Nsango: 63-0317M Nzambe Komibomba Kati Na Komikitisa, Nsima Komimonisa Na Motindo Moko
- 25-0302 Nzambe Komibomba Kati Na Komikitisa, Nsima Komimonisa Na Motindo Moko
- 23-0709 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO
- 22-0116 NZAMBE AMIBOMBAKA KATI NA KOMIKITISA MPE AMIMONISAKA NA MOTINDO MOKO
- 21-0110 NZAMBE AMIBOMBAKA MPE AMIMONISAKA KATI NA KOMIKITISA
- 19-0317 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO
- 17-0318 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO
BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA
09/01/2021
Balingami Bato ya ndenge mosusu,
Biso tozali bato oyo bakeseni na makambo ya mokili ya mikolo oyo. Tosili kokoma bato ya ndenge mosusu, bato ya kokamwa, pe lisusu bato balekisi ndelo na kati ya bandeko mibali pe basi.
Biso tozali bato ya lolenge na bango moko, bonganga-nzambe ya molimo, libota ya bokonzi, baoyo bazali kopesa na Nzambe ba-mbeka ya molimo, nà mbuma ya bibebu na biso, baoyo bazalikopesa nkembo na Nkombo na Ye wana tozoloba ete tondimaka Liloba nyonso oyo Ye alobaki na nzela ya mwanje motindami na Ye ya nsambo. Bazali kobenga biso Bato ya ndenge mosusu: Bato ya ba-Bandes, pe tozalaka mpenza na esengo kobengama MOKO NA BANGO.
Mpo na nini tondimaka na lolenge wana? Mwanje motindami ya nsambo oyo atatolamaki na Nzambe nde moto alobaki na biso ete tosala bongo.
Sikawa, boyoka Liloba moko na moko. Bosimba Yango. Pe_pe soki bozali kotia Yango na ba-bandes, to eloko nini, na boye, botikala semba nà Malakisi ya bande yango. Boloba eloko mosusu te, bobele makambo oyo bande yango elobi. Boloba bobele mpenza makambo oyo bande elobi. Bomoni? Sikawa, ezali na makambo mosusu oyo tokososola mingi likolo na yango sikawa, ntina nini Yango ezali kososolama mabe. Bomoni? Pe boyeba yango malamu mpenza, boloba bobele mpenza makambo oyo bande elobi. Boloba eloko mosusu te. Bomoni? Mpamba te, nazoloba makambo Yango na ngai moko te. Ezali Ye moto azoloba Yango, bomoni. Pe, mbala mingi, mobulu ezalaka, bato bakotelema pe bakoloba, “Ee, Moto Songolo-Pakala alobaki ete Yango elingaki koloba boye nà boye.” Bo_botika Yango bobele ndenge Ezali. Bomoni, ezali lolenge wana nde tolingaka Biblia. Bobele ndenge Biblia elobi Yango, lolenge wana nde tolingaka Yango, bobele_bobele ndenge Wana. Botia ndimbola na bino moko te na Yango. Yango esili kolimbolama, bomoni.
Kopema nini oyo, kimia nino oyo Mwasi-na-libala azali na yango. Yango esilaki komonisama ete ezali na lolenge bobele moko mpo na kozanga kozala na mobulu na makambo oyo moto songolo alobaka mpo na kolimbola Yango. Ezali na lolenge bobele moko mpo na koloba mpenza makambo oyo ba-Bandes elobaka, FINA BOUTON MPO NA KOYOKA, wana esengeli na ndimbola moko te.
Tondimaka Nsango oyo ntango nyonso, kasi sikawa, ezali na eloko moko ya bokesene, mbongwana moko ezali kosalema na kati ya Mwasi-na-libala na Ye. Tozali kofanda na bozali ya Mwana pe tozali kokomela. Ezali lolenge bobele moko mpo Mwqasi-na-libala ekoka komilengela mpo na kobuka mbuma, KOFINA BOUTON YA KOYOKA PE KOTOSA.
Ekosalema bobele ndenge tosilaki koloba. Bato na Nzambe bazali komibongisa na nzela ya Liloba ya Solo oyo euti na motindami ya eleko oyo. Litondi ya Pantekote ekozala na kati na ye mpo ete Molimo akozongisa bato mpenza na esika oyo bazalaki na ebandeli. Yango ezali : “Yango Elobi Nkolo.”
Yango ezali kosepelisa milimo na biso. Tolingi kotombola mingongo pe koganga. Tosengeli komituna mituna te to kobanza-banza te, to pe kolikia ete tozali na kati ya Mokano mobongi be na Ye; biso tozali na “Yango Elobi Nkolo.” Tozali kolengelama na Liloba ya Solo na nzela ya KOFINA BOUTON YA KOYOKA.
Lisusu koyoka Bileko Nsambo ya Lingomba ezalaki mpenza na ntango oyo ebongi be. Tomonaki masakoli kokokisama mokolo na mokolo.
• Tosili kozua mokonzi moko ya Katoliko pe na ntembe te tokozua mosusu
Lelo oyo, ntango tozali koyoka Nsango oyo, lisakoli oyo esili kokokisama.
Tosili komona lolenge nini makambo ya mokili ezali kosalema kolandana mpenza nà Liloba.
• Lingomba nà Letà, losambo na politiki ezali kosangana.
• Laodikia, “makoki ya bato,” to “boyengebene ya bato.”
• Mabota NYONSO bazali kotelema pe bazali kosenga ete bato nyonso bazala ndenge moko, na bozui misolo pe kobika malamu.
• Mwasi-na-ndumba akobebisa lolenge ya kosalela misolo ya mikolo oyo.
Yango etalisi biso polele ete ntango ya Nzambe ezalaka ntango nyonso na kobonga be.
“ Ntango esili kobelema.” Kalakala, ntango ebelemaki naino te. Na mayele pe nkita ya Nzambe, emoniseli na nguya oyo (ata eyebanaki na mobimba na Nzambe) ekokaki kopesama mpenza te. Na yango tososoli mbala moko likambo moko ete : emoniseli ya Nzambe mpo na eleko moko na moko ekoki koya bobele mpo na eleko yango, pe na ntango elongobani. Botala lisolo ya Isalaele. Emoniseli ya Nzambe mpo na Mose eyaki bobele na ntango oyo elongobani ya lisolo, pe na koleka lisusu, esalemaki mpenza ntango oyo bato bagangaki epai na Nzambe. Yesu, Ye moko, ayaki na litondi ya ntango, Ye oyo azalaki Emoniseli mobimba ya Bonzambe. Pen a eleko oyo (Laodikia) emoniseli ya Nzambe ekoya na ntango na yango oyo elongobani. Ekokweya te to ekoya pe ata moke te liboso na ntango. Bokanisa likambo yango pe bokangama na yango malamu, mpo tozali lelo na ntango ya suka.
Lokola bino, ngai pe napambolamaki mingi mpenza ntango nazalaki koyoka pe kotanga Bileko Nsambo ya Lingomba, koyeba ete ezalaki ntango elongobani ya Nzambe.
Nkolo asili kotia na motema na ngai mpo na biso ete tokoba na buku ya Emoniseli na ntango nyonso ya malili.
• Nalingaki ete tozala na ntango nyonso oyo ya malili, mpo tokoka kozua Buku mobimba oyo ya Emoniseli pe totala Yango na mobimba. “Emononeli ya Patamo”
• Pe Bilembo oyo esengeli kofungwama na ntango ya eleko na lingomba oyo, pe mabombami ya suka nsambo ya Nzambe esengeli ko-…koyebana. Oh, nakolinga kokoba likolo na yango na ntango nyonso oyo ya malili pe kotala Yango na mobimba. “Eleko ya LIngomba ya Efese”
• Ezali suka ya eleko, pe makambo nyonso ezali kosuka awa na esika moko, yango wana tosengeli kozua ntango nyonso oyo ya malili mpo na kolobela yango, kasi biso…mpo na kozua Buku ya Emoniseli, pe komona lolenge nini nyonso wana esangani elongo. “Bangondo Zomi, Pe Bayuda Nkoto Nkama na Ntuku Minei na Minei”
• Na sima ntango tokosilisa nà yango, tokotombola oyo wana, pe tokokitisa oyo mosusu boye, pe tokobanda likolo na oyo wana, pe tokolakisa yango na mobimba. Oh, ekozala lokola lola ya moke, boye te? Tokolekisa eleko mobimba ya malili mpo na komona nyonso wana elongo nà Nkolo. “Emoniseli, Mokapo ya Minei, Eteni ya Mibale”
Nazali na motema likolo-likolo mpo na kofanda na eleko ya malili nyonso oyo elongo nà Nkolo wana Akomonisa biso buku ya Emoniseli. Tokomona lolenge nini LIloba ekozala kokokisama pe kotalisama polele na miso na biso. Ekozala ntango moko ya nkembo koleka mpo na Mwasi-na-libala na Ye.
Ekosengela mpo na yango ete Molimo Mosanto àkota na mosala mpo ekoki komonisama bobele na lolenge ya bato balongobani. Ekosengela na moto moko oyo azali na makoki ya lisosoli ya lisakoli. Ekosengela kozala na makoki ya koyoka Nzambe koloba. Ekosengela na malakisi oyo eleki bomoto.
Bino bozali lolenge ya bato yango. Bino bozali na lisosoli ya lisakoli yango. Bino bozali na makoki ya koyoka Nzambe koloba. Bino bondimaka Liloba moko na moko ya malakisi oyo eleki bomoto.
Boya, bosangana zinga-zinga na Liloba na Ye elongo nà biso, mokolo ya Lomingo, na ngonga ya 14h00, ngonga ya Jeffersnville, mpo na koyoka Nzambe Konguluma malakisi eleki bomoto, wana tokoyoka liteya oyo : Nzambe Amibombaka Ye moko kati na Komikitisa, Na sima Amimonisaka Ye moko Ndenge Moko, eteyamaki na ntongo ya mokolo ya 17 mars 1963.
Nakolinga ete tobanda na paragraphe ya 94, sima na mosala ya kobulisa. Soki Nkolo alingi, pe soki tokozala naino awa, nakolinga ete toyoka eteni wana ya Nsango na ntango ya mosala ya kobulisa mongombo sima na biso kotonga ndako na biso ya losambo.
Ntango Nkolo atiaki na motema na ngai ete tokoba na eleko ya malili oyo nà buku ya Emoniseli, nakendeki kotala calendrier na ngai mpo na komona ntango nini ekokokana na mikolo yango. Ntango tokoyoka Elembo ya Nsambo, ekozala suka-ya-mposo ya suka ya eleko ya malili nà suka-ya-mposo oyo ekolanda ekozala mokolo ya liboso ya eleko yam oi, NKEMBO!!
Ndeko Joseph Branham
Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Liteya:
1 Ntango 17:1-8
Isaya 35:8 / 40:1-5 / 53:1 , Malaki Mokapo ya Misato
Matai 11:10, 11:25-26 , Yoane 14:1-6
1 Bakolinti Mokapo ya 13
Emoniseli Mokapo ya 21