atélemaki wana elongó na Nkoló na bolembétéláká Mwasi ya libala koleka libosó na ye,
Amónákí moko na moko na bisó. Bisó NYOSO tozalákí na míso ma bisó matálákí ALIMÁ EPAI NA YE. Alobaki ete tozalaki bato ya bobóto kotála atíkálá ndèle komóna na bomoi na ye. Ezalaki kaka na lolengé moko ya malámu zingázingá na bisó. Tomónánákí kitóko mingi epai na ye.

Bókanisa, oyo ezalákí EMÓNONELI ya Mwasi ya libala; Oyo akokaki koúlana na yango, mpe azalaki koyebisa bisó mpenza yango ezalaki ye kosala. Koyóka na bokéngi.

Akoyá koúta na bikólo nyoso, nde ekosála Mwasi ya libala. Moko na moko azalaki na nsúki milaí, mpe bipakólá-pakola te, mpe bilengé basi mpenza kitóko. Mpe bazalaki kolembetela ngai. Etálisaki Mwasi ya libala kobima na bikólo nyoso. Bomóní? Ye, Moko moko azalaki etaliseli ya ekólo moko, lokola batámbolaki alimá na molongó ya Liloba.

Mwasi ya libala, bótika Naloba yango lisúsu, MWASI YA LIBÁLA, koúta na ekólo moko na moko bazalaki na miso ma bango likoló ya mobateli ya bango, likoló ya ebólo ya bato….TE, yango te nde alobaki. Bazalaki na míso ma bango LIKOLÓ YA MOSAKOLI, kolembetela ye.

Ntango nyoso babátelí miso ma bango likoló ya mosakoli, bazalaki kotámbola na bobongi be. Kasi na nsima akébísí bisó, eloko moko ekómákí. Basúsu balongolaki míso ma bango likoló na ye mpe babandákí kolembetela eloko mosúsu oyo eútákí kaka kokende kati na libébí.

Na, nsima, Nasengelákí kokéngela Ye. Akolongwa na litámbé na Liloba wana soko Nakéngélí te, wana ezali Ye koleka, soko alekí. Ntango mosúsu ekozala ntango na ngai, ntango Nakómí na ngambo, bomóní, ntango Nasúkisi, to ézala ata nini.

Asengeli kokéngela Ye, to akolongwa na litámbe lokola Azali koleka. Kasi nsima alobí ntango mosúsu ekokí kozala ntango na ngai ntango Nasúkisi, ntango Nazali awa te, Bakokí kolongwa na nzela na bozángáká kobatela míso ma bango likoló na ye.

Azalaki polélé polélé kopesa ekébiseli epai ya MWASI YA LIBALA, Bosengeli kobatela míso ma bino likoló ya Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande. Nde nzelá epésámí na Nzambe mpo ya lelo.
Nde Mongóngó ekosangisa mpe ekobongisa be Mwasi ya libala. Soko bolongólí míso mpe matói ya bino na Mongóngó, bokolongwa na molongó mpe kokende na libébí.

Liteya moko na moko ezali kokóma polélé mpe polélé koleka. Ezali Nzambe na nguya komízipola libosó na bisó, koléisa Mwasi na Ye ya libala na Máná ebómbámákí oyo kaka tosengeli kolia. Elekí na yango kaka vitamine mpo ya bamosúsu nyoso, kasi ezali Biléi bibómbámákí mpo ya Mwasi ya libala.

Eyenga nini oyo ya Matóndó Mwasi ya libala azali na yango, kosala lipati likoló ya Liloba, kokóma Mwasi Liloba na Ye Mosala mobongí.

Atelémí ye moko, lokola Mobali ya libala, “abóyámí na bato, atiólámí mpe abóyámí na mangómbá.”
Mwasi ya libala atélémí lolengé wana. Ezali nini? Ezali Mosala mua Ye mobongí, bomóní, ezali Liloba oyo Akokí kosala kati na yango, komónisa. Kobóya!

Yaká komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Nzambe azali koloba na nzela ya mwanje na Ye ya nguya, mpe kokáta mpe kopétola bisó kokóma Mosala mobongí ya Nzambe.

Ndeko Joseph Branham

Liteya: 64-0705 Mosala mobongí
Makomí ya kotanga libosó ya losámbo:
Yisaya 53: 1-12
Malakí 3:6
St. Matái 24:24
St. Malako 9:7
St. Yoane 12:24 / 14: 19

25-1123 Nzambe Na Nguya Azipolami Liboso Na Biso

Litéya: 64-0629 Nzambe Na Nguya Azipolami Liboso Na Biso

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Eyánganelo Ya Branham,

Ntango nini ya bikámwa oyo tozali na yango. Liloba mpe Mwasi ya libala bazali Moko mpe Eloko yango moko. Tozali kobika nsima ya ezipelo kati na bozali ya Nkembo ya Shekina. Tomóní Nzambe komíbómba Ye Moko nsima ya mposo kati na mwanje na Ye ya nsambo motindami. Nzambe, mbala moko lisúsu, komíbómba nsima ya mposo ya moto kati ya moko na moko na bisó. Motúná mozali lisúsu te. Ntembe ezali lisúsu te. TOZALI baponami na Ye, babongisami na Ye libosó, Liloba likómí mosuni, Mwasi Liloba oyo abongí be.

Lokola tozali kosangana elongó útá na mokili mobimba, tozali koyóka Mongóngó na Ye koloba mpe komónisa litóndí ya Liloba na Ye epai ya bisó Emóniseli mobimba ete Yesu Klisto azali lolengé moko lobi, lelo mpe libela. Komónisama ya Liloba, Elohim, Nzambe kati ya nzóto koloba na Mwasi na Ye ya libala. Nzambe kati ya mosuni kobika mpe kofanda kati ya moko na moko na bisó. Manáka ma nsúka ma Nzambe mazali sikawa komónisama mobimba mpe polélé kati ya moko na moko ya bisó.

Totóndí na esengo mpe na matondi epai ya Nkoló kobiangama bato ndéngé mpe biléma mpe bibendé bikokótaka kati na bikangeli na etáleli ya motíndo mosúsu. Kasi toyebi tokangámí kati ya Nani, mpe tozali ba nani: Mwasi ya libala ya Nzambe ya Bande oyo Akangámí kati na Ye; mpe Ezali kobénda bisó epai na Ye moko, kokangama makasi mpe makasi lisúsu lokola tozali kokóma MOKO ELONGÓ NA YE, Yesu Klisto lolengé moko lobi, lelo mpe libela.

Todusólí kati ya ezipelo mpe tokei kati ya Likonzí ya móto mpe tobimí na mapamboli ma Nzambe! Bato bakokí komóna Yango te. Bakoki kosósola Yango te. Kasi epai ya bisó, Ezali polélé na míso, zambí tozali kati na molimó yango moko lokola Mobongisi mpe Mokambi na bisó ya nzémbo. Ezali Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba Bande kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Tozali kobika likoló ya Lípa libúlísámí, Mána maye mapésámí bobele mpo ya bato baoyo bakabwaní. Nde Eloko moko kaka tokokí kolia. Nde Eloko sé moko tolingísámí kolia. Mpe Ezali bobele mpo ya bato baoyo balingisámí, babongisámákí libosó mpe bayebí Ezali nini.

Nalingaka na ngai kaka koyóka Ye koyebisa bisó TOZALI BANANI:

Ye Moko oyo akitákí na Mokolo ya Pentekoste, nde Molimó Mosanto oyo amónisámí lelo, longwá na Nkembo kino Nkembo, na Nkembo. Mpe Ezóngí na Mombóto na Yango ya ebandeli, na libatisa ya Molimó Mosanto; na bilembo yango moko, bikamwa yango moko, libatisa yango moko; lolengé ya bato yango moko, kobika motindo moko, na nguya yango moko, na eyókeli yango moko. Ezali longwá na Nkembo moko kino Nkembo mosúsu.

Tozóngí na Mombóto ya ebandeli na libatisa ya Molimó Mosanto. Bilembo yango moko, bikámwiseli yango moko, libatisa yango moko, motindo ya bato yango moko, kobika motindo yango moko, na nguya yango moko, eyókeli yango moko.

TOZALI MWASI LILOBA NA YE YA BANDE, OYO ABONGÍ BE, AZÓNGISÁMÍ NA LITÓNDÍ NYOSO!

Tozali kolónga. Kotíkala. Kotélema. Kozala likoló ya Liloba na Ye peto libómbamákí mpo ya Mwasi na Ye ya libala. Ezali kobongisa bisó be mokolo na mokolo. KONDIMA YA BISÓ ematí na misándá mia sika na boyebáká BAOYO TOZALI, mpe ezali yango:

Ewánganámí te, ekakólámí te mpe na koleka nyoso, ezali NA MOBEKO MOKO TE.

Olingi kozala na esengo koleka ndéngé ozalá ndèle? Olingi kozala na kosepela 1000% ete oyo ozali koyóka ezali Yango Elobí Nkoló Yawe? Olingi kobongisama be na Liloba ya Nzambe?

Na boye Nabiangí yo koya komíbakisa na bisó, Eyanganelo Ya Branham, Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó Maloba ya Bomoi ya Séko:Nzambe Na Nguya Nyoso Azipólámí Libosó Na Bisó 64-0629.

Ndeko Joseph Branham

25-1116 Klisto Oyo Ayebámí Ya Bileko Nyoso

Litéya: 64-0617 Klisto Oyo Ayebámí Ya Bileko Nyoso

BranhamTabernacle.org

Balingami Liloba Ya Nzambe Ya Bomoi,

Mbúla nyoso oyo Nabómbákí yango kati ya motema na ngai, kozipa Klisto, Likonzí ya Móto yango moko kolimbola Liloba, lokola elakamákí.

Nayebí oyo ekoyókama na bozángi bokéngi epai ya bato mingi, kasi soko kaka boyíkeli mwanje motindami ya Nzambe mpiko mpo ya mwa minúti, mpe boséngí Nzambe Emóniseli koleka, Nandimí ete ye, na nzela ya lisungi ya Nzambe mpe na Liloba na Ye, mpe éngébéné na Liloba na Ye, akomema Ye awa mpenza libosó na bino. Nzambe, komízipola mpe komímónisa Ye moko, kolimbola mpe komónisa Liloba na Ye.

Kolamukisama nini oyo ezalaki kokóma na sánzá oyo elekí kati ya Mwasi ya libala ya Yesu Klisto. Nzambe komízipola Ye moko lokola libosó naino soko moké te, koloba na Molingami na Ye wa motema, kolingana na Ye, kondimisa Ye, tozali Moko elongó na Ye.

Kotatabana te, eloko kozanga koyeba te, komipekisa te, elilíngí ya ntembe kútu te; Nzambe Amónisí epai na bisó: Mongóngó ya Nzambe koloba likoló ya ba bande nde NZELA EPESÁMÍ MPE EBONGÍ BE YA NZAMBE MPO YA MWASI NA YE YA LIBALA LELO.

Apesaki nzela oyo na ntina ete tósengela soki moké te ete ékongolama, épétolama, élimbolama to ésímbama na moto ata na motíndo nini; sé koyóka Mongóngó Yango moko ya Nzambe koloba mbebu na litói epai ya moko na moko na bisó.

Ayebakí ete mokolo oyo ezalaki koya. Ayebakí Mwasi na Ye ya libala Akokákí kolia bobelé Máná mangó Mabómbámí, Biléi bia Ye ya ba Mpate. Tolingí na bisó te koyóka eloko ata nini mosúsu kasi Mongóngó ya Nzambe longwá na Nzambe Ye moko.

Topasólí ezipelo wana kino kati na Nkembo ya Shekina. Mokili ekokí komóna Yango te. Mosakoli na bisó akoki ntango mosúsu koloba maloba ma ye alimá te. Akoki mbala mosúsu koláta na ye malamu te. Akoki ntango mosúsu te koláta moláto ya bakambi ya mangómbá. Kasi nsima ya poso wana ya moto, na kati Kúná ezali na Nkembo ya Shekina. Na kati Kúná ezali na nguya. Na kati Kúná ezali na Liloba. Na kati Kúná ezali na lipa libúlisámí. Na kati Kúná ezali na Nkembo ya Shekina, oyo ezali Pole ekokémbisaka Mwasi ya libala.

Mpe kino óya nsima ya mposo ya nyama wana, kino okobima na mposo na yo ya kala, makanisi ma yo ma kala, bindimeli na yo ya kala, mpe óya na Bozali ya Nzambe, bongo Liloba likómí eloko yango mpenza ya Bomoi epai na yo, na bongo olamúkí na Nkembo ya Shekina, na bongo Biblia ekómí Búku ya sika, nde Yesu Klisto azali lolengé moko lobi, lelo, mpe libela. Ozali kobíka kati na Bozali na Ye, kolia lípa libúlísámí oyo epesámí na mokolo wana bobele epai ya bandimi, Banganga káka.
“Mpe tozali ba nganga, bokonzi ya bonganga, libota na bule, bato godi, kopesa mbeka ya molimó epai ya Nzambe.” Kasi Osengeli ókóta, na nsima ya ezipelo, komóna Nzambe oyo Azipólámí. Mpe Nzambe Azipólámí, yango nde Liloba na Ye limónisámí.

Tozali bato ndéngé epai ya mokili, kasi tosepélí koyeba Ebendé ya bisó ya motó eyambaka nzóto ya ebendé moké azali nani mpe tozali na lipambú kozala bibendé na Ye miké ya bande, baoyo tokótisámí kati ya Liloba na Ye, lokola ezali kobénda bisó epai na Ye.

Soko bokótísámí te kati ya ba bande, bozali eloko moko te kasi libóndo ya bibendé bizangí bikangelo!!!

Sikawa, botala sikawa, Nzambe! Yesu alobákí ete: “Baoyo Liloba ya Nzambe liyákí epai na bango, babiangamáki ‘banzambe,’” ezalaki basakoli. Sikawa, ezali te ete moto ye moko azalaki Nzambe, ndengé moko kaka lokola nzoto ya Yesu Klisto ezalakí Nzambe te. Azalaki moto, mpe Nzambe azipamákí nsima na Ye.

Nzambe, mokolo moko azipamákí nsima ya mposo ya ba nyama. Nzambe, mokolo moko azipamákí kati ya mosuni ya moto abiángamákí Melikisedéke. Nzambe, azipamákí kati ya mosuni ya moto abiangamaki Yesu. Nzambe, azipamákí kati ya mosuni ya moto abiangámi William Marrion Branham. Nzambe, azipámí kati ya mosuni ya moto abiangamí MWASI NA YE YA LIBALA.

Ezali na motúya mingi kokanisa, kasi ebelé monéne bazangí yango mpe bazali koluka eloko mosúsu. Eloko ya nsúka Abalayama amónakí, eloko ya nsúka kokóma libosó móto mókwéa mpe mósámbisa mokili ya Mabota, libosó ete mwana ya Elaká áya komónana, eloko ya nsúka lingómba ya Boklisto likomóna kino komónana ya Yesu Klisto ezali Melikisedéke, Nzambe amónáni kati na mosuni, komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Eloko mosúsu ya koya ezali te.
Ezali na eloko mosúsu te elakámí kati na Liloba na Ye. Ezali na moto te, libóké ya bato te koya kobongisa be Mwasi ya libala.

Te! Balingí koya awa na losámbo mpo ya bobongisami be. Bomoni? Ete to—tozali na bondeko moto na moningá na ye awa na losámbo, kasi bobongi be bokoyaka kati ya bisó na Nzambe. Makila ya Klisto nde oyo ekobongisaka bisó be kati ya Molimó Mosanto.

Etindá oyo, Mongóngó oyo, Liloba lia Nzambe lindimísámí, lizali kobongisa be Mwasi ya libala ya Yesu Klisto.

Nabiangí moko na moko na binó koya koyóka elongó na bisó Mongóngó ya Nzambe lokola ezali kobongisa be Mwasi na Ye ya libala Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: 64-0617 “Klisto Oyo Ayebámí Ya Bileko Nyoso”.

Ndeko Joseph Branham

Makomí ya kotanga libosó ya Litéya:
Dutelonóme 18:15
Jekalia 14: 6
Malaki 3 :1-6
St. Luka 17: 28-30
St. Yoane 1 :1 / 4:1-30 / 8: 57-58 / 10: 32-39
Baebele 1:1 / 4:12 / 13:8
Emóniseli 22:19

25-1102 Kozipolama Ya Nzambe

Litéya: 64-0614M Kozipolama Ya Nzambe

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Liloba Limónísámí,

Tokokí nde kokanisa Yango! Likonzí ya Móto yango moko liyákí likoló ya bato wana baoyo bakomákí Biblia ezali Likonzí ya Móto yango moko tozali koyóka mokolo na mokolo, kolimbola mabómbami manso ya Biblia epai na bisó: Liloba ya Nzambe Limónisámí!

Nzambe amízipákí Ye moko kati ya basakoli na Ye ya Kala koloba Maloba ma Ye epai ya bango. Yango nde Asálákí ndèle. Kasi kati na mokolo ya bisó, mosakoli ya bisó, William Marrion Branham azalaki Liloba ya bomoi epai ya bato, azipámákí na Likonzí ya Móto.

Epakweli ezali moto. Elobelo Klisto elingí koloba “mopakolami,” bomoni, “mopakolami.” Na boye Mose azalaki Klisto na mikolo mia ye, azalakí mopakolami. Yilimia azalaki Klisto na mikolo mia ye, na eténi ya Liloba mpo ya mokolo yango.

Nzambe Alimbolaka Liloba ya Ye Moko. Ndeko Branham alobákí yango; Nzambe Alimbolaki Yango. Azalaki na Liloba. Ebólo ya bato te, William Marrion Branham! Nzambe Azuaki MOTO MOKO. Akokí te kozua mitema mibalé to mísáto mikeseni na makanisi makeseni. Azuaka MOTO MOKO, mpe akómí Liloba ya Nzambe ya bomoi libómbámí nsima ya mosuni ya moto.

Tozali lisúsu nsima ya ezipelo wana te, bana miké. Nzambe ayéi mobimba na míso ma bino. Ezipelo ya kala ya ebongiseli mpe ya momesano esilí epasólámí longwá na Liloba ya Nzambe, ete Ékoka komónisama! Kati na mokolo oyo ya nsúka, ezipelo wana ya momesano esilákí kopaswama, mpe Likonzí ya Móto litélémí awa. Ye oyo awa, komónisa Liloba mpo ya lelo oyo. Ezipelo epasólámí.

Bótala ba bande lokola izali kokita, bótala moko na moko, boni ezali koya polélé koleka mpe koleka lisúsu; soko bozali na matói ya koyóka, bomóní, míso ya komóna.

Yango nde ezali naíno kobeta bato na kúfa míso lelo. Balingaka koloba bandimí mosakoli ya Nzambe amemákí Liloba, kasi epakweli yango ezali likoló ya basúsu kokamba bisó, mosakoli te.

Mosakoli ayebisaki biso ete Nzambe akokí te kobúka Liloba na Ye. Na mikolo ya nsúka, esengelákí ézala eloko yango moko lisúsu. Nzambe akokí te kobóngola nzela na Ye, to kobóngola Liloba na Ye. Alobaki Abóngwanaka te. Atíndákí ntango nyoso basakoli na Ye bobele te komema Liloba na Ye, kasi kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Lokola esálemákí na eleko moko na moko, Bonzambe bozipamákí Kati na mosuni ya moto. Bótala, Asalákí yango. Basakoli bazalaki Bonzambe, bozipamákí. Bazalaki Liloba ya Nzambe (ezali solo?) lizipamákí kati na mosuni ya moto. Bongo, basósóláki soki te Mose ya bisó, bomóní, Yesu.

Sikawa ezali kaka te Liloba likomámí epai ya bisó, ezali likambo yango mpenza. Tozali kati na Ye. Sikawa tozali kosepela. Sikawa tozali kolembetela Ye. Sikawa tozali komóna Ye, Liloba, komímónisa Ye moko.

Nde, tokómí eténi na Ye. Tozali ezipelo ezali kozipa Ye. Tozali eténi na Ye; ntango nyoso Klisto azali na kati na yo, lokola Klisto azalaki ya Nzambe.

Tozali kobomba Klisto nsima ya ezipelo tempelo ya poso na bisó. Tozali mikandá mikomámí, Liloba likomámí. Tozali Liloba lisilákí kokomama, limónisámí.

Mpe ntango omóní Liloba limónisámí, omoni Tata Nzambe, zambí Liloba nde Tata. Liloba nde Nzambe. Mpe Liloba limónisámí, ezali Nzambe Ye moko kozua Liloba na Ye Moko mpe komónisa Yango kati ya bandimi. Eloko moko te ekokómisa yango na bomoi kasi bobele bandimi, kaka bandimi.

Nzambe, azipamí kati ya mosuni ya moto, koloba mpe komónisa Liloba na Ye epai na bisó mokolo na mokolo. Nzambe kati na mosuni ya moto kobika kati na moko moko na bisó.

Ndeko Joseph Branham

Liteya: 64-0614M- “Kozipolama Ya Nzambe”
Ntango: 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville

*Bókanisa mbóngwáná ya ntango

25-1026 Bóbongola Miso Epai Na Yesu

Litéya: 63-1229E Bóbongola Miso Epai Na Yesu

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Bayóki Ya Bande,

Ntango eyéi ete moto na moto ámítuna ye moko: “Ntango nayókaka ba bande, Mongóngó nini nde nayókaka? Ezali nde bobele mongóngó ya William Marrion Branham, to nayókaka nde Mongóngó ya Nzambe mpo ya mokolo ya bisó? Ezali nde liloba ya moto, to Nazali nde koyóka Yango Elobí Nkoló? Nasengeli nde na moto moko kolimbola oyo ezali ngai koyóka, to Liloba ya Nzambe lisengeli nde te na ndimbola?”

Eyano ya bisó ezali: Tozali koyóka Liloba lilobámí likómí mosuni. Tozali koyóka Alifa na Omega. Tozali koyóka Ye, Likonzí ya Móto, koloba na nzela ya mbebu ya moto pelamókó elobákí Ye ete Akosala na mokolo ya bisó.

Toyókaka moto te, toyókaka Nzambe, lolengé moko lobi, lelo, mpe libela. Mongóngó ya Nzambe oyo ezali mopotú, na nguya mingi koleka mopanga mopeli bipai nyoso mibalé, mozali kokáta kino lilongó, mpe moyébi ya makanisi mazali kati ya motéma.

Emónisameli bisó ete oyo ezalaki Ye ntango Atámbolaki kati na Galilái nde eloko yango moko Azali na mpókwa oyo na Jeffersonville, eloko yango moko Azali na Eyánganelo ya Branham. Ezali Liloba ya Nzambe komónisama. Yango ezalaki Ye ndèle, Azali Yango na mpókwa oyo, mpe Akozala Yango libela. Oyo Alobákí akosála, Asálí yango.

Moto azali Nzambe te, kasi Nzambe Azali naino kobíka mpe koloba na Mwasi na Ye ya libala na nzela ya moto yango. Tozali kosámbela moto yango te, kasi kosámbela Nzambe kati na moto yango; zambí azali moto Nzambe Aponákí kozala MONGÓNGÓ NA YE mpe kokamba Mwasi na Ye ya libala na mikolo oyo ya nsúka.

Mpo ete Apesi bisó Emóniseli monene oyo ya ntango ya nsúka, tokokí sikawa koyeba TOZALI BA NANI, Liloba likómí mosuni na mokolo ya bisó. Satana akokí lisúsu te kobángisa bisó, pámba te toyebí tozali Mwasi Liloba na Ye Ngondo oyo azóngisámí mobimba.

Mongóngó mwangó moyebisaki bisó: Nyoso tozali na yango bosengá esili epésamélákí bisó. Ntina ya kozila ezali te. Elobamákí, EZALI YA BISÓ, EZALI BOZUI YA BISÓ. Satana azali na bokonzi likoló na bisó te; alóngámí.

Soló, Satana akoki kobwáka bokono, bozindó ya mawa, mpe bwálé na mitéma likoló na bisó, kasi Tata Asilí kopesa bisó makokí ya kobimisa ye LIBÀNDÁ…TOLOBA SÉ LILOBA, mpe asengeli kolongwa…ezali te mpo ete tolobí bongo, kasi mpo ete NZAMBE NDE ALOBÍ BONGO.

Nzambe yango moko Akelakí biséndé, na ntango biséndé bizalákí te. Oyo apesákí Ndeko mwasi Hattie mpósá ya motéma na ye: bana na ye mibáli mibalé. Oyo abíkisákí Ndeko mwasi Branham na ebímbá libosó kútu lobóko ya mónganga lómama ye. Azali NZAMBE YANGO MOKO Oyo azali bobele elongó na bisó te, KASI AZALI KOBIKA MPE KOFÁNDA KATI NA BISO. TOZALI LILOBA LIKÓMÍ MOSUNI.

Ntango tozali kotála mpe koyóka Mongóngó likoló ya ba bande, tozali komóna mpe koyóka Nzambe komímónisa Ye moko kati ya mosuni ya moto. Tomóní mpe toyókí nani Nzambe atíndákí kokamba bisó na Mboka ya Elaká. Toyebi ete Mwasi ya libala kaka nde akozala na Emóniseli wana, na bongo tokómí bazángi nsómo. Bosengá ya kozala motéma likoló-likoló ezali te, kobanga, to kozala kolenga, komítúna to kotungisama…TOZALI MWASI YA LIBALA.

Yóká mpe bíká, ndeko na ngai mobali, bíká!
Yóká Yesu sikawa mpe bíká;
Zambí ebómbamí likoló ya ba bande, haleluya!
Ezali kaka ntango toyókí nde tobíkí.

Oo, Mwasi ya libala ya Yesu Klisto, mokolo monene nini oyo tozali kobika kati na yango. Oyo tozali kotálela libosó, monúti na monúti. Mokolo sé mokolo kobanda sikawa tokomóna balingami na bisó, na mbísa, kati na mwa ntango ya kobwéta líso, tokozala libándá ya awa mpe elongó na bango na ngámbo mosúsu. Ebelémí mpenza na motindo ete eyókámí lokola nde tokokí koyóka yango…NKEMBO!

Bóya Mwasi ya libala, tiká tósangana mbala moko lisúsu zingázingá ya Mongóngó mwa Nzambe Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Ye koloba na bisó Liloba ya Bomoi ya Séko.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 63-1229E Bóbóngola Míso Epai Na Yesu

Makomí:
Mitúya 21:5-19
Yisaya 45:22
Jekalia 12:10
St. Yoane 14:12

25-1019 Ezali Na Moto Moko Awa Oyo Akoki Kopelisa Pole

Litéya: 63-1229M Ezali Na Moto Moko Awa Oyo Akoki Kopelisa Pole

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libala ya Klisto, tiká ete tóyá elongó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyóka 63-1229M Ezali Na Moto Moko Awa Oyo Akokí Kopelisa Pole.

Ndeko Joseph Branham

25-1012 Bokómi Na Nsúka

Nsango: 63-0901E Bokómi Na Nsúka

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Bande,

Sikawa bino bato kati ya ba bande.

Nkoló, tokobanda ko nde bóní kolimbola maloba maké masáto maye malingí koloba nini epai na bisó, Mwasi na libala ya Yesu Klisto? Ezali Emóniseli ya Etindá ya ngonga oyo epai na bisó. Ezali Nzambe koloba na nzela ya mwanje na Ye motindami koyebisa Mwasi na Ye ya libala: “ Nayebi bokotikala na Mongóngó na Ngai. Nayebí oyo Liloba na Ngai likoló ya ba bande ekolinga koloba epai na bino. Nayebí bokozala na Emóniseli ete Matéya maye malobákí Ngai likoló ya ba bande mazali Elembo ya Ngai mpo ya lelo.”

“Natiakí Mongóngó likoló na bande iye ya ebómbelo; zambí Matéya maye masengélí kosúkisa Liloba mobimba. Ekozala na nkóto na nkóto mbala nkóto baoyo bakoyóka Mongóngó na Ngai likoló ya ba bande mpe bakozala na Emóniseli ete oyo nde mosálá na Ngai. Ezali Molimó Mosanto ya lelo. Ezali Etindá ya Ngai Elembo”

“Natindakí basali na Ngai sembo mingi kati ya mokili mobimba koyebisa mosala na Ngai. Ntango bazóngakí, bayebisaki Ngai: “ Totósákí mitíndo mia Yo na boyókísáká ba bande na Yo. Tokútákí bato baoyo bandimí Liloba moko na moko. Bakómísí ndako ya bango moko losámbo koyamba Etindá na Yo. Toyebisaki bango, nyoso baoyo bakolinga koya na nsé ya Elembo na Yo, Etindá ya ngonga oyo, bakobíkisama.”’

Ezali ntango epai wapi moto na moto asengeli komítala mpe komítúna, nzela ya Nzambe ebongí be mpo ya lelo nde nini? Liloba ya mosakoli litíkalá kokwéa ata mbala moko te. Etálisámákí polélé ete yango nde solo SÉ MOKÓ, elóko SÉ MOKO ekosangisa Mwasi ya libala.

Nyoso elobákí ye ekómáki bobele lolengé lolobákí ye yango. Likonzí ya Móto lizalí naino awa elongó na bisó. Mongóngó ya Nzambe mozali naino koloba na bisó likoló ya ba bande. Mosakoli aútákí kaka koyebisa bisó ete Nzambe Akoleka likoló bobele wana emónákí Ye Elembo. Ezali ntango ya bokómi na nsúka mpo ya banso kokóta na nsé ya Etíndá Elembo.

Tomóní Lobóko lonéne ya Nzambe kati ya ntango oyo ya nsúka. Apesakí bisó Emóniseli ya solo ya Liloba na Ye mpe eyákí na nsé ya elembetele ya Elembo. Sasaipi, wana ezali bisó na nsé ya elembetele ya Elembo, tika ete tóya elongó mpe tólia Elámbo kati na bokómi na nsúka; pamba te toyebí ete Nzambe azali kobéleme kobeta na kosambisa.

Nalingí kobianga moko na moko na bino koyóka mpe kozua Elámbo mpe Molúlú ya Bosukwani Makaká Lomíngo loye, lokola tozali koyóka Litéya: Bokómi Na Nsúka 63-0901E.

Litéya mpe Molúlú ya Elámbo ikozala na Voice Radio kobanda na 5:00 nsima ya nzángá ntango ya Jeffersonville. Nabóndeli bino bómíyóka bansómí kozala na losámbo na bino na 5:00 nsima ya nzángá na ntango ya mboka ya bino soko bolingí, lokola Nayebí ekozala pasi mpo ya mingi na bandimi na bisó na ngambo ya bibale binéne kobanda losámbo ya bino na ntango wana. Ekozala na ekanganeli ya mipepe epai wapi losámbo mobimba lokoki kozuama.

Ndeko Joseph Branham

Makomí ma kotánga libosó ya losámbo:
Esode 12:11
Yilimia 29: 10-14
St. Luka 16:16
St. Yoane 14: 23
Bagalatia 5:6
St. Yakobo 5: 16

25-1005 Elembo

Litéya: 63-0901M Elembo

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Elembo,

Ntango tozali koya elongó, tosololaka kaka na ntina na Etindá te, toyaka elongó kopakola Makilá, kotia Elembo; mpe Elembo nde Etíndá ya ngonga! Nde Etíndá ya lelo oyo! Nde Etíndá ya ntango oyo.

Totíí Elembo yango epai ya bisó moko, na ba ndako ya bisó, mpe mabóta ma bisó. Tozali na nsóni te. Etálí bisó te ézala nani ayébí yango. Tolingí moto nyoso áyeba yango, moleki nzelá nyoso ámóna mpe áyeba: Tozali Bato ya Bande. Tozali Ndako ya Bande. Tozali Mwasi ya libala ya Nzambe Bande.

Molimó Mosanto = Elembo = Etíndá. Bazali banso eloko yango moko. Okokí kokabola bango te. Tata, Mwana, Molimó Mosanto = Nkoló Yesu Klisto. Okokí kokabola bango te.

Etindá = Motíndami. Balobí mabé báloba nini, MOSAKOLI ALOBAKI, okokí kokabola bango te.

Nzambe azali esengo na yo. Nzambe azali makasi ma yo. Koyeba Etindá oyo, koyeba ete Yango kaka nde Soló moko ezali, koyeba ete Yango nde Elembo, yango nde bokoki ya bisó.

Bókó bakokí koloba: “Nandimí Yango. Nandimí Yango. Nandimí Ezali Soló. Nayambí Yango lokola Soló.”

Nyoso wana ezali malamu, kasi ata ko bongo esengeli Épakolama. Mosakoli alobaki Etíndá oyo nde Elembo mpo ya lelo. Etíndá oyo nde Molimó Mosanto. Soko nde ozali na Emóniseli ata nini ya Etíndá oyo okoki polélé mpenza komóna ngonga oyo tozali kobíka kati na yango. Bongo mingi bazali koloba: “Nandimí Yango. Nzambe atíndákí mosakoli. Ezali Etíndá ya ngonga,” kasi bádóndwa na bolobáká ete balingí te, mpe bakosala te likambo ya koyókisa bato Mongóngó mpeza ya Elembo, kati na masámbo ya bango.

Nzambe alobaki te kati na mwanje na Ye ya nguya mpe áloba eloko mokó bobele soko ezalakí na ntina. Ayebisaki bisó alakisákí bisó na nzela ya bilílíngí mpe bilembetele. Kati na Litéya oyo, mosakoli akóti na bozíndó monéne koyebisa bisó oyo Laába mpe libota na ye basalákí mpo bábíkisama, bákóma Mwasi ya libala. Azalakí polélé na ntina na oyo asalakí.

Ntango bilengé mibali ya bande bayókísákí “BANDE”…Bózila monúti moko, motindami wana asalákí nini? Ayókísákí Bande. Bongo mwasi yango asálakí nini? Akómísákí ndako na ye LOSÁMBO YA BANDE. Ayókákí nsóni te koloba: “Bomóní singa motáné wana, elingí koloba Nazali LOSAMBO YA BANDE”.

Okanisi soko álobaka: “Ee, Nandimí Motindami na Etíndá, kasi toyókisaka na bisó ba bande te kati na losámbo ya bisó. NAzali na mobateli oyo alobí TE, mpo na ye ezali kaka kotéya mpe kozongela oyo ba bande elobí.” Okanisi ete akokákí kobikisama…???

Atiákí elembo, mpe ndako na ye ebíkísámáki, to akokákí kobomama na nsé Kúná epai ezalaki ye.

Boyôká batéi mingi komísálela bilongá mpo na oyo etálí koyókiyba bande, kasi pene ya banso balobaka: “Mosakoli alobá soki moké te boyókisa ba bande kati ya losámbo.”

Mosakoli alobaki Laába akómisákí ndako na ye losámbo, mpe losámbo na ye eyókákí ba Bande. Mpe mpo ete ayókísákí ba Bande kati ya losámbo na ye, ye, na losámbo na ye nyoso ya Bande, bazalaki na nsé ya Elembo mpe babíkisámáki. Losámbo mosúsu nyoso bakúfákí.

Bandeko mibali mpe basi, bolimbisi, Nazali koloba te ete mobateli akokí te kotéya Etindá oyo, to ezali mabe soko asálí yango. Na lolengé ya ngai moko, Nazali kotéya sikawa na nzela ya mokandá oyo, kasi fungólá motema na yo mpe yóká oyo mosakoli azali koloba mpe kokébisa yo mpo na yango. Soko mobateli na yo azali te, to akoyókisa te ba bande kati na losámbo ya binó na bopésáká lolengé moko boye ya elongá; ézala ata nini, kokokana na Liloba, ata áloba boní ete Nandimí Etíndá ya ngonga, kokokana na oyo Nandimí ete Liloba lilobí, Elembo, Etíndá ya ngonga, ezali Kotiama te.

Lomíngo loye, Nabiangí yo koya koyóka elongó na Eyanganelo ya Branham na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, Litéya: Elembo 63-0901M. Soko okokí komíbakisa na bisó te, yóká Litéya sé Litéya ya Elembo, mpe tíá Yango.

Ndeko Joseph Branham

Makomí ma kotanga libosó ya boyóki Liteya:

Genese 4:10
Esóde Mokapo ya 12
Yosua Mokapo ya 12
Misala 16:31/ 19:1-7
Baloma 8:1
1 Bakolinti 12:13
Baefese 2:12 / 4:30
Baebele 6:4/ 9:11-14/10:26-29 / 11:37 / 12:24 /13:8, 10-20
St. Yoane 14:12

25-0928 Ntango Ya Kosangana Pe Elembo Na Yango

NSANGO: 63-0818 Ntango Ya Kosangana Pe Elembo Na Yango

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya libala Oyo Asangísámí,

 Natóndí na kosepela mingí, mpe Nazali na nsé ya bozili na etíngiá monéne, kozala eténi ya nyos’oyo Nzambe azali kosála na mokolo ya bisó. Makanisi ma Nzambe na ebandeli mazali kokokisama sasaipi libosó na míso ma bisó, mpe tozali eténi na yango.

Kati na Biblia mobimba, basakoli basakólákí mpe balobakí mpo na yango elingakí kokóma.

Mbala isúsu masakoli mangó makokísamákí te mpo na nkámá ya ba mbúla nsima, kasi wana litondi ya ntango liyákí, ekokísamákí; mpo ete likanisi ya Nzambe na nzela ya mosakoli na Ye LISENGÉLÍ líkokisama.

Mosakoli Yisaya alobákí: “moseka akozua zémi”. Libota moko na moko ya Baebele balengélákí mwana na bango moké ya mwasi ábóta mwana moké oyo. Basombelaki ye mwa sapáto, mwa bilambá, mpe babelémáki mpo ya mwana koya. Mabóta malekákí, kasi nsúka nsúka Liloba lia Nzambe likokísamákí.

Lokola elengé mobali ntango nazalaki kokóla Nazalaki ntango nyoso komitúna, Nkoló, Namóní kati na Liloba na Yo ete Osangísákí ntango nyoso bato na Yo elongó Kokokisa Liloba na Yo. Osangisákí bana na Yo Baebele elongó na nzela ya moto moko, Mose, oyo akambákí bango na nzela ya Likonzí ya Móto na mboka ya Elaká.

Ntango Okómákí mosuni mpe Ofandakí awa na mabelé, Osangisákí bayekoli na Yo. Okabolakí bango na makambo manso mpe moto nyoso mpo ya komónisa Liloba na Yo epai ya bango. Na mokolo ya Kitélá, Oyéisákí mbala moko lisúsu Lingómbá na Yo elongó na esíká yókó, na lobánzo lokó libosó ete Ókoka koya mpe kopesa bango Molimó na Yo Mosanto.

Nakanisaki, ekokoka nde lelo boní Nkoló? Mwasi na Yo ya libala apalangani na mokili mobimba. Mwasi ya libala nyoso akoya nde na Jeffersonville? Nakokí komóna yango kokokisama te Nkoló. Kasi Nkoló, Obóngolaka manáka ma Yo soki moké te. Ezali Mobeko na Yo, lolengé ya kotémisa yango ezali te. Okosala ko yango boní?

NKEMBO…LELO, tokokí komóna na míso ma bisó moko, mpe mingi na koleka, KOZALA ETÉNI NA YANGO: Liloba ya Sekó na Sékó ya Nzambe kokokisama. Tozali na esiká yoko te KATI NA NZOTO, topalangání kati na mokili mobimba, kasi Molimó Mosanto ASANGÍSÍ SIKAWA MWASI NA YE YA LIBÁLA NA NZELA YA MONGÓNGÓ YA NZAMBE. LILOBA LIA YE LILOBAMÁKÍ MPE LITIAMÁKÍ LIKOLÓ YA BA BANDE, Etémelo ya Nzambe mpo ya lelo, ezali koyanganisa mpe KOSANGISA MWASI NA YE YA LIBÁLA…MPE ELOKO EZALI TE OYO EKOKÍ KOPEKISA YANGO.

Nzambe azali kosangisa Mwasi na Ye ya libala. Azali koya elongo, longwá na Ebimelo ya ntango mpe Elimwelo ya ntango, mpe Likoló na Ngelé. Ezali na ntango ya lisangá, mpe yango nde Ezali sikawa mpenza. Azali kosangana mpo ya nini? Konétolama. Amen!

 Ntango ya kosangana ezali kosálema SIKAWA MPENZA!!! Nini nde ezali kosangisa bisó? Molimó Mosanto na nzela ya Liloba lia Ye, Mongóngó mwa Ye. Tozali kosangana mpo ya nini? KONÉTOLAMA!!! Mpe tozali bisó banso kokende mpe tozali kotika ata MOKO te na nsima.

Nzambe azali kolengela Ye. Ee mobali, kosangisa! Azali kosangana na nini? Na Liloba!

Liloba nde nini mpo ya mokolo mwa bisó? ETINDÁ oyo, MONGÓNGÓ MWA YE, Mongóngó mwa Nzambe epai ya Mwasi na Ye ya libala. Moto te. Bato te. Ebólo ya Bato te. MONGÓNGÓ mwa Nzambe likoló ya ba bande, mondimísámí na nzela ya Likonzí ya Móto.

“Zambí likoló mpe mabelé inso ikoleka, kasi Liloba na Ngai likoleka sokí moké te.” Azali komísangisa na YANGO ELOBÍ NKOLÓ ézala ebongiseli nini to moto nani báloba nini.

Ézala NANI áloba nini, tozali kosangana Na Yango Elobí Mongóngó mwa Nkoló, mokokísámí, modimisámí mpo ya mokolo mwa bisó. Ndimbola ya moto moko te; mpo ya nini tósala yango? Yango ebóngwanaka na moto nyoso, kasi Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande MOBÓNGWANA SOKI MOKÉ TE mpe mosangélámí na nzela ya Likonzí ya Móto Yango mpenza kozala Liloba ya Nzambe mpe Mongóngó mwa Nzambe.

Kaká na yango ezali, na moto, ayébí mokambi na ye te. Ee, mobali. Bakotelema zingázingá ya ebongiseli moko, bakotelema zingázingá ya episkópo moko to moto moko, kasi bakotelema te zingázingá ya mokambi, Molimó Mosanto kati na Liloba. Bomóní? Balobí: “Oo, boye, Nabángí ete nayá te kozala faná; Nabángí ete nábanda te na mbébá.” Ooooo, okómi wana!

Nde esiká baoyo bameseni koloba mabé batálisa biyanganelo ya bango mpe ballbí: “Bomoni, bazali kotómbola moto, Ndeko Branham, bazali bandimi ya kosámbela moto mpe bazali kotélema zingázingá na ye, moto, Molimó Mosanto te.”

Bolémá, tozali KOSANGANA zingázingá ya MONGÓNGÓ MWA NZAMBE MONDIMÍSÁMÍ MOLOBÁMÁKÍ NA NZELA YA MOTO YANGO. Bókanisa, nde moto Nzambe Aponákí kozala Mongóngó na Ye kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima mpe kokamba ye lelo oyo. Nde Mongóngó sé moko mondimísámí na Nzambe Ye moko.

Kasi nzokande, BAZALI kosangana zingázingá ya BATO. Bakoyókisa te Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande kati na masámbo ya bango. Bokoki kobánza yango??? Motéi oyo abéti tólo ete andimi ete Etindá oyo ezali Etindá ya ngonga, Yango Elobí Nkoló, kasi ázua lolengé moko ya ekimelo komílóngisa na BOBÓYÁKÁ koyókisa Mongóngó wana kati ya masámbo ya bango, kasi koyebisa bato ete BASENGELI báyóka bango mpe batéyi basúsu kotéya Liloba…nsima yango báloba ete tozali kolanda moto!!!

Toútákí kaka koyóka  mokolo mwa Lomíngo lolekí oyo Nzambe asaláki na bato yango!!

Tozali komilengele mpo ya Makwéla. Tozali kokóma moko elongó na Ye. Liloba likómí yo, mpe okómí Liloba. Yesu alobákí: “ Na mokolo yango bokoyeba yango. Nyoso oyo Tata azali, Nazali yango; mpe nyoso ezali Ngai, bozali yango; mpe nyoso ezali bino, Nazali yango. Na mokolo yango bokoyeba ete Nazali kati na Tata, Tata kati na Ngai, Ngai kati na bino, mpe bino kati na Ngai.”

Matondi Nkoló mpo ya Emóniseli ya Yo moko, mpe bisó moko, kati na mokolo ya bisó. Mwasi na Yo ya LIBALA azali komíléngele na nzela ya Liloba na Yo Lilobamákí. Toyebi tozali kati ya Mokano mwa Yo mobongí be na botíkaláká na Liloba na Yo litiámákí na ba bande.

Nabiangí mokili mobimba koyóka Mongóngó mwa Nzambe sé moko mondimísamâkí mpo ya mokolo mwa bisó Lomíngo loye. Boyei bolámu komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: 63-0818, Ntango Ya Kosangana Mpe Elembo Na Yango. Soko okokí komikangisa na bisó na nzela ya singa mpe koyóka elongó na bisó te, mízuelá bande moko, BANDE SÉ BANDE; izali nyoso Yango Elobí Nkoló, mpe yóká Liloba ya Nzambe kobongisa yo be mpe kobélemisa yo mpo ya boyéi na Ye noki.

Ndeko Joseph Branham

Njembo 86: 1-11

St. Matai 16: 1-3

Azali komisangisa Ye moko. Azali komíbongisa. Mpo ya nini? Azali Mwasi ya libala. Ezali solo. Mpe Azali komísangisa na Mobali na Ye ya libala, bomóní, mpe Mobali ya libála azali Liloba. “Na ebandeli Liloba azalakí, Liloba azalaki mboka na Nzambe, mpe Liloba azalaki Nzambe. Mpe Liloba akómákí mosuni mpe afándákí kati na bisó.”