All posts by admin5

20-0816 Bozali Na Nzambe Oyo Eyebani Te

Balingami Bandeko Mibali pe Basi,

Na lisungi na Nzambe, na nzela ya Liloba na Ye, pe kokokana na Liloba na Ye, mosakoli na Nzambe atalisaki polele awa liboso na biso Yesu Klisto na nzela ya kofina bouton ya koyoka liteya.  Mpo na Mwasi-na-libala na Ye, ezali Yesu Klisto motindo moko lobi, lelo pe libela-na-libela.

Bato mosusu bazali na miso, kasi bakoki komona te, bakoki pe kondima te. Bazali kokanisa ete tozali kokumbamela moto, kasi tozali kokumbamela  Nzambe oyo azipami kati na mbeki na Ye oyo aponama. Mpo na biso, ezali Nzambe na nguya oyo azipolami liboso na biso ndenge Alakaki ete Akosala kati na Liloba na Ye.

Yesu ayebisaki bango “boluka-luka na Makomi” mpo na komona eleko nini bazalaki kobika na yango. Kuna balingaki  komona ete Ye azalaki Liloba nyonso oyo ekomamaki na ntina na Ye.

Mbala moko lisusu, na eleko na biso, Alobaki na biso ete “toluka-luka na Makomi”, kotanga Malachie 4, Emoniseli 10:7, Luka 17:30 pe Yoane 16:30 mpo yango ezali koloba polele mpenza Nani NGAI NAZALAKI pe nani NGAI NAZALI lelo. Tosili kotanga Makomi pe tondimi ete mosakoli na Ye akokisaki Liloba nyonso. Ezali Nzambe oyo azali komizipa Ye moko, na sima azali komimonisa Ye moko, na bato oyo bandimi Ye.

Lelo oyo, sima na mibu nkoto mibale, tomoni motindo yango moko Yesu Klisto  kati na nguya ya Lisekwa na Ye, atelemi kati-kati na biso, azali kosala makambo oyo Asalaki na ntango wana pe alakaki ete akosala yango na eleko na biso : Mwana na Moto oyo azali kati na nzoto pe azali komonisa Liloba na Ye na Mwasi-na-libala na Ye.

Libaku kitoko nini oyo tozali na yango lelo oyo, mpo na kotelema Liboso na Ye ndenge bazalaki na yango na eleko wana. Ata bongo, na ntina na biloba-loba ya bato, bazali koboya Yango mpo bazangi koyeba  Bozali na Ye, oyo Ye alakaki ete akosala lelo.

Bokoki kokanisa likambo ya kozanga kozua libaku oyo bozali na yango mpo na koyoka Mongongo yango lelo na losambo na bino? Moto moko oyo azali kolobela yo makambo lokola balobelaki mokonzi-mwasi ya Sheba? “Sikawa, mwana na ngai, osengeli na yo kosangana na bato wana te, biso tosepelaka na kolamuka wana te ya kobeta ba-bandes na losambo, osengeli kokende kuna te. Ezali bobele makambo ya pamba-pamba. Bato yango balobaka ete bandimaka  MALOBA NYONSO elobami na ba-bandes, ete ezali Etemelo na bango. Soki likambo ya ndenge wana ezalaki ete esalema, elingaki kozala nde awa na losambo na biso na nzela ya mosala ya koteya.”

Nzambe, na eleko nyonso, ntango Atindaki Nsango na Ye, oyo ezalaki Liloba na Ye, pe atalisaki Yango polele na eleko wana; bato oyo bandimaki yango, ezalaki eleko moko ya nkembo mpo na bango; bato oyo bandimaki Yango te, bakotaki na kobulungana. Ezalaka bongo ntango nyonso.

Tosili kososola pe kondima ete Nzambe na Lola asili komonana liboso na biso na lolenge ya Liloba na Ye. Ezali Liloba elakamaki mpo na eleko oyo emonisami polele. Ezali Liloba elakamaki ya eleko ya Mose te, to ya eleko mosusu te, ezali elaka ya Liloba mpo na eleko  oyo .

Ezali  Makambo ya Mikolo Oyo Emonisami Polele na Lisakoli , ezali koyebisa biso été  Kokambama na biso ezali  Klisto ya Bileko Nyonso oyo Atalisami , yango ezali  Bozali na Nzambe Oyo Eyebani Te.

Lisakoli esili kokokisama. Kokambama na Ye esili komonisama. Asili Komitalisa Ye moko na biso na eleko na biso. Mokolo na Lomingo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, tokosangana elongo mpo na koyoka Liloba ndenge Akolobela biso : Bozali Na Nzambe Oyo Eyebani Te , eteyami mokolo ya 18 juin 1964

Ndeko Joseph Branham


Makomi ya kotanga liboso ya Liteya :

Matai 12:38-42
Luka 17:28-32
Deuteronome 18:15

Elimbolami Uta Na:
https://branham.org/en/articles/8142020_TheEaglesGatheringTogether

20-0809 Klisto Ya Bileko Nyonso Atalisami Polele

Balingami Bana-mibali pe Bana-basi ya Nzambe,

Na ebandeli Liloba ezalaki, pe Liloba ezalaki Nzambe, pe Liloba elataki nzoto pe efandaki elongo na biso. Ezali Yesu Klisto motindo moko lobi, lelo, pe libela-na-libela.

Tozali mpenza na assurance oyo epambolami ete Tata asili kopesa biso Emoniseli ya Ye moko na eleko na biso. Nzambe azali kobongola lolenge na Ye, En morphe, pe lelo ezali mbala moko lisusu oyo Nzambe amonisami kati na nzoto, Nsango ya ntango, Pole ya eleko na biso.

Pe na eleko oyo ya suka, Azali kolobela bato na nzela ya Mwana na Ye, Klisto Yesu, oyo azali komitalisa Ye moko. Na boye Klisto azali nini? Liloba. Liloba ya nini, liloba ya Mose? Iyo, kasi lelo Azali Liloba oyo emonisami mpo na eleko oyo.

Bosengeli komona Ye pe kososola Ye lokola Liloba oyo emonisami mpo na lelo na biso. Bosengeli kokota sima na elamba, mpo na komona Nzambe oyo azipolami, ezali moto te, kasi Nzambe oyo azipami na elamba pe azali koloba na nzela ya moto.

Sikawa, moto ye moko azalaki Nzambe te, ata pe nzoto ya Yesu Klisto ezalaki Nzambe te. Azalaki moto, kasi Nzambe azipamaki na elamba sima na Ye. Ntango nyonso, Nzambe amizipaka Ye moko liboso na bato, pe Amimonisaka na bato oyo bakondima yango.

Osengeli liboso kondima pe kososola Ye oyo azipami na kati ya nzoto ya moto lokola Mobikisi na yo moko. Na sima osengeli kondima pe kososola Ye lokola Mwana Na Moto oyo azipami kati na nzoto na moto, mpo na kobimisa Mwasi-na-libala na Ye. Liloba elati nzoto lisusu.

Tondimi mpenza pe tososoli ete Ye azali Mwana na Nzambe mpo na eleko na biso. Pe, na ntina na yango, tokozua Lifuti na Ye.

“ Na baoyo nyonso basili koyamba Ye, Apesaki bango makoki ya kokoma bana-mibali na Nzambe.” Ezali pe bongo lelo oyo, ntango tomoni likambo monene oyo ya Molimo Mosanto komonisama polele. “Na baoyo nyonso bayambi Ye, Asili kopesa bango makoki ya kokoma bana-mibali pe bana-basi ya Nzambe.” Yesu Klisto oyo atalisami motindo moko, na nzela ya Liloba na Ye, na bileko nyonso.

Sikawa, mbala moko lisusu, Liloba esili kolata nzoto pe ezipami sima na nzoto ya moto. Tosili kokoma bana-mibali pe bana-basi na Ye. Mwango monene na Ye ezali kotalisama polele. Tozali Liloba Mwasi-na-libala na Ye oyo ezipami na nzoto na Moto.

Tosili kobima na sima ya mposo ya banyama, pe tosili kokota Liboso na Nzambe. Sikawa, Liloba esili kokoma likambo ya solo ya bomoi mpo na biso, wana tozingami na Nkembo ya Shekinah, pe tozali kolia Lipa-ya-bulee oyo epesamaka bobele na bandimi ya solo. Tozali banganga-nzambe, bonganga-nzambe ya bokonzi, libota mosanto, bato batiami pembeni, baoyo bapesaka mbeka ya molimo epai na Nzambe, tozali MWASI-NA-LIBALA na Ye.

Tata, totondi Yo mpenza mpo na kososola Yo longwa ebandeli kino na suka, Yesu Klisto motindo moko lobi, lelo pe libela-na-libela. Sikawa, Yo ozali kosangisa Mwasi-na-libala na Yo na mokili mobimba mpo na koyebisa biso nani Yo OZALAKI, nani Yo OZALI, pe ba-nani BISO TOZALI.

Tika ete mitema na biso esepela ntango Akoloba pe Akomimonisa na biso mokolo na Lomingo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koloba na biso ete Ye Azali: Klisto Ya Bileko Nyonso Atalisami Polele, eteyamaki mokolo ya 17 juin 1964.

Ndeko Joseph Branham

___________

Makomi ya kotanga liboso ya Liteya:

Dutelonome 18:15
Zakaria 14:6
Malakia 3: 1-6
Luka 17: 28-30
Yoane 1:1 / 4:1-30 / 8: 57-58 / 10:32-39
Baebele 1:1 / 4:12 / 13:8
Emoniseli 22:19

Elimbolami Uta Na:
https://branham.org/en/articles/872020_TheEaglesGatheringTogether

20-0805 BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

Mokolo ya 5 aout 2020

Bandeko Mibali pe Basi,

Mitema na biso etondaki mpenza na esengo ntango Azalaki kolobela biso mokolo na Lomingo ete tobongisamaki mpo na Bomoi na Seko.

Na ntango oyo bato mosusu bazali na miso, kasi bakoki komona Yango te, bazali na matoyi pe bakoki koyoka Yango te, biso tosilaki koponama mpo na kozua Emoniseli ya Yesu Klisto na eleko na biso. Biso tosili kondima Bokambami ya Solo ya Nzambe, Liloba na Ye, Nsango Oyo, Moto ya Yesu Klisto, Molimo Mosanto na Ye, nyonso wana ezali eloko moko.

Yesu alobaki:” Yaka, Landa Ngai.”

Polo alobali:” Bozala balandi na ngai, lokola ngai pe nazali molandi ya Klisto.”

Ndeko Branham alobaki: ”Nayebi ete bino, bandeko na biso, bozali kotalela ngai na lolenge moko lokola etemelo na bino na makambo oyo… ntango nyonso oyo ngai nazali kolanda Nzambe lokola Polo alobaki na Makomi ete:”Bino bolanda ngai, lokola ngai nazolanda Klisto.”

Polo azalaki koluka kozua esika na Yesu te, to pe Ndeko Branham, biso pe te, kasi ezali Emoniseli ya Yesu Klisto mpo na eleko na biso, yango nde ezali nzela oyo ebongisami, pe biso tosilaki kobongisama liboso mpo na kozua Emoniseli yango.

Tozali mpenza kozongisa matondi mpo na Emoniseli oyo. Ye azalaki kolengela biso mbala moko lisusu mpo tokoka kokumisa Ye, kokumbamela Ye, pe kosala mayangani ya mabondeli elongo na Ye, mikolo nyonso, mokolo mobimba.

Ndeko Joseph Branham

Elimbolami Uta Na:
https://branham.org/fr/articles/852020_TheEaglesGatheringTogether

20-0802 Kokambama

BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

Mokanda ya 01/08/2020

Bandeko Balingami ya ba-Bandes

Tozali kobika na ntango moko ya kitoko mingi mpenza. Ndenge Alakaki na kati ya Liloba na Ye, mabombami esili kofungwama pe emonisami na etonga moko ya bato. Kotalisama mobimba ya Moto ya Yesu Klisto esili komonisama polele kati na nzoto ya Mwasi-na-libala na Ye.

Makambo ya mikolo oyo tozali komona kosalema lelo esilaki kotalisama na biso na nzela ya masakoli. Makomi ezali kokokisama mokolo na mokolo. Makambo oyo elobamaki na Biblia ezali kofungolama polele na miso na biso. Tozali kobika sikawa na Eleko ya Mwasi-na-libala.

Tozali momboto ya Nzambe oyo ebongisama liboso mpo na Bomoi na Seko. Azali kobenga biso “Mwasi Moponami  na Ye”, “Mwasi-na-libala na Ye”. Mpo na nini? Mpo tozali Liloba na Nzambe likolo na Liloba. Tozali na fulu moko te na kati na biso, bobele Liloba ya peto ya solo mpo na eleko, Nsango Oyo elobami na biso na nzela ya mosakoli na Ye.

Ezali bobele na eloko moko oyo ekoki kokomisa Lingomba Mwasi-na-libala pe ekoki kopesa Ye KONDIMA ya konetolama oyo esengeli : Malaki 4. Mongongo na Nzambe oyo elobami na nzela ya motindami na Ye.

Nzambe abongisaka ntango nyonso nzela moko mpo na eleko moko na moko. Abongolaka ata moke te mwango na Ye to lolenge na Ye ya kosala makambo, mpo Azali motindo moko lobi, lelo pe libela-na-libela. Nzambe atindaka ntango nyonso mosakoli moko mpo na kokamba bato na Ye. Pe lelo oyo, Asili kotinda mosakoli ya monene koleka ntango nyonso, William Marrion Branham, mpo na kokamba Mwasi-na-libala na Ye.

Ezalaki na bato ya Nzambe minene mosusu na mokili ntango Polo akomaki Biblia, kasi eloko nini Polo atindaki Mwasi-na-libala asala na eleko na ye, BOLANDA NGAI, NDENGE NGAI NAZALI KOLANDA KLISTO.

Na eleko moko na moko, lingomba ekweyaka pe ekotaka na mobulu. Bato batangwaka mosika na Liloba ya Solo pe babakisaka lisosoli na bango moko na yango. Elakamaki kati na Liloba ete molimo ya Dathan pe Koré ekomonisama lisusu na eleko oyo pe ekoloba makambo ndenge moko bango balobaki na ntango wana, ete:”Ozali yo moko mosanto te, biso pe tozali ba-santo, Molimo Mosanto akambaka biso.” Nkolo alobaki na Mose : Kabwana na bato wana. Alobaki na biso nini mokolo na Lomingo?

Bango nyonso wana baliaki eloko yango moko, bango nyonso babinaki na Molimo, bango nyonso bazalalaki na makambo nyonso esika moko, kasi ntango ekomaki eleko ya kokabwana, Liloba ekabolaki. Ezali pe bongo lelo! Liloba esili kokabola!

Liloba ezali kosala ndenge moko lelo. Oyo ezali eleko bobele moko oyo Yesu atelemaki na ekuke pe azalaki kobeta, mpo Abwakamaki libanda. Ezali na nzela bobele moko mpo na KOZALA NA BOSOLO : fungola ekuke pe tika Ye akota wana otikali na Liloba ya ebandeli. Landa motindami ya eleko na biso oyo atatolami pe atalisami polele.

Likambo oyo ekokani lelo na lisolo ya mokambi mozui ya elenge. Bafalisai na Basadukai baboyaki koya epai na Yesu, balingaki koboma Ye, kasi elenge mobali oyo ayebaki ete azangaki eloko oyo esengelaki mpo na kozua Bomoi na seko. Ayebaki ete asengelaki kokende epai na Yesu mpo na kozua eyano ya SOLO, epai na ba-nganganzanbe na ye te, to epai na moto na Nzambe mosusu te, kasi bobele epai na Yesu.

Ntango abelemaki liboso na Yesu, Ye alingaki ye, mpo abokwamaki na ndako ya Baklisto, akokisaki mibeko nyonso ya Nzambe, pe abokwamaki mpo na kondima Liloba. Yesu alobaki na ye ete ezalaki na nzela BOBELE MOKO mpo na kozua Bomoi na Seko : tika makambo nyonso, mosolo na yo, lolendo na yo, pe landa Ye. Likambo yango elekaki mpenza makasi mpo na ye. Bakambi oyo azalaki na bango na bolenge na ye bazalaki na influence mingi likolo na ye kino aboyaki kolanda Nzela bobele moko oyo Nzambe abongisaki.

Ezali pe bongo lelo oyo, bosengeli kolanda nzela bobele moko oyo Nzambe abongisi mpo na kozua Bomoi na Seko.

Okoki koloba :”Nazali na Molimo Mosanto mpo na kokamba ngai.” Ezali ya solo, osengeli kolanda Molimo Mosanto kati na bomoi na yo, kasi mosakoli alobaki :

Bato mingi kati na bino bakanisaka:”Nazali na libatisi ya Molimo Mosanto, Nakokende na Lola.” Yango elingi koloba ata moke te ete okokende na Lola. Te, misié. Okoki kozua libatisi ya Molimo Mosanto ngonga nyonso ya bomoi na yo, pe ata bongo obungi pe okeyi na lifelo. Biblia elobi bongo.

Alobaki ete bosengeli koyeba Moto ya Yesu Klisto mpo na eleko na biso.

Yesu, ntango ayaki, Asengelaki kozala Mosakoli. Ezali solo! Pe lelo oyo, liboso Yesu aya lisusu, komonisama mobimba ya Moto ya Yesu Klisto esengeli kotalisama polele kati na nzoto. Bokanisa naino!

Yo ozali kolanda nani lelo oyo? Nani azali kokamba yo? Mpo na biso ezali Moto ya Yesu Klisto, Mongongo na Nzambe oyo ezali koloba na nzela ya motindami na Ye, oyo ezali kobenga Mwasi-na-libala na Ye abima. Tozali kolanda ye lokola ye azali kolanda Klisto. Pe esilaki komonisama na biso été nzela bobele moko oyo tokoki koyeba na bosolo été tozali na kati ya MOKANO MOBONGI BE na Ye pe tozali kolanda Ye, ezali Kofina Bouton ya kobeta liteya na nzela ya bande.

Ekozala mpenza ntango kitoko mingi mpo na Mwasi-na-libala na Ye mokolo na Lomingo ntango tokosangana na 13h00 , ngonga ya Jeffersonville, mpo na kozala eteni moko ya Makomi oyo ekokokisama, wana Tata akolobela biso na na liteya Kokambama 07.12.1965 , pe akoyebisa biso ete tozali na Kokambama ya solo-solo. Ye akoloba na nzela ya mosakoli na Ye, pe akoyebisa biso ete Azali koya noki mpo na biso, Mwasi-na-libala na Ye.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya Kokambama, 7.12.1965:

Matai 24:24,
Malako 10:17-22,
Yoane 1:1,
Yoane 14:19,
Ebele 11 :23-29,
Ebele 13 :8,  
Emoniseli Mokapo 22

Liwuti
https://branham.org/fr/articles/7302020_TheEaglesGatheringTogether

20-0729 Ba Mpongo Bazali Kosangana

Ba-Mpongo Bazali Kosangana ya mokolo ya 29 juillet 2020

Balingami Mimboto ya Nzambe,

Nazali kolikia ete bozali mpenza kosepela na mayangani na biso ya mabondeli ya mokolo ya Misato ndenge tolobelaka Ye, pe tokumisaka Ye mokolo mobimba. Tosepelaka mingi mpenza mpo na kolobela Ye ndenge nini tolingaka Ye mpo na nyonso oyo Asilaki kosala,  mpe Azali kosala mpo na kolobela biso mokolo na mokolo ete :”Bozali Mwasi-na-libala na Ngai.”

Nalingaka mingi mpenza ndenge Alobelaki biso mokolo na Lomingo mpe alendisaki biso koloba ete: Nzambe ayanolaka mabondeli na ntongo, na butu, na midi, na minuit, to na ntango nyonso.

Ezali na ntina moko te mpo na ntango oyo tobelelaka Ye, Ye azalaka ntango nyonso wana elongo na biso. Azali ata pene na biso lelo koleka ntango oyo Azalaki awa kati na nzoto lokola Mwana na Ye Yesu Klisto oyo alalaki kuna na suka ya masuwa elongo na bayekoli na Ye, pe mbonge eyaki. Lelo, Azali kobika NA KATI NA MOKO NA MOKO NA BISO. Mpo ete biso tozali :

Baoyo ya solo, baoyo babongisama na Nzambe, momboto ya solo mpenza, molimo ya Nzambe oyo ezalaki kati na Nzambe liboso ya kozalisama ya mokili; bomikanisela, bino baoyo bozali mpenza na Molimo na Nzambe na kati na bino na mpokwa oyo, bozalaki awa kati na Klisto mpo Ye azalaki litondi ya Liloba. Azalaki litondi ya Bonzanbe kati na nzoto. Nzambe azalaki na kati ya Klisto, mpo na kozongisa boyokani na mokili na Ye moko. Bondimi yango? Botala, Azalaki kati na Klisto. Boye, soki ozalaki kati na Nzambe, momboto, liloba, eteni ya mosala longwa ebandeli, boye otambolaki elongo na Ye awa na mokili, osololaki na Ye na mokili, omonaki mpasi elongo na Ye na mokili, okufaki elongo na Ye na Kalvari, pe osekwaki elongo na Ye lisusu; pe sikawa ofandi na bisika ya Likolo na kati ya Klisto Yesu, ozali na boyokani na Ye (Liloba).

SIKAWA tofandi elongo na bisika ya Likolo, tozali na lisangana na Ye mokolo mobimba. Tosili kokoma LILOBA, LIKOLO NA LILOBA, LIKOLO NA LILOBA.

Lelo tokotambola na Ye, tokosolola na Ye, pe tokokumbamela Ye MOKOLO MOBIMBA NDENGE Akosolola na bison a biso nzela nzela. Tika ete mbala moko lisusu tosangana elongo na mabondeli na ngonga ya 12h00, 15h00 pe 18h00, na ngonnga ya Jeffersonville, pe tobondela bamoko mpo na bamosusu.

Ndeko Joseph Branham

20-0725 Makambo ya Mikolo Oyo Etalisami Polele na Lisakoli

Nsango: 65-1206 Makambo ya Mikolo Oyo Etalisami Polele na Lisakoli

Ba-Mpongo Bazali Kosangana ya mokolo ya 25 juillet 2020

Balingami Ba-Mpongo,

Mokolo kitoko nini oyo, ngonga kitoko nini oyo tozali kobika na yango. Tozali kobika lisusu na mikolo  ya Biblia, Makomi ezali kokokisama kati na biso pe bisika nyonso zinga-zinga na biso. Mikolo oyo Mwasi-na-libala azalaki na mposa ya kobika na yango longwa na ntango ya Adama esili kokoma.

Masakoli oyo totangaki na kati na ba-Biblia na biso, makambo oyo basakoli balobelaki biso, ezali kokokisama mokolo na mokolo, pe tozali eteni na yango. Tozali na kimia wana tozali kofanda na bisika bileki likolo, Liboso na Liloba Yango, tozali kotela pe tozali kokomela na mobimba. Kotalisama mobimba ya kotatolama ya Yesu Klisto oyo azali motindo moko lobi, lelo, pe libela na libela, ezali kosalema.

Etalisamaki na biso ete Liloba esukaki na Yesu te. Oyo wana ezalaki bobele ebandeli ; esengelaki lisusu ete koleka Yesu éya. Abandaki bobele na kozongisama ya Lingomba na Ye. Alobaki : «Nakoya lisusu na nzoto na moto ndenge Nasalaki na Abalayama, pe nakomonisa bino ata koleka Liloba. Na bongo, mpo na kozua Liloba yango, tosengeli kozala na Emoniseli uta na Nzambe mpo na koyeba nani Yesu Klisto azali NA ELEKO NA BISO.

Bomoni, mwango mobimba_mobimba, Lingomba mobimba, etongami likolo na emoniseli uta na Nzambe. Yesu alobaki, na Matai, mokapo ya 16 ete:”Mosuni pe makila emonisi yo likambo oyo te, kasi Tata na Ngai oyo azali na Likolo nde asili komonisa yo yango.” Ezalaki eloko nini? Emoniseli ya Nani Ye azalaki. “Pe likolo na Libanga oyo, Nakotonga Lingomba na Ngai, pe bikuke na ewelo ekoki kolonga Yango te.” Bomoni? Emoniseli ya Yesu Klisto na ntango oyo, ezali oyo Ye azalaki na ntango mosusu te, ezali oyo Ye azali sikawa, Biblia elobi, ezali kokola kati na Mwasi-na-libala, kino na epimelo mobimba.

Ndenge Alakaki ete Akosala, Asili kopesa biso Emoniseli mobimba pe ya solo ya Ye moko uta na Nzambe mpo na eleko  na biso, pe tozali kokola kati na Mwasi-na-libala na Ye kino na epimelo mobimba

Tokoki mpenza kobanda kososola makambo nyonso oyo ezali kosalema? Sikawa Asili kotalisa biso mwango monene na Ye kino na suka. Esili nye, Asili kozongisa Mwasi-na-libala na Ye oyo abongisama liboso na Liloba ya Ebandeli, pe tosili kokoma Liloba likolo na Liloba likolo na Liloba.

Konetolama ebelemi, Etape ya Sika esili kobima; tozali ba-mbuma ya liboso likolo na nzete wana tozali kofanda Liboso na Mwana, Liloba Elobami mpo na eleko na biso, pe tosili komibongisa mpo na Kobuka-mbuma.

Tosengeli kosanzola Ye ndenge nini! Tosengeli kokumbamela Ye miniti nyonso ya ngonga nyonso ya mokolo. Asili komonisa biso été biso tozali nkona na Ye, eteni na mosala longwa ebandeli. Totambolaki elongo na Ye, tosololaki na Ye, tomonaki mpasi elongo na Ye, tokufaki elongo na Ye na Kalvari, kasi tosekwaki elongo na Ye na bisika na likolo, tozali kosangana na Ye ntango Azolobela biso été tozali Mwasi-na-libala na Ye.

Tolingi te ete liloba mosusu esangana na biso. Esengeli été ézala Lipa ya Nzambe oyo ezangi fùlù, Liloba na Nzambe ya peto, yango ezali Nsango na ntango. Tolingi koyoka Yango mbala moko longwa na motindami na Ye ya eleko oyo atatolamaki : Yesu Klisto Ye moko koloba na nzela ya bibebu ya moto. Ezali liloba ya moto te, Ezali Liloba ya bomoi ya Nzambe kolobela Mwasi-na-libala na Ye na nzela ya mosakoli. Lola pe nsé ekoleka, kasi Yango ekoki kokweya te.

Mpo na biso, ezali Nsango oyo, ba-bandes oyo, Mongongo na Nzambe… TO ELOKO MOKO TE.

Tika ete ba-mpongo basangana na mokili mobimba mokolo na Lomingo oyo zinga-zinga na Mosuni-ya-makila na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Ye komonisa biso:”Makambo ya Mikolo Oyo Etalisami Polele na Lisakoli”, eteyamaki mokolo ya 6 décembre 1965.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka LIteya:

Genese 22

Deuteronome 18:15

Psaumes 16:10 /22:1 / 22:18 / 22:7-8 / 35:11

Esaie 7:14 / 9:6 / 35:7 / 50:6 / 53:9 / 53:12 / 40:3

Amos 3:7

Zacharie 11:12 / 13:7 / 14:7

Malachie 3:1 / 4:5-6

Matthieu 4:4 / 24:24/ 11:1-19

Luc 17:22-30 / 24:13–27

Hebreux 13:8 / 1:1

Jean 1:1

Apocalypse 3:14-21 / 10:7

20-0719 Makambo Oyo Ekozala

Ba-Mpongo Bazali Kosangana ya mokolo ya 18 juillet 2020

Balingami oyo Babongi Be,

Tokomi na suka ya ntango. Tosili kozonga lisusu na Mbuma, na Momboto ya Ebandeli. Matiti mabe esili kobwakama mosika na biso, pe tozali sikawa komitia Liboso na Mwana mpo totela.

Mwana yango ezali Liloba na Ye oyo emonisami na ntango oyo : Nsango oyo. Ezali emoniseli ya Liloba na eleko na Yango, pe tozali komitia Liboso na Ye, kotela mokolo na mokolo na nzela ya “Kofina Bouton-ya-koyoka liteya.”

Tozali Liloba likolo na Liloba oyo ekobimisa epimelo mobimba ya Mwasi-na-libala ya Nkolo Yesu Klisto. Ezali emoniseli ya kotalisama ya Liloba

Toyebi ete Liloba na Nkolo eyaka BOBELE na mosakoli, mpo ye azali motalisi ya Liloba na Nzambe. Akoki koloba eloko moko te; akoki koloba ata likanisi na ye moko te. Akoki koloba bobele makambo oyo Nzambe amonisi ye. Ezali makanisi na Nzambe oyo elobami na monoko ya mosakoli na Ye. Esilaki komonisama na biso ete Mongongo ya Malaki 4 ezali Liloba oyo etalisami mpo na ntango na biso, mpo na kobimisa Mwasi-na-libala na Ye.

Eloko nini ekosangisa Mwasi-na-libala ?

Nsango ezali kosangisa Mwasi-na-libala, bomoni, mongongo makasi

Mongongo makasi esili koyokana. Ezali kosangisa Mwasi-na-libala na Ye na mokili mobimba, koloba ete “tomibongisa, Konetolama ebelemi, bokangama na Liloba yango.”

Lokola tosili kokangama na Liloba Yango, alobaki na biso mokolo na Lomingo ete :”Namonaki bino kuna. Etonga na babulami nyonso oyo balati bilamba malamu mpenza. Bazalaki na kimia pe na peto, kotambola boye, kolanda matambe ya Nsango-malamu. Azalaki Liloba.”

Mosuni pe makila emonisaki biso yango te, kasi Tata na biso oyo azali na Likolo nde alakisaki biso likambo oyo. Ezali bobele emoniseli ya nani Ye azalaki na eleko mosusu te, kasi emoniseli ya nani Ye azali sikawa, Liloba oyo elati nzoto kati na mosakoli na Ye, Liloba oyo elati nzoto KATI NA BISO.

Tozali kokende na Bokonzi oyo ebongi be, boye tosengeli kozala bato oyo babongi be, mpo tosili kobalana na Mwana na Nzambe oyo abongi be, bongo tosengeli kozala Mwasi-na-libala oyo abongi be. Na boye, tokokoma bongo ndenge mosusu nini libanda na Liloba na Nzambe oyo ebongi be, NSANGO OYO?

Mateya oyo esilaki kobombama pe kobongisama mpo na eleko oyo mpenza, mpo na ntango oyo mpenza. Ayebaki liboso na kozalisama na mokili ete tokoyoka Liteya oyo mokolo na Lomingo ntango Akolobela biso na nzela ya mosakoli na Ye makambo nyonso oyo ekosalema Kuna.

Asilaki kokende kobongisa makambo nyonso mpo na biso liboso tokoma kuna. Azali kobongisa yango bobele ndenge tolingaka yango. Ekozala esika ya solo oyo tokosala makambo, esika oyo tokobika. Tokosala misala. Tokosepela. Tokokende esika ya Bomoi, ya Bomoi na Seko ya solo. Tokokende na Lola, na paradiso…NKEMBO!

Eloko moko te ekopekisa biso kokoma kuna. Esilaki komonisama ete tozali Mwasi-na-libala na Ye, tozali Liloba oyo elati nzoto, Konetolama ebelemi, Atongeli biso Bokonzi moko bobele mpo na biso, boye tokoki kolekisa Seko-na-Seko elongo na Ye pe bamoko na bamosusu.

Aponaki mosakoli na Ye liboso na ebandeli ya ntango mpo na koyebisa biso makambo oyo nyonso, Makambo Oyo Ekozala, eteyamaki mokolo ya 5 décembre 1965.

Tika ete Mwasi-na-libala na Ye asangana mokolo na Lomingo oyo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Nzambe koloba na nzela ya bibebu ya moto, wana Akoyebisa Mwasi-na-libala na Ye ba-nani tozali, makambo nyonso na esika tokokende pe ekozala lolenge nini ntango tokokoma kuma.

Ndeko Joseph Branham

20-0712 Konetolama

Ba-Mpongo Bazali Kosangana_– 11 juillet 2020

Balingami Bana-mibali pe bana-basi oyo bamonisami,

Nkombo na Nkolo ekumisama mpo na Bilei na Ye oyo Ebombamaki. Mwasi-na-libala azali kosala féti mokolo na mokolo kolia Mana Oyo Ebombamaki. Nsango sima na Nsango Azali kokoba koyebisa biso:”Ba-Bandes, ba-Bandes, ba-Bandes; YANGO ezali Bilei na Ngai ya Molimo oyo esengeli kopesa bino mpiko, mpo bozali Mwasi-na-libala na Ngai oyo abongisama liboso.”

Tosengeli mpenza na makambo mingi koleka oyo ezwami na ba-bandes? Eloko mosusu ezali oyo tosengeli koyoka? Motindami na Ye asengaki ata na Tata ete amonisa na mokengeli eloko nini asengeli koleisa na Lingomba na ye ntango ye akozala te.

Pambola mokengeli molingami na biso, mobateli-mpate. Tobondeli ete Opakola ye na Molimo Mosanto, na Liloba na Yo mpo na komonisa bango pe koleisa ba-mpate. Pe mokolo moko, kala mingi te, Otalisaki emoniseli ya mongombo moke awa, na ntina na Bilei oyo ebombamaki, ete ntango moko ekoya oyo bato bakosengela na yango nyonso.

Ba-bandes ezali Bilei Oyo Ebombamaki pe esengeli na  mokengeli mpo na koleisa ba-mpate. Asengelaki koleisa bango na koloba boye:”Fina bouton ya Koyoka liteya.”

Bososoli yango? Soki bobungi nzela, bozongela bande oyo lisusu. Nayebi te ntango boni nakoumela kozala elongo na bino. Bomikanisela, likambo oyo ezali Solo, ya YANGO ELOBI NKOLO. Ezali Solo. Ezali Makomi.

Nazali kozongisa matondi mingi  mpo na kozala na emoniseli yango pe kozala moko kati na lotomo ya monene koleka na mokili : Lotomo na Ye ya ba-Bandes.

Nazali kososola ete nazali koloba na bato nkoto na nkoto, na nzela ya bande, boyebi, pe tozali na lotomo ya ba-bandes na mokili mobimba.

Alobaki na biso ete Nzambe, liboso mokili esalema mpenza, azalaki na ba-mwango misato na sekele ya libombami monene na Ye. Ya liboso, komitalisa mobimba Ye moko kati na Klisto. Ya mibale, kozala na esika ya liboso mpo na komitalisa Ye moko na nzela ya Lingomba na Ye, oyo ezali biso, Mwasi-na-libala na Ye. Pe, ya misato, kozongisa Bokonzi na esika na yango mpenza oyo ekweyaki na masumu na nzela ya Adama ya liboso.

Sikawa, elaka yango ezali kokokisama. Klisto asili koya kati na Mwasi-na-libala na Ye, azali kosala misala ndenge moko Asalaki na ebandeli, pe azali kolengela pe kokokisa Liloba na Ye. Motò na Nzòto ezali kokoma eloko Moko na misala, na elembo, pe na Bomoi, ndenge Alakaki ete Akosala na mikolo ya suka.

Tozali Mwasi-na-libala na Ye, Nzoto ya Yesu Klisto, pe tokoki koyoka bobele Liloba na Ye oyo etatolami. Mpo tozali Liloba oyo ebakisami na Liloba, kobakisa na Liloba, yango nde ekomema epimelo mobimba ya Mwasi-na-libala ya Nkolo Yesu Klisto.

Tozali koyoka Nzambe oyo amonisami na nzoto pe azali koloba na Mwasi-na-libala na Ye. Sikawa tosili kokumba zemi ya Molimo na Ye. Klisto azali kobika na nzela na biso pe na kati na biso. Tosili kokoma bakangami ya eloko mosusu te, bobele Liloba na Ye. Tokoki kosala ekobo te; tosili mpenza kokumba zemi ya Liloba na Ye.

Mwasi-na-libala asili komibongisa Ye moko na nzela ya koyoka Liloba oyo esilaki kobongisama mpo na eleko na biso. Ntango esili kokoka, Konetolama ebelemi, pe tozali kokoma elonga na Ye.

Wana tokosangana elongo mokolo na Lomingo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville mpo na koyoka nzela na Ye oyo ebongisama mpo na eleko na biso, tobongisa minda na biso pe tomilengela biso moko wana tokoyoka liteya oyo “KONETOLAMA”, eteyamaki mokolo ya 4 décembre 1965.

Ndeko Joseph Branham

20-0705 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

Nsango: 63-0728 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

BranhamTabernacle.org

Balingami Baponami,

Lelo oyo Mwasi-na-libala ya Klisto azali kosepela lokola esalema naino te na lisolo ya mokili, mpo ete kokokana na Liloba na Nzambe, Asili komonisa biso ete tozali na Bomoi na Seko pe tokoleka na kosambisama te, kasi tosili kolongwa na kufa pe tozali na Bomoi, mpo Ye azwaki kosambisama na biso mpo na biso.

Na sima, Amonisaki biso likambo moko ya koleka, ya monene koleka. Olobi MONENE KOLEKA? Iyo, mpo tozali bobele na Bomoi na Seko te (mpo ekozala na bato nkoto na nkoto oyo bakozwa Bomoi na Seko), kasi Amonisaki pe alobaki na biso ete : “Nazali na eloko moko oyo Nasili kolengela bobele mpo na bino. Eloko moko oyo bango bakozua te, ee, MPO BINO BOZALI MWASI-NA-LIBALA NA NGAI OYO APONAMI PE ABONGISAMA LIBOSO, na yango Nasili kobongisa esika moko elengelami MPENZA BOBELE MPO NA BINO NA NGAI.”

Ata bolali, ata bolali te, ata bosali likambo moko to bosali eloko moko te, ata bokundami esika nini, soki bokundami ata moke te, ata bongo bokoya kaka! Eloko moko te ekopekisa bino. Bokozala wana!”

Tokozala wana pe eloko ata moko te ekotelemisa biso, eloko moko te. Pe ntango tokokoma kuna, tokotonga ba-ndako, pe tokovanda na ba-ndako yango. Tokolona bilanga ya vinyo, pe tokolia mbuma na yango. Tokolona te mpo moto mosusu akitela yango, TOKOLONA bilanga ya vinyo ya biso moko, tokotonga ba-ndako na biso moko, pe tokovanda kati na yango. Tokolekisa Seko-na-seko elongo, moko na moko elongo na Ye lokola Mwasi-na-libala na Ye.

Tozali komilengela mpo na komata na likolo na nguya na Nzambe. Tokomi na suka ya pyramide komilengela mpo na Konetolama. Pe ndenge nini toyebi ete makambo oyo ezali solo? Na nzela na emoniseli. Tosili kososola mokolo na biso, tosili kososola motindami na biso, pe sikawa tosili kososola ba-nani tozali..

Ata bongo, bokoki kokoma kuna bobele soki boyei na Nzela ebongisami na Nzambe. Yango ezali Nsango ya ngonga oyo elobami na nzela ya motindami oyo abongisami na Nzambe. Yango nde nzela moko oyo ebongisami mpo na lelo oyo.

Na Liteya ya sika moko na moko, tozali koyoka Ye kolobela biso lolenge nini Aponaki Mwasi-na-libala oyo akokweya te, oyo akokangama na Liloba yango, ata bato na mokili balobi ndenge nini mpo na Yango. Bango bakokangama na Liloba yango, mpo basili kobongisama liboso mpo na kotelema wana mpo Bazali eteni ya Liloba yango. Bakoyoka nsoni na yango te, kasi bakozala na LIPAMBO ya koloba ete:”Iyo, NAKOFINA BOUTON PLAY.”

Bososoli yango? Soki bokwei, bozongela lisusu bande oyo. Nayebi te ntango molai boni nakozala na bino elongo. Bomikanisela, oyo ezali Solo, ya YANGO ELOBI YAHWEH. Ezali Solo. Ezali Makomi.

Tozali mpenza kozela na motema lukuluku mpo na koyeba eloko nini Akomonisa biso na sima. Tosilaki komona lolenge nini Asangisaki biso elongo na mokili mobimba na ba-ndako na biso mpo na koyoka Bilei na Ye oyo Ebombamaki. Tozomona lolenge nini Azali komonisa makambo oyo tosilaki koyoka mbala na mbala, mbala mingi liboso, mibu na mibu, kasi sikawa ezali komonisama polele.

Kasi Liteya ya sima ekomonisa biso eloko nini?

Soki Nkolo alingi, mpo na kosukisa mayangani mike-mike oyo elandani uta nazalaki awa, mokolo na Lomingo na ntongo, nalingi koloba likolo na likambo moko na motuya mingi.

… likambo nalingi komeka kosala, soki Molimo Mosantu asungi ngai, ezali kozwa Nsango pe esika Yango ezali sikawa, pe kotonga Yango esika Ebandaki, pe kotonga Yango kino na ntango oyo tozali na yango.

Akoyebisa biso esika nini Liloba ebandaki pe akotonga longwa wana kino na mokolo oyo tozali na yango. Mokolo nini oyo mpo na Mwasi-na-libala na Ye.

Nzambe kati na Nzoto na Ye, Klisto; pe Klisto kati na Nzoto na Ye, Mwasi-na-libala. Oh-oh-oh, ee! Nzambe amonisami kati na Klisto, Klisto amonisami kati na Mwasi-na-libala! Pe lokola Nzambe abimisaki na nzoto ya Adama, mwasi, pe ye akweaki; na boye Nzambe abimisaki na nzoto ya Klisto, mosuni na Ye, Nzoto na Ye, oyo ezali Liloba na Ye, pe azali kobimisa Mwasi-na-libala oyo akokweya na nzela na denomination to endimeli moko te. Te, misie. Kasi Akozonga na Liloba na Nzambe ya peto, oyo ezangi litono pe ezali komonisama polele. Nazali na elikia ete mobali nyonso pe mwasi nyonso, oyo akoyoka bande oyo, akososola yango.

Tokoki kozela te mpo na koyoka Nzambe kolobela biso na nzela ya motindami na Ye pe koyebisa biso ete tozali Liloba ya Nzambe yango ya peto, oyo ezangi litono pe ezali komonisama polele, wana tokoyoka bande.

Tosangana elongo zinga-zinga na ba-magnetophones na biso na mokili mobimba, wana tokofanda elongo na bisika ya likolo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Mongongo na Nzambe komonisa biso liteya oyo, KLISTO AZALI LIBOMBAMI NA NZAMBE OYO EMONISAMI, eteyami mokolo ya 28 juillet 1963.

Ndeko Joseph Branham

20-0628 Nzambe Abengaka Moto Na Kosambisama Te Kozanga Kokebisa Ye Liboso

Sango: 63-0724 NZAMBE ABENGAKA MOTO NA KOSAMBISAMA TE KOZANGA KOKEBISA YE LIBOSO

Balingani Bakangami,

Mokangami amikambaka ye moko te na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Balobaka na ye ntango nini akolamuka, ntango nino akolia, ntango nini akokende kolala, miniti moko na moko, ngonga moko na moko, ya mokolo na mokolo. Ezali na moto moko oyo azali kokamba bomoi na ye.

 Nzambe akumisama. Tozali kozongisa matondi mpo na kozala bakangani ya lolenge  wana mpo na Yesu Klisto,  wana Ye azali na bokonzi nyonso likolo na miniti moko na moko ya mokolo nyonso ya bomoi na biso.  Tozali na ntina ya komitungisa te mpo na likambo nini tokosala mokolo na mokolo, to eloko nini ekoki kosalema na mokolo moko na moko, mpo Azali kokamba matambe na biso na nzela mokolo na mokolo. Mabe moko te ekoki kokomela biso mpo Alobelaka biso na ntongo nyonso ete:”Bomitungisa te, Nakozala elongo na bino lelo. Nakotika bino to Nakobosana bino te, Nakozala elongo na bino na matambe nyonso ya nzela.”

Oyo ezali mpenza kobondisama pe kimia mpo na Mwasi-na-libala na Ye. Komitungisa ata moke te na likambo nini ekosalema na mokolo, tozali na bopemi, mpo ELOKO MOKO TE ekoki kokomela biso bobele soki ezali Mokano na Tata. Mposa na biso ezali bobele moko, kosalela Ye, kokanisaka Ye mokolo mobimba pe butu mobimba na nzela ya koumela kati na Liloba na Ye pe koyoka Mongongo na Nzambe kolobela biso wana Azolobela biso ete : “Bozali Liloba na Ngai oyo emonisami polele, Bozali Lingomba na Ngai mpo na eleko oyo.”

Soki tokokaki bobele kobatela yango na makanisi na biso, pe kokokana na Liloba na Nzambe, ete na mikolo oyo ya suka, Akozala na Lingomba moko, Akozala na libota moko. Pe Makambo oyo Ye alakaki, Akokokisa yango. Alobaki ete Akosala yango, pe tozali kobika na ntango yango. Tozali wana, Azali bobele komeka kokomisa biso bakangami ya solo sikawa, baoyo bakangami na kati elongo na Ye.

Nzoto ya Klisto esengeli kokangama na kati elongo na Ye, na position na yango, na boyokani, kosangana elongo na Liloba na Ye. Nsango oyo, Liloba Elobami na Ye, bobele yango nde ekoki kosala ete likambo yango esalema.

Mokolo na mokolo na bomoi na biso, tozomona lolenge Liloba ezali komonisama kati na biso pe na mokili. Tozoyoka Liloba kolobela biso pe koyebisa biso ete tozali Etape ya Sika, Mbuma oyo ezali likolo na Nzete, Adama na Ye oyo azongisami, Lingomba oyo Ye alobaki ete Akozala na yango, baoyo bakobeta ntembe na Liloba ata Moko te.

Na sima, tozomona ete Liloba ezomonisama polele na mokili oyo tozobika na yango mokolo na mokolo. Lisakoli ezali kokokisama, kosambisama ezali likolo na mokili. Mosakoli akebisaki biso wana atalaki na mosika pe amonaki ete likambo moko elingaki kosalema. Na sima alobaki na biso ete atalaki pe amonaki likambo nini ekosalema. Alobaki yango, pe eloko ata moko te na mokili ekoki kotelemisa yango.

Nzambe alakaki ete Akoyeisa kosambisama na mokili ata moke te soki naino akebisi bato te. Asalaka likambo ata moko te soki alobeli yango naino te na mosakoli na Ye likambo nini Alingi kosala. Likebisi epesama ntango nyonso. Makambo oyo tozali komona kosalema na mokili lelo oyo ezali kosalema bobele na pwasa te, ezali kosambisama nde ezosalema zinga-zinga na biso nyonso. Nandimi ete oyo ezali likebisi ya suka na mokili. Ozali kokangama naino na makambo ya mokili ? Nzambe alingi ete biso moko tokabwana na makambo nyonso ya mokili, tokoba te kobika elongo na mokili pe na Nzambe. Akebisi biso ete tomeka komikokanisa na mokili te, kasi tomikokanisa na Nzambe. Totia Ye na Liloba na Ye liboso na makambo nyonso.

Esika nini yo otelemi na Nsango na Ye ya eleko? Etemelo na yo ezali nini ? Esika na yo ezali wapi na oyo etali Liloba elobami oyo ekweyaka te na nzela ya mosakoli na Ye? Ondimaka Liloba nyonso ? Ozali kolanda nzela Nzambe abongisi mpo na eleko oyo, to ozali kotalela bato mosusu to lisanga ya bato?

Kosambisama ezali likolo na mokili, oyo ezali mbela ya suka. Azali koya mpo na Mwasi-na-libala na Ye. Konetolama esili kobelema. Abongisaki nzela ya kokimela na eleko ya Nowa. Nowa alengelaki bato; ezalaki mbela ya mawa liboso na kosambisama, Na mikolo ya Mose, Nzambe abongisaki nzela moko, bosengeli kondima Mose. Ezalaki na nzela bobele moko mpo na kokoma na mboka ya elaka, ezalaki kondima Liloba nyonso pe kolanda motindami na Ye, to kokufa.

Mosakoli akebisaki biso na ntina na mikolo oyo, pe sikawa tozomona makambo yango kotalisama polele. Bomitala malamu soki bozali kati na Masuwa ya Nzambe lelo oyo, Liloba na Ye, Nsango Oyo.

Ndenge tokosangana mbala moko lisusu na mokili mobimba mokolo na Lomingo, na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersoville, mpo na koyoka liteya oyo : NZAMBE ABENGAKA MOTO NA KOSAMBISAMA TE KOZANGA KOKEBISA YE LIBOSO, oyo eteyamaki mokolo ya 24 juillet 1963, tika ete totonda Nkolo mpo Asili komonisa biso nzela bobele moko oyo Ye abongiselaki biso mpo na kokima kosambisama na Ye : ezali Liloba na Ye.

Bro. Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Nsango :

  • Isaya 38:1-5
  • Amosa Mokapo 1