Nsango: 63-0319 Elembo ya Mibale
Category Archives: Uncategorized
23-0723 Elembo Ya Liboso
Nsango: 63-0318 Elembo Ya Liboso
- 25-0316 Elembo Ya Liboso
- 23-0723 Elembo Ya Liboso
- 22-0130 Elembo Ya Liboso
- 21-0124 Elembo Ya Liboso
- 19-0331 Elembo Ya Liboso
- 17-0325 Elembo Ya Liboso
Balingami…nakobianga bino Mwasi na Libala,
Nzambe, Mokeli Monene, Alifa na Omega, Fololo na Lobwaku, Fololo na Sosana na Salona, Monzóto na Kongenga na Ntongo, Tata, Mwana, mpe Molimo Mosanto, Likonzi ya Moto, Nzambe Ye moko, ayaki na mabelé mpe alobaki na biso na nzela na bibebu ya moto, NKEMBO!, atiaki Yango likolo ya bande, boye bokokaki koyoka Ye kobianga bino…” BINO” MWASI NA YE YA LIBALA.
Bomona yango na makanisi na bino baninga na ngai. Nkolo na biso Yesu Klisto, kotala yo kati na liso mpe koyebisa yo: “Ozali Mwasi na Ngai ya libala. Na lingi yo. Nazilaki yo ntango molai mingi. Mpo na ngai, obongi be. Ozali mosuni ya mosuni na ngai, mokua ya mokua na ngai. Naponaki yo liboso násála Mabelé to minzóto. Nalingi yo mingi mpenza. Tokolekisa Seko na Seko elongo. Sasaipi, Nazali Koya mpo na yo.”
Yango kaka esengelaki épesa moko na moko na biso Konetolama kati na Kondima. Zabolo akokoka nde kobwakela yo nini, koyebisa yo nini, kotia nini likolo na yo, ete eyokisa yo mpasi? ELOKO MOKO TE, OZALI MWASI NA LIBALA YA KLISTO! Ozali Liloba na Ye likomi mosuni, ozali Mrs. Yesu Klisto.
Moto akokoka nde boni, na monoko ata nini, kokoma mpe kolimbola oyo yango elingi koloba epai na biso? Okokoka kaka te.
Ezali na esika te kati na mokili okokoka kozala na lokumu mpe libaku lilamu koyoka Maloba maye bobele Ozala na Emoniseli ya solo mpe OFINA PLAY. Makambo manene koleka mokili ezalaki kozila úta na ebandeli ya ntango, mazali kosalema mpenza sikawa, mpe tozali eteni na yango. Azilaki mokolo oyo, ngonga oyo, bato baye; BINO, kokokisa mpe kokomisa bokokisi ya Etandelo na Ye Monene.
Emoniseli ya libombami ya Bilembo Nsambo, Nkáké komonisama, bobongi be na biso, Adama na ye oyo azongisami mobimba, Boyei na Ye, makambo manso maye mazali komonisama mpe mazali kosalema SIKAWA, kati na BINO, MWASI NA YE YA LIBALA!
Na mokolo ya Mose te. Na mokolo ya Noa te. Na mokolo ya Yesu te, na mokolo kútú ya Yoane to ya Paulo te; Ezali kokóma sikawa, SIKAWA MPENZA, NA BINO.
Tolingi kozanga Yango Te. Tolingi tomilengele mpo na Boyei na Ye. Mpo na kosala yango, topesamaki motindo ya kokende na LILOBA mpo na biyano na biso. Likanisi na ngai te, to likanisi soko mabanza ya moto moko te, kasi oyo Liloba na Nzambe lindimisami elobi.
Toyebi ete Mwasi na libala asengeli koloba “amen” na Liloba moko na moko mpe kosangana elongo lokola Moko. Na boye tosengeli totala kati na Liloba ya Nzambe komona nini ekosangisa Mwasi na libala elongo.
Mpe ezali na Nkake Nsambo ya libombami koya oyo ikomami kútu ata moke te. Ezali solo. Mpe nandimi yango, na nzela ya Nkáké yango Nsambo ikomonisama na mikolo ya nsuka na ntina ete íyeisa Mwasi na libala elongo mpo na Kondima ya Konetolama.
Bobele wana Ezali kati na Liloba. Nkáke Nsambo ikomonisama na mokolo na biso na ntina ete íyeisa Mwasi na libala elongo mpo na kondima ya konetolama.
Nsima motuna molandi tolingi toyeba mozali: Nkáke nde nini?
Ntango, oyo “engulumaki.” Bokanisa, lokito ya makelele makasi ya Nkáké kobeta ezali Mongóngó moko Nzambe. Yango nde Biblia elobi, bomoni, “lokito ya Nkáké.” Bakanisaki ezalaki nkáke, kasi Ezalaki Nzambe. Asosolaki yango, mpo ete emonisamaki epai na Ye. Bomoni? Ezali Nkáké.
Na bongo Nkáké izali Mongóngó ya Nzambe oyo ekomema Mwasi na libala elongo mpe kopesa bango (BISO) kondima ya konetolama. Wana nde eyano na biso.
Nani nde azali Mongóngó ya Nzambe epai na Mwasi ya libala? William Marrion Branham.
Sikawa, nazali kaka ndeko na bino, na nzela na ngolu ya Nzambe, kasi ntango Mwanje na Nkolo akiti na nse, na bongo, ekomaka, Mongóngó na Nzambe epai na bino… Nakoki koloba eloko te kati na ngai moko, kasi oyo Atalisaka ngai, nalobaka yango. Bondima yango mpe botala nini ekokóma.
Bondima yango mpe botala nini ekokóma na Lomingo loye, lokola tozali koyangana elongo, kozua konetolama kati na kondima, koyoka Ye Konguluma epai na Mwasi na ye ya libala.
Bosili boyoka “kofanda sasaipi kati na bisika na Likolo”? Ekozala nini! Soko tokoki koyoka boye, kofanda na nse awa na mabelé, liboso Konetolama éya, kati na motindo oyo tozali na yango sasaipi; mpe tokoki kosepela, mpe kotelema nzinga nzinga na bitutú, mpe kotelema na nse ya mbula, bobele koyoka Oyo; ekozala ko boni ntango tomoni Ye kofanda wana! Oh, oo! Oh, ekozala ntango moko ya nkembo.
Zángá te kati na ntango oyo ya nkembo. Obiangami koyangana elongo na biso lokola tozali koyoka; Elembo Ya Liboso 63-0318, na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville.
Ndeko Joseph Branham
St. Matai 10:1/11:1-4/24:60/28:19
St. Yowane 12:23-28
Misala 2:38
2 Batesaloniki 2:3-12
Baebele 4:12
Emoniseli 6:1-2/10:1-7/12:7-9/13:16/19:11-16
Malaki Mikapo Ya 3 Mpe Ya 4
Danyele 8:23-25/11:21/9:25-27
23-0716 Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo
Nsango: 63-0317E Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo
- 25-0309 Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo
- 25-0309 Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo
- 23-0716 Ntáká Kati kati na Bileko Nsambo Ya Lingombá Mpe Bilembo Nsambo
- 22-0123 Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo
- 21-0117 Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo
- 19-0324 Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo
- 19-0324 Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo
- 17-0319 Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo
- 17-0319 Ntaka Kati na Bileko Sambo ya Lingomba Mpe Bilembo Sambo
Balingami Folólo Miké Ya Libeke,
Tomipusi biso moko likolo ya mai ya potopóto mpe tosemboli mapapu na biso wana. Mwa bitape na biso ibimi mpe izali sasaipi kotalisa Folólo ya Lobwaku. Tobulisi bomoi na biso nyoso epai na Nzambe mpe Liloba na Ye.
Tozali na ntango ya nsuka mpe tozali koúta na Monyele na Eloli, Likolo na Ngelé, kobelema mpo na Konetolama yango. Tozali komibatela pépélé mpo na mwa minúti kino mosuni moké moko na moko etondisami na Molimo Mosanto. Tozali kobelema KOMATA.
Mokolo mwango mokómi. Azali kobianga bato na Ye elongo epai na Ye moko kati na bókó ya solo elongo na Ye moko. Ezali Yesu Klisto kobika elongo na Molimo na Ye kati na mosuni na biso, kosala makambo yango moko Asalaki lokola elembo epai na mokili.
Eloko ya monene koleka kati na Makomi ezali kosalema na mokolo na biso. Ekela, oyo ata mwanje moko te, eloko te, akokaki kosala, bobele Mwana Mpate. Ayaki mpe Azuaki Buku longwa na Loboko ya mobali ya Ye oyo afandaki likolo na Ngbendé, afungolaki yango, abukaki Bilembo, mpe akitisaki Yango na mabele, epai na mwanje na Ye ya nsambo, komonisa yango epai na BISO, Mwasi na Ye ya libala.
Makambo mazali kosalema; Liloba Azali komonisa biso mokolo na mokolo, ezangi ndimbólá. Totombolaka mingóngo na biso na koganga mpe kobelela, Aleluya! Kopakolama, nguya, nkembo, bomonisami, Emoniseli ya Liloba na Ye ezali monene mingi koleka oyo ezaláká ndéle longwa na ebandeli ya ntango.
Elongo na ekelamu moko moko oyo ezali na likolo, mpe na mabelé, mpe na nse ya mabelé, kati na mbú, mpe nyoso ezali kati na yango togangaka: Mapamboli, lokumu, nkembo, nguya, ezala na Ye oyo Afandi likolo na Ngbèndé, mpe epai ya Mwana-Mpate libela na libela, amen! Amen mpe amen!
Ekelamu nyoso, moto nyoso, útá na ebandeli ya ntango azilaki ete mokolo moye mokóma. Ata Nzambe Ye moko azilaki kino mwanje na Ye moponami ákoma na mabelé liboso ete Aya kozua Buku, kofungola yango polele mpe komonisa mabombami maye manso epai na Mwasi na Ye na Libala moponami.
Toyebi sikawa oyo moto moko te na mabelé, útá na ebandeli ya ntango, atikalá koyeba. Eloko moko na moko oyo ebungaki kati na bokwei. Eloko moko na moko oyo ebombamaki kati na Liloba na Ye. Eloko moko na moko Mwasi na Lilbala azali na yango bosenga etiamaki likolo na bande mpe etiamaki kati na mwa ndako ya ebombelo ya Nzambe.
Atalisi biso ngambo na ezipelo ya ntango mpe tomimoni biso mpenza elongo na Ye na Ngambo mosusu. Mwasi ya libala amibongisi na nzela ya boyoki Liloba.
Tozalaki kati na boyekoli. Tolati molato mobimba ya ebuneli ya Nzambe. Eloko moko te ekoki koninganisa biso. Eloko moko te ekoki kobangisa biso. Eloko moko te ekoki kosala biso mabe. Eloko moko te ekoki kosala ete tokakola likolo na Liloba moko. TOZALI LILOBA.
Tozali kozila Ye na liboké na biso ya fololo na maboko na biso. Ezali bobele likambo ya ntango. Saa oyo ya kala ezali kobetabeta makongá. Tozali koyoka mbalata kokima, zélo kobaluka na nse ya biyiká. Likalo oyo ya kala elingi kotelema.
Wana ekokoma Ye, tokopumbwa longwa na mokili oyo ya kala mbala moko kati na Maboko ma Ye. Akosimba biso mpe akoloba: “Nakendeki kobongisa esika mpo na bino, kasi Esili nyoso sikawa, molingami.”.
Koya na Ye ebelemi mpenza. Tozali na nse ya bozili na etingia lokola naino liboso soko moke te. Tozali na kosepela mingi lokola Alingi ete toyoka Bilembo Nsambo mbala moko lisusu. Toyebi ete tokozua Emoniseli ya koleka, zambi Liteya moko na moko toyokaka ezali lokola totikalá naino koyoka Yango liboso te.
Kobika lelo mpe koyoka Etinda oyo azali kutu monene koleka ntango etiamaki likolo na Bande. Azali kútu komonisa mingi koleka epai na biso sikawa. Nini nde ekokaki kosalema?
Boya koyangana elongo na biso na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe bosepela na boyoki: 63-0317E Ntaka Kati Ya Bileko Nsambo Ya Lingomba Mpe Bilembo Nsambo. Ezali Bilei Bibombamaki oyo Nkolo abongisaki mpo na Mwasi ya Libala kolia.
Ndeko Joseph Branham
Makomi ya kotanga kati na bolengeli boyoki Liteya:
Lewitiko 25:47-55
Yilimia 32:1-15
Jekalia 3:8-9/4:10
Baloma 8:22-23
Baefese 1:13-14/4:30
Emoniseli 1:12-18/Mokapo Ya 5/10:1-7/11:18
23-0709 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO
Nsango: 63-0317M Nzambe Komibomba Kati Na Komikitisa, Nsima Komimonisa Na Motindo Moko
- 25-0302 Nzambe Komibomba Kati Na Komikitisa, Nsima Komimonisa Na Motindo Moko
- 23-0709 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO
- 22-0116 NZAMBE AMIBOMBAKA KATI NA KOMIKITISA MPE AMIMONISAKA NA MOTINDO MOKO
- 21-0110 NZAMBE AMIBOMBAKA MPE AMIMONISAKA KATI NA KOMIKITISA
- 19-0317 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO
- 17-0318 NZAMBE KOMIBOMBA KATI NA KOMIKITISA, NSIMA KOMIMONISA NA MOTINDO YANGO MOKO
Balingami Bato godi, Ndenge, Motindo, Bonganga ya Molimo, Ekólo ya Bokonzi,
Ntango ya nkembo nini oyo Azalaki kopesa Mwasi na Ye ya libala, komonisa Liloba na Ye lokola liboso ata moke te. Liteya moko na moko toyokaka ezali lokola nde toyóká Yango liboso ata moke te. Mitema na biso mpe bomoto na biso itondi na esengo lokola tosepelaka na Maná na sika kokita longwa na likolo. Eyokanaka lokola lifili na Lipati na biso ya Libala oyo ezali koya noki lokola Aleisaka biso Emoniseli nsima na Emoniseli.
Tozali kopesa mbeka na molimo epai na Nzambe, na nzela ya mbuma ya bibebu na biso, kopesa lokumu na Nkombo na Ye. Tozui etemelo na biso lokola minzoto na likolo.
Asangisi biso elongo na bisika na likolo, kosopa Molimo Mosanto na Ye likolo na biso, kolengela biso mpo na Boyei na Ye bobelemi. Nde nyoso tokoki kokanisa. Nde nyoso tozali na yango na makanisi na biso. Nyoso tolingaka kosala ezali KOYOKA LILOBA. Azali koyebisa biso lisusu mpe lisusu tozali Mwasi na Ye na libala. Oyo ezali mokano na Ye mobongi be na botikalaka na Nzela na Ye epesami.
Tozali ba soda kati na Lipinga na Ye na Lotómo ya Bande, mpe tozali na lipambu na yango. Ezali elembo ya lokumu. Tolingaka koloba yango makasi mpe koyebisa mokili, IYO, TOZALI MOKO NA BANGO.
Apesi Bilei bibombamaki mpo na biso kolia. Mana mpenza ma Nzambe Ye moko koloba na Mwasi na Ye na libala, koyebisa biso ete tozali kati na lipinga na Ye.
Tozali koyangana na nse ya motóndo monene ya likolo kati na boyokani ete, Molimo Mosanto atii enama moko moko na Nzoto kino lobiko na pwasa nyoso ya nzoto mpe ya molimo.
Tozuaka Liloba na Nzambe mpe kolonga zabolo na nguya na ye. Topapaka ye kino singa mike mike elongo na Liloba yango. Mokonzi na biso monene alobaki na biso: “Bozali Liloba. Bobanga te. Bokende alimá liboso na zabolo mpe boloba, ‘EKOMAMI.’”
Aponaki biso kozala basoda na Ye. Tozalaki kati na boyekoli, tokembisamaki elongo na Liloba na Ye. Tolatisami sikawa mpe tobelemi mpo na bobundi. Mokonzi na mapinga na biso ya minzoto 5 apesaki biso motindo kosala nini: Botikala elongo na malakisi ya Bande.
Mpe bondimisama, koloba bobele oyo Bande elobaka. Koloba eloko mosusu te. Bomoni? Zambi, nalobi yango na ngai moko te. Ye nde alobi yango, bomoni. Mpe mbala mingi kobulungana, bato batelemaka mpe koloba: “Na bongo, songolo mpe pakala alobaki ete elingi koloba boye na boye.” Tika yango bobele lolenge Ezali.
Ezali te oyo William Branham azali koloba na biso likolo na ba bande, ezali oyo NZAMBE azali koloba na Mwasi na Ye na libala likolo na ba bande. Oyo izali MITINDO na Ye. Ezali na nzela bobele moko yakotosa mitindo kouta ma Mokonzi na mapinga ya minzoto 5 mpe kotika yango lolenge Ezali, FINA PLAY.
Tozali kati na lipinga na Nzambe, no bongo tosengeli kotosa mitindo na biso Liloba mpo na Liloba. Tozali kokoba liboso. Tozali bato ya litomba, bato ya kondima, bato ya nguya, bato ya lisosoli, bato ya Emoniseli.
Tozali kokóma kati na bondeko bobongi be elongo na Tata lisusu, kotelema na ngambo mosusu na libulu ya bozindo, na ekaniseli ya lisumu kotemela biso te. Adama na Ye azongisami.
Ezali Nzambe kati na komikitisa mbala moko lisusu. Ezali mpo na moto nyoso te, bobele Mwasi na Ye ya libala, mpe tomoni yango saa mpe polele na miso na biso.
Nazali na nse ya kozila na etingia monene koyoka Bilembo Nsambo mbala moko lisusu. Akozala komonisa Liloba na ye epai na biso lokola liboso naino soki moke te. Tokozala kozua Emoniseli monene koleka ya Liloba na Ye.
Azilaki kino lelo oyo komonisa epai na biso na koleka. Nyoso tozali na yango bosenga etiamaki na bande mpe ezali wana mpo na biso koyoka yango kaka na bofini na mosapi na biso.
Etinda oyo ezali nkake Nsambo wana oyo ikobongisa be Mwasi na libala; zambi MABOMBAMI NYOSO YA NZAMBE MAKOMONISAMA NA MWANJE NA BISO MOTINDAMI YA 7 EPAI NA MWASI YA LIBALA.
Oyo ezali ntango ya nkembo koleka kati na lisolo ya ntango ya mokili. Tozali na kokota ya koya na Ye mpo na Mwasi na Ye ya libala. Mokili mozali kozila na etingia makambo manso malobamaki kati na Makomi; lokola mói kolala na kati na mokolo mpe makambo motindo na motindo kokoma. Kasi esili koleka, mpe bayebaki yango te.
Bokanisa, etiami elembo na Nkake yango Nsambo ya libombami. Bomoni?
Makambo minene makosalema lokola tozali koyangana mbala moko lisusu koyoka Nzambe konguluma na Nkake mpe komonisa mingi epai na Mwasi na Ye ya libala likolo na Bilembo Nsambo.
Nabiangi bino komibakisa na biso na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali kobanda molongo monene oyo na Liteya: 63-0317M Nzambe Komibomba Kati Na Komikitisa, Nsima Komimonisa Na Motindo Moko.
Lokola Ndeko Branham abulisi lisusu Eyanganelo ya Branham mpe bato epai na Nzambe, tika ete tomibulisa lisusu biso mpenza, bandako na biso, mangomba na biso, to ezala ata wapi toyangani, epai na Ye.
Ndeko Joseph Branham
1 Ntango 17:1-8
Yisaya 35:8/40:1-5/53:1
Malaki Mokapo ya 3
St. Matai 11:10, 11:25-26
St. Yoane 14:1-6
1 Bakolinti Mokapo ya 13
Emoniseli Mokapo ya 21
23-0702 Etumba Monene Koleka Oyo Ebundámá
23-0625 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?
Nsango: 62-1230e Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?
- 25-0223 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?
- 23-0625 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?
- 22-0109 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Suka Mobali?
- 18-1230 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?
- 16-1218 Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka Mobali?
Molingami Mwasi Na Libala Liloba Na Liloba,
Mosakoli moko te, ntóma moko te, soki moke te, na ntango moko te, abiká ndele na ntango moko lokola oyo tozali kobika sikawa. Oyo nde nsuka. Likonzi na Móto lizongi lisusu. Likonzi ya Móto liye likambaki bana ya Yisalaele; yango Moko oyo ekweisaki Saulo na nzela na ye kokende Damaseke. Yango Moko oyo eyei na Nguya yango moko, kosala misala yango moko, mpe komonisa Liloba yango moko, kotikala Liloba na liloba elongo na Biblia!
Mabombami manso mabombamaki mamonisamaki na ye. Bomonaki, mabombami MANSO. Eloko moko ya sika te, eloko moko etikami libanda te, eloko moko te ekomonisama útá na moto mosusu; manso mamonisamaki epai na mwanje na Ye motindami ya Nsambo mpe mapesamelaki biso, Mwasi na Ye ya libala, likolo na bande.
Nde NYOSO Mwasi na libala asengeli na yango; BOTALA LISUSU, NYOSO OYO MWASI NA LIBALA ASENGELI NA YANGO. Basusu basengeli na biloko bisusu, mpe yango epesameli bango. Kasi oyo tosengeli na yango etiamaki na bande mpe epasameli biso likolo ya bande mpe EZALI kopesa biso KONDIMA ya Konetolama.
Tozali lingomba oyo Nkolo Nzambe apesaki ye. Oyo nde mboka mokonzi na ye ya mosala. Awa nde Ayebisaki biso totikala. Litongi moko te, BA BANDE. Tozali ebolo yango oyo tondimaka, mpe tozali na nzala mpe totingami na Liloba moko na moko. Ayebisaki biso totikala awa mpe totala likolo na Libanga Mpembe, ya Mangaliti, LILOBA LIKOLO YA BA BANDE.
Mongóngó moko útá na Lola mosololaki na ye mpe molobaki: “Yeisa Bilei na kati. Bomba Yango na kati. Yango nde nzela bobele moko ya kobatela bango awa, ezali kopesa bango Bilei”. Alobaki te ete boluka eloko mosusu, soko ete ekozala na bimoniseli bisusu kouta na esika moko boye; botala likolo na BILEI BIYE BIBOMBAMI LIKOLO YA BANDE, BOTIKALA WANA.
Kasi bobele lokola basalaki kati na ndoto nyoso Amonisaki, bokó babimaki na nzela oyo; basusu bazuaki nzela moko, mpe basusu nzela mosusu. Motango moke mpenza batikalaki mpe batalaki likolo na oyo Ayebisaki bango.
Sikawa bokokanisa kutu yango na mosusu, ndoto. Oyo ezalaki emononeli. Bilei, Yango oyo. Oyo nde esika yango.
Akokaki te kozala polele na lolenge mosusu epai na Mwasi na Ye ya libala koleka wana. Oyo ezalaki emononeli, liloto te, EMONONELI. Bilei bizali awa; ba bande. Esika yango oyo; ba bande. Tozali kosala mpenza oyo ayebisaki biso tosala: koyoka BA BANDE!
Esengeli na Emoniseli ya Molimo mpo na ko sosola makambo maye. Ekosengela na Emoniseli ya Molimo kondima mpe kososola oyo Akoyebisa na biso Lomingo loye. Ekozala ntango moko na nkembo mpo na Mwasi na libala.
Ezali na makambo mingi Nzambe azali koyebisa mpe komonisa biso likolo na Liteya oyo. Nalingi nazua Liloba nsima na Liloba mpe napesa Yango epai na bino, kasi nayebi ete Akomonisa eteni ya motuya moko na moko epai na bino zambi oyo nde Alobaki ete bozali yango:
Oyo nde lingomba Nkolo Nzambe apesi ngai. Awa nde esika na ngai ya mosala. Awa nde natikalaka…ezali na ebolo ya bato awa baoyo bandimaka, mpe bazali na nzala mpe bazali kokangana na yango.
Tozali ebolo yango oyo bazali na nzala mpe bakangani na yango. Ebele basosolaka biso mabe mpe batiolaka biso, kasi ezali malamu, tolingaka mpe tobondelaka mpo na bango; kasi tolingaka na biso kaka MONGÓNGÓ MOKO kokamba biso.
Bolimbisa ngai, kasi esengeli napesa eteni na liloba oyo.
“Ntango abandi koyula, libombami likosila kokoka.” Sasaipi, botala, na nsima ezali ntango mpo na mingongo ya Bilembo Nsambo, ya Emoniseli 10, komonisama. Bososoli? Ntango mabombami manso ma Buku masili kokoka! Mpe Biblia elobi, awa, ete akosilisa mabombami.
Nani akosilisa mabombami? Mobateli na yo? Ebolo moko boye? Ngai? Mwanje ya Nsambo Motindami: William Marrion Branham. Moko te liboso, na ntango, to nsima na ye.
AKOSILISA MABOMBAMI.
Ekoki kozala ntango ya nsuka. Ekoki kozala ntango mpo na minama kokomba etando ya likolo, mpe liyebisi longwa na likolo, koloba: “Ntango ezali lisusu te.” Soko ezali bongo, tika ete tomilengele, baninga, kokutana na Nzambe na biso.
Iyo Nkolo, tolingi tobongisama kokutana na Yo. Tolingi tosala nyoso tokoki. Tolingi tozala kati na Mokano mwa Yo mobongi be. Tobondeli Yo Tata Oyebisa biso, oyo esengelaki na biso kosala mpo tobongisama?
Bilei ebele bitiama na kati sasaipi. Tika ete tosalela Yango. Tika ete tosalela Yango.
Matondi Tata mpo na Bilei Otii na kati mpo na Mwasi na Yo ya libala mpe emoniseli na Yango. Tozali kosalela yango mokolo na mokolo.
Nabondeli mpo na bolimbisi ya mwa lingomba na ngai awa, oyo Otindaki ngai ko-ko-ko-kokamba mpe kotambolisa. Pambola bango, Nkolo. Nasalaki kokokana na bimononeli mpe ndoto mpe makambo malobaki, boye, na boyebi na ngai bopusi malamu. Natii na kati Bilei ya motindo nyoso oyo na yebi, mpo na bango, Nkolo. Ezala nini, Nkolo, tozali baoyo ya Yo. Matondi Nkolo, Olobaki na biso mbala moko lisusu, ete otii na kati Bilei tosengeli na yango mpo na mobembo.
Nakoki te kozila na kpókósó koyoka, Oyo Ezali Nde Elembo Ya Nsuka, Mobali? 62-1230E, elongo na moko na moko na bino mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville. Nayebi ete makambo makomonisamela biso lokola liboso soko moke te. Ekoki kozala mbala ya nsuka koyoka Oyo.
Boni soko ezali eloko moko koyebisa biso lolenge nini kokota kati na Kondima ya Konetolama? Ezali nde yango? Tokopota nde, kotenguma likolo na bitutú? Mpe ezali nde na eloko moko ebelemi kokoma? Mpe nzoto iye ya kala, ya bonunú, mpe ya mabe ikobongwana?
Nakobika nde komona yango, E Nkolo? Ekomi nde pene pene na motindo ete nakomona yango? Ezali nde libota oyo? Mibali, bandeko na ngai, ntango nini oyo? Tozali wapi?
Ndeko Joseph Branham
23-0618 ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA
Nsango: 60-1211E ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA
- 24-1208 ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA
- 23-0618 ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA
- 20-1227 ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA
- 19-0310 ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA
- 16-0410 ELEKO NA LINGOMBA YA LAIDIKIA
Balingami Bandimi Liloba Likokweaka Te,
Boni ezalaki bikamwa koyoka mpe kotanga Bileko Nsambo Ya Lingomba. Na liteya moko na moko toyokaka, mokapo moko na moko totangaka, Azali kopesa biso Emoniseli koleka. Tomimoni polele biso moko kokita kati na eleko ya lingomba moko na moko…Mwasi na Ye na libala, oyo atikalaki na Liloba ya ebandeli.
Kati na bileko tomoni polele milimo yango mibale; bozimbisi mpe lokuta ya Satana, kobalola Liloba na Nzambe, kozimbisa, kobebisa mpe kokonza bato. Kasi ntango nyoso ezalaki na liboke moke na bato na Nzambe, Mwasi na Ye na libala, kotingama na Liloba moko moko.
Ezalaka mbala nyoso na ekebiseli moko oyo ezali wana ntango nyoso oyo epesameli bato, bosengeli KOTIKALA NA LILOBA. Bobela na sekonde bolongwi nsima na Liloba yango, bosili bokangami kati na motambo monene ya Satana; pelamoko Ewa asalaki uta na ebandeli. Azangaki kosalela Liloba. Adama akweaki mbala moko na bozangi botosi na Liloba. Kasi Yesu, kati na Bomoi na Ye moko mpenza, kobunda kati na Ye moko, Alongaki na nzela ya botosi na liloba ya Nzambe.
Alobaki soko tosepeli kofanda kati na kiti na Ye ya bokonzi, tosengeli tozala Liloba yango ya Bomoi. Mabondeli na biso, kokila, to ata mbongwana na biso ya mitema ikozuisa biso litomba wana te. Ekopesama bobele na Mwasi Liloba.
Makambo nakoka koloba mazali mingi mpenza, mpe maloba ya etinda na kokaki kolinga kokabola na moko na moko na bino; ezangi nsuka. Nayebi ete etinda oyo ezali kopela na mitema na bino moko na moko mpe bolingaka Liloba moko na moko, bobele lolenge nalingaka yango. Tolingi mokili eyeba ete: Iyo, tozali bato ya bande. Iyo, Tofinaka Play. Iyo, tondimaka Mongóngó likolo na ba bande ete yango nde ekobongisa be Mwasi na libala. Iyo, ba bande nde ekosangisa Mwasi na libala. Iyo, Kofina Play ezali mokano mwa Nzambe Mobongi Be. Iyo, nazali Mwasi na Ye na libala.
Nayebi ete nazali komizongela utá na mikanda ebele, kasi nazali na esengo mingi, na matondi mingi, nandimisami mpenza…ezangi kaka kobeteme ntembe, oyo ezali Mwango na Nzambe mpo na Mwasi na Ye na libala.
Na Liteya moko na moko toyokaka, tomitunaka kati na kokamwa, boni bakoki te komona, kotanga to koyoka oyo tozali koyoka? Ezali wana kaka, likolo na bande, nsima ya bande, nsima ya bande. Esalaka ngai nayoka ete naloba na bango lokola Yesu Alobaki na Nikodeme: “Ozali molakisi na Yisalaele, mpe oyebi makambo oyo te?”
Boyoka kaka boni mwanje akomisi yango pete.
Bobele na moboko ya ezaleli ya moto, moto ata nani ayebaka ete epai wapi bato mingi bazali makanisi makabwani likolo na makambo mike ya malakisi manene oyo bango nyoso bakangani na yango elongo.
Na moboko ya ezaleli ya moto YANGO MOKO, lisosoli ya molimo esengelami na yango te, moto nyoso ayebaka ete bato mibale bakozala na makanisi makeseni likolo na MAKAMBO MIKE ya malakisi minene.
Bakoki koyokana nyoso mpe koloba ete soko bato basali te oyo balobaka, to soko balongwi na bango, na bongo libebi likolanda. Kasi mosakoli ya solo akokamba ntango nyoso moto na Liloba mpe akokangisa bato na Yesu Klisto mpe akoyebisa bato te babanga ye to oyo ekolobaka ye, kasi babanga oyo Liloba ekolobaka.
Liloba elobaka nini? Nakotindela bino Eliya mosakoli. Na mikolo ya MONGONGO. Ekozala na mosakoli MOKO Liloba…bobele MOKO…mpo ete Nzambe apesaki Emoniseli epai na BOBELE OYO WANA MOKO. Ye nde akozongisa Mwasi na Ngai ya libala.
Na mingóngó mingi mpe na makanisi mingi mingi mpe maloba, moto akoki nde KONDIMISAMA MPENZA BONI?
Nani ko nde akozala na nguya ezangi kokweya oyo esengeli kozongisama na eleko oyo ya nsuka, mpo ete eleko oyo ya nsuka ekozonga na bomonisami ya Liloba Peto Mwasi ya libala?
Nde oyo Mwasi na libala alingaka koyoka, oyo azali na nguya ezangi kokweya; mpo ete akozala oyo asengelI KOZONGISA Mwasi ya libala. Akozala na makanisi makabwani te, azali Liloba.
Motuna: Nkolo, tolingi toyeba, moto yango azali nani oyo akozala na maloba mazangi kokwea?
Nakoyebisa bino nani akozala na yango. Ekozala mosakoli oyo andimisami mpenza, to kútu oyo andimisami koleka mosakoli mosusu ata nani na bileko nyoso longua na Enoka kino lelo oyo, mpo ete moto oyo akozala na lotomo losengelami na yango ya mosakoli ya libanga ya motó, mpe Nzambe akomonisa ye polele. Akozala na bosenga komilobela te, Nzambe akoloba mpo na ye na nzela na Mongóngó ya elembo. Amen.
Eyano: William Marrion Branham.
Botika na yikisa bino mpiko lelo Mwasi na libala moponami. BOKOKI TE, MPE BOKOKOKA TE, KOKOSAMA. Bosimbi yango? Ezali at ana moto moko te akokoka kokosa bino. Paulo akokaki kokosa moponami ata moko te, soko ete ázalaki kati na libunga. Ata na eleko ya liboso ya lingomba na Efese, moponami akokaki kokosama te. Bamekaki bantómá mpe basakoli na lokuta mpe bakutaki bango bakosi mpe babimisaki bango.
NKEMBO MWASI NA LIBALA….bozali ba mpate na YE mpe boyokaka Mongóngó na Ye mpe bolandaka YE. BOZALI MWASI LILOBA YA BOMOI!!
Ezali kaka te na eloko monene koleka koyeba Maloba maye. Koyeba kati na motema mpe bomoto, bozali Mwasi na Ye ya libala. Mikolo mokili mozalaki kozela misili mikómi. Mwasi na libala azali komiyeba ye moko mpe azali kokóma MOKO ELONGO NA YE; tozali BOZALISI YA SIKA YA NZAMBE.
Mbala moko lisusu nazali koloba na bino, BOYOKA MONGONGO YA NZAMBE na mokolo mwa Lomingo, epai se epai boyangani. Etali te soko liteya nini bokoyoka awa kaka bozali koyoka Mongóngó ya Nzambe mondimisami. Mongóngó yango nde Mongóngo Nzambe abiangaki mpe aponaki kozongisa mpe koyanganisa Mwasi na Ye ya libala.
Epai na mangomba nyoso, bato nyoso, bobiangami koyoka elongo na biso na Lomingo loye na 12:00 nsima ya nzanga, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyoka: Eleko Na Lingomba Ya Laodikia 60-1211E.
Ndeko Joseph Branham
23-0611 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
Nsango: Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei 60-1211M
- 24-1201 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 23-0611 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 20-1220 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 19-0303 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
- 16-0403 Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei
Balingami Balingi ya Mana,
Tozali na esengo zambi tokoki kolia Bilei bizali na mokuwa to ndiká kati na Yango te. Mápa kokita longwa na Lóla, mabiangamaki “Mana,” kozipa bipai nyoso na elengi ya Lóla.
Na Emoniseli ya Molimo, Amonisi biso ezali na esika bobele moko tokoki kozua Mana oyo ya Sika na ndiká te: na boyókáká Mongóngó Apesi mpo na Mwasi na Ye ya libala.
Ezali bosengá na Ye ya ntango nyoso na eleko moko na moko ete mangomba bayoka Mongóngó ya Nkolo. Kati na eleko oyo ya nsuka, bosenga na Ye bozali kútu kokóba kozala makasi koleka eleko mosusu nyoso; mpo ete oyo ezali mokolo ya boyei ya Nkolo. Akebisaki biso, na noki nyoso, ete tosengeli koyoka Mongóngó na Ye ya solo, mondimisami.
Oh, ezali na mingóngó kati na mokili—makambo ebele mpenza mpe bosengá kolela mpo na lisalisi; kasi ekozala na mongóngó soko moke te ya litomba koleka mpe oyo ebongi na lisalisi lokola mongóngó ya Molimo. Boye: “Ye oyo azali na litói ya koyoka, tika ete áyoka yango elobi Molimo na mangomba.”
Nde yango, ekebiseli na Ye epai na mangomba, boni ezali na litomba koyoka Mongóngó ya Molimo. Solo solo wana nde monguna akobundisa, komeka kotángola litomba ya boyoki MONGONGO YANGO mosika na bato.
Ayebisaka biso MINGONGO MINGI mizali. Makambo mingi mpe bosenga, kolela mpo na lisalisi, kasi bóbósana soki moke te, bosengeli koyoka MONGONGO NA YE MONDIMISAMI.
Soko nayokisi bino mpasi na bolobáká bongo, bolimbisa ngai, kasi, nayoki ekokaki koboyama, kasi, nazali Mongóngó ya Nzambe epai na bino.
Nde eyano: NAZALI MONGONGO NA NZAMBE EPAI NA BINO.
Ezali mpenza polele epai na Mwasi na Ye ya libala. Ebombami te, Ezali mpenza wana polele; moto nyoso akoki kotanga yango. Nazali te koyebisa bato eloko moko elobaki Ye te…nazali te kosala yango ngai moko. Alobi na biso polele nini nde eloko ya litomba koleka tosengeli kosala. Mokano ya Nzambe mobongi be ezali KOYOKA MONGONGO NA YE MPE AZALI MONGONGO YA NZAMBE EPAI NA BISO.
Bandeko mibali mpe basi, nazali koloba te ete bokoki te koyoka babateli na bino. Nazali koloba te ete bazali lokuta to ete ezali mabe soko batéyi. Na polele Nkolo atiaki biso awa kozala lisungi epai na Mwasi na libala mpe kotalisa bino na NSIMA na Liloba ya ebandeli; kotia Liloba yango liboso na bino lokola ya litomba koleka oyo bokoki koyoka. Tosengeli TOZONGA na MOKANO MWA NZAMBE MOBONGI BE. Adama oyo azongisami mobimba, akembisami nsima ya Liloba. Nzambe alobaki mokolo na mokolo mbebu na litoi na Adama kati na Elanga, mpe lelo, azali kosala eloko yango moko.
Tosengelaki tozala totelemi na katikáti mpe koloba: “Tozali bandeko!” Tokabwani te, Biso nyoso nzoto moko; Moko kati na elikia mpe Malakisi, (Malakisi ya Biblia.)
Tozali bandeko. Nazali te komeka kokabola Mangomba, nazali komeka komema biso nyoso elongo na eloko BOBELE moko ekoki koyeisa Mwasi na libala elongo. Tokoki te koyokana ata MOKO NA MOSUSU, to EBOLO YA BATEI; nyoso bakeseni, mpe balobaka makambo makeseni. Ezali na mwanje ya nsambo motindami bobele moko. Ezali na Mongóngó ya Nzambe kaka MOKO. Mongóngó Nzambe apesaki na Mwasi na Ye ya libala likolo na bande.
Nakozala polele. Emoniseli na ngai ezali: Koyoka Mongóngó ya Nzambe likolo ya bande EZALI MOKANO MWA NZAMBE MOBONGI BE.
Lokola na mikolo ya Samwele, ntango bato babelemaki na ye mpe balobaki na ye ete balingaki mokonzi koyangela bango. Ezokisaki motema na ye. Akendeki epai na Nzambe mpe ayebisaki Ye oyo elingaki bango. Nzambe alobaki na Samwele, babóyi yo te, Samwele, babóyi nde Ngai, ete Nakonza te likolo na bango.
Azalaki kokonza likolo na bango boni? NA NZELA YA MOSAKOLI NA YE, SAMWELE. Ezalaki MOKANO MWA YE MOBONGI BE, mpe baboyaki ye. Mpo na kozala Mwasi na Ye ya libala, bosengeli KOZONGA na Mokano mwa Nzambe Mobongi be. Bosengeli te kozala na MIKANO 2 MIBONGI BE.
Boni nakokaki kolinga Mwasi na libala mobimba koya elongo útá na mokili mobimba koyoka Mongóngó ya Nzambe nyoso na ntango moko. Ezali te mpo “Na”zali koloba yango, kasi mpo ete NZAMBE AZALI KOSALA YANGO. Ezali eloko bobele moko koyeisa Mwasi na Ye ya libala elongo.
Nabiangi bino koya koyoka elongo na eteni ya Mwasi ya libala, mwa Lomingo na 12:00 nsima ya nzángá, koyoka: Baseka Zomi, Mpe Bayuda Nkoto Mokamá Na Ntuku Minei Na Minei 60-1211m.
Soko bokoki komibakisa na biso te, boyikisa mobateli na bino mpiko koyoka Mongóngó ya Nzambe Lomingo loye na ntongo kati na lingomba na bino. Bokoki kobanza, Mwasi na libala na mokili mobimba, kati na lingomba moko na moko, ndako moko na moko, to ézala ata wapi bozwami, koyoka Mana ya Sika kozipa bipai nyoso na elengi ya Lóla.
Ndeko Joseph Branham
23-0604 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI
Nsango: 62-1210 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI
- 24-1124 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI
- 23-0604 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI
- 20-1213 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI
- 19-0224 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI
- 16-0402 ELEKO NA LINGOMBA YA FILADELEFI
Molingami Mama Yesu Klisto,
Ezali koyokana bikamwa te? Mwana Mpate na Mwasi na Ye ya libala bafandi libela kati na mabongi be ya Nzambe. Tokoki nde kolimbola yango boni? Tokanisaka mpo na yango. Tolotaka mpo na yango. Totangaka oyo Liloba Lilobi mpo na yango. Tomonaka Ye kokabola Bosanto na Ye moko elongo na biso. Kati na Ye, tokomi boyengebene mpenza ya Nzambe.
Esengo nini yango ememelaka biso ntango tofinaka play mpe toyokaka Nzambe Ye moko kosolola na biso na nzela ya mwanje na Ye ya nguya mpe koyebisa biso makambo maye.
Ezali na eloko moko te kati na bomoi oyo, ézala ya kosepelisa lolenge nini, ezala malamu mpe kitoko lokola ekoki kozala, kasi bokokuta litondi na bobongi be nyoso kati na Klisto. Eloko mosusu nyoso ekweaka kati na bozangi ntina soki na Ye te.
Ayebisaka biso tokozala na nkombo ya sika, Nkombo na Ye. Nkombo na Ye ekopesamela biso ntango akozua biso epai na Ye moko. Ekozala bikamwa koleka lolenge tokokaki kutu kobanza. Tokokende epai nyoso Mobali na libala akendeke. Tokotikama na Ye soki moke te. Tokolongwa pembeni na Ye soki moke te. Tokokabola Kiti na bokonzi na Ye elongo na Ye. Tokolatisama motole elongo na nkembo mpe lokumu na Ye.
Mpe lokola Amitalisaka epai na mokili, mpe mokili mobimba mofukamaka na makolo na Ye, na ntango yango mokili mobimba mokofukama na makolo na basanto, kotalisa ete bazalaki alima kati na kotelema na bango elongo na Ye.Nzambe apambolama libela!
Ayebaki biso liboso na nzela ya mobeko ya Bonzambe ete tokozala Mwasi na ye ya libala. Aponaki BISO; toponaki Ye te. Abiangaki BISO; toyaki te na lolenge ya biso moko. Akufaki mpo na BISO. Asukolaki BISO kati na Makila na Ye moko. Afutaki motuya mpo na BISO. Tozali baoyo na Ye, mpe na Ye kaka. Tomipesi mobimba epai na Ye mpe Ayambi mokumba. Azali motó na BISO. Alobaka na biso na nzela ya mwanje na Ye mpe totósaka, mpo ete yango nde mposa monene na biso.
Longwa na ebandeli kino na nsuka, Etinda likolo na ba bande ezali nyoso NZAMBE epai na BISO. Tika ete Bomoi yango ézala kati na BISO. Tika ete ézala Makil ana Ye makopetolaka BISO. Tika ete ézala Molimo na Ye oyo ekotondisaka BISO. Tika ete ézala Liloba na Ye kati na mitema mpe minoko na BISO. Tika ete ézala Mapipi na Ye makobikisaka BISO. Tika ete ézala Yesu, mpe Yesu kaka. Na nzela ya misala ya boyengebene te, oyo tosalaki. Klisto azali bomoi na ngai. Etinda oyo ezali bomoi na biso, zambi Ezali Klisto.
Oh, mingóngó mingi mizali kati na mokili—makambo mingi mpe bosengá kolela mpo na lisalisi; kasi ekozala na mongongó soki moke te ya litomba koleka mpe oyo ebongi kosunga lokola Mongóngó ya Molimo. Na bongo: “Tika ete ye oyo azali na litói, ayoka yango elobi Molimo na mangongomba.”
Nzambe Azali na Mongóngó moko mpo na lelo oyo. Endimisamaki na nzela ya Likonzi ya Móto kozala Mongóngó ya Nzambe. Ekozala na Mongongó moko soki moke te oyo ezali NA LITOMBA KOLEKA MPE NA BOBONGI KOSALISA KOLEKA lokola Mongongó wana likolo na bande mpo na lelo.
Boya komibakisa na biso Lomingo loye na 12:00 nsima na nzanga, ntango ya Jeffersonville. Tozali na Libenga mobimba litondi na Mafuta ya nzói. Tokotia yango likolo ya Libanga, likola ya lingomba moko te; likolo ya Libanga, Klisto Yesu. Mpe bino ba mpate bokende kolambola. Bokobika solo na mbala moko. Mikakatano nyoso ya lisumu mikokende ntango bokolambola Libanga. Nde oyo bosengeli kosala, boya koyoka Mongongo na Nzambe koyebisa biso nyoso na ntina na: Eleko Na Lingomba Ya Filadelefi 60-1210.
Ndeko Joseph Branham