All posts by admin5

24-1117 ELEKO NA LINGOMBA YA SALADE

Nsango: 60-1209 ELEKO NA LINGOMBA YA SALADE

BranhamTabernacle.org

Balingami Bato Ya Bande,

Boni Tozali na lipambú kobiangama “ Bato ya Bande”. Mitema ya bisó mizali kobéta noki-noki na bosepeli póso moko na moko na boyebáká ete tokosangisama elongo zíngázíngá na mokili mobimba na boyókáká Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó.

 Toyebi, na elilíngí ya ntembe ata moko te, tozali kati ya Mokáno mwa Nzambe mobongi be na botíkaláká kati na Liloba na Ye; koyoka Mongóngó na Ye na nzela ya motindami na Ye ya nguya  mwanje ya nsambo.

Motindami Aponaki mpo ya mokolo ya biso nde William Marrion Branham. Azali mwinda ya Nzambe epai ya mokili, kongengisa pole ya Nzambe. Azali kobianga Mwasi na Ye ya libala moponami Peto kobima na nzela ya mwanje na Ye.

Na nzela ya boyekoli na bokéngi ya Liloba ya Ye, Amonisi na biso na nzela ya Molimo na Ye Mosanto ete William Marrion Branham nde mwanje Aponákí kopesa Emóniseli mpe Lotómo epai na ye mpo ya mokolo ya biso. Tomóní mwanje na Ye, MONZÓTO YA BISÓ, kati na loboko na Ye ya mobali lokola Azali kopesa ye nguya na Ye komonisa Liloba na Ye mpe kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima.


Apesí bisó Emóniseli mobimba ya Ye moko. Molimó Mosanto komiyebisa Ye moko epai na bisó kati na bomoi ya motindami na Ye mwanje ya nsambo; mwanje oyo Aponáki kozala miso ya Ye mpo ya mokolo ya bisó.

Boni mitema ya bisó mizali kopela na kati ya biso lokola Azali koyebisa biso na Liteya moko na moko ete ezali ntína ya Ye koyéisa bisó epai na Ye moko; ete tozali Mwasi Liloba na Ye.

Alingaka koyebisa biso lisusu mpe lisusu boni Aponaki bisó libosó ya kozalisama ya mokili KATI NA YE. Boni toyebámákí na Ye libosó mpe tolingamákí na Ye.

Boni tolingaka koyoka Ye koloba mpe koyebisa bisó tosíkolamáki na Makilá ma Ye mpe tokoki koya na kokwéisama SOKI MOKÉ TE. Tokoki soki moké te kozala kati ya kosambisama, zambi lisumu likokí kotángamela bisó te.

Boni tokofánda elongó na Ye wana ezali Ye kokamata kiti na Ye ya bokonzi ya Dawidi ya mabelé, mpe tokokonza elongo na Ye; bobelé lokola esálaki Ye na likoló, na nguya mpe na bokonzi likoló na mabelé nyoso. Mimekano mpe bitumba ya bomoi oyo ikomónana lokola eloko te na ntango yango.

Kasi Akébisaki mpe bisó boni esengeli na bisó kozala na bokébi. Ete kati ya bileko miwíti yango mibalé mikóláki moko pembeni na mosúsu. Boni mongúná azalaka ntango nyoso pene mpenza; na kozímbisa mingi. Ata Yuda aponamákí na Nzambe, mpe ayekolisámákí kati na solo. Akabwélamáki boyébi ya mabómbami. Azalaki na mosálá ya nguya epésamelaki ye mpe abikisáki babeli mpe abenganáki molimo mabe kati na Nkombó ya Yesu. Kasi akokaki te kokóma na nsúka ya nzela.


Okoki kokóba te kaka na mwa ndambo ya Liloba, esengeli ózua Liloba MOBIMBA.

Ezali na bato baoyo bamónani ete bakóti kati ya makambo ya Nzambe pene ya mokámá likoló ya mokámá, kasi bazali bongo te.

Alobaki ekokáki te ete Ámísangisa na lingomba mobimba, to ata bótáno ya lotómo ya Baefese minei. Akebisaki biso ete na eleko moko na moko lingomba Lilongwákí na nzela, mpe ezali bobele bandimi te kasi ebólo ya bakambi mpe lokola—babáteli bazali na mabúngá bobele lokola ba mpate.

Na bongo na nzela ya toli ya mokáno ya Ye moko, Amíyéisáki Ye moko na mosala kati na eleko ya bisó lokola Mobateli Mokonzi kati ya lotómo ya motindami na Ye mwanje ya nsambo kokamba bato na Ye kozóngisa bango na solo mpe na nguya mingi ya solo yango.

Azali kati ya motindami na Ye mpe ye nani azali na mobimba ya Nzambe akolanda motindami lokola motindami azali Milandi ya Nkolo na nzela ya Liloba na Ye.

Nalingi kozala na mobimba ya Nzambe mpe kolanda motindami na Ye. Ntina yango, mpo ya biso, Eyanganelo ya Branham, nzela bobele moko ya kolanda motindami lokola azali kolanda Nkolo na nzela ya Liloba na Ye, ezali KOFINA PLAY mpe koyoka Mongóngó Peto ya Nzambe koloba na biso maloba mayébi kokwéa te.

Tosengeli te kobánza-banza to koluka komeka oyo Tozali koyoka, tosengeli kaka Kofina Play mpe kondima Liloba moko na moko Tozali koyoka.

Nayokaki Ndeko Branham koloba eteni ya Liloba oyo ntóngó moko likolo ya Voice Radio. Ntango Nayokaki Yango, eyaki likolo ya motema na ngai ete oyo ezali mpenza lolengé Na/ toyokaka na ntina ya koloba:

TOFINAKA NA BISÓ KAKA PLAY MPE TOYÓKAKA BA BANDE.

Eyókanáki lokola elobelo ya Kondima na bisó epai ya ngai.

Nde ntina Nandimí kati na Etíndá oyo, ezali mpo ete Eútí na Liloba ya Nzambe. Mpe eloko ata nini libándá na Liloba ya Nzambe, Nandimaka yango te. Ekokaki kozala bongo,  kasi ata ko bongo Nakotikala kaka na oyo Nzambe Alobaki, na nsima nándimisama ete Nazali alimá. Sikawa, Nzambe akoki kosala oyo elingi Ye kosala. Azali Nzambe. Kasi ntango nyoso Natíkálí na Liloba na Ye, boye Nayebi ezali malamu. Nandimi yango.

Nkembo, alobaki yango mpenza na BOBONGI BE. Ntómo isúsu nyoso ikokákí kozala, zambi Nzambe Akoki kosala yango elingi Ye kosala, na nani Alingi kosala yango, Azali Nzambe. Kasi ntango nyoso Natikali na Liloba na Ye, Mongóngó na Ye, Ba bande, na bongo Nayebi ezali malamu. Nandimi yango.

Nayebi mingi bazali kotanga mikanda ya ngai mpe bazali kosósola mabé oyo Nalobaka mpe Nandimaka kozala Mokáno ya Nkoló mpo ya lingombá ya bisó. Nákoka koloba na kosókema mbala moko lisusu lokola Mosakoli alobaki: “Mikandá miye mizali kaka mpo ya lingombá na ngai. Baoyo balingi kobianga Eyanganelo ya Branham lingombá ya bango. Baoyo BALINGÍ KOYÉBAMA MPE KOBIANGAMA BATO YA BANDE”.

Soko ozangi koyókana na oyo Nalobí mpe Nandimí, ezali malamu 100% bandeko na ngai mibali mpe basi. Mikandá mia ngai mizali mpo ya bino te to kotémela bino te soko mangombá na bino te. Lingombá na yo ezali na bosómí mpe osengeli kosála lokola oyókí okambámí kosala, kasi kokokana na Liloba, bongo mpe nde ya biso ezali, mpe oyo ezali yango nde tondimaka ezali nzela epesami na Nzambe mpo ya biso.

Bato nyoso batómbelámi boyei bolamu kosangana na biso mokolo nyoso ya Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville. Póso oyo, Monzóto ya Nzambe mpo ya eleko ya bisó, William Marrion Branham, akozala komemela bisó Liteya, 60-1209 Eleko Na Lingombá Ya Salade.

 Ndeko Joseph Branham

24-1110 ELEKO NA LINGOMBA YA TWATILA

Nsango: 60-1208 ELEKO NA LINGOMBA YA TWATILA

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala oyo angengélámí,

Boni Nkolo azali komonisa biso ete kati na bileko nyoso ezalaki ntango nyoso na libóké moké baoyo batikalaki na Liloba na Ye.

Bakweaki te kati na motámbo ya bokósi ya mongúná, kasi batikalaki solo mpe sembo na Liloba ya mokolo ya bango.

Kasi etikálá soki moké te kozala na ntango, to ebólo ya bato, baoyo Nkolo azalá na lipambú koleka mpo ya bango, to atiélí bango motema koleka, lolenge atieli bisó. Tozali Mwasi na Ye ya libala Mama Moponami oyo soki te, mpe mingi na koleka, AKOKOKA TE, kozimbisama; zambí tozali koyoka Mongóngó ya Mobateli ya ba mpate mpe tozali kolanda Ye. Azali kotalisa bisó ete kati na bileko nyoso ezalaki na bibólo mibale ya bato, nyoso koyebisa ete emoniseli ya bango eúti na Nzambe, mpe bazali na boyokani na Nzambe. Kasi Ayebisaki bisó, Nkolo ayebi baoyo ya Ye. Azali kolandela makanisi na biso moko na moko. Ayebi oyo ezali na motema na bisó. Azali komóna misala na bisó na botíkáláká na mosakoli mpe Liloba na Ye, oyo izali etaliseli mpenza ya oyo efandi na kati ya bisó. Ntina mpe mpósá ya bisó mpenza iyebání na Ye lokola Azali kotála ekela ya bisó moko na moko.

Azali koyebisa bisó ete bilaká nyoso bipesakí Ye na eleko moko na moko, izali YA BISÓ. Azali komóna bisó baoyo tozali kokóba kosala misalá ya Ye na bosembo kino na nsúka.

APESI BISÓ nguya likoló ya mabota. Ayebisi bisó tozali bayangeli ya makasi, na mabongi, baoyo tokoki komigúmba te baoyo toyebi komikokanisa na bokási nyoso na likambo ata nini. Ata mongúna ya motíndo nini akobúkanisama soko bosengá bozali. Bomónisami ya boyangeli na bisó na nzela ya nguya na Ye ekozala pelamokó na yango ya Mwana mpenza. NKEMBO!!

Tobíkí bozindó ya Nzambe kati na bomoi ya bisó. Ezali kobika makambo ya moto ye moko ya Molimó ya Nzambe kofanda kati na bisó. Makanisi ya bisó mangengélámí na bwanyá mpe boyébi ya Nzambe na nzela na Liloba ya Ye.

Tozali kokende esika sé esika Mobali ya libala azali. Tokotíkama na Ye soki moké te. Tokolongwa pembeni na Ye sokí moké te. Tokokabola kiti ya bokonzi elongó na Ye. Tokolátisama motole ya nkembo mpe lokúmu na Ye.

 Amónisí bisó boni mongúná atondi na kozimbisa kati na eleko moko na moko mpe boni ezali na litomba KOTIKALA NA LILOBA NA YE YA EBANDELI. Liloba moko likokí kobóngwana te. Eleko moko na moko ebakísakí mpe elongolákí, kotia ndimbola ya bango moko na Liloba ya ebandeli; mpe babúngí libelá na bosaláká bongo.

Kati na Eleko Na Lingomba Ya Twatila, molimó wana ya kozimbisa elobaki na nzela ya papa ya Lóma mpe ebóngoláki Liloba na Ye. Atiaki yango “molobeli moko kati ya Nzambe mpe moto (bato te).” Na bongo sikawa azali kolobela kati ya molobeli mpe bato. Na yango, manáka mobimba ya Nzambe ebongólámí; ezali te na bobóngolaká liloba moko, kasi na bobóngóláká LILÉTELE MOKO. Satana abongoláki “E” kokómisa yango “A”.

Liloba moko na moko likosambisama na Liloba na Ye ya Ebandeli lilobámí likoló ya ba bande. Nde ntina, Mwasi na Ye ya libala ASENGELI átikala na ba bande. Wana monguna azali komeka kolembisa bato mitema na bopésaká bango manáka makeseni, likanisi likeseni, lilétele likéséni, Mwasi ya libala AKOTIKALA NA LILOBA YA EBANDELI.

Na eleko moko na moko Yesu amitálisí Ye moko elongó na motindami ya eleko wana. Bazuí longwa na Ye Emoniseli likoló ya Liloba mpo ya eleko na bango. Liloba oyo emoniseli elongolaka baponami ya Nzambe longwa na mokili mpe kotia bango kati na lisangá mobimba elongó na Yesu Klisto.

Abiangaki mpe atiaki mibali mingi kati na mosala kozala lipamboli epai ya lingomba, kasi Azali na MOTINDAMI SÉ MOKO oyo abiangaki KOKAMBA lingomba na Ye na nzela ya Molimó na Ye Mosanto. Ezali na MONGÓNGÓ MOKO na Yango Elobi Nkoló. Ezali na MONGÓNGÓ MOKO Alobaki akosámbisa bisó na nzela na yango. Ezali na MONGÓNGÓ MOKO Mwasi na Ye ya libala azali kotia sekó na sekó na ye likoló na yango. MONGÓNGÓ YANGO NDE MONGÓNGÓ YA NZAMBE LIKOLÓ YA BA BANDE.

Mwasi ya libala, Mokano ya Nzambe mpo na bisó ezali Bobongi be, mpe na miso na Ye, TOBONGÍ BE. Mpe bobongi be yango nde motema molaí, kotálela Nzambe…mpe kozila Nzambe. Ayebisi bisó ezali bokóbí ya bokóli ya ezaleli ya bisó. Tokoki kozala na mimekano mingi, bitumba mpe minyoko, kasi bosembo na bino na Liloba na Ye ezali kosala motema molai kati na bisó ete tókoka kobonga be mpe mobimba, na bozangáká eloko moko te.

Tokobosana soki moke te KONDIMA eyaka na nzela ya koyoka, koyoka Liloba, mpe Liloba eyaka epai ya mosakoli.

Yaka mpe óbika esengo monene koleka na bomoi na yo lokola ofandi elongo na bisó na bisika ya Likoló lokola tozali koyoka Mongóngó ya Nzambe komemela bisó Liloba likoló na: Eleko Na Lingomba Y’a Twat 60-1208, na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Ndeko Joseph Branham

24-1103 Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo

Nsango: 65-1207 Eleko Na Lingomba Ya Pelegamo

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Moseka Peto,

Bozalaki nde kosepela na Bileko Nsambo Ya Lingómbá? Nzambe Azali kopesa Mwasi na Ye ya libala kolamukisama lokola libosó soki moké te. Azali kopesa biso Emoniseli koleka, Kondima koleka, mpe kondimisama koleka koyeba tozali ba nani, mpe oyo ezali biso kosala na botikalaká elongó na Liloba, nzela na Ye epesami mpo ya lelo.

Sikawa Ayebisi bisó: Bandá losambo ya Mokolo mwa Lomingo, bóláta makanisi ya bino ya molimó. Bótika kaka Molimó Mosanto ázindisa Yango mpe bósimba ngámbo ya molimó kati na nyoso oyo nakosala. Ezali Liloba na Ngai lilobámí liyéísámí na bomoi na Molimó na nzela ya mosakoli ya Ngai ya Malaki 4”.

Tika ete tótanga mpe tósimba  mwa Maloba ma Ye mpe tótia makanisi na biso ya molimó likoló yango.

Nzambe atélémisi mokambi na Ye atóndí na Molimó mpo ya ebólo na Ye ya bat batóndi na Molimó; Mwanje na Ye; mpe Etíi likoló na ye Elembo moko ya nkómbó moko, kasi asengeli te komónisa yango. Asengeli ábatela yango mpo na ye moko, bomóni. “Moto moko te ayebi kasi bobele ye moko.”

Na bongo Nzambe apésáki Mwasi na Ye ya libala mokambi oyo atóndi na Molimó mpo na ebólo na Ye ya bato batóndi na Molimó.

MOKAMBI, BAKAMBI TE mpo na ebólo na Ye ya bato batóndí na Molimo.

Koya na mokili noki, mwanje monene ya Pole oyo akoya epai na biso, oyo akokamba biso kobima, Molimó Mosanto monene, azali koya na nguya, mpe akokamba biso epai na Nkoló Yesu Klisto.

Mwanje monene ya Pole. Nani nde Mwanje monene ya Pole epai na eleko oyo ya nsuka? William Marrion Branham. Azali te kosolola na ntina ya Molimó Mosanto. Asili ayáki mpe alobi yango ekoya.

Yango eko KAMBA BISO KOBIMA. Toyebi na bosolo mpe tondimi ezali Molimó Mosanto nde azali kokamba biso, kasi Atii mpenza polele Mwanje na Ye mpe Molimó Mosanto elongo mpe alobi Ye (Molimó Mosanto na Ye) akozala kokamba bisó (NA NZELA YA) mwanje na Ye monene ya Pole.

Akóbí kokangisa bango elongó na bolobáká ete:

Ntango mosúsu akoyeba yango te,

Azali te koloba ete Molimó Mosanto akoyeba te ezali nani, kasi mwanje na Ye ya mabelé motindami oyo Aponaki KOKAMBA BISÓ KOBIMA.

Kasi akozala awa moko na mikolo oyo. Akosala… Nzambe akosala ete áyebana. Asengeli te komiyébisa, Nzambe akosála ete áyebana. Nzambe Akoyebisa oyo ya Ye moko.

Lisúsu, Azali te koloba ete Molimó Mosanto akozala awa MOKO NA MIKOLO OYO, kasi mwanje na Ye monene ya Pole kokamba Mwasi na Ye ya libala. Akosengela te komíyebisa, Nzambe akosala ete mokambi na Ye monene áyebana epai na Mwasi na Ye ya libala na nzela ya EMONISELI.

Ozali kosimba ekokiseli na ngambo ya molimó? Omóni nani nde mwanje ya Pole azali oyo Nzambe aponaki kokamba Mwasi na Ye ya libala? Elobi nde awa ete língénda lipesamáki na bakambi basúsu?

Okokoka soki moké te kobika bomoi likoló koleka mobateli na yo. Míkaniselá yango kaka, omoni?

Wana mingi bakoki ntango mosúsu kosósola te mpe koseka bisó, boni totóndi mpenza na esengo mpe na matondi mpo ya Emoniseli koloba ete, WILLIAM MARRION BRANHAM AZALI MOBATELI NA BISO.

Sikawa wana moko na moko ya mateya oyo etindami epai ya “mwanje”—(motindami moto) mokúmba monene koleka mpe libakú malamu ya bikamwa ipesameli ye.

Etindá etindamakí epai ya mwanje na Ye, nsima mwanje na Ye Apesi Yango epai ya Mwasi ya libala; kaka batéi te, kasi epai ya MWASI NA YE YA LIBALA NYOSO mpe ezali likoló ya bande mpo banso báyoka. Esengeli kobakisamela eloko te soko kolongolamela eloko te, mpe Esengeli na NDIMBOLA TE.

Azali koya noki, mpe wana ezali ye koya Akoya epai na yo libosó, mpe okosámbisama kokokana na Sango Malamu otéyaki, mpe tokozala bato na yo.” Nalobaki: “Olingi koloba nazali na mokumba ya baoyo nyoso?”

Alobaki: “Moko na moko na bango. Obótamaki mokambi.”

 Ntango mokolo monene ya kosambisama eyéi, Azali koya libosó epai ya mwanje na Ye ya Pole mpe akosámbisa ye libosó kokokana na nsango malamu etéyaki ye.

Tozali BATO NA YE. Azali na mokúmba ya moko na moko na bisó lokola azalaki MOKAMBI aponamáki na Nzambe.

Tíá etingia na yo kati na molimó na yango. Tokosambisama na oyo mwanje ya Nzambe alobaki. Na boye, olingi kozua libakú mpo ya bomoi na sekó na yo na nzela ya oyo moto moko alobí ete ALOBAKI na ntango oyo okokí koyoka mbala moko koúta epai na YE?

Lolenge nini moto ata nani ándima ete ezali na MOTÉI MOKO YA LITOMBA KOLEKA OYO EZALI LIKOLÓ YA BA BANDE. Soko ondimi yango, to ondimisamáki bongo na nzela ya mabánza, epusí malamu ózonga NA LILOBA YA EBANDELI; mpo ete okosambisama na maloba mazali likoló ya ba bande. Tikalá na Liloba lokola elobamákí.

Kasi mosakoli oyo akoya, mpe lokola mobongisi ya boyéi na Ye ya libosó agángákí: “Bótala Mwana Mpate ya Nzambe, oyo azali kolongola lisúmu ya mokili,” bongo mpe na ntembe te akogánga: “Bótala Mwana Mpate ya Nzambe, koya kati na nkembo.” Akosala oyo, zambí kaka lokola Yoane azalaki motindami ya solo epai ya baponami, mpe bongo oyo azali motindami ya nsúka epai ya baponami mpe Mwasi ya libala oyo abotamí na Liloba.

Nani nde akotálisa biso epai ya Nkoló Yesu? Mwanje na Ye monene ya Pole, William Marrion Branham.

Yaka kozala Mwasi ya libala Moseka Peto elongo na biso lokola tozali koyoka mwanje na Ye monene motindami koyela biso Emoniseli koleka, mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Liteya 60-1207–“Eleko Na Lingomba Ya Pelegámo”.

Ndeko Joseph Branham

24-1027 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA

Nsango: 60-1206 ELEKO NA LINGOMBA YA SUMULUNA#

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi ya libala Oyo Atóndí na Molimó,

Ezali bobele na ebólo moko ya bato; ebólo moko mpenza godi ya bato, baoyo tozali na makokí ya koyóka oyo Molimó azali koloba na eleko oyo ya nsuka. Ezali ebólo moko godi oyo ezuí Emóniseli mpo ya eleko oyo. Ebólo yango nde ya Nzambe. Ebólo oyo ekokí koyoka te ezali ya Nzambe te.

Ebólo oyo ekoki koyoka, mpe eyókí yango ezali Molimó koloba, bazuí Emóniseli ya Solo. Bisó nde tozali na Molimó ya Nzambe. Bisó nde tobótami na Nzambe mpe tobátisamí na Molimó Mosanto. Tozali Mwasi na Ye ya libala oyo Atóndí na Molímó oyo azuí Emoniseli mpo na eleko ya bíso.

Elingi koloba nini mpo na bisó Kofina Play? EMÓNISELI! Ezali koyóka, koyamba mpe kotíkala na Nzela ya Nzambe epésámí mpo ya lelo. Mongóngó mpenzá ya Nzambe koloba mbebu na litói na Mwasi na Ye ya libala. Ezali Molimó Mosanto koloba na mitema mpe milimó ya bisó.

Toyebi ete Nzambe asálelaka bato batóndi na Molimó na Ye mpo ya koloba, kasi ezali na esiká mosúsu te koyóka Yango Elobí Nkoló longólá bobelé na nzela ya Kofina Play mpe koyóka MONGÓNGÓ ya mwanje na Ye ya nsambo, William Marrion Branham. Ezali Mongóngó sé moko mondimisamí na Molimó Mosanto Ye moko. Azali Mongóngó ya Nzambe, mosakoli ya Nzambe, mobáteli ya Nzambe, epai na bisó, mpe epai ya mokili.

Ntango alobí, tolobí AMEN na Liloba moko na moko; zambí ezali Nzambe Ye moko koloba na bisó. Liloba na Ye nde Liloba sé moko lisengeli na ndimbolá te. Ezali Nzambe kosálela mongóngó na ye koloba na Mwasi na Ye ya libala.

Ezali Nzambe Ye moko koyebisa bisó : “baoyo miké ya Ngai, bino te nde boponáki Ngai, kasi Naponáki bino, libosó ata mwá putulú ya monzóto ézala; libosó kútu Náyebana epai na bino lokola Nzambe na bino, Nayebaki bino.

Bozalaki kati na Likanisi na Ngai, kobíka kati ya Makanisi na Ngai ya sékó na sékó. Bozali Mwasi na Ngai ya libala Mombóto Liloba Lilobámí.

Atako bozalaki kati na Makanisi ya Ngai ya sékó na sékó, Nabimísákí bino te kino eleko ebongísámákí mpe ekánámáki na Ngai. Mpo Nayebaki ete BOkozala ebólo na Ngai godi baoyo  bokotikala na Liloba ya Ngai.

Basúsu nyoso bakweaki, kasi Nayebaki bokokwea te.

Nayebi ete bozali konyókolama mpe kosekama mpo ete botikali na mosakoli na Ngai, kasi bozali Mowíti ya Ngai ya Solo oyo botàngwi te na Liloba na Ngai, kasi botíkali solo mpe sembo na mosakoli na Ngai oyo azali koloba Maloba ya Ngai.

Ezali na ebelé mosúsu baoyo balakisámáki na bosembo, kasi bayékolaka ntango nyoso te boni ezali na litómbá koloba kaka oyo Nalobaki na nzela ya motindami na Ngai.

Boni tosengeli kozala na bokéngi koyóka mongóngó MOKO, mpo ete Molimó azali na Mongóngó sé moko oyo ezali Mongóngó ya Nzambe.

Oo, boni ezali na litómbá koyóka Mongóngó ya Nzambe na nzela ya batindami na Ye, na nsima koloba oyo epesámaki na bango koloba epai ya mangómbá.

“Liloba ya Ngai liyákí ntango nyoso epai ya mosakoli na Ngai, kasi lelo oyo, Nasalaki ete Mongóngó na Ngai mótiama na bande mpo ete MABÚNGÁ MÁZALA TE oyo Nalobaki na Mwasi ya libala.

Ezali na molongó bobele moko, bobele língénda moko, mpe yango nde LILOBA oyo Nalobaki na nzela ya mwanje na Ngai. Lokola kati na eleko moko na moko, mosakoli na Ngai nde Liloba ya mokolo.”

Ba bande, Mongóngó na Ye, ezali likambo ya káfúkafu mpo ya biso. Ntango mongúná azali kobeta biso na nsé ntango nyoso na nzela ya mimekano mpe minyókó mpe mpási ya bisó, Atindákí mwanje na Ye ya nguya koyebisa biso ete ezali eloko mosúsu te kasi bolingo ya Nzambe ya boponami epai ya bisó, kotálisa bisó ete Aponákí bisó lokola tokoningana te.

Ntina na Ye monene ezali ete nsima na bisó konyókwa mpo ya mwa ntango, Akobongisa bisó be, kotemisa mpe kokémbisa bisó.

Ayebisaki bisó ete kútu Nkoló na bisó Yesu Abongísamákí be na nzela ya minyókó na Ye. Lipámbolí níni oyo Atikelakí bisó. Zambí na nzela ya konyókolama ya bisó, Akomema bisó kati na bobongi be mpe lokola.

Azali motongi bizaleli ya bisó na nzela ya mimekano mpe minyókó ya bisó. Mpo ete ezaleli ya bisó esálemi te soki na konyókwama te. Na bongo, konyókwama ya bisó ezali ELONGA epai ya bisó, mpe likabo te.

Tokokí nde boni kotálisa bolingo na bisó epai na ye?

  • Na bondimáká oyo elobi Ye.
  • Na botikaláká na Liloba na Ye.
  • Na bomítámbwisaká bisó mpenzá na esengo kati ya mimekano mpe minyókó ya bisó, ete Ye, kati ya bwányá na Ye monene, azali kolingisa ékóma.

Boni Atómbóli molimó na bisó na nzela ya boyókáká Liloba na Ye. Mongóngó na Ye ezali kolendisa bomoto ya bisó.

Ntango Tofiní Play mpe toyókí Ye koloba, mikúmba na bisó nyoso milongwí. Tokoki kútu te kobanda kobánza bozui nini botiámí mpo ya bisó na nzela ya monyókó nyoso ya bisó.

Oo, Mwasi ya libala ya Yesu Klisto, boni Nazali na esengo kozala Moko na bangó elongó na moko na moko na bino. Esengo nini oyo etóndísí motema na Ngai koyeba ete Apesi bisó Emóniseli ya Liloba na Ye.

Ntango Ayebisaka bisó ete ekozala mpenza pene ya kozimbisa baponami mpenzá soko nde ekokákí, Apesakí bisó EMÓNISELI ya SOLO.

Yaka, kóta kati na Molimó elongó na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Liloba libongí be: 60-1206–Eleko Na Lingómbá Ya Sumulúna.

Ndeko Joseph Branham 

24-1020 Eleko Na Lingomba Ya Efese

Nsango: 60-1205 Eleko Na Lingomba Ya Efese

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Ya Libala Ya Solo,

Ntango nini ya kokamwa oyo tozali na yango lokola Bomoi na Ye ezali kotíola mpe kobéta-beta kati mpe na nzela na biso, kopesa biso bomoi. Soko na Ye te, bomoi ekokáki kozala te. Liloba na Ye ezali mpéma mpenza ya biso.

Kati ya mokolo monéne oyo ya molílí, tozali ebólo na Ye ya eleko ya nsúka oyo etélémí; Mwasi na Ye ya libala ya solo ya mokolo ya nsuka oyo akoyóka bobelé Molimó, Mongóngó ya Nzambe mpo ya mokolo ya biso.

Boni tolingaka koyoka Ye koyebisa biso: “Epai na Ngai, boúlání na wólo peto etúlámí. Boyengebene ya bino ezali boyengebene ya Ngai. Binámá ya bino nde binámá na ngai ya nkembo. Bozali Mwasi ya libala molingami na Ngai ya Solo.”

Lokola bitumba na biso bizali koya makasi koleka mpe makasi lisusu póso na póso, tozali kaka Kofina Play koyoka Ye kosolola na biso na bobóto nyoso mpe koyebisa biso: “Bótungisama te, bobongí na Nsango Malamu ya Ngai. Bozali eloko ya bozéngá mpe esengo. Nalingaka kotala bino lokola bozali kolónga mongúna na nzela ya bitumba mpe mimekano ya bino ya bómoi oyo.”

Namónaka mosala makasi na bino ya bolingo; ezali ebiangeli ya likoló ya bomoi na bino kosálela Ngai. Nayebaki libosó ya kozalisama ya mokili ete bokoyeba mwanje na Ngai ya nguya oyo Nakotínda kozala Mongóngó na Ngai epai ya bino; boni bolingaki kozimbisama te ntango ba nkoi ya kongála bakoya zíngázíngá komeka koloba ete bazali na emóniseli ekokání. Bolingaki te kotangwa na Liloba na Ngai, ata mpo ya ntango moko te, NA NSÓNGÉ YA “I” MOKO TE. Bolingaki kotikala na Liloba na Ngai, Mongóngó na Ngai.

Bolingaki komóna lokola Nazali komónisa Liloba na Ngai epai na bino boni Mowíti ya Solo mpe mowiti ya lokutá oyo ibandaki kati na Elanga ya Edéne ilingaki kokóla elongó kati na bileko.

Oyo ebandaki kati na lingómba ya libosó elingaki kokóba kati na eleko moko na moko. Boni kati na eleko ya libosó ya lingomba, mowíti ya mabé ya Satana elingaki kobanda kolanda na libumu kokóta, mpe kolónga baílingómbá na nzela ya molimo na ye ya nikolaíti. Kasi boni Nalingi ete bino kaka, Mwasi na Ngai ya libala moponami, bokozímbisama te.

Póso oyo, Nakokémbisa Liloba na Ngai kati na bino na nzela ya bomónísáká libombami monene ya mombóto ya nyoka. Nakomónisa bino yango kati na bozindó ya makambo nyoso miké-miké likoló ya oyo ekómaki kati na Elanga ya Edéne; boni Satana amíkótísáki kati na libota ya moto.

Ekozala likanisi ya kopesa malílí na nzoto ya lolenge mosusu ntango boyebi ete Ngai, Nzeté ya Bomoi kati na Elanga ya Edéne, oyo ekokákí kobélemama na yango te kino sikawa mpo ya kokwéa ya Adama,epésámí na bino sikawa, balóngi na Ngai.

Oyo ekozala mbano ya bino. Nakopesa bino libakú malamu ya paladiso ya Nzambe; boyokani elongo na Ngai ntango nyoso. Bokokabwana na Ngai soki moké te. Epai sé epai ekokende Ngai, bino, Mwasi na Ngai ya libala bokokende. Oyo ezali ya Ngai, Nakokabola yango na bino, balingami na Ngai.

Boni mitema na biso mizali kobéta mbangu kati na biso wana tozali kotánga maloba maye. Toyebi bokokisami ya bilaká na Ye izali kobélema noki, mpe tokolinga kozila ntango molai kaka na mpasi. Tika ete tósélingwa kotósa Liloba na Ye mpe bongo na bokokísaká bobongi ya bisó kokabola nkembo na Ye.

Nalingaki kotindela bino mbela bóya komibakisa na biso wana ezali biso kokóba boyekoli na biso monéne ya Bileko Nsambo Ya Lingomba, epai wapi Nzambe azali komónisa Liloba na Ye epai ya biso na nzela na Ye epésami, motindami na Ye mwanje ya Nsambo.

Ndeko Joseph Branham

Mokolo mwa Lomíngo 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

60-1205 Eleko Ya Lingomba Ya Efese

24-1013 Emononeli Ya Patámo

Nsango: 60-1204E Emononeli Ya Patámo

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Liloba Oyo abongí Be,

Nini nde ezali kosalema kati ya Mwasi ya libala zingázingá na mokili mobimba? Tozali kokóta kati ya Molimó, kotelema mpe ko bélela: “Nkembo! Aleluya! Lokúmu epai ya Nkoló!” Nzambe azali komema biso mpe azali komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Makambo totángákí mpe toyókákí bomoi ya biso nyoso izali sasaipi komónisama. Koyeisama na bomoi monene ezali kosalema. Tozali kongengelama na ya Liloba lokola libosó naino soki moké te.

Tozali koyoka yango kati na bozindó mpenza ya milimó na biso. Eloko moko ekeseni, eloko moko ezali kosalema. Tozali koyoka Molimó Mosanto kopakola biso, kotóndisa mitema mpe makanisi ya biso na Liloba na Ye.

Tokoki koyoka Ye koloba na biso: Nayebi mongúná azali kobundisa bino lokola naíno libosó soki moké te, kasi bóbanga te baoyo miké, BOZALI YA NGAI. Napesi bino bolingo ya Ngai, mpiko mpe mabongi. Bóloba bobele Liloba, mpe Nakosala yango. Nazali elongo na bino ntango nyoso.

Kati na boyekoli na biso monene ya Emóniseli ya Yesu Klisto, tozali na nsé ya bozili na etingia monene mpóso moko na moko nini nde Akomónisa biso na nsima. Liloba na Ye nde Ekimelo ya biso bobele moko, kimia mpe libóndi.

Toyoki na bokéngi lisusu mpe lisusu mpe lisúsu. Eteni ya ndambo ya maloba moko na moko tozali kotanga, tolingi kogánga mpe kobélela lokola Liloba lizali kofungwama libosó na miso na biso mpenza. Kondima ya Konétolama ezali koya likoló ya Mwasi na libala, kotóndisa milimó ya biso

Bókanisa, ezali te na esika mosusu kati na mokili wapi okokí kokende, kasi kaka na nsóngé ya misapi na yo, koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na yo mpe komónisa yo Liloba na Ye.

Boni Nzambe alongólaki ezipelo, abéndaki yango na nsima, mpe atikaki Yoane kotala na kati mpe komóna oyo eleko ya lingomba moko na moko elingaki kosala, mpe akomáki Yango kati ya Búku mpe atindakí Yango epai na biso.

Nsima, wana litóndi ya ntango eyei, Nzambe atindelaki biso mwanje na Ye ya nsambo ya ngúya koloba Yango, mpe komonisa oyo Yango nyoso elingaki koloba.

Yoane akomaki yango emónaki ye, kasi ayebaki ntina na yango te. Yesu kútu ayebaki yango te ntango azalaki awa na mabelé. Moko te na kati na bileko ayébákí, kino lelo oyo, ntango oyo, libóta oyo, BISÓ, Mwasi na Ye ya libala.

Boni Amónisaki biso ete mínda nsambo wana izaláki kobenda bomoi mpe pole longwá na biútelo ya mbékí wana monene.

Ayebisaki biso boni moko na moko azalaki na lotámbe na ye ezíndákí kuna na kati. Motindami ya eleko ya lingomba moko na moko azalaki na móto na Molimo Mosanto na lotámbe na ye ezindí kati na Klisto, kobenda bomoi mpenza ya Klisto mpe kobimisa Pole na lingomba.

Mpe sikawa, motindami na biso ya mokolo ya nsuka, motindami monene koleka nyoso, azalaki na bomoi yango moko mpe Pole yango moko emonisamaki na nzela ya bomoi bobómbámáki elongo na Klisto kati na Nzambe.

Na nsima mwanje na biso ya nguya ayebisi biso ete motindami moko na moko atálísamaki kuna kaka te, KASI MOKO NA MOKO NA BISO AZALAKI KUNA LOKOLA, bandimi ya solo ya Nzambe.  Moko na moko na biso atálisamí mpe kuna na lolenge ya kokamwa.

Moko na moko na biso azali kobénda koúta na eútelo yango moko lokola batindami. Tozindísámáki biso nyoso kati ya mbéki yango moko. Tokúfí kati na biso moko mpe bomoi na BISÓ  ibómbámí elongo na, mpe kati na, Klisto Yesu Nkolo na biso.

Boni azali koyikisa biso mpiko na bolobáká ete moto mókó te akoki kolongola biso na loboko ya Nzambe.

Bomoi ya biso ikokí te kobóngolama na yango. Bomoi ya biso ya komónana izali kopela mpe kongenga, kopesa pole mpe bimoniseli ya Molimo Mosanto. Bomoi ya biso ya kati izangi komónana, ibómbámí kati na Nzambe mpe iléísámí na Liloba ya Nkolo.

Bitumba bizali makasi. Mongúna azali kongala lokola liboso soki moké te, komeka makasi na ye manso kolembesa biso mitema, kobeta biso na nsé, kasi akokoka kosala yango te. Nzambe Ye moko azali koloba na biso na nzela ya bibebú ya moto mpe koloba na biso, TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA, OYO APONÁKÍ, mpe Elongaka zábolo NTANGO NYOSO.

Nkolo na biso Abongi Be, koloba Liloba na Ye Libongí Be, kopesa Kimia Ebongi Be, epai na Mwasi na Ye ya libala Abongí Be.

Lokola ntango nyoso, tobiángí mokili koya kozindisa lotámbe ya bango kati ya MBEKI YA MONENE, Etindá oyo, ebómbámákí mpe ebátélámákí mpo ya Mwasi ya libala. Tokozala kogánga mpe kobélela na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba mpe komónisa oyo ekómákí kati ya: Emónoneli Ya Patamo 60-1204E.

Ndeko Joseph Branham

24-1006 EMONISELI YA YESU KLISTO

Nsango: 60-1204M EMONISELI YA YESU KLISTO

BranhamTabernacle.org

Balingami Lipinga Ya Nzambe Liyebi kolongama te,

Biso nde baoyo Tata aponáki mpe apesaki EMONISELI YA SOLO ya Ye Moko;

LINGOMBA na Ye Moko Mpe moko kaka YA SOLO. Baoyo Aponaki kosala MISALA NA YE MINENE.

Mpo na nzela ya Molimo na Ye, tokoki kosósola mpe kotémela molimo mabe ya Satana motemeli ya Klisto. AZANGI NGUYA liboso na BISO, zambi tozali Lipinga na Ye lizangi kolongama.

Satana ayini emoniseli mobimba, KASI TOLINGI YANGO; mpo ete tozali balingi ya Liloba ya Nzambe limónisami. Na Emoniseli na Ye mobimba kati na bomoi na biso, bikuke ya ewélo bikokí te kolonga biso; biso nde tolongí likoló na mongúná. Zábolo moko na moko azali na nsé ya makolo na biso. Tozali Moko elongó na Ye mpe tokoki koloba Liloba, zambí tozali Liloba ya Ye.

Nkolo Atíí yango na motema na ngai mpo na biso koyekola mpe koyoka Bileko Nsambo Ya Lingomba. Ekozala nde Ba Póso Moko Ya Káfú-kafúmpoya moko na moko na biso. Akozala komonisa Liloba na Ye epai na biso lokola libosó naino soko moke te, na nzela ya ngúya na Ye ya elonga.

Ntango yango oyo. Eleko yango oyo. Akozala kyéisa biso na bomoi, koyíkisa biso mpiko, na bopésáká biso kolamukisama na nzela ya Emóniseli, mpe Ekotía milimó na biso na móto!!

Emoniseli ya Yesu Klisto Ezali Búku ya lisakoli oyo ekoki kosósolama bobelé na libóké moko ya bato baoyo bazali na komona makambo lolenge moko na mosakoli, BISO, Mwasi na Ye ya libala. Esengeli na Emóniseli YA SOLO koyeba ozali kotanga mpe koyoka Mongóngó ya Nzambe koya na nzela ya mwanje na Ye motindami, kopesa biso lilako ya koleka motindo ya nzoto.

 Ezali Emóniseli ya Yesu Klisto oyo epésamáki epai ya Yoane mpo ya Baklisto ya bileko nyoso. Ezali bobele búku moko kati na Biblia mobimba oyo ekomámí na Yesu Ye moko, na nzela ya bomónánáká Ye mpenza epai na mokomeli.

Emoniseli 1:1-2: “Emóniseli ya Yesu Klisto, oyo Nzambe apesaki epai na Ye, kotalisa epai ya basáli na Ye makambo makobima noki; mpe atíndákí mpe ayébisaki yango na nzela ya mwanje na Ye epai ya mosali na Ye Yoane: Oyo alobaki mpo ya Liloba ya Nzambe, mpe na litátoli ya Yesu Klisto, mpe ya makambo nyoso mamónaki ye.

Búku ya Emóniseli ezali makanisi mpenza ya Nzambe makomami na Nzambe Ye moko. Kasi atindaki mpe ayebisaki Yango epai ya mosali na Ye Yoane na nzela ya mwanje na Ye.

Yoane ayebaki ntina na Yango te; akomaki bobele oyo emónaki ye mpe eyokaki ye.

Kasi lelo, Nzambe atindaki mwanje na Ye ya nguya na mabelé komónisa Emóniseli Monene oyo epai ya Mwasi na Ye ya libala, na ntina ete tókoka kotanga mpe koyóka oyo ekómáki kati na bileko nyoso ya lingomba. Tokoki komóna etongá moke na Ye oyo batikalákí ngwí mpe sembo na Liloba kati na eleko moko na moko.

Nzambe alobáki na nzela ya mwanje na Ye mpe ayebisaki ete kati na mikolo oyo ya nsúka, ntango Mongóngó ya motindami na Ye ya eleko ya lingomba ya nsambo ebandí koyúla, akofungola mabombami ya Nzambe lokola emonisamaki epai ya Paulo. Baoyo bayambi mosakoli wana kati na nkombo na ye moko bakozua elembetele ya mbano ya lotómo ya mosakoli yango.

Nkembo, tozali Mwasi ya libala Kofina Play ya Nzambe oyo ayambi mosakoli yango kati na nkombo na ye moko, mpe tozali kozua elembetele ya mbano yango. Tondimi ezali Mongóngó ya Nzambe koloba mpe kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Oo Lingomba, oyo to kotanga mpe koyoka kati na póso izali koya. Epai na Ye, tozali ekokiseli ya wólo PETO. Oyo ezali Ye, tozali yango. Tozali Mowíti na Ye ya Solo. Tolóngi. Tobongisamí be, topikámí, tokémbisami. Toponámi na nzela ya Bolingo na Ye ya boponi. Eloko ya kobanga te. Tozali libóké oyo toyóki motindami mpe Etindá ya ye mpe tozuí Yango mpe tobikí Yango.

Póso moko na moko tokozala koloba: “Motema ya biso ezali nde te kopela kati na biso lokola Azali koloba na biso mpe komonisa Liloba na Ye epai na biso na molaí na nzela”.

Soko bolingi koyoka epakweli ya Molimo Mosanto, kozua Emóniseli ya Liloba ya Nzambe koleka, mpe bolingi kofanda kati na bozali ya Mwana mpe kotela, mpe koyamba Konetolama kati ya Kondima, boya bómibakisa na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali kobanda boyekoli na biso monene likoló ya: Emóniseli Ya Yesu Klisto 60-1204M.

Ndeko Joseph Branham 

Nakolinga koyikisa bino mpiko koyoka, to kotanga, póso moko na moko longwa na Búku Ya Bileko Ya Lingomba, mokapo moyokaki biso mokolo mwa Lomíngo nyoso.

24-0929 LIFUNGÓLA NA EKUKE

Nsango: 62-1007 LIFUNGÓLA NA EKUKE

BranhamTabernacle.org

Balingami Basimbi Lifungola Ya Kondima,

“Nazali Ekuke Ya Ba Mpate. Nazali Nzela, Nzela bobele moko, Solo, mpe Bomoi, mpe moto te akoya epai ya Tata bobele na nzela na Ngai. Nazali Ekuke ya biloko nyoso, mpe Kondima ezali lifungola oyo likofungolaka Ekuke ekoki na yo kokota na kati.”

Ezali bobele na loboko loko lokoki kosimba lifungola liye, mpe ezali loboko ya KONDIMA.

KONDIMA ezali lifungola bobele moko likofungolaka bilaka nyoso ya Nzambe. KONDIMA kati na mosala mwa Ye mosili ekofungolaka ekuke moko na moko na bozui moko na moko oyo ezali kati na Bokonzi ya Nzambe. KONDIMA ezali lifungola monene ya bikuke nyoso oyo ezali kofungola EKUKE MOKO NA MOKO MPO YA MWASI YA LIBALA NA YE mpe tozali kosimba Lifungola yango na LOBOKO ya biso YA KONDIMA.

Lifungola yango ya kondima lizali kati na mitema ya biso, mpe tolobaka: “Ezali Liloba ya Nzambe; Ezali bilaka ya Nzambe mpo ya biso, mpe tosimbi lifungola”. Na nsima, na mwa ndambo ya kondima moko na moko tozali na yango, eteni ya ntembe ata moke te, tofungolaka ekuke nyoso oyo etelemi kati na biso na mapamboli Nzambe azali na yango mpo ya biso. Ekozimisa makasi ya móto. Efungolaka lobiko ya nzoto mpo ya mokoni. Efungolaka lobiko na biso kati na molimo. Toyei na Ekuke mpe eloko soko nini ekosalaka biso na maloba soko na misala, tosalaka yango na Nkombo na Ye, na boyebaká ete tozali na lifungola ya kondima; mpe ezali lifungola lisalemi kouta na Makomi.

Etali biso te oyo moto ata nani akanisi, ezali na eloko moko ya solo mpenza: Nzambe abiangaki BISO, Abongisaki biso liboso, Amonisaki Liloba na Ye epai na BISO, Ayebisaki biso tozali ba nani, mpe tozali na lotómo ya kolanda Liloba na Ye, zambi Abiangaki biso kozala Mwasi na libala na Ye.

Tata asimbaki minzoto mia Ye nsambo, batindami na Ye nsambo, na bileko nsambo na loboko na Ye, Azali kosimba bango na lobóko na Ye, na bongo basangani na Ye na nguya na Ye. Nde oyo loboko elingi koloba. Elingi koloba nguya ya Nzambe! Mpe bokonzi ya Nzambe.

Tozali kosimba Liloba na Ye na loboko na biso ya kondima, kolimbola nguya mpe bokonzi ya Nzambe izali kati na MABOKO NA BISO mpe Apesaki biso LIFUNGOLA kofungola ekuke moko moko mpo na eloko nyoso tozali na yango bosenga. Ezali Lifungola Likonzi likofungola EKUKE MOKO NA MOKO.

Sasaipi Nayebi mpo ya nini Nzambe Apesi biso misapi 5 na loboko moko na moko; 4 te, 6 te, kasi 5, boye ntango nyoso totali na maboko na biso tokokundola ete, tozali na KONDIMA (FAITH na Angelé: Mol.) kofungola ekuke moko na moko.

Ezali elembo ya seko na seko epai na libota ya moto ete tokobosana soki moke te; ntango nyoso mikundwélá mpe yika mpiko, ete tosimbi KONDIMA wana na maboko ya biso. Mpe Akotombola kondima na biso ya mbuma ya sinapi mpe Akopesa biso KONDIMA NA YE MONENE KATI NA LILOBA NA YE MONENE LIYEBI KOKWEA TE, YA SEKO NA SEKO OYO LIKOKWEA SOKI MOKE TE!!!

Tokoki kotombola maboko na biso na Lola, kosémbola misapi na biso 5 polele na loboko moko na moko mpe koyebisa Ye: “Tata, tondimi mpe tozali na KONDIMA kati na Liloba moko na moko lilobaki Yo. Ezali Elaka na Yo, Liloba na Yo, mpe Okopesa biso KONDIMA TOSENGELI NA YANGO soko bobele tondimi….mpe TONDIMI.”

Lokola tozali na molulú na biso ya Elambo te kino mokolo mwa Lomingo na mpokwa, Nalikaki koyikisa bino mpiko ete bomiponela Liteya moko koyoka elongo na lingomba na bino, libota na bino, to moto na moto, mwa Lomingo na ntongo, na ntango ekoki na bino. Ezali ya solo mpenza na nzela malamu koleka te kopima Kondima na biso koleka koyoka Liloba; mpo ete KONDIMA ekoyaka na nzela ya boyoki, boyoki Liloba, mpe Liloba likoyaka epai ya mosakoli.

 Na bongo tika ete tokutana elongo na 5:00 nsima ya nzángá (na ntango ya mboka na bino) koyoka Liteya, 62-1007 Lifungola Na Ekuke. Lokola eyebisamaki, Nalingaki kosala oyo Molulú Godi Ya Elambo, oyo ekozala koleka na Voice Radio na 5:00 nsima ya nzángá (ntango ya Jeffersonville). Bokoki komizuela mpe kolanda losambo na Angelé to minoko misusu na bonyataka awa: EKANGANELI AWA.

Motindo moko na milúlú misusu ya Elambo na mbala ileki,na nsuka ya bande Ndeko Branham akobondela mpo ya lipa mpe vinyo. Ekozala na mozíki ya piano kobeta mpo na minúti ebelé mpo ete bokoka kosilisa eteni ya Elambo ya losambo. Na mbisa, Ndeko Branham akotanga Likomi likoló ya kosukolana makolo, mpe nzembo ya Nsango Malamu ikolanda litangi na ye mpo ya minúti ebelé, mpo ete bokoka kosilisa eteni ya kosukolana makolo ya losambo.

Libaku malamu nini oyo tozali na yango kobianga Nkolo na biso Yesu kolia Elambo elongo na moko na moko na biso kati na ba ndako ya biso, biyanganelo na biso, to esika ata wapi ozali. Bondela mpo na ngai ntango ozali koloba na Ye, lokola na solo mpenza Nakozala kobondela mpo na yo.

Nzambe apambola bino,

Ndeko Joseph Branham

24-0929 Molúlú ya Elámbo

Bandeko Mibali mpe Basi,

Nalingaki mpo na biso été tókoka kozala na Losambo mosusu ya Elámbo mpe ya Kosukolana Makolo Lomingo loye, sánzá ya Libwa mikolo ya sánzá 29, Soko Nkoló alingi.

Lokola esaláki biso na mbala elekí, Nalingaki koyikisa bino mpiko ete bóbanda na ngonga ya 5:00 nsima ya nzángá na ntango ya mboka ya bino.

Atáko Ndeko Branham alobaki ete Bantómá bazalaki na Elámbo ntango nyoso bayaki elongó, asepelaki kozua yango na ntango ya mpókwa, mpe abiangaki yango Elambo ya Nkolo (ya mpokwa: Mol.)

Liteya mpe Molúlú ya Elámbo ikozala likoló ya Voice Radio, ekozala mpe lokola na ekanganeli epai wapi Liteya likoki kozuama mpo ya baoyo bakozala te na makokí ya kozua Voice Radio mokolo mwa Lomingo na ntongo.

Mpo ya bandimi baoyo bafándí na Jeffersonville mpe zingázingá, tokozala lisúsu na vinyo ya Elámbo mpo ya bino koya kozua. Liyébisi likobima noki mpo ya esika, mokolo mpe ntango ya koya kozua yango.

Nazali mpenza na nsé ya bozili na etíngia mpo ya biso kosala mobeko oyo ya motúya Nkoló atikákí biso na yango. Libakú malamu nini oyo ezali mpo ya bisó koléngela ba ndáko na bisó mpe kofungola mitéma na bisó mpo Mokonzi na Bakonzi ákóta mpe ália Elámbo elongó na bisó na Mesa ya Ye.

Tika ete Nzambe Ápambola bino,

Ndeko Joseph

24-0922 Edene Ya Satana

NSANGO: 65-0829 Edene Ya Satana

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Eténi Ya Nzambe,

Tozali Eteni mpenza ya Tata na biso ya Likoló; zambi tozalaki kati na Ye na ebandeli. Toyebi komikundolela yango sasaipi te, kasi tozalaki kuna elongó na Ye, mpe Ayebaki biso. Alingaki biso mingi mpenza na motindo ete Asaláki biso mosuni, ete Ákoka kozala na boyokani na biso, koloba na biso, kolinga biso, ata kopesa biso mbote na mabóko.

Kasi Satana ayáki wana mpe apengwisáki Liloba ya ebandeli ya Nzambe, Bokonzi na Ye, mpe mwango na Ye mpo na biso. Abébisaki mibali mpe basi mpe alóngaki kopengwisa mpe kokamata mokili oyo tozali kobika kati na yango.

Akómisaki mabelé bokonzi na ye, elanga na ye ya Edéne.

Ezali ngonga moko ya bokósi mpe ya zunguluké koleka etikalá ndèle kozala. Zábolo atíá mitambo nyoso ya mayéle mabe akoki kotia; mpo ete azali mozimbisi monene. Moklisto asengeli ázala likoló ya misapi na ye ya makolo lelo koleka lolengé azalá ndèle na eleko ata nini.

 Kasi na ntango yango moko, ezali ntango ya Nkembo koleka ya bileko nyoso, mpo ete tozali kobelema na Bokonzi bonéne ya Mbula Nkóto.

Elanga na biso ya Edéne ezali koya noki, epai wapi tokozala na bolingo bobongí be mpe lisósoli libongí be ya bolingo ya Nzambe. Tokozala na bomoi mpe na kobatelama elongó na Ye kati na Edene ya biso kati na Sekó na Sekó.

Yesu ayebisaki biso kati na Matai 24 boni tosengeli kozala na bokebi lelo oyo. Akebisaki biso ete ekozala mokolo ya bokósi koleka etíkalá kobíkama, “pene mpenza na ndenge ete ekokaki kozímbisa ata Baponami mpenza ya Nzambe soko nde ekokaki”; mpo ete mayéle mabe ya zábolo ekosala ete bato bándima ete bazali Baklisto, nzokande bazali yango te.

Kasi eleko oyo mpe ekobimisa Mwasi Liloba na Ye peto oyo akoki te, mpe akokaki te, kozimbisama; zambi bakotikala na Liloba na Ye ya ebandeli.

Pelamoko Yosua na Kalebe, Mokili na biso ya elaká ezali koya polele na miso bobele lokola oya bango eyaki. Mosakoli na biso alobaki Yosua elingi koloba: “Yawe Mobikisi”. Alembétéláki mokambi ya ntango ya nsuka oyo akoya epai na lingomba, kaka lokola Paulo ayaki lokola mokambi ya ebandeli.

Kalebe nde etaliseli ya baoyo batikali sembo elongo na Yosua. Lokola bana ya Yisalaele, Nzambe abandáki kobimisa bango lokola moseka elongo na Liloba na Ye; kasi balingaki eloko moko ekeseni. Mosakoli na biso alobaki: “bongo nde lingomba oyo ya mokolo ya nsuka ezali kosala.” Na bongo, Nzambe atíkáki te Yisalaele kokóta na mokili ya elaká kino ezalaki ntango ya Ye moko ebongisamáki.

Bato bapúsáki Yosua na makasi, mokambi ya bango oyo apésamáki na Nzambe, mpe balobaki: “mokili ezali ya biso, tika ete tokende mpe tózua  yango. Yosua, osílí kosila, esengeli kozala ete obúngísí lotómo na yo. Ozali te na nguya omeseneki kozala na yango. Omesenéki koyoka útá na Nzambe mpe koyeba mokano ya Nzambe, mpe kosala nokínokí. Eloko moko ezali kotambola malongá te na yo.”

Yosua azalaki mosakoli atindamáki na Nzambe, mpe ayebaki bilaká ya Nzambe. Mosakoli ya biso ayebisaki biso:

Nzambe atiáki bokambami mobimba na maboko ya Yosua mpo ete atíkálaki na Liloba. Nzambe akokaki kotiela Yosua motema, kasi basúsu te. Boye ekozóngela na mokolo oyo ya nsuka. Likambo yango moko, kopusa na makasi yango moko”.

Kaka lokola Nzambe asáláki na Yosua, Atiakí BOKAMBAMI MOBIMBA kati na maboko ya mwanje na Ye mosakoli, William Marrion Branham; zambí Ayebaki Akokaki kotiela ye motema, kasi basúsu te.

Esengeli ézala na Mongóngó Moko, Mokambi Moko, Liloba ya nsuka Moko, ndèle, mpe SIKAWA.

Nalingi boni mosakoli ayebisaki biso ekozala na nkóto na nkóto mbala nkóto na nkóto baoyo bakoyoka ba bande. Alobaki ete ba bande IZALI LOTÓMO. Ekozala na basúsu na biso komísélimwisa kati na ba ndako mpe biyanganelo na (lotómo na ye) ya ba bande kokanga Mombóto ya Ye mobongisamáki libosó.

Wana ezóngaki bisó mpe tolobâki, Nkóló, totósáki mitindo mia Yo, mpe ezalaki na bato bandimaki ntango toyókisaki ba bande. Sikawa totéyáki yango, kati na mokili mobimba, Okomemia nde yango?

Akoloba: “Yango nde Natindaki bino kosala.”

Nzambe Akomemia yango. Ndako na yo ekokwéa na nsé soki moké te. Ntango Nzambe Apesi motindo kobebisa eloko mobimba, libota na yo nyoso, bozui na yo nyoso, ikobatelama kati na ndako na yo. Okoki kotelema wana. Ozalaki na motindo te ya kotala na lininísa, Finá kaka Play ntango etumba ezali kokóba.

Maloba ma Yo mazuámáki mpe Naliaki yangó mpe Liloba na Yo lizalaki epai na ngai esengo mpe kosepela ya motema na ngai: zambí Nabiangámi na Nkombo na Yo, E Nkolo Nzambe na bibelé.

Nabiangi yo koya komibakisa na biso lokola tozali kolia lotómo monene ya ntango ya nsúka, ya bomoi, ya Nzambe, Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka nyoso na ntina na Edene Ya  Satana 65-0829.

Tika ete tóbika kino na Boyei ya Nkolo, soko ekoki. Tika ete tosala nyoso ezali na makoki ya biso, na bolingo mpe lisósoli, kosósola ete Nzambe Azali kolukaluka kati ya mokili, lelo, kokúta mpate abúngí moko na moko. Mpe tika ete tosolola na bango na mabondeli ma elengi ya bolingo mpe Liloba ya Nzambe, ete tókoka kokúta oyo ya nsuka wana, ete tókoka kokende na Ndako, mpe kobima na Edéne oyo ya kala ya Satana awa, Nkolo.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ma kotanga liboso ya boyoki Liteya:

2 Timote 3: 1-9

Emoniseli 3:14

2 Batesaloniki 2: 1-4

Yisaya 14: 12-14

Matai 24:24