All posts by admin5

23-1115 Nzambe Akobiangaka Moto Na Kosambisama Te Soko Akebisi Ye Liboso Te

Nsango: 63-0724 Nzambe Akobiangaka Moto Na Kosambisama Te Soko Akebisi Ye Liboso Te

BranhamTabernacle.org

Molingami lesólo ya moké, Lesólo ya Monene, Mosali bilanga & Mama ya ndako,

 Nini oyo Nzambe azali na yango mpo na yo kosala, ozali na bokéngeli na yango.  Osengeli koyanola epai na Nzambe mpo na yango.  Ata soko monguna akoki koyebisa yo ete ozali na ntina te, ozali na litomba mingi mpo na Nzambe na motindo ete sáa na Ye monene ekoki kosala te soko na yo te.

 Abiangaki yo, aponaki yo, abongisaki yo liboso, mpe apesaki yo Emoniseli ya Etinda na Ye monene ya ntango ya nsuka.  Atieli yo motema 100%.  Ozali mpenza Mwasi ya libala ya Yesu Klisto, Molingami na Ye ya motema , mpe  Alingi yo mingi.

 Akebisi ntango nyonso bato libanda na kati ya mboka: “Boyambola, to bokufa”, “Bozonga na Liloba”, “Bomilengele, ezali na likambo moko ekokóma.”  Nsukasuka ntango yango ekómi.  Nzambe azali koya mpo na Mwasi na Ye ya Libala, kaka lokola alakaki biso ete akosala.  Abiangi Eyíká na Ye kobima na eyíká.

 Mingi bakwei mosika na Etindá monene ya Nzambe na ntango ya nsuka lelo, koloba: “oyo alobaki ete ekosalema, ekómi te.  Makambo manso mazali ndenge moko.”  Ezalaki na bikeke mingi bilekaki liboso ete masakoli mingi ya basakoli ya Nzambe mákokisama.  Kasi esalemaki atako bongo, kaka mpenza lokola balobaki, Liloba na Liloba.

 Biblia na ye eyebisi biso ete: “Lokola ezalaki na mikolo ya Noa, ekozala bongo na koya ya Mwana ya Moto”.  Yambo Nzambe átinda kosambisama mpo na kobebisa mokili na eleko wana monene ya liboso ya mpela, Nzambe atindaki mosakoli moko na mokili.  Mosakoli wana asalaki nini?

 Abongisaki bato mpo na ntango wana.  Noa abongisaki bato, mpe ezalaki ebiangeli ya ngolu liboso ya kosambisama.

 Noa abongisaki bato liboso kosambisama éya akebisaki bango na ntina na yango.  Ezalaki Nzela oyo Nzambe apesaki mpo na mokolo wana.

 Mosakoli ya Nzambe ayebisaki biso ete Nzambe abongolaka manáka na Ye ata moke te.  Oyo Asalaki na ntango wana, Asalaka ndenge moko lelo.  Toko TIKALA kaka NA MANÁKA YA NZAMBE APESI MPO NA LELO MPE KOFINA PLAY.

 Lokola na ntango wana, bato balobaka ete totiaka litomba mingi na mosakoli ya Nzambe;  Ezali Molimo Mosanto, kasi William Branham te.  Tolobi, AMEN, toyokaka moto te, toyokaka kaka oyo ALOBAKI.

 Molimo Mosanto nde Mosakoli ya ngonga oyo;  Ye kondimisa Liloba na Ye, kokokisa Yango.  Molimo Mosanto azalaki Mosakoli ya ngonga ya Mose.  Molimo Mosanto azalaki Mosakoli ya ngonga ya Mika.  Molimo Mosanto, oyo akomaki Liloba, ayei kokokisa Liloba.

 Kasi Ndeko Branham aúti bobele koyebisa bino póso eleki;

 Sikawa, bomoni, nasengaka bino ntango nyonso bózala na bokebi na oyo bozali koyoka.  Bomoni?   Mingi na yango ezali kaka ngambo ya nzoto.

 Nalobi te Nkolo ayebisaki ngai bongo.  “Na” ndimi, bomoni.  Mpe nandimi esengelaki kosalema te.

 Mpo na ngai mpe ndako na ngai, nakozwa oyo motindami ya Nzambe mwanje ya nsambo ANDIMI, AKANISI TO KÚTU AYOKI koleka moteyi, episkopo to moto mosusu nyoso.

 Nani nde Nzambe atindaki mpo na kosambisa oyo mosakoli na Ye andimi, ayokaka to kútu akanisi epémelámi to epémelami te?…Botika nayebisa bino nakanisi nani.

 Botala Kola, na mikolo Nzambe atindaki Mose na Etindá , mpe Kola mpe Datana bakanisaki, koya epai ya Mose, mpe balobaki, “sikawa, zila bobele monúti moko, ozali komimóna mingi!  Okanisi ete kaka yo nde libangá moké moko oyo ezali na libóngo;  lisweswe moko na kati ya libeke, ozali kaka yo moko.  Nakoyebisa yo ete ezali na bato basusu bazali basanto, mpe lokola!”

 Likebisi, kosambisa ezali pene.  Bozonga na LILOBA YA EBANDELI.  Bozongela Mongóngó ya Nzambe mondimisami mpo na mokolo na biso.  Kozongela mosakoli ya Nzambe. 

Etindá Oyo, Mongóngó na Ye.  Esengeli ézala LIBOSO mpe eloko ya motuya koleka mpo na yo.

 Ntembe ezali te basusu bazali na Mongóngó, mpe ebiangeli, mpo na koteya mpe kolakisa Etindá oyo.  Kasi ba Bande, Mongóngó wana, esengeli ézala Mongóngó ya motuya mingi oyo bokoki koyoka na bandako na bino, na mituka na bino, mpe ya motuya mingi, na lingombá na bino, soko bolingi kozala Mwasi ya libala ya Nzambe.

 Yaka koyoka Mongóngó wana elongo na biso mwa Lomingo na ngonga ya 12:00 nsima ya nzángá., ntango ya Jeffersonville, lokola mosakoli ya Nzambe azali kokebisa mokili ete Boyei ya Nkolo ebelemi.  Oyo ekoki kozala mbala ya nsuka.

 Ndeko.  Joseph Branham

 Nzambe Abiangaka Moto Na Kosambisama Te Soko Akebisi Ye Liboso Te 63-0724

 Makomi ya kotánga liboso ya losambo:

 Yisaya 38:1-5

 Amosa Mokapo 1.

23-1105 Azali Mpo Na Yo, Ozali Mpo Na Ye?

Nsango: 63-0721 AZALI MPO NA YO. OZALI MPO NA YE?

BranhamTabernacle.org

Balingami bana ya Nsango Malamu,

Tozali bato bapambolami koleka baoyo batambólá ndèle likolo ya mabelé. Tokoki naino nde kobanda kokanisa mwanje ya Nzambe motindami ya nsambo koyebisa biso maloba maye:

Nalingi bino. Oo, Nalingi bino lokola nde bozalaki bana na ngai kati ya Nsango Malamu. Nabótí bino epai ya Klisto, na nzela ya Nsango Malamu.

Nzambe azalaka mpenza na biso na motema na motindo ete atindelaki biso mosakoli na Ye andimisami na elembo yaLikonzí ya Móto koyebisa biso ete ezalaki te bobele motooyo kotambola elongo na biso, kasi ezalaki nde Nzambe likoló na ye. Ye nde Oyo azali kokamba nzela.

Mpo ete Amemi mikumba na biso, liboso kosambisama éya, abongisaki nzela ete tózala bansómi na kosambisama nyoso izali koya. Ekímelo yango ezali kaka mpo na biso, baponami. Biso nde baoyo toyambi mombóto oyo ya Bomoi. Biso nde tobongisamaki libosó komona Yango. Biso nde baoyo tozali na Emoniseli ya lotómo monene oyo ya bande.

Akufaki mpo na lotómo loye. Akufaki na ntina ete Molimo Mosanto ákoka kozala awa na mokolo oyo komónisa makambo maye. Azalaki mpo na bino. Azalaki na mokumba na motema komema Yango awa. Azalaki na mokumba na motema koloba likambo. Azalaki na yo na motema zambi alingaki yo. Azalaki mpenza na mokumba na motema kosalayango, kotinda Molimo Mosanto na oyo, kosala lotómo loye lelo.

Soko obongisámi na Bomoi ya Seko, okoyoka Yango mpe okosepela kati na Yango. Ezali libóndisi na yo. Ezali elokooluká bomoi na yo mobimba. Ezali Mayaka yango ya motuya monene. Tobóyi eloko mosusu nyoso mpo na Etindá oyo, Mongóngó oyo. Ezali Nkolo na biso Yesu Klisto koloba na biso. Moto moko te akosengela kobónda-bonda biso, TOZALI BANDIMI, ezali na eloko te oyo ekoki kolongola yango na biso. Etali biso te ata moto nani áloba nini, tondimi Liloba moko na moko. 

Azali mpenza mpo na biso, na lolenge ete soko tosengeli na lobiko ya nzóto, tondimi kaka Liloba na Ye na bozindó yamotema na biso. Na bongo etali te soko mopesi toli ata nani, mokembisi ata nani, monganga ata nani, lopitalo ata nini,nkombo ya bokono ata nini bakolinga koloba, tondimi na biso kaka Liloba na Ye. Toyebi bobele Yango! Bosenga bozali te ya koloba likambo ata nini na ntina na Yango; toyebi Yango.

Azalaki mpenza mpo na biso ete Asalaki ete mosakoli na Ye ábomba Bilei mpo na Mwasi na Ye ya libala. Apesaki kútu lilako na mobateli moko na moko, motéi, mpe ebólo ya bato na mokili mobimba kolanda malako ma ye mpe koyokisa ba bande oyo kati na EYANGANELO to bibólo ya bango.

Soko bino bato bokokaki kaka kosala yango na ntóngo oyo, baoyo bokobóndamela, mpe bino bato baoyo bozali koyokabande oyo, kati na mokili mobimba, mpe nsima ya bande oyo koyokisama, mpe motéi to moto oyo akoyokisa yango kati na Eyanganelo, bibólo libándá kuna na ba zámba tobózala ata wapi, oyo bazali koyokisa yango, Bokoyeisa naino eyambweli na bino polele, na nsima boya na eloko soko moko te na motema na bino, kasi kondima, mpebóbóndamela, wana nde, Nkisi ekozua esika.

Nakanisaki ete baoyo balobaka na biso mabe balobaka ete mosakoli ALOBÁ SOKO MOKÉ TE ETE boyokisa ba bande kati na losambo? Alobaki kaka te kati na mangomba na bango, kasi kati na ba zámba to ESIKA SÉ ESIKA bozali…BOYOKA BA BANDE.

Soko bokotosa mpe bokosala mpenza oyo Nzambe alobaki na nzela ya motindami na Ye mwanje ya nsambo, na bongobino mpe bokoki kozuaKONDIMA monene koleka bokokaki ndèle kozala na yango.

Na, Na…ya liboso, mpe kobelema na oyo, bayoki basengeli bápakolama na kondima. O—o, soko ozali na kondima te,na bongo ezali—ezali na ntina kútu te koya kobóndamela, mpo ete ekosengela na kondima na yo mpe kondima ya ngai elongo; kondima na ngai kondima Ye, kondima na yo kondima Ye.

Tozali te kotatabana, to kobanzabanza, to kolikia bongo. Ba bande nde nzela epesami na Nzambe mpo ya lelo. Ezali temaloba ya moto moko oyo abiangami William MARRION Branham, ezali Maloba mamónisami ma Nkolo na biso Yesu Klisto. Ezali solo mpenza: “Amen!” Ezali Etémelo ya biso. Ezali Solo mpe eloko mosusu te bobele Solo.

Mpe ntango okúti Etémelo ya Nzambe, Liloba na Ye, elaká likolo ya eloko moko, esengeli óyeba liboso ete ezali Lilobaya Nzambe, ete likambo ozali komona kosalema ezali Nzambe. Ezali—ezali te—ezali te “ntango mosusu ezali bongo, ekokaki kozala, emonani lokola ekoki kozala.” “EzaliNzambe!” Na nsima ntango okómi na esika yango, na boye yango nde Mayaka ya motuya monene, osengeli kotangwa na eloko mosusu nyoso moto ata nani ayebisi yo kokesene na Yango. Osengeli te kotala oyo moto akokisi.

Tokozala nde na MAMA YA LIPATI YA BOLINGO Lomingo loye. Tokosala mpenza kaka oyo mwanje ya nsambo motindami ya Nzambe andimisami ayebisaki biso tosala: Kofina Play mpe kotosa.

ÉZALA ATA NINI tozali na yango bosenga, tokozua yango. Tokozua yango mpo ete tokotia kondima ya biso ELONGO NA KONDIMA YA YE kondima Ye. Nsima tokoloba biso nyoso:

Banda na ntango oyo, ezali na eloko moko kati na motema na ngai eyebisi ngai ete mpasi na ngai esili. Nazali—Nazali malamu, nakozala malamu”? Bondimi yango? Botombola maboko na bino: “Nandimi Yango!” Nzambe Ápambola bino.

Mpo ete Nzambe azali mpo na biso, nabiangi yo óya komibikisa na biso; to yikisa mobateli na bino mpiko, mokambi na bino, kolanda malako ya mosakoli, mpe koyoka mwanje ya nsambo ya Nzambe koloba Liloba ya Nzambe mpe ózua nyoso ozali na yango bosenga, Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville lokola tozali koyoka: 63-0721 Azali Mpo Na Yo, Ozali Mpo Na Ye?

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya losambo:

St. Yoane 5:24 / 15:26

1 Petelo 5:1-7

Baebele 4:1-4

23-1029 Mokangami

NSANGO: 63-0717 Mokangami

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Bakangami,

Bomoi ozali kobika sikawa ekotalisa bomoi okokaki kobika soko bobikaki na mikolo ya Noa, to Mose, mpo ete ozali na molimo yango moko. Molimo moko ezali kati na yo sasaipi ezalaki kati na bato ndèle.

Soko obikaki na mikolo ya Noa, olingaki nde kozua ngambo ya nani ndèle? Olingaki kokóta kati ya bwato elongo na Noa kondima ete azalaki oyo Nzambe aponaki kotonga bwato mpe kokamba bato,to okokaki koloba: “Nakoki mpe kotonga bwato. Nazali kaka lokola kapiteni mpe nakoki kotonga bwato”?

Boni ko soko obikaki na mikolo ya Mose? Olingaki kotikala na Mose mpe kondima ete azalaki oyo Nzambe aponaki kokamba bato, to olingaki nde kokende elongo na Datana na Kola wana elobaki bango “Tozali bule mpe lokola, tozali mpe na eloko ya koloba. Nzambe aponaki mpe biso.”?

Moko na moko na biso asengeli kopona, lelo oyo, kati na kufa mpe bomoi.

Etali ngai te ngambo nini olobi ete ozali. Oyo ozali kosala, mokolo na mokolo, etalisi oyo ozali. Tofinaka Play MOKOLO NA MOKOLO.

Ozali kati na Liloba mokolo nyoso? Ozali kobondela koluka Mokano mwa Nzambe mobongi be kati na eloko nyoso osalaka? Ozali kofina Play mpe koyoka Mongóngó mwa Nzambe mondimisami mokolo nyoso? Ondimaka ete ezali mpenza na litomba monene Kofina Play? Ondimaka ete Mongóngó wana likolo na ba bande nde Mongóngó ya Nzambe mpo na lelo?

Mpo na biso eyano ezali IYO. Tozali koyebisa mokili ete tozali bakangami na Liloba ya Nzambe, Etindá na Ye, Mongóngó mwa Nzambe mondimisami mpo na mokolo mwa biso. Iyo, tondimaka na motema na biso mobimba kati na Kofina Play.

Iyo, tondimaka ete motindami mwanje ya eleko ya 7 ya lingomba abiangami kokamba Mwasi ya libala. Iyo, Mongóngó wana likolo ya ba bande nde Mongóngó ya litomba koyoka koleka.

Bolingo ya Nzambe, Mongóngó na Ye, Etindá oyo, ezali mpenza likambo monene, Emoniseli ya ndenge wana epai na biso, ete tokoki te kotangwa na Yango. Tokómi Mokangami na Yango.

Totekisi eloko mosusu nyoso. Ézala nini moto ata nani alobi, tokangani na Yango.

Ezali na eloko moko na ntina na Yango na motindo ete tokoki kaka te kotangwa na Yango. Nde esengo ya bomoi na biso. Tokoki kobika te soko na Yango te.

Totondi na esengo, na matondi koleka, na lipambu mingi kozala Mokangami mpo na Nkolo mpe Etindá na Ye; mpo ete bazali eloko moko. Ezali koleka bomoi mpo na biso. Mokolo na mokolo ezali kokóma polelé koleka mpe solo ete tozali Mwasi na Ye ya libala. Tozali kati na Mokano mwa Ye mobongi kwa. Tokoki koloba Liloba, zambi tozali Liloba likómi mosuni.

Tokangani na eloko moko te kasi Klisto mpe Etindá na Ye mpo ya ngonga; ata tata na biso, mama na biso, ndeko na biso mobali, ndeko na biso Mwasi, mobali na biso, mwasi na biso, moto ata nani.

Tomikangisi bobele na Klisto, mpe Ye kaka. Tomikangisi mpe tozali na ekanganeli na Etindá oyo, Mongóngó oyo, mpamba te ezali nzela Nzambe Apesi mpo na lelo oyo, MPE NZELA MOSUSU EZALI TE.

Tozali lisusu bakangami ya bozali na biso moko ya bopími te, na mpósá ya biso moko. Tomikabí mobimba mpe tokangamí na Ye. Ézala nini basusu kati na mokili bakanisaka, oyo basusu kati na mokili basalaka, tokangami na minyolólo ya bolingo epai na Ye mpe Mongóngó na Ye.

Tozali na matondi mingi kozala Bakangami. Yebisa ngai Tata, násala nini na sekonde nyoso ya monúti nyoso ya mokolo nyoso.

 Tika ete Mongóngó mwa Yo mólakisa biso kati na eloko moko na moko tozalaka, tolobaka, mpe boni tobikaka. Tolingi koyeba eloko mosusu kasi Yo.

Yaka komikangisa elongo na biso na Liloba ya Nzambe mpe Mongóngó mwa Ye Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka boniboni kokóma: Mokangami 63-0717.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga

Filemona 1:1

 PS: Ndeko Branham, TOLINGI lolenge olobaka Filemona, EBONGI BE epai na Mwasi ya libala.

23-1022 Mpo Na Nini Koganga? Loba!

NSANGO: 63-0714M Mpo Na Nini Koganga? Loba!

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Mingómbo Ya Nzambe,

Nazali Lingomba na Ye. Bozali Lingomba na Ye.Tozali Mingombo oyo Nzambe azali kobika na kati. Tozali Lingomba ya Nzambe na bomoi; Nzambe na bomoi kobika kati ya bomoto na biso. Bikela ya biso nde bikela ya Nzambe. Nkembo!

Tozali biso nyoso koyangana elongo, kati na bisika mike longwa na mokili mobimba; koya nyoso elongo zingazingá na Mongóngó ya Nzambe, Liloba na Ye mpo ya lelo.

Ezali mpenza bikamwa.Kokangama na eloko moko te, bobele na Yesu Klisto mpe Liloba na Ye. Nde yango, mpútu. Tozali kofanda elongo na bisika ya Likolo wana ebongi biso kwa na  nzela ya Mongóngó yango moko ya Nzambe.

Tozali kokende  nzela mobimba. Tozali kokende biso nyoso na Mokili ya Elaka. Moko na moko na biso! Ózala mwasi ya libala, mosali mwasi moke, mpaka mwasi, mpaka mobali, to elengé mobali, ózala ata nani, tozali kokende biso nyoso. Ezali te na moko na biso akotikala. Moko na moko na biso azali kokende, mpe “tokotelema mpo na likambo moko te”.

Tondimi ete tosengelaki kozala banso elongo. Liboké moko monene lisangani ya Nzóto ya Yesu Klisto, kozila Boyei wana ya nkembo. Tosengelaki kokabwana te, kasi moto atangwi na nzela wana ebongisami ya malakisi ya Nsango Malamu.

Esengeli ézala na nzela moko ya kotalisa na solo nini ezali malamu mpe mabe. Mpe nzela bobele moko okosala ndèle yango, ezali te kotia ndimbola ata nini na Liloba, ndima Yango bobele lokola Ezali mpe ndima Yango bongo. Moto na moto azali kotia ndimbola naye mpenza, mpe ezali kolobisa Yango eloko ekeseni. Ezali kaka na MONGONGO MOKO EPAI NA MWASI YA LIBALA. KOFINA PLAY!

Nalobi yango likolo na bande oyo, mpe mpo na bayoki oyo, nalobi oyo nan se ya pemélá ya Molimo Mosanto: Ye nani azali na ngambo ya Nkolo, tika ete áya na nse ya Liloba oyo!

Liloba ya mokolo na biso ezali na Mongóngó. Mosakoli ya biso nde Mongóngó yango. Mongóngó yango nde Liloba ya bomoi mpo na mokolo ya biso. Tobongisamaki liboso koyoka Mongóngó yango mpe komona ngonga oyo, mpe ezali te na eloko ekopekisa biso koyoka Mongóngó yango.

Kondima na biso emoni Yango mpe eponi koyoka Yango etali te oyo moto ata nani alobi. Tokitisaka miso na biso te kotala nzela ekeseni. Tobateli bomoi na biso kati na Liloba nyoso mpe matói ma biso mafungwami na Mongóngó yango.

Na bobónzameli epai na Yo Nkolo, útá na mitema na biso kino na Matói ma Yo, oyo nde libondeli na biso ya bosembo.

Ete bomoi na biso ekobongwana, bandá lelo oyo, ete tokozala alimá na koleka kati na likanisi ya biso. Tokomeka kobika kati na elengi mpe komikitisa, ete, na bondimáká ete yango esengi biso epai na Nzambe, Nzambe akopesa na moko na mosusu. Mpe tokoloba mabe te moko na mosusu, to na moto te. Tokobondela mpo ya banguna na biso mpe kolinga bango, kosalela malamu baoyo bakosalelaka biso mabe. Nzambe azali mosambisi ya nani azali malamu mpe mabe.

Nabiangi yo ete óya kopakola Kondima na yon a boyokáká Mongóngó ya Nzambe elongo na biso Lomingo loye, na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Mpo na nini Kogánga? Loba! 63-0714M

Ndeko Joseph Branham

23-1015 KOFUNDAMA & ELAMBO

Nsango: 63-0707M KOFUNDAMA

Nsango: 63-0707E ELAMBO

BranhamTabernacle.org

Balingami Mwasi ya libala Lingomba ya Ndako, tika ete toyangana elongo biso nyoso mpe toyoka Liteya, Kofundama 63-0707m, Lomingo loye na 5:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville.

Na nsima tomilengele mpo na libakú malamu mosanto kosangana na Elambo ya Nkolo kati na ba ndako na biso mbala moko nsima ya Liteya wana tozali koyoka 63-0707e Elambo. Na nsima tokozala na molúlú ya Elambo mpe kosukolana makolo ekolanda. Lokola Kofundama, bande ya Elambo ekoyokisama na Voice Radio (na Angelé kaka), ekolandisama na moziki ya piano, eteni ya maloba kobandisa bosukolani makaka, mpe nzembo ya Nsango malamu, lokola tomeseni kosala mpo na milúlú ya Elambo na ba ndako.

Na nse awa ezali na bikanganeli ya mipepe mpo ya ndenge ya bozui/ bobongisi vinyo mpe lipa ya Elambo.

Natondi kotonda mingi ete Nkolo apesi nzela ete tobianga Mokonzi na Bakonzi kati na moko na moko ya ba ndako ya biso mpo ya mokolo moko godi elongo na Ye.

Nazali ya solo mpenza kotalela kokutana na bino nyoso na mesa na Ye.

Nzambe apambola bino,

Ndeko Joseph Branham

Instructions for Baking Bread / Making Wine

Instructions to obtain Communion Wine / Feet Washing Bins

23-1008 Bomoi Na Yo Elongobani Na Nsango-Malamu?

Nsango: 63-0630E Bomoi Na Yo Elongobani Na Nsango-Malamu?

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Etongá ya Mosakoli ya Nzambe,

Tobondela.

Tata na Likolo, boni totondi na matóndi mpo ya ntango mosusu koyanganisama elongo longwa na zingázingá ya mokili mobimba ngambo oyo ya Seko na Seko. Kozala kati na likanisi liókó mpe lobanzo lokó elongo na yo; koyoka Mongóngó na Yo koloba na biso. Tozali kotalela mbala moko lisusu boyeisami na nguya útá na Yo, kopesa biso mpiko mpe makasi mpo ya mobembo mozali liboso.

Tozali koyangana elongo koyamba Maná mapesamelaki biso. Maná wana ya molimo oyo Obombelaki biso kopesa biso makasi kati ya mobembo. Ezali eloko BOBELE MOKO ekosunga biso na mikolo mikoya.

Oyebisaki biso, liboso ete Ókoka kotia Lingomba na Yo na molongó, Okosengela koyeisa biso elongo, na esika yoko, mpe na lobanzo lokó. Nsima Okotindela biso Molimo Mosanto na Yo lokola bokambami; likita moko te ya bakambi, libóké moko te ya bato, kasi Molimo Mosanto na Yo kosolola na biso mbebu na litói.

Olobaki na nzela ya mwanje na yo mpe oyebisaki biso:

“Nalingi ete botikala na mobateli na bino mpe botikala na Malakisi malakisami awa. Botikala na Liloba oyo, bomeka kolongwa na Yango te! Botikala kaka na Liloba ézala nini eyei to ekei, botokala na Liloba Yango!”

Tata, tozali kotosa Liloba na Yo mpe tozali kotikala na mobateli na biso. Ezali Mongóngó ya Nzambe mpo ya lelo oyo ekolobaka bobele Liloba peto lindimisamaki mpe limonisamaki mpo ya mokolo na biso.

Oyebisaki biso lokola ezalaki na mikolo ya Sodomo, ekozala mpe bongo na mikolo ya Koya ya Mwana na Moto; ete tokozala na biloko mibale kokamba biso, mpe ba mokili bakozala na biloko mibale. Biloko mibale ya bango nde batéi mibale.

Kasi mpo na Lingomba na Yo ya molimo, babongisami na Yo liboso, Mwasi na libala na Yo Mwasi moponami, biloko mibale ya biso nde Yo, omonisami kati na nzoto ya mosuni ya moto, kokamba biso na Likonzi ya Móto.

Tika mopepe mópepa. Tika bikumbaki bininganisa, tobatelami, libela. Tozali kopema wana mpenza likolo na Liloba na Yo. Ntango yango oyo. Esode ya molimo ekómi. Tozali kotambola mpe kosolola na Yo mokolo na mokolo, koyoka Mongóngó na Yo. Tozali kati na bondeko ya ntango nyoso elongo na Yo.

Tolingi kozala Matandu na Yo, Miso na Yo, Lolemo na Yo. Ozali mowiti, tozali bitape na Yo. Yeisá biso makasi, Tata, kobota mbuma na Yo. Bosenga na biso bobele moko  ezali kozala na bomoi bolongobani na Nsango malamu.

Mitalisa kati na biso, Tata, kokóba mosala na Yo mpe kokokisa Liloba na Yo lilakamaki. Mposa na biso ezali kozala batindami na Yo mpo ya lelo, kokokisa boyengebene nyoso.

Tolingi koyoka Yo koyebisa biso:

Libondeli na ngai ezali, epai na baoyo bazali koyoka na ladio to kati na…na mokili ya bande, mpe baoyo bazali awa. Tika ete Nzambe ya ngolu nyoso, ya Lóla, ángengisa Molimo Mosanto na Ye apambolami likolo na biso nyoso, ete biso, bandá mpokwa oyo, libela, tókoka kobika bomoi na motindo ete Nzambe áloba: “Natondi na kosepela. Bókota na bisengo ya Seko bibongisamaki mpo na bino úta bozalisi ya mokili.” Tika ete Nzambe ya Lóla átinda mapamboli na Ye likolo na bino bato nyoso.

NKEMBO…yango nde biso Tata, Mwasi na Yo ya libala kati na mokili ya Bande.

Ya solo, Ozali kotinda mapamboli na Yo likolo na biso mpe komonisa biso Liloba na Yo, koyebisa biso na Liteya moko na moko toyokaka ete, Otóndi na kosepela, TOZALI MWASI NA YO YA LIBALA.

Soko okolinga koyoka mobateli na biso, mobateli ya Nzambe mpo na mokili oyo atindaki kobianga Mwasi na libala na Ye kobima mpe kokamba ye, yaka komibakisa na biso mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, koyoka ye koloba Liloba ya Bomoi ya Seko, lokola azali komemela  biso Liteya kouta na Nzambe: Bomoi Na Yo Elongobani Nde Na Nsango Malamu? 63-0630E

Ndeko Joseph Branham

Liyebisi Godi: Soko Nkolo alingi, tokozala na Losambo ya Elambo/ Kosukolana makaká Lomingo lokolanda na mpokwa, Nsanzá ya Zómi mokolo ya 15 ya nsánzá.

23-1001 ESODE YA MISATO

Nsango: 63-0630m Esode Ya Misato

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na Libala ya Esode,

Makambo tozali komona kosalema lelo makokaki te kokóma eleki mibú ntúku mibale, to eleki mibú ntuku minei; ezali bobele lelo nde mazali kokóma. Ngonga yango oyo! Sikawa nde ntango na yango kokokisama. Nzambe alakaki Yango, MPE YANGO OYO.

Tozali na lisosoli ya molimo; bokesene ya ekólo oyo etondi má. Ngonga ekoki. Ezali ntango ya kokende na Mboka yango ya elaká. Bobele mboka mosusu te epai wapi kokende, kasi Ezalelo na biso ekoya oyo tozalaki kozila.

Bokanisa naino yango, oyo ezali kokamba biso ezali koleka mosakoli. Ezali Nzambe amonisami kati na mosuni katikati na biso, na Liloba na Ye kokokisa yango. Mosakoli oyo asalaki koleka mbala nkóto mosika na mosakoli mosusu ata nani. Ezali Likonzi ya Móto kokamba biso na Mboka yango ya elaká, Bokonzi ya Bilánga Nkóto.

Aponaki mosakoli na biso mpe apesaki ye elembo ya molimo ya Likonzi ya Móto, mpo ákoka komikosa te. Oyo mosakoli alobaki ezali Maloba mpenza ya Nzambe. Azuaki mosakoli na biso, ayekolisaki ye, na nsima azongisaki ye epai na biso na Likonzi ya Móto, komindimisa Ye moko epai na biso, mpe kopesa biso Emoniseli mobimba ya Liloba na Ye.

Soko tolingi kokende na Mboka wana ya elaká, tosengeli kobosana soki moke te, Nzambe akoki te, mpe akosala yango te, kobongola mwango na Ye. Azali Nzambe, mpe akoki te. Ayebisaki biso Akosala na ebólo ya bato ata moké te. Atikalá kosala yango te. Asalaka na biso lokola moto na moto. Alakaki biso kati na Liloba na Ye ete akotindela biso Malaki 4 kokamba biso na Mboka, mpe Asali yango.

Kasi, bomoni, Akaba azalaki na ebongiseli oyo akanisaki ete ezalaki ya Nzambe. Alobaki: “Nazali na bango nkama minei, bakei kelasi mpe bayekolisami.” Mpe babeti tólo kozala basakoli Baebele, lokola bibólo ya batei basalaka lelo.

Mingi balingi kondima yango te, kasi lokola Eliya ya kala, motindami ya Nzambe mwanje ya nsambo, mobateli na biso, nde mobateli ya mokili kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Ye nde Malaki 4:5, mpe Emoniseli 10:7. Ye nde kokokisama ya Makomi manso Biblia esololaki liboso na ntina na ye. Ezali Etindá oyo, Mongóngó oyo, yango nde Mongóngó ya Nzambe kobianga Mwasi na Ye ya libala. Nde Etandelo ya Nzambe mpo ya lelo.

Ezali Likonzi ya Móto yango moko, na nzela ya lolenge yango moko epakolami. Nzambe yango moko kosala makambo yango moko.

Sikawa Liloba likómi mosuni mpe lizali kofanda kati na biso na kati ya mosuni na biso. Mwasi Liloba na Ye.

Tika ete tógánga epai na Ye mpe tótondo Ye, tokumisa Ye, tosambela Ye mpo na nyoso asali: kobikisa biso, kobongisa biso liboso, kolongisa biso.

Oyo Azali kosala mpo na biso sasaipi mpenza; kopesa biso Emoniseli mpe Emoniseli, koyebisa biso tozali banani. Mpe oyo Akosala mpo na biso… Koya mpe kozua biso lokola Mwasi na Ye ya libala mpe komema biso na Ezalelo na biso ekoya abongisaki mpo na biso, mpe kozala elongo na Ye kati na Seko na Seko.

Ézala ata nini tozali na yango bosenga, gángá epai na Ye. Yango nde alingaka bana na Ye básala. Kogánga epai na Ye kino tosili kosepela mpe tozui oyo tozali na yango bosenga.

Boya mpe bosangana elongo na eteni ya Mwasi na Ye ya libala mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe boyoka mobateli ya Nzambe epai na mokili, William Marrion Branham, koyebisa biso nyoso na ntina na: Esode Ya Misato 63-0630M.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya Liteya:

Esode 3:1-12

Genese Mokapo 37

Genese Mokapo 43

23-0924 KOPELAPELA YA MWINDA MOTANE YA ELEMBO YA KOYA NA YE

Nsango: 63-0623E KOPELAPELA YA MWINDA MOTANE YA ELEMBO YA KOYA NA YE

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Na Libala Na Nsómo Te, 

LIKEBISI!! LIKEBISI!! Mwinda motane mozali kopela pela. Kokweya ya ezipeli ekomi. Esengeli totia eloko nyoso pembeni, ELOKO NYOSO, mpe komilengela. Tozali na nsuka. Ntango tozalaki kozila uta ebandeli ekomi. Lisakoli lizali kokokisama sasaipi.

Nzambe azuaki mpongo na Ye ya nguya motindami na likolo mosika kotala mbula ntuku motoba koleka 1963 kino lelo, Nsánzá Ya Libwa 2023, komona oyo nyoso ekozala kosalema na mokolo na biso…Motindo mokili mokozala kati na yango, ezaleli mabe ya mwasi, lingómbá mpe lolenge na yango, bolema ya bato; nkanza, kufa miso, bolumbu, mama monene ya pite kati na bitape nyoso ya mbula-matali, kanyaka kati na politiki, mpe akebisaki biso oyo ekosalema. 

Sikawa tomoni yango kokokisama liboso na miso na biso kaka lokola ayebisaki biso ekozala. Biso nde baoyo tomoni kokokisama ya makambo oyo nyoso. Eloko nyoso ezali na esika na yango. Ekomi nzungu monene monene ya bosoto.

Mokili mobimba ezali kati na motindo ya kolenga. Bayebi elikia etikali te. Ezali kobeba nde mokolo nyoso. Nsomo ezali kozipa mabele. Nkita esili, kobomana na ntina te, basi balinga bakoma mibali, mpe mibali balinga bakoma mwasi. Eloko ata nini mpe eloko nyoso endimami. Nini nde ekokaki kokoma nan tango nini? Bayebi ete ezali lokola ngómbá ya móto; ekopasuka na sekonde ata nini. Bomoni yango likolo na bilongi na bango, kati na bikela, ELIKIA TE, NSOMO. 

Ata mangómbá oyo ba mibiangi Baklisto bazali koyamba babateli basi-mibali, lokola bakambi ya molimo ya bato. Ekomi mabe mingi koleka Sodomo mpe Gomola. Satana mpe bokonzi na ye bazali kosangana mpe bakomi moko. Akokisi ntina na ye.

KASI NKEMBO EPAI NA NZAMBE, kati na libebi nyoso oyo mpe nsomo, Tata abateli BISO, liboke na Ye ya bato baponami, Mwasi na Ye ya libala molingami ya motema, tobatelami kati na maboko na Ye mpe tozali na lisanga ya Molimo elongo na Ye lokola liboso soki moke te. Oyo nde ntango monene koleka ya bomoi na biso. Ezali bikamwa. Ezali nkembo. Eleki nzoto. Eleki oyo maloba ekoki kolimbola. 

Mosuni na biso mozali kokoma Liloba, mpe Liloba lizali kokoma mosuni; emonisami, endimisami. Bobele oyo Biblia elobaki ekokoma na mokolo oyo, ezali kokoma, mokolo na mokolo.

Makambo mazali kosalema mpe kokoma noki mpenza na motindo ete tokoki te komama yango soko bobele na mpasi te. Tozali mpenza pene ya koya na Nkolo na biso Yesu; kosangana elongo na Ye, epai wapi Liloba likomi Liloba.

Na makambo maye manso mazali kokoma nzinga nzinga na biso, to ZALA NA ESENGO SOKI MOKE TE KOLEKA, nsai koleka to kosepela koleka. Mitema na biso mpe bomoto na biso ezali ko punjwa punjwa na esengo ezangi maloba mpe etondi na nkembo. Ezali ekamwiseli.

Tozali kozua mpiko lokola naino liboso soki moke te, na boyebaka ete longwa na ebandeli mpenza, tobongisamaki kozala mwana mobali mpe mwana mwasi ya Nzambe. 

Tozali Mwasi na libala ya Klisto ngondo, tosukolami kati na makila ya Klisto. Mwana na Nzambe ya lokumu, ya nguya, na lisumu te kotelema elongo na Mwasi liloba azangi kobebisama, oyo apetoli na nzela ya Mai na Makila na Ye Moko. Tobongisamaki kati na tolo ya Tata liboso ya ebandeli ya ntango; lolenge moko ezalaki Ye….NKEMBO!! Aleluya!

Tozali kaka yango te, kasi noki mpenza tozali kokende na lipati ya libala kati na etando, kolata lopete ya libala ya baponami. Ayebaki BISO…kaka kobanza likolo na yango, AYEBAKI BISO liboso ya bozalisi ya mokkili, na bongo Aselimwisi lopete ya libala likolo na biso KUNA mpe atiaki NKOMBO NA BISO LIKOLO NA BUKU NA BOMOI YA MWANA NA MPATE, tolimbisami kaka te, kasi TOLONGISAMI.

Nzela ezali bobele moko kozala na oyo nyoso, osengeli koya na Nzela bobele moko Nzambe Apesi. Liloba ya ebandeli, KOFINA PLAY.

Tozali na matondi mingi tozali na emoniseli oyo. Ezali mpenza polele bó tala tala epai na biso. Mosuni mpe makila imonisi yango na biso te, kasi Tata na biso na likolo mpe ezali kaka te na maloba kati na elobeli na biso mpo na kolimbola na Ye boni tolingi Ye mpo na yango….NGOLU YA KOKAMWA.

Ezali na eloko te lokola koyoka mongóngó na Nzambe koloba na yo mbebu na litoi. Esengo oyo ezali kozindisa bomoto na biso. Kokamwa te, kobanza te, te, kolikia kutu te, TOYEBI, EZALI YANGO ELOBI NKOLO. Okoki kozala na endimiseli yango ya 100% esika mosusu ata nini te bobele likolo ya bande.

Nasepeli kobianga bino boya komibakisa kati na biso lokola tokoyoka Mongóngó ya Nzambe koyebisa biso nyoso na ntina na mokolo mozali biso kobika kati na yango, lokola azali koloba na nzela na mpongo na Ye mosakoli ya nguya mpe komemela biso Liteya: Kopela Pela Ya Mwinda Motane Ya Elembo Ya Koya Na Ye 63-0623E.

Tokozala koyangana longwa na nzinga nzinga ya mokili mobimba na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville. Soko okoki komibakisa kati na biso te, epai se epai ozuami, eloko se eloko ozali kosala, Fina Play mpe yoka Maloba Ya Bomoi Na Nseko.

Ndeko Joseph Branham

Makomi Ya Kotanga Liboso Ya Koyoka Liteya:

St. Matai 5:28/22:20/Mokapo ya 24

2 Timote Mokapo ya 4

Yuda 1:7

Genese Mokapo ya 6

23-0917 Kotelema Na Katikati

Nsango: 63-0623M Kotelema Na Katikati

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Baponami,

Nkolo na biso Yesu alingi biso mingi koleka, na motindo ete esepelisaki Ye kotindela biso mosakoli na mokolo na biso. Oyo atielaki ye motema 100%. Oyo akokaki koya mpe kobika kati na ye, mpo ákoka komimonisa kati na mosuni wana ya moto kobianga Mwasi na Ye ya libala.

Mosakoli na Ye alingaki biso mingi koleka na motindo ete apesaki biso elaka, mpe epai na Nzambe ete Liteya ya sika ata nini lisengelaki kobima longwa na mwa eyanganelo oyo. Alingaki kotia yango na bande, kobomba yango, mpo ete Mwasi na libala ya Nzambe ákoka kozala na Bilei ya Molimo ya kosala na yango lipati, ata wana ekozala ye asili kokende.

Nzambe alingaki mwanje na Ye mosakoli mingi koleka Asungaki mosakoli na Ye kobatela elaká na ye epai na biso.

Nsima ya Nzambe koloba na nzela ya mwanje na Ye ya nguya mpe komonisa kati na mobimba na yango mpe kolimbola Biblia mobimba epai na biso, nsima afungolaki nsóngé ya Libanga na lolengé ya piramidi, oyo kútu ekomámáki likolo te, mpe amonisaki Yango epai ya mwanje na Ye, ete ákoka kopesa mabombami na Ye nyoso epai na biso Mwasi na Ye ya libala.

Nzambe apesaki kútu emononeli epai ya Ndeko Roberson, wapi amonaki Likonzi ya móto kotombola mosakoli na Ye mpe komema ye na Elimwelo ya ntango, na nsima kozongisa ye kotia ye na motó ya mesa epai wapi abongwanaki.

Na nsima Molimo Mosanto alobaki mpe ayebisaki ye: “Tala mosali na Ngai. Mpe nabiangaki Ye kozala mosakoli na eleko oyo, kokamba bato bobele lokola Mose asalaki. Apesameli bokonzi ya koloba eloko ékelama.”

Ebiangeli ya Mose ezalaki nini? Asengelaki kosala nini? Nzambe apesaki Mose motindo kokamba bato na mokili ya elaká. Kasi mibali batelemaki baoyo bakanáki ete bakomikotisa kati na lotómo Nzambe apesaki Mose,na bolobáká: “ozali komimóna mingi koleka. Ozali komeka komitia ete bobele yo nde ozali na eloko ya koloba.”

Ekela oyo epesaki Nzambe mpasi mingi mpenza kino alobaki na Mose: “Kabwana na bango. Nakoboma kaka libóndo yango mobimba, mpe kobanda libota ya sika elongo na yo.” Mpe Mose akweaki liboso ya bozali ya Nzambe mpe alobaki asengelaki koboma ye liboso.

Soko Nzambe asengelaki kosilisa bato na mokolo ya biso, nani akokaki kolinga kotelema lokola Mose mpo na bato? Wapi nde tokozua moto oyo alingaki kotelema, to akokaki kotelema, oyo Nzambe alingaki kosepela na ye lokola asepelaki na Mose? Ezali bobele na bomoi ya moto moko na mabelé oyo ezali na ntina mingi epai ya Nzambe kotelemisa nkele na Ye, mwanje na Ye ya nsambo ya nguya.

Nzambe azalaki ntango nyoso na mwango. Mwasi na Ye ya libala akoyeba mwango yango mpe akotikala na Yango Liloba na Liloba. Bayebi basengeli kotikala na Mongóngó wana Nzambe aponaki kokamba bango kokóma na Mokili ya Elaká.

Nzambe alobaki na nzela ya mosakoli na Ye mpe apesaki esika monene kokende epai na epai, kaka lokola Noa asalaki kati na Masuwa na ebenga mpe engondó. Kasi bobele lokola ebengá oyo azongaki ntango nyoso kati na Masuwa, Mwasi ya libala akozonga ntango nyoso na Etindá, Mongóngó wana, BA BANDE.

Nani nde azalaki mosakoli ya Mokolo ya biso? Basakoli ya nguya bazalaki liboso baoyo Nzambe abiangaki mpe atindaki kokamba bato na Ye kati na bileko: Abalayama, Mose, Eliya, Elisa, kasi moko te na bango azalaki lokola mosakoli na nguya ya mokolo na biso. Abiangamaki na ebiangeli ya likolo koleka baoyo nyoso wana. Azalaki ye oyo Nzambe aponaki komonisa mabombami na Ye. Azalaki ye oyo Nzambe aponaki koloba eloko ézalisama longwa na eloko te. Azalaki ye oyo aponamaki komonisa Bobendami ya Misato. Azali ye oyo Nzambe aponaki kokamba Mwasi na Ye ya libala.

Bapambolami nini oyo tozali, Mwasi ya libala moponami ya Nzambe. Tokoki nde kozala na nse boni? Tokoki nde kozala na mawa boni? Satana amekaka kolembisa biso motema, kasi tozali na elonga, totiami elembo na kati, tobatelami kati na Masuwa. Bikuke bikangami. Eloko ya kosala biso mabe ezali te. Tozali Adama na Ye oyo azongisami.

Azali koya mpo na biso, Mwasi na Ye ya libala moponami. Ekozala na bókó na biso bakoyeba koleta kufa te, kasi bakobongwana na ntango moko, na kobweta liso. NKEMBO!!

Lokola moko na moko na bino, nazali na kosepela monene, lokola mokolo na mokolo, Liloba na Ye, Emoniseli na ngai oyo Apesaki ngai, ezali kokoba koya monene mpe monene lisusu. Nazali na nse ya botaleli na etingia mingi. Soko ayei lelo te, ntango mosusu lobi, kasi nayebi Azali koya noki mpenza mpe Azali koya MPO NA NGAI MPE MPO NA YO.

Yaka komibakisa na biso Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka Bilei bibombamaki kati na mwa esiká wana ezali biso kotala mpe koyoka: Kotelema Na Katikati 63-0623M. Tokobanda Liteya na molongó ya 27.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya boyoki Liteya:

Mituya 16: 3-4

23-0910 Elembo Ya Nsambo

Ubutumwa: 63-0324E  Elembo Ya Nsambo

Kuvoma Ubutumwa

Ibimenyeshejwe Ibimenyeshejwe ku bijanye n’ugusobanura mu zindi ndimi bikorerwa muri Branham Tabernacle

Molingami Mwasi na libala ya Bande,

Mokolo nini oyo tozali kobika kati na yango! Ntango monene nini oyo! Mabombami, sekelé, nyos’oyo ezali komonisamela biso mokolo na mokolo. Tomonaka te bobele oyo esili biso koleka, toyebi ngonga mpenza tozali kobika kati na yango mpe mpenza nini ezali liboso.

Tozali koyebisama molongó na molongó nini ekosalema. Azali polélé polélé koyebisa biso tozali ba nani, nani akozala kuna, mpe atá oyo ekosala biso. Bayuda 144.000, lingomba lipetolami na nzela ya Monyokó, basali kati na bilanga ya miwiti baoyo bakomema lokumu mpe nkembo ya bango kati na Mboka.

Kasi nambisa Ayebisi biso yango ekozala bino te…oh te, bozali Mwasi na Ngai ya Libala, bozali elongo na Ngai kati na Mboka yango. Bokozala te libanda kuna kosala mosala kati na bilanga ya miwiti, bozali baoyo ya Ngai ya motema. Bozali Mokonzi Mwasi na Ngai elongo na Ngai, Mokonzi na bino.

Bozali ndambo moko ya mokámá ya ndambo moko ya mitano Naponaki liboso ya bozalisi ya mokili. Nasalaki esika oyo BOBELE MPO NA BINO…MPE KAKA LOLENGE BOLINGAKA YANGO.

Bobele kokanisa, tozali koyangana nzinganzingá ya Mesa na Ye lokola Asololaka na biso mpóso nsima ya mpóso, mokolo nsima ya mokolo, ngonga nsima ya ngonga, komonisa Liloba na Ye ya bikamwa epai na biso. Ayebisaka biso lisusu mpe lisusu tozali banani; boni Alingi biso; oyo ezalaki, oyo ezali, mpe oyo ekosalema.

Maloba mazali te kolimbola oyo elingi koloba epai na biso. Ntango tofini play mpe toyoki Mongongó wana, tolongwaka na mokili oyo mpe na mbala moko tozali kofanda na bisika ya Likolo elongo na Ye. Milimo na biso milendisami. Toyoki Molimo Mosanto kotondisa bomoto na biso mobimba na Molimo na Ye. Ezali esengo eyebi kolimbolama te. Nzambe azali koloba NA BISO. Liloba moko na moko lilobami na ba bande wana, Alobaki mpo na biso. Ayebi mpenza oyo tokolinga koyoka mpe ntango tolingi koyoka yango…mpe mbala mingi tolingaka koyoka yango lisusu na lisusu….mpe ntango nyoso ETONDISAKA BOMOTO YA BISO.

Tolembaka soko moke te koyoka Ye koyebisa biso na ntina na Bimononeli, Ndotó, Oyo Elobi Nkolo, ngambo ya ezipelo, komona biso kati ya bilamba mpembé, Bobendami Ya Misato, kokela bisendé, Mopanga ya Nzambe oyo ekokani mpenza na litandu na ye, bilei bibombami, kotiama na motó ya Mesa, Nkáké, banje na Nguya koleka koya komema ye likolo, mwanje ya nsambo wana ya godi oyo azalaki na ndimbola mingi epai na ye, elembo ya seko na seko ya nsóngé nsambo ya ngómba oyo itangaka BRANHAM, ilobaka sé oyo elobami likolo ya ba bande wana, Nazali na Liloba ya bozangi kokwea, abiangamaki na ebiangeli ya likolo koleka, nakoyebisa bino EMONISELI YA NGAI, Nazali Mongóngó ya Nzambe epai ya bino, botikala na malakisi ya bande, Nakobianga bino Mwasi ya libala, hain’t, tote, fetch…tolingaka yango NYOSO.

Oyo nde komona na ngai. Mongóngó ya Nzambe likolo ya ba bande nde Mokano mwa Nzambe mobongi be, MPUTU. Koyokisa bande ezali Mokano mwa Nzambe mobongi be, MPUTU. Bokoki koyoka batei, balakisi, bantómá, basakoli, babateli, KASI bande izali, mpe isengeli kozala, Mongóngó ya litomba koleka bokoki koyoka, MPUTU. Mongóngó likolo ya ba bande nde Mongóngó sé moko Nzambe Ye mei alobaki: BOYOKA YE, MPUTU.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, natemeli moto moko te, nazali kaka mpo ya Mongóngó wana. Tosengeli, mpe nalingaka, baoyo nyoso balobaka ete balingi mpe bandimi Etindá oyo. Ata soko boyoki ete nazali koyebisa bato libunga kofina play, nalingi bino mpe nandimi ete bolingi ngai. Biso nyoso tolingi kozala kati na Mokano na Ye mobongi be. Nabondeli yo okóba kosala oyo Nzambe abiangaki yo kosala; koteya, kolakisa, kozala mobateli, nde yebisa etongá na yo Mongóngó ya litomba koleka basengeli koyoka ezali nini.

Bobele Mongóngó yango likolo ya bande nde elobaka eloko yango moko NTANGO NYOSO. Ebongwanaka ata moke te. Mwasi ya libala akoki BOBELE KOLOBA AMEN na Liloba moko na moko likolo ya ba bande, kasi Mwasi ya libala akoki te koloba AMEN na liloba moko na moko moto ata nani alobaka, MPUTU.

Soko ondimi yango te, ozali Mwasi ya libala te. Soko ondimi yango, boye okozala te na kpókosó koyebisa etongá na yo ete koyoka ba bande ezali Mongóngó ya litomba koleka bakoki koyoka.

Na bolobaká makambo maye nayoká koúta na ntómo ndenge na ndenge baoyo balobaka ete nazali koyebisa bato báyóka babateli na bango te mpe bálongwa na mangomba na bango, OYO EZALI SOLO TE. Nakoki kolinga koloba yango soko moke te mpe nandimaka yango te.

Ezali solo mingi bazali koloba makambo nalobá soki moke te, soko nandimá soko moke te. Nakoki kotunama mpo na bango te, kasi bobele oyo nalobaki mpe oyo nandimi. Nalobaki polele liboso ya bato mpe natiaki na lolenge ya mokandá oyo mpenza nandimi. Bazali/ ozali kotia boléngoli na yo likolo na oyo nazali koloba/ kolingi koloba.

Mwasi ya libala akoloba nyoso eloko moko. Ezali te bato babale koloba eloko moko. Mongóngó moko. Mosakoli moko. Mwasi ya libala moko.

Nandimi te ete bosengeli koyoka Liteya na ntango moko mpenza, lokola bandimi mingi na mokili mobimba basalaka, mpo ya kozala Mwasi ya libala, kasi nandimi ete bosengelaki kozala koyoka Mongóngó ya motindami mwanje ya nsambo mokolo mwa Lomingo na ntongo…botia Mongóngó wana LIBOSO.

Bobiangami koyoka elongo na biso: Elembo Ya Nsambo 63-0324E, mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola eteni ya Mwasi ya libala longwa na mokili mobimba akozala koyoka Mongóngó yango na ntango moko mpenza.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya boyoki Liteya:

Dutelenome 29: 16-19

I Mikonzi 12: 25-30

Ejekiele 48: 1-7, 23-29

Matai 24: 31-32

Emoniseli 7

Emoniseli 8:1

Emoniseli 10: 1-7

Emoniseli 14