Nsango: 60-1218 LOLÁKÁ LOYEBANI TE
Molingami Mwasi Ya Libala Lingomba Ya Ndako,
Tika ete banso toyangana elongó mpe tóyoka Liteya 60-1218 Loláká Loyebani Te, Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.
Ndeko Joseph Branham
Nsango: 60-1218 LOLÁKÁ LOYEBANI TE
Molingami Mwasi Ya Libala Lingomba Ya Ndako,
Tika ete banso toyangana elongó mpe tóyoka Liteya 60-1218 Loláká Loyebani Te, Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.
Ndeko Joseph Branham
Nsango: 60-1211E ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA
Balingami Baponami,
Tala, Natelemi na ekuke, mpe nazali kobeta: soko moto nani akoyóka Mongóngó na Ngai, mpe akofungola ekuke, Nakokóta epai na ye, mpe nakolia elambo elongó na ye, mpe ye elongó na Ngai.
Batei, bófungwela mwanje ya Nzambe bikuke na bino libosó ete ntango éleka. Bózongisa Mongóngó ya Nzambe na bitéyelo ya binó na nzela ya boyókisaká ba bande. Yango kaka nde Mongóngó ya Nzambe mondimísámí mpo ya mokolo ya bisó na Maloba mazángí kokwéa. Yango bobele nde Mongóngó mozali na Oyo Elobí Nkoló. Ezali Mongóngó sé moko Mwasi ya libala nyoso akoki koloba AMEN na yango.
Ezali eleko monene koleka ya ntango nyoso. Yesu azali kopesa bisó ndimbola ya Ye moko lokola mikolo ya ngolu na Ye mizali kosila. Ntango ekómí na nsuka. Amonisi bizaleli ya Ye mpenza epai ya bisó na eleko oyo ya nsuka. Abwakeli bisó líso ya nsuka na Bonzambe ya Ye moko ya ngolu mpe oyo etómbwí koleka. Eleko oyo Ezali Emoniseli ya libánga ya motó ya Ye moko.
Nzambe ayaki kati na eleko oyo ya Laodikia mpe Alobaki Kati na mosuni ya moto. Mongóngó na Ye etiamáki na bande mpe ebómbamáki kokamba mpe kobongisa be Mwasi na Ye ya libala Liloba. Ezali na yango kaka na Mongóngó mosúsu te oyo ekoki kobongisa be Mwasi na Ye ya libala kasi Mongóngó na Ye Moko.
Kati na eleko oyo ya nsuka, Mongóngó na Ye likoló ya ba bande motiámí pembéni; mobimísámí na mangombá. Bakoyóka na bango ba bande kaka te. Na bongo Nzambe alobi: “Natemeli bino nyoso. Nakosánza bino na monoko na Ngai. Nsuka yango oyo.”
“Mpo ya bileko nsambo kati ya nsambo, Namóní eloko te kasi bobele bato kokúmisa liloba ya bango moko likoló ya oyo ya Ngai. Boye na nsuka ya eleko oyo Nazali kosanza bino na monoko na Ngai. Nyoso esílí. Nakoloba nyoso polélé. Ee, Nazali awa kati ya Lingomba. Amen ya Nzambe, mokáno ya sémbo mpe ya solo akomimónisa Ye moko mpe ekozala na nzela ya MOSAKOLI NA NGAI.”
Lokola ezalaki libosó, bazali kopota kosala lokola esálaki ba tata na bango kala na mikolo ya Akaba. Ezalaki na nkámá minei na bango mpe bango nyoso bazalaki na boyókani; mpe na bolobaká bango nyoso eloko yango moko, bazímbísaki bato. Kasi mosakoli MOKO, KAKA MOKO, azalaki solo mpe basúsu banso bazalaki lokutá mpo ete Nzambe apesaki emóniseli BOBELE epai ya MOKO.
Oyo ezali te koloba ete batéyi nyoso bazali lokutá mpe bazali kozimbisa bato. Soki te ezali Ngai koloba ete moto na ebiangeli koteya akoki te koteya to kolakisa. Nazali koloba ete bótáno ya lotómo ya SOLO akotia BA BANDE, Mongóngó ya Nzambe epai ya Mwasi ya libala, lokola Mongóngó ya litómbá koleka bo SENGELI KOYÓKA. Mongóngó likoló ya ba bande nde Mongóngó bobele moko mondimísamáki na Nzambe Ye moko kozala Oyo Elobí Nkoló.
Bókeba na basakoli ya lokutá, zambí bazali ba ngombólo ya kopasola-pasola.
Bokoyeba boni na bosolo nzela malamu mpo ya lelo? Ezali na kokabwana ya ndenge wana kati ya bandimi. Ebólo moko ya bato balobi ete bótáno ya lotómo ya botéi nde ekokómisa Mwasi ya libala na bobongi be, nzokande mosúsu balobi Finá kaka Play. Tozali bato ya kokabwana te; tosengeli nde kosangana lokóla MWASI YA LIBALA MOKO. Eyano ya malamu nde nini!?
Tika ete tófungola mitema na bino elongó mpe tóyóka oyo Nzambe azali koloba kati na mosakoli na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala. Zambi biso nyoso tondimáni ete, Ndeko Branham azali motindami na Ye mwanje ya nsambo.
Likoló kaka na ezaleli ya bomoto yango moko, moto nyoso Ayebi ete epai wapi bato bazali mingi ezali kútu na bokeseni likoló na makambo miké-miké kati na lilakisi monéne oyo bango nyoso bazali kosimba elongó. Nani ko nde akozala na nguya ezangi kokwéa oyo esengeli kozongisama na eleko oyo ya nsuka, zambí oyo na eleko ya nsúka ekozónga nsima komónisa Mwasi ya libala Liloba Peto? Elingi koloba tokozala na Liloba mbala moko lisúsu lokola epesamákí, mpe esósólamákí na bobongi be kati na mikolo ya Paulo. Nakoyebisa bino nani nde akozala na yango. Ekozala mosakoli lokola mobimba mpenza andimísamaki, to kútu mingi andimísamáki mobimba mpenza koleka mosakoli ata nani mosúsu kati na bileko nyoso kobanda Enoka kino lelo oyo, mpo ete moto oyo akozala solo mpenza na lotómo ya lisakoli ya libángá ya motó, mpe Nzambe akomónisa ye polélé. Akozala te na bosengá ya koloba mpo na ye moko, Nzambe akoloba mpo na ye na nzela ya mongóngó ya elembo. Amen.
Na bongó, Etindá oyo elobamákí na nzela ya motindami na Ye epésamákí na bobongi be, mpe esósólámi na bobongi be.
Eloko mosúsu nini nde Nzambe alobaki na ntina ya motindami na Ye mwanje ya nsambo mpe Etindá na Ye?
Mpe baponami wana elongó na ye na mokolo wana bakozala baoyo solo mpenza bakomónisa Nkoló mpe bakozala Nzóto ya Ye mpe kozala mongóngó ya Ye mpe kosala misalá na Ye. Aleluya! Bomóni yango?
Soko bozali naino na ntembe ya motindo nini, bósenga Nzambe na nzela ya Molimó na ye átóndisa bino mpe ákamba bino, mpo ete Liloba lilobí: “BAPONAMI YA SOLO BAKOZIMBISAMA TE”. Ezali na moto ata moko te akokoka kozímbisa bino soko bozali Mwasi ya libala.
Ntango ba Metodisiti bakwéaki Nzambe atémisaki basúsu na boye ekóbaki kati na ba mbúla kino na Mokolo oyo ya nsúka ezali lisúsu na libota mosusu kati na mboka, Baoyo na nsé ya motindami ya bangó bakozala mongóngó ya nsúka na eleko ya nsuka.
Ee mobali. Lingombá ezali lisusu “monoko” ya Nzambe te. Ezali monoko na yango moko. Boye Nzambe Azali kobalukela ye. Akobúlunganisa ye na nzela ya mosakoli mpe Mwasi ya libala, mpo ete mongóngó ya Nzambe ekozala kati na ye. Ee, ezali boye, zambí elobí kati na mokapo ya nsúka ya Emóniseli molongo ya 17: “Molimo mpe mwasi ya libala balobi: “Yaka.” Mbala moko lisúsu mokili ekoyoka mbala moko alimá longwá na Nzambe lokola na Pentekoste; kasi na solo mpenza Mwasi Liloba yango akobóyama lokola na eleko ya libosó.
Mwasi ya libala azali na mongóngó, kasi ekoloba bobele oyo ezali likoló ya ba bande. Mpo ete Mongóngó yango ezali MBALA MOKO KOUTA NA NZAMBE, boye esengeli na ndimbola moko te lokola epésamáki na bobongi be mpe esósólámí na bobongi be.
Bóya komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó yango komónisa biso: Eleko Na Lingombá Ya Laodikia 60-1211E.
Ndeko Joseph Branham
Nsango: Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei 60-1211M
Mbote Baningá,
Naino libosó te kati na lisoló ya mokili mobimba etíkalá kozala na ntango nini Mwasi ya libala ya Klisto kati ya molongo akokaki kosangana elongó na lobánzo moko, wana lokito longwa na Likoló, Mongóngó mpenza ya Nzambe, kokita na makasi nyoso.
Makomí mazali kokokisama. Ezali ntango ya elembo ya kosangana ya Mombóto. Lisangá lizangí komónana ya Mwasi ya libala ya Klisto lizali kosalema lokola Tozali kofanda kati na Bozali ya Mwana, kotela, komiléngela na boyókaká Mongóngó mpenza ya Nzambe.
Tozali kobonga be na nzela ya bótáno ya lotómo na Ye.
Bato boni bandimaka ete makabo mpe bibiangeli izali libandá ya mbóngwana ya motema? Biblia elobi ete makabo mazali matáno kati ya lingomba. Nzambe atiaki kati ya lingomba Bantómá, to batindami, ba ntómá, basakoli, balakisi, bapalanganisi ya Nsango malamu, babáteli.
Mpe Namónaki nkóto mbala nkóto wana kotelema kuna, Nalobaki: “ Bazali bango nyoso ba Branham?” Alobaki: “Te” Alobaki: “Bazali bandimi na yo.” Mpe Nalobaki, Na—Nalobaki: Nalingi námona Yesu.” Alobaki: “Nano te. Ekozala na ntango libosó ete Áya. Kasi Akoya epai na yo libosó mpe okosámbisama na Liloba otéyákí.
Nsima bisó nyoso tokotómbola mabóko ya bisó mpe tokoloba: “Tozali kopéma likolóna yangó!”
Eloko moko elingí kosálema. Nini nde ezali kokóma? Bakufi kati na Klisto babandí kosekwa zingázingá na ngai. Nazali koyóka mbóngwaná koya kati na nzóto ya ngai. Nsúki pémbé ya ngai, ekei. Tálá elongi ya ngai…masusá-masusá ma ngai manso malímwí. Bolózí mpe mpasi ya ngai…iLONGWÍ. Koyóka mawa mingi kolémwa na motéma elímwí na pwasa. Nabóngwani na mwa ntango moké, na kobweta líso.
Na nsima tokobanda kotala zingázíngá na bisó mpe komona balingami na bisó. Oo, oo, tálá Mama na Tata…Nkembo, mwana ya ngai mobali…mwana na ngai mwasi. Tatá kóko, Mamá kóko, oo Nazangi bino nyoso mibalé mingi mpenza.
Ée…tálá moningá na ngai ya kala wa motema. OO BÓTALA, ezali Ndeko Branham, mosakoli ya bisó, Aleluya!! Ezali awa. Ezali kosálema!
Na nsima elongó, nyoso na mbala moko, tokokamatama na likoló libandá kuna esikâ moko boye kati na etando mosiká na mabelé. Tokokútana na Nkólo na nzela na Ye kokita. Tokotema wana elongo na Ye likoló ya mabúngútulú ya mabelé oyo mpe koyemba nzembo ya lisiko. Tokoyemba mpe kokúmisa Ye mpo ya ngolu na Ye ya lisiko oyo Apesi bisó.
Nini nyoso nde ezali kati na ebómbelo mpo ya Mwasi na Ye ya libala. Ntango nini oyo tokozala na yango kati na séko na séko moto na moninga na ye, mpe Nkoló na bisó Yesu. Maloba ya bato ya kokúfa makoka te kolimbola, Nkoló, boni Tozali koyóka na mitema mia bisó.
Soko olingi koyóka Ye kobianga yo Mwasi na Ye ya libala, mpe koyebisa yo oyo ekoúlanama na yango elongó na Ye, yaka komíbakisa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe okopambolama na epimeli te.
Ndeko Joseph Branham
60-1211M Baseka Zómi, Mpe Bayúda Nkóto Mokámá Na Ntúkú Minei Na Minei
Nsango: 62-1210 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI
Molingami Mama Yesu Klisto,
Nini nde Lomingo loye lokosimba mpo ya Mwasi ya libala ya Yesu Klisto? Nini nyoso nde Molimó Mosanto akomónisa bisó! Bokokisami Bobongí be. Tokosósola sikawa mobimba na nzela ya Emóniseli, likambo mpenza kotémanela na elílíngi mpe mama ya likambo na elembetele. Yesu nde Lipa ya solo ya Bómoi. Azali mobimba na Yango. Azali Nzambe Moko. Azali Baebele 13:8. Azali nde NAZALI.
Klisto, na nzela ya bomónánáká kati na nzóto mpe bosopáká Makila ma Ye moko, amemákí masúmu ya bisó mosika mbala moko mpe mpo ya libela na nzela ya komikaba Ye moko; na ntina wana Asáli bisó sikawa TÓBONGA BE. Bomoi na Ye mpenza ezali kati na bisó. Makilá ma Ye mapétóli bisó. Molimó na Ye motóndisí bisó. Mapipí ma Ye MASÍLÍ kobikisa bisó.
Liloba na Ye lizali kati na motema mpe monoko na bisó. Ezali Klisto kati na bomoi ya bisó mpe eloko mosúsu te, wana ezali makambo manso kati na bomoi na bisó oyo mazali libanda na Ye mpe Liloba na Ye kolimwa,
kokota kati na bozángi ntína.
Mitema mia bisó mikotónda na esengo lokola Azali koyebisa bisó yango na nzela ya mobeko na Ye ya bonzambe, Ayebaki mpenza nani nde akozala Mwasi na Ye ya libala. Boni Aponáki bisó. Abiangaki bisó. Akufaki mpo ya bisó. Afútaki motúya mpo ya bisó mpe tozali baoyo ya Ye, mpe ya Ye Kaka.
Alobaka, mpe totósaka, zambí ezali esengo monene ya bisó. Tozali bozui ya Ye mpe Azali na mosúsu te kasi BISÓ. Azali wa bisó Mokonzi ya Bakonzi mpe tozali bokonzi ya Ye. Tozali bozui ya Ye ya sekó.
Akokembisa bisó mpe Akongengela bisó na nzela ya Liloba Mongóngó na Ye. Akolimbwela bisó polélé mpe Akomónisa ete Azali Ekuke ya ba mpate. Azali nyoso mibale Alifa mpe Omega. Azali Tata, Azali Mwana, mpe Azali Molimó Mosanto. Azali Moko, mpe tozali Moko elongo na Ye mpe kati na Ye.
Akolakisa bisó motéma molai, lokola Asalaki na Abalayama, na bolimbóláká boni tosengeli kozila na motema molai nyoso mpe koyika mpíko soko tosepeli kozua elaká ata nini.
Akotálisa bisó polélé mokolo mpenza tozali kobika kati na yango. Boni likita ya mangomba ya mokili mobimba likozala makasi kati ya politíki, mpe bakotia kopusama na makasi likoló ya mbula matáli mpo ya bato nyoso bámibakisa na ye na nzela ya kokangama na mikáno mikémbisámí na mobeko, na motindo ete bato bakoyebama te lokola mangombá bobele bázala na nsé ya bokonzi ya likita ya bango na lolenge ya polélé to ya na nsé na nsé.
Akomónisa boni mingi bakokende na yango, kokanisa ete bazali kosalela Nzambe kati na nzóto ya ebongiseli.
Kasi Ayebisi bisó: “Bóbanga te, zambí Mwasi ya libala akozímbisama te, tokotíkala na Liloba na Ye, Mongóngó na Ye.”
Boni ekozala na boyíkisami mpiko koyóka Ye koyebisa bisó : “Bótema ngwí, bókanga motema. Bótika soki moké te, kasi bóláta moláto mobimba ya etumba ya Nzambe, ebuneli moko na moko, likabo moko na moko Napesaki bino ezali na mabóko na bino. Lembá motéma soki moké te molingami wa motéma, bókoba bobele kotala libosó na esengo, mpo ete bokolátisama motile na Ngai, wa bino Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkoló ya Bankoló, Mobali ya bino.”
Bozali lingombá ya Ngai ya solo; tempelo mpenza ya Nzambe na nzela ya Molimó ya Ngai Mosanto oyo azali kobika na kati ya bino. Bokokóma makonzí kati ya tempelo ya sika; mobóko mpenza mokomema litongi monene koleka. Nakotia bino lokola balóngi elongo na bantómá mpe basakoli, zambí Napesí bino Emóniseli ya Liloba ya Ngai, ya Ngai moko.
Akomónisa polélé epai ya bisó ete nkómbó ya bisó ikomamáki kati ya Búku ya Bomoi ya Mwana Mpate libosó ya bozalisi ya mokili. Tokozala na bongo libosó ya kiti na Ye ya bokonzí mói na butú kosalela Ye kati ya tempelo ya Ye. Tozali bobátelami godi ya Nkoló; tozali Mwasi na Ye ya libala.
Tokozala na nkombó ya sika na bozuáká Nkombó ya Ye. Ekozala nkombó oyo ekopesamela bisó wana ekozua Ye bisó epai na Ye moko. Tokozala wa Ye Mama Yesu Klisto.
Yelusaleme ya sika kokita na nsé koúta na Nzambe longwá na likoló, Mwasi ya libala oyo abongísámí mpo ya mobali na ye. Ekozala lisúsu na kufa te, mawa te, koleka te. Soki mpasi ata nini ekozala te zambí makambo ma kala masili koleka. Bilaká nyoso ya Nzambe ya káfúkafu bikokokisama. Mbóngwáná ekosila kokoka. Mwana Mpate mpe Mwasi na Ye ya libala bakofánda mpo ya sékó kati ya mabongi be manso ma Nzambe.
Molingami Mama Yesu Klisto, LÓTÁ NA NTINA NA YANGO. Ekozala bikamwa mingi koleka oyo okokákí ndèle kobánza.
Nabiangí moto nyoso koya komibakisa na bisó Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Mobali ya bisó, Yesu Klisto, azali koloba kati ya motindami na Ye ya nguya mwanje ya nsambo mpe koyebisa bisó makambo mate manso.
Ndeko Joseph Branham
Liteya: Eleko Na Lingómbá Ya Filadelefí 60-1210
Nsango: 60-1209 ELEKO NA LINGOMBA YA SALADE
Balingami Bato Ya Bande,
Boni Tozali na lipambú kobiangama “ Bato ya Bande”. Mitema ya bisó mizali kobéta noki-noki na bosepeli póso moko na moko na boyebáká ete tokosangisama elongo zíngázíngá na mokili mobimba na boyókáká Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó.
Toyebi, na elilíngí ya ntembe ata moko te, tozali kati ya Mokáno mwa Nzambe mobongi be na botíkaláká kati na Liloba na Ye; koyoka Mongóngó na Ye na nzela ya motindami na Ye ya nguya mwanje ya nsambo.
Motindami Aponaki mpo ya mokolo ya biso nde William Marrion Branham. Azali mwinda ya Nzambe epai ya mokili, kongengisa pole ya Nzambe. Azali kobianga Mwasi na Ye ya libala moponami Peto kobima na nzela ya mwanje na Ye.
Na nzela ya boyekoli na bokéngi ya Liloba ya Ye, Amonisi na biso na nzela ya Molimo na Ye Mosanto ete William Marrion Branham nde mwanje Aponákí kopesa Emóniseli mpe Lotómo epai na ye mpo ya mokolo ya biso. Tomóní mwanje na Ye, MONZÓTO YA BISÓ, kati na loboko na Ye ya mobali lokola Azali kopesa ye nguya na Ye komonisa Liloba na Ye mpe kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima.
Apesí bisó Emóniseli mobimba ya Ye moko. Molimó Mosanto komiyebisa Ye moko epai na bisó kati na bomoi ya motindami na Ye mwanje ya nsambo; mwanje oyo Aponáki kozala miso ya Ye mpo ya mokolo ya bisó.
Boni mitema ya bisó mizali kopela na kati ya biso lokola Azali koyebisa biso na Liteya moko na moko ete ezali ntína ya Ye koyéisa bisó epai na Ye moko; ete tozali Mwasi Liloba na Ye.
Alingaka koyebisa biso lisusu mpe lisusu boni Aponaki bisó libosó ya kozalisama ya mokili KATI NA YE. Boni toyebámákí na Ye libosó mpe tolingamákí na Ye.
Boni tolingaka koyoka Ye koloba mpe koyebisa bisó tosíkolamáki na Makilá ma Ye mpe tokoki koya na kokwéisama SOKI MOKÉ TE. Tokoki soki moké te kozala kati ya kosambisama, zambi lisumu likokí kotángamela bisó te.
Boni tokofánda elongó na Ye wana ezali Ye kokamata kiti na Ye ya bokonzi ya Dawidi ya mabelé, mpe tokokonza elongo na Ye; bobelé lokola esálaki Ye na likoló, na nguya mpe na bokonzi likoló na mabelé nyoso. Mimekano mpe bitumba ya bomoi oyo ikomónana lokola eloko te na ntango yango.
Kasi Akébisaki mpe bisó boni esengeli na bisó kozala na bokébi. Ete kati ya bileko miwíti yango mibalé mikóláki moko pembeni na mosúsu. Boni mongúná azalaka ntango nyoso pene mpenza; na kozímbisa mingi. Ata Yuda aponamákí na Nzambe, mpe ayekolisámákí kati na solo. Akabwélamáki boyébi ya mabómbami. Azalaki na mosálá ya nguya epésamelaki ye mpe abikisáki babeli mpe abenganáki molimo mabe kati na Nkombó ya Yesu. Kasi akokaki te kokóma na nsúka ya nzela.
Okoki kokóba te kaka na mwa ndambo ya Liloba, esengeli ózua Liloba MOBIMBA.
Ezali na bato baoyo bamónani ete bakóti kati ya makambo ya Nzambe pene ya mokámá likoló ya mokámá, kasi bazali bongo te.
Alobaki ekokáki te ete Ámísangisa na lingomba mobimba, to ata bótáno ya lotómo ya Baefese minei. Akebisaki biso ete na eleko moko na moko lingomba Lilongwákí na nzela, mpe ezali bobele bandimi te kasi ebólo ya bakambi mpe lokola—babáteli bazali na mabúngá bobele lokola ba mpate.
Na bongo na nzela ya toli ya mokáno ya Ye moko, Amíyéisáki Ye moko na mosala kati na eleko ya bisó lokola Mobateli Mokonzi kati ya lotómo ya motindami na Ye mwanje ya nsambo kokamba bato na Ye kozóngisa bango na solo mpe na nguya mingi ya solo yango.
Azali kati ya motindami na Ye mpe ye nani azali na mobimba ya Nzambe akolanda motindami lokola motindami azali Milandi ya Nkolo na nzela ya Liloba na Ye.
Nalingi kozala na mobimba ya Nzambe mpe kolanda motindami na Ye. Ntina yango, mpo ya biso, Eyanganelo ya Branham, nzela bobele moko ya kolanda motindami lokola azali kolanda Nkolo na nzela ya Liloba na Ye, ezali KOFINA PLAY mpe koyoka Mongóngó Peto ya Nzambe koloba na biso maloba mayébi kokwéa te.
Tosengeli te kobánza-banza to koluka komeka oyo Tozali koyoka, tosengeli kaka Kofina Play mpe kondima Liloba moko na moko Tozali koyoka.
Nayokaki Ndeko Branham koloba eteni ya Liloba oyo ntóngó moko likolo ya Voice Radio. Ntango Nayokaki Yango, eyaki likolo ya motema na ngai ete oyo ezali mpenza lolengé Na/ toyokaka na ntina ya koloba:
TOFINAKA NA BISÓ KAKA PLAY MPE TOYÓKAKA BA BANDE.
Eyókanáki lokola elobelo ya Kondima na bisó epai ya ngai.
Nde ntina Nandimí kati na Etíndá oyo, ezali mpo ete Eútí na Liloba ya Nzambe. Mpe eloko ata nini libándá na Liloba ya Nzambe, Nandimaka yango te. Ekokaki kozala bongo, kasi ata ko bongo Nakotikala kaka na oyo Nzambe Alobaki, na nsima nándimisama ete Nazali alimá. Sikawa, Nzambe akoki kosala oyo elingi Ye kosala. Azali Nzambe. Kasi ntango nyoso Natíkálí na Liloba na Ye, boye Nayebi ezali malamu. Nandimi yango.
Nkembo, alobaki yango mpenza na BOBONGI BE. Ntómo isúsu nyoso ikokákí kozala, zambi Nzambe Akoki kosala yango elingi Ye kosala, na nani Alingi kosala yango, Azali Nzambe. Kasi ntango nyoso Natikali na Liloba na Ye, Mongóngó na Ye, Ba bande, na bongo Nayebi ezali malamu. Nandimi yango.
Nayebi mingi bazali kotanga mikanda ya ngai mpe bazali kosósola mabé oyo Nalobaka mpe Nandimaka kozala Mokáno ya Nkoló mpo ya lingombá ya bisó. Nákoka koloba na kosókema mbala moko lisusu lokola Mosakoli alobaki: “Mikandá miye mizali kaka mpo ya lingombá na ngai. Baoyo balingi kobianga Eyanganelo ya Branham lingombá ya bango. Baoyo BALINGÍ KOYÉBAMA MPE KOBIANGAMA BATO YA BANDE”.
Soko ozangi koyókana na oyo Nalobí mpe Nandimí, ezali malamu 100% bandeko na ngai mibali mpe basi. Mikandá mia ngai mizali mpo ya bino te to kotémela bino te soko mangombá na bino te. Lingombá na yo ezali na bosómí mpe osengeli kosála lokola oyókí okambámí kosala, kasi kokokana na Liloba, bongo mpe nde ya biso ezali, mpe oyo ezali yango nde tondimaka ezali nzela epesami na Nzambe mpo ya biso.
Bato nyoso batómbelámi boyei bolamu kosangana na biso mokolo nyoso ya Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville. Póso oyo, Monzóto ya Nzambe mpo ya eleko ya bisó, William Marrion Branham, akozala komemela bisó Liteya, 60-1209 Eleko Na Lingombá Ya Salade.
Ndeko Joseph Branham
Nsango: 60-1208 ELEKO NA LINGOMBA YA TWATILA
Molingami Mwasi ya libala oyo angengélámí,
Boni Nkolo azali komonisa biso ete kati na bileko nyoso ezalaki ntango nyoso na libóké moké baoyo batikalaki na Liloba na Ye.
Bakweaki te kati na motámbo ya bokósi ya mongúná, kasi batikalaki solo mpe sembo na Liloba ya mokolo ya bango.
Kasi etikálá soki moké te kozala na ntango, to ebólo ya bato, baoyo Nkolo azalá na lipambú koleka mpo ya bango, to atiélí bango motema koleka, lolenge atieli bisó. Tozali Mwasi na Ye ya libala Mama Moponami oyo soki te, mpe mingi na koleka, AKOKOKA TE, kozimbisama; zambí tozali koyoka Mongóngó ya Mobateli ya ba mpate mpe tozali kolanda Ye. Azali kotalisa bisó ete kati na bileko nyoso ezalaki na bibólo mibale ya bato, nyoso koyebisa ete emoniseli ya bango eúti na Nzambe, mpe bazali na boyokani na Nzambe. Kasi Ayebisaki bisó, Nkolo ayebi baoyo ya Ye. Azali kolandela makanisi na biso moko na moko. Ayebi oyo ezali na motema na bisó. Azali komóna misala na bisó na botíkáláká na mosakoli mpe Liloba na Ye, oyo izali etaliseli mpenza ya oyo efandi na kati ya bisó. Ntina mpe mpósá ya bisó mpenza iyebání na Ye lokola Azali kotála ekela ya bisó moko na moko.
Azali koyebisa bisó ete bilaká nyoso bipesakí Ye na eleko moko na moko, izali YA BISÓ. Azali komóna bisó baoyo tozali kokóba kosala misalá ya Ye na bosembo kino na nsúka.
APESI BISÓ nguya likoló ya mabota. Ayebisi bisó tozali bayangeli ya makasi, na mabongi, baoyo tokoki komigúmba te baoyo toyebi komikokanisa na bokási nyoso na likambo ata nini. Ata mongúna ya motíndo nini akobúkanisama soko bosengá bozali. Bomónisami ya boyangeli na bisó na nzela ya nguya na Ye ekozala pelamokó na yango ya Mwana mpenza. NKEMBO!!
Tobíkí bozindó ya Nzambe kati na bomoi ya bisó. Ezali kobika makambo ya moto ye moko ya Molimó ya Nzambe kofanda kati na bisó. Makanisi ya bisó mangengélámí na bwanyá mpe boyébi ya Nzambe na nzela na Liloba ya Ye.
Tozali kokende esika sé esika Mobali ya libala azali. Tokotíkama na Ye soki moké te. Tokolongwa pembeni na Ye sokí moké te. Tokokabola kiti ya bokonzi elongó na Ye. Tokolátisama motole ya nkembo mpe lokúmu na Ye.
Amónisí bisó boni mongúná atondi na kozimbisa kati na eleko moko na moko mpe boni ezali na litomba KOTIKALA NA LILOBA NA YE YA EBANDELI. Liloba moko likokí kobóngwana te. Eleko moko na moko ebakísakí mpe elongolákí, kotia ndimbola ya bango moko na Liloba ya ebandeli; mpe babúngí libelá na bosaláká bongo.
Kati na Eleko Na Lingomba Ya Twatila, molimó wana ya kozimbisa elobaki na nzela ya papa ya Lóma mpe ebóngoláki Liloba na Ye. Atiaki yango “molobeli moko kati ya Nzambe mpe moto (bato te).” Na bongo sikawa azali kolobela kati ya molobeli mpe bato. Na yango, manáka mobimba ya Nzambe ebongólámí; ezali te na bobóngolaká liloba moko, kasi na bobóngóláká LILÉTELE MOKO. Satana abongoláki “E” kokómisa yango “A”.
Liloba moko na moko likosambisama na Liloba na Ye ya Ebandeli lilobámí likoló ya ba bande. Nde ntina, Mwasi na Ye ya libala ASENGELI átikala na ba bande. Wana monguna azali komeka kolembisa bato mitema na bopésaká bango manáka makeseni, likanisi likeseni, lilétele likéséni, Mwasi ya libala AKOTIKALA NA LILOBA YA EBANDELI.
Na eleko moko na moko Yesu amitálisí Ye moko elongó na motindami ya eleko wana. Bazuí longwa na Ye Emoniseli likoló ya Liloba mpo ya eleko na bango. Liloba oyo emoniseli elongolaka baponami ya Nzambe longwa na mokili mpe kotia bango kati na lisangá mobimba elongó na Yesu Klisto.
Abiangaki mpe atiaki mibali mingi kati na mosala kozala lipamboli epai ya lingomba, kasi Azali na MOTINDAMI SÉ MOKO oyo abiangaki KOKAMBA lingomba na Ye na nzela ya Molimó na Ye Mosanto. Ezali na MONGÓNGÓ MOKO na Yango Elobi Nkoló. Ezali na MONGÓNGÓ MOKO Alobaki akosámbisa bisó na nzela na yango. Ezali na MONGÓNGÓ MOKO Mwasi na Ye ya libala azali kotia sekó na sekó na ye likoló na yango. MONGÓNGÓ YANGO NDE MONGÓNGÓ YA NZAMBE LIKOLÓ YA BA BANDE.
Mwasi ya libala, Mokano ya Nzambe mpo na bisó ezali Bobongi be, mpe na miso na Ye, TOBONGÍ BE. Mpe bobongi be yango nde motema molaí, kotálela Nzambe…mpe kozila Nzambe. Ayebisi bisó ezali bokóbí ya bokóli ya ezaleli ya bisó. Tokoki kozala na mimekano mingi, bitumba mpe minyoko, kasi bosembo na bino na Liloba na Ye ezali kosala motema molai kati na bisó ete tókoka kobonga be mpe mobimba, na bozangáká eloko moko te.
Tokobosana soki moke te KONDIMA eyaka na nzela ya koyoka, koyoka Liloba, mpe Liloba eyaka epai ya mosakoli.
Yaka mpe óbika esengo monene koleka na bomoi na yo lokola ofandi elongo na bisó na bisika ya Likoló lokola tozali koyoka Mongóngó ya Nzambe komemela bisó Liloba likoló na: Eleko Na Lingomba Y’a Twat 60-1208, na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.
Ndeko Joseph Branham
Nsango: 65-1207 Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo
Molingami Mwasi ya libala Moseka Peto,
Bozalaki nde kosepela na Bileko Nsambo Ya Lingómbá? Nzambe Azali kopesa Mwasi na Ye ya libala kolamukisama lokola libosó soki moké te. Azali kopesa biso Emoniseli koleka, Kondima koleka, mpe kondimisama koleka koyeba tozali ba nani, mpe oyo ezali biso kosala na botikalaká elongó na Liloba, nzela na Ye epesami mpo ya lelo.
Sikawa Ayebisi bisó: Bandá losambo ya Mokolo mwa Lomingo, bóláta makanisi ya bino ya molimó. Bótika kaka Molimó Mosanto ázindisa Yango mpe bósimba ngámbo ya molimó kati na nyoso oyo nakosala. Ezali Liloba na Ngai lilobámí liyéísámí na bomoi na Molimó na nzela ya mosakoli ya Ngai ya Malaki 4”.
Tika ete tótanga mpe tósimba mwa Maloba ma Ye mpe tótia makanisi na biso ya molimó likoló yango.
Nzambe atélémisi mokambi na Ye atóndí na Molimó mpo ya ebólo na Ye ya bat batóndi na Molimó; Mwanje na Ye; mpe Etíi likoló na ye Elembo moko ya nkómbó moko, kasi asengeli te komónisa yango. Asengeli ábatela yango mpo na ye moko, bomóni. “Moto moko te ayebi kasi bobele ye moko.”
Na bongo Nzambe apésáki Mwasi na Ye ya libala mokambi oyo atóndi na Molimó mpo na ebólo na Ye ya bato batóndi na Molimó.
MOKAMBI, BAKAMBI TE mpo na ebólo na Ye ya bato batóndí na Molimo.
Koya na mokili noki, mwanje monene ya Pole oyo akoya epai na biso, oyo akokamba biso kobima, Molimó Mosanto monene, azali koya na nguya, mpe akokamba biso epai na Nkoló Yesu Klisto.
Mwanje monene ya Pole. Nani nde Mwanje monene ya Pole epai na eleko oyo ya nsuka? William Marrion Branham. Azali te kosolola na ntina ya Molimó Mosanto. Asili ayáki mpe alobi yango ekoya.
Yango eko KAMBA BISO KOBIMA. Toyebi na bosolo mpe tondimi ezali Molimó Mosanto nde azali kokamba biso, kasi Atii mpenza polele Mwanje na Ye mpe Molimó Mosanto elongo mpe alobi Ye (Molimó Mosanto na Ye) akozala kokamba bisó (NA NZELA YA) mwanje na Ye monene ya Pole.
Akóbí kokangisa bango elongó na bolobáká ete:
Ntango mosúsu akoyeba yango te,
Azali te koloba ete Molimó Mosanto akoyeba te ezali nani, kasi mwanje na Ye ya mabelé motindami oyo Aponaki KOKAMBA BISÓ KOBIMA.
Kasi akozala awa moko na mikolo oyo. Akosala… Nzambe akosala ete áyebana. Asengeli te komiyébisa, Nzambe akosála ete áyebana. Nzambe Akoyebisa oyo ya Ye moko.
Lisúsu, Azali te koloba ete Molimó Mosanto akozala awa MOKO NA MIKOLO OYO, kasi mwanje na Ye monene ya Pole kokamba Mwasi na Ye ya libala. Akosengela te komíyebisa, Nzambe akosala ete mokambi na Ye monene áyebana epai na Mwasi na Ye ya libala na nzela ya EMONISELI.
Ozali kosimba ekokiseli na ngambo ya molimó? Omóni nani nde mwanje ya Pole azali oyo Nzambe aponaki kokamba Mwasi na Ye ya libala? Elobi nde awa ete língénda lipesamáki na bakambi basúsu?
Okokoka soki moké te kobika bomoi likoló koleka mobateli na yo. Míkaniselá yango kaka, omoni?
Wana mingi bakoki ntango mosúsu kosósola te mpe koseka bisó, boni totóndi mpenza na esengo mpe na matondi mpo ya Emoniseli koloba ete, WILLIAM MARRION BRANHAM AZALI MOBATELI NA BISO.
Sikawa wana moko na moko ya mateya oyo etindami epai ya “mwanje”—(motindami moto) mokúmba monene koleka mpe libakú malamu ya bikamwa ipesameli ye.
Etindá etindamakí epai ya mwanje na Ye, nsima mwanje na Ye Apesi Yango epai ya Mwasi ya libala; kaka batéi te, kasi epai ya MWASI NA YE YA LIBALA NYOSO mpe ezali likoló ya bande mpo banso báyoka. Esengeli kobakisamela eloko te soko kolongolamela eloko te, mpe Esengeli na NDIMBOLA TE.
Azali koya noki, mpe wana ezali ye koya Akoya epai na yo libosó, mpe okosámbisama kokokana na Sango Malamu otéyaki, mpe tokozala bato na yo.” Nalobaki: “Olingi koloba nazali na mokumba ya baoyo nyoso?”
Alobaki: “Moko na moko na bango. Obótamaki mokambi.”
Ntango mokolo monene ya kosambisama eyéi, Azali koya libosó epai ya mwanje na Ye ya Pole mpe akosámbisa ye libosó kokokana na nsango malamu etéyaki ye.
Tozali BATO NA YE. Azali na mokúmba ya moko na moko na bisó lokola azalaki MOKAMBI aponamáki na Nzambe.
Tíá etingia na yo kati na molimó na yango. Tokosambisama na oyo mwanje ya Nzambe alobaki. Na boye, olingi kozua libakú mpo ya bomoi na sekó na yo na nzela ya oyo moto moko alobí ete ALOBAKI na ntango oyo okokí koyoka mbala moko koúta epai na YE?
Lolenge nini moto ata nani ándima ete ezali na MOTÉI MOKO YA LITOMBA KOLEKA OYO EZALI LIKOLÓ YA BA BANDE. Soko ondimi yango, to ondimisamáki bongo na nzela ya mabánza, epusí malamu ózonga NA LILOBA YA EBANDELI; mpo ete okosambisama na maloba mazali likoló ya ba bande. Tikalá na Liloba lokola elobamákí.
Kasi mosakoli oyo akoya, mpe lokola mobongisi ya boyéi na Ye ya libosó agángákí: “Bótala Mwana Mpate ya Nzambe, oyo azali kolongola lisúmu ya mokili,” bongo mpe na ntembe te akogánga: “Bótala Mwana Mpate ya Nzambe, koya kati na nkembo.” Akosala oyo, zambí kaka lokola Yoane azalaki motindami ya solo epai ya baponami, mpe bongo oyo azali motindami ya nsúka epai ya baponami mpe Mwasi ya libala oyo abotamí na Liloba.
Nani nde akotálisa biso epai ya Nkoló Yesu? Mwanje na Ye monene ya Pole, William Marrion Branham.
Yaka kozala Mwasi ya libala Moseka Peto elongo na biso lokola tozali koyoka mwanje na Ye monene motindami koyela biso Emoniseli koleka, mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Liteya 60-1207–“Eleko Na Lingomba Ya Pelegámo”.
Ndeko Joseph Branham
Nsango: 60-1206 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA#
Molingami Mwasi ya libala Oyo Atóndí na Molimó,
Ezali bobele na ebólo moko ya bato; ebólo moko mpenza godi ya bato, baoyo tozali na makokí ya koyóka oyo Molimó azali koloba na eleko oyo ya nsuka. Ezali ebólo moko godi oyo ezuí Emóniseli mpo ya eleko oyo. Ebólo yango nde ya Nzambe. Ebólo oyo ekokí koyoka te ezali ya Nzambe te.
Ebólo oyo ekoki koyoka, mpe eyókí yango ezali Molimó koloba, bazuí Emóniseli ya Solo. Bisó nde tozali na Molimó ya Nzambe. Bisó nde tobótami na Nzambe mpe tobátisamí na Molimó Mosanto. Tozali Mwasi na Ye ya libala oyo Atóndí na Molímó oyo azuí Emoniseli mpo na eleko ya bíso.
Elingi koloba nini mpo na bisó Kofina Play? EMÓNISELI! Ezali koyóka, koyamba mpe kotíkala na Nzela ya Nzambe epésámí mpo ya lelo. Mongóngó mpenzá ya Nzambe koloba mbebu na litói na Mwasi na Ye ya libala. Ezali Molimó Mosanto koloba na mitema mpe milimó ya bisó.
Toyebi ete Nzambe asálelaka bato batóndi na Molimó na Ye mpo ya koloba, kasi ezali na esiká mosúsu te koyóka Yango Elobí Nkoló longólá bobelé na nzela ya Kofina Play mpe koyóka MONGÓNGÓ ya mwanje na Ye ya nsambo, William Marrion Branham. Ezali Mongóngó sé moko mondimisamí na Molimó Mosanto Ye moko. Azali Mongóngó ya Nzambe, mosakoli ya Nzambe, mobáteli ya Nzambe, epai na bisó, mpe epai ya mokili.
Ntango alobí, tolobí AMEN na Liloba moko na moko; zambí ezali Nzambe Ye moko koloba na bisó. Liloba na Ye nde Liloba sé moko lisengeli na ndimbolá te. Ezali Nzambe kosálela mongóngó na ye koloba na Mwasi na Ye ya libala.
Ezali Nzambe Ye moko koyebisa bisó : “baoyo miké ya Ngai, bino te nde boponáki Ngai, kasi Naponáki bino, libosó ata mwá putulú ya monzóto ézala; libosó kútu Náyebana epai na bino lokola Nzambe na bino, Nayebaki bino.
Bozalaki kati na Likanisi na Ngai, kobíka kati ya Makanisi na Ngai ya sékó na sékó. Bozali Mwasi na Ngai ya libala Mombóto Liloba Lilobámí.
Atako bozalaki kati na Makanisi ya Ngai ya sékó na sékó, Nabimísákí bino te kino eleko ebongísámákí mpe ekánámáki na Ngai. Mpo Nayebaki ete BOkozala ebólo na Ngai godi baoyo bokotikala na Liloba ya Ngai.
Basúsu nyoso bakweaki, kasi Nayebaki bokokwea te.
Nayebi ete bozali konyókolama mpe kosekama mpo ete botikali na mosakoli na Ngai, kasi bozali Mowíti ya Ngai ya Solo oyo botàngwi te na Liloba na Ngai, kasi botíkali solo mpe sembo na mosakoli na Ngai oyo azali koloba Maloba ya Ngai.
Ezali na ebelé mosúsu baoyo balakisámáki na bosembo, kasi bayékolaka ntango nyoso te boni ezali na litómbá koloba kaka oyo Nalobaki na nzela ya motindami na Ngai.
Boni tosengeli kozala na bokéngi koyóka mongóngó MOKO, mpo ete Molimó azali na Mongóngó sé moko oyo ezali Mongóngó ya Nzambe.
Oo, boni ezali na litómbá koyóka Mongóngó ya Nzambe na nzela ya batindami na Ye, na nsima koloba oyo epesámaki na bango koloba epai ya mangómbá.
“Liloba ya Ngai liyákí ntango nyoso epai ya mosakoli na Ngai, kasi lelo oyo, Nasalaki ete Mongóngó na Ngai mótiama na bande mpo ete MABÚNGÁ MÁZALA TE oyo Nalobaki na Mwasi ya libala.
Ezali na molongó bobele moko, bobele língénda moko, mpe yango nde LILOBA oyo Nalobaki na nzela ya mwanje na Ngai. Lokola kati na eleko moko na moko, mosakoli na Ngai nde Liloba ya mokolo.”
Ba bande, Mongóngó na Ye, ezali likambo ya káfúkafu mpo ya biso. Ntango mongúná azali kobeta biso na nsé ntango nyoso na nzela ya mimekano mpe minyókó mpe mpási ya bisó, Atindákí mwanje na Ye ya nguya koyebisa biso ete ezali eloko mosúsu te kasi bolingo ya Nzambe ya boponami epai ya bisó, kotálisa bisó ete Aponákí bisó lokola tokoningana te.
Ntina na Ye monene ezali ete nsima na bisó konyókwa mpo ya mwa ntango, Akobongisa bisó be, kotemisa mpe kokémbisa bisó.
Ayebisaki bisó ete kútu Nkoló na bisó Yesu Abongísamákí be na nzela ya minyókó na Ye. Lipámbolí níni oyo Atikelakí bisó. Zambí na nzela ya konyókolama ya bisó, Akomema bisó kati na bobongi be mpe lokola.
Azali motongi bizaleli ya bisó na nzela ya mimekano mpe minyókó ya bisó. Mpo ete ezaleli ya bisó esálemi te soki na konyókwama te. Na bongo, konyókwama ya bisó ezali ELONGA epai ya bisó, mpe likabo te.
Tokokí nde boni kotálisa bolingo na bisó epai na ye?
Boni Atómbóli molimó na bisó na nzela ya boyókáká Liloba na Ye. Mongóngó na Ye ezali kolendisa bomoto ya bisó.
Ntango Tofiní Play mpe toyókí Ye koloba, mikúmba na bisó nyoso milongwí. Tokoki kútu te kobanda kobánza bozui nini botiámí mpo ya bisó na nzela ya monyókó nyoso ya bisó.
Oo, Mwasi ya libala ya Yesu Klisto, boni Nazali na esengo kozala Moko na bangó elongó na moko na moko na bino. Esengo nini oyo etóndísí motema na Ngai koyeba ete Apesi bisó Emóniseli ya Liloba na Ye.
Ntango Ayebisaka bisó ete ekozala mpenza pene ya kozimbisa baponami mpenzá soko nde ekokákí, Apesakí bisó EMÓNISELI ya SOLO.
Yaka, kóta kati na Molimó elongó na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Liloba libongí be: 60-1206–Eleko Na Lingómbá Ya Sumulúna.
Ndeko Joseph Branham
Nsango: 60-1205 Eleko Na Lingomba Ya Efese
Molingami Mwasi Ya Libala Ya Solo,
Ntango nini ya kokamwa oyo tozali na yango lokola Bomoi na Ye ezali kotíola mpe kobéta-beta kati mpe na nzela na biso, kopesa biso bomoi. Soko na Ye te, bomoi ekokáki kozala te. Liloba na Ye ezali mpéma mpenza ya biso.
Kati ya mokolo monéne oyo ya molílí, tozali ebólo na Ye ya eleko ya nsúka oyo etélémí; Mwasi na Ye ya libala ya solo ya mokolo ya nsuka oyo akoyóka bobelé Molimó, Mongóngó ya Nzambe mpo ya mokolo ya biso.
Boni tolingaka koyoka Ye koyebisa biso: “Epai na Ngai, boúlání na wólo peto etúlámí. Boyengebene ya bino ezali boyengebene ya Ngai. Binámá ya bino nde binámá na ngai ya nkembo. Bozali Mwasi ya libala molingami na Ngai ya Solo.”
Lokola bitumba na biso bizali koya makasi koleka mpe makasi lisusu póso na póso, tozali kaka Kofina Play koyoka Ye kosolola na biso na bobóto nyoso mpe koyebisa biso: “Bótungisama te, bobongí na Nsango Malamu ya Ngai. Bozali eloko ya bozéngá mpe esengo. Nalingaka kotala bino lokola bozali kolónga mongúna na nzela ya bitumba mpe mimekano ya bino ya bómoi oyo.”
Namónaka mosala makasi na bino ya bolingo; ezali ebiangeli ya likoló ya bomoi na bino kosálela Ngai. Nayebaki libosó ya kozalisama ya mokili ete bokoyeba mwanje na Ngai ya nguya oyo Nakotínda kozala Mongóngó na Ngai epai ya bino; boni bolingaki kozimbisama te ntango ba nkoi ya kongála bakoya zíngázíngá komeka koloba ete bazali na emóniseli ekokání. Bolingaki te kotangwa na Liloba na Ngai, ata mpo ya ntango moko te, NA NSÓNGÉ YA “I” MOKO TE. Bolingaki kotikala na Liloba na Ngai, Mongóngó na Ngai.
Bolingaki komóna lokola Nazali komónisa Liloba na Ngai epai na bino boni Mowíti ya Solo mpe mowiti ya lokutá oyo ibandaki kati na Elanga ya Edéne ilingaki kokóla elongó kati na bileko.
Oyo ebandaki kati na lingómba ya libosó elingaki kokóba kati na eleko moko na moko. Boni kati na eleko ya libosó ya lingomba, mowíti ya mabé ya Satana elingaki kobanda kolanda na libumu kokóta, mpe kolónga baílingómbá na nzela ya molimo na ye ya nikolaíti. Kasi boni Nalingi ete bino kaka, Mwasi na Ngai ya libala moponami, bokozímbisama te.
Póso oyo, Nakokémbisa Liloba na Ngai kati na bino na nzela ya bomónísáká libombami monene ya mombóto ya nyoka. Nakomónisa bino yango kati na bozindó ya makambo nyoso miké-miké likoló ya oyo ekómaki kati na Elanga ya Edéne; boni Satana amíkótísáki kati na libota ya moto.
Ekozala likanisi ya kopesa malílí na nzoto ya lolenge mosusu ntango boyebi ete Ngai, Nzeté ya Bomoi kati na Elanga ya Edéne, oyo ekokákí kobélemama na yango te kino sikawa mpo ya kokwéa ya Adama,epésámí na bino sikawa, balóngi na Ngai.
Oyo ekozala mbano ya bino. Nakopesa bino libakú malamu ya paladiso ya Nzambe; boyokani elongo na Ngai ntango nyoso. Bokokabwana na Ngai soki moké te. Epai sé epai ekokende Ngai, bino, Mwasi na Ngai ya libala bokokende. Oyo ezali ya Ngai, Nakokabola yango na bino, balingami na Ngai.
Boni mitema na biso mizali kobéta mbangu kati na biso wana tozali kotánga maloba maye. Toyebi bokokisami ya bilaká na Ye izali kobélema noki, mpe tokolinga kozila ntango molai kaka na mpasi. Tika ete tósélingwa kotósa Liloba na Ye mpe bongo na bokokísaká bobongi ya bisó kokabola nkembo na Ye.
Nalingaki kotindela bino mbela bóya komibakisa na biso wana ezali biso kokóba boyekoli na biso monéne ya Bileko Nsambo Ya Lingomba, epai wapi Nzambe azali komónisa Liloba na Ye epai ya biso na nzela na Ye epésami, motindami na Ye mwanje ya Nsambo.
Ndeko Joseph Branham
Mokolo mwa Lomíngo 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.
60-1205 Eleko Ya Lingomba Ya Efese
Nsango: 60-1204E Emononeli Ya Patámo
Molingami Mwasi Liloba Oyo abongí Be,
Nini nde ezali kosalema kati ya Mwasi ya libala zingázingá na mokili mobimba? Tozali kokóta kati ya Molimó, kotelema mpe ko bélela: “Nkembo! Aleluya! Lokúmu epai ya Nkoló!” Nzambe azali komema biso mpe azali komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.
Makambo totángákí mpe toyókákí bomoi ya biso nyoso izali sasaipi komónisama. Koyeisama na bomoi monene ezali kosalema. Tozali kongengelama na ya Liloba lokola libosó naino soki moké te.
Tozali koyoka yango kati na bozindó mpenza ya milimó na biso. Eloko moko ekeseni, eloko moko ezali kosalema. Tozali koyoka Molimó Mosanto kopakola biso, kotóndisa mitema mpe makanisi ya biso na Liloba na Ye.
Tokoki koyoka Ye koloba na biso: Nayebi mongúná azali kobundisa bino lokola naíno libosó soki moké te, kasi bóbanga te baoyo miké, BOZALI YA NGAI. Napesi bino bolingo ya Ngai, mpiko mpe mabongi. Bóloba bobele Liloba, mpe Nakosala yango. Nazali elongo na bino ntango nyoso.
Kati na boyekoli na biso monene ya Emóniseli ya Yesu Klisto, tozali na nsé ya bozili na etingia monene mpóso moko na moko nini nde Akomónisa biso na nsima. Liloba na Ye nde Ekimelo ya biso bobele moko, kimia mpe libóndi.
Toyoki na bokéngi lisusu mpe lisusu mpe lisúsu. Eteni ya ndambo ya maloba moko na moko tozali kotanga, tolingi kogánga mpe kobélela lokola Liloba lizali kofungwama libosó na miso na biso mpenza. Kondima ya Konétolama ezali koya likoló ya Mwasi na libala, kotóndisa milimó ya biso
Bókanisa, ezali te na esika mosusu kati na mokili wapi okokí kokende, kasi kaka na nsóngé ya misapi na yo, koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na yo mpe komónisa yo Liloba na Ye.
Boni Nzambe alongólaki ezipelo, abéndaki yango na nsima, mpe atikaki Yoane kotala na kati mpe komóna oyo eleko ya lingomba moko na moko elingaki kosala, mpe akomáki Yango kati ya Búku mpe atindakí Yango epai na biso.
Nsima, wana litóndi ya ntango eyei, Nzambe atindelaki biso mwanje na Ye ya nsambo ya ngúya koloba Yango, mpe komonisa oyo Yango nyoso elingaki koloba.
Yoane akomaki yango emónaki ye, kasi ayebaki ntina na yango te. Yesu kútu ayebaki yango te ntango azalaki awa na mabelé. Moko te na kati na bileko ayébákí, kino lelo oyo, ntango oyo, libóta oyo, BISÓ, Mwasi na Ye ya libala.
Boni Amónisaki biso ete mínda nsambo wana izaláki kobenda bomoi mpe pole longwá na biútelo ya mbékí wana monene.
Ayebisaki biso boni moko na moko azalaki na lotámbe na ye ezíndákí kuna na kati. Motindami ya eleko ya lingomba moko na moko azalaki na móto na Molimo Mosanto na lotámbe na ye ezindí kati na Klisto, kobenda bomoi mpenza ya Klisto mpe kobimisa Pole na lingomba.
Mpe sikawa, motindami na biso ya mokolo ya nsuka, motindami monene koleka nyoso, azalaki na bomoi yango moko mpe Pole yango moko emonisamaki na nzela ya bomoi bobómbámáki elongo na Klisto kati na Nzambe.
Na nsima mwanje na biso ya nguya ayebisi biso ete motindami moko na moko atálísamaki kuna kaka te, KASI MOKO NA MOKO NA BISO AZALAKI KUNA LOKOLA, bandimi ya solo ya Nzambe. Moko na moko na biso atálisamí mpe kuna na lolenge ya kokamwa.
Moko na moko na biso azali kobénda koúta na eútelo yango moko lokola batindami. Tozindísámáki biso nyoso kati ya mbéki yango moko. Tokúfí kati na biso moko mpe bomoi na BISÓ ibómbámí elongo na, mpe kati na, Klisto Yesu Nkolo na biso.
Boni azali koyikisa biso mpiko na bolobáká ete moto mókó te akoki kolongola biso na loboko ya Nzambe.
Bomoi ya biso ikokí te kobóngolama na yango. Bomoi ya biso ya komónana izali kopela mpe kongenga, kopesa pole mpe bimoniseli ya Molimo Mosanto. Bomoi ya biso ya kati izangi komónana, ibómbámí kati na Nzambe mpe iléísámí na Liloba ya Nkolo.
Bitumba bizali makasi. Mongúna azali kongala lokola liboso soki moké te, komeka makasi na ye manso kolembesa biso mitema, kobeta biso na nsé, kasi akokoka kosala yango te. Nzambe Ye moko azali koloba na biso na nzela ya bibebú ya moto mpe koloba na biso, TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA, OYO APONÁKÍ, mpe Elongaka zábolo NTANGO NYOSO.
Nkolo na biso Abongi Be, koloba Liloba na Ye Libongí Be, kopesa Kimia Ebongi Be, epai na Mwasi na Ye ya libala Abongí Be.
Lokola ntango nyoso, tobiángí mokili koya kozindisa lotámbe ya bango kati ya MBEKI YA MONENE, Etindá oyo, ebómbámákí mpe ebátélámákí mpo ya Mwasi ya libala. Tokozala kogánga mpe kobélela na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba mpe komónisa oyo ekómákí kati ya: Emónoneli Ya Patamo 60-1204E.
Ndeko Joseph Branham