21-1121 MPOSA

Nsango: 65-0919 MPOSA

BranhamTabernacle.org

Molingami Mwasi Moponami,

Koyanganisama monene ya suka ezali kosalema mpo ya Konetolama. Molimo Mosanto azali koyeisa Mwasi na Ye ya Libala elongo longwa na bikolo nyoso; longwa na libongo ya elimwelo ya ntango kino na libongo ya ebimelo ya ntango, longwa na ngambo ya likolo kino na ngele, longwa na matumu manei ya mokili.

Azali koyanganiza biso elongo na bisambo na biso mpe na ba ndako na bison a nzela ya miula ya mongongo malamu mingi. Ezali kutu malamu koleka motindo ya eyokeli na radio. Ezali kokangisama na nzela ya telephone.Tozali kotia biyambelo to biyokelo, to eloko mosusu oyo ezali, kati na eteni ya ndako, mpe ezali kaka ndenge moko lokola nde tozali na eteni ya ndako moko elongo na mosakoli na Ye. Ezali nzela epesami na Nzambe mpo na lelo kosangisa mpe koyeisa Mwasi na Ye ya Libala elongo na” Oyo Elobi Nkolo”.

Esili koleka mibu tuku mitano na motoba, Nzambe abandaki manaka na Ye ya koyanganisa Mwasi na Ye ya Libala elongo mpo bakoka koyoka Ye kosolola na bango na nzela ya mwanje na Ye ya nguya bato nyoso na mbala moko. Asali kutu ete basali na Ye ya ntomo mitano batiki koteya mpe bayanganisa bato na bango elongo, mpe batii ekanganeli ya eyokelo na bisambo na bango, lokola Alingaki ete Mwasi na Ye ya Libala bayoka Mongongo na Ye bango nyoso na mbala moko. Etandelo na Ye monene ebandi. Etikala kokoka boye te kati na lisolo ya mokili. Mosakoli na Ye ayebaki yango mpe atondaki na kosepela. Sasaipi Nzambe akokaki bongo kosola na Mwasi na Ye ya Libala bango nyoso na ntango moko. Bakokaki komiyokela bango moko, wana ezali Nzambe kosolola na bango ye penza, mpe ekozala na bosenga ya ndimbola te.

Lelo, mokili ezali kati ya kokamwa. Mpo na nini bato longwa na zingazinga ya mokili, nan tango ndenge na ndenge ikeseni; 12:00 sima ya nzanga, 2:00 sima ya nzanga, 8:00 sima ya nzanga, katikati ya butu bakoyangana elongo bango nyoso na ntango moko koyoka liteya oyo bakoki koyoka ntango nse ntango. Kobendama ezali nini?

Emonisameli bango ete oyo ezali manaka ya Nzambe, nzela epesami na Nzambe mpo ya kosangisa bango kati na molimo. Ezali Nzambe kobelema kosolola na Mwasi na Ye ya Libala bango nyoso na mbala moko.

Eloko mosusu te kasi Mongongo na Nzambe, Liloba na Ye, Etinda oyo, esololami na mosakoli na Ye nde ekokaki kosala yango. Ezali na moto moko te, soko eloko moko mosusu te, oyo Mwasi ya Libala akoki kozala na boyokani likolo na yango bango nyoso.

Moto moko akoki koloba ete “ Nayokaka mobateli na ngai wana ezali ye kotangela ngai maloba ya Etinda oyo mpe koteya Liloba kaka ndenge ndeko Branham alobaki ete asala.”. Nkolo akumisama. Yango ezali bikamwa  mpe yo opambolami mingi kozala na mobateli oyo azali kotikala na Liloba. Abengami ete abatela etonga elogo mpe kopesa bino mpe kotalisa bino na Liloba, kasi yango ten de nazali kolobela. Bozali na lotomo ya kozala na Etemelo, liloba ya suka. Maloba oyo biso nyoso TOKOKI KOZALA NA BOYOKANI LIKOLO NA YANGO, Ata moto abengama soko ete apakolama na motindi nini, ezali na liloba ya moto moko te oyo ebongi be, mpe lotomo ya moto ata moko te ekosangisa Mwasi na Libala.

“Oyo wana ezali kaka likanisi na yo mpe ndenge yo omoni makambo. Kokisa yango na Liloba, Ndeko Joseph”.

Mpo soko bozwi bato mibale, bokozala na makanisi mibale. Mpe esengeli ekoma na etemelo ya suka, mpe etemelo na ngai ezali Liloba, Biblia. Mpe lokola mobateli awa na kati ya lingomba, etemelo na ngai ezali Liloba, mpe nalingi…Nayebi ete bino, bandeko na biso, bozali lokola nde kotalela ngai ete nazali etemelo na bino mpo na…ntango nyoso nazali kolanda Nzambe, lokola Paulo alobaki kati na Makomi, “Bino bobila ngai, lokola ngai nazali kobila Klisto”.

Na bongo, ntango mosakoli azali kosolola, ezali Etemelo mpo na Mwasi na Libala. Etinda na ye ezali liloba na ye te, soko ete ezali ndimbola na ye ya Liloba te. Ezali Nzambe kolimbola Liloba na Ye moko na nzela epesami na Ye moko kosala bongo : Na nzela ya mosakoli na Ye.

Soko bolobi ete bondimi Etinda oyo. Soko bolobi bondimi maloba oyo alobi awa. Soko bolobi mpe bondimi ete bozali Mwasi na Libala ya Klisto, na bongo oyo ezali likolo na bande esengeli ezala Etemelo na bino.

Na bongo, eloko nini mosusu ekokoka koyeisa Mwasi na Libala ya Klisto biso nyoso elongo soko Etemelo na biso te ? ELOKO MOKO TE. Ba bande ezali Mongongo na Ye, Liloba na Ye, Etemelo na biso. Mosakoli ayebisaki biso ete mosakoli ya lelo azali Molimo Mosanto. Molimo Mosanto aponaki moto MOKO, mongongo MOKO komonisa Liloba na Ye epai na ye mpe mongongo nde ezali kosangisa Mwasi na Ye ya Libala na nzela ebongisami na Ye lelo, NA BOFINAKA PLAY.

Nazali komeka kosala nyoso na ngai kotikala kaka na Liloba, mpo baoyo batiamaki na maboko na ngaimpo na Nzambe, mpo ete ba mpate balingi biloko ya ba mpate, kaka. “Ba mpate na ngai bakoyoka Mongongo na ngai.” Mpe oyo wana nde tozali kobika na yango, Liloba nyoso ekobimaka…Te ete nyoso…Kaka te ete Liloba moko awa mpe na mbisa; kasi Liloba nyos’oyo ekobimaka na monoko ya Nzambe, yango nde esengelaki babulami babika na yango

Esengelaki tobika na Liloba nyoso ekobimaka na monoko ya Nzambe. Monoko ya Nzambe oyo endimisami mpo na lelo nde nini? Ngai ? Nazali mwanje ya 7 ya Nzambe Motindami te, mobateli na bino mpe azali ye te soko moto ata nani ; ezali Nzambe kosalela mongongo ya WILLIAM MARRION BRANHAM.

Tokosambisama na Mateya YE ASOLOLAKI kati na bande. Ezali te na nzela ya ndimbola ya moto soko nani mosusu to na boteyaka oyo ye alobaki, kasi na nzela ya Liloba LIKOLO NA BANDE. Ata topakolama na Molimo Mosanto ndenge nini, tokoki kozala na mabunga. Nazali koloba te ete motei songolo pakala azali ya lokuta to na mabunga ; biso nyoso tobengami koteya, mpe kolakisa, mpe kotikala na Liloba, kasi kobengama na biso ezali ete totalisa bino EPAI NA LILOBA, mpe LILOBA MOKO KAKA OYO EBONGI BE MPE ENDIMISAMI ezali likolo na bande.

Lokola Mwasi na Klisti, tozali na makambo mingi oyo esengeli tozala na matondi mpo na yango :

Tokokaki nde kosalela mai ya mokanda soko ezalaka ete Mbu etondi na yango

Mpe soko ezalaka ete etando ya likolo esalemi kozala esika ya kokoma

Ezalaka ete njete nyoso na mabele ezali ekomeli

Mpe moto nyoso azwi mosala ya mokomi mikanda

Kokoma bolingo ya Nzambe na likolo

Mbe mai ma mbu makokaoka ;

Soko ete esika ya kokomela elingaki kozanga

Ata ko etandami longwa na etando moko kino mosusu

Tobelemi kozala na poso monene ya Matondo ya koleka na bomoi na biso.

Lipati ya Bilei ya Molimo kotondisa bomoto na biso. Lipati epai wapi Mwasi na Libala akosangisama mpe kofanda elongo kati na bozali ya Moi kokemba.

Nzambe akosolola nab iso na nzela na motindami na Ye mpe koyebisa biso:

·       Tozali Mwasi na Ye Aponami.

·       Tozali na nkombo na biso kati ya Buki ya bomoi ya Mwana na Mpate

·       Tozali na masumu te.

·       Tolongisamaki liboso ya bozalisi ya mokili.

·       Tozali baoyo babengami kobima mpe baponami.

·       Tozali baoyo etandelo ya Nzambe mobimba ezalaki kozila.

·       Tozali Mwasi na Libala mpeto, ngondo, na lisumu te ya Mwana na Nzambe na bomoi.

·       Tobongi be liboso na miso na Ye.

Suka ezali te mpo ya kokoma oyo nyoso Molimo Mosanto akomonisa mpe kosalela biso.

Koloba na ntina na Eyenga ya Matondo!!!

Nayokaki kopusama kati na Molimo na ngai kouta na Nkolo ete tokaba poso mobimba, kobanda Mokolo na Lomingo oyo, mpo na kozongisela Nkolo matondi.

Natii awa kalenda na mikolo, ntango ya mateya oyo tokozala koyoka.

Lokola bokoki komona, Mokolo na Lomingo tokoyangana elongo na ngonga na biso ya momeseno 2:00 sima na nzanga, ntango ya Jeffersonville, koyoka Liteya Mposa 65-0919.

Mokolo ya Liboso-ya Misato nakolinga ete toyoka Mateya 3 Ndeko Branham ateyaki ya kolandana, na 1965. Tokotia yango na The Voice Radio na 9:00 na ntongo mpe lisusu na 7:00 sima ya nzanga ntango ya Jeffersonville.

Nayebi ekozala pasi mpo na ebele koyoka mbala moko kokokana na bitandelo ya misala mpe mikumba , kasi nazali kolikia ete bokozala na makoki ya kopona moko kati na ban tango wana mpe koyoka elongo moko na mabota na bino.

Na bongo Mokolo ya Minei, 25/11, nakosepela ete biso nyoso toyangana elongo na ngonga ya 2 sima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, mpo ya kobanda suka ya poso ya bikamwa ya Eyenga ya Matondo wana ekozala biso tokangani na biyokelo lisusu koyoka Mongongo na Nzambe komemela biso Liteya ya biso ya liboso ya suka poso:Lisanga Lizangi Komonana ya Mwasi na Libala ya Klisto 65-1125.

Ezalaki lipamboli ya ndenge mosusu mpo na ngai komona ete, ekozala sima na mibu 56, na mokolo wana, nde Nzambe asololaki na nzela ya mosakoli na Ye, komemela biso Mateya oyo ya kolandana. Ezalaki mpe mbula 56 longwa na mbotama ya Ndeko Branham na 1909, kino 1965, nde ateyaki Mateya oyo.

Tokokaki kosala nini soko toyebaki ete Ndeko Branham akozala na Shreveport, LA na suka ya poso oyo mpo na komemela biso Mateya maye? Eloko moko te…Nalingi naloba ete eloko moko te ekokaki kopekisa biso kokende. Nzambe azali na etandelo mpo na Mwasi na Ye ya Libala lelo, mpe ELOKO MOKO TE ekopekisa biso.

Nazali kobondela ete bozala na nse ya kozila na etingia monene mpo ya poso ya kafukafu tokozala na yango elongo na Nkolo; na botondaka Ye, na bosanzolaka Ye, mpe na bokumisaka Ye mpo na nyoso Ye asali, mpe mpo na nyoso oyo Ye akosala mpo na biso MWASI NA YE MOPONAMI.

Ndeko. Joseph Branham