Category Archives: Uncategorized

20-0729 Ba Mpongo Bazali Kosangana

Ba-Mpongo Bazali Kosangana ya mokolo ya 29 juillet 2020

Balingami Mimboto ya Nzambe,

Nazali kolikia ete bozali mpenza kosepela na mayangani na biso ya mabondeli ya mokolo ya Misato ndenge tolobelaka Ye, pe tokumisaka Ye mokolo mobimba. Tosepelaka mingi mpenza mpo na kolobela Ye ndenge nini tolingaka Ye mpo na nyonso oyo Asilaki kosala,  mpe Azali kosala mpo na kolobela biso mokolo na mokolo ete :”Bozali Mwasi-na-libala na Ngai.”

Nalingaka mingi mpenza ndenge Alobelaki biso mokolo na Lomingo mpe alendisaki biso koloba ete: Nzambe ayanolaka mabondeli na ntongo, na butu, na midi, na minuit, to na ntango nyonso.

Ezali na ntina moko te mpo na ntango oyo tobelelaka Ye, Ye azalaka ntango nyonso wana elongo na biso. Azali ata pene na biso lelo koleka ntango oyo Azalaki awa kati na nzoto lokola Mwana na Ye Yesu Klisto oyo alalaki kuna na suka ya masuwa elongo na bayekoli na Ye, pe mbonge eyaki. Lelo, Azali kobika NA KATI NA MOKO NA MOKO NA BISO. Mpo ete biso tozali :

Baoyo ya solo, baoyo babongisama na Nzambe, momboto ya solo mpenza, molimo ya Nzambe oyo ezalaki kati na Nzambe liboso ya kozalisama ya mokili; bomikanisela, bino baoyo bozali mpenza na Molimo na Nzambe na kati na bino na mpokwa oyo, bozalaki awa kati na Klisto mpo Ye azalaki litondi ya Liloba. Azalaki litondi ya Bonzanbe kati na nzoto. Nzambe azalaki na kati ya Klisto, mpo na kozongisa boyokani na mokili na Ye moko. Bondimi yango? Botala, Azalaki kati na Klisto. Boye, soki ozalaki kati na Nzambe, momboto, liloba, eteni ya mosala longwa ebandeli, boye otambolaki elongo na Ye awa na mokili, osololaki na Ye na mokili, omonaki mpasi elongo na Ye na mokili, okufaki elongo na Ye na Kalvari, pe osekwaki elongo na Ye lisusu; pe sikawa ofandi na bisika ya Likolo na kati ya Klisto Yesu, ozali na boyokani na Ye (Liloba).

SIKAWA tofandi elongo na bisika ya Likolo, tozali na lisangana na Ye mokolo mobimba. Tosili kokoma LILOBA, LIKOLO NA LILOBA, LIKOLO NA LILOBA.

Lelo tokotambola na Ye, tokosolola na Ye, pe tokokumbamela Ye MOKOLO MOBIMBA NDENGE Akosolola na bison a biso nzela nzela. Tika ete mbala moko lisusu tosangana elongo na mabondeli na ngonga ya 12h00, 15h00 pe 18h00, na ngonnga ya Jeffersonville, pe tobondela bamoko mpo na bamosusu.

Ndeko Joseph Branham

20-0725 Makambo ya Mikolo Oyo Etalisami Polele na Lisakoli

Nsango: 65-1206 Makambo ya Mikolo Oyo Etalisami Polele na Lisakoli

Ba-Mpongo Bazali Kosangana ya mokolo ya 25 juillet 2020

Balingami Ba-Mpongo,

Mokolo kitoko nini oyo, ngonga kitoko nini oyo tozali kobika na yango. Tozali kobika lisusu na mikolo  ya Biblia, Makomi ezali kokokisama kati na biso pe bisika nyonso zinga-zinga na biso. Mikolo oyo Mwasi-na-libala azalaki na mposa ya kobika na yango longwa na ntango ya Adama esili kokoma.

Masakoli oyo totangaki na kati na ba-Biblia na biso, makambo oyo basakoli balobelaki biso, ezali kokokisama mokolo na mokolo, pe tozali eteni na yango. Tozali na kimia wana tozali kofanda na bisika bileki likolo, Liboso na Liloba Yango, tozali kotela pe tozali kokomela na mobimba. Kotalisama mobimba ya kotatolama ya Yesu Klisto oyo azali motindo moko lobi, lelo, pe libela na libela, ezali kosalema.

Etalisamaki na biso ete Liloba esukaki na Yesu te. Oyo wana ezalaki bobele ebandeli ; esengelaki lisusu ete koleka Yesu éya. Abandaki bobele na kozongisama ya Lingomba na Ye. Alobaki : «Nakoya lisusu na nzoto na moto ndenge Nasalaki na Abalayama, pe nakomonisa bino ata koleka Liloba. Na bongo, mpo na kozua Liloba yango, tosengeli kozala na Emoniseli uta na Nzambe mpo na koyeba nani Yesu Klisto azali NA ELEKO NA BISO.

Bomoni, mwango mobimba_mobimba, Lingomba mobimba, etongami likolo na emoniseli uta na Nzambe. Yesu alobaki, na Matai, mokapo ya 16 ete:”Mosuni pe makila emonisi yo likambo oyo te, kasi Tata na Ngai oyo azali na Likolo nde asili komonisa yo yango.” Ezalaki eloko nini? Emoniseli ya Nani Ye azalaki. “Pe likolo na Libanga oyo, Nakotonga Lingomba na Ngai, pe bikuke na ewelo ekoki kolonga Yango te.” Bomoni? Emoniseli ya Yesu Klisto na ntango oyo, ezali oyo Ye azalaki na ntango mosusu te, ezali oyo Ye azali sikawa, Biblia elobi, ezali kokola kati na Mwasi-na-libala, kino na epimelo mobimba.

Ndenge Alakaki ete Akosala, Asili kopesa biso Emoniseli mobimba pe ya solo ya Ye moko uta na Nzambe mpo na eleko  na biso, pe tozali kokola kati na Mwasi-na-libala na Ye kino na epimelo mobimba

Tokoki mpenza kobanda kososola makambo nyonso oyo ezali kosalema? Sikawa Asili kotalisa biso mwango monene na Ye kino na suka. Esili nye, Asili kozongisa Mwasi-na-libala na Ye oyo abongisama liboso na Liloba ya Ebandeli, pe tosili kokoma Liloba likolo na Liloba likolo na Liloba.

Konetolama ebelemi, Etape ya Sika esili kobima; tozali ba-mbuma ya liboso likolo na nzete wana tozali kofanda Liboso na Mwana, Liloba Elobami mpo na eleko na biso, pe tosili komibongisa mpo na Kobuka-mbuma.

Tosengeli kosanzola Ye ndenge nini! Tosengeli kokumbamela Ye miniti nyonso ya ngonga nyonso ya mokolo. Asili komonisa biso été biso tozali nkona na Ye, eteni na mosala longwa ebandeli. Totambolaki elongo na Ye, tosololaki na Ye, tomonaki mpasi elongo na Ye, tokufaki elongo na Ye na Kalvari, kasi tosekwaki elongo na Ye na bisika na likolo, tozali kosangana na Ye ntango Azolobela biso été tozali Mwasi-na-libala na Ye.

Tolingi te ete liloba mosusu esangana na biso. Esengeli été ézala Lipa ya Nzambe oyo ezangi fùlù, Liloba na Nzambe ya peto, yango ezali Nsango na ntango. Tolingi koyoka Yango mbala moko longwa na motindami na Ye ya eleko oyo atatolamaki : Yesu Klisto Ye moko koloba na nzela ya bibebu ya moto. Ezali liloba ya moto te, Ezali Liloba ya bomoi ya Nzambe kolobela Mwasi-na-libala na Ye na nzela ya mosakoli. Lola pe nsé ekoleka, kasi Yango ekoki kokweya te.

Mpo na biso, ezali Nsango oyo, ba-bandes oyo, Mongongo na Nzambe… TO ELOKO MOKO TE.

Tika ete ba-mpongo basangana na mokili mobimba mokolo na Lomingo oyo zinga-zinga na Mosuni-ya-makila na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Ye komonisa biso:”Makambo ya Mikolo Oyo Etalisami Polele na Lisakoli”, eteyamaki mokolo ya 6 décembre 1965.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka LIteya:

Genese 22

Deuteronome 18:15

Psaumes 16:10 /22:1 / 22:18 / 22:7-8 / 35:11

Esaie 7:14 / 9:6 / 35:7 / 50:6 / 53:9 / 53:12 / 40:3

Amos 3:7

Zacharie 11:12 / 13:7 / 14:7

Malachie 3:1 / 4:5-6

Matthieu 4:4 / 24:24/ 11:1-19

Luc 17:22-30 / 24:13–27

Hebreux 13:8 / 1:1

Jean 1:1

Apocalypse 3:14-21 / 10:7

20-0719 Makambo Oyo Ekozala

Ba-Mpongo Bazali Kosangana ya mokolo ya 18 juillet 2020

Balingami oyo Babongi Be,

Tokomi na suka ya ntango. Tosili kozonga lisusu na Mbuma, na Momboto ya Ebandeli. Matiti mabe esili kobwakama mosika na biso, pe tozali sikawa komitia Liboso na Mwana mpo totela.

Mwana yango ezali Liloba na Ye oyo emonisami na ntango oyo : Nsango oyo. Ezali emoniseli ya Liloba na eleko na Yango, pe tozali komitia Liboso na Ye, kotela mokolo na mokolo na nzela ya “Kofina Bouton-ya-koyoka liteya.”

Tozali Liloba likolo na Liloba oyo ekobimisa epimelo mobimba ya Mwasi-na-libala ya Nkolo Yesu Klisto. Ezali emoniseli ya kotalisama ya Liloba

Toyebi ete Liloba na Nkolo eyaka BOBELE na mosakoli, mpo ye azali motalisi ya Liloba na Nzambe. Akoki koloba eloko moko te; akoki koloba ata likanisi na ye moko te. Akoki koloba bobele makambo oyo Nzambe amonisi ye. Ezali makanisi na Nzambe oyo elobami na monoko ya mosakoli na Ye. Esilaki komonisama na biso ete Mongongo ya Malaki 4 ezali Liloba oyo etalisami mpo na ntango na biso, mpo na kobimisa Mwasi-na-libala na Ye.

Eloko nini ekosangisa Mwasi-na-libala ?

Nsango ezali kosangisa Mwasi-na-libala, bomoni, mongongo makasi

Mongongo makasi esili koyokana. Ezali kosangisa Mwasi-na-libala na Ye na mokili mobimba, koloba ete “tomibongisa, Konetolama ebelemi, bokangama na Liloba yango.”

Lokola tosili kokangama na Liloba Yango, alobaki na biso mokolo na Lomingo ete :”Namonaki bino kuna. Etonga na babulami nyonso oyo balati bilamba malamu mpenza. Bazalaki na kimia pe na peto, kotambola boye, kolanda matambe ya Nsango-malamu. Azalaki Liloba.”

Mosuni pe makila emonisaki biso yango te, kasi Tata na biso oyo azali na Likolo nde alakisaki biso likambo oyo. Ezali bobele emoniseli ya nani Ye azalaki na eleko mosusu te, kasi emoniseli ya nani Ye azali sikawa, Liloba oyo elati nzoto kati na mosakoli na Ye, Liloba oyo elati nzoto KATI NA BISO.

Tozali kokende na Bokonzi oyo ebongi be, boye tosengeli kozala bato oyo babongi be, mpo tosili kobalana na Mwana na Nzambe oyo abongi be, bongo tosengeli kozala Mwasi-na-libala oyo abongi be. Na boye, tokokoma bongo ndenge mosusu nini libanda na Liloba na Nzambe oyo ebongi be, NSANGO OYO?

Mateya oyo esilaki kobombama pe kobongisama mpo na eleko oyo mpenza, mpo na ntango oyo mpenza. Ayebaki liboso na kozalisama na mokili ete tokoyoka Liteya oyo mokolo na Lomingo ntango Akolobela biso na nzela ya mosakoli na Ye makambo nyonso oyo ekosalema Kuna.

Asilaki kokende kobongisa makambo nyonso mpo na biso liboso tokoma kuna. Azali kobongisa yango bobele ndenge tolingaka yango. Ekozala esika ya solo oyo tokosala makambo, esika oyo tokobika. Tokosala misala. Tokosepela. Tokokende esika ya Bomoi, ya Bomoi na Seko ya solo. Tokokende na Lola, na paradiso…NKEMBO!

Eloko moko te ekopekisa biso kokoma kuna. Esilaki komonisama ete tozali Mwasi-na-libala na Ye, tozali Liloba oyo elati nzoto, Konetolama ebelemi, Atongeli biso Bokonzi moko bobele mpo na biso, boye tokoki kolekisa Seko-na-Seko elongo na Ye pe bamoko na bamosusu.

Aponaki mosakoli na Ye liboso na ebandeli ya ntango mpo na koyebisa biso makambo oyo nyonso, Makambo Oyo Ekozala, eteyamaki mokolo ya 5 décembre 1965.

Tika ete Mwasi-na-libala na Ye asangana mokolo na Lomingo oyo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Nzambe koloba na nzela ya bibebu ya moto, wana Akoyebisa Mwasi-na-libala na Ye ba-nani tozali, makambo nyonso na esika tokokende pe ekozala lolenge nini ntango tokokoma kuma.

Ndeko Joseph Branham

20-0712 Konetolama

Ba-Mpongo Bazali Kosangana_– 11 juillet 2020

Balingami Bana-mibali pe bana-basi oyo bamonisami,

Nkombo na Nkolo ekumisama mpo na Bilei na Ye oyo Ebombamaki. Mwasi-na-libala azali kosala féti mokolo na mokolo kolia Mana Oyo Ebombamaki. Nsango sima na Nsango Azali kokoba koyebisa biso:”Ba-Bandes, ba-Bandes, ba-Bandes; YANGO ezali Bilei na Ngai ya Molimo oyo esengeli kopesa bino mpiko, mpo bozali Mwasi-na-libala na Ngai oyo abongisama liboso.”

Tosengeli mpenza na makambo mingi koleka oyo ezwami na ba-bandes? Eloko mosusu ezali oyo tosengeli koyoka? Motindami na Ye asengaki ata na Tata ete amonisa na mokengeli eloko nini asengeli koleisa na Lingomba na ye ntango ye akozala te.

Pambola mokengeli molingami na biso, mobateli-mpate. Tobondeli ete Opakola ye na Molimo Mosanto, na Liloba na Yo mpo na komonisa bango pe koleisa ba-mpate. Pe mokolo moko, kala mingi te, Otalisaki emoniseli ya mongombo moke awa, na ntina na Bilei oyo ebombamaki, ete ntango moko ekoya oyo bato bakosengela na yango nyonso.

Ba-bandes ezali Bilei Oyo Ebombamaki pe esengeli na  mokengeli mpo na koleisa ba-mpate. Asengelaki koleisa bango na koloba boye:”Fina bouton ya Koyoka liteya.”

Bososoli yango? Soki bobungi nzela, bozongela bande oyo lisusu. Nayebi te ntango boni nakoumela kozala elongo na bino. Bomikanisela, likambo oyo ezali Solo, ya YANGO ELOBI NKOLO. Ezali Solo. Ezali Makomi.

Nazali kozongisa matondi mingi  mpo na kozala na emoniseli yango pe kozala moko kati na lotomo ya monene koleka na mokili : Lotomo na Ye ya ba-Bandes.

Nazali kososola ete nazali koloba na bato nkoto na nkoto, na nzela ya bande, boyebi, pe tozali na lotomo ya ba-bandes na mokili mobimba.

Alobaki na biso ete Nzambe, liboso mokili esalema mpenza, azalaki na ba-mwango misato na sekele ya libombami monene na Ye. Ya liboso, komitalisa mobimba Ye moko kati na Klisto. Ya mibale, kozala na esika ya liboso mpo na komitalisa Ye moko na nzela ya Lingomba na Ye, oyo ezali biso, Mwasi-na-libala na Ye. Pe, ya misato, kozongisa Bokonzi na esika na yango mpenza oyo ekweyaki na masumu na nzela ya Adama ya liboso.

Sikawa, elaka yango ezali kokokisama. Klisto asili koya kati na Mwasi-na-libala na Ye, azali kosala misala ndenge moko Asalaki na ebandeli, pe azali kolengela pe kokokisa Liloba na Ye. Motò na Nzòto ezali kokoma eloko Moko na misala, na elembo, pe na Bomoi, ndenge Alakaki ete Akosala na mikolo ya suka.

Tozali Mwasi-na-libala na Ye, Nzoto ya Yesu Klisto, pe tokoki koyoka bobele Liloba na Ye oyo etatolami. Mpo tozali Liloba oyo ebakisami na Liloba, kobakisa na Liloba, yango nde ekomema epimelo mobimba ya Mwasi-na-libala ya Nkolo Yesu Klisto.

Tozali koyoka Nzambe oyo amonisami na nzoto pe azali koloba na Mwasi-na-libala na Ye. Sikawa tosili kokumba zemi ya Molimo na Ye. Klisto azali kobika na nzela na biso pe na kati na biso. Tosili kokoma bakangami ya eloko mosusu te, bobele Liloba na Ye. Tokoki kosala ekobo te; tosili mpenza kokumba zemi ya Liloba na Ye.

Mwasi-na-libala asili komibongisa Ye moko na nzela ya koyoka Liloba oyo esilaki kobongisama mpo na eleko na biso. Ntango esili kokoka, Konetolama ebelemi, pe tozali kokoma elonga na Ye.

Wana tokosangana elongo mokolo na Lomingo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville mpo na koyoka nzela na Ye oyo ebongisama mpo na eleko na biso, tobongisa minda na biso pe tomilengela biso moko wana tokoyoka liteya oyo “KONETOLAMA”, eteyamaki mokolo ya 4 décembre 1965.

Ndeko Joseph Branham

20-0705 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

Nsango: 63-0728 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

BranhamTabernacle.org

Balingami Baponami,

Lelo oyo Mwasi-na-libala ya Klisto azali kosepela lokola esalema naino te na lisolo ya mokili, mpo ete kokokana na Liloba na Nzambe, Asili komonisa biso ete tozali na Bomoi na Seko pe tokoleka na kosambisama te, kasi tosili kolongwa na kufa pe tozali na Bomoi, mpo Ye azwaki kosambisama na biso mpo na biso.

Na sima, Amonisaki biso likambo moko ya koleka, ya monene koleka. Olobi MONENE KOLEKA? Iyo, mpo tozali bobele na Bomoi na Seko te (mpo ekozala na bato nkoto na nkoto oyo bakozwa Bomoi na Seko), kasi Amonisaki pe alobaki na biso ete : “Nazali na eloko moko oyo Nasili kolengela bobele mpo na bino. Eloko moko oyo bango bakozua te, ee, MPO BINO BOZALI MWASI-NA-LIBALA NA NGAI OYO APONAMI PE ABONGISAMA LIBOSO, na yango Nasili kobongisa esika moko elengelami MPENZA BOBELE MPO NA BINO NA NGAI.”

Ata bolali, ata bolali te, ata bosali likambo moko to bosali eloko moko te, ata bokundami esika nini, soki bokundami ata moke te, ata bongo bokoya kaka! Eloko moko te ekopekisa bino. Bokozala wana!”

Tokozala wana pe eloko ata moko te ekotelemisa biso, eloko moko te. Pe ntango tokokoma kuna, tokotonga ba-ndako, pe tokovanda na ba-ndako yango. Tokolona bilanga ya vinyo, pe tokolia mbuma na yango. Tokolona te mpo moto mosusu akitela yango, TOKOLONA bilanga ya vinyo ya biso moko, tokotonga ba-ndako na biso moko, pe tokovanda kati na yango. Tokolekisa Seko-na-seko elongo, moko na moko elongo na Ye lokola Mwasi-na-libala na Ye.

Tozali komilengela mpo na komata na likolo na nguya na Nzambe. Tokomi na suka ya pyramide komilengela mpo na Konetolama. Pe ndenge nini toyebi ete makambo oyo ezali solo? Na nzela na emoniseli. Tosili kososola mokolo na biso, tosili kososola motindami na biso, pe sikawa tosili kososola ba-nani tozali..

Ata bongo, bokoki kokoma kuna bobele soki boyei na Nzela ebongisami na Nzambe. Yango ezali Nsango ya ngonga oyo elobami na nzela ya motindami oyo abongisami na Nzambe. Yango nde nzela moko oyo ebongisami mpo na lelo oyo.

Na Liteya ya sika moko na moko, tozali koyoka Ye kolobela biso lolenge nini Aponaki Mwasi-na-libala oyo akokweya te, oyo akokangama na Liloba yango, ata bato na mokili balobi ndenge nini mpo na Yango. Bango bakokangama na Liloba yango, mpo basili kobongisama liboso mpo na kotelema wana mpo Bazali eteni ya Liloba yango. Bakoyoka nsoni na yango te, kasi bakozala na LIPAMBO ya koloba ete:”Iyo, NAKOFINA BOUTON PLAY.”

Bososoli yango? Soki bokwei, bozongela lisusu bande oyo. Nayebi te ntango molai boni nakozala na bino elongo. Bomikanisela, oyo ezali Solo, ya YANGO ELOBI YAHWEH. Ezali Solo. Ezali Makomi.

Tozali mpenza kozela na motema lukuluku mpo na koyeba eloko nini Akomonisa biso na sima. Tosilaki komona lolenge nini Asangisaki biso elongo na mokili mobimba na ba-ndako na biso mpo na koyoka Bilei na Ye oyo Ebombamaki. Tozomona lolenge nini Azali komonisa makambo oyo tosilaki koyoka mbala na mbala, mbala mingi liboso, mibu na mibu, kasi sikawa ezali komonisama polele.

Kasi Liteya ya sima ekomonisa biso eloko nini?

Soki Nkolo alingi, mpo na kosukisa mayangani mike-mike oyo elandani uta nazalaki awa, mokolo na Lomingo na ntongo, nalingi koloba likolo na likambo moko na motuya mingi.

… likambo nalingi komeka kosala, soki Molimo Mosantu asungi ngai, ezali kozwa Nsango pe esika Yango ezali sikawa, pe kotonga Yango esika Ebandaki, pe kotonga Yango kino na ntango oyo tozali na yango.

Akoyebisa biso esika nini Liloba ebandaki pe akotonga longwa wana kino na mokolo oyo tozali na yango. Mokolo nini oyo mpo na Mwasi-na-libala na Ye.

Nzambe kati na Nzoto na Ye, Klisto; pe Klisto kati na Nzoto na Ye, Mwasi-na-libala. Oh-oh-oh, ee! Nzambe amonisami kati na Klisto, Klisto amonisami kati na Mwasi-na-libala! Pe lokola Nzambe abimisaki na nzoto ya Adama, mwasi, pe ye akweaki; na boye Nzambe abimisaki na nzoto ya Klisto, mosuni na Ye, Nzoto na Ye, oyo ezali Liloba na Ye, pe azali kobimisa Mwasi-na-libala oyo akokweya na nzela na denomination to endimeli moko te. Te, misie. Kasi Akozonga na Liloba na Nzambe ya peto, oyo ezangi litono pe ezali komonisama polele. Nazali na elikia ete mobali nyonso pe mwasi nyonso, oyo akoyoka bande oyo, akososola yango.

Tokoki kozela te mpo na koyoka Nzambe kolobela biso na nzela ya motindami na Ye pe koyebisa biso ete tozali Liloba ya Nzambe yango ya peto, oyo ezangi litono pe ezali komonisama polele, wana tokoyoka bande.

Tosangana elongo zinga-zinga na ba-magnetophones na biso na mokili mobimba, wana tokofanda elongo na bisika ya likolo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Mongongo na Nzambe komonisa biso liteya oyo, KLISTO AZALI LIBOMBAMI NA NZAMBE OYO EMONISAMI, eteyami mokolo ya 28 juillet 1963.

Ndeko Joseph Branham

20-0503 Nzambe Na Nguya Azipolami Liboso Na Biso

Sango: Nzambe Na Nguya Azipolami Liboso Na Biso – 29.06.1964

Bandeko mibali pe basi,

Oyo ezali mpenza Mikolo ya nkembo tozali kobika na yango. Nzambe asili kofungola nzela ete Mwasi-na-libala na Ye akoka koyoka Mongongo na Ye kolobela bango mbala moko pe kopesa bango Maloba ya Bomoi na Seko. Mongongo na Ye ezali koloba na nzela ya mwanje na Ye, lokola mbala moko te liboso, mpo na kobimisa Mwasi-na-libala na Ye

Liloba na Ye moko elobi na biso ete : na mikolo ya Mongongo ya mwanje na Ngai ya nguya, ntango akobanda koloba (mongongo) ekozala Molimo ya solo; akokamba bino na solo nyonso; mpo akoloba (mongongo) mpo na ye moko te, kasi nyonso oyo ye akoyoka, yango nde akoloba (mongongo) pe akotalisa bino yango

Eloko nini Tata alingi koloba na Mwasi-na-libala na Ye ? Na ntango ya suka, Nalingi ete boyoka Mongongo na Ngai. Na mikolo ya Polo, Nazalaki na bakomeli oyo bazalaki kokoma makambo ye azalaki koloba ntango azalaki koteya yango, kasi lelo, Nayebi ete bokozala na bosenga ya eloko moko ya monene koleka, eloko oyo mokili mobimba ekoki koyoka, Mongongo na Ngai ekolobela bino mbala moko. Ezali na motuya mingi mpo na Ngai, ete Naponaki ezaleli ya mosakoli yango mpo ekokana na eleko yango. Bomoni. Abongisaka lolenge na ye ya kosala, nyonso oyo akosala. Abongisaka ye soki akoyekola to akoyekola te. Abongisaka makabo, lolenge oyo akoteya, makabo oyo akozala na yango. Pe Nsango mpo na eleko yango wana, Nzambe abongisaka liboso eloko yango wana oyo ekosalema pe eloko mosusu te ekoki kozua esika na yango.

 Nyonso oyo ye azali, Ye akopesa ye esika na ye, likabo na ye_na ye, akopesa ye ezaleli na ye, lolenge na ye ya kosala, pe nyonso oyo esengeli, lolenge nini akozala komitalisa, pe nyonso oyo akosala. Akosala ete moto ya eleko wana akoka kobenda bato ya eleko wana.

Ezalaki na motuya mingi mpo na Tata ete Aponaki lolenge ya kosala na ye, ezaleli na ye, ata pe lolenge nini akozala komitalisa… nyonso oyo etali mwanje na Ye, mpo na kobenda Momboto na Ye oyo ebongisama liboso. Ekozala ndenge nini mpo na bato ya ntango na suka? Nzambe yango moko ya bileko nyonso, oyo azipami na loposo, Nzambe, abombami sima na ezipeli moko.

 Mpo na Mwasi-na-libala na Ye, Yango ekobimisa lipa-ya-kolakisa, Mana, oyo epesamaka bobele na bato oyo basili kobima. Eloko se moko oyo ekoki kolia yango, oyo epesami nzela ya kolia yango, ezali bato oyo bapesami nzela pe bayebi Yango

Mwasi-na-libala na Ye asengeli liboso kozala na Emoniseli ya Solo pe kondima été ezali Nzambe oyo abombami sima ya ezipeli kati na nzoto ya moto, azali komonisa Liloba na Ye na bango, lokola Alakaki ete akosala yango. Mwasi-na-libala na Ye, abongolaka Liloba moko te, alimbolaka Liloba moko te, kasi andimaka LILOBA NYONSO.

Na sima, Tata akomonisa na Mwasi-na-libala na Ye NANI BANGO BAZALI. Bakomimona bango moko kati na Liloba na Ye, lokola motindami na Ye alobelaka bango : bozali mikanda na Ngai oyo ekomami, etangami na bato nyonso. Ezali mokanda ya sika te, kasi Mokanda oyo esilaki kokomama, emonisami na baoyo bandimi Liloba pe elaka ya ntango oyo.

Ezali sikawa Nzambe kati na bato, litondi ya Nzambe kati na Bonzambe na nzoto ya Lingomba na Ye mobimba, azali komitalisa Ye moko, azali kokokisa Liloba na Ye. Ezali etonga moko te, ezali lingomba na yo te, ezali mobateli na yo te, kasi ezali yo. Sikawa Nkembo na Nzambe ezali sima ya loposo na yo. Osili kokoma eteni ya symphonie monene ya Nzambe, ntango Mokambi-nzembo agangi makasi pe alobi : “Yesu Klisto motindo moko lobi, lelo, pe libela na libela,” Symphonie ekoganga makasi koloba:”Amen!” “Sima na likambo oyo bokozua nguya, Molimo Mosanto ekoya likolo na bino.” Symphonie ekoganga:”Amen! Nazui Yango!” Ntina ya komitungisa na makambo ezali lisusu te. Symphonie mobimba ezali mpenza na molongo moko na Liloba. Ekozala… Ezali yango. Oh! Ezali likambo moko kitoko mingi. Mokambi-nzembo pe Mokolo-nzembo basengeli kozala na Molimo moko. Na yango ba-musiciens pe basengeli kozala na Molimo yango moko mpo nzembo  Yango ebetama na lolenge esengeli. Pe bato na mokili bakomituna eloko nini ezali kosalema.

Eloko nini ezali kobenda bato, ntina nini ya makelele nyonso oyo bato bazali koyoka Mongongo na mokili mobimba na nzela ya KOFINA BOUTON ya kobeta bande?

Ntango esili kokoka. Mwasi-na-libala azali na Molimo moko na Mokambi-nzembo, pe Mwasi-na-libala na Mobali-na-libala bazali kokoma eloko MOKO. Mwasi-na-libala azali komibongisa YE MOKO. Basili kopakolama na Likonzi Na Moto moko oyo ezwamaki photo na Ye na mwanje na Ye ya nguya.

Epakolami yango moko ezali likolo na bango sikawa pe bazali kososola ete BAZALI LILOBA, mpo bobele Mwasi-na-libala Liloba oyo abongisamaka liboso nde akondima Liloba nyonso. Bazali Adama oyo azongisami mobimba. Bazali komona Nzambe oyo abombami na nzoto ya moto, ntango motindami na Ye azali koteya Liloba. Bazali komona Nzambe oyo abombami na nzoto kati na bango moko, pe Kondima na bango esili kozua epakolami.

Tika ete Mwasi-na-libala asangana elongo lisusu na bomoko mokola ya Lomingo na 10h00, ngonga ya Jeffersonville, IN, mpo na koyoka Mongongo na Ye kolobela Mwasi-na-libala na Ye pe apesa biso Konetolama Kati na Kondima wana tokozala koyoka liteya oyo : Nzambe Na Nguya Azipolami Liboso Na Biso – 29.06.1964

Bro. Joseph Branham