Category Archives: Uncategorized

23-0108 Bilei Ya Molimo Na Ntango Elongobani

NSANGO: 65-0718E Bilei Ya Molimo Na Ntango Elongobani

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami balukiluki ya mabanga ya motuya,

Ezali na liziba ya mai ya Emoniseli oyo ezali kopunjwapunjwa na kati na biso lokola esalemá naino liboso te. Toyokaki Etinda oyo bomoi na biso mobimba, mpe tondimaki ntango nyoso Liloba moko moko, kasi SASAIPI Emonisamaki kati na biso lokola naino liboso ata mbala moko te.

Sikawa nde ntango, sikawa nde ekeke oyo tozali komileisa na biloko bibombami ya Nzambe oyo ibómbami na mokili. Eloko oyo mokili mozali koseka nde eloko tobondeleka. Eloko oyo bato bazali kobianga “ligbóma,” tobiangaka “Eloko monene!” Nzambe Amonisaki biso ete ezali na nzela bobele moko epesami na Nzambe mpo na kozala Mwasi na Ye na libala, FINA PLAY.

Kasi matondi epai na Nzambe, tozali na bilei bibombami, Bilei ya Molimo, ete tozali kobika likolo na boboto mpe mawa ya Emoniseli na Yesu Klisto na mikolo oyo ya nsuka, komindimisa kati na bato na Ye.

Na Liteya moko na moko Mwasi na libala ayókaka, Andimisaka biso ete ezali Mokano mwa Ye mobongi be. Ezali te oyo TOKANISAka ete Azali kosolola, soki te ete oyo TOKANISAKA Elingaka koloba, EZALI MPENZA oyo Azali kosolola kasi bamosusu bakokoka kaka te komona Yango; bakufi miso. Nzambe Abombaki Yango. Batalaka Yango kotala, kasi bamonaka Yango te. Epai na biso, NDE NYOSO TOMONAKA.

Lokola tozali koyangana mpóso na mpóso, tokoki kozila te koyoka oyo Akoyebisa mpe komonisa biso. Lomingo loye, Akopesa biso mwa biteni ya mabanga ya motuya, Akopesa biso mama na elekelo ya wolo KOPASOLA YANGO NA LOKITO lisusu mpe lisusu kondimisa ete tozui Yango.

·      Mosakoli aumelaki mpenza na Bozali ya Nzambe, basakoli ya kondimana na Kala, to ntango nini, wana ebikaki bango kati na Bozali na Nzambe kino bakómaki Liloba, Etinda na bango ezali Liloba Yango moko.  Mpe, bokanisa, alobaki: “OYO ELOBI NKOLO.”   

·      Tomoni ete ntango moto ayei, atindami na Nzambe, abongisami na Nzambe, na YANGO ELOBI NKOLO, etinda mpe motindami bazali moko mpe eloko se moko.

·      Na bongo ntango moto ayaka na OYO ELOBI NKOLO, ye mpe Etinda azali moko.

·      Lola elobi yango, Biblia elobi yango, Etinda elobi yango, nyoso eloko moko.

·      Mosakoli, liloba, Etinda; motindami, Etinda, mpe Etinda, ezalaki elokol moko.

·      Moto nyoso na etinda na ye azali moko.

Bosili bolobá na ntina na Libulú ya Wolo.

Soko bozali ndele na Emoniseli, Nakanisi akómisaka yango polele mpenza; Etinda mpe motindami bazali se MOKO. Bozali koyoka oyo alobaki…ELOKO YANGO MOKO!! Na bongo bokoki te kokabola motindami na Etinda, batei.

Bosengeli kotia MOTINDAMI na lingomba na bino elongo na ETINDA amemaki to bozali koyamba ETINDA NYOSO TE. BOZALI MWASI NA LIBALA TE.

Oh! Lisusu, esalaka ETINDA mpe motindami lokola moko. Bilei ya molimo bilengelami, mpe ezali kati na ekeke sikawa.

Mpo na biso, baoyo bandimi ngonga ya Nzambe oyo tozali kobika kati na yango, motindami oyo Atindaki, Liloba moko na moko alobaki; makambo maye mazali Bilei bibombami.

Boni tolingaka Etinda oyo, mpe bobele ntango okanisi: “Ekoki nde kozala na mingi boni?” Atii libangá ya motó likoló na Yangon a boyebisáká biso sasaipi tozali banani.

Bozali nde te komona bokonzi ya Nzambe na bomoi kati na Lingomba ya bomoi, Mwasi na libala? Babeli bazali kobika, bakufi bazali kosekwa, bakakatali kotambola, bakufi miso komóna, Nsango malamu kobima na nguya na Yango, zambi Etindá mpe motindami bazali eloko moko. Liloba lizali kati na Lingomba, kati na moto.

Liloba yango KATI NA BISO.  Tozali Etindá. Tozali na bokonzi. Etindá oyo na biso TOZALI MOKO!! Ezanga nde kolobama na ntina na kopunjwa-punjwa lisusu mpe lisusu mpe lisusu.

Mwasi na libala azali eteni na Mobali, Lingomba ezali eloko moko na Klisto. “Misala mizali ngai kosala bokosala yango mpe lokola.”

Tozali eteni ya Mobali!!

TOZALI ELOKO MOKO LOKOLA KLISTO!!

Okanisi eyokanaka eloko monene sikawa, mpe epambolaka motema na yo kaka na botangáká biteni oyo ya maloba, zila kaka kino okoyoka Mongóngó na Nzambe koyebisa yo yango mbebu na litói mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, ekoyoka biso: 65-0718E Bilei ya Molimo Na Ntango Elongobani.

Obiangami koya komibakisa na biso. Soko okoki te, FINA PLAY ntango se ntango, Liteya se Liteya, esika se esika, mpe yoka motindami ya Nzambe komemela yo Etindá ya Nzambe.

Ndeko Joseph Branham.

Ezali mpe bongo lelo, ete Lipa ya Bomoi oyo bana baliaka, elandaka Etindá ya Nzambe, kobatela bango na bomoi nan tango ya elanga.

Makomi ya kotanga

1 Mikonzi 17: 1-7

Amosa 3:30

Yoele 2: 28

Malaki 4: 4

Luka 17: 30

St. Yoane 14: 12

23-0101 Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda Ya Mokano Na Nzambe

NSANGO: 65-0718M Komeka Kosalela Nzambe Mosala Libanda Ya Mokano Na Nzambe

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na libala oyo Akangami na Mboka na Elaka,

Nini nde ekosalema na Mbula oyo ya Sika?

Mwasi na libala Asili komilengela na botikalaká na Liloba. Tozuaki Elambo, totiaki Elembo na ndako na biso, mpe tomikangaki na elembo elongo na Liloba ya solo, lindimisami na Nzambe. Tokakoláki te, kasi tomibatelaki baseka epai na Mongóngó solo na Nzambe.

Ntango nini ya nkembo tozali kobika kati na yango. Ezali ntango oyo basakoli nyoso balukaki komona; ngonga oyo mpenza. Toyebi na nzela ya bozalisi ete Lingomba lizali kobelema kolongwa. Ngonga ya bosukisi ya nsuka izali kobelema mpe tozali komikotisa kati na Seko na Seko noki. Tosengeli totikala na molongo mpe tobatela liso na bison a nzela epesami na Nzambe mpo na mokolo na biso: Liloba na Ye, mosakoli na Ye, oyo azali Liloba mpo na mokolo na biso.

Ayeisaki Klisto awa boni? Na nzela na Liloba ya basakoli. Ezali nde solo? Akoyeisa Mwasi na Ye na libala awa boni? Na nzela na Liloba ya basakoli.

Nini nde ekoki kosalema? Nini nde esengeli kosalema? Ayebisaki biso oyo esengeli na biso kosala: kokende epai na mosakoli, Biblia, epai wapi tokoki kobakisa eloko te to kolongola eloko na Yango te. Soko tosali bongo, Nzambe alongoli biso na Buku na Ye na Bomoi.

Ngonga eleki mingi, tosengeli kozala na Mokano mwa Ye Mobongi be mpo na kozala Mwasi na Ye ya libala. Tolingaka soki moke te kosalela Nzambe mosala nzokande libanda na mokano na Ye, ata eyokanaka malamu boni. Nzambe apesaki elaki lolenge nini alingaki kosala yango lelo. Nzambe alobaki yango awa mpenza kati na Liloba na Ye, boni Alingaki kosala yango.

Akozua nde Mwasi na Ye na libala boni? Na nzela na liloba; na nzela ya likalo ya sika te, na nzela na likanisi ya moteolójia moko te. Kasi kokokana na Liloba na Ye nde Akotalisa Ye. Tia eloko moko na Yango te to longola eloko moko na Yango te sasaipi. Tika Yango lolenge Ezali. Bomoni?

Mpo na boko bato, ekoki kozala mpenza na mobulungano lokola basakoli bapakolami bazali mingi mpenza koloba nini ezali Mokani na Nzambe mpo na lelo. Balobaka: “Ezali mabe koyoka ba bande kati na losambo, Ndeko Branham alobá yango soki moke te. Mosala ya koteya eleki na litomba sikawa, mpe ezali nzela ya Nzambe epesami mpo na lelo. Tikala na mobateli na yo.”

Na bongo, ezali malamu koyoka ba bande, kasi kati na losambo te? Tosengeli te kondima Liloba moko na moko likolo na bande, bobele oyo Molimo Mosanto ayebisaka biso nini ezali mpe nini ezali Liloba te? Koyoka batei ekokómisa Mwasi na libala na bobongi be? Soko Natikali na mobateli na ngai te Nakoki kozala Mwasi na libala te? Soko Nayoki kaka ba bande, Nazali libanda ya Mokano mwa Nzambe mobongi be?

Mondimi nyoso alingaka kosala oyo ezali malamu mpe kozala kati na Mokano mwa Nzambe mobongi be. Moko te alingaka kosala mabe to kozala kati na Mokani mwa Ye molingisami. Esengeli ézala na nzela malamu mpe alimá.

Batei nini nde esengeli na biso koyoka…bango nyoso? Tosengeli nde kotala oyo balobaka ete ezali Liloba ntango tokei ndako na boyokáká ba bande, to tosengelaki nde kaka kozua liloba na bango mpo na yango? Nambisa Etemelo ezali ko nini, liloba ya mobateli na biso, to yango elobi Ndeko Branham likolona bande?

Basengeli koteya Liloba, amen. Basengeli kobatela Liloba liboso na bato, amen. Kasi basengeli te kozua esika ya mosakoli na Nzambe. Bazali na litomba te koleka Mongóngó mwa Nzambe mondimisami. Bakoki BOBELE KOLOBA OYO EZALI LIKOLO NA BA BANDE. Yango nde Etemelo ya Mwasi na libala.

Ezali na mitindo mitano. Esengeli kozala bongo. Ntango na Ye, eleko na Ye, ntango Alobaki elingaki kozala; mpe moto oyo Aponaki; mpe esengeli koya epai na mosakoli; mpe mosakoli asengeli kozala mosakoli andimisami.

Nazali te komeka kokweisa mosala ya koteya to koloba ete bazali na esika te, Nzambe ayoka mawa. Nazali kaka koloba ete, koyokisa bato Mongóngó na Nzambe likolo na ba bande ezali eloko ya litomba koleka oyo motei esengeli kosala. Eloko ata nini elobaka ngai, to oyo elobaka motei moko, to kútu mondimi moko alobaka, esengeli ézala liloba na liloba oyo mosakoli na Nzambe alobaki.

Nayinaka ete ozali na ngai na kanda mpe okanisaka ete Natemeli mobateli na yo, yango te nde ezali na motema na ngai. Nalingaka kaka ete Mwasi na libala kosangana elongo na eloko BOBELE moko tosengeli kosangana zingázingá na yango, ETINDA OYO.

Na ntango ya bokabwani ya motindo oyo, mobulungano, bokeseni kati na bato, Nandimi ete Liteya oyo tokoyoka mokolo mwa Lomingo lizali moko na Mateya ma litomba koleka mpo na mokolo na biso.

Tofungola mitema mia biso mpe tomona oyo Nzambe azali koyebisa lingomba, epai na bato ya ba bande, mpe bato ya telefóne kati na bikolo nyoso.

Liboso tokoka kokóta na Mboka na elaka, ezali na eloko moko tosengeli kosala. Mongóngó molingi toyoka na bokengi bónso mpe tózanga te kososola oyo Azali koloba.

Alobaki bobele lokola Mose azalaki koloba na Yisalaele, nsima na ye kondimisama na Nzambe mpe na Likonzi na Móto, mpe ayebaki ete akokisamaki kozala mosali na Nzambe kokamba bango libandá. Kasi liboso ete bakende kati na mboka, Ayebisaki bango: “Nabiangi Lola mpe mabelé kotátola kotemela bino, bobakisa eloko moko te na oyo Nalobaki, to bolongola liloba moko na Yango te.”

Boye elobi Ngai, kati na Nkombo na Yesu Klisto: Bobakisa eloko moko te, bolongola te, botia makanisi na bino moko kati na Yango te, boloba bobebele oyo elobami likolo na ba bande wana, bosala mpenza kaka oyo Nzambe apesaki motindo kosala; bobakisa na Yango te!

Ezali Nkolo Nzambe na biso kopesa biso motindo ete  tokoki BOBELE KOLOBA OYO ELOBAMI LIKOLO NA BA BANDE. Tokoki kobakisa na yango te, kolongola, kotia makanisi ma biso moko, mabanza ma biso, to ndimbola na biso na yango. Boloba bobele oyo elobami likolo na ba bande.

Soko bondimaka ete maloba maye malobamaki na mosakoli na Nzambe andimisamaki mazali solo, na boye boni Bofini Play ézanga kozala eloko ya litomba Mwasi na libala akoki kosala?

Amitalisaki boni ntango Ayaki? Na nzela na moto moko na molimo na Eliya likolo na ye, abimaki koúta na lisobé. Akotalisa Mwasi na libala na Ye boni? Alakaki kati na Malaki ya 4 eloko yango moko, liboso Abebisa mabelé, lokola ezalaki na mikolo na Sodomo.

Molingami Mwasi na libala ya Mboka na Elaká, ozali na emoniseli ya solo. Ozali kati na Mokano mwa Nzambe mobongi be. Oyebaki oyo ezali yo. Ozali kati na manáka ma Nzambe na bofinaká Play. Ozali Liloba. Ozali eteni ya Mobali na libala. NKEMBO!!!

Lolenge nini oyo ya kobanda Mbula ya Sika. Mwasi na libala asangani elongo, kolanda motindo mwa Nzambe na nzela ya, Bofinaká Play.

Yaka komilengele mpo na konetolama elongo na biso mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tokoyoka: 65-0718M “Komeka Kosalela Nzambe Mosala Nzokande Libanda Na Mokano Ya Nzambe.”

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya Kotanga:

Dutelonome 4: 1-4 / 4: 25-26

1 Ntango 13

1 Ntango 15:15

Njembo 22

St. Malako 7:7

Yoele 2: 28

Amosa 3: 7

Malaki 3

St. Matai 11: 1-15

1 Bakolinti 13: 1

22-1231 Etumba & Elambo

NSANGO: 62-1231 Etumba

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Etonga ya mboka,

Nalingaki tózala na Elambo mbala moko lisusu kati na ba ndako na biso na butú ya liboso na mbula ya Sika, mokolo ya sanza 31, sanza ya Zomi na mibale. Mambi mpo na lolenge ya kozua vinyo, mpe lolenge ya kotumba lipa ya Elambo mazuami na ekanganeli ya etenéti na nse awa. Ezali na ekanganeli moko ya eteneti okoki kofungola yango na masini na yo ekozuama nsima moké na site na biso. To okoki koyoka molulu yango na app ya Lifeline.

Mpo na bafandi na Jeffersonville na zingazinga, bokoki kozua vinyo ya Elambo mokolo mwa Mitano 30, sanza ya Zomi na mibale, kati ya 1:00 – 4:00 nsima na nzanga, na nse ya ekotelo ya VGR epai ya liboso.

Tokoyoka 62-1231 Etumba, kobanda na 5:00 nsima ya nzangá EST (Ntango ya momesano ya Monyele) mokolo mwa Mposo, 31 sanza ya Zomi na mibale. Nsima ya Ndeko Branham komema Liteya ya Nsuka ya mbula, tokotelemisa bande mpe tokozala na nzembo ya Kokumisa minúti pene na 10 wana tozali komilengela mpo na Elambo ya Nkolo. Nsima tokozongela bande na esika Ndeko Branham abandi molulu ya Elambo. Na bande oyo, azangisi eteni ya kosukolana makolo ya losambo, oyo biso lokola tokosala motindo moko.

Lokola tozali kobaluka na mbula mosusu na mosala na Ye, tika ete tobonzela Ye bomoi na biso ya sika ya liboso na nzela ya boyoki Liloba, na nsima kosangana na Elambo na Ye. Libaku malamu nini ya motuya oyo tozui lisusu kokómisa ba ndako na biso Esika Mosanto koyamba Mokonzi na Bakonzi kokota komibakisa na biso.

Nzambe apambola bino,

Ndeko Joseph

22-1225 KOYOKA NSONI

Nsango: 65-0711 KOYOKA NSONI

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi na libala Lebeka,

Tata atindaki mosali na Ye sembo, Eliesele, koluka Mwasi na Ye na libala Lebeka. Toyebaki ye, Motindami na Ye, mwanje na nsambo, William Marrion Branham, epai nan ani Apesaki lotómo ko: Bianga, Yanganisa mpe suka-suka Talisa biso, epai na Ye.

Apesaki biso bosopami bonene bwa Nguya na Ye ekozongisaka na Bomoi mpe ememaki biso kati na boyebi ya etemelo na biso, esika na biso, mpe mikumba na biso, ezali biso bato babiangami, bakabwani na mokili, babonzameli Nzambe. Azali kokamba biso mpe kotambolisa biso kati na biloko bikolobaka biso mpe bikolobaka biso, komema lokumu mpe nkembo na Nkombo na Ye.

Ezali na eloko te, esika te oyo ekoki kokabola biso na yango, ELOKO TE. Tobatelami mpo na Seko kati na Bokonzi na Nzambe. Tata Atiaki elembo na Ye likolo na biso kino nsuka ya mobembo na biso.

Molimo mabe abetaka biso bibotú mói na butú. Ayebisaka biso nyoso, mpe afundaka biso, mpe amekaka kokanisisa biso ete tozali Mwasi na libala yango te. Abwakaka nyoso na nzela na biso, komeka kobenda makanisi na biso, lokola bokono mpe bolózi, kasi toyókaka ye te. Nguya yango ya kozongisa na bomoi ezali sasaipi na kati na biso mpe totiami elembo mpe tozali na katikati ya Liloba yango. Tozali kopumbwa na kamela na biso, kopota epai na Ye na nzela na biso na Elambo monene ya Libala.

Tozali na nsóni tena oyo endimi biso; nzokande tolingaka ete mokili bayeba, TOZALI BATO YA BANDE BAOYO TONDIMAKA LILOBA MOKO NA MOKO LILOBAMAKI NA ELIEZELE MOSAKOLI SEMBO NA YE oyo Atindaki kobianga kobima mpe kokamba LEBEKA NA YE MWASI NA LIBALA. Tobakisaka te to tolongolaka Liloba MOKO te. Etinda oyo ezali Etemelo na biso.

Moto atondi na Molimo Mosanto, atondi na Nguya ya Nzambe, mpe bolingo na Nzambe na motema na ye, akokoka nde kosolola na moto bobele mwa minuti mpe ázanga koloba eloko moko likolo na Liteya aúti koyoka likolo na bande?

Ntango akutani na bato balobaka ete bazali bandimi kati na Etinda oyo ya ntango na nsuka, okoki kosolola na bango kaka mpo na mwa minúti mpe okoki koloba esika batelemi mpo na oyo etali koyoka ba bande. To bazali bato ya bande to bazali yango te.

Ekoki kobanzama te ete bamonaka yango eloko ya nsoni, to kútu mabe, soko olobi ete oyokaka ba bande na lingomba na yo to na ndako. Bamiyokaka ete etémeli Liloba to ezali te nzela epesami na Nzambe. Otálami na nse zambi olobaka ete ozali “Moto ya Bande”.

Batei oyo bayokaka ba bande na bisambo na bango bazali kolobama na bango mabe, mpe kutu kobiangama zololo. Mpe soko bozali koyoka bande moko nan tango moko, malamu, ozali kutu motéi te, ozali ebongiseli, to mosambeli.

Nabanzi ete bato nyoso liboso na biso baoyo bakanganaki na telephone na masambo na bango mpe na ba ndako, koyoka Ndeko Branham bango nyoso na ntango moko, basengelaki kozala ebongiseli mpe lokola. Basengelaki kozala libanda na Manáka ma Nzambe. Bayokaki nsoni te MPE TOKOYOKA NSONI SOKI MOKE TE.

Bobele na mwa minúti ntango osololi na bato, bakoyebisa yo kaka wana esika batelemi: Iyo, to Finaka Play. Iyo, toyokaka bande mokolo mwa Lomingo na Lingomba na biso to na bandako. Iyo, bande yango moko, na ntango moko.

Nzokande bamosusu balobaka: “Tokendeke na losambo mokolo mwa Lomingo na ntongo, Lomingo na mpokwa mpe mokolo mwa Misato na mpokwa. Tozali na mobateli moko bikamwa; akomisaka yango polele mpe saa mpo na biso kososola. Alimbolaka Etinda mpo Nakoka kososola Yango. Osengeli kozala na motei mpo ózala Mwasi na libala. Ndeko Branham alobá soki moke te ete bato bayoka ba bande kat na losambo.”

Bozali koloba kasi nini nde ezali eloko eleki na litomba mingi? Oyo batei balobaka, oyo Ndeko Joseph alobaka, to oyo Mongóngó mpenza na Nzambe elobaka likolo na bande? Etemelo na yo ezali nini? Oyo ezali likolo na bande to oyo moto moko boye alobaka?

Mosala ya koteya ezali bikamwa, mpe kati na Liloba. Tosengeli na bango. Kasi oyo ezali NA LITOMBA KOLEKA, koteya soko ba bande?

Soko ba bande ezali eloko na litomba koleka te na bomoi na yo moko, na bomoi ya lingomba na yo, na bongo eloko moko ezali kotambola malamu te. Ozali libanda na Manáka ya Mokano na Nzambe Mobongi be. ZONGA NA MOLONGO.

Ntango moto akutani ndele na Nzambe; ezali ten a nzela ya koningana moko amibongiseli, bosepeli ya lolenge moko boye, to lilakisi moko ya losambo, katikisimo moko to endimeli, to mobeko moyebi kobongwana te ayambaki mpo na—na komibondisa, ntango mpenza ayei na esika lokola Mose asalaki, nan sima na lisobe, atamboli kokutana na Nzambe na Nguya nyoso miso na miso, mpe omoni Mongó koloba na yo, mpenza elongo na Liloba mpe na elaka ya ngonga na yo, ezali na eloko moko esalelaka yo! Bomoni, ozali na nsóni na Yango te, Esalelaka yo eloko moko.

Na mokolona biso, ezipelo wana ya mimeseno epasólamaki. Awa Likonzi na Moto likotelemaka, komonisa Liloba mpo na mokolo oyo. Bonzambe bozipami kati na mosuni ya moto. Nkembo ya Shekinah mpo na mokolo na biso. Nzambe kotelema mpe kosolola liboso na biso, azipami kati na mosuni ya moto.

Mose azalaki na Liloba. Sikawa bokanisa, nsima na Liloba komonisama, Mose azalaki Mose lisusu. Bomoni? Kasi ntango Liloba liango lizalaki kati na ye mpo na kopesama, azalaki Nzambe; boye, azalaki lisusu Mose te. Azalaki na Liloba na Nkolo mpo na eleko yango.

Noele ya motindo nini oyo biso ba Lebeka tokozala na yango Lomingo loye. Mokolo mobimba. Tokozala koyoka Eliezele na biso kobianga Mwasi na libala kobima mpe tokozala koyebisa Ye tozali na nsóni te.

Tika ete Nkolo apesa bino NOELE, etóndi na “BOZALI NA YE.”

Ndeko Joseph Branham

Liteya: 65-0711 Koyoka nsoni

Makomi: St. Malako 8: 34-38

Programme ya Noele

Balingami bandeko mibali mpe basi,

Komona ete Noele ezali mokolo mwa Lomingo mbula oyo, Nayoki yango na motema na ngai ete tozala te na ntango songoló ya biso koyoka Liteya mokolo yango. Mabota mingi bazali nab ana mike oyo basepelaka mingi kofungola makabo na bango na ntongo ya Noele, mpe ekozala mpasi mingi mpo na bango kofanda mpe koyoka Liteya to kozilisa bango kino nsima ya ntango.

Mpe, naino, na Noele, boyebi, bana mike, okoki koyebisa bango bokeseni te. Bazali kaka, ezali ntango ya Noele mpo na bango. Bakolinga te ete mwa seseti na bango ézala na singa, ekokaki kozala na eloko moko. Ezali momesano, ata na ekólo na biso, ete batiaka seséti na singa, mpe eloko mosusu moko. Na bongo, Nasalaki yango wana ezalaki ngai mwana, mpe—mpe ata ko mo—mosika na Makomi lokola bakoki kozala na nzela ibetemi. Ata ko bongo, bana bazali, bayokaka bana basusu koloba: “Malamu, Nazali na oyo mpo na Noele. Bomoni. Nazali na oyo.” Bilenge oyo bakoteleme-telema, bakotala, boyebi. Bokoki te kosala ete básosola. Bomoni? Boye, Noele ezali bobele awa mpo na kotikala. Iyo.

Ekoki mpe kozala na bamosusu bakosepela kolamuka na tá ntongo, mpe koyoka Liteya, lokola bazali na bitandelo elongo na basusu na libota na bango nsima ya ntango na mokolo wana. Na boye Nakánáki ete libota moko na moko lipono ntango ekokoka malamu mpo na bango koyoka Liteya. Tokolekisa Liteya na Lifeline na ntango misato ikeseni mokolo ya Noele: 9:00 A.M.- 12:00 P.M. 5:00. Nabondeli bino ete boyoka te lokola ete bopusami koyoka na moko na ntango misato wana, kasi bópona ntango ekosengela mpo na bino mpe na libota na bino. Eloko ya litomba koleka ezali, FINA PLAY.

Nakoki komonana lokola mwa kokamwisa, na ntongo oyo, kolata kazaka na ngai na eteyelo, kasi nazalaki na esengo mingi ko—kotalisa kazaka kitoko oyo lingomba oyo epesi ngai. Namonaki Ndeko Neville awa mokolo mosusu, na mokóto kitoko alátaki, boni esimbaki ye kosimba mpenza, mpe Nakanisaki, malamu, Na—Na…emonanaki mpenza kitoko, mpe eyanganelo bazalaki kosolola na ntina na yango, Nakanisaki: “Nakolata bobele kazaka na ngai na eteyelo.” Na bobele…

Boyebi, Nandimaka ete tokólaka te. Tozali ntango nyoso…Mpe Nalingaka kokóla te. Omoni boni, Ndeko Luther? Te, Nalingaka kokóla soki moke te. Tolingaka na biso kaka ntango nyoso kotikala bana.

Tika ete Nkolo apesa bino Lói la bikamwa lotóndi na Bozali na Ye.

Ndeko Joseph Branham

22-1218 NZAMBE ABONGOLAKA NDELE LIKANISI NA YE LIKOLO NA LILOBA NA YE?

Nsango: 65-0418E NZAMBE ABONGOLAKA NDELE LIKANISI NA YE LIKOLO NA LILOBA NA YE?

BranhamTabernacle.org

Balingami ba Masiya mike,

Tozali Bapakolami na Nzambe; topakolami na Molimo na Ye yango moko, na misala yango moko, na Nguya yango moko, na bilembo yango moko. Ekendeki longwa na mpongo moko kino mpongo, longwa na Liloba kino Liloba, kino litondi na Yesu Klisto limonisami na kati na nzoto na moko na moko na biso, mpo bosenga na nzoto, na molimi, to bosenga mosusu nyoso tosengeli na yango. Nguya yango ya koyeisa na bomoi ezali kobika mpe koumela kati na biso. Tozali ba Masiya mike na Nzambe.

Mpóso na mpóso Emoniseli ya Etinda oyo; tozali banani, toúti wapi, mpe epai wapi tozali kokende, ezali kokóma monene mpe monene lisusu. Tozali komituna na motema lúkulúku mingi, ekokaki kokóma na nkembo koleka boni? Ekokaki koleka lisusu polele boni? Kasi na bande ya sika momo na moko toyokaka, Nzambe asololaka na biso mbebu na litói mpe amonisaka biso Liloba na Ye na koleka, mpe andimisaka biso, TOZALI BA NANI.

Mposa monene na koleka ya motema ya mondimi moko na moko ezali kozala kati na MOKANO MWA NZAMBE MOBONGI KWA. Tolingaka soki moke te kozala kati na MOKANO mwa Ye molingisami. Mitema mia biso mibukani mpe tokufi kokufa soko toyoki ete tosalaki eloko moko ekokaki kosepelisa ye te. Toyebi ete Nzambe Azalaka na Mokano Mobongi Be, mpe tolingaka kozala kati na MANAKA MA MOKANO MWA YE MOBONGI BE.

Na bomoi na ngai, Nazua etemelo makasi na bolobáká Nandimaka eloko ya motuya koleka enámá nyoso ya nzoto na Mwasi na libala akoki kosala, nyoso lolenge moko ézala mondimi ézala motei, ezali ko FINA PLAY. Nandimaka ete Ezali Mongóngó na Nzambe se MOKO mpo na Mokolo na biso kati na nini osengeli koyoka mpe kotosa Liloba moko na moko.

Nalobaki Nandimaka ete batei basengeli kozongisa Ndeko Branham na biteyelo na bango mpe koyokisa bato ba bande kati na mangomba na bango, lokola Yango kaka nde Mongóngó moko ya litómba koleka bato basengeli koyoka.

Nazuá maloba mabe mingi na koleka na bomoi na ngai mpo na kotema oyo mpo na oyo Nandimaka kozala Manáka ma Ye mpe Mokano mwa Ye mobongi kwa. Esósolamaki mabe mpe elobamaki ete Nandimaka te misala mitano ya lotómo ya Baefese 4.

Nayebisaki yango mbala na mbala ezali lokuta. Nalobaki soki moke te, soki ete Nandimá yango ata te. Ezali na baoyo babongolaki maloba ma ngai mpe bayebisaki bato makambo Nalobá soki moke te to Nandimá, kasi esengeli kozilama.

Esengeli Liloba ya Solo ya Biblia lizala. Soko olobaka ete ondimi Etinda oyo, na bongo tosengeli tozua oyo mosakoli alobaki, lokola Ezali ndimbola mpenza ya Liloba na Nzambe. Zambi azali molimboli se MOKO ya Liloba yango.

Soko esengelaki Nátuna moko na moko na bino: “Nani alingaka kozala kati na Mokano mwa Nzambe Mobongi Be?” Moko na moko na bino akokaki koloba: “Ee, ezali mpósa ya motema na ngai.” Na bongo tosengeli tótala na oyo mosakoli alobaki ezali Mokano mwa Nzambe Mobongi Be.

NKOMÁ: Soko Etinda likolo na bande ezali Etemelo na yo te, mpe ondimaka Liloba moko na moko te, TIKA KOTANGA MOKANDA MOYE. Mpo na ngai, ozali na yo mondimi te, na bongo ezali mpo na yo te. Nakoki bobele kotikala na oyo Nzambe alobaki likolo na bande.

Tolingaka oyo Alobaki; ezali te oyo lingomba lilobaki, oyo Molakisi Jones alobaki, oyo moto mosusu nani alobaki. Tolingaka oyo YANGO ELOBI NKOLO elobaki, oyo elobaki Liloba.

Tosengeli tómitika na Mokano mwa Ye mpe Liloba na Ye. Tosengeli te kobete ntembe na Yango. Tosengeli se kondima Yango. Meká kozua ekimelo zingázingá na yango te. Zua Yango kaka lokola Ezali.

Mingi mpenza balingi kozunguluka mpe kokende nzela mosusu. Soko osali yango, Nzambe akozala kopambola yo, kasi ozali kosala na mokano mwa Ye molingisami, kasi Mokano mwa Ye mwa Bonzambe te, mobongi kwa. Nzambe akopesa yo ndingisa ósala eloko moko, mpe akoki kútu kopambola yo kati na yango, kasi ezali naino kaka Mokano mwa ye mobongi be te.

Nzambe atindaki motindami na Ye mwanje nan sambo na mabelé kobianga Mwasi na Ye ya libala kobima. Tondimaka ete ezalaki Mwana na moto komimonisa kati na mosuni na moto. Ezali Mongóngó yango moko na Nzambe oyo etiamaki na bande mpe ebómbamáki mpo na Mwasi na Ye na libala.

Nzambe Ye moko ayebisaki mosakoli na Ye, soko omemi bato kondima YO, eloko moko te ekotelema na nzela na yo. Azalaki ye oyo aponamaki na Nzambe kokamba Mwasi na Ye na libala. Moko te akoki kozua esika na ye. Ata ba Kola boni bátelema, to ba Datana boni, ezalaki William Marrion Branham nde Nzambe abiangaki kokamba Mwasi na Ye na libala. Oyo ezali Manáka ma Nzambe mpe MOKANO MWA YE MOBONGI BE.

Soko bato balingi kotambola na Mokano mwa Ye mobongi be te, Azali na mokano mwa Ye molingisami, Akotika yo kotambola kati na yango.

Sasaipi, Nzambe azali malamu…Atindaka Liloba na Ye. Soko okondima Liloba na Ye te, na bongo Atiaka kati na lingomba misala mitano mikeseni: Liboso, ntómá, basakoli, balakisi, babáteli, bapalanganisi na Nsango Malamu. Bazali mpo na bobongi be ya Lingomba.

Na bongo, batei batelemisamaki bobele mpo bato kati na bileko bakokaki koyamba te MANAKA MA MOKANO MOBONGI BE ma Nzambe; Liloba na Ye lilobamaki na mosakoli na Ye. Tosengeli bobele kondima Liloba mosakoli na Nzambe alobaki. Tolingi moto mosusu te to eloko mosusu te.

Nambisa mosala ya lotómo ya batei ezali KOZONGISA bato na Manáka ma Mokano mwa Ye Mongongi kwa, yango nini: BOTIKALA NA BA BANDE, ZAMBI EZALI MOKANO MWA NZAMBE MOBONGI BE. Na nsima babatela MANAKA mango ma MOKANO MOBONGI BE liboso na bango ntango nyoso na nzela na: KOFINA PLAY.

Bosengeli kozonga mpe kobanda epai wapi bobandaki, to epai wapi botikaki, mpe bozua Liloba na Nzambe moko na moko.

Boye nini nde osengeli na yo kosala mpo na kozala kati na MOKANO mwa YE MOBONGI BE: Fina Play.

Babateli basengeli nde kosala nini mpo na kozala na MOKANO mwa YE MOBONGI BE:    Fina Play.

Mosakoli na Nzambe asalaki nini ntango akendeki na mayangani?

Bobele kobondela mpo na babeli, mpe biloko lokola bongo? Akokaki koloba makambo na motindo ya kozunguluka ete mpate akokaki koyoka yango, mpamba te toyebi oyo Azali kosolola na ntina yango. Na lolenge mosusu ezalaki bobele mpambo likolo na ndóbo. Atalisaki bango bilembo lokola bosósoli na makanisi na mitema, mpe ayebaki mabombami ya mitema na bango, bobele koningisa bato. Kasi na nsima alobaki oyo ezalaki eloko ya litomba monene koloeka:

Eloko ya liboso boyebi, bande moko ekokwea kati na ndako na bango. Nde ezui yango. Soko azali mpate, akotelemaka alimá na yango. Soko azali ntaba, akobetaka bande na lokolo kobwaka yango libanda.

Ozali nde mpate to ozali ntaba? Liboké moke ya Nzambe litelemi na katikati na Liloba yango. Tozali kati na Mokano mwa Ye Mobongi Be na nzela ya bofináka Play lokola ezalaki yango, mpe ezali, manáka ma Ye ma ebandeli.

Tikala bobele na Liloba na Ye, zambi yango nde ekobima na nsuka, Liloba, Liloba na nzela na Liloba. “Ye nani akolongola Liloba lioko na Yango, to akobakisa Liloba lioko na Yango!” Esengeli kotikala, Liloba yango.

Nazali na matondi mingi na koleka epai na Nkolo koyeba, na nzela na Emoniseli ya molimo, ete Nazali kati na Mokano mwa Ye Mobongi Be kokokana na Liloba na Ye. Nazali kobakisa ndimbola na ngai te likolo na Yango, to lisosoli na ngai likolo na Yango, kasi koyoka na matói na ngai moko oyo ezali YANGO ELOBI NKOLO mpe Mokano mwa Ye Mobongi Be.

Nazali kobianga yo óya mpe ókende kolukaluka mabanga na motuya elongo na biso Lomingo loye na 12:00 nsima na nzánga, ntango na Jeffersonville, lokola tokoyoka: NZAMBE Akobongolaka Ndele Likanisi Na Ye Likolo Na Liloba Na Ye? 65-0418E. Ezali na mabanga mike ya motuya ebele kati na Liteya liye, okozala na NKITA kati na Molimo Mosanto na Ye ntango tokosilisa.

Ndeko Joseph Branham

Esode mokapo ya 19

Mituya 22:31

St. Matai 28:19

Luka 17: 30

Emoniseli mokapo na 17

22-1211 Ezali Bobimi Na Mói

Nsango: 65-0418M EZALI BOBIMI NA MOI

BranhamTabernacle.org

Molingami Tempelo ya nguya,

Moto azalaki na mposa ntango nyoso na motema na ye kozala lokola Abalayama wana ezalaki ye kofanda na ndako na ye na ngonga ya11:00. Atombolaki miso mpe amonaki mibali misato koya epai na ye na mputulú na bilamba nyoso na bango. Apotaki mbangu epai na bango, mpe alobaki: “Nkolo na ngai.” Na botelemaká wana liboso na ye, kati na mosuni na moto na bolobaká, ezalaki Melikisedeke Monene.

Lomingo loye, yango ezali kopela na mitema na biso ekosalema mpo na moko na moko na biso. Biso nyoso tokoyangana elongo longwa na mokili mobimba, koyoka Melikisedeke yango moko koloba na BISO. Moto oyo azalaki na tata te, na mama te, na ebandeli na mikolo to nsuka na bomoi te, Nzambe en morphe, koloba na biso na nzela na bibebu na moto, kaka lolenge asalaki mokolo wana epai na Abalayama.

Ezali na nzela mosusu te ya koyoka Mongongo yango bobele ó FINA PLAY. Etikalá naino kozala na ntango moko te kati na lisolo na mokili wapi Mwasi na libala asanganisami longwa na mokili mobimba koyoka Mongongo na Melikisedeke koloba na ntango moko mpenza. Nzambe azali kosangisa Mwasi na libala na Mongóngo yango.

Tozalaki na Liloba na Nzambe mpo na mbula ebele. Sasaipi tozali na Nzambe ya Liloba, bomoni, mpe bobele awa kobika Liloba na Ye. Boye ezali solo, moko na bilembo binene ya nsuka bilakami na Lingomba liboso na boyei ya Nkolo.

Lomingo loye, Mwasi na libala akozala na Liteya ya Pasika na sanza ya Zomi na mibale; mpe oyo Liteya ya motindo nini likoyoka biso.

Nzoto. Molimo. Nguya ya kozongisa na bomoi. Klisto oyo asekwi. Bana na Nzambe bamonisami. Molimo yango moko afandaki kati na Klisto afandi kati na biso. Bomoi yango moko, nguya yango moko, lisangó yango moko, oyo Azalaki na yango, tozali na yango. Mokanda na libula.Momboto mwa liboso mokembi moningisami liboso na bato. Tozali sasaipi mosuni na mosuni na Ye, mokuwa na mikuwa na Ye; Bomoi na Bomoi na Ye, Nguya na Nguya na Ye! Tozali Ye!

Yesu Klisto oyo asekwi; Melikisedeke Ye moko, akogánga mpe koyebisa BISO, “Nasalaki ete Mongóngo na ngai mobómbama mpe mótiama kati na bande mpo Nakokaki kobenda bino epai na Ngai, mpe Nakokaki koloba na bino bobele lokola Nasalaki na Abalayama. Nalingaka ete boyoka kouta na Ngai mbala moko.”

Bozali Lingomba na Ngai libongisamaki liboso, litandamaki! Nzoto na bino izali tempelo ya Nguya, zambi longwa na ebandeli bozalaki eteni na Nzoto.

Yango nde emoniseli yango ya Bonzambe ya Liloba likomi mosuni. Soko lizalaki mosuni na mokolo wana na nzela ya Mwana, Mobali na libala, lizali mosuni lelo na nzela ya Mwasi na libala. Bomoni?

Nguya yango ya kozongisa na bomoi ezali kobika kati na biso. Tozali na ELOKO MOKO ya kobanga te. Molimo yango moko azalaki kati na Ye, azali sasaipi kati na biso mpe azali kozongisa na bomoi nzoto na biso na kufa. Tolikiaka bongo te, TOYEBI BONGO. Tosili kosala yango, Asalaki yango mpo na biso.

Na mbisa, kosukisa nsima ya nzángá, Melikisedeke akoloba mbala moko lisusu mpe akoloba:

Bato oyo, baoyo bazali bana mboka ya bokonzi, ba nkolo nguya ya kozongisa na bomoi, yeisa yango na bomoi epai na bango, Nkolo, sasaipi mpenza. Mpe tika ete Molimo akoka kokende longwa na mpongo kino mpongo, longwa na Liloba kino Liloba, kino litondi na Yesu Klisto limónisama kati na nzoto moko na moko, mpo na bosenga ézala ya nzoto lokola ya molimo, to bosenga ata nini bazali na yango bosenga, lokola totielani maboko. Na Nkombo na Yesu Klisto.

Longwa na mpongo kino mpongo, Liloba kino Liloba, litondi na Yesu Klisto likomónana na nzoto moko na moko na biso. NKEMBO!

Oyo ekoki kosalema kaka na nzela ya BOFINAKA PLAY, na boye yaka komibakisa na biso mpe kosangana na yubile ya likundú likolo na Bilei Bibómbamaki, lokola tozali koyoka Mongóngó yango, mokolo mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, komemela biso Liteya, Ezali Bobimi Na Mói 65-0418M

Ndeko Joseph Branham

Makomi

Lewitiko 23: 9-11

Matai 27:51 / 28:18

Malako 16: 1-2

St. Luka 17:30 / 24:49

St. Yoane 5:24 / 14:12

Misala 10: 49 / 19:2

Baloma 8:11

Moko Batesaloniki 4:16

Baebele 13:8

Emoniseli 1:17-18

22-1204 MELIKISEDEKE OYO AZALI NANI?

Nsango: 65-0221E MELIKISEDEKE OYO AZALI NANI?

BranhamTabernacle.org

Molingami Likanisi ya Nzambe,

Nalikii bobelemi mpo na Lomingo loye. Kosolola na ntina na boni mitema na biso mikopela na móto kati na biso lokola Akosolola na biso na molai na nzela kati na ba ndako na biso mpe bisambo na biso…BOZILA KAKA!

Na sanza oyo eleki Ayebisaki biso tondimisama tokóti na masuwa masengeli…mpe tozali. Ayebisaki biso ete Momboto ya solo ya Nzambe mokozala mosangoli libula elongo na ezipelo te…nsima Alobaki, TOZALI MOMBOTO YANGO. Nsima, toyokaki na matói na biso, Nzambe koloba na biso na nzela ya moto mpe koyebisa biso, Lelo oyo, Likomi Liye Likokisami na miso ma biso mpenza.

Ayebisaki biso Lomingo lolandaki ete tozali na Esika ya Losambo Epesami na Nzambe, mpe mpo ete tozali wana, tosalaki ekobo TE na Liloba na Ye. Na bongo, tozali Mwasi Liloba Moseka Peto na Ye.

Lomingo loye, Akosangisa biso banso elongo mbala moko lisusu mpe kosolola na nzela ya mwanje na Ye monene mosakoli mpe koyebisa, NAZALI MELIKISEDEKE OYO, mpe Nazali komimonisa ngai mpenza epai na bino kati na mosuni na moto, kaka lokola Nalobaki ete Nakosala kati na Liloba na Ngai.

NKEMBO! Bosepeli? Bopambolami na bozangi Maloba? Malamu, MINGI KÚTU EZALI KOYA. Akosukisa lisolo monene oyo.

Bokanisa naino yango, Tozalaki mpenza kati na makanisi ma Nzambe longwá na ebandeli. Mbula nkóto minei liboso Yesu áya na mabelé, mpe mbula nkóto na nkóto liboso na yo koya na mabelé, Yesu, na Makanisi ma Nzambe, akufaki mpo na masumu ma biso. NA NSIMA, NKOMBO NA BISO itiamaki na Buku ya Bomoi ya Mwana-mpate.

Ezali nde kozinda kati na likanisi na yo? Nkombo na biso ibongisamaki na Nzambe mpe itiamaki na Buku ya Bomoi ya Mwana-mpate liboso mpenza na bozalisi na mokili. Ayebaki miso ma biso, litongi na biso, eloko se eloko ezali biso. Tozalaki kati na ekaniseli na Ye na ebandeli…kati na ekaniseli na Nzambe! Nambisa eloko se yoko tozali nde Liloba na Nzambe libimisami. Nsima na Ye kokanisa yango, Alobaki yango, mpe biso oyo.

Ezali mpasi kosósola. Nzambe koyebisa biso makambo manso maye. Alingaki biso mpenza mingi mpe alingaki kondimisama ete tóyoka Yango longwa na Ye moko, boye atiaki Yango na bande na motindo ete mokolo mwa Lomingo, 4, sanza ya Zomi na Mibale, 2022, Akokaki mbala moko lisusu komema Mwasi na libala na Ye elongo mpe koyebisa biso: “Nasalaki oyo nyoso mpo na yo. Nalingaki ete oyoka Yango mbala moko longwa na NGAI. NALINGI YO. OZALI MWASI NA NGAI NA LIBALA. NAZALI KOYA NOKI MPENZA MPO NA YO.”

Nde ntina toyebaka ntango totambolaka kati na Bozali na Nzambe, eloko moko kati na biso ezali koyebisa biso ete toúti esika moko boye, mpe tozali kozonga lisusu na nzela na nguya yango ezali kobenda biso.

Nzambe alongoli ezipelo likolo na eloko mobimba mpe tokoki komóna Yango. Nzambe, enmorphe, abombanaki kati na Likonzi na Móto. Nzambe, en morphe, kati na Moto moko abiangami Yesu. Nzambe, en morphe, kati na Lingomba na Ye. Nzambe likolo na biso, Nzambe, Nzambe elongo na biso, Nzambe kati na boso; Nzambe oyo akonzi nyoso kati na nyoso.

Tozali na eloko moko ya kobanga te. Eloko moko ya kotungisama na ntina na yango te, ata kufa. Ntango tolongwi awa, tokufi kútu te. Soko hema oyo ya mabelé ekwei, tozali na moko EZALI WANA kozila biso, En morphe.

Nakolinga te kozila koyoka Ye kosolola na biso makambo oyo na Lomingo loye na 12:00 nsima na nzánga, ntango ya Jeffersonville. Yaka mibakisa na bison a esika se yoko okoki koyoka MONGONGO MWA NZAMBE mondimisami koyebisa yo mbebu na litói nani AZALI, banani TOZALI, mpe wapi tozali kokende. FINA PLAY.

Melikisedeke Oyo Azali Nani? 65-0221E

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga

Genese Mokapo ya 18

Esode 33: 12-23

Mosanto 1:1

Baloma 8:1

2 Bakolinti 5:1

2 Batesaloniki 4: 13-18

Timote na liboso 3: 16/ 6:15

Baebele 7: 1-3 /13:8

Emoniseli 10: 1-7 / 21:16

22-1127 Libala Pe Koboma Libala

NSANGO: 65-0221M Libala Pe Koboma Libala

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Etongá ya Mosakoli,

Bokanisa, Nazali koloba oyo bobele na ebólo na ngai. Mpe libanda kuna na mopepe, Nazali koloba oyo bobele epai na balandi na ngai moko. Etinda oyo ezali kaka epai na bango, mpe oyo Nakoloba awa.

Motei ata nani, ye, oyo ezali ya ye, iyo, azali mobateli na etongá, tika ete ásala nyoso elingi ye. Ezali likambo na ye na Nzambe. Nganganzambe ata nani, motei ata nani, etali bobele yo, ndeko na ngai mobali.

Nazali bobele koloba awa na Jeffersonville, esika se moko wapi Nalingaki koloba oyo, ezali mpo ete ezali etongá na ngai moko. Ezali etongá oyo Molimo Mosanto apesi ngai kososola kozala mokengeli likolo na yango, mpe akotuna ngai mpo na mokumba na yango. Mpe bato oyo na ngaibabongwani awa longwa na mboka, baoyo Nakambi epai na Klisto.

Libanga nini oyo ya motó na nsuka ya póso ya Bozongisi matondi. Nazali na matondi mingi kozala eteni ya etongá oyo azali naino koyangela moko na moko na bino. Ezali na esika mosusu te tokokaki kokende.

Tata atindelaki biso mpongo monene ezali kopumbwa kokamba Mwasi na Ye ya Libala. Ezali na mingóngó mingi mizali koyikisa bato mpiko mpe koloba Maloba malobamaki na mosakoli na Ye, kasi ezali na MONGONGO bobele MOKO motindamaki kokamba mpe kosangisa Mwasi na Ye ya libala.

Maloba malobaki mosakoli na Nzambe likolo na bande mazali Etemelo na biso. Tozali kososolama mabe zambi tolobaka ete tondimaka LILOBA MOKO NA MOKO, kasi topesami motindo na mosakoli na Nzambe kosala bobele yango.

Boye elobi Ngai, na Nkombo na Yesu Klisto: bakisa eloko moko te, longolá te, tia te likanisi na yo moko kati na Yango, loba kaka oyo elobami likolo na ba bande wana, sala bobele mpenza yango epesaki Nkolo Nzambe motindo kosala; bakisa na Yango te!

Lamuka mokili. Ntango ebelemi. Maloba mosakoli na Nzambe alobaki, NZAMBE APESAKI MOTINDO na biso ete; tondima, toloba mpe tosala, BOBELE MPENZA oyo alobaki likolo na ba bande. Ezali te oyo Nalobaka, te oyo nganganzambe na yo to batei balobaka, kasi oyo mosakoli na Nzambe alobaki LIKOLO NA BANDE.

Ezali na eloko moko te ya motuya mingi koleka koyoka Mongóngó yango LIKOLO NA BA BANDE. Oyo Nalobaki te, kasi oyo ALOBAKI.

Nalingi oyo epusi malamu mpo na yo. Maloba make ma ngai mazali mpo na koyikisa yo mpiko, kaka lokola mobateli nyoso asengelaki kosala, kondima Liloba moko na moko. Nalakisaka yo te: kobete ntembe na eloko ata nini oyókaka likolo na bande, miko mazali likolo na ba bande, esengeli óyoka ngai kaka lolenge osengeli koyoka mosakoli. Nakomelaka yo mwa maloba koyikisa yo mpiko ete OTIKALA NA LILOBA YA EBANDELI, FINÁ PLAY. Nalingaka ete ozala Mwasi Liloba peto, abebisami te.

Nzambe asalaki ete Maloba ma Ye matiama na bande na mokolo oyo mpo ekelámu moko na moko ekokaki koyoka Mongóngó na Ye. Na mikolo na Paulo, bazalaki kaka na bakomeli kokoma oyo ezalaki ye koteya, yango nde Biblia. KASI LELO, Nzambe alingaki yango ezala kútu MONENE MINGI. Tokoki kofina play mpe koyoka na matói na biso moko Yesu Klisto oyo asekwi kosolola na biso, mbebu na litói.

Mokolo nini oyo tozali kobika kati na yango. Na mokili kopanzana mpenza zinga-zinga na biso, tozali na esika epesami tokoki kokende kuna mpe komisembola kaka. Tozali na yango likolo na BANDE. Kofanda na malili ya biteni na biso ya ndako mpe kosepela na lipati ya Bilei Bibombamáki bibombamáki kati na ndako ya ebómbelo. Mosakoli na biso akoki kozala mosika mingi, kasi tokanisaka naino ete makambo oyo mazali solo, mpe kosala kaka lokola Nzambe apesaki biso motindo tósala, KOTIKALA NA BA BANDE.

Yaka kozala na Eyenga elámu ya Bozongisi matondi oliá ndele mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Mongóngó na Nzambe mozali koloba na biso Liteya: Libala Mpe Bobuki Libala 65-0221M.

Ndeko Joseph Branham

St. Matai 5: 31-32 / 16: 18 / 19: 1-8 / 28: 19

Misala     2: 38

Baloma    9: 14-23

Timote ya Liboso 2: 9-15

Bakolinti na Liboso 7: 10-15 / 14:34

Baebele 11:4

Emoniseli 10: 7

Genese 3 mokapo

Lewitiko 21:7

Yobo 14: 1-2

Yisaya 53

Ezekiele 44:22

22-1120 Esika Ya Losambo Eponómi Na Nzambe

NSANGO: 65-0220 Esika Ya Kosambela Oyo Nzambe Aponi

PDF

BranhamTabernacle.org

Molingami Mrs. Yesu Klisto,

Boni tolingaka koyoka ba nkombo na biso ibiangami. Kokanisa kaka, biso nde azali koyela. Mwasi na libala ya Bokonzi epai na Mwana na Bokonzi alakami. Momboto na Ye na Bokonzi motómbwi ya Abalayama oyo azalaki solo mpe sembo na Liloba moko na moko.

Tosalaki ekobo te, to kútu tofiná liso te na liloba mosusu nyoso; tomibatelaki bobele peto mpe totikalaki na Liloba moko na moko.

Ezali na Baklisto basi balamu mingi na mokili lelo, basi na lokumu; kasi ezali bobele na moko Mrs. Yesu Klisto. Biso nde tokokende Ndako elongo na Ye. Tozali Mwasi na Ye moponami.

Alobaki na biso kati na Liloba na Ye ete Akoya mbala moko lisusu, kaka lolenge ayaki liboso. Mpe Atelemaki wana, komimonisa Ye moko kati na mosuni na moto, na botangaká Liloba mpe bolobelaká biso: “Lelo Oyo Likomi Liye likokisami na miso ma bino,” mpe toyebi Ye, mpe tokómi Mrs. Mwasi na libala Yesu Klisto na Ye.

Emonisamaki epai na biso ete M-w-a-n-a na Nzambe yango moko oyo ayaki na monyele mpe amindimisaki lokola Nzambe amonisami kati na mosuni, azali M-w-a-n-a na Nzambe yango moko na ndambo ya eloli ya mokili, Oyo amitalisi Ye moko kati na Mwasi na Ye na libala. Pole na mpokwa ya Mwana eyei.

Mpe soko Nalingaki kotuna motuna na ntina na likambo ata nini, ekosengela ete eyano ya solo ézala. Ekoki kozala na eloko moko pene na yango; kasi esengeli ezala na eyano moko ya solo, alimá na motuna moko na moko. Boye, mpo na yango, motuna moko na moko mozali koya na bomoi na biso, esengeli ézala na eyano solo ya sémba.

Na mokolo na biso ezali na mituna mpe kotemanela mingi kati na bato.

·      Boni ezali na litomba koyoka ba bande ya mosakoli na Nzambe?

·      Boni ezali na litomba koyoka mpe kondima liloba moko na moko?

·      Etemelo na biso nde nini? Ezali nde oyo elobi ye likolo na bande, to Molimo Mosanto akambaka nde moto moko na moko kokána nini ezali to nini ezali Liloba te.

·      Tosengeli nde kozala na moto, to ebólo na bato, kokómisa yango petee epai na biso?

·      Liloba lilobi nde ete nsima na Ye kotinda Eliya mosakoli, Akotinda ebólo na bato baoyo basengeli kolimbola yango epai na bino?

·      Tozali nde na bosenga ya moto moko kolimbola Liloba to kokomisa yango petee epai na biso?

·      Esengeleki nde kaka koyoka ba bande na ba ndako na biso, mituka, bisombelo ya pitoló, mpe koyoka batei ntango tokei na losambo?

·      Esengelaki nde toyoka ba bande kati na mangomba na biso?

·      Ezali nde Mongóngó na Nzambe mpo na mokolo na biso to te?

Sasaipi, soko ezali motuna na Biblia, na bongo esengelaki ézala na eyano ya Biblia. Esengelaki te ete ézala na makoki ya kouta na ebólo ya bato, koúta na bondeko songolo-pakala, to koúta na molakisi moko, to longwa na ebongiseli moko. Esengelaki koya mbala moko longwa na Likomi…

Na bongo soko tolingi kozwa biyano bikoki na mituna mia biso, tosengeli kokende na Makomi. Nambisa, tosengeli kokána nani azali molimboli kouta na Nzambe ya Makomi. Moto na moto akánaka nde mpo na ye moko?

Mosakoli elingi kaka koloba te koloba Liloba, kasi lisusu koloba yango liboso, mpe molimboli ya Bonzambe ya Liloba, Liloba ya Bonzambe likomámi.

Boye soko mosakoli azali molimboli ya Bonzambe ya Makomi, na bongo oyo mosakoli yango alobaki ezali Liloba na Nzambe epai na Mwasi na Ye ya libala oyo esili kolimbolama, MPÚTU.

Oyo elongolaka te na lotómo, to na mosala Nzambe abiangelaki bango. Babiangamaki na Nzambe kobatela Liloba wana lilobamaki na mosakoli na Nzambe liboso na etonga na bango. Bazali na mosala ya kotalisa bato na bango epai na motindami yango ya ngonga.

Liloba moko na moko bateyaka lisengeli lisambisama na Maloba mosakoli na Nzambe alobaki likolo na bande. Bakoki kobongola te, soki bakokoka kútu te kolimbola, LILOBA MOKO.   

Makomi ma Nzambe malimbolamaka KAKA na mosakoli na Ye.

Sasaipi, moko na moko na bango, solo, bokokaki komona likanisi na bango, mpe Nakoki kopamela bango te. Moko na moko na bango alobaka ete azali na solo, bazali na solo. Mpe baoyo bazali na mangomba wana basengelaki kondima yango, mpamba te batingamisi nsuka na mobembo na ba—na bango, Seko na Seko na bango, likolo na malakisi ya lingomba yango. Mpe bakeseni mpenza, moko na mosusu, kino esali mituna mikeseni nkama libwa na mbuka.

Soko Etinda oyo elobami na mosakoli ya Nzambe ezali etemelo na yo te, kasi ezali oyo moto moko to bato balobaka ezali Liloba, bongo Seko na Seko na yo epemaka likolo na oyo ELOBAKA BANGO.

Maloba na ngai mamonani lokola ete matemeli mpenza motei ata nani mpe batei nyoso. Nazali bongo te. Nandimi ete Nzambe atiaki mibali na solo kati na Lingomba na Ye mpe likolo na bitonga na Ye kobatela Etinda oyo liboso na bango. Nandimi ete bateyaka mpe bandimaka Etinda oyo. Kasi mpo na nini bakokaki te kolinga kozongisa Ndeko Branham na biteyelo na bango lokola Mongóngó ya motuya monene koyoka?  Mpo na nini batiaka lotómo na bango kokokana na mpe na litómbá, lolenge moko na Mongóngó yango?

Malaki 3 elobaki: “Nakotinda motindami na ngai liboso na elongi na ngai kobongisa nzela.” Mpe oyo atindamaki kobongisa nzela, atalisaki Ye, esika. “Ezali Ye! Miko mazali te. Ezali Ye! Namoni elembo kolanda Ye. Nayebi ete ezali Ye; Pole moko koúta na Likolo mpe kokende likolo na Ye.” Elóngobanaki, ezalaki Ye.

Nsima, ndeko na ngai, Nalingi kotuna yo eloko moko, na bosukisi. Tokoki koloba boye. Kati na Malaki 4, tolakami nde mpe te mpongo mosusu, na Likonzi ya Móto kozala kolanda,  kotalisa lingomba oyo ya koyengayenga lelo oyo ete azali Baebele 13:8: “lolenge moko lobi, lelo, mpe libela”? Tolakami nde moko mosusu te áya kopumbwa longwa na lisobé?

Tosengeli nde kozala kolanda nini? Likonzi na Pole yango. Nani nde Likonzi yango na Pole? Mpongo yango, Malaki 4. Nani nde azalaki na Likonzi na Móto likolo na motó na ye kondimisa azalaki nani? William Marrion Branham.

Ntango nyoso toyanganaka, tosengeli kobatela Mongóngó yango liboso na bato. Tosengeli totia Mongóngó na Nzambe LIBOSO. Ezali te kosambela moto yango, kasi kosambela Nzambe kati na moto yango.

Nde moto Nzambe aponaki kokamba Mwasi na Ye ya libala. Nde moto Nzambe aponaki kolimbola Liloba na Ye. Nde moto Nzambe aponaki komonisa ye mabombami na Ye nyoso. Ye nde Nzambe alobaki na ye ete: “Yeisa bato BANDIMA YO”, MOTO MOSUSU TE TO ELOKO MOTO MOKO BOYE ALOBAKA, YO, WILLIAM MARRION BRANHAM. Moto yango nde akotalisa biso epai na Yesu Klisto. 

Mobali to mwasi ata nani atiaka eloko ata nini na oyo Nalobi, andimaka te oyo Nalobi.

Yaka mpe ókóma Mrs. Yesu Klisto elongo na biso mokolo mwa Lomingo loye na 12:00 nsima na nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tokoyoka monoko mwa Nzambe moponómi koloba mpe koyebisa biso: Esika Ya Losambo Eponómi Na Nzambe 65-0220      

Ndeko Joseph Branham

Dutelonome 16: 1-3

Esode  12:3-6

Malaki Mikapo 3 & 4

Luka 17:30

Baloma 8:1

Emoniseli 4:7