Nsango: 65-1207 Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo
All posts by admin5
20-1115 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA
Nsango: 60-1206 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA#
- 26-0802 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA
- 24-1027 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA
- 23-0507 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA
- 20-1115 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA
- 19-0127 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA
- 16-0316 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA
BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
Mokolo ya 14 novembre 2020
Molingami Moko Kati na Bango,
Tozali mpenza na esengo pe tozali kozongisa matondi mpo na koloba na mokili ete Klisto azali Nganga-Nzambe na biso, Nganga-Nzambe Mokonzi na biso. Tozali na Nganga-Nzambe Mokonzi moko, MESA MOKO esika oyo tozali kolia. MESA MOKO esika oyo basantu ya Nzambe baliaka bilei oyo ebombamaki. Esika oyo tofandaka pe toyokaka Mongongo na Nzambe kolobela biso pe koyebisa biso ete tozali balingami na Ye.
Tozali mpenza etonga na bato oyo bazali na makoki ya koyoka bobele makambo oyo Molimo alobi. Etonga ya bato oyo basili mpenza kozua emoniseli mpo na eleko na biso, baoyo bazali na Molimo na Nzambe pe babotami na Nzambe, baoyo babatisami na Molimo na Ye na kati na nzoto ya Nkolo Yesu Klisto, baoyo batondisami na Molimo Mosanto.
Ndenge nini moto akoyeba, na ntembe moko te, ete azali na Molimo Mosanto?
Etaliseli mpenza ya solo ezali KOYOKA makambo oyo Molimo alobi. Molimo alobaka, Molimo alakisaka, Molimo azali Liloba ya ntango. Ezali Yango Elobi Nkolo.
Tika ete toyoka wana Nzambe azali koloba pe kozongela mpo na baoyo bayokaki nzala pe bakendeki. Na ntango oyo azali kozongisa bango na BOLINGO na bango ya LIBOSO, Azali koloba pe kolobela lisusu Mwasi na Libala na Ye ete Nalingaka yo, mpo otikalaki na Liloba na Ngai, Mongongo na Ngai, mosakoli na Ngai.
Yesu (na nzela ya Molimo), na eleko MOKO NA MOKO, alobaka Ye Moko na MOTO BOBELE MOKO mpo na oyo etali Liloba mpo na eleko wana. MOTINDAMI bobele MOKO MPO NA ELEKO MOKO NA MOKO AZUAKA MAKAMBO OYO Molimo asengeli koloba na eleko wana, pe MOTINDAMI MOKO yango nde azali motindami mpo na lingomba ya solo. Ye alobaka mpo na Nzambe na nzela ya emoniseli mpo na “mangomba”, oyo ya solo pe oyo ya lokuta. Na ntango wana nde Nsango epanzanaka epai na bato nyonso. Kasi, ata yango epanzanaka mpo na baoyo nyonso bakoyamba nsango, nsango yango ekoyambama moko moko bobele na etonga moko mpenza ya bato na lolenge moko boye. Moko na moko na bato ya etonga yango azali moto oyo azali na makoki ya koyoka makambo oyo Molimo azali koloba na nzela ya motindami. Baoyo bakoyoka bakozua emoniseli ya bango moko mpenza te, pe etonga na bato bakozua emoniseli ya BATO NYONSO TE, KASI MOTO MOKO NA MOKO AKOYOKA PE AKOZUA MAKAMBO OYO MOTINDAMI ASILAKI KOZUA EPAI NA NZAMBE.
Mwanje motindami ya nsambo na biso azali koloba mpo na Nzambe na nzela ya emoniseli. Na ntango wana, tozali koyoka moto moko moko makambo oyo Molimo azali koloba na nzela ya motindami yango. Na boye, na nzela ya emoniseli, tozali koyoka pe kozua makambo oyo motindami asilaki kozua epai na Nzambe. Ezali na nzela BOBELE MOKO mpo na koyeba malamu ete bozali kozua Liloba oyo ebongi be, moninga na ngai, FINA BOUTON YA KOYOKA..
Alobaki na biso ete, longwa na motindami yango, pole epanzanaka na nzela ya lotomo ya bato mosusu oyo balakisamaki na bosembo mpenza; kasi akebisi biso koloba ete baoyo nyonso bakendeke bayekolaka te ntango nyonso ete esengeli mpenza koloba BOBELE makambo oyo mosakoli asilaki koloba. Bazali kobakisa awa, to bazali kolongola makambo kuna, pe kala mingi te nsango ekozala lisusu peto te. Akebisaki bango ndenge basengelaki kozala na bokebi mpo na koyoka mongongo MOKO.
Mpo Molimo azali bobele na mongongo moko, oyo ezali Mongongo na Nzambe. Polo akebisaki bango mpo na koloba makambo oyo ye alobaki, Petelo pe alobaki ndenge moko. Akebisaki bango ete ATA YE (POLO) akokaki kobongola liloba moko te na makambo oyo asilaki kopesa na nzela ya emoniseli. Oh, ezali mpenza na motuya mpo na koyoka mongongo na Nzambe na nzela ya batindami na Ye, pe na sima, koloba makambo oyo epesamaki na bango mpo na koloba na mangomba.
Azali kolobela biso ete ezali mpenza na motuya mpo na biso ete toyoka Mongongo na Nzambe NA NZELA YA MOTINDAMI NA YE. Soki mosakoli akebisaki biso ete likambo oyo ezali NA MOTUYA MPENZA mpo na koyoka Mongongo Yango, boye mpo na nini batei bazali koboya koyokisa Mongongo yango na mangomba na bango?
Polo akebisaki pe bango, bobongola LILOBA MOKO TE, ata esika nalobaki:
• Kasi mpo na bamosusu, ngai nalobi, ezali Nkolo te.
• Sala nyonso oyo ekoki mpo na kokomela ngai noki.
• Zua Malako pe memela ngai ye, mpo nasengeli na ye.
• Ntango okoya, memela ngao monkoto oyo natikaki epai na Carpus kuna na Troas, pe mikanda, koleka mpenza ba-buku.
• Alexandre, mosali-bibende, asalelaki ngai mabe mingi. Nkolo akozongisela ye makambo oyo ye asalaki.
Bongo, ndenge nini bato bakoki kolobela biso mabe mpo tozoloba:”Tondimaka Liloba moko na moko oyo mosakoli alobaki?” Tosengeli kosala makambo mpenza lokola Biblia, pe MOSAKOLI NA YE ALOBELAKI BISO:
Bobakisa eloko moko te. Bolongola te, bokotisa makanisi na bino moko te kati na Yango. Boloba bobele makambo oyo elobami na ba-bandes oyo. Bosala bobele mpenza makambo oyo Nkolo Nzambe asili kotinda bino kosala. Bobakisa eloko na Yango te. (65-0718m – Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda na Mokano na Nzambe)
Soki moto moko atuni yo:” Ozali moko na bato oyo bandimaka LILOBA MOKO NA MOKO oyo mosakoli alobaki, pe olobaka,”Fina Bouton” ntango nyonso? Eyano na biso ezali mpenza na pete pe na mpasi moko te :”Iyo, moninga ngai, nazali mpenza na esengo mpo na koloba ete nazali Moko na Bango.”
Balingami Ba-moko na Bango, tika ete tosangana mokolo na Lomingo na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Emoniseli ya Nzambe koloba na nzela ya mosakoli na Ye, wana Akomonisa biso: Eleko ya Lingomba ya Sumuluna eteyamaki mokolo ya 6 decembre 1960.
Ndeko Joseph Branham
Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya oyo “Eleko ya Lingomba ya Sumuluna”.
Emoniseli 2:8-11
Source
https://branham.org/articles/11132020_TheEaglesGatheringTogether
20-1108 Eleko Na Lingomba Ya Efese
Nsango: 60-1205 Eleko Na Lingomba Ya Efese
- 26-0726 Eleko Na Lingomba Ya Efese
- 24-1020 Eleko Na Lingomba Ya Efese
- 23-0430 Eleko Na Lingomba Ya Efese
- 20-1108 Eleko Na Lingomba Ya Efese
- 19-0120 Eleko Na Lingomba Ya Efese
- 16-0313 Eleko Na Lingomba Ya Efese
BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
Mokolo ya 7 novembre 2020
Molingami Etonga Moke,
Eloko ya liboso oyo Mwasi-na-libala asalaka, ezali ya kotombola mongongo epai na Tata, kosanjola Ye, kokumbamela Ye pe kozongisela Ye matondi mpo na nyonso oyo Ye asili kosala. Na sima, tosengeli kofanda na kimia liboso na Ye mpo na koyoka Mongongo na Ye kolobela biso na nzela ya mwanje motindami na ye ya nsambo ndenge Abandi komonisa biso Liloba na Ye.
Mitema na biso ebandi kopunja-punja na kati na biso, tozotelema pe koganga:“Nkembo! Alleluia! Nkolo àsanjolama!” Na mitema na biso, tobandi kobina, kopumbwa pe kopota mbangu bisika nyonso, wana tozali kolekisa ntango ya malamu mpenza lokola Ndeko Yoane kuna na esanga ya Patamo. Eloko oyo ezosalema na biso, ezali ete tosili kokota KATI NA MOLIMO.
Nsinga ya mwinda na biso ekoti mpenza na kati ya Molimo Mosanto, pe na nzela ya nsinga yango, tozali kobenda Bomoi na Nzambe ntango AZALI KOPESA BISO EMONISELI LIKOLO NA EMONISELI. Ezali Liloba na nguya mobimba. Molimo Moko oyo ezalaki na kati ya Yesu (Liloba) ezali sikawa lisusu na kati na biso na eleko oyo ya suka. Ezali Liloba kati na mosala, na nguya koleka pe monene koleka mpenza, na kati ya Mwasi-na-libala-Liloba ya solo.
Kobanga te, etonga moke. Nyonso oyo Ngai nazali, yo ozali mokitani na yango. Nguya na ngai nyonso ezali ya yo. Nguya-nyonso ya Ngai ezali ya yo wana Natelemi na kati na bino. Nayaki mpo na komema kobanga pe kokweya te, kasi bolingo, mpiko pe makoki. Nguya nyonso oyo epesamelaki Ngai, ezali mpo bino bosalela yango. Bino, boloba Liloba pe Ngai nakokokisa yango. Yango ezali boyokani na Ngai pe ekokweya ata moke te.”
Tozali kobanga eloko moko te, mpo Liloba na Ye ekoki kokweya ata moke te. Nguya na Ye nyonso ezali mpo na biso. Nguya-nyonso na Ye ezali ya biso. Tosengeli koloba bobele Liloba na Ye, pe Ye akokokisa yango.
Kasi Ye akebisaki biso ete tosengeli kofungola miso mpenza na eleko na biso oyo, mpo ete ndenge molimo yango esalaki makambo na eleko wana ya liboso, ezali kokoba kozala lisusu na bomoi. Ba-mapasa yango, ba-nzete yango nyonso mibale ezali kokola elongo, ezali kolia bilei yango moko, ezali komela mai ya mbula yango moko, pe ezali kosepela na moi yango moko. Kasi yango mibale euti na mimboto EKESENI. Tokoyeba kokesenisa yango ndenge nini? Nzete bobele Moko ya solo ekozala MPO na Liloba na Nzambe, pe ekondima Yango bobele ndenge oyo Nzambe apesaki Yango, ekolinga Yango, pe ekotosa Yango.
Ba-mosusu bakozala ba-ntoma oyo ya lokuta, ba-nyama na yauli ya nkanza, oyo Polo alobelaki. “Sima na ngai kokende, bakomeka koya pe bakobanda koloba ete bazali na emoniseli ndenge moko; kasi mposa ya mitema na bango ezali mpo na kosunga bino te, kasi mpo na kobebisa bino.”
Ayebisaki biso ete,
“Soki moto moko amikaniseli ete azali mosakoli, to moto na molimo, tika ayeba ete makambo oyo nakomeli bino ezali mitindo ya Nkolo.”
Tondimi pe toyebi ete Nsango Oyo ezali mitindo ya Nzambe mpo na eleko na biso. Tokobongola Liloba MOKO te, kasi tokondima BOBELE makambo oyo Nzambe alobaki na nzela ya mosakoli na Ye na kati ya ba-Bandes.
Basakoli ya lokuta mingi bakomonana, botala malamu pe bokomona ete bakobanda kozongela koloba ntango nyonso ete bokobunga soki bondimeli bango te nà makambo balobaka ; kasi ntango MOSAKOLI OYO YA ELEKO YA SUKA akokota na mosala, soki azali mpenza mosakoli yango, akobanda koganga:”Bozonga na Liloba, soki te bokobunga.” Akotonga likolo na emoniseli to ndimbola na ye moko te, kasi likolo na Liloba. Amen, pe Amen!
Mwasi-na-libala asengeli kozonga na Liloba, kozongela Bolingo na ye ya Liboso, Mongongo na Nzambe mpo na eleko na biso, yango ezali na ba-bandes. Ezali mokanda ya bolingo mpo na Mwasi-na-libala na Ye. YANGO ELOBI NKOLO.
Oyo ntango mosusu ya nkembo oyo Mwasi-na-libala akozala na yango mokolo na Lomingo, na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersonville, wana tokokota na Molimo mpo na koyoka Mongongo na Nzambe mpo na eleko na biso koteya biso emoniseli ya Eleko na Lingomba ya Efese , oyo eteyamaki mokolo ya 5 décembre 1960.
Ndeko Joseph Branham
Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya “ Eleko na Lingomba ya Efese eteyami mokolo ya 5 décembre 1960”.
Misala 20:27-30
Emoniseli 2:1-7
Lien
https://branham.org/articles/1162020_TheEaglesGatheringTogether
20-1101 Emononeli Ya Patámo
20-1025 EMONISELI YA YESU KLISTO
20-1011 Mokambi
20-1004 Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be
20-0920 Malakisi Na Ntina Na Mose
Nsango: 56-0513Malakisi Na Ntina Na Mose
BranhamTabernacle.org
PDF
themessage.com/ln/sermonsdownload
20-0912 BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
Mokolo ya 12 septembre 2020
Balingami Bameli-mai ya Libulu oyo Epunjaka,
Komela mai na Libulu oyo Epunjaka ezali kitoko mingi mpenza. Liloba ya pio, ya peto, ya pembe, oyo ezali kouta na Liziba na Mai na Bomoi, esika tokoki komela Yango ntango nyonso mitema na biso ezali na mposa na yango. Ayaki pe asilisaki mposa na mai ya milimo na biso, na mabele ekauki pe ezanga mai.
Ntango tozali na mitungisi ya ndenge na ndenge, tokoki komela mai. Ntango etumba ezali kokoma makasi, tokoki komela mai. Ntango tozali na bosenga ya lobiko na nzoto, tokoki komela mai. Ntango nyonso, bisika nyonso, tokoki kofina bouton ya koyoka liteya pe tokoyoka Tata kolobela biso ete : Mbote, baninga, eloko nini bozali na bosenga na yango lelo, lobiko-na-nzoto? Bozali na bosenga ya koyeba solo-solo ete bozali bana na Ngai ya mibali pe basi oyo bapesami Lokumu-ya-bana? Bozali na bosenga ya kozwa eyano na motuna oyo bozali na yango na motema? To bolingi bobele kofanda na nsé ya epakolami ya Molimo Mosanto pe komela, komela, komela kino milimo na bino ekobondisama nye?
Liloba na Ye, Nsango Oyo, ezali kotia biso mbala moko liboso ya Molimo Mosanto. Ntango mosusu tosalaka makasi nyonso mpo na komeka kokota liboso na Bozali na Ye, kasi toyebi ete bobele na ngonga oyo tozali kofina bouton ya koyoka liteya , tozali na nsé ya Epakolami ya Molimo Mosanto. Yango esili komonisamela biso, pe tondimi na bomoto na biso nyonso ete, Ezali Mongongo Na Nzambe nde ezali kolobela biso mbala moko longwa na bibebu ya moto oyo YE aponaki. Mpo na nini moto oyo azali na mayele nyonso akoki kolinga komela mai oyo euti na liziba mosusu?
Ntango toyokaka ba-bandes oyo, Ekendaka kino na ba-mboka ya bapakano, pe bisika nyonso na mokili, esika nyonso oyo bato bazali koyoka yango. Ezali kobenga moto nyonso oyo azali na bolembu, molimo nyonso oyo esili kobunga, nzoto nyonso oyo ezali kobéla, Momboto nyonso oyo esila kobongisama liboso, pe ezali kolobela bango ete:”Bokoki kozua eloko oyo bozali na bosenga na yango, soki bobeti ntembe te pe bondimi Liloba moko na moko, mpo Ezali ngai moto nazali koloba te, Ezali YE nde azali kosalela ngai mpo na kolobela bino.”
Bokanisa naino sikawa, soki bobikaki kalakala na bileko oyo eleki, na ntango ya yiki-yiki ya basakoli pe maloba bazalaki koloba, na ngambo nini bokokaki kolinga kozala, na eleko oyo wana?
Malamu, bosengeli kopona lolenge moko lelo oyo. Azali komibongisa mpo na kobota Liloba ebongi be esika wana, pe Liloba ezali koya mpo na Mwasi-na-libala Liloba. Lokola mwa—mwasi azali eteni ya mobali, oyo elongolamaki na ye, na boye, ekosengela na Lingomba kozala Lingomba oyo ezali koumela-na-Liloba, Liloba moko na moko ya Biblia; ba-systemes te, ba-dogmes te, to eloko moko oyo ebakisami na Yango. Ekosengela kozala na kati ya Liloba ya mongondo oyo ezangi mbindo, oyo ya peto.
Olingaki mpenza kosala nini na eleko oyo wana, olingaki kozua ngambo ya ba-systemes, ya ba-dogmes, na banganga-nzambe na bango, to olingaki kozala kati na baoyo batikalaki na Liloba oyo emonisamaki na eleko wana?
Alobaki ete tozali kotonga etutu te, tozali kotonga ndako. Mpo na kotonga ndako, bosengeli kotonga yango yengebene na mwango, soki bongo te, ndako na yo ekobeba. Mwango na biso ezali Liloba. Liloba na Nkolo eyaka na mosakoli na Ye, eyaka ata moke te na banganga-nzambe; Eyaka na basakoli. BOBELE mosakoli nde azali molimboli ya bonzambe ya Liloba Yango. Boye nani akotonga Ndako na Ye?
Esengeli ete mopakolami moko aya longwa na Lola, atindama awa na nse mpo na kosala yango. Ezalaka bongo, na eleko moko na moko.
Mbala moko lisusu, mokili, pe baponami na Ye, bazali koleka na mpasi ya kobota. Botala bobele makambo oyo Alobelaki biso ete ekosalema na mokili pe na Lingomba na Ye na eleko oyo. Tozali komona yango kokokisama na miso na biso. Na eleko moko na moko, Tata atindaki batindami na Ye: Polo, Irenée, Martin, Colomban, Luther, Wesley, pe na eleko na biso, William Branham. Elongo na motindami moko na moko, mokili, na lolenge ya nzoto pe ya molimo, ezalaki koyoka mpasi ya kobota.
Esengeli na mpasi, na mitungisi, pe na nkaka kasi sikawa mpasi ya kobota ya suka pe ntango ekomi pene. Tozali komona lolenge mokili ekomi, yiki-yiki kati na mabota. Tozali komona yiki-yiki oyo ezali likolo na Mwasi-na-libala na Ye mpo na kotikala na ba-bandes pe kondima Liloba moko na moko. Ezali mpasi, kasi Ezali kobotama ya Mwasi-na-libala na Ye. Konetolama ekomi pene.
Mbala moko lisusu, tokosangana na ngonga ya 13h00’, ngonga ya Jeffersonville, mpo na komela mai longwa na Liziba-na-mai oyo ezali Kopunja-punja, mpo na koyoka Liloba, wana Ye akolobela biso ete sikawa tozali koleka na Mpasi ya Kobota ya suka, eteyami mokolo ya 24 janvier 1965.
Ndeko Joseph Branham
Elimbolami Uto Na
https://branham.org/articles/9112020_TheEaglesGatheringTogether
20-0906 Mabulu Matobwani
Nsango: 65-0123 Mabulu Matobwani
BranhamTabernacle.org
PDF
themessage.com/ln/sermonsdownload
BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
Mokolo ya 5 septembre 2020
Molingami Mwasi-na-libala Oyo atondi na nsai,
Nazali mpenza kozongisa matondi mpo tosengeli na biso komipesa na mayele na biso moko te, kasi tozali na makoki ya kofanda na bisika ya Likolo na bozali ya Molimo Mosanto mpo na komela mai longwa na Liziba na Bomoi na Ye oyo ekaukaka te. Ezali libulu na mai oyo ezali kopunja-punja na kati na biso kino na Bomoi na seko.
Ezali mpasi mpo na biso kososola ntina nini moto oyo azali na makoki ya komela mai ya Peto na Libulu ya peto akoki kosepela komela mai oyo euti na engongolo esalemi na moto, na nzela ya tuyau esalemi na moto, longwa na ebombelo esalemi na moto, na filtre oyo esalemi na moto likolo na yango, mpo na kopekisa ba-nyama ya minene kokota na kati, na ntango oyo ezali na Liziba ya komela moko oyo esili kotatolama ete ezali Mai na Peto oyo euti na ngwende na Nzambe.
Toyebi na Kotanga Liloba na Nsango-malamu ya Yoane ete,
“Na ebandeli Liloba ezalaki, pe Liloba ezalaki elongo na Nzambe, pe Liloba ezalaki Nzambe.” “Pe Liloba elataki nzoto, pe efandaki elongo na biso.”
Azalaki Motatoli ya Solo pe ya Sembo mpo na Liloba ya Seko ya Tata. Azalaki Mosakoli pe akokaki koloba bobele makambo oyo Tata alobaki ete Ye aloba. Alobaki,”Tata na Ngai azali na kati na Ngai.” Yango nde likambo Yesu Mongombo alobaki,”Tata na Ngai azali na kati na Ngai.”
Na Emoniseli, Liloba elobi na biso ete tobongola ata Liloba moko na yango te, lokola Ewa asalaki. Alobaki ete kosala yango ekomema lisumu pe kufa.
“Soki moto abakisi eloko moko na makambo oyo, Nzambe akobakisela ye malozi oyo ekomami na mokanda oyo; pe soki moto alongoli eloko moko na maloba ya mokanda ya lisakoli oyo, Nzambe akolongola eteni na ye na Buku na Bomoi pe na mboka mosanto, pe na makambo oyo ekomami na mokanda oyo.”
Mosakoli na biso alobelaki biso ete Liloba ba Nzambe ezali na bosenga ya ndimbola moko te. Nzambe alobaki Yango, Esengeli kosalema. Alimbolaka Liloba na Ye moko. Biblia elobi na biso ete Esengeli na ndimbola moko te. Ye alobaki:”Tika ete pole ezala,” pe pole ezalaki. Na sima Alobaki:”Mongondo akokumba zemi,” azwaki yango. Yango esengeli na ndimbola moko te. Na sima Alobaki:” Na mikolo ya suka, Nakosopa Molimo na Ngai likolo na nzoto nyonso”, pe Asalaki yango. Yango esengeli na ndimbola moko te.
Liloba elobi na biso lisusu ete na eleko moko na moko Nzambe atindaka mosakoli moko, pe mosakoli yango alobaka Liloba na Ye. Mosakoli yango azalaki Liloba mpo na eleko yango. Toyebi lisusu ete Liloba na Nzambe eyaka bobele na mosakoli na Ye pe mosakoli yango azali molimboli ya Liloba na bonzambe.
Na sima, mosakoli na Ye amonisaka Liloba yango na bato. Bato bandimaka Liloba moko na moko. Oyo wana ezali Nzambe na kati na mosala, Dieu azali kosala mosala na nzela ya Molimo na Ye.
Na boye, tozongela yango na bokuse:
• Nzambe azali Liloba.
• Nzambe alobaka Liloba na Ye mbala moko na mosakoli na Ye.
• Mosakoli alobaka Liloba na Nzambe, liloba na ye moko te, Liloba na Nzambe.
• Mosakoli amonisaka Liloba na Nzambe na bato.
• Liloba na Nzambe esengeli na ndimbola moko te.
• Bato bandimaka Yango.
• Ezali Nzambe na kati na mosala.
Na sima, soki ngai “NAFINI BOUTON YA KOBETA”, nakoyoka:
• Nzambe kolobela ngai mbala moko.
• Liloba na Ye.
• Elobami na nzela ya mosakoli na Ye.
• Yango esengeli na ndimbola moko te.
NKEMBO, tosili Kososola Emononeli.
Koyoka Nsango Oyo ezali nzela oyo esili kobongisama mpo na Mwasi-na-libala na Ye na eleko oyo. Yango esilaki kotiama na ba-bandes pe kobatelama mpo ete Mwasi-na-libala amela longwa na Libulu-na-mai ya Peto. Koyoka Nsango Oyo ezali kofanda na nse ya mosanda ya monene koleka nyonso, mpo ezali Liloba na Nzambe mpenza oyo elobami mbala moko na biso longwa na Nzambe.
Yango esengeli kozala mwango na Nzambe mpo na Mwasi-na-libala na Ye na mikolo oyo ya suka.
Tosangana elongo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville mpo na komela longwa na Liziba ya Bomoi Yango oyo Ekaukaka te wana Akolobela biso ete tosengeli ata moke te komela longwa na Mabulu Matobwani, oyo eteyami mokolo ya 23 janvier 1965; Ye asili kobongisa Mai na Peto longwa na Liziba na Ye.
Ndeko Joseph Branham
Euti Na:
https://branham.org/articles/942020_TheEaglesGatheringTogether